MOKAPO YA ZOMI NA MIBALE
“Yango te koyeba ngai?”
1, 2. Mpo na nini ezalaki likambo ya bwanya te ete Yehoyakime atongisa ndako?
MOKONZI YEHOYAKIME azalaki kotongisa ndako, mpe ndako yango esengelaki kozala monene mpenza. Esengelaki kozala na baetaze mibale oyo ezali na bashambre minene. Maninisa na yango esengelaki kozala minene mpo na kokɔtisa pole ya moi mpe mopɛpɛ kitoko na ndako, mpo mokonzi ná libota na ye bázala malamu. Mpo na kokembisa bifelo na yango basengelaki komema mabaya ya sɛdrɛ uta na Libá. Lisusu, mpo na kongɛngisa ndako yango na kati, basengelaki kopakola langi ya motane pɛɛ oyo eutaka na mikili mosusu mpe oyo bato minene mpe bato ya lokumu ya bamboka mosusu bazalaki kosalela mingi.—Yir. 22:13, 14.
2 Esɛngaki mbongo mingi mpenza mpo na kotonga ndako yango. Emonani ete na ntango yango mbongo nyonso oyo ezalaki na kɛsi ya Leta esilaki mpo na kofuta mampinga ya ekólo mpe mpako oyo Ezipito ezalaki kosɛnga. (2 Bak. 23:33-35) Kasi Yehoyakime asalelaki mayele mabe mpo na kotongisa ndako na ye ya sika. Aboyaki kofuta bato oyo bazalaki kosala mosala ya kotonga! Asalisaki bango mosala lokola baombo, asalelaki motoki na bango mpe mosala na bango ya makasi mpo na matomba na ye moko.
3. Na ndenge nini Yehoyakime akesanaki ná tata na ye, mpe mpo na nini?
3 Na nzela ya Yirimia, Nzambe amonisaki Yehoyakime ete ezaleli na ye ya koluka matomba na ye moko ezali mabe.a Akundwelaki mokonzi yango ndenge oyo tata na ye, Mokonzi Yosiya, amoniselaki basali mpe babola boboto mingi mpe ndenge oyo azalaki kokabela bango mingi. Kutu, Yosiya azalaki kolobela lotomo na bango na batribinale. Nsima ya kobenda likebi ya Yehoyakime na ndenge oyo tata na ye azalaki kokipe bato oyo bazangá, Yehova atunaki ye boye: “Yango te koyeba ngai?”—Tángá Yirimia 22:15, 16.
4. Mpo na nini osengeli koluka koyeba Yehova?
4 Lokola makambo ezali se kobeba na mokili oyo ya Satana, tozali na mposa ya lisalisi mpe libateli oyo Yehova apesaka na bato oyo bayebi ye malamumalamu. Na yango, tosengeli kopusana mpenza pene na ye. Lisusu, mpo tólonga na mosala na biso ya kosakola nsango malamu, tosengeli komekola bizaleli na ye malamu. Kasi mbala mosusu okomituna: “Ndenge nini mokristo akoki koyeba Yehova lokola Mokonzi Yosiya?”
KOYEBA YEHOVA ELIMBOLI NINI?
5, 6. (a) Ndenge nini tata ya malamu akoki kosalisa bana na ye bázala mpe na bizaleli ya malamu? (b) Na bokeseni na Yehoyakime, tosengeli kosala nini mpo na komonisa ete toyebi banzela ya Yehova?
5 Kanisá ndenge oyo tata ya malamu akoki kosalisa bana na ye bázala mpe na bizaleli ya malamu na kati ya bomoi na bango. Na ndakisa, soki bazali komona ndenge oyo tata na bango akabelaka bato oyo bazangá, yango ekotinda bango mpe bázala na ezaleli ya kokaba. Ntango bazali komona ndenge oyo tata na bango asalelaka mama na bango makambo na bolingo mpe limemya, yango ekoki kosalisa bango bázala mpe na limemya mpo na basi. Soki bazali koyoka ndenge bato bazali kolobela bosembo ya tata na bango na makambo etali mbongo, yango ekoki kotinda bango bázala sembo mpe bázala bato oyo basalaka makambo na bokosi te. Ya solo, ntango bana bazali koyeba mokemoke banzela mpe bizaleli ya tata na bango, mbala mosusu ntango bakokola, bango mpe bakomekola tata na bango.
6 Ndenge moko mpe, mokristo oyo ayebi Yehova lokola Yosiya ayebaki ye asukaka te kaka na kondima ete azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Kasi soki azali kotánga Biblia, yango ekosalisa ye ayeba ndenge oyo Nzambe asalelaka bato makambo, mpe yango ekotinda ye aluka komekola Tata na ye ya likoló. Soki mokolo na mokolo azali komonisa ete alingaka makambo oyo Nzambe alingaka mpe ayinaka oyo Nzambe ayinaka, bolingo na ye mpo na Yehova ekokóma makasi. Kasi moto oyo aboyi mibeko ya Nzambe mpe makundoli na ye, amonisaka ete aboyi Nzambe atambwisa ye; na yango akoki koyeba Nzambe te. Moto ya ndenge wana akokani na Yehoyakime, oyo abwakaki na mɔtɔ rulo ya maloba oyo Yehova atindelaki ye na nzela ya Yirimia.—Tángá Yirimia 36:21-24.
7. Mpo na nini osengeli koluka koyeba Yehova lokola Mokonzi Yosiya?
7 Soki tolingi kokokisa malamu mosala na biso epai ya Nzambe mpe soki tolingi kobatela elikya na biso ya kozala na bomoi na mokili ya sika, tosengeli koyeba Yehova malamumalamu. (Yir. 9:24) Tiká tótalela mwa bizaleli ya Nzambe ndenge emonisami na mikanda ya Yirimia. Ntango tozali koyekola bizaleli yango, luká omona nini oyo okoki kosala mpo na koyeba Nzambe mpe komekola ye ndenge Mokonzi Yosiya asalaki.
Mpo na nini tokoki koloba ete Mokonzi Yosiya ayebaki Yehova malamumalamu? Ndenge nini okoki koyeba Yehova malamumalamu lokola Yosiya?
“MOTEMA BOBOTO NA YE EZALI SEKO NA SEKO!”
8. Motema boboto ezali nini?
8 Na minɔkɔ mingi, ezali mpasi kozwa maloba oyo ezali kolimbola mpenzampenza ezaleli oyo Nzambe azalaka na yango ya motema boboto, to bolingo ya sembo. Diksionɛrɛ moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na motema boboto esangisaka bokasi, bolingo mpe kokangama makasi na moto. Diksionɛrɛ yango elobi lisusu ete: “Ndimbola nyonso oyo moto akoki kopesa na liloba yango, soki esangisi bizaleli misato wana te, ndimbola yango ebimisi likanisi ya liloba yango na mobimba te.” Na yango, kozala moto ya motema boboto esuki kaka te na kozala moto malamu. Moto ya motema boboto asalaka nyonso oyo akoki mpo na kokokisa bamposa ya basusu, mingimingi bamposa na bango ya elimo, mpo amibanzabanzaka mpo na bango. Asalaka bongo libosoliboso mpo alingi kosepelisa Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
9. Makambo oyo Yehova azalaki kosalela Bayisraele emonisi nini?
9 Lolenge eleki malamu ya koyeba mpenza ndimbola ya liloba “motema boboto,” ezali ya koyekola makambo oyo Nzambe asalelaka basaleli na ye ya solo, banda kala tii lelo. Yehova abatelaki mpe aleisaki Bayisraele na boumeli ya mbula 40 oyo balekisaki na esobe. Ntango bakómaki na Mokili ya Ndaka, Nzambe apesaki bango basambisi mpo na kobikisa bango na banguna na bango mpe kozongisa bango na losambo ya solo. Lokola Nzambe akangamaki na bango na ntango ya mpasi mpe na ntango ya bisengo na boumeli ya bambula nyonso wana, akokaki koyebisa ekólo yango ete: “Nalingá yo na bolingo ya ntango oyo etyami ndelo te. Yango wana nabendi yo na motema boboto.”—Yir. 31:3.b
10. Ndenge nini lolenge oyo Yehova ayokaki mabondeli ya Bayuda oyo bazalaki na Babilone ezali komonisa motema boboto na ye?
10 Na mikolo na biso mpe, Nzambe azali komonisela basaleli na ye motema boboto mpe bazali kozwela yango matomba mingi. Na ndakisa, tótalela likambo etali libondeli. Yehova ayokaka mabondeli nyonso oyo eutaka na motema; nzokande ntango basaleli na ye oyo bamipesi epai na ye babondelaka, atyelaka bango likebi koleka. Ata soki tozali kobondela mpo na mokakatano moko boye oyo eumeli bambula mingi, Yehova alɛmbaka biso te mpe alɛmbaka koyoka mabondeli na biso te. Mokolo mosusu, Yehova asɛngaki Yirimia atindela Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone nsango moko. Bazalaki mosika na ntaka ya bakilomɛtrɛ 800 na tempelo, mosika na bandeko mpe baninga na bango oyo batikalaki na Yuda. Atako bazalaki mosika na tempelo, yango epekisaki Yehova te ayoka masanzoli na bango mpe mabondeli oyo bazalaki kosala mpo na kosɛnga ete andima bango. Kanisá ndenge oyo Bayuda yango babɔndisamaki ntango bayokaki maloba ya Nzambe. Maloba oyo bayokaki ekoki mpe kobɔndisa yo ntango ozali kobondela na motema sembo. Maloba yango ezali na Yirimia 29:10-12.—Tángá.
11, 12. (a) Elaka nini Yehova apesaki bato ya Yerusaleme? (b) Bato oyo bazwaki disiplini oyo esengeli bazali na mposa ya lisalisi nini?
11 Yehova amonisaka lisusu motema boboto na ye na ndenge oyo atalelaka bato mpe makambo na ndenge ya malamu. Lokola kobebisama ya Yerusaleme ekómaki pene mpe bafandi na yango bazalaki kaka kokoba na botomboki na bango, elingi koloba batombokelaki mpenza Nzambe, makambo nini elingaki kokwela bango? Mbala mosusu balingaki kokufa na nzala to na mopanga ya bato ya Babilone? Ata bongo te, bakokaki kokima te komemama na boombo mpe kokufa na mboka mopaya. Nzokande, mpo na baoyo babongoli motema mpe bizaleli na bango, Yehova apesaki bango elikya na nzela ya “liloba [na ye] ya malamu.” Alakaki bango ete ‘akotyela bango likebi,’ mpe ‘akozongisa bango na esika oyo,’ elingi koloba akozongisa bango na mboka na bango, longwa na Babilone. (Yir. 27:22) Nsima na yango Bayuda yango bakoganga ete: “Bókumisa Yehova ya mampinga, mpo Yehova azali malamu; mpo motema boboto na ye ezali seko na seko!”—Yir. 33:10, 11.
12 Lokola Yehova azali na motema boboto, alendisaka baoyo bazali kokutana na mikakatano oyo ekoki komonana makasi na miso ya bato. Lelo oyo, bato mosusu oyo bazalaki na kati ya lisangá bazwaki disiplini oyo ebongi. Ntango mosusu bakoki komitungisa mingi mpo bamoni ete bamemi ngambo mpo na likambo oyo basalaki, mpe bakoki kobanga kozongela libota ya Nzambe. Mbala mosusu bakoki komituna soki Yehova akolimbisa bango mpe akondima bango lisusu. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali na “liloba malamu” mpo na bato ya ndenge wana. Akoki kosalisa bango na boboto bábongola makanisi mpe bizaleli na bango. Mpe makambo oyo totángaki na paragrafe oyo euti koleka etaleli mpe bango—Yehova ‘akozongisa bango na esika na bango’ na kati ya basaleli na ye ya esengo.—Yir. 31:18-20.
13. Mpo na nini ndenge oyo Yehova asalisaki Yirimia esengeli kolendisa yo?
13 Lokola Yehova azali na motema boboto, asungaka basaleli na ye ya sembo. Na mikolo oyo ya nsuka ya mokili ya Satana, tosengeli mpenza kondima ete Yehova akosunga mpe akobatela baoyo bazali koluka liboso Bokonzi na ye. Osengeli mpe kobosana te ete ntango Yerusaleme ekómaki na mikolo na yango ya nsuka, Yirimia azalaki na elikya ete Yehova akopesa ye bilei mpe akobatela ye. Nzambe asundolaki ye ata mokolo moko te. (Yir. 15:15; tángá Bileli 3:55-57.) Ata soki okutani na mikakatano ya ndenge nini, yebá ete Yehova akobosana te misala na yo ya bosembo. Lokola azali na motema boboto, azali na mposa ya kosunga yo mpo ‘osila te.’—Bil. 3:22.
Na makambo oyo Yehova asalaka mpo na komonisela biso motema boboto na ye, likambo nini etindaka yo osepela na ye mingi koleka? Mpo na nini olobi bongo?
“LOKOLA YEHOVA AZALI SOLO NA BOMOI . . . NA BOYENGEBENE!”
14. Makambo nini ya kozanga bosembo ezali kosalema mikolo oyo?
14 Ezali na bato oyo balekisaki bambula mingi na bolɔko mpo na mabe oyo basalaki te. Ezali mpe na bato mosusu oyo tribinale ekatelaki bango etumbu ya liwa, mpe babomaki bango, kasi na nsima eyaki koyebana ete bazalaki na likambo te. Na bamboka mosusu, ezali na baboti oyo batɛkaka bana na bango na boombo kaka mpo libota ezwa eloko ya kolya. Oyokaka ndenge nini ntango makambo ya ndenge wana ya kozanga bosembo ezali kosalema lelo oyo? Okanisi ete Yehova amiyokaka ndenge nini? Biblia emonisi polele ete Nzambe alingi kosilisa makambo nyonso oyo enyokolaka bato. Kaka Ye nde azali na nguya ya kosilisa yango. Na yango, babola mpe bato oyo bazali na likambo te kasi bazali konyokwama bálɛmba nzoto te. Lokola azali Nzambe ya sembo, Yehova azali kozwa bibongiseli mpo na kobikisa bango na mpasi oyo bazali na yango.—Yir. 23:5, 6.
15, 16. (a) Yirimia alobelaki ezaleli nini ya Yehova? (b) Mpo na nini osengeli kotyela mibeko ya Yehova mpe bilaka na ye motema?
15 Na mikolo ya Yirimia, bato mosusu bayebaki ete bosembo ya Nzambe eleki oyo ya bato nyonso. Na ndakisa, mosakoli Yirimia amonisi ete soki Bayisraele oyo bayebaki bosembo ya Nzambe, babongoli motema, mpe bamonisi ete motema na bango ebongwani mpenza, ekozala lokola nde bazali koloba ete, “Lokola Yehova azali solo na bomoi na bosolo, na bosembo mpe na boyengebene!” (Yir. 4:1, 2) Yango ezali solo mpamba te kozanga bosembo ezali na esika na yango te na mokano ya Yehova. Kasi ezali mpe na makambo mosusu oyo endimisi ete Yehova alingaka bosembo.
16 Ntembe ezali te ete Nzambe akokisaka ntango nyonso maloba na ye, mpe azalaka na bokosi te. Atako bato mingi bakokisaka bilaka na bango te, Yehova akokisaka oyo ya ye ntango nyonso. Kutu mibeko oyo Nzambe atyá mpo na kotambwisa molɔ́ngɔ́ mpe oyo esalisaka biso ebongwanaka te. (Yir. 31:35, 36) Tokoki mpe kotya motema na bilaka na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi, mpamba te ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso.—Tángá Bileli 3:37, 38.
17. (a) Yehova asalaka nini ntango asambisaka likambo moko boye? (b) Mpo na nini tosengeli kotyela bankulutu motema ntango bazali kosambisa makambo na lisangá? (Talá etanda “Basambisaka mpo na Yehova” na lokasa 148.)
17 Ntango Yehova azali kosambisa, atalelaka kaka te makambo oyo ezali komonana na miso. Yehova atalelaka likambo likolólikoló te kasi atalelaka likambo na mobimba na yango. Alukaka mpe koyeba makanisi oyo etindaki moto asala likambo boye to boye. Lelo oyo, minganga bakómi na bisaleli mpe mayele oyo esalisaka bango bátala na kati ya nzoto ya moto oyo azali na maladi mpo na komona ndenge motema na ye ezali kobɛta, mpe na yango bakoki koyeba soki motema ezali kosala malamu to te. Bazali mpe na likoki ya kotala na kati ya bangei, oyo epɛtolaka makila. Kasi Yehova akoki kotala mosika koleka. Atalatalaka motema ya elilingi, elingi koloba makanisi ya moto, mpe bangei na ye ya elilingi, elingi koloba mayoki oyo ezalaka mpenza na kati ya moto. Na yango, akoki koyeba nini etindaki moto asala likambo moko boye mpe ndenge nini moto yango azali komiyoka mpo na likambo oyo asalaki. Mpe ebele ya makambo oyo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso amonaka ntango atalatalaka motema mpe bangei ya elilingi elekelaka ye ndelo te. Lokola Yehova azali na mayele ya kososola koleka bazuzi mosusu nyonso, liboso ya kosambisa biso asalelaka makambo nyonso oyo amonaka nsima ya kotalatala mitema na biso na ndenge ya malamu mpe na bokatikati.—Tángá Yirimia 12:1a; 20:12.
18, 19. Koyeba ezaleli ya Nzambe ya bosembo ekoki kotinda biso tósala nini?
18 Na yango, ozali na ntina ya kotyela mpenza Yehova motema, ata soki na bantango mosusu lisosoli na yo ezali kotungisa yo mpo na mabunga oyo osalá kala. Kobosana te ete Yehova azali te lokola zuzi oyo azali kolandela moto mpo azwa ye likambo mpe na nsima apesa ye etumbu, kasi azali zuzi oyo ayokelaka bato mawa mpe alingaka kosalisa bango. Soki lisosoli na yo ezali kotungisa yo mpo na makambo oyo osalá to mpo na mabe oyo moto mosusu asalaki yo, sɛngá Yehova asimba “bitumba,” to makanisi oyo ozali kobunda na yango mpo okoka kobosana makambo yango.c Nzambe akosalisa yo mpo omona ete asepelaka mingi ndenge ozali komipesa na mosala na ye mosantu.—Tángá Bileli 3:58, 59.
19 Lokola Nzambe azali na bosembo ya kokoka, alingaka ete bato oyo balukaka kozala pene na ye bámonisa bosembo na makambo oyo basalaka. (Yir. 7:5-7; 22:3) Kosakola nsango malamu kozanga kopona bilongi ezali moko ya makambo ya ntina mingi oyo tokoki kosala mpo na komonisa bosembo ya Nzambe. Ntango ozali kozongela bato mpe ozali koyekola na bango Biblia na ndenge ebongi, ozali komekola nzela oyo eleki malamu ya bosembo ya Nzambe mpe na ndenge yango okosalisa mpenza bato mosusu. Na ndenge nini? Nzambe alingaka bato ya lolenge nyonso báyeba ye mpe bábika. (Bil. 3:25, 26) Tozali mpenza na mokumba ya kitoko ya kozala baninga ya mosala ya Nzambe, wana tozali komonisa bosembo na ye na nzela ya mosala oyo ekobikisa bato!
Ndenge nini bosembo ya Nzambe ebɔndisaka yo? Ndenge nini okoki komekola bosembo ya Nzambe mpe kobɔndisa basusu?
“NAKOKANGA NKANDA MPO NA LIBELA TE”
20. (a) Mikanda oyo Yirimia akomaki ebendi likebi na ezaleli nini oyo Nzambe amoniselaka bato? (b) Boyokani nini ezali kati ya “koyoka mawa” mpe bolimbisi ya Yehova? (Talá etanda “Na ndenge nini Yehova ‘ayokaka mawa’?”)
20 Bato mingi bakanisaka ete mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli etɔndɔlaka kaka makambo ya mabe oyo bato bazali kosala. Kasi bato oyo bakanisaka bongo babosanaka ete na mikanda yango, ezali mpe na maloba ya kolendisa oyo Yehova ayebisaki bato na ye mpo na komonisa ete azalaki na mposa ya kolimbisa bango. Alendisaki Bayuda ete: “Nabondeli bino, bóbongwana, mokomoko na bino atika nzela na ye mabe, mpe bókómisa banzela na bino mpe misala na bino malamu.” Mokolo mosusu, Yirimia mpe alendisaki bango boye: “Bóbongisa malamu banzela na bino mpe misala na bino, mpe bótosa mongongo ya Yehova Nzambe na bino, mpe Yehova akoyoka mawa mpo na mpasi oyo alobi mpo na bino.” (Yir. 18:11; 26:13) Lelo oyo mpe, Yehova alimbisaka baoyo nyonso bayokaka mpenza mawa mpo na mabunga na bango mpe batikaka etamboli na bango ya mabe.
21. Likambo nini Yehova alukaka kosala ntango alimbisi moto?
21 Kasi kolimbisa ya Yehova esukaka kaka na maloba te. Ntango alimbisaka, alimbisaka na motema moko. Yehova alendisaki bato na ye na nzela ya Yirimia ete: “Zongá, Ee Yisraele mopɛngwi . . . Nakotala bino na elongi ya nkanda te . . . Nakokanga nkanda mpo na libela te.” (Yir. 3:12) Soki Nzambe alimbisi mosaleli na ye moko, abombelaka ye nkanda na motema te. Ata soki likambo ya mabe esalemaki, Yehova alukaka kozongisa boyokani oyo ebebaki. Ata soki moto asalaki masumu ya ndenge nini, soki abongoli mpenza motema mpe asɛngi bolimbisi, Yehova ‘akozongisa ye’ lisusu na boyokani oyo azalaki na yango na ye mpe akopambola ye. (Yir. 15:19) Likambo yango esengeli kolendisa moto nyonso oyo atikaki Nzambe ya solo azongela ye. Omoni te ete bolimbisi ya Yehova etindaka biso tólinga ye lisusu makasi koleka?—Tángá Bileli 5:21.
22, 23. Ntango ozali komekola bolimbisi ya Yehova, osengeli kozala na mokano nini?
22 Soki ndeko moko asilikisi yo na maloba to na likambo moko oyo asali yo, okomekola Yehova? Nzambe alobaki mpo na Bayuda oyo alimbisaki ete ‘akopɛtola’ bango. (Tángá Yirimia 33:8.) Yango elingi koloba ete abosanaka masumu nyonso oyo moto abongoli motema asalaki kala, mpe na yango apesaka ye likoki ya kobanda bomoi ya sika na mosala na ye. Ya solo, soki Nzambe alimbisi moto, yango elingi koloba te ete moto yango apɛtolami na lisumu ya Adama ná Eva mpe akómi moto ya kokoka, oyo azangi masumu. Atako bongo, lokola Nzambe apɛtolaka bato oyo alimbisi, yango ekoki koteya biso. Tokoki kosala makasi tóbwaka na mokɔngɔ na biso mabe oyo moto asali biso to tóbosana yango, elingi koloba tópɛtola makanisi oyo tozalaki na yango na motema mpo na moto yango. Na ndenge nini?
23 Kanisá ete bakabeli yo mbɛki moko ya ntalo mingi. Soki mbɛki yango ekómi salite to ezwi litɔnɔ, okobwaka yango mbala moko na fulu? Okosala bongo te. Na ntembe te, okosala nyonso mpo osukola yango malamumalamu mpo na kolongola salite mpe litɔnɔ na yango. Okosala bongo mpo ezongela kitoko na yango mpe engɛnga lisusu. Ndenge moko mpe, osengeli kosala makasi mpo olongola nkanda oyo obombaki na motema mpo na ndeko mobali to ndeko mwasi oyo asalaki yo mabe to makanisi ya mabe oyo ozalaki na yango mpo na ye. Salá nyonso mpo okanisaka te makambo to maloba yango oyo esalaki yo mpasi. Soki olongi kobwaka yango na mokɔngɔ na yo, okopɛtola makanisi ya mabe nyonso oyo ozalaki na yango na motema mpo na moto yango oyo olimbisi. Mpe lokola opɛtoli motema na yo mpe olongoli makanisi ya mabe nyonso ozalaki na yango mpo na ye, okoki kozongela lisusu na moto yango boninga oyo okanisaki ete esili mpo na libela.
24, 25. Okozwa matomba nini soki oyekoli koyeba Yehova ndenge oyo Mokonzi Yosiya asalaki?
24 Na mokapo oyo, totaleli kaka mwa ndambo ya makambo oyo Yehova asalelaka bato mpe bizaleli na ye mosusu oyo toyekolaka ntango tozali koluka koyeba ye malamu. Tomoni mpenza ete matomba oyo tozwaka soki toyebi Yehova malamu esengeli kopesa biso mposa makasi ya kosambela ye na ndenge oyo esepelisaka ye. Soki toyebi Yehova malamumalamu lokola Mokonzi Yosiya ayebaki ye, bomoi na biso ekotonda na esengo, oyo ezali ezaleli mosusu ya Nzambe.
25 Soki toyebi Yehova malamu koleka, tokozala mpe na boyokani ya malamu na basusu. Soki tozali komonisela bandeko motema boboto, kosalela bango makambo na bosembo, mpe kolimbisa bango ndenge Yehova asalaka, boninga na biso ná bandeko ya lisangá ekokóma makasi koleka mpe ekozala na valɛrɛ mingi. Lisusu, tokoyeba koteya malamu koleka wana tozali kozongela bato ya teritware na biso mpe koyekola Biblia na bato oyo bazali kokola malamu. Longola yango, bato oyo basepelaka na mateya ya solo bakomona ete ezali mpasi te bango mpe básalela mitinda ya Biblia oyo biso bakristo tolandaka na bomoi na biso. Na yango, tokosalisa bango básambela Yehova na ndenge oyo esepelisaka ye, mpe bálanda “nzela ya malamu.”—Yir. 6:16.
Mateya nini ozwi na Bileli 5:21?
a Mpo na koyeba ndenge oyo Yehoyakime asukaki mabe, talá Mokapo 4, paragrafe 12 ya buku oyo.
b Bible na Lingala ya lelo oyo ebongoli maloba yango ya Yehova boye: “Nazali kolinga bino na bolingo ya seko, yango wana nakangami na bino libela.”
c Soki ndeko mwasi to ndeko mobali moko abuki mobeko ya Nzambe, esengeli koyebisa bankulutu ya lisangá mpo bátalela likambo yango mpe básalisa ndeko yango na elimo.—Yak. 5:13-15.