Jéhovah—“Mobali na etumba”
Llmpinga na etumba ya Baezipito libomamaki nyɛɛ. Katikati nyonso ya ebale Motane, bibembe ya batambwisi makálo mpe oyo na batamboli na mbaláta ezalaki kobetabeta na mbongé; biloko na etumba bizalaki kotepatepa na mai. Na esengo nyonso, mibali na Yisraele oyo batambwisamaki na Moïse bayembaki loyembo oyo ya elonga ete: “Tika ete nayembela Jéhovah, mpo ete ye alongi na nkembo; abwaki mbaláta mpe motamboli na yango kati na mai. Jéhovah azali mobali na etumba. Jéhovah ezali nkombo na ye.”—Exode 15:1, 3.
Elonga oyo ezwamaki na ebale Motane emonisaki mpenza lolenge jéhovah aleki na makasi kati na etumba. Bayisraele babimaki na molongó longwa na Ezipito, kasi bazalaki na makoki mingi te mpo na etumba. Na nzela na likonzi na lipata, oyo lizalaki kobongwana likonzi na mɔtɔ na butu, Jéhovah akambaki bango longwa na Lamesese kino Etame, “na ndelo na lisobe.” (Exode 12:37; 13:18, 20-22) Mpe jéhovah alobaki na Moïse ete: “Lobela bato na Yisraele ete bazonga nsima mpe batɛmisa hema na bango liboso na Pi-hahiloto, kati na Migedolo mpe na mai monene, na liboso na Bala—Sefona. Mpe Farao akoloba na ntina na Bayisraele ete: ‘Babungani kati na mokili. . . . mpe akolanda bango.” (Exode 14:1-4) Bayisraele, batósi, bazongaki nsima mpe bakendeki epai na Pihahiloto. Banɔngi na Ezipito bakendeki koyebisa Farao na ntina na oyo emonani lokola ete Baebele babungani; mpe lokola esakolamaki, mokonzi wana abengaki limpinga na ye ete balanda bango.—Exode 14:5-9.
Motambo mpo na Bayisraele, to mpo na Farao?
Lokola ngomba ezalaki na ngambo nyonso, mai monene liboso na bango mpe Baezipito na nsima na bango—Bayisraele oyo bazalaki kobanga, bamonanaki lokola nde bazwami na motambo; bongo basengaki lisalisi na Jéhovah. Nsima na koyanganisa bango, Moïse alobi na bango ete: “Banga te, telema ngwi mpe tala kobikisa na Jéhovah ekosala ye mpo na bino lelo, bokomona bango lisusu te, soko moke te. Jéhovah ye moko akobunda mpo na bino, mpe bino bokotikala nyɛɛ.” (Exode 14:10-14) Jéhovah azalaki sembo mpo na eleká na ye: “Likonzi ya lipata lilongwaki na liboso na bango mpe litelemaki na nsima na bango. Ekomaki bongo katikati na molako na Baezipito mpe molako na Bayisraele. . . . Mpe molako moko ebɛlɛmaki na oyo mosusu te na butu mobimba.”—Exode 14:15-20.
Lokola Jéhovah atindaki ye, Moïse atombolaki lingenda na ye na likoló na mai monene mpe ‘akabolaki yango’ ete Bayisraele bakoka kokima. Ezalaki likamwisi monene. (Exode 14:16, 21) Mopepe makasi moutaki na ebimelo na ntango, mobandaki kokabola mai na ebale Motane, kofungoláká nzela monene mpo na libota mobimba—lizalaki soko bamilió misato ya bato—ete bakatisa na molongó. Na ngambo na ngambo ya esika ezalaki bango koleka, mai “makangisamaki” matɛlɛmaki lokola bifelo milai.—Exode 15:8.
Na lisalisi ya pole oyo eutaki na likonzi na mɔtɔ, Bayisraele bakimaki na kolekáká na mai monene kati na mabelé makaukisamaki na mopepe. Na kobima na moi, Bayisraele oyo bazalaki na nsima bakómaki na ngambo mosusu ya mai monene. “Baezipito balandaki mpe bakɔtaki nsima na bango kati na mai monene, mbaláta nyonso na Farao mpe makalo na ye mpe bato na ye na mbaláta.” Balandi bazwamaki na motambo!—Exode 14:23.
“[jéhovah] abulunganisaki molako na Baezipito. Mpe akangaki yika na makálo na bango na motindo boye ete ekómaki bozito mpo na kotambwisa yango.” Bongo Moïse asembolaki loboko na ye likoló na mai monene mpe “mai mazongaki na esika na yango.” Bifélo na mai bikitaki, kozindisáká Baezipito. Balukaki kokima nde “Jéhovah abukaki [bango] kati na mai monene.’’ Moko te abikaki. Na esengo nyonso, Bayisraele bayembi loyembo na bango ya elonga mpo na Jéhovah.—Exode 14:24 kino 15:3; Nzembo 106:11.
Jéhovah azali kobunda mpo na Yosua
Jéhovah amimonisaki lisusu lokola “mobali na etumba” na boumeli na bitumba mosusu. Moko na bitumba yango ezalaki oyo ya Aï. Etumba ya liboso oyo esalemaki epai na engumba wana elongaki te mpo na libunga moko monene esalemaki na Akana. Wana likambo yango libongisamaki, Jéhovah apesaki mitinda epai na Yosua mpo na kozongela etumba.—Yosua 7:1, 4, 5, 11-26; 8:1, 2.
Na kolanda malako na Jéhovah, Yosua atyaki molako moko na butu kobombana na nsima na Aï, na weste ya engumba yango. Atindaki limpinga na ye na nguya epai na likoló, kati na lobwaku oyo lozali liboso na engumba yango; limpinga wana limonanaki lokola nde lizalaki pene mpo na kobunda. Mibali na Aï bakosamaki. Na molende mingi lisusu mpo na elonga oyo bazwaki na etumba ya liboso, babimaki na lombango longwa na engumba mpo na kokutana na Bayisraele. Na lolenge na bato babangi etumba, Bayisraele bakimi “na nzela na lisobe,” mpo na kobenda banguna ete batangwa mosika na engumba na bango.—Yosua 8:3-17.
Wana ntango malamu ekokaki, Jéhovah alobaki na Yosua ete: “Sembola likonga oyo na loboko na yo epai na Aï mpo ete ngai nakopesa yango na loboko na yo.” Na elembo oyo bayokanaki, mibali oyo babombanaki babundisaki engumba wana, bazikisaki yango mpe babomaki yango. Wana bamonaki molinga komata, banguna na Bayisraele basilaki mayele. Yosua mpe limpinga lizalaki elongo na ye babalukaki mpo na kobundisa banguna, baoyo bazingamaki na mapinga mibale. Elonga wana eutaki nde na bato? Te. Na nsima, Yosua alimbwelaki Bayisraele ntina oyo balongaki etumba: “Jéhovah Nzambe na bino nde abundi mpo na bino.”—Yosua 8:18-27; 23:3.
Etumba na molúká ya Kisoni
Pene na Meguido, na molúká ya Kisoni, Jehovah amonisaki lisusu makasi mingi na ye kati na bitumba. Uta mibu 20, Yabini, mokonzi na Kanana, azalaki konyokola Bayisraele. Limpinga na ye litambwisamaki na Sisela, lizalaki na makálo na etumba nkámá libwa oyo esalemaki na bibende—emonanaki lokola limpinga lizalaki na makasi mingi na eleko wana.—Basambisi 4:1-3.
Nzokande, na nzela na mosakoli mwasi Debola, Jéhovah asengaki Balaka ete ayanganisa mibali na etumba nkɔto zomi na ngomba Tabola mpo na kobunda na nguya na Yabini. Sisela, ye oyo azalaki na Halosɛtɛ, nokinoki atɛmɛlaki koyangana wana na kowela kokenda mbango na molúká ya Kisoni, oyo ezalaki katikati na ngomba Tabola mpe Meguido. Bakanisaki ete basodá na Bayisraele, baoyo bazalaki mpenza na bibundeli malamu te, bakokaki kolonga te liboso na makálo na bango kati na etando na mabelé ya papalá. Nzokande bamiyebaki te ete bazalaki nde kobundisa monguna oyo afandi na likoló.—Basambisi 4:4-7, 12, 13.
Jéhovah apesaki etinda na Balaka ete akita longwa na ngomba Tabola, epai kuna bazalaki na kimya, mpe bakenda kati na esobe mpo na kopusa mampinga na Sisela ete babanda etumba. Ezali na ntango wana nde Jéhovah abundaki. Mpela na pwasa ekómisaki esika na etumba na pɔtɔpótɔ mingi, esilisaki nguya na mapinga na Sisela. Kati na mobulungano oyo molandaki, Bayisraele babukaki mpenza banguna na bango. “Basoda nyonso na Sisela bakweaki na mopɔtu na mopanga. Moto moko atikalaki te.” Mai matondaki na Kisoni mazindisaki makálo na bato na Kanana mpe mbala mosusu ememaki bibembe mosusu.—Basambisi 4:14-16; 5:20, 21.
Elonga epai na Gog mpe bibele na ye
Makambo wana na kala mazalaki komonisa elonga monene oyo Jéhovah akozwa yango mosika te. Tozali kotalela etumba oyo esengeli kosalema “na eleko na nsuka na mibu.” Engebene esakweli na Ezekiele, Gog, elembo na “mokonzi na mokili oyo,” Satan le Diable, akotombokisa mampinga ya mokili mobimba. Akotinda mampinga na ye ete babundisa “ngomba na Yisraele” ya elilingi, elingi koloba ezalela na elimo etombwani oyo “Yisraele na Nzambe” na boklisto efandi kati na yango.—Ezekiele 38:1-9; Yoane 12:31; Bagalatia 6:16.
Eloko nini ekomema Gog na kobimisa banguya na ye nyonso mpo na kobundisa libota na Nzambe? Esakweli emonisi ete basaleli na Nzambe bakozala na kimya mpe bakozala na bozwi mingi na elimo. Gog alobi ete: “‘Nakobuta na mokili na mboka oyo ezali na bitutu te; nakobimela baoyo bazali na kimya, baoyo bafandi na kobanga te, bango nyonso bafandi na bitutu te mpe na bikangelo te na bikuke mpe te.’ Ekozala mpo na kobɔtɔla mpe mpo na kopunza mingi . . . baoyo bazwi misolo mpe na biloko mingi.”—Ezekiele 38:10-12.
Na kotalela bango nyonso, basaleli na Nzambe bazali bazwi te kati na masuni. Kasi, na nzela na mosala ya kosakola oyo bazali kokokisa na mabelé mobimba, bazali mpenza na bozwi mingi kati na elimo. “Ebele monene . . . bauti na mabota nyonso” bazali koyanganisama, mpe basangani na yango bazali sikawa na motango ya bamilió minei. (Emoniseli 7:9, 10) Oyo nde bozwi ya solo! Satana angali na nkanda mingi na komona bozwi wana na elimo, mpe azali koluka koboma libota na Nzambe.
Kasi, wana akokɔta na mabelé na Yisraele ya elilingi, Gog akobundisa nde Jéhovah Nzambe ye moko. Nzambe akotya mobulungano kati na mampinga na Gog. “Mopanga na moto na moto mokobongwana epai na ndeko na ye.” Bongo Jéhovah akobimisa nguya na ye na koboma: “Likoló na ye, mpe likoló na bibele na ye, mpe likoló na mabota mingi mazali na ye elongo, nakonɔkisa mbula monene, mpe matandala minene mpe na mɔtɔ mpe na sufulu.” Lokola asalaki yango na ebale Motane, na Aï mpe na Kisoni, Jéhovah akobunda lisusu mpo na libota na ye mpe akosanzola nkombo na ye. “Boye nakomonisa lokumu na ngai mpe bosantu na ngai, mpe nakomiyebisa liboso na mabota mingi; mpe bakoyeba ete nazali Jéhovah.”—Ezekiele 38:18-23.
Masoló na bitumba na Jéhovah na ntango na kala mazali kopesa biso bantina malamu ya kolikya na elonga oyo ye akozwa na boumeli na “bolozi monene.” (Matai 24:21, 22) Lokola azali nkolo na makambo, akoki kobongola myango ya banguna na ye mpe kobimisa ezalela mosusu na makambo mpo na kobikisa libota na ye. Akomimonisa mpenza na motindo oyo Yisaya alobaki, ete: “Jéhovah ye moko akobima lokola elombé, lokola mobali na etumba akopelisa nkanda na ye; angangi, angulumi, amimonisi na nguya liboso na bayini na ye.” (Yisaya 42:13) Liboso na ba Témoins na ye, akozala ntango nyonso JÉHOVAH, “MOBALI NA ETUMBA”!—Exode 15:3.
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Nzela na kobima na ezipito
GOSHEN
Memphis
Rameses
Succoth
Migdol
Pihahiroth
Etham
[Bililingi na lokasa 26]
Awa, kati na etúka na Aï, Jéhovah apesaki elonga monene na Yosua mpe na libota na ye
Mai na molúká ya Kisoni matondaki nokinoki, likambo lisalaki ete banguna na Jéhovah balonga te