Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezekiele—II
TOZALI na Desɛmbɛ ya mobu 609 Liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Mokonzi ya Babilone abandi kozinga Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka. Liboso, nsango ya Ezekiele epai ya Bayuda oyo bazali na boombo na Babilone ezalaki kolobela kokwea mpe kobebisama ya Yelusaleme, engumba na bango oyo balingaka mingi. Kasi, na nsima nsango yango ebongwani. Akómi kosakola kobebisama ya bikólo ya bapakano oyo ekosepela ntango ekólo ya Nzambe ekobebisama. Sanza 18 na nsima, ntango Yelusaleme ekwei, nsango ya Ezekiele ebongwani lisusu. Akómi kosakola kozongisama ya losambo ya solo.
Ezekiele 25:1-48:35 esakoli bitumbu mpo na bikólo oyo ezali zingazinga na Yisalaele mpe kosikolama ya libota ya Nzambe.a Longola kaka Ezekiele 29:17-20, esakweli yango elobeli makambo nyonso na ndenge elandanaki, mpe motó ya likambo moko nsima ya mosusu. Kasi, bavɛrsɛ wana minei elobeli motó ya likambo moko nsima ya mosusu. Lokola Mokanda ya Ezekiele ezali na kati ya Mikanda oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, ezali na nsango oyo “ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—Baebele 4:12.
‘MABELÉ OYO EKOKÓMA LOKOLA ELANGA YA EDENE’
Lokola Yehova ayebi ete bikólo oyo: Amona, Moaba, Edome, Filistia, Tulo mpe Sidona ekosepela ntango Yelusaleme ekokwea, Yehova atindi Ezekiele asakola bitumbu oyo akopesa bikólo yango. Ezipito ekopunzama. Alobi ete “Falao mokonzi ya Ezipito mpe ebele ya bato na ye” bazali lokola nzete ya sɛdrɛ oyo ekokatama na “mopanga ya mokonzi ya Babele [to Babilone].”—Ezekiele 31:2, 3, 12; 32:11, 12.
Soki sanza motoba na nsima ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., moto moko oyo akimaki, amemelaki Ezekiele nsango ete: “Mboka ekangami.” Mosakoli ‘azali lisusu emimi te’ liboso ya Bayuda oyo bazali na boombo. (Ezekiele 33:21, 22) Asengeli kosakola ndenge bakozonga na mboka na bango. Yehova ‘akotya mobateli moko na likoló na bango, moombo na ye Davidi.’ (Ezekiele 34:23) Edome ekobebisama, kasi Yuda ekokóma kitoko koleka kutu ndenge Edome ezali; ekokóma “lokola elanga ya Edene.” (Ezekiele 36:35) Yehova alaki ete akobatela bato na ye oyo bakozonga na mboka na bango na mabɔkɔ ya “Gogo.”—Ezekiele 38:2, NW.
Biyano na mituna ya Biblia:
29:8-12—Ntango nini Ezipito etikalaki mpamba na boumeli ya mbula 40? Nsima ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., mwa ndambo ya Bayuda oyo batikalaki bakimaki na Ezipito atako mosakoli Yilimia apekisaki bango. (Yilimia 24:1, 8-10; 42:7-22) Ezipito ezalaki te esika malamu ya kokima, mpamba te Nebukadanesala ayaki kobundisa yango mpe alongaki yango. Ekoki kozala ete Ezipito etikalaki mpamba na boumeli ya mbula 40 oyo elandaki etumba wana. Atako bato ya mayele ya mokili bamonisi naino te ete Ezipito etikalaki mpamba tokoki mpenza kondima ete likambo yango esalemaki, mpo Yehova azali Mokokisi ya bisakweli.—Yisaya 55:11.
29:18—Ndenge nini “motó na motó [ebimaki libandi, NW] mpe lipeka na lipeka elongwaki loposo”? Kozingama ya engumba ya Tulo ezalaki mpenza mpasi. Yango wana mitó ya basoda ya Nebukadanesala ebimaki mabandi mpo na bikɔti oyo bazalaki kolata, mpe mapeka na bango elongwaki mposo mpo na kilo ya biloko ya kotonga bisika ya makasi oyo bazalaki komema.—Ezekiele 26:7-12.
Mateya mpo na biso:
29:19, 20. Lokola bato ya Tulo bakimaki na ebele ya bozwi na bango na engumba na bango oyo ezalaki na kati ya esanga, Mokonzi Nebukadanesala azwaki kaka mwa biloko moke na Tulo. Atako Mokonzi Nebukadanesala azalaki mopakano mpe moto ya lolendo, oyo azalaki koluka kaka matomba na ye moko, Yehova apesaki ye Ezipito lokola “libonza mpo na basoda na ye.” Na ndakisa ya Nzambe ya solo, biso mpe tosengeli kofutaka mpako epai ya bakonzi mpo na misala oyo bazali kosalela biso. Ata soki bakonzi bazali na etamboli mabe to bazali kosalela mbongo yango mabe ndenge nini, tosengeli te koboya kofuta mpako.—Baloma 13:4-7.
33:7-9. Mokɛngɛli ya mikolo na biso, elingi koloba baklisto bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé, elongo na baninga na bango, basengeli ata moke te kotika kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kokebisa bato na ntina na “bolɔzi moko monene” oyo ezali koya.—Matai 24:21.
33:10-20. Tokobika kaka soki totiki banzela ya mabe mpe totosi oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Kutu, nzela ya Yehova ezali “boyengebene.”
36:20, 21. Lokola bazalaki komitambwisa lisusu lokola “bato ya [Yehova]” te, Bayisalaele bafingisaki nkombo ya Nzambe epai ya bato ya bikólo mosusu. Tosengeli te kozala basaleli ya Yehova ya nkombo mpamba.
36:25, 37, 38, NW. Paladiso ya elimo oyo tozali na yango lelo oyo etondi na “etonga ya basantu.” Yango wana, tosengeli kosala makasi mpo na kobatela yango ezalaka ntango nyonso pɛto.
38:1-23. Tozali mpenza na esengo lokola toyebi ete Yehova akobikisa basaleli na ye ntango Gogo ya mokili ya Magogo akoya kobundisa bango! Gogo ezali nkombo oyo bapesaki Satana, “moyangeli ya mokili oyo,” banda babenganaki ye na likoló. Mokili ya Magogo ezali zingazinga na mabelé, epai Satana ná bademo na ye bazali.—Yoane 12:31; Emoniseli 12:7-12.
“TYÁ MOTEMA NA YANGO NYONSO EKOMONISA NGAI YO”
Tozali na mbula ya 14 nsima ya kokwea ya Yelusaleme. (Ezekiele 40:1) Bayisalaele batikali na mbula 56 ya boombo. (Yilimia 29:10) Ezekiele akómi na mbula pene na 50. Emonaneli moko ememi ye na mokili ya Yisalaele. Balobi na ye boye: “Mwana ya moto, talá na miso na yo, mpe yoká na matoi na yo, mpe tya motema na yango nyonso ekomonisa ngai yo.” (Ezekiele 40:2-4) Na ntembe te, Ezekiele azali na esengo monene ya komona emonaneli ya tempelo ya sika!
Tempelo kitoko oyo Ezekiele amoni ezali na bikɔtelo 6, bandako ya kolya 30, Esika Mosantu, Esika eleki Bosantu, etumbelo oyo esalemi na mabaya mpe etumbelo mpo na bambeka ya kotumba. ‘Mai ezali kobima’ na tempelo mpe ekómi ebale. (Ezekiele 47:1) Na emonaneli yango, Ezekiele amoni mpe bazali kokabolela bitúká ya Yisalaele mabelé, eteni mokomoko ezali kobanda na ɛsti tii na wɛsti, mpe mabelé ya mokonzi ezali na katikati ya mabelé ya Yuda ná oyo ya Benyamina. “Ndako mosantu ya Yehova” mpe “engumba” oyo ebengami Yehova shammah to “Yehova Ye moko azali Kuna” ezali na eteni yango.—Ezekiele 48:9, 10, 15, 35, NW.
Biyano na mituna ya Biblia:
40:3–47:12—Tempelo oyo Ezekiele amonaki ezalaki elilingi ya nini? Ebakata ya tempelo wana oyo Ezekiele amonaki etongamaki te. Yango ezalaki elilingi ya tempelo ya Nzambe ya elimo, elingi koloba ebongiseli na ye mpo na losambo ya pɛto na mikolo na biso. (Ezekiele 40:2; Mika 4:1; Baebele 8:2; 9:23, 24) Emonaneli yango ezali kokokisama na “mikolo ya nsuka,” ntango banganga-nzambe bapɛtolami. (2 Timote 3:1; Ezekiele 44:10-16; Malaki 3:1-3) Kasi, kokokisama na yango ya nsuka ekozala na Paladiso. Emonaneli ya tempelo yango epesaki Bayuda oyo bazalaki na boombo elikya ete losambo ya solo ekozongisama mpe ete libota mokomoko ya Bayuda ekozwa libula na mokili na bango.
40:3–43:17—Komeka bolai ya tempelo emonisaki nini? Komeka bolai ya tempelo ezalaki ndanga oyo Yehova apesaki ete mokano na ye mpo losambo ya solo ekozanga te kokokisama.
43:2-4, 7, 9—“Bibembe ya mikonzi na bango” oyo basengelaki kolongola na tempelo ezalaki nini? Bibembe yango ekoki kozala bikeko. Bakonzi ya Yelusaleme ná bato na bango bakómisaki tempelo ya Nzambe mbindo na bikeko, mpe bongo bikeko yango ekómaki bakonzi na bango.
43:13-20—Etumbelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ezalaki elilingi ya nini? Etumbelo yango ezali elilingi ya mokano ya Nzambe na ntina na mbeka ya lisiko oyo Yesu Klisto asengelaki kopesa. Mbeka yango epesi nzela ete bapakolami bábengama bayengebene, mpe “ebele ya bato” bákóma pɛto na miso ya Nzambe. (Emoniseli 7:9-14; Baloma 5:1, 2) Ekoki kozala ete yango nde ntina oyo ebakata ya “saani ya ebende” ya tempelo ya Salomo, oyo ezalaki na mai oyo banganga-nzambe bazalaki kosukola na yango mabɔkɔ, ezalaki te na tempelo oyo Ezekiele amonaki.—1 Mikonzi 7:23-26.
44:10-16—Banganga bazalaki komonisa banani? Banganga bazalaki komonisa baklisto bapakolami ya lelo oyo. Kopɛtolama na bango esalemaki na 1918, ntango Yehova afandaki na tempelo na ye “lokola mopɛtoli mpe monyangoli.” (Malaki 3:1-5) Baoyo bazalaki pɛto to babongolaki mitema babungisaki mikumba na bango te. Na nsima, basengelaki kosala makasi mpo na “komibatela kozanga litɔnɔ ya mokili,” mpe bongo kokóma bandakisa mpo na “ebele ya bato,” oyo bamonisamaki na mabota oyo bazalaki banganga te.—Yakobo 1:27; Emoniseli 7:9, 10.
45:1; 47:13–48:29—“Mokili” mpe kokabolama na yango ezalaki elilingi ya nini? Mokili ezalaki komonisa bibongiseli nyonso ya elimo ya basaleli ya Nzambe. Na esika nyonso oyo mosaleli ya Yehova azali, soki akangami kaka na losambo ya solo, azali na mokili oyo ezongisami. Kokabolama ya mokili yango ekokokisama na mobimba na yango na mokili ya sika, ntango moto nyonso ya sembo akozwa esika na ye.—Yisaya 65:17, 21.
45:7, 16—Ndambo ya mabelé oyo basengelaki kopesa banganga-nzambe mpe mokonzi emonisaki nini? Na tempelo ya elimo, yango ezali komonisa libosoliboso kopesa bapakolami mabɔkɔ mpe kondima litambwisi na bango.
47:1–5—Mai oyo Ezekiele amonaki ezalaki elilingi ya nini? Mai yango ezalaki elilingi ya bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kopesa biso bomoi. Na ndakisa, mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola biso mpe boyebi ya Nzambe oyo tozali kozwa na Biblia. (Yilimia 2:13; Yoane 4:7-26; Baefese 5:25-27) Mai yango ezali ntango nyonso kokóma mozindo mpo ekoka na bato ya sika oyo bazali kosopana na losambo ya solo. (Yisaya 60:22) Ebale yango ekotonda lisusu na mai ya bomoi na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Mai yango ezali mpe elilingi ya boyebi ya mozindo oyo tokozwa na “barulo” oyo ekofungwama na ntango wana.—Emoniseli 20:12; 22:1, 2.
47:12—Banzete oyo etondi na mbuma ezali elilingi ya nini? Banzete wana ezalaki elilingi ya bibongiseli ya elimo oyo Nzambe azwi mpo na kozongisa bato na bomoi ya kokoka.
48:15–19, 30–35—Engumba oyo Ezekiele amonaki ezali elilingi ya nini? Lokola “Yehova shammah” ezalaki na mokili “ya bulɛɛ te,” emonani ete yango ezalaki komonisa eloko moko oyo esengelaki kozala awa na mabelé. Ekoki kozala ete engumba yango ezali komonisa boyangeli ya mabelé oyo ekotambwisa bato oyo bakozala na ‘mabelé ya sika’ ya boyengebene. (2 Petelo 3:13) Lokola engumba yango ezali na bikɔteli na bipai nyonso, yango emonisi ete ezali polele mpo na moto nyonso. Bankulutu basengeli kozala te bato oyo bampate babangaka kopusana pene na bango.
Mateya mpo na biso:
40:14, 16, 22, 26. Mayemi ya nzete ya mbila oyo ezalaki na bikɔtelo ya tempelo ezalaki komonisa ete kaka bato oyo bazali na etamboli ya pɛto nde bakoki kokɔta. (Nzembo 92:12) Yango eteyi biso ete Yehova akoki kondima losambo na biso kaka soki tozali pɛto na miso na ye.
44:23. Tokoki mpenza kozala na botɔndi mpo na nyonso oyo banganga-nzambe ya ntango na biso bazali kosala! “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso bilei ya elimo na ntango na yango, oyo ezali kosalisa biso tóyeba kokesenisa oyo ezali mbindo mpe oyo ezali mbindo te na miso ya Yehova.—Matai 24:45.
47:9, 11, NW. Boyebi, eloko moko ya ntina na kati ya mai ya elilingi, ezali mpenza kobikisa bato na ntango na biso. Na mikili nyonso, bato oyo bazali komɛla yango bazali kozwa bomoi na ndenge ya elimo. (Yoane 17:3) Epai mosusu, baoyo bazali koboya komɛla mai ya bomoi “bakopesama na mungwa,” elingi koloba bakobebisama mpo na libela. Ezali mpenza na ntina ete ‘tósalaka nyonso oyo tokoki mpo na kosembola liloba ya solo malamumalamu’!—2 Timote 2:15.
“Nakosantisa nkombo na ngai monene”
Nsima ya kolongolama ya mokonzi ya nsuka ya libota ya Davidi, Nzambe ya solo atikaki ntango molai eleka liboso “ye oyo abongi na yango” aya. Kasi, Nzambe abosanaki kondimana oyo asalaki na Davidi te. (Ezekiele 21:27; 2 Samwele 7:11-16) Esakweli ya Ezekiele elobeli “moombo na ngai Davidi,” oyo asengelaki kokóma “mobateli” mpe “mokonzi.” (Ezekiele 34:23, 24; 37:22, 24, 25) Davidi yango ezali Yesu Klisto na Bokonzi na ye. (Emoniseli 11:15) Yehova ‘akosantisa nkombo na ye monene’ na nzela ya Bokonzi ya Masiya.—Ezekiele 36:23, NW.
Mosika te, bato oyo bazali kobebisa nkombo mosantu ya Nzambe bakobomama. Kasi, baoyo bazali kosantisa nkombo yango na bomoi na bango mpe bazali kosambela Yehova na ndenge oyo andimaka, bakozwa bomoi ya seko. Na yango, tiká tókoba komɛla mai ya bomoi oyo ezali se kotonda na mikolo na biso mpe kotya losambo ya solo na esika ya liboso na bomoi na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na lisolo oyo elobelaki Ezekiele 1:1-24:27, talá lisolo “Makanisi ya ntina na Mokanda ya Ezekiele—I,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2007.
[Elilingi na lokasa 9]
Tempelo kitoko oyo Ezekiele amonaki
[Elilingi na lokasa 10]
Ebale ya bomoi oyo Ezekiele amonaki ezalaki elilingi ya nini?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.