Mokapo ya zomi na mibale
Motindami ya nzambe alendisi danyele
1. Ndenge nini mosakoli Danyele apambolamaki lokola azalaki kosepela mingi na kokokisama ya mokano ya Yehova?
MOSAKOLI Danyele apambolamaki mpo ete azalaki kosepela mingi na kokokisama ya mokano ya Yehova. Azwaki esakweli na ntina na pɔsɔ 70 oyo etyamaki mpo na komonana ya Masiya. Mosakoli Danyele mpe apambolamaki na komona ete batikali basembwi kati na bato na ye bazongaki na mokili na bango. Yango esalemaki na mobu 537 L.T.B., pene na nsuka ya “mbula ya liboso ya Sirise mokonzi ya Perse.”—Ezela 1:1-4, NW.
2, 3. Mpo na nini mosakoli Danyele akokaki te kozonga na mokili ya Yuda elongo na Bayuda mosusu?
2 Mosakoli Danyele azalaki te elongo na bato oyo bazongaki na mokili ya Yuda. Kosala mobembo molai ndenge wana ekokaki kozala mpasi mpo na mobange lokola ye. Kasi Nzambe azalaki naino na mosala mosusu oyo alingaki kopesa ye na Babilone. Mbula mibale elekaki. Mpe lisolo ekobaki koloba ete: “Na mbula ya misato ya [Sirise, mokonzi ya Perse, NW], liloba ebimelaki Danyele, oyo atángamaki Beletesasala. Mpe liloba yango ezalaki solo mpe ezalaki na ntina na bolɔzi monene. Mpe ayokaki liloba mpe akanisaki emonaneli.”—Danyele 10:1.
3 “Mbula ya misato ya Sirise” ezalaki na mobu 536 to 535 L.T.B. Mbula koleka 80 elekaki banda mosakoli Danyele akendaki na boombo na Babilone elongo na bana ya libota ya mokonzi mpe bilenge mosusu ya mabota ya lokumu na Yuda. (Danyele 1:3) Soki, na ntango akómaki na Babilone, mosakoli Danyele azalaki naino elenge, alingaki bongo kokokisa mbula 100 ntango azwaki emonaneli oyo. Oyo nde mosala kitoko mosakoli Danyele asalaki na bosembo nyonso!
4. Atako akómaki mobange, mokumba nini ya ntina mosakoli Danyele alandaki kosala na mosala ya Yehova?
4 Nzokande, atako akómaki mobange, mosakoli Danyele azalaki naino na mokumba na mosala ya Yehova. Nzambe aponaki ye mpo ayebisa esakweli oyo ntina na yango esengelaki koyebana na mikolo mizalaki koya. Ezalaki esakweli oyo esengelaki kokokisama kino ntango na biso mpe koleka. Mpo na kobongisa mosakoli Danyele na mokumba yango, Yehova amonaki malamu kolendisa ye mpo na mosala oyo ezalaki liboso na ye.
NTINA YA MITUNGISI
5. Bansango nini etungisaki mosakoli Danyele?
5 Atako mosakoli Danyele azongaki te na mokili ya Yuda elongo na Bayuda batikali, azalaki kolanda na likebi mpenza makambo oyo mazalaki kosalema na mboka na ye. Na bansango oyo ezalaki kokómela ye, mosakoli Danyele ayokaki ete makambo nyonso mazalaki kotambola malamu te na Yelusaleme. Etumbelo ya mbeka ezongisamaki na esika na yango mpe moboko ya tempelo ya Yelusaleme etyamaki. (Ezela, mokapo 3) Kasi mabota ya zingazinga batɛmɛlaki mosala ya botongi, mpe bazalaki kokanela Bayuda oyo bazongaki na mboka mpo na kolɛmbisa bango na mosala yango. (Ezela 4:1-5) Ya solo, mosakoli Danyele asengelaki mpenza komitungisa na ntina na makambo mingi ya ndenge wana.
6. Mpo na nini mosakoli Danyele amitungisaki na makambo oyo mazalaki koleka na Yelusaleme?
6 Mosakoli Danyele ayebaki malamumalamu esakweli ya Yilimia. (Danyele 9:2) Ayebaki ete Yelusaleme na tempelo na yango ekotongama lisusu mpe losambo ya solo ekosalema lisusu kuna. Mpamba te yango ezalaki mokano ya Yehova na ntina na libota na Ye mpe makambo nyonso oyo masengelaki kosalema liboso ya komonana ya Masiya oyo alakamaki. Ɛɛ, Yehova atombolaki lokumu ya mosakoli Danyele na kopesáká ye esakweli ya “pɔsɔ ntuku nsambo.” Na lisalisi ya esakweli yango, mosakoli Danyele asosolaki ete Masiya akoya “pɔsɔ” 69 nsima ya kobima ya liloba ya kozongisa Yelusaleme ndenge ezalaki liboso mpe kotonga yango lisusu. (Danyele 9:24-27) Nzokande, na kotalela ndenge Yelusaleme ebebaki mpe ntango oyo esengelaki mpo na kotonga lisusu tempelo, ezali mpasi te mpo na kokanga ntina oyo mosakoli Danyele alɛmbaki nzoto, akómaki mawamawa mpe amitungisaki mpenza.
7. Mosakoli Danyele asalaki nini na boumeli ya pɔsɔ misato?
7 Lisolo elobi ete: “Na ntango yango ngai, Danyele, nazalaki na mawa pɔsɔ misato. Nalyaki bilɔkɔ kitoko te, mpe mosuni to vinyo ekɔtaki [na] monɔkɔ na ngai te, mpe namipakolaki [mafuta] soko moke te mpo na pɔsɔ misato mobimba.” (Danyele 10:2, 3) “Pɔsɔ misato mobimba” to mikolo 21 ya kolela mpe kokila bilei ezalaki ntango molai mpenza. Emonani ete eleko yango esukaki na “mokolo ya ntuku mibale na minei ya sanza ya liboso.” (Danyele 10:4) Na bongo, eleko yango oyo mosakoli Danyele akilaki bilei esangisaki elambo ya Elekeli oyo ezalaki kosalema na mokolo ya 14 ya sanza ya liboso to Nisana mpe eleko oyo elandaki ya mikolo nsambo ya elambo ya mampa ezangi mfulu.
8. Wapi libaku ya liboso mpenza oyo mosakoli Danyele alukaki litambwisi ya Yehova, mpe litomba nini azwaki?
8 Mosakoli Danyele akutanaki na likambo motindo yango liboso. Na ntango wana, amitungisaki mpo na kokokisama ya esakweli ya Yehova oyo elobelaki kobebisama ya Yelusaleme na boumeli ya mbula 70. Mosakoli Danyele asalaki nini na nsima? Alobaki ete: “Nabongolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe, mpo na koluka ye na kobondela mpe kolɔmba mpe na kokila bilɔkɔ mpe na ngɔtɔ na mputulu na mɔ́tɔ.” Yehova ayanolaki na libondeli ya mosakoli Danyele na kotindeláká ye anzelu Gabaliele oyo amemelaki ye nsango mpo na kolendisa ye. (Danyele 9:3, 21, 22) Sikoyo,Yehova akosala mpe ndenge moko mpo na mosakoli Danyele?
EMONANELI MOKO YA NSƆMƆ
9, 10. (a) Mosakoli Danyele azalaki wapi ntango azwaki emonaneli? (b) Lobelá makambo oyo mosakoli Danyele amonaki na emonaneli.
9 Mosakoli Danyele alɛmbaki nzoto te. Alandi koyebisa biso makambo oyo masalemaki na nsima, ye ete: “Ezalaki ngai kotɛlɛma na libongo ya ebale monene, yango Hidekele, natombolaki miso na ngai, mpe natalaki moto alati molikani, mpe loketo na ye ekangami na wolo ya Ufaza.” (Danyele 10:4, 5) Hidekele ezali moko na bibale minei oyo liziba na yango ezalaki na elanga ya Edene. (Genese 2:10-14) Na lokota ya kala ya Perse, Hidekele ezalaki kobéngama Tigra oyo nkombo ya Greke Tigris euti na yango. Etúká oyo ezali na kati ya ebale yango na Ebale Pelata ebéngamaki Mesopotamia, elingi koloba, “Mokili oyo ezwami kati na bibale.” Yango emonisi ete ntango mosakoli Danyele azwaki emonaneli oyo, azalaki naino na mokili ya Babilone, kasi ntango mosusu na kati ya engumba mpenza ya Babilone te.
10 Oyo nde emonaneli nsɔmɔ mosakoli Danyele amonaki! Ntango atombolaki miso, amonaki moto moko oyo akesanaki mpenza na bato nyonso. Ayebisaki ndenge moto yango azalaki: “Nzoto na ye ezalaki lokola [krizolite, NW], mpe elongi na ye emonanaki lokola mokalikali, mpe miso na ye lokola bisungi na mɔ́tɔ, mpe mabɔkɔ na ye mpe makolo na ye lokola kongɛnga na motako, mpe lokito ya maloba na ye lokola mongongo na ebele.”—Danyele 10:6.
11. Emonaneli yango esalaki nini likoló na mosakoli Danyele mpe bato oyo bazalaki elongo na ye?
11 Atako emonaneli yango ebimisaki kongɛnga makasi, mosakoli Danyele alobi ete, ‘bato oyo bazalaki na ye esika moko bamonaki kongɛnga yango te.’ Mpo na ntina oyo eyebani te, “kolɛnga monene ekwelaki bango mpe bakimaki komibomba.” Na bongo, mosakoli Danyele atikalaki ye moko na bokula ya ebale. “Emonaneli monene” oyo mosakoli Danyele amonaki ebulunganisaki ye mpenza kino andimaki ete: “Nguya etikalaki na ngai te; bonzenga na ngai ebebisamaki, mpe nazalaki na nguya lisusu te.”—Danyele 10:7, 8.
12, 13. (a) Bilamba oyo motindami alataki emonisaki nini? (b) Ndenge nzoto na ye ezalaki emonisaki nini?
12 Tiká tótalela malamumalamu motindami oyo ya nsɔmɔ, oyo abangisaki mosakoli Danyele. ‘Alataki molikani, mpe akangaki loketo na ye na wolo ya Ufaza.’ Na Yisalaele ya kala, mokaba, efode, mpe libenga ya nganga-monene mpe minkoto ya banganga mosusu esalemaki na molikani kitoko ya nsinga ya mike mpe ekembisamaki na wolo. (Exode 28:4-8; 39:27-29) Elateli ya motindami emonisaki bongo bosantu na lokumu ya mosala na ye.
13 Mosakoli Danyele mpe akamwaki mingi na lolenge motindami yango amimonisaki—nzoto na ye ezalaki kongɛnga lokola mabanga ya ntalo, elongi na ye ezalaki kongɛnga makasi na boye ete okoki kotala yango te, miso na ye ezalaki motane ngwaa lokola mɔ́tɔ mpe mabɔkɔ na makolo na ye ezalaki kongɛnga makasi. Mongongo na ye ya makasi ezalaki kobangisa. Makambo oyo nyonso emonisaki ete azalaki moto lokola bato nyonso te. ‘Moto oyo alataki molikani’ azalaki bobele anzelu moko ya lokumu koleka, oyo azalaki kosala na esika ya bulɛɛ liboso na Yehova, epai azwaki nsango yango.a
‘MOTO OYO ALINGAMI MINGI’ ALENDISAMI
14. Lisungi nini mosakoli Danyele asengelaki na yango mpo na kozwa nsango ya anzelu motindami?
14 Nsango oyo anzelu ya Yehova amemelaki mosakoli Danyele ezalaki nsango ya nsɔmɔ mpe ya mpasi. Liboso ya kozwa yango, mosakoli Danyele asengelaki naino kozala nzoto kolɔngɔnu mpe na makanisi mabongi. Lokola ayebaki yango, anzelu asungaki ye mpe alendisaki ye na bolingo mpenza. Tiká ete tólanda ndenge mosakoli Danyele azali koyebisa lisolo yango ye moko.
15. Anzelu asalaki nini mpo na kosunga mosakoli Danyele?
15 “Bongo nayokaki lokito ya maloba na ye, mpe wana eyokaki ngai lokito ya maloba na ye, nakweyaki na elongi na ngai na mpɔngi makasi, na elongi na ngai na mabelé.” Ntango mosusu, mosakoli Danyele abangaki mingi mpe amitungisaki koleka mpe yango esalaki ye nsɔmɔ mpenza. Anzelu asalaki nini mpo na kosalisa ye? Mosakoli Danyele alobi ete: “Talá, lobɔkɔ [esimbaki] ngai mpe etyaki ngai na kolɛnga na matandu mpe mabɔlɔngɔ na ngai.” Na nsima, anzelu alendisaki mosakoli na maloba oyo: ‘Ɛ Danyele, yo moto olingami mingi, yoká maloba makolobela ngai yo, mpe tɛlɛmá na likoló, mpo ete [sikoyo] natindami [epai] na yo.’ Lokola anzelu asimbaki ye na lobɔkɔ mpe abɔndisaki ye na maloba, mosakoli Danyele azwaki makasi. Atako azalaki “kolɛnga,” ‘atɛlɛmaki.’—Danyele 10:9-11.
16. (a) Ndenge nini emonani ete Yehova ayanolaka mabondeli ya basaleli na ye na lombangu? (b) Mpo na nini anzelu aumelaki mpo na koya kosunga mosakoli Danyele? (Talá etanda.) (c) Nsango nini anzelu amemelaki mosakoli Danyele?
16 Anzelu alobaki polele ete ayaki mpenza mpo na kolendisa mosakoli Danyele. Alobaki ete: ‘Bangá te, Danyele, mpo ete longwa na mokolo na liboso, wana etyaki yo motema na bososoli mpe emikitisaki yo liboso na Nzambe na yo, maloba na yo mayokamaki; mpe ngai nasili koya mpo na maloba na yo.’ Na nsima, anzelu ayebisaki mpo na nini aumelaki. Alobaki ete: “Mokonzi na bokonzi ya [Perse, NW] atɛmɛlaki ngai mikolo ntuku mibale na moko; nde Mikaele, moko na mikonzi oyo aleki na lokumu, akómaki kosunga ngai, bongo natikaki ye wana esika moko na mokonzi na bokonzi ya [Perse, NW].” Na lisalisi ya Mikaele, anzelu akokisaki mokumba na ye, ayaki epai na mosakoli Danyele na nsango oyo ya ntina mpenza: “[Nayei, NW] mpo na koyebisa yo yango ekokwela bato na yo na mikolo ya nsuka. Mpo ete emonaneli yango ezali mpo na mikolo mikoya naino.”—Danyele 10:12-14.
17, 18. Ndenge nini mosakoli Danyele azwaki lisalisi mpo na mbala ya mibale, mpe yango epesaki ye likoki ya kosala nini?
17 Na esika ete asepela na nsango yango, oyo na ntembe te ezalaki nsango malamu, mosakoli Danyele asepelaki te na makambo oyo ye ayokaki. Lisolo elobi ete: “Esilaki ye kolobela ngai maloba boye, nabongolaki elongi na ngai epai na mabelé mpe nakokaki koloba te.” Kasi, na bolingo mpenza, anzelu motindami ayaki noki kosunga ye—mpo na mbala ya mibale. Mosakoli Danyele alobaki ete: “Talá, oyo amonanaki lokola mwana na moto [asimbaki] bibebu na ngai; bongo nafungolaki monɔkɔ na ngai mpe nalobaki.”b—Danyele 10:15, 16a.
18 Mosakoli Danyele azwaki makasi ntango anzelu asimbaki bibebu na ye. (Kokanisá na Yisaya 6:7.) Lokola akómaki koloba lisusu, mosakoli Danyele ayebisaki anzelu motindami bampasi oyo ye azalaki komona. Alobaki ete: “Nkolo na ngai, mpo na emonaneli oyo mpasi ekweli ngai, mpe nazali na nguya te. Moombo oyo na nkolo na ngai akolobela nkolo na ngai oyo boni? Mpo ete [sikoyo] nguya etikali na ngai te mpe mpema etikali na ngai te.”—Danyele 10:16b, 17.
19. Ndenge nini mosakoli Danyele azwaki lisalisi mpo na mbala ya misato, mpe litomba nini azwaki?
19 Mosakoli Danyele azalaki komilelalela te to komilongisa te. Azalaki bobele koyebisa mpasi na ye, mpe anzelu andimaki maloba na ye. Yango wana, anzelu motindami asalisaki ye mpo na mbala ya misato. Mosakoli alobaki ete: “Oyo amonanaki lokola moto [asimbaki] ngai lisusu mpe akembisaki ngai.” Anzelu motindami yango akobaki kosimba mosakoli Danyele mpo na kolendisa ye na maloba oyo ya kobɔndisa ete: “Ɛ moto molingami mingi, bangá te, kimya ezala na yo; zalá makasi mpe na nguya.” Emonani ete mosakoli Danyele asengelaki mpenza na maloba wana ya kolendisa, ya kosimba motema, oyo anzelu ayebisaki ye na bolingo mpenza. Nini esalemaki na nsima? Mosakoli Danyele alandi koloba ete: “Esilaki ye kolobela ngai nakembaki, mpe nalobaki ete, Tiká nkolo na ngai aloba mpo ete okembisi ngai.” Mosakoli Danyele azalaki sikoyo kozela mokumba mosusu ya mpasi.—Danyele 10:18, 19.
20. Mpo na nini anzelu motindami asengelaki kosala molende mpo na kokokisa mokumba na ye?
20 Nsima ya kolendisa mosakoli Danyele, kopesa ye nzoto makasi mpe makanisi mabongi, anzelu alobelaki lisusu ntina ya mobembo na ye. Alobaki ete: ‘Oyebi mpo [na nini ngai nayei, NW] epai na yo? Nde sikoyo nakozonga mpo na kobunda na mokonzi ya [Perse, NW]; mpe wana ekobima ngai, talá, mokonzi ya [Grèce, NW] akoya. Nde nakolobela yo yango ekomami na mokanda na solo. Moto moko te azali kosunga ngai na kobunda na bango, bobele Mikaele, mokonzi na bino.’—Danyele 10:20, 21.
21, 22. (a) Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo mosakoli Danyele akutanaki na yango, soki totaleli boyokani ya Yehova na basaleli na ye? (b) Mokumba nini mosusu mosakoli Danyele alendisamaki mpo na kokokisa yango?
21 Oyo nde bolingo mpe komibanzabanza Yehova azali na yango! Ntango nyonso azali kosalela basaleli na ye makambo na kotaleláká makoki ya moko na moko. Na epai moko, azali kopesa bango mikumba na koyebáká makoki na bango mpo na kokokisa yango, atako bakoki komiyoka ntango mosusu lokola ete bakokoka te. Na epai mosusu, azali na bolingi ya koyoka bango mpe kopesa bango oyo basengeli na yango mpo na kokokisa mikumba na bango. Tiká ete tómekola ntango nyonso Yehova, Tata na biso oyo azali na likoló, na kolendisáká na bolingo nyonso baninga na biso basaleli na ye.—Baebele 10:24.
22 Nsango ya kobɔndisa ya anzelu elendisaki mpenza mosakoli Danyele. Atako akómaki mobange, alendisamaki mpe abongisamaki mpo na komona mpe kokoma bisakweli mosusu ya ntina mpo na bolamu na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako babéngi anzelu yango na nkombo na ye te, emonani ete ezali bobele anzelu oyo asɛngaki na anzelu Gabaliele ete asunga mosakoli Danyele mpo na emonaneli oyo ye autaki komona. (Kokanisá na Danyele 8:2, 15, 16 na Danyele 12:7, 8.) Lisusu, Danyele 10:13 emonisi ete Mikaele, “moko na mikonzi oyo aleki na lokumu,” ayaki kosunga anzelu yango. Boye, anzelu yango, oyo nkombo na ye etángami te, azali na libaku malamu ya kosala elongo na anzelu Gabaliele mpe Mikaele.
b Atako ekokaki kozala ete bobele anzelu yango moko oyo azalaki koloba na mosakoli Danyele nde asimbaki bibebu na ye mpe apesaki ye makasi, mokapo oyo emonisi ete anzelu mosusu, ntango mosusu anzelu Gabaliele, nde akokaki kosala yango. Ezala na lolenge nini, mosakoli Danyele alendisamaki na anzelu moko motindami.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Mpo na nini anzelu ya Yehova aumelaki mpo na koya kosunga mosakoli Danyele na mobu 536 to 535 L.T.B.?
• Bilamba oyo anzelu motindami alataki mpe nzoto na ye emonisaki nini na ntina na bomoto na ye?
• Lisungi nini mosakoli Danyele asengelaki na yango, mpe ndenge nini anzelu apesaki ye yango mbala misato?
• Nsango nini anzelu amemelaki mosakoli Danyele?
[Etanda na nkasa 204, 205]
Bakonzi: Batambwisami na baanzelu babateli to na bilimu mabe?
MOKANDA ya Danyele ekoki koteya biso makambo mingi na ntina na baanzelu. Ezali koyebisa biso mokumba na bango mpo na kokokisa liloba ya Yehova mpe milende oyo basalaka mpo na kokokisa mikumba na bango.
Anzelu ya Nzambe alobaki ete ntango azalaki kokenda mpo na kosolola na mosakoli Danyele, “mokonzi na bokonzi ya [Perse, NW]” atɛmɛlaki ye. Nsima ya kobunda na ye mikolo 21, anzelu yango motindami alongaki bobele na lisungi ya “Mikaele, moko na mikonzi oyo aleki na lokumu.” Anzelu alobaki lisusu ete asengelaki kobunda lisusu na monguna yango mpe ntango mosusu na “mokonzi ya [Grèce, NW].” (Danyele 10:13, 20) Ezalaki mpenza likambo monene, ata mpo na anzelu! Bongo, bakonzi yango ya Perse mpe ya Grèce ezalaki banani?
Ya liboso, tomoni ete Mikaele abéngami “moko na mikonzi oyo aleki na lokumu” mpe “mokonzi na bino.” Ya mibale, Mikaele abéngami “mokonzi monene oyo [azali] mobateli na bato na yo [Danyele].” (Danyele 10:21; 12:1) Na bongo, Mikaele azali anzelu oyo Yehova apesaki mokumba ya kotambwisa Bayisalaele na mokili mokauki.—Exode 23:20-23; 32:34; 33:2.
Moyekoli Yuda andimi yango ntango alobi ete ‘Mikaele, ye mokóló na baanzelu, awelanaki na Satana, kotyana ntembe na ye mpo na nzoto na Mose.’ (Yuda 9) Esika oyo Mikaele atyami, nguya na ye mpe bokonzi na ye ekómisi ye mpenza ‘mokóló na baanzelu,’ elingi koloba ‘anzelu mokonzi’ to ‘anzelu oyo aleki baanzelu nyonso.’ Ebongi mpenza ete etɛlɛmɛlo yango ya lokumu mingi epesama epai na anzelu mosusu te, bobele na Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, liboso ete aya na mokili mpe nsima ya liwa na ye awa na mabelé.—1 Batesaloniki 4:16; Emoniseli 12:7-9.
Yango elingi koloba ete Yehova atyaki baanzelu na ekólo Perse mpe Grèce mpo na kotambwisa yango na makambo na yango? Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, alobaki polele ete: “Mokóló ya mokili . . . [akoki kosala ngai eloko te, NW].” Yesu alobaki lisusu ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te . . . bokonzi na ngai euti na awa te.” (Yoane 14:30; 18:36) Ntoma Yoane alobaki ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Eyebani ete mabota ya mokili elingaka kotambwisama na Nzambe to na Klisto te, mpe ata na moi ya lelo, bakondima yango te. Atako Yehova azali kopesa nzela ete “bakonzi bazali liboso” bázala mpe bákoba koyangela bato awa na mabelé, azali kotyela bango baanzelu babateli te. (Baloma 13:1-7, NW) ‘Mokonzi’ to ‘moyangeli’ nyonso oyo azali koyangela akoki kotyama na esika yango bobele na “mokóló ya mokili,” Satana Zabolo. Na ntembe te, bazali bayangeli oyo batyami na bademo kasi na baanzelu babateli te. Na bongo, ‘baoyo bazali kotambwisa’ bayangeli oyo bazali liboso na biso ezali bilimu mabe. Yango wana, matata oyo mabimaka kati na bikólo eutaka bobele na bato bango na bango te.
[Elilingi na lokasa mobimba 199]
[Elilingi na lokasa mobimba 207]