Mokapo ya minei
Ekeko moko ya monene etɛlɛmisami mpe ekweisami
1. Mpo na nini tosengeli kotalela likambo moko oyo esalemaki mbula zomi nsima wana Mokonzi Nebukadanesala amemaki Danyele mpe bato mosusu na boombo?
MBULA zomi esilaki koleka banda Mokonzi Nebukadanesala amemaki Danyele mpe “bato ya lokumu na mokili” ya Yuda na boombo na Babilone. (2 Mikonzi 24:15, NW) Elenge Danyele azalaki kosala epai na mokonzi mpe talá, likambo moko oyo etyaki bomoi na ye na likama ebimaki. Mpo na nini tosengeli komitungisa mpo na likambo yango? Mpamba te lolenge Yehova Nzambe asukisaki yango ebikisaki Danyele na baninga na ye. Lolenge Nzambe akɔtelaki likambo yango emonisaki mpe ndenge esakweli ya Biblia eyebisaki kolandana ya mikili ya nguya mpo na koyangela mokili mobimba banda ntango wana kino ntango na biso.
MOKONZI MOKO AKUTANI NA MOKAKATANO MONENE
2. Ntango nini Nebukadanesala alɔtaki ndɔtɔ na ye ya liboso oyo ezalaki esakweli?
2 Mosakoli Danyele akomaki: “Na mbula ya mibale ya bokonzi ya Nebukadanesala, Nebukadanesala alɔtaki ndɔtɔ, mpe motema na ye ezalaki likoló, mpe mpɔngi elongwaki na ye.” (Danyele 2:1) Moto oyo alɔtaki ndɔtɔ ezalaki Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone. Ezalaki na 607 L.T.B., ntango Yehova Nzambe apesaki ye nzela mpo na kobebisa Yelusaleme mpe tempelo na yango, nde Nebukadanesala akómaki mpenza koyangela mokili mobimba. Na mbula ya mibale ya bokonzi ya Nebukadanesala (606 to 605 L.T.B.), Nzambe alɔtisaki ye ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ.
3. Banani bakokaki te kolimbola ndɔtɔ ya Nebukadanesala, mpe ekateli nini mokonzi azwaki?
3 Ndɔtɔ yango ebangisaki ye mingi na boye ete akokaki lisusu kolala mpɔngi te. Lokola moto nyonso, alingaki mpenza koyeba ndimbola ya ndɔtɔ yango. Kasi mokonzi oyo ya nguya abosanaki ndɔtɔ yango! Bongo, apesaki mobeko na banganga-nkisi ya Babilone, na banganga-na-soloka, bato-na-zonga mpe asɛngaki na bango ete báyebisa ye ndɔtɔ yango mpe bálimbola yango. Kasi likambo yango elekaki mayele na bango. Lokola bakokaki te, Nebukadanesala asilikaki mpe apesaki etinda ete ‘bato nyonso ya mayele ya Babilone bábomama.’ Ntango ayokaki etinda yango, mosakoli Danyele akendaki kokutana na moto oyo mokonzi atyaki mpo na koboma bato ya mayele. Mpo na nini? Mpo ete Danyele mpe baninga na ye Baebele misato—Hanania, Misaele, mpe Azalia—batángamaki na molɔngɔ ya bato ya mayele ya Babilone.—Danyele 2:2-14.
DANYELE ABIKISI BATO
4. (a) Ndenge nini Danyele ayebaki ndɔtɔ ya Nebukadanesala mpe ndimbola na yango? (b) Danyele alobaki nini mpo na kopesa Yehova Nzambe matɔndi?
4 Ntango ayebaki ntina oyo Nebukadanesala abimisaki mobeko makasi ndenge wana, “Danyele aingelaki mpe abondelaki mokonzi ete apesa ye elaka, ete akoka kolimbola ntina mpo na mokonzi.” Mpe mokonzi andimaki. Danyele azongaki na ndako na ye, mpe ye na baninga na ye Baebele misato babondelaki ‘Nzambe na likoló mpo ayokela bango mawa mpe ayebisa bango ndɔtɔ yango.’ Bobele na butu yango, Yehova amonisaki Danyele ndɔtɔ yango na emonaneli mpe ayebisaki ye ndimbola na yango. Danyele atɔndaki Nzambe na maloba oyo: “Nkombo ya Nzambe esanzolama lobiko na lobiko; mpo ete mayele mpe nguya izali na ye. Ye [akobongolaka, NW] ntango mpe sanza; ye akolongolaka mikonzi mpe [akotyaka, NW] mikonzi; ye akopesaka mayele na bato ya mayele mpe boyebi na bango basosoli; ye amonisi makambo na bozindo mpe makambo mabombami; ye ayebi yango ezali kati na molili, mpe pole efandi esika moko na ye.” Danyele akumisaki Yehova mpo na mayele oyo apesaki ye.—Danyele 2:15-23.
5. (a) Ntango akómaki epai na mokonzi, ndenge nini Danyele akumisaki Yehova? (b) Ndimbola ya ndɔtɔ oyo Danyele apesaki ezali na ntina mpo na biso lelo oyo?
5 Na mokolo oyo elandaki, Danyele akendaki epai ya Alioka, kapita ya bakɛngɛli ya mokonzi, ye nde moto mokonzi atyaki mpo na koboma bato ya mayele ya Babilone. Ntango Danyele ayebisaki ye ete akoki kolimbola ndɔtɔ yango, Alioka amemaki ye noki epai na mokonzi. Mpo amipesa lokumu te, Danyele alobaki na Nebukadanesala ete: “Nzambe azali na lola, oyo akomonisaka makambo mabombami mpe ye ayebisi mokonzi Nebukadanesala makambo makobima na mikolo ya nsuka.” Danyele amonisaki bobele elilingi ya makambo makosalema na bokonzi ya Babilone te kasi mpe oyo makosalema na mokili banda ntango wana kino ntango na biso mpe koleka.—Danyele 2:24-30.
DANYELE AYEBISI MOKONZI NDƆTƆ
6, 7. Ndɔtɔ nini Danyele ayebisaki mokonzi?
6 Nebukadanesala atyaki matoi mpenza mpo na kolanda Danyele ntango azalaki koyebisa ye ndɔtɔ yango. Alobaki ete: “Ɛ mokonzi, omonaki mpe talá, [ekeko, NW] monene. [Ekeko, NW] yango ezalaki monene mpe engɛngaki mingi; mpe etɛlɛmaki liboso na yo; mpe komonana na yango ezalaki mpo na nsɔmɔ. Motó na [ekeko, NW] oyo ezalaki na wolo kitoko, mpe ntolo mpe mabɔkɔ na yango ezalaki na palata, mpe libumu mpe bibɛlɔ na yango ezalaki na motako, makolo na yango mazalaki na ebende mpe makaka na yango mazalaki na ndambo ebende mpe ndambo mabelé. Ezalaki yo kotala, libanga litimolami na mabɔkɔ te, etutaki [ekeko, NW] na makaka, oyo na ebende mpe na mabelé, mpe ebukaki yango na biteni. Bongo ebende mpe mabelé mpe motako mpe palata mpe wolo ebukanaki nyonso esika moko na biteni, mpe ikómaki lokola mputulu na bitutelo na ntango na moi makasi, mpe mopɛpɛ emɛmaki yango, boye ata ndambo moke na yango ezwamaki te. Kasi libanga litutaki [ekeko, NW] ekómaki [ngomba, NW] monene, mpe etondisaki mokili mobimba.”—Danyele 2:31-35.
7 Oyo nde esengo Nebukadanesala azalaki na yango ntango Danyele azalaki koyebisa ye ndɔtɔ yango! Kasi keba! Bato ya mayele ya Babilone balingaki kobikisama bobele soki Danyele akokaki mpe kolimbola ndɔtɔ yango. Danyele alobaki na nkombo na ye mpe ya baninga na ye Baebele misato ete: “Oyo ezalaki [ndɔtɔ]; mpe tokolimbola ntina na yango liboso na mokonzi.”—Danyele 2:36.
BOKONZI OYO EKESENEKI NA BIKONZI MOSUSU
8. (a) Na ndimbola oyo Danyele apesaki, motó ya wolo ezalaki elilingi ya nani to ya nini? (b) Ntango nini motó ya wolo emonanaki?
8 “Ɛ mokonzi, yo mokonzi na mikonzi, oyo Nzambe na lola asili kopesa bokonzi mpe nguya mpe makasi mpe nkembo; bipai nyonso kuna efandi bana na bato na banyama na mokili mpe ndɛkɛ na likoló, apesi bango na lobɔkɔ na yo mpe azalisi yo nkolo na bango nyonso. Yo ozali motó na wolo.” (Danyele 2:37, 38) Maloba yango makokisamaki epai na Nebukadanesala nsima wana Yehova apesaki ye nzela abebisa Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Esalemaki mpenza bongo mpo ete bakonzi oyo bazalaki koyangela na Yelusaleme bautaki na libota ya Davidi, mokonzi oyo Nzambe apakolaki na elimo. Yelusaleme ezalaki mboka-mokonzi ya bokonzi ya Yuda, elakiseli ya bokonzi ya Nzambe awa na mabelé. Kobebisama ya engumba yango na mobu 607 L.T.B. esukisaki bokonzi ya Nzambe awa na mabelé. (1 Ntango 29:23; 2 Ntango 36:17-21) Sikoyo, mikili oyo elekaki nguya na mokili mobimba, oyo emonisamaki na biteni ya ebende ya ekeko yango, ekokaki koyangela mokili na bonsomi nyonso kozanga kobanga ete bokonzi ya Nzambe etyela yango nkaka. Nebukadanesala azalaki motó ya wolo. Na ntango ya kala, wolo ezalaki na motuya koleka mabanga nyonso ya ntalo. Yango wana, Nebukadanesala azwaki lokumu koleka mpo ete akweisaki bokonzi ya Yuda na kobebisáká engumba ya Yelusaleme.—Talá etanda oyo elobi ete “Mokonzi oyo atongaki bokonzi na ye na bitumba,” na lokasa 63.
9. Motó ya wolo emonisaki nini?
9 Nebukadanesala ayangelaki na boumeli ya mbula 43. Bakonzi nyonso oyo bayangelaki Babilone bazalaki bakitani na ye. Kati na bakonzi yango, tokoki kotánga Nabonide, oyo abalaki mwana na ye mpe Ewili-maladuku, mwana ya mobali ya liboso ya Nabonide. Libota yango eumelaki na bokonzi mbula 43 nsima ya Nebukadanesala, kino liwa ya Beletesasala, mwana ya Nabonide, na mobu 539 L.T.B. (2 Mikonzi 25:27; Danyele 5:30) Bongo, motó ya wolo ya ekeko yango ezalaki bobele elilingi ya Nebukadanesala te kasi ya bakonzi nyonso oyo bayangelaki Babilone, oyo bazalaki bakitani na ye.
10. (a) Ndenge nini ndɔtɔ ya Nebukadanesala emonisaki ete boyangeli ya Babilone na mokili mobimba ekoumela te? (b) Mosakoli Yisaya alobaki nini na ntina na moto oyo akolonga Babilone? (c) Na lolenge nini bokonzi ya Babilone elekaki bokonzi ya Bamede na Baperse?
10 Danyele alobaki na Nebukadanesala ete: “Na nsima na yo bokonzi mosusu ekobima kokokana na lokumu na yo te.” (Danyele 2:39) Ntolo mpe makolo ya palata ya ekeko yango ezalaki elilingi ya bokonzi oyo ekokitana bokonzi ya Nebukadanesala. Mbula 200 liboso, mosakoli Yisaya ayebisaki koya ya bokonzi yango; ayebisaki kutu nkombo ya moto oyo akozala mokonzi: ezalaki bongo Sirise. (Yisaya 13:1-17; 21:2-9; 44:24–45:7, 13) Ezalaki bokonzi ya Bamede na Baperse. Atako bokonzi yango ebongisaki mpenza bomoi mpe mimeseno ya bato ndenge moko lokola bokonzi ya Babilone, bokonzi yango emonisamaki na palata, ebende oyo eleki wolo na motuya te. Bokonzi ya Bamede na Baperse ezalaki na nse ya bokonzi ya Babilone na mokili mobimba mpo ete yango ezwaki libaku te ya kokweisa bokonzi ya Yuda oyo, elongo na mboka-mokonzi na yango Yelusaleme, ezalaki elakiseli ya bokonzi ya Nzambe.
11. Ntango nini bakonzi ya libota ya Nebukadanesala basukaki?
11 Soko mbula 60 nsima ya kolimbola ndɔtɔ yango, Danyele amonaki ndenge bokonzi ya libota ya Nebukadanesala esukaki. Danyele azalaki ntango basoda ya Mede mpe Perse bakweisaki engumba ya Babilone na butu ya mokolo ya 5 mpe ya 6 Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 539 L.T.B., mpe ntango babomaki Mokonzi Belesasala. Bokonzi ya Babilone oyo ezalaki elilingi ya motó ya wolo ya ekeko esukaki ntango Belesasala akufaki.
BOKONZI OYO ESIKOLAKI BATO NA BOOMBO
12. Litomba nini Bayuda oyo bazalaki na boombo bazwaki na mobeko oyo Sirise abimisaki na mobu 537 L.T.B.?
12 Na mobu 539 L.T.B., bokonzi ya Bamede na Baperse ekitanaki bokonzi ya Babilone mpo na koyangela mokili mobimba. Ntango akómaki na mbula 62, Dalio moto ya Mede akómaki mokonzi ya liboso ya Babilone ntango yango ekweaki na mabɔkɔ na bango. (Danyele 5:30, 31) Na boumeli ya mwa ntango moke, ye na Sirise moto ya Perse bayangelaki elongo na bokonzi ya Bamede na Baperse. Ntango Dalio akufaki, Sirise atikalaki koyangela ye moko na bokonzi ya Perse. Ezali na boyangeli na ye nde Bayuda babimaki na boombo na Babilone. Na mobu 537 L.T.B., Sirise abimisaki mobeko oyo epesaki nzela na Bayuda oyo bazalaki baombo na Babilone bázonga na mboka na bango mpe bátonga lisusu engumba ya Yelusaleme mpe tempelo ya Yehova. Nzokande, bokonzi ya Nzambe, oyo emonisamaki na bokonzi ya Yuda na Yelusaleme, ezongisamaki na mbula yango te.—2 Ntango 36:22, 23; Ezela 1:1–2:2a.
13. Ntolo ya palata mpe biteni ya ekeko oyo Nebukadanesala alɔtaki ezalaki elilingi ya nini?
13 Ntolo mpe mabɔkɔ ya palata ya ekeko yango emonisaki molɔngɔ ya bakonzi ya Perse, kobanda na Sirise Monene. Bakonzi nyonso oyo balandanaki na libota yango bayangelaki koleka mbula 200. Balobaka ete Sirise akufaki na etumba na mobu 530 L.T.B. Bobele bakonzi mibale kati na bakonzi pene na 12 oyo bakitanaki Sirise nde bamoniselaki basaleli ya Yehova boboto. Ezalaki Dalio I (moto ya Perse) mpe Alatazelezese I.
14, 15. Dalio Monene mpe Alatazelezese I bapesaki Bayuda lisungi nini?
14 Dalio I azalaki mokonzi ya misato na bakonzi ya Perse oyo bakitanaki Sirise Monene. Mpo na bakonzi mibale oyo bayangelaki liboso na ye, ekokaki kozala Cambyse II na ndeko na ye ya mobali, Bardiya (ntango mosusu ye nde Gaumata, nganga oyo alingaki kozwa bokonzi). Ntango Dalio I, oyo ayebanaki mpe na nkombo ya Dalio Monene, akómaki mokonzi na mobu 521 L.T.B., mosala ya kotonga tempelo ya Yelusaleme epekisamaki. Kasi na kolukáká na mikanda ya Leta oyo ezalaki na engumba ya Ekibatana, bakutaki mikanda ya mobeko ya Sirise oyo epesaki Bayuda ndingisa ya kokenda kotonga tempelo ya Nzambe na Yelusaleme. Na bongo, Dalio apesaki bango ndingisa ete bázongela kotonga tempelo. Asukaki bobele na kopesa bato ndingisa te kasi abimisaki mosolo na kɛsi ya mokonzi mpe apesaki bango mpo bátonga lisusu tempelo.—Ezela 6:1-12.
15 Alatazelezese I, Mokonzi ya Perse, oyo akitanaki tata na ye, Asierise, (Zelezese I) na mobu 475 L.T.B., asungaki mpe Bayuda na mosala na bango ya kotonga Yelusaleme. Bapesaki Alatazelezese nkombo Lobɔkɔ-molai mpo lobɔkɔ na ye ya mobali ezalaki molai koleka oyo ya mwasi. Na mobu 455 L.T.B., wana akokisaki mbula 20 na bokonzi na ye, Alatazelezese I atyaki Nehemia guvernere ya Yuda mpo atambwisa mosala ya kotonga bifelo ya Yelusaleme. Esakweli ya ‘pɔsɔ 70 ya bambula,’ oyo ekomami na mokanda ya Danyele mokapo 9 ebandaki kokokisama. Na lisalisi ya dati yango, bato bakokaki koyeba dati oyo Yesu ya Nasalɛtɛ akomonana lokola Masiya to Klisto mpe dati ya liwa na ye.—Danyele 9:24-27; Nehemia 1:1; 2:1-18.
16. Nani azalaki mokonzi ya nsuka ya bokonzi ya Bamede na Baperse, mpe ntango nini?
16 Dalio III azalaki mokonzi ya nsuka kati na bakonzi motoba oyo bayangelaki na bokonzi ya Perse nsima ya Alatazelezese I. Kasi na mobu 331 L.T.B., bokonzi na ye esukaki na mbalakaka ntango Alesandala Monene alongaki ye na etumba ya Gaugamèles, pene na engumba Ninive. Yango mpe esukisaki bokonzi ya Bamede na Baperse oyo emonisamaki na biteni ya palata ya ekeko oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ. Bokonzi oyo esengelaki koyangela nsima ezalaki makasi na makambo mosusu, kasi na bolɛmbu na makambo mosusu. Tokomona yango lokola tozali kolanda ndimbola oyo Danyele apesaki na ndɔtɔ ya Nebukadanesala.
BOKONZI OYO EZALAKI NA ETANDO MONENE KOLEKA KASI EZALAKI NA NGUYA MPENZA TE
17-19. (a) Libumu mpe bibɛlɔ ya motako ya ekeko ezalaki elilingi ya bokonzi nini oyo esengelaki koyangela mokili, mpe boyangeli na yango epalanganaki kino wapi? (b) Alesandala III azalaki nani? (c) Ndenge nini lokota ya Greke ekómaki kolobama na mikili mingi, mpe mpo na nini ebongaki kosalela lokota yango?
17 Danyele alobaki na Nebukadanesala ete libumu mpe bibɛlɔ ya ekeko yango ezalaki elilingi ya “bokonzi mosusu . . . bokonzi na misato na motako, oyo ekozala na nguya na likoló na mokili mobimba.” (Danyele 2:32, 39) Bokonzi yango ya misato ekolanda bokonzi ya etúká ya Babilone mpe bokonzi ya Bamede na Baperse. Lokola motako eleki palata na motuya te, bokonzi yango ya sika esengelaki kozwa lokumu ndenge moko na bokonzi ya Bamede na Baperse te. Yango ezwaki lokumu ya kosikola libota ya Yehova na boombo te. Nzokande, bokonzi yango oyo emonisamaki na motako ‘ekoyangela mokili mobimba.’ Elingi koloba ete bokonzi yango esengelaki kozala na etando monene koleka bokonzi ya etúká ya Babilone to bokonzi ya Bamede na Baperse. Masolo ya kala elobi nini na ntina na bokonzi yango?
18 Mwa moke nsima ya kosangola bokonzi ya Makedonia na mobu 336 L.T.B., wana azalaki na mbula 20, Alesandala III abundaki bitumba mingi mpo mposa na ye mpenza ezalaki ya kobɔtɔla bamboka mingi. Lokola azalaki kolonga bitumba yango, bapesaki ye nkombo Alesandala Monene. Wana azalaki kobɔtɔla mboka moko nsima na mosusu, akobaki kopusana na mikili oyo mizalaki naino koyangelama na bokonzi ya Perse. Ntango alongaki Dalio III na etumba ya Gaugamèles na mobu 331 L.T.B., bokonzi ya Perse ebandaki kokweya mpe Alesandala akómisaki Grèce mokili oyo elekaki nguya na mokili mobimba.
19 Nsima ya kolonga etumba ya Gaugamèles, Alesandala akendaki kobɔtɔla bamboka-mokonzi ya Perse: engumba Babilone, Susa, Persépolis mpe Ekibatana. Nsima ya kobɔtɔla mwa bamboka oyo bokonzi ya Perse ezalaki naino koyangela, Alesandala akendaki kobɔtɔla bamboka na wɛsti ya ekólo Inde. Bagreke bakómaki kofanda na bamboka yango oyo ye azalaki kobɔtɔla. Yango wana, lokota ya Greke mpe mimeseno ya Bagreke epalanganaki na bamboka yango nyonso. Bokonzi ya Grèce ekómaki bongo monene koleka bikonzi nyonso oyo ezalaki liboso na yango. Lokola Danyele asakolaki yango, bokonzi yango, oyo ezalaki na elilingi ya motako, ‘eyangelaki mokili mobimba.’ Yango esalaki ete lokota ya Greke ekóma kolobama na mikili mingi. Lokola lokota ya Greke ezalaki na elobeli ya sikisiki, ebongaki mpenza kosalela yango mpo na kokoma Makomami ya boklisto mpe kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.
20. Nini ekómelaki bokonzi ya Grèce nsima ya liwa ya Alesandala Monene?
20 Alesandala Monene ayangelaki mokili mobimba bobele mbula mwambe. Atako azalaki mpenza elenge ya mbula bobele 32, Alesandala abɛlaki mpe akufaki. Na nsima, bakonzi minei ya basoda na ye bakabolaki bokonzi yango na biteni minei, mpe mokonzi mokomoko ayangelaki eteni moko. Na bongo, longwa na bokonzi monene moko, nsukansuka bikonzi minei ebimaki mpe na nsima yango nyonso ekweaki na mabɔkɔ ya bokonzi ya Loma. Bokonzi yango oyo emonisamaki na motako ekobaki koyangela mokili kino mobu 30 L.T.B. ntango bokonzi ya Loma ekweisaki bokonzi ya nsuka na bikonzi yango minei—bokonzi ya libota ya Ptolémée na Ezipito.
BOKONZI OYO EZALAKI KOBUKA MPE KOPANZA
21. Makambo nini Danyele alobaki mpo na “bokonzi ya minei”?
21 Danyele akobaki kolimbola ndɔtɔ yango ya ekeko: “Mpe bokonzi ya minei [nsima ya Babilone, Mede mpe Perse, mpe Grèce] ekozala makasi lokola ebende; mpo ete ebende ekobukaka mpe ekobɛtaka biloko nyonso; mpe [lokola] ebende ekotutaka oyo nyonso, bokonzi yango ekobuka mpe ekotuta.” (Danyele 2:40) Bokonzi yango oyo esengelaki koyangela mokili mobimba ekokanaki na ebende na makasi mpe na makoki na yango ya kobukabuka. Yango elekaki bikonzi ya liboso oyo bimonisamaki na wolo, na palata mpe na motako na makasi. Bokonzi yango ezalaki bokonzi ya Loma.
22. Na lolenge nini bokonzi ya Loma ezalaki lokola ebende?
22 Bokonzi ya Loma ebukaki mpe epanzaki bokonzi ya Grèce mpe enyataki mikili nyonso oyo miyangelamaki na bokonzi ya Bamede na Baperse mpe na Babilone. Lokola bokonzi ya Loma epesaki limemya ata moke te na bokonzi ya Nzambe oyo Yesu azalaki kosakola, ebomaki ye na nzete ya mpasi na mobu 33 T.B. Mpo na kopanza lingomba ya boklisto, lingomba ya solo, bokonzi ya Loma enyokolaki bayekoli ya Yesu. Esukaki wana te. Na mobu 70 T.B., basoda ya Loma babebisaki engumba ya Yelusaleme mpe tempelo na yango.
23, 24. Longola bokonzi ya Loma, makolo ya ekeko mazalaki lisusu elilingi ya nini?
23 Makolo ya ebende ya ekeko oyo Nebukadanesala alɔtaki ezalaki bobele elilingi ya bokonzi ya Loma te kasi emonisaki mpe bokoli na yango na makambo ya politiki. Talá maloba oyo makomami na Emoniseli 17:10: “Mizali mpe bakonzi nsambo; mitano bakwei, moko azali, mosusu ayei naino te, mpe soko akoya ntango nini ekokoka na ye koumela mwa ntango moke.” Ntango ntoma Yoane akomaki maloba oyo, azalaki mokangami ya Baloma na esanga ya Patamo. Bakonzi mitano to mikili mitano ya nguya oyo esilaki kokwea ezalaki bongo Ezipito, Asulia, Babilone, bokonzi ya Bamede na Baperse, mpe Grèce. Bokonzi ya motoba, elingi koloba bokonzi ya Loma, ezalaki naino koyangela. Kasi yango mpe esengelaki kokwea, mpe mokonzi ya nsambo asengelaki kouta na moko na mikili oyo bokonzi ya Loma eyangelaki. Esengelaki kozala bokonzi nini?
24 Kala, ekólo Grande-Bretagne ezalaki etúká ya bokonzi ya Loma, oyo ezalaki na nɔrdi-ɛsti ya bokonzi yango. Kasi bandamobu 1763, bokonzi ya Grande-Bretagne ekómaki bokonzi oyo eyangelaki mai monene. Banda mobu 1776, ekólo États-Unis ebotamaki ntango mboka 13 oyo ezalaki na nse ya boyangeli ya Angleterre ezwaki lipanda. Nzokande, na bambula oyo elandaki nsima, Angleterre mpe États-Unis esalaki boyokani mpo na bosalisani na ntango ya kimya mpe bitumba. Na bongo, Angleterre na États-Unis esanganaki mpo na kokóma mokili ya nsambo oyo eyangelaki mokili mobimba na kotalela esakweli ya Biblia. Ndenge moko na bokonzi ya Loma, bokonzi yango ezali “makasi lokola ebende,” mpo ezali kotambwisa makambo na makasi lokola ebende. Na bongo, makolo ya ebende ya ekeko yango oyo emonanaki na ndɔtɔ elimboli na epai moko bokonzi ya Loma mpe na epai mosusu nguya ya mokili mobimba, États-Unis na Angleterre.
KOSANGISAMA OYO ELIMBOLI BOMOKO TE
25. Danyele alobaki nini mpo na makolo mpe misapi ya makolo ya ekeko?
25 Na nsima Danyele alobaki na Nebukadanesala ete: “Mpe lokola emonaki yo makaka mpe misapi, ndambo na mabelé na mbɛki mpe ndambo na ebende, ekozala bokonzi bokabwani; nde ndambo na makasi na ebende ekozala na yango, lokola emonaki yo ebende esangani na mabelé. Mpe lokola misapi na makaka mizalaki ndambo na ebende mpe ndambo na mabelé, boye bokonzi ekozala ndambo makasi mpe ndambo motau. Lokola emonaki yo ebende esangani na mabelé, boye bango bakosangana na [bana na bato, NW]; nde bakotikala na lisangá te [ndenge moko ebende esanganaka, NW] na mabelé te.”—Danyele 2:41-43.
26. Ntango nini bokonzi oyo emonisamaki na makolo mpe misapi ya elilingi ebimaki?
26 Longwa motó kino makolo mpe biteni na yango mosusu, ekeko oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ ezalaki elilingi ya mikili oyo esengelaki koyangela mokili. Elongobani mpenza koloba ete ‘kosangisama ya ebende mpe misapi na yango ya mabelé,’ ezali elilingi ya lolenge bato bazali koyangela mokili na “mikolo [oyo] ya nsuka.”—Danyele 12:4, NW.
27. (a) Kosangisama ya makolo na misapi ya ebende na mabelé ezali elilingi ya makambo nini na mokili? (b) Misapi zomi ya makolo ya ekeko yango ezalaki elilingi ya nini?
27 Na ebandeli ya ekeke ya 20, bokonzi ya Grande-Bretagne ezalaki koyangela ndambo moko likoló na ndambo minei ya mokili. Bikonzi mosusu ya Mpoto ezalaki koyangela bamilio mosusu ya bato. Kasi banda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, barepibliki ebandaki kosalema mingi mpe kokitana biyangeli oyo bibengami empires. Na nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, barepibliki ekómaki mingi mpamba te banamboka ya mikili ndenge na ndenge bakómaki kosɛnga bonsomi mpo na kotambwisa bikólo bango moko. Misapi zomi ya makolo ya ekeko yango elimboli biyangeli nyonso wana. Na Biblia, motángo zomi esalelamaka ntango mosusu mpo na kolobela likambo ya kokoka na oyo etali makambo ya mokili.—Kokanisá na Exode 34:28; Matai 25:1; Emoniseli 2:10.
28, 29. (a) Danyele amonisaki ete mabelé ezalaki elilingi ya nini? (b) Tokoki koloba nini mpo na kosangana ya ebende na mabelé?
28 Lokola tozali kobika sikoyo na “mikolo ya nsuka,” tozali koyangelama na bokonzi oyo emonisamaki na makolo ya ekeko yango. Baguvernema mosusu oyo ezalaki na elilingi ya makolo ya ebende mpe misapi na yango oyo esangisami na mabelé, ezali lokola ebende na boye ete ezali kopusa bato bátosa yango na makasi to ezali mpenza konyokola bango. Biyangeli mosusu bikokani na pɔtɔpɔtɔ. Na ndenge nini? Danyele akokanisaki mabelé na “bana na bato.” (Danyele 2:43) Mabelé ezalaka motau, ndenge moko bana na bato bazalaka bongolabongola. Kasi baguvernema oyo emeseni kosalela bato makambo makasimakasi lokola ebende ekómi kolɛmbisa mpe koyokela bato mwa moke, awa ezali kozwa bopusi makasi mpo ekokisa bamposa ya bato. (Yobo 10:9) Ata ndenge wana, boyokani ya solosolo ezali te, ndenge moko ebende esangisamaka na mabelé te. Na ntango ekeko yango ekobebisama, mokili ekokabwana mpenza na makambo ya politiki!
29 Bokabwani yango oyo ezali kati na makolo mpe misapi ya makolo ya ekeko yango ekosala ete ekeko yango ekweisama? Nini ekokómela ekeko yango?
NSUKA NA YANGO EKOZALA NSƆMƆ!
30. Ndɔtɔ ya Nebukadanesala esukaki na likambo nini?
30 Tótalela nsuka ya ndɔtɔ yango. Danyele alobaki na mokonzi ete: “Ezalaki yo kotala, libanga litimolami na mabɔkɔ te etutaki [ekeko, NW] na makaka, oyo na ebende mpe na mabelé, mpe ebukaki yango na biteni. Bongo ebende mpe mabelé mpe motako mpe palata mpe wolo ebukanaki nyonso esika moko na biteni, mpe ekómaki lokola mputulu na bitutelo na ntango na moi makasi, mpe mopɛpɛ ememaki yango, boye ata ndambo moke na yango ezwamaki te. Kasi libanga litutaki [ekeko likómaki ngomba, NW] monene, mpe etondisaki mokili mobimba.”—Danyele 2:34, 35.
31, 32. Nini eyebisamaki liboso na ntina na eteni ya nsuka ya ndɔtɔ ya Nebukadanesala?
31 Esakweli elobi lisusu ete: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe [ekosukisa, NW] makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko; lokola emonaki yo ete libanga etimolami na [ngomba] na mabɔkɔ te, mpe ete ebukaki ebende mpe motako mpe mabelé mpe palata mpe wolo. Nzambe monene ayebisi mokonzi makambo makobima na nsima. [Ndɔtɔ] yango ezali solo mpe [ndimbola] na yango [ezali ndimbola ya solosolo, NW].”—Danyele 2:44, 45.
32 Lokola amonaki ete Danyele ayebisaki ndɔtɔ na ye mpe alimbolaki yango, Nebukadanesala andimaki ete Nzambe ya Danyele azali “Nkolo na mikonzi, mpe momonisi na makambo mabombami.” Mokonzi apesaki Danyele na baninga na ye Baebele misato bisika ya lokumu na bokonzi na ye. (Danyele 2:46-49) ‘Ndimbola yango ya solosolo’ ezali na ntina nini na mikolo na biso?
‘NGOMBA OYO ETONDI MABELÉ MOBIMBA’
33. “Libanga” eutaki na “ngomba” nini, mpe ntango nini mpe ndenge nini likambo yango esalemaki?
33 Ntango “bilaka ya mabota” ekómaki na nsuka na Ɔkɔtɔbɛ 1914, “Nzambe ya lola” atyaki bokonzi ya likoló mpe apesaki yango na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, mwana na ye mopakolami na elimo, “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.”a (Luka 21:24; Emoniseli 12:1-5; 19:16, NW) Ezalaki mpo na nguya ya Nzambe kasi na nguya ya bato te nde bokonzi ya Masiya oyo emonisamaki na “libanga” elongwaki na “ngomba” ya bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba. Bokonzi yango ya likoló epesami na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, moto oyo Nzambe apesi ye bomoi oyo ekobebisama te. (Baloma 6:9; 1 Timote 6:15, 16) Yango wana, “bokonzi ya [Nkolo Nzambe, NW] na biso mpe ya Klisto na ye,” oyo ezali elakiseli ya bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba, ekopesama na moto mosusu te. Ekotikala libela na libela.—Emoniseli 11:15.
34. Ndenge nini esalemaki ete bokonzi ya Nzambe ebotama na “mikolo ya mikonzi yango”?
34 Bokonzi ya Klisto esengelaki kosalema na “mikolo ya mikonzi yango.” (Danyele 2:44) Ezali bobele bakonzi oyo bamonisami na misapi zomi ya makolo ya ekeko yango te kasi mpe biteni mosusu oyo bizalaki na ebende, na motako, na palata mpe na wolo. Atako bokonzi ya Babilone, ya Grèce mpe ya Loma ezalaki lisusu te, kasi mikili oyo bikonzi yango eyangelaki ezalaki naino na 1914. Na bongo, bokonzi ya kala ya ekólo Turquie (Empire ottoman) ezalaki na teritware ya Babilone mpe baguvernema ya bikólo ezalaki na Perse (Iran), na Grèce mpe na Loma, na Italie.
35. Ntango nini “libanga” ekokweisa ekeko, mpe kobebisama ya ekeko yango ekozala ndenge nini?
35 Mosika te, Bokonzi ya Nzambe oyo euti na likoló ekobɛta ekeko yango na makolo na yango. Ekobukabuka biyangeli nyonso oyo bimonisamaki na ekeko yango mpe ekosukisa yango nyɛɛ. Ɛɛ, na “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” “libanga” yango ekobuka mpenza ekeko yango kino ekokóma mputulu mpe mopɛpɛ makasi oyo ekouta epai na Nzambe ekokɔmba yango lokola bakɔmbaka mposo ya lɔsɔ. (Emoniseli 16:14, 16) Na bongo, ndenge moko na libanga oyo ekómaki monene lokola ngomba mpe ezipaki mokili, Bokonzi ya Nzambe ekokóma ngomba oyo esengeli koyangela “mokili mobimba.”—Danyele 2:35.
36. Mpo na nini Bokonzi ya Masiya ekoki kobéngama bokonzi oyo ekotɛngatɛnga te?
36 Ata Bokonzi ya Masiya ezali bokonzi ya likoló, kasi ekopalanganisa nguya na yango na mabelé mobimba mpo ete bato nyonso ya botosi bápambolama. Boyangeli yango ezali makasi, ‘ekobebisama soko moke te’ to ‘ekopesama na bato mosusu te.’ Ekozala te lokola biyangeli ya bato oyo bakonzi na yango bakufaka, kasi bokonzi yango “ekotikala lobiko na lobiko,” libela na libela. (Danyele 2:44) Ekozala mpenza libaku malamu ete ozala moko na baoyo bakoyangelama na bokonzi yango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokapo 6 ya buku oyo.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Mikili nini ya nguya na mokili mimonisamaki na biteni ndenge na ndenge ya ekeko monene oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ?
• Ezaleli nini ya mokili emonisamaki na makolo mpe misapi ya ebende esangisami na mabelé?
• Ntango nini mpe na “ngomba” nini “libanga” eutaki?
• Ntango nini “libanga” ekokweisa ekeko?
[Etanda/Bililingi na nkasa 63-67]
MOKONZI OYO ATONGAKI BOKONZI NA YE NA BITUMBA
NA ENGUMBA Kalekemisi, na ekólo Sulia, mwana ya mokonzi ya Babilone oyo asengelaki kokitana tata na ye na bokonzi, alongaki basoda ya Falo Neko, mokonzi ya Ezipito. Basoda ya Ezipito bakimaki na mboka na bango mpe basoda ya Babilone balandaki bango. Kasi nsango ya liwa ya tata na ye na Babilone elɛmbisaki ye mpo akoba kobundisa banguna na ye te. Nde apesaki bakonzi ya basoda na ye mitindo ete bámema biloko oyo bapunzaki na etumba mpe bato oyo bakangaki na etumba na Babilone.
Na bongo, Nebukadanesala akómaki mokonzi ya Babilone na mobu 624 L.T.B. mpe azalaki mokonzi ya mibale ya bokonzi ya Babilone oyo eutaki kosalema. Na boumeli ya mbula 43 oyo ye azalaki mokonzi, abɔtɔlaki bamboka oyo eyangelamaki kala na bokonzi ya Asulia mpe abɔtɔlaki mikili lokola Sulia na nɔrdi mpe Palestine na wɛsti kino na ndelo ya Ezipito.—Talá kalati.
Na mbula ya minei ya bokonzi na ye (mobu 620 L.T.B.), Nebukadanesala abɔtɔlaki mokili ya Yuda. (2 Mikonzi 24:1) Nsima ya mbula misato, Nebukadanesala ayaki kobunda na Yelusaleme mpe azingaki yango mpo ete mokonzi ya Yuda atombokelaki ye. Azwaki Yoyakini, Danyele, mpe bato mosusu; amemaki bango na boombo na Babilone. Amemaki mpe bisaleli mosusu oyo bizalaki na tempelo ya Yehova. Nebukadanesala atyaki Sidikiya, tata leki ya Yoyakini, mokonzi ya Yuda.—2 Mikonzi 24:2-17; Danyele 1:6, 7.
Nsima ya mwa ntango, Sidikiya asalaki boyokani na Ezipito mpe atombokelaki Nebukadanesala. Nebukadanesala azingaki lisusu Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., abukaki bifelo ya engumba, atumbaki tempelo, mpe abebisaki mboka. Abomaki bana mibali nyonso ya Sidikiya mpe atɔbɔlaki Sidikiya miso mpe amemaki ye moombo na Babilone. Nebukadanesala akangaki mpe bato mingi baombo, amemaki bango na Babilone, na biloko ya tempelo oyo etikalaki. “Bongo Yuda ekendaki na boombo longwa na mabelé na yango mpenza.”—2 Mikonzi 24:18–25:21, NW.
Nebukadanesala alongaki mpe engumba ya Tulo nsima ya kozingela yango mbula 13. Wana bazingaki engumba yango, basoda babimaki “mabandi” mpo na bikɔti oyo bazalaki kolata mpe mapeka na bango ekómaki “kolongwa mposo” mpo na kilo ya biloko ya mosala oyo bazalaki kosalela. (Ezekiele 29:18, NW) Nsukansuka, basoda ya Babilone babɔtɔlaki engumba ya Tulo.
Na ntembe te, mokonzi ya Babilone ayebaki kobunda bitumba. Mikanda mosusu, mingi mpenza oyo milobeli ndenge Babilone ebandaki, emonisi ete azalaki mpe mokonzi ya sembo. Makomami elobi mpenza polele te ete azalaki sembo, kasi mosakoli Yilimia alobi ete atako Sidikiya atombokelaki ye, Nebukadanesala alingaki kosalela ye mabe te, ‘soki amipesaka epai na bankumu ya mokonzi ya Babilone.’ (Yilimia 38:17, 18) Mpe ata nsima ya kobebisama ya Yelusaleme, Nebukadanesala azalaki komemya Yilimia. Apesaki kutu mitindo mpo na ye ete: “Kamatá ye mpe batelá ye malamu, salelá ye mabe te; kasi osalela ye lokola ye akoloba na yo.”—Yilimia 39:11, 12; 40:1-4.
Lokola azalaki monangeli ya Leta, Nebukadanesala ayebaki noki bizaleli mpe makoki ya Danyele na baninga na ye misato—Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego—oyo nkombo na bango na Liebele ezalaki Hanania, Misaele mpe Azalia. Na bongo, mokonzi atyaki bango na bisika ya lokumu na bokonzi na ye.—Danyele 1:6, 7, 19-21; 2:49.
Nebukadanesala azalaki mosambeli monene ya Maladuku, nzambe-mokonzi ya banzambe ya Babilone. Alobaki ete soki azalaki kolonga bitumba nyonso wana, ezalaki mpo na nzambe yango. Atongaki to abongisaki malamu bandakonzambe ya Maladuku mpe ya banzambe mosusu ya Babilone. Ntango mosusu ekeko ya wolo oyo ye asalaki na mokili ya Dula ekokaki kozala ekeko ya Maladuku. Mpe emonanaki mpenza ete Nebukadanesala azalaki ntango nyonso kotuna banganga-nkisi liboso ya kokende etumba.
Nebukadanesala amikumisaki mpe na lolenge abongisaki engumba ya Babilone na meko oyo ete engumba yango elekaki bingumba nyonso ya ntango wana na monene mpe ebatelamaki na bifelo mineneminene. Nebukadanesala asilisaki mosala ya kobongisa bifelo ya Babilone, mosala oyo tata na ye abandaki. Abakisaki bonene na yango mpo banguna bábɔtɔla engumba yango te. Mokonzi abongisaki ndako moko ya kala, na katikati ya engumba, mpe na ntembe te yango ezalaki ndako ya mokonzi. Atongaki mpe ndako ya bopemi mpo na mokonzi na bileko ya molunge. Ndako yango ezalaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 2 na nɔrdi ya ndako ya mokonzi. Mpo na kosepelisa mwasi na ye, oyo azalaki moto ya Mede na Perse, oyo azalaki kokanisa na mawa nyonso bangomba mpe bazamba kitoko ya mboka na ye, mokonzi Nebukadanesala amatisaki mabelé, esalaki ngomba mpe alonaki fololo, banzete mpe bazamba minene likoló na yango. Babéngaki yango bilanga kitoko ya Babilone (Les jardins suspendus de Babylone) oyo ezalaki moko na makambo nsambo ya kitoko mpe ya kokamwa oyo etiká nsango na ntango ya kala.
Mokolo moko oyo ye azalaki kotambola na ndako na ye, Mokonzi Nebukadanesala amikumisaki ete: “Oyo ezali [Babilone, NW] monene te, oyo esili ngai kotonga mpo na esika na kofanda na mokonzi, na makasi na nguya na ngai mpe mpo na nkembo na lokumu na ngai?” Abɛlaki ligboma “wana etikalaki maloba yango naino na monɔkɔ na mokonzi.” Akómaki kolya matiti lokola Danyele alobaki mpe na boumeli ya mbula nsambo ayangelaki lisusu te. Na nsuka na yango, Nzambe azongisaki ye na bokonzi, mpe alandaki koyangela kino liwa na ye na mobu 582 L.T.B.—Danyele 4:30-36.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
Tokoki koloba nini na ntina na Nebukadanesala soki totaleli ye lokola
• mokonzi ya mayele mingi na bitumba?
• moyangeli ya Leta?
• mosambeli ya Maladuku?
• motongi monene?
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BOKONZI YA BABILONE
MAI MOTANE
Yelusaleme
Ebale Pelata
Ebale Tigre
Ninive
Susa
Babilone
Ulu
[Elilingi]
Babilone, engumba ya bifelo minene na ntango ya kala
[Elilingi]
Dalagona ezalaki komonisa Maladuku
[Elilingi]
Bilanga ya fololo, banzete mpe bazamba kitoko ya Babilone
[Etanda/Elilingi na lokasa 56]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MIKILI OYO ELEKAKI NGUYA ENGEBENE ESAKWELI YA DANYELE
Ekeko monene (Danyele 2:31-45)
BABILONE banda 607 L.T.B.
BAMEDE na BAPERSE banda 539 L.T.B.
GRÈCE banda 331 L.T.B.
LOMA banda 30 L.T.B.
ÉTATS-UNIS na ANGLETERRE banda 1763 T.B.
MOKILI EKABWANI NA MAKAMBO YA POLITIKI na ntango ya nsuka
[Elilingi na lokasa mobimba 47]
[Elilingi na lokasa mobimba 58]