Mokapo 8
“Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?”
1, 2. Mpo na nini lolenge oyo Yehova asalaki ntango bizaleli ya bato na ye ya kala ebebaki ezali kolendisa biso?
KANISÁ naino likambo oyo: Mwana moko ya mwasi asutuki makasi ntango ayoki bazali kobɛta porte makasi. Abangi mpo akanisi ezali moto moko ya mombongo ya makambo mabe ayei kosɛnga libota na ye nyongo oyo bazali na yango. Moto yango asili kobuba bato mingi na bakilo ya lokuta mpe kosɛnga bango ebele ya benefisi. Mpo bápesa ye etumbu te, apesaka bakonzi ya engumba kanyaka, mpe bakangaka matoi na kolela ya bato oyo ye abubaka. Mwana yango asili mayele, tata na ye asundolá bango mpe akendá kobala mwasi ya elenge. Ye ná mama na ye bakoki kotɛkama lokola baombo.
2 Likambo yango esangisi mwa makambo mabe oyo basakoli 12 balobelaki. (Amose 5:12; 8:4-6; Mika 6:10-12; Sefania 3:3; Malaki 2:13-16; 3:5) Soki ozalaki na bomoi na eleko yango olingaki kosala ndenge nini? Atako likambo yango ekokaki kopesa mawa, okokaki kolendisama na lolenge oyo Yehova asalelaki basaleli na ye makambo na ntango ya basakoli yango. Ya solo, okoki komona na mikanda ya basakoli yango 12 ete Nzambe alobeli mingi bizaleli malamu. Ndenge oyo alendisaki bango ekoki kosalisa yo okóma na bizaleli ya malamu, ekoki kotinda yo osala malamu, mpe osanzola ye. Lokola mokolo ya Yehova ezali mpenza koya mbangu, kotya likebi na bansango ya kolendisa oyo ezali na mikanda yango ekoki kosalisa yo oyeba makambo oyo Nzambe azali kosɛnga yo. Tóbanda naino kotalela makambo oyo ezalaki na ntango ya Mika na ekeke ya 8 L.T.B.
ELOKO NINI YEHOVA AZALI KOSƐNGA YO?
3, 4. (a) Maloba kitoko nini ya kobondela ezali na mokanda ya Mika? (b) Ndenge nini motuna oyo ezali na Mika 6:8 etaleli yo mpenza?
3 Soki otángi mokanda ya Mika, okoki komona liboso ete etondi na makambo ya mabe oyo Bayisraele oyo batombokaki basalaki. Na ntembe te, Yehova azalaki komona ndenge bizaleli ya bato oyo bamipesaki epai na ye ebebaki, ezala baoyo alobelaki bango lokola ‘bato oyo bayinaka makambo ya malamu mpe balingaka makambo ya mabe.’ (Mika 3:2; 6:12) Nzokande, longola koyebisa bitumbu, ezali mpe na makebisi ya ntina mpenza mpe ya kolendisa oyo ezali na Biblia. Mika abendaki likebi epai ya Ye oyo atyá mitinda ya sembo mpe atunaki motuna oyo ya ntina mingi: “Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo, kolinga boboto mpe kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo?”—Mika 6:8.
4 Omoni te ete na vɛrsɛ oyo Mozalisi na biso azali kobondela biso? Na bolingo nyonso, azali kokundwela biso makanisi ya malamu oyo tosengeli kozala na yango na esika ya kotika makambo ya mabe oyo etondi na mokili ezongisa biso nsima. Yehova ayebi ete lokola tozali bato ya sembo, tolingaka komonisa bizaleli na ye mpe atyelaka biso motema. Okopesa eyano nini soki batuni yo: “Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?” Okoki komona bisika oyo ozali kosalela mitinda ya Nzambe na bomoi na yo—to bisika oyo osengeli kosalela mitinda yango? Boyokani na yo na Nzambe mpe bomoi na yo ekozala malamu mingi soki ozali kotosa mitinda wana. Lokola paradiso ezali liboso na yo, okoki kolendisama na toli oyo: “Bómilonela momboto na boyengebene; bóbuka mbuma na ndenge oyo eyokani na motema boboto. Bómitimwela mabele oyo ebongi na bilanga, wana ntango ya koluka Yehova ezali naino, kino akoya koteya bino boyengebene.” (Hosea 10:12) Tiká tótalela sikoyo makambo mosusu ya ntina oyo ezali na toli kitoko ya Mika 6:8.
“TAMBOLÁ NA BOPƆLƆ”
5. Mpo na nini ezali na ntina ‘kozala na bopɔlɔ’ mpo na kotambola elongo na Nzambe?
5 Likambo ya esengo, Mika alobi ete Yehova azali kosɛnga biso ‘tótambola na bopɔlɔ elongo’ na ye. Kozala bato ya bopɔlɔ ekoki mpenza komemela biso matomba mpamba te “bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Masese 11:2) Kozala moto ya bopɔlɔ esɛngaka mpe koyeba bandelo oyo lisumu ya Adama etyelaka biso. Kondima ete tobotamá bato ya masumu ezali mpenza likambo ya liboso ya ntina mpo na koboya kosala lisumu na nko.—Baroma 7:24, 25.
6. Matomba nini tokoki kozwa soki na bopɔlɔ nyonso tozali kondima makama oyo lisumu ememaka?
6 Mpo na nini bopɔlɔ mpe komikitisa ezali na ntina mpo na koboya kosala lisumu na nko? Moto ya bopɔlɔ ayebaka nguya oyo lisumu ezali na yango. (Nzembo 51:3) Hosea asalisi biso tóyeba ete lisumu ekoki kolɛngola mpe ete nsukansuka ememaka makama. Na ndakisa, Yehova alakaki ete bato na ye oyo bazangaki botosi basengelaki ‘kozongisa monɔkɔ.’ Likambo yango epesaki likanisi ete basumuki wana oyo bazangaki bopɔlɔ bakokaki kokima makama nyonso? Bakokaki kokanisa bongo, mpo mbala mingi lisumu ekosaka bato mpe ekómisaka bango baombo. Likambo eleki ntina, lisumu ekabolaka basumuki na Nzambe, ntango mosusu ememaka bango bákóma tii na likambo oyo: “Misala na bango ezali kopesa nzela te ya kozongela Nzambe na bango.” Kosala lisumu na nko elɛmbisaka moto oyo asali mabe mpe esalaka ete akóma ‘kosalaka makambo ya mabe.’ Lisusu, lisumu esalaka ete bomoi ya mosumuki ezanga ntina. Ya solo, mpo na mwa ntango ekoki komonana lokola nde bomoi na ye ezali kotambola malamu, kasi mosumuki oyo abongoli motema te akoki kolikya te ete Nzambe akondima ye.—Hosea 1:4; 4:11-13; 5:4; 6:8.
7. Ndenge nini bato ya bopɔlɔ batalelaka litambwisi ya Yehova?
7 Bato ya bopɔlɔ bandimaka mpe ete bazali na mposa ya litambwisi ya Nzambe mpo bákima makama oyo lisumu ememaka. Mika amonaki ntango moko—eleko na biso—ntango oyo ebele ya bato bakoluka na mposa makasi mpenza ‘kolakisama banzela ya Yehova’ mpe ‘kotambola na banzela na ye.’ Bato yango ya komikitisa balukaka “mobeko” mpe “liloba ya Yehova.” Ekoki kozala ete ozali na esengo ndenge ozali na kati ya bato oyo balingaka ‘kotambola na nkombo ya Yehova’ na ndenge batosaka masɛngami na ye. Ata soki ezali bongo, na ndakisa ya Mika, okosepela na makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo okoba “kozala pɛto na bizaleli.” (Mika 4:1-5; 6:11) Kondima na bopɔlɔ nyonso kosala oyo Yehova azali kosɛnga yo ekosalisa yo mingi.
TÓBATELA BOPƐTO YA BIZALELI
8. Makambo nini omoni na oyo etali bizaleli malamu na mokili ya lelo?
8 Lokola amibanzabanzaka mpo na bolamu na biso ya elimo mpe ya nzoto, Yehova asɛngaka biso tózala pɛto na bizaleli atako bizaleli ya bato ya mokili oyo ezingi biso ezali kobeba se kobeba. (Malaki 2:15) Bansango ya makambo ya kosangisa nzoto etondi mpenza kotonda na mokili. Bato mingi bakanisaka ete kotala bafɔtɔ mpe bafilme oyo ezali kolakisa pornografi, kotánga makambo ya mbindo oyo etali pite, mpe koyoka banzembo oyo elamusaka bamposa ya nzoto ezali mabe te. Longola yango, ezali na bato oyo bamemyaka basi te, batalelaka bango kaka lokola biloko ya kosangisa na yango nzoto. To na kelasi, bilenge na masolo na bango bakɔtisaka masɛki ya bosɔtɔ mpe makambo mosusu ya pite. Ndenge nini okoki kotɛmɛla bizaleli wana mabe?
9. Ndenge nini bato mingi balongaki te kotosa mitinda ya Yehova na mikolo ya basakoli 12?
9 Basakoli 12 oyo tozali kotalela bapesi batoli oyo ebongi mpenza. Bazalaki na bomoi na eleko oyo bafilme ná bavideo ezalaki te ndenge ezali lelo, kasi ezalaki na bilembo oyo ezalaki kolakisa nzoto ya mibali, oyo bazalaki kobenga bondumba ya bulɛɛ, mpe kosala pite. (1 Bakonzi 14:24; Yisaya 57:3, 4; Habakuku 2:15) Okoki komona polele bosolo ya likambo yango na makambo oyo basakoli bakomaki: “Mibali bazali komibenda pembeni ná basi ya ndumba, mpe bango ná basi ya ndumba ya tempelo bazali kopesa mbeka.” “Mobali moko ná tata na ye mpenza bakei epai ya mwana mwasi se moko, mpo na kotuka nkombo na ngai mosantu.” Bamosusu bazalaki mbala na mbala kopesa “lifuti na mwasi na pite,” na milulu ya kobota.a Ekobo ezalaki kosalema mingi, basi ya ekobo bazalaki ‘kolandalanda baoyo bazalaki kolula bango mingi.’—Hosea 2:13; 4:2, 13, 14; Amose 2:7; Mika 1:7, Biblia haut fleuve.
10. (a) Likambo nini ya libosoliboso etindaka na etamboli ya mbindo? (b) Ndenge nini basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bakómaki kosala pite na elimo?
10 Ekoki kozala oyebi ete pite emonisaka bizaleli mpe makanisi ya moto. (Marko 7:20-22) Yehova alobaki mpo na bato na ye oyo bakómaki na ezaleli ya mbindo ete “elimo ya pite [“mposa makasi ya pite,” Biblia Contemporary English Version] ememi bango na koyengayenga” mpe ete “bamipesi na eloko mosusu te kaka etamboli ya nsɔni.” (Hosea 4:12; 6:9)b Zekaria alobelaki “elimo ya mbindo.” (Zekaria 13:2) Etamboli ya bato yango ekómaki mabe, bazalaki kozwa na limemya te mitinda ya Yehova mpe bokonzi na ye. Na yango, mpo na kosembola makanisi na ye, moto asengelaki kobongola ndenge na ye ya kokanisa mpe motema na ye mpenza. Koyeba likambo yango esengeli kosalisa bakristo bámonisa botɔndi mpo na lisalisi oyo bazali kozwa ya kokima pite mpe makama oyo yango ememaka.
KOBÁ KOMONISA BOPƐTO YA BIZALELI
11. Wapi mwa makama oyo eutaka na pite?
11 Ekoki kozala omoná ete bizaleli ya mabe mbala mingi ebebisaka mabota, ezangisaka bana litambwisi ya baboti, ememaka bamaladi ya mabe, mpe etindaka na kolongola zemi. Baoyo baboyaka kotosa Mozalisi na makambo etali kosangisa nzoto mbala mingi bazwaka mpasi na nzoto mpe na makanisi. Mika akomaki ete: “Libebi ezali mpo [moto moko] akómi mbindo; mpe mosala ya libebi epesaka mpasi.” (Mika 2:10) Koyeba yango ekómisaka makasi ekateli ya bato oyo babangaka Nzambe. Baboyaka kotya makanisi na bango na makambo ya mbindo mpo na kobatela mitema mpe makanisi na bango.—Matai 12:34; 15:18.
12. Litomba nini tokoki kozwa soki tozali kolanda likanisi ya Nzambe na likambo etali kosangisa nzoto?
12 Bakristo bakimaka pite kaka te mpo na kobanga maladi to kokima zemi oyo bakanaki te. Bamonaka ntina ya kokoba kolinga mibeko ya Nzambe mpe kolanda likanisi na ye na likambo etali kosangisa nzoto. Yehova akelá moto na mposa ya kosangisa nzoto mpe komonisana bolingo na kati ya libala. Yango ezalaki mokano na ye ntango akelaki bato. Soki likambo yango ezali kosalema kaka na kati ya libala, ezalaka na matomba, esalaka ete mobali ná mwasi bálingana makasi mpe ntango mosusu esalaka ete bábota bana. Nzokande, ntango mwasi ná mobali oyo babalani te bazali kosangisa nzoto, likambo yango ezalaka mabe mingi, ndenge mikanda ya basakoli 12 emonisi yango. Pite to ekobo esalaka ete moto andimama te epai ya Nzambe. Yango ezalaki mpenza likama monene oyo ekómelaki bato mosusu na ntango ya kala mpe ekoki kozala bongo mpo na moto nyonso oyo azali komipesa na misala ya ndenge wana lelo oyo.
13. Na maloba mosusu, ndenge nini tokoki ‘kolongola pite’ mpe kokima komekama?
13 Hosea abondelaki bato ya eleko na ye ete ‘bálongola pite liboso na bango,’ yango esɛngaki ete bázwa bikateli oyo ebongi mpo na kobatela bizaleli na bango. (Hosea 2:2) Mpo na biso, ekozala likambo ya bwanya kokima likambo nyonso oyo ekoki kotya biso na likama. Na ndakisa, okoki kokutana na komekama na eteyelo to na kartye. Ekosɛnga te olongwa na eteyelo to na ndako yango, kasi ezali na makambo mosusu oyo okoki kosala mpo na kokima makambo oyo ezali kotya yo na komekama mpe na ndenge yango ‘kolongola pite liboso na yo.’ Yebisá basusu ete ozali mokristo ya solo, Motatoli ya Yehova. Na lolenge ya polele, kasi na limemya nyonso, limbwelá bango bizaleli ya pɛto oyo olandaka mpe mateya oyo ondimaka. Omindimisa ete basusu bayebi ekateli na yo ya kotosa mitinda ya Yehova. (Amose 5:15) Lolenge mosusu ya ‘kolongola pite’ ezali ya koboya pornografi mpe masano ya mabe. Yango ekoki kosɛnga kobwaka zulunalo moko ya mabe to koluka baninga mosusu—baoyo balingaka Yehova mpe bandimaka ete osengeli kosala makambo oyo azali kosɛnga yo. (Mika 7:5) Ya solo, na lisalisi ya Yehova, okoki komibebisa te na bizaleli ya mbindo ya mokili oyo!
‘LINGÁ BOBOTO’
14, 15. (a) “Kolinga boboto” elimboli nini? (b) Ndenge nini kolinga boboto esalisaka biso tózala na ngambo te?
14 Mika amonisaki ete Yehova asɛngaka biso ‘tólinga boboto.’ Kozala boboto esɛngaka kosala makambo ya malamu kasi ya mabe te. Boboto eyokani na bolamu mpe bizaleli ya malamu. Esɛngaka biso tózala sembo mpe tózala na koponapona te na makambo na biso mpe na ndenge na biso ya kosalela basusu makambo. Na mokapo 6 ya buku oyo, tomonaki makambo ya ntina ya bomoi, na ndakisa mosala mpe makambo etali mbongo, oyo esɛngaka kozala sembo mpe kolobaka solo. Kasi, ezali kaka na makambo wana te nde tosengeli kozala sembo, kolobaka solo, mpe komonisa boboto.
15 Bato oyo balingaka boboto mpe basepelaka kosalela basusu malamu basalaka nyonso mpo bázala na ngambo te. Yehova ayebisaki Bayisraele oyo bazalaki kokokisa te mikumba na bango na losambo ya solo ete: “Bozali koyiba ngai.” (Malaki 3:8) Okoki koyeba ndenge oyo moto akoki “koyiba” Nzambe lelo oyo? Ezali boni soki mokristo azali kosimba mbongo ya makabo oyo bazali kopesa mpo na matomba ya Bokonzi na lisangá to na esika mosusu? Mbongo yango ezali ya nani? Mbongo yango ezali mpenza ya Yehova, mpo epesamaka mpo na kosimba losambo na ye. (2 Bakorinti 9:7) Moto akoki kokanisa ete akoki “kodefa” mbongo yango ntango akutani na likambo moko ya mbalakaka to kosalela mbongo wana kozanga ndingisa? Te. Yango ekeseni te na koyiba Nzambe! Mpe na ndenge yango akomonisa te boboto to bosembo epai ya baoyo bapesaka makabo yango mpo na mosala ya Nzambe.—Masese 6:30, 31; Zekaria 5:3.
16, 17. (a) Ndenge nini bato mosusu bamonisaki lokoso na mikolo ya Amose mpe ya Mika? (b) Ndenge nini Nzambe atalelaka bilulela?
16 Boboto mpe bolamu etindaka mpe bakristo báboya bilulela. Na mikolo ya Amose, lokoso ezalaki komonana mingi. Bato ya lokoso mpe ya mabe bazalaki koluka ‘kotɛka moyengebene’—baninga oyo bazalaki kosambela na bango—“kaka mpo na palata”! (Amose 2:6) Ezalaki mpe ndenge moko na mikolo ya Mika, ntango bato ya bozwi ya Yuda bazalaki kozwa biloko ya babola to mpe kobɔtɔla na makasi soki esengeli básala yango. (Mika 2:2; 3:10) Ntango bazali kobɔtɔla mabele ya bandeko na bango, bato yango ya lokoso bazalaki kobuka Mibeko ya Yehova: ata mpe mobeko ya nsuka ya Mibeko Zomi mpe mibeko oyo epekisaki kotɛka mpo na libela libula na bango ya mabele.—Kobima 20:13, 15, 17; Balevi 25:23-28.
17 Likambo ya ndenge wana esalemaka mpenza te lelo, kotɛka moto to kokómisa ye moombo ndenge ezalaki na mikolo ya basakoli. Kasi, ezali boni na oyo etali kolyela to kobuba basusu? Na ntembe te, mokristo oyo alingaka boboto akoki te kobuba baninga na ye bakristo. Na ndakisa, akoyeba ete ekozala malamu te mpe boboto te ntango azali kokana kobanda mombongo to kosala likambo moko, atya motema ete bandeko na lisangá bakozala bakiliya na ye ya libosoliboso. Soki mpe aluki kozwa mbongo nokinoki na kolyela baninga na ye bakristo, akomonisa mpe lokoso, ezaleli oyo bakristo basengeli kokeba na yango. (Baefese 5:3; Bakolose 3:5; Yakobo 4:1-5) Lokoso ekoki komonana ntango moto azali na bolingo ya mbongo, azali kolinga bokonzi to koluka litomba moko boye, ata mpe komipesa na kolunda mpe kolangwa masanga, lokoso ya kosangisa nzoto, to mpe makambo mosusu. Mika amonisaki ete bato oyo batalelaka kaka matomba na bango moko, bato ya lokoso ‘bakotonda te.’ Ezali mpe solo lelo oyo.—Mika 6:14.
18, 19. (a) Basakoli mosusu 12 balobaki nini na ndenge oyo Yehova amibanzabanzaka mpo na “mopaya”? (b) Ndenge nini komibanzabanza mpo na basusu ekoki kobongisa boyokani na yo na basusu na esika ofandi?
18 Yehova ayebisaki bato na ye ete ‘bábubaka te moto oyo afandi mopaya.’ Lisusu, na nzela ya Malaki Nzambe alobaki boye: ‘Nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa, baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya.’ (Zekaria 7:10; Malaki 3:5) Bizaleli ya bato to makambo na bango ezali kobongwana na esika oyo ofandi mpo ebele ya bato oyo bautá na bikólo mosusu, bato ya mposo mosusu, to mimeseno ndenge na ndenge batondi kuna? Ekoki kozala ete bato yango bakendaki kuna mpo na koluka libateli, misala to bomoi ya malamu. Ndenge nini otalelaka bato ya minɔkɔ mpe mimeseno oyo ekeseni na oyo ya yo? Omonaka ete ozali na bizaleli oyo etindaka yo okaniselaka basusu mabe, bizaleli oyo ekeseni mpenza na boboto?
19 Kanisá naino matomba oyo ekobima soki ozali komonisa ete bato oyo bauti na mikili mpe mimeseno mosusu babongi mpe koyoka nsango malamu. Boboto ekoki mpe kosalisa moto akanisa te ete bato oyo bayei sika babongi te kosalela Ndako ya Bokonzi to biloko mosusu. Ntoma Paulo akundwelaki bakristo mosusu ya ekeke ya liboso oyo bazalaki Bayuda, oyo bazalaki kokanisela bato oyo bazalaki Bayuda te mabe, ete moto moko te abongaki kozwa lobiko; kaka boboto monene ya Nzambe nde ekokaki kopesa moto nyonso likoki ya kozwa lobiko. (Baroma 3:9-12, 23, 24) Komonisela basusu boboto etindaka biso tósepela ndenge bolingo ya Nzambe ezali kokómela bato mingi oyo liboso bazalaki te na libaku ya koyoka nsango malamu. (1 Timote 2:4) Mbala mingi, bato oyo bauti na bamboka to mimeseno mosusu, bazalaka mpenza na lotomo te ya kosala makambo mingi lokola bato mingi ya mboka wana; na yango tosengeli komibanzabanzaka mpo na bango mpe komonisela bango boboto, kosepela kozala na bango kati na biso, kosalela mokomoko makambo “lokola mwana-mboka” nyonso.—Balevi 19:34.
TAMBOLÁ ELONGO NA NZAMBE YA SOLO
20. Bayisraele mosusu bakómaki kokende koluka litambwisi wapi?
20 Mika mpe alobelaki mingi likambo etali kotambola elongo na Nzambe, kotalela ye lokola Nzambe ya solo, koluka litambwisi na ye. (Masese 3:5, 6; Hosea 7:10) Nsima ya kobima na boombo, Bayuda mosusu bakómaki kokende epai ya bato oyo basakolaka makambo oyo ebombaná, mpe banzambe ya lokuta, ntango mosusu mpo na koluka lisalisi na ntango oyo mbula ezalaki kobɛta te. Mpo na koloba solo, bazalaki kosolola nde na bilimu mabe básalisa bango, atako Yehova aboyaki makasi misala nyonso ya ndenge wana. (Kolimbola Mibeko 18:9-14; Mika 3:6, 11; 5:12; Hagai 1:10, 11; Zekaria 10:1, 2) Bayuda yango bazalaki mpenza komipesa na bikelamu ya elimo oyo batombokelaki Nzambe ya solo!
21, 22. (a) Lolenge nini ya misala ya bilimo mabe emonanaka mingi na esika ofandi? (b) Mpo na nini basaleli ya solo ya Yehova bamikɔtisaka te na misala oyo etyaka moto na boyokani na bademo?
21 Lelo oyo bato mosusu bakanisaka ete bilimu mabe oyo Makomami elobeli bazali kaka elilingi ya mabe. Nzokande, Biblia emonisi ete bademo bazalaka mpenza mpe bango nde batambwisaka misala nyonso ya kotala minzoto, ya banganga-nkisi, mpe misala mosusu ya maji. (Misala 16:16-18; 2 Petro 2:4; Yuda 6) Komikɔtisa na misala ya bilimo mabe ezali na makama mpenza. Na mikili mingi, bato bakendeke epai ya banganga-nkisi oyo balobaka ete bazali na nguya ya bilimo. Bamosusu batalaka horoscope, to basalelaka bakarte, banzete ya maji, mwa tablo mpo na koyeba makambo, to batalatala ya komona makambo. Koluka mpe kosolola na bilimo ya bato oyo bakufá ezali likambo oyo emonanaka mingi. Balobaka ete bakonzi mosusu bakendeke koluka lisalisi na nzela ya misala ya kotala minzoto mpe ya bilimo mabe liboso ya kozwa bikateli. Nyonso wana eyokani te na toli oyo Mika apesaki ete tótambola elongo na Nzambe ya solo, tólandaka litambwisi na ye.
22 Na ntembe te, lokola ozali mosaleli ya Yehova ya solo osengeli koboya mpenza misala ya ndenge wana. Okoki mpenza kondima ete Nzambe asalelaka soki moke te misala ya maji to oyo etyaka moto na boyokani na bademo mpo na komonisa mokano na ye to kosalela nguya na ye. Kutu, Amose 3:7 emonisi biso ete Yehova ‘amonisaka likambo na ye ya nkuku epai ya basaleli na ye basakoli.’ Lisusu, komikɔtisa na makambo oyo etyaka moto na boyokani na bademo ekoki kosala ete moto akóma kotambwisama na Satana, mokonzi ya bademo, oyo azali mokosi mpe alukaka kokosa bato. Ye ná bademo na ye bazali na mokano ya kosala mabe, ntango nyonso bazalaka mpenza na nkanza, kutu babomaka bato. (Yobo 1:7-19; 2:7; Marko 5:5) Yango wana, Mika akweisaki misala ya kosakola makambo oyo ebombaná mpe bonganga-nkisi ntango alendisaki biso tótambola elongo na Nzambe ya solo.
23. Kaka nani nde akoki kokokisa malamu bamposa na biso?
23 Tokozwa litambwisi ya solosolo kaka epai ya Yehova mpe na losambo na ye ya pɛto. (Yoane 4:24) Mosakoli Zekaria akomaki boye: “Bósɛnga Yehova.” (Zekaria 10:1) Ata soki bilimo mabe ezali kotungisa to komeka yo, kobosana te ete “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova, akobika.” (Yoele 2:32) Elikya wana ezali mpenza na ntina awa tozali kobatela na makanisi na biso mokolo monene na ye.
24. Mateya nini ozwi na Mika 6:8?
24 Emonani polele ete maloba ya Mika 6:8 epesi biso makambo mingi oyo tokoki kokanisa na yango. Mpo na kozala na bizaleli malamu mpenza, tosengeli kozala na makanisi mpe bizaleli ya Nzambe. Hosea alendisaki bato ya eleko na biso baoyo bazali na “eleko ya nsuka ya mikolo.” Alobaki ete na boumeli ya ntango na biso, bato oyo babangaka Nzambe bakoluka bolamu ya Yehova. (Hosea 3:5) Amose alobelaki mpe likambo oyo Nzambe asɛngi biso mpenza tósala ete: “Bóluka oyo ezali malamu, . . . mpo bótikala na bomoi.” Alendisi biso lisusu boye: “Bólinga oyo ezali malamu.” (Amose 5:14, 15) Soki tosali bongo, tokosepela kosala oyo Yehova azali kosɛnga biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Joseph Rotherham, mobongoli moko ya Biblia alobi na ntina na bikólo ya Kanana, oyo Bayisraele bamekolaki etamboli na bango ete: “Losambo na bango etondaki na makambo mingi ya mbindo mpe ya mobulu. Mpo na kokumisa banzambe na bango, basi bazalaki kokaba nzoto na bango. Bisika na bango ya bulɛɛ ezalaki bisika ya bondumba. Bazalaki kolakisa polele binama na bango ya kobotela na bililingi ya bosɔtɔ. Bato yango bazalaki na bandumba mosantu (!) basi mpe mibali.”
b Basaleli ya Nzambe bazalaki mpe kosala pite na elimo. Balukaki kosala boyokani ya mabe na bikólo ya bapakano mpe bazalaki kosangisa losambo ya Baala na losambo ya solo.
LITEYA NINI OKOKI KOZWA
• na ndenge Yehova asɛngi yo ozala na bomoi oyo eyokani na mitinda na ye?—Zekaria 6:15; Malaki 3:16, 18.
• soki okanisi na lisumu oyo olingi kosala mpe makama oyo yango ekoki kokómela yo?—Malaki 4:1; Baroma 6:12-14; 1 Bakorinti 6:18.
• na mabunga oyo basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala basalaki?—Hosea 8:7; 10:12; 14:9.
MATOMBA NINI OKOKI KOZWA
• soki okómi na likanisi ya Nzambe na oyo etali kosangisa nzoto?—Hosea 3:3; 4:11.
• soki osaleli makebisi ya basakoli 12 na oyo etali lokoso mpe koluka matomba na yo moko?—Mika 7:5-7; Bafilipi 2:4.
• soki omibateli na misala ya bilimo mabe mpe makambo oyo etyaka bato na boyokani na bademo?—Mika 5:12; Nahumu 3:4; Malaki 3:5.
[Etanda na lokasa 100]
NDAKISA MALAMU YA BOPƆLƆ MPE YA ELOBELI YA POLELE
Yona azalaki na elobeli ya polele mpe azalaki na bopɔlɔ, bizaleli oyo kaka bakomi ya Biblia nde bamonisaki. Alobelaki polele kozanga botosi na ye mpe makambo mosusu oyo asalaki oyo emonisaki ete azangaki kotyela Yehova motema. Alukaki te kobomba ezaleli mabe oyo amonisaki na mokumba oyo Nzambe apesaki ye mpe ntango Nzambe alongolaki ekateli na ye ya koboma bato ya Ninive. Oyo nde ndakisa kitoko ya bopɔlɔ oyo tosengeli komekola!
[Elilingi na lokasa 98]
Yehova amonaka kanyaka mpe makambo ya kozanga bosembo
[Elilingi na lokasa 104]
Komonisa polele mateya ya Biblia oyo ondimaka ekoki kobatela yo
[Elilingi na lokasa 106]
Bakristo mingi bamibanzabanzaka na bolingo mpo na bamposa ya elimo ya bapaya
[Bililingi na lokasa 109]
Basaleli ya Nzambe basengeli koboya makambo oyo etyaka bato na boyokani na bademo