Yehova ayini ezaleli ya bokosi
‘Bósala na bokosi te moko epai na mosusu.’—MALAKI 2:10, NW.
1. Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso mpo tózwa bomoi ya seko?
OLINGI kozala na bomoi ya seko? Soki ondimaka elaka yango ya Biblia, na ntembe te okoloba ete: ‘Ɛɛ, nalingi yango.’ Kasi, soki olingi ete Nzambe apesa yo bomoi ya seko na mokili ya sika, osengeli kokokisa masɛngami na ye. (Mosakoli 12:13; Yoane 17:3) Tokoki nde kokanisa ete kosɛnga bato ya kozanga kokoka bákokisa masɛngami ya Nzambe ezali likambo oyo eleki makasi? Te, mpamba te Yehova alobi maloba ya kolendisa oyo: “Nalingi boboto, mbeka te; nalingi boyebi koyeba Nzambe liboso na makabo matumbami.” (Hosea 6:6) Maloba wana emonisi ete, ata bato ya mabunga bakoki kokokisa masɛngami ya Nzambe.
2. Ndenge nini Bayisalaele mingi basalelaki Yehova na bokosi?
2 Kasi, ezali bato nyonso te nde balingaka kosala mokano ya Yehova. Hosea amonisi ete Bayisalaele mingi kutu balingaki kosala yango te. Ekólo mobimba basalaki kondimana to boyokani na Nzambe ete bakotosa mibeko na ye. (Exode 24:1-8) Kasi, mwa moke na nsima, bakómaki ‘kosopa kondimana’ na ndenge bazalaki kobuka mibeko na ye. Yango wana, Yehova alobaki ete Bayisalaele yango ‘basalelaki ye na bokosi.’ (Hosea 6:7) Mpe nsima na bango, bato mingi basalelaki mpe basalelaka ye na bokosi. Kasi, Yehova ayini ezaleli ya bokosi, ezala ntango moto asaleli ye yango to asali yango epai ya bato oyo balingaka ye mpe bazali kosalela ye.
3. Tokotalela nini na boyekoli oyo?
3 Hosea azalaki ye moko te mosakoli oyo alobelaki makasi likanisi ya Nzambe mpo na oyo etali bokosi, likanisi oyo tosengeli kondima soki tolingi kozala na esengo. Na lisolo oyo eleki totalelaki vɛrsɛ mokomoko ya nsango ya esakweli ya Malaki, banda na mokapo ya liboso ya mokanda yango. Tiká sikoyo tótalela mokapo ya mibale ya mokanda yango mpo tómona ndenge oyo likanisi ya Nzambe mpo na bokosi etalelami lisusu. Atako Malaki azalaki mpenza nde kolobela makambo oyo ezalaki koleka na kati ya basaleli ya Nzambe mwa bambula mingi nsima ya kouta na bango na Babilone, makambo oyo ezali na mokapo wana ya mibale ezali mpe na ntina mingi mpo na biso lelo oyo.
Banganga ya misala mabe
4. Yehova akebisaki banganga na likambo nini?
4 Mokapo ya 2 ebandi na maloba ya Yehova oyo ezali komonisa mabe ya banganga mpo batikaki kolanda banzela na ye ya sembo. Soki banganga bayoki toli na ye te mpe babongisi bizaleli na bango te, mpasi monene esengelaki kozwa bango. Yoká ndenge bavɛrsɛ mibale ya ebandeli elobi: “Ɛ bino banganga, [sikoyo] lilako oyo ezali mpo na bino. [Yehova] na bibele alobi ete, Soki bokoyoka te nde bokotya yango na motema te mpo na kopesa nkombo na ngai lokumu, nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela mapamboli na bino mabe.” Soki banganga bateyaki bato mibeko ya Nzambe mpe soki batosaki yango, mbɛlɛ bazwaki mapamboli. Kasi, lokola basalaki mokano ya Nzambe te, balakelamaki mabe. Ata mapamboli oyo banganga bazalaki koloba esengelaki kobongwana bilakeli mabe.
5, 6. (a) Mpo na nini banganga bazalaki mabe koleka? (b) Yehova alobaki nini mpo na komonisa ete azalaki kosepela na banganga te?
5 Mpo na nini banganga nde bazalaki na mabe koleka? Vɛrsɛ 7 emonisi polele ntina ya likambo yango: “Ekoki na bibebu ya nganga ete bibatela boyebi mpe ete bato báluka mobeko ya solo na monɔkɔ na ye. Zambi ye azali ntoma ya [Yehova] na bibele.” Koleka mbula nkóto liboso, mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisalaele na nzela ya Mose elobaki ete banganga bazali na mokumba ya “koteya bana ya Yisalaele malako nyonso oyo Yehova alobaki.” (Levitike 10:11, NW) Kasi, mawa mingi, nsima ya bambula mingi, mokomi ya mokanda ya ntango, na 2 Ntango 15:3 alobaki ete: “Mikolo mingi, Yisalaele bazalaki na Nzambe ya solo te, bazalaki na nganga na kolakisa te, bazalaki na mobeko te.”
6 Na ntango ya Malaki, na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.), banganga bazalaki kaka ndenge wana. Bazalaki koteya bato Mibeko ya Nzambe te. Yango wana, ebongaki mpenza Nzambe asambisa banganga wana. Landá malamu maloba ya kopamela makasi oyo Yehova alobaki na bango. Malaki 2:3 elobi boye: “Nakotanda nyɛi likoló ya bilongi na bino, nyɛi [ya bafɛti, NW] na bino.” Oyo nsuka ya mpamela! Bazalaki komema libándá ya kaa nyɛi ya banyama oyo bazalaki kopesa lokola mbeka mpe bazalaki kotumba yango. (Levitike. 16:27) Kasi ntango Yehova alobi na bango ete bakotanda nyɛi yango na bilongi na bango, ezali komonisa polele ete azalaki kosepela te mpe aboyaki ezala bambeka mpe ezala bato oyo bazalaki kopesa bambeka yango.
7. Mpo na nini Yehova asilikelaki balakisi ya Mibeko?
7 Bankama ya bambula liboso ya eleko ya Malaki, Yehova apesaki Balevi misala ya tabernakle mpe na nsima, misala ya tempelo mpe na mosala ya bosantu. Bazalaki balakisi na libota ya Yisalaele. Mpo ete bango moko mpe ekólo mobimba bázala na bomoi ya malamu mpe na kimya, basengelaki kokokisa mokumba wana. (Mituya 3:5-8) Kasi Balevi bazalaki lisusu kobanga Nzambe te lokola na ebandeli. Yango wana, Yehova alobaki na bango ete: “Bosili kopɛngwa longwa na nzela; [bobɛtisi] mingi mabaku mpo na mobeko, bobebisi kondimana na Lewi. . . . Bobateli nzela na ngai te.” (Malaki 2:8, 9) Lokola bazalaki koteya solo te mpe kopesa ndakisa malamu te, banganga bapɛngwisaki Bayisalaele mingi, yango wana mpenza Yehova asilikelaki bango.
Tóbatela mitinda ya Nzambe
8. Tokoki nde koloba ete makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bato eleki makasi? Limbolá.
8 Tókanisa te ete ebongaki koyokela banganga wana mawa mpe kolimbisa bango mpo bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe bakokaki te kotosa mitinda ya Nzambe. Moto akoki mpenza kotosa mibeko ya Nzambe, mpamba te Yehova asɛngaka bato te makambo oyo bakoki te kokokisa yango. Na ntango ya Malaki, ekoki kozala ete banganga mosusu, atako bazalaki mingi te, bazalaki kotosa mitinda ya Nzambe; mpe toyebi ete bambula mingi na nsima, nganga moko atosaki: Yesu, ‘nganga monene’ oyo aleki bango nyonso. (Baebele 3:1) Bakokaki mpenza koloba na ntina na ye ete: “Mobeko ya solo ezalaki na monɔkɔ na ye mpe bokosi ezwami na bibebu na ye te. Atambolaki na ngai na kimya mpe na boyengebene mpe apɛngolaki mingi longwa na mabe.”—Malaki 2:6.
9. Na mikolo na biso, banani oyo bazali koteya solo na bosembo mpenza?
9 Ndenge moko mpe, tokokisi sikoyo mbula koleka nkama, bandeko ya Klisto bapakolami na elimo, baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló, bazali kosala mosala ya ‘banganga basantu mpo na kopesa mbeka ya elimo, oyo Nzambe andimi yango.’ (1 Petelo 2:5, NW) Bazali kopesa ndakisa na likambo etali koteya bato mateya ya solo ya Biblia. Lokola oyekoli mateya ya solo oyo bazali koteya, yo moko omoni te ete mobeko ya solo ezali mpenza na monɔkɔ na bango? Basalisi ebele ya bato bápesa mokɔngɔ na mateya ya lokuta ya mangomba; yango wana lelo oyo ebele ya bato na mokili mobimba bayekoli mateya ya solo ya Biblia mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko. Bato yango mpe bazali kozwa libaku malamu ya koteya ebele ya bato mosusu mibeko ya solo.—Yoane 10:16; Emoniseli 7:9.
Ntina ya kozala na bokɛngi
10. Mpo na nini tosengeli mpenza kokeba na maloba na biso?
10 Atako bongo, tosengeli kokeba. Tokoki kozanga kokanga ntina ya mateya oyo ezali na Malaki 2:1-9. Tozali mpenza kokeba mpo ete bokosi ezwama na bibebu na biso te? Na ndakisa, bato ya libota na biso bakoki mpenza kotyela maloba na biso motema? Bandeko na kati ya lisangá bakoki mpe kotyela maloba na biso motema? Moto akoki mpenza kokóma na momeseno ya kosalela elobeli oyo, soki moto mosusu ayoki ye, akomona lokola ete azali koloba makambo ya solo, nzokande azali kokosa. Na makambo ya mombongo, moto akoki kolekisa ndelo ntango azali koloba likambo moko to mpe akoki kobomba makambo mosusu. Yehova akozanga nde koyeba yango? Mpe soki tozali kosala makambo ya ndenge wana, akondima bambeka ya masanzoli oyo ezali kouta na bibebu na biso?
11. Banani oyo basengeli mpenzampenza kokeba?
11 Malaki 2:7 (NW) ezali mpe likebisi mpo na bandeko oyo bazali na mokumba ya koteya Liloba ya Nzambe na kati ya masangá lelo oyo. Vɛrsɛ yango elobi ete mbebu na bango “esengeli kobatela boyebi mpe ete bato basengeli koluka mobeko” na monɔkɔ na bango. Bateyi yango bazali na mokumba monene, mpamba te Yakobo 3:1 emonisi ete ‘bakosambisama na ekateli eleki makasi.’ Bandeko yango basengeli koteya na mpiko mpe na esengo, kasi mateya na bango esengeli kouta na makambo oyo ekomami na Liloba ya Nzambe mpe na malako ya ebongiseli ya Yehova. Na ndenge yango bakozala ‘bato babongi kolakisa bamosusu.’ Yango wana, bapesi bango toli ete: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai na Nzambe lokola mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali yo kosembola liloba ya solo.”—2 Timote 2:2, 15.
12. Bateyi basengeli kokeba na likambo nini?
12 Soki tozali kokeba te, motema na biso ekoki kotinda biso, ntango tozali koteya, tókɔtisa makanisi na biso moko to makambo oyo biso tolingaka. Ekozala mpenza likama, mingimingi mpo na moto oyo amonaka ete azalaka kaka na makanisi ya malamu ata ntango oyo makanisi yango eyokani te na mateya ya ebongiseli ya Yehova. Kasi, Malaki mokapo ya 2 emonisi ete tosengeli kolikya ete bateyi na kati ya lisangá bákangama na boyebi ya Nzambe kasi na makanisi na bango te, yango ekoki kobɛtisa bampate libaku. Yesu alobaki boye: “Moto oyo abɛtisi libaku na moko na bana oyo bazali kondimela ngai, eleki malamu mpo na ye ete bákangisa na nkingo na ye libanga ya konikela lokola oyo mpunda ebalolaka mpe bázindisa ye na mai monene.”—Matai 18:6, NW.
Kobala moto oyo azali mondimi te
13, 14. Wapi ezaleli ya bokosi oyo Malaki alobelaki polele?
13 Banda na vɛrsɛ ya 10, Malaki mokapo ya 2 elobeli mpenzampenza makambo oyo ezali komonisa bokosi. Malaki alobeli bizaleli mibale oyo mpo na yango asalelaki mbala na mbala maloba “kosala na bokosi.” Libosoliboso, okomona ete Malaki abandi toli na ye na mituna oyo: “Biso nyonso tozali na tata moko te? Nzambe moko [akelaki] biso te? Mpo na nini tozali kosala na bokosi, moto na moto kotɛmɛla ndeko na ye mpo na kobebisa kondimana ya batata na biso?” Na nsima, vɛrsɛ ya 11 (NW) ebakisaki ete ezaleli ya bokosi ya Yisalaele ezali lokola nde bazali kotyola “bosantu ya Yehova.” Likambo nini ya mabe mpenza bazalaki kosala? Vɛrsɛ elakisi polele ezaleli moko ya mabe: “babalaki mwana mwasi ya nzambe ya bapaya.”
14 Na maloba mosusu, Bayisalaele mosusu, bato ya libota oyo emipesaki na Yehova, babalaki bato oyo bazalaki kosambela ye te. Makambo oyo elobami na likoló mpe na nse ya vɛrsɛ wana ezali kosalisa biso tómona monene ya likambo yango. Vɛrsɛ 10 elobaki ete bango nyonso bazalaki na tata moko. Tata yango ezalaki Yakobo te (oyo akómaki kobengama Yisalaele), ezalaki Abalayama mpe te, ata Adama mpe te. Malaki 1:6 emonisi ete “tata” ezalaki nde Yehova. Libota ya Yisalaele ezalaki na boyokani na Yehova, bazalaki na kati ya kondimana oyo asalaki na bankɔkɔ na bango. Mobeko moko ya kondimana wana elobaki boye: “Okobala kati na bango te, kopesa bana basi na yo epai na bana mibali na bango te, to kokamata bana basi na bango mpo na bana mibali na yo te.”—Deteronome 7:3.
15. (a) Ndenge nini moto akoki kolongisa likambo ya kobala moto oyo azali mondimi te? (b) Yehova alobi nini na oyo etali libala?
15 Lelo oyo, bandeko mosusu bakoki kokanisa boye: ‘Mwasi oyo (to mobali oyo) azali kobɛtisa ngai motema azali mpenza malamu. Namoni ete nsukansuka akondima kaka losambo ya solo.’ Makanisi ya ndenge wana ezali kondimisa likebisi oyo: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Nzambe amonisi likanisi na ye na likambo etali kobala moto oyo azali mondimi te na Malaki 2:12 (NW): “Yehova akoboma moto nyonso oyo azali kosala bongo.” Yango wana, baklisto balendisami na kobala “kaka na kati ya Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39, NW) Na ebongiseli ya boklisto, mondimi oyo abali moto oyo azali mondimi te azali ‘kobomama’ te. Kasi, lokola etikali moke Nzambe aboma ebongiseli oyo, likambo nini ekokómela moto oyo azali mondimi te soki abongwani te?—Nzembo 37:37, 38.
Konyokola molongani
16, 17. Bato mosusu bazalaki kosalela bokosi na likambo nini?
16 Na nsima, Malaki alobeli bokosi ya mibale: konyokola molongani, mingimingi na likambo lokola koboma libala na ntina ya malonga te. Vɛrsɛ 14 ya mokapo 2 elobi boye: “[Yehova] azali motatoli kati na yo mpe mwasi ya bolenge na yo oyo yo osaleli ye na bokosi ata ye azali moninga na yo mpe mwasi na yo na nzela ya kondimana.” Lokola bazalaki kosalela basi na bango bokosi, tokoki koloba ete mibali wana Bayuda basalaki ete etumbelo ya Yehova ‘ezipama na mpisoli.’ (Malaki 2:13) Mibali yango bazalaki koboma mabala mpo na makambo oyo ekoki koboma libala te, bazalaki nde kosundola basi oyo bango babalaki ntango bazalaki bilenge, ntango mosusu mpo na kobala basi oyo bazalaki naino bilenge to basi bapaya. Mpe banganga ya mabe batikaki nzela ete makambo wana esalemaka! Kasi, Malaki 2:16 (NW) elobi boye: “ ‘Ayini koboma libala,’ Yehova Nzambe ya Yisalaele alobi.” Na nsima, Yesu amonisaki ete pite to ekobo nde ezali ntina kaka moko oyo libala ekoki kokufa mpe mpo na yango molongani oyo asali mabe te akoki kobala moto mosusu.—Matai 19:9.
17 Kanisá naino malamu maloba ya Malaki mpo omona ndenge oyo ezali kosimba motema mpe kolamwisa boboto ya moto nyonso. Alobeli “moninga na yo mpe mwasi na yo na nzela ya kondimana.” Mobali nyonso oyo balobeli awa abalaki mwasi oyo azali Moyisalaele, moto oyo bazalaki kosambela na ye Nzambe moko; aponaki mwasi na ye wana lokola molongani na ye ya motema, moninga oyo bakofanda na ye tii liwa ekokabola bango. Lokola babalanaki ntango bango mibale bazalaki naino bilenge, kondimana oyo basalaki, elingi koloba libala na bango, ekokaki kobeba te kaka mpo bambula elekaki mpe babandaki kokóma mibange.
18. Na ndenge nini toli ya Malaki mpo na bokosi ebongi na moi ya lelo?
18 Toli oyo epesamaki na makambo wana esengeli mpe kosalelama ndenge moko na moi ya lelo. Ezali mawa mingi ete bato mosusu bazali kotyola toli ya Nzambe oyo esɛngi kobala kaka na kati ya Nkolo. Ezali mpe mawa ete bato mosusu bazali kosala lisusu makasi te mpo ete libala na bango ezala ntango nyonso malamu. Bazali nde koluka komilongisa mpe bazali koboma mabala mpo na bantina oyo Makomami endimi te mpo na kobala moto mosusu; Nzambe ayini likambo yango mpenza. Na ntango bazali kosala bongo, “bazali kolɛmbisa Yehova.” Na ntango ya Malaki, bato oyo baboyaki kolanda toli ya Nzambe bazalaki koyoka ata kilo te na kokanisa ete Yehova azali na libunga. Bazalaki lokola nde koloba ete: “Nzambe ya boyengebene azali wapi?” Talá naino, makanisi yango etɛngamá mpenza! Biso tókwea na motambo wana te.—Malaki 2:17, NW.
19. Ndenge nini mibali mpe basi bakoki kozwa elimo ya Nzambe?
19 Malaki alobeli mpe likambo ya malamu: amonisi ete mibali mosusu mpe basalelaki basi na bango bokosi te. ‘Bazalaki na ndambo ya elimo santu ya Nzambe oyo etikalaki.’ (Vɛrsɛ 15, NW) Ezali esengo mingi ete ebongiseli ya Nzambe ezali na ebele ya mibali ya ndenge wana oyo bazali ‘kopesa basi na bango lokumu.’ (1 Petelo 3:7) Mibali yango babɛtaka basi na bango te, bafingaka bango te, batungisaka bango te ete básangisa na bango nzoto na ndenge ya bosɔtɔ, mpe bakitisaka te lokumu ya basi na bango na kokangamakangama na basi mosusu to na kotala bililingi ya bato bazali bolumbu. Ebongiseli ya Yehova etondi mpe na basi baklisto ya sembo oyo bazali kotosa Nzambe mpe bazali kotosa mibeko na ye. Mibali mpe basi wana nyonso bayebi makambo oyo Nzambe ayini, mpe bakanisaka mpe basalaka makambo na kolanda makanisi ya Nzambe. Zalá ntango nyonso lokola bango, ‘tosáká Nzambe lokola mokonzi’ mpe zwá elimo santu na ye.—Misala 5:29.
20. Ntango nini ekómi pene mpo na bato nyonso?
20 Etikali moke Yehova asambisa mokili mobimba. Nzambe akotuna moto na moto mpo na bindimeli mpe misala na ye. “Moto na moto na kati na biso akosamba na miso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.” (Roma 14:12, Boyokani ya Sika) Yango wana, motuna ya malamu mpenza yango oyo: Nani akobika na mokolo ya Yehova? Lisolo ya nsuka na kati ya masolo misato oyo ekolobela likambo yango.
Okoki kolimbola?
• Mpo na ntina nini mpenzampenza Yehova apamelaki banganga na Yisalaele?
• Mpo na nini tokoki koloba ete masɛngami ya Nzambe ezali makasi te mpo bato bátosa yango?
• Mpo na nini tosengeli kokeba na mateya na biso lelo oyo?
• Wapi makambo mibale oyo Yehova akweisaki mpenza?
[Elilingi na lokasa 15]
Na ntango ya Malaki bapamelaki banganga mpo babatelaki banzela ya Yehova te
[Elilingi na lokasa 16]
Tosengeli kokeba ete tóteya kaka banzela ya Yehova, kasi makambo oyo esepelisaka biso moko te
[Bililingi na lokasa 18]
Yehova akweisaki Bayisalaele oyo babomaki mabala na basi na bango mpo na makambo ezangi ntina mpe babalaki basi bapakano
[Elilingi na lokasa 18]
Lelo oyo, baklisto bakokisaka ndai na bango ya libala