Kokokisa masɛngami ya Yehova ekumisaka ye
“Nakokumisa ye na matɔndi.”—NZEMBO 69:30.
1. (a) Mpo na nini Yehova abongi kokumisama? (b) Ndenge nini tokoki kokumisa ye na matɔndi?
YEHOVA azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe Mozalisi. Mpo na yango, nkombo na ye mpe mikano na ye esengeli kokumisama. Kokumisa Yehova elimboli kotya ye na esika oyo eleki likoló, kosanzola ye mpe kopesa ye nkembo na maloba mpe na misala. Kokumisa ye “na matɔndi” ezali kosɛnga ete tótɔnda ye ntango nyonso mpo na makambo oyo azali kosala mpo na biso sikoyo mpe oyo akosala na mikolo ekoya. Tosengeli kozala na makanisi oyo emonisami na Emoniseli 4:11 (NW), epai oyo bikelamu ya elimo kuna na likoló bazali koloba ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Ndenge nini tokoki kokumisa Yehova? Tokokumisa ye soki tozali koyekola makambo na ye mpe na nsima kosala makambo oyo azali kosɛnga biso. Tosengeli kokanisa lokola mokomi ya nzembo ntango alobaki boye: “Lakisá ngai ete nasala mokano na yo mpo ete yo ozali Nzambe na ngai.”—Nzembo 143:10.
2. Yehova asalaka nini epai na baoyo bakumisaka ye, bongo epai na baoyo bakumisaka ye te?
2 Yehova asepelaka mingi na bato oyo bakumisaka ye. Yango wana “akokóma ye oyo apesaka mbano epai na baoyo balukaka ye mpenza.” (Baebele 11:6, NW) Mbano yango ezali nini? Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Elingi koloba ete bato oyo bazali “kokumisa [Yehova] na matɔndi” “bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Nzokande, “mikolo oyo ezali koya ekozala malamu te mpo na moto mabe.” (Masese 24:20, NW) Na yango, na mikolo ya nsuka oyo tozali, tosengeli mpenza kokumisa Yehova mpamba te etikali moke aboma bato mabe mpe abatela bato ya sembo. “Mokili ezali . . . kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17; Masese 2:21, 22.
3. Mpo na nini tosengeli kotyela mokanda ya Malaki likebi?
3 Biblia ezali koyebisa biso mokano ya Yehova, mpamba te “Makomami nyonso mapemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16, NW) Biblia, Liloba ya Nzambe ezali na masolo mingi oyo ezali komonisa ndenge oyo Yehova apambolaka bato oyo bakumisaka ye mpe makambo oyo ekómelaka baoyo bakumisaka ye te. Moko na masolo yango ezali kolobela makambo oyo esalemaki na Yisalaele na ntango ya mosakoli Malaki. Malaki akomaki mokanda oyo ebengamaka na nkombo na ye soki na mobu 443 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango Nehemia azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yuda. Mokanda yango ezali na nguya, ezali kosimba motema mpe ezali na makambo mpe bisakweli oyo “ekomamaki mpo na kokebisa biso baoyo nsuka ya bibongiseli ya makambo ekómeli biso.” (1 Bakolinti 10:11, NW) Soki totyeli maloba ya Malaki likebi, yango ekoki kosalisa biso na komibongisa mpo na “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova],” ntango akoboma ebongiseli ya makambo oyo mabe.—Malaki 4:5.
4. Wapi makambo motoba oyo bamonisi biso na Malaki mokapo 1?
4 Ndenge nini mokanda ya Malaki, oyo ekokisi sikoyo mbula koleka 2 400 banda ekomamá, ekoki kosalisa biso na ekeke ya 21 tómibongisa mpo na mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova? Mokapo ya liboso ezali kobenda likebi na biso na makambo soki motoba ya ntina na ndenge oyo tosengeli kokumisa Yehova na matɔndi mpo tósepelisa ye mpe tózwa bomoi ya seko: (1) Yehova alingaka basaleli na ye. (2) Tosengeli komona ete biloko mosantu ezali na motuya. (3) Yehova alingi ete tópesa ye oyo eleki malamu. (4) Losambo ya solo esimbami na bolingo ya solosolo, kasi na lokoso te. (5) Kosalela Nzambe mosala oyo akondima ezali te mokumba ya kilo oyo tosengeli kosala kaka mpo na kosala. (6) Mokomoko na biso akosamba liboso ya Nzambe. Yango wana, na lisolo oyo ya liboso kati na masolo misato oyo ezali kolobela mokanda ya Malaki, tiká tólobela naino mokomoko na makambo yango motoba wana tozali kotalela Malaki mokapo 1.
Yehova alingaka basaleli na ye
5, 6. (a) Mpo na nini Yehova alingaki Yakobo? (b) Soki tozali sembo lokola Yakobo, tokoki kolikya kozwa nini?
5 Bavɛrsɛ ya liboso ya Malaki ezali komonisa polele bolingo ya Yehova. Mokanda yango ebandi na maloba oyo: “Litatoli ya liloba ya [Yehova] epai na Yisalaele.” Lisusu, Nzambe alobi boye: “Nalingi bino.” Kaka na vɛrsɛ yango, Yehova atángi ndakisa moko mpe alobi boye: “Nalingaki Yakobo.” Yakobo azalaki kondimela Yehova. Na nsima, Yehova apesaki ye nkombo mosusu: Yisalaele, mpe akómaki nkɔkɔ ya libota ya Yisalaele. Yehova alingaki Yakobo mpo azalaki moto ya kondima. Yehova alingaki Bayisalaele oyo bamonisaki elimo ndenge moko na Yakobo.—Malaki 1:1, 2.
6 Soki tolingi Yehova mpe totikali na kati ya basaleli na ye, tokoki kobɔndisama na maloba oyo ezali na 1 Samwele 12:22 ete: “[Yehova] akotika bato na ye te mpo na lokumu ya nkombo na ye monene.” Yehova alingaka bato na ye mpe na nsuka akopesa bango mbano ya bomoi ya seko. Yango wana tozali kotánga boye: “Zalá na elikya epai na [Yehova] mpe salá malamu; boye okofanda na mokili mpe okosepela na malamu. Omisepelisa na [Yehova] mpe ye akopesa yo mposa nyonso ya motema na yo.” (Nzembo 37:3, 4) Kolinga Yehova ezali kosɛnga biso likambo ya mibale oyo Malaki mokapo 1 ebendi likebi na biso likoló na yango.
Tópesa motuya na biloko ya bosantu
7. Mpo na nini Yehova ayinaki Esau?
7 Na Malaki 1:2, 3, nsima ya koloba ete, “Nalingaki Yakobo,” Yehova alobi ete, “Nayinaki Esau.” Mpo na nini alingaki moko mpe ayinaki mosusu? Yakobo akumisaki Yehova, kasi Esau lipasa na ye, akumisaki Yehova te. Nkombo mosusu ya Esau ezalaki Edome. Na Malaki 1:4, mokili ya Edome ebengami mokili ya mabe, mpe bamonisi mabe ya bato oyo bazalaki kofanda kuna. Bapesaki Esau nkombo Edome (elimboli “Motane”) nsima wana atɛkelaki Yakobo lotomo na ye ya mwana ya liboso mpo na mwa supu ya motane. Genese 25:34 (NW) elobi ete “Esau atyolaki lotomo na ye ya mwana ya liboso.” Ntoma Paulo apesaki baninga na ye bandimi toli ete bákeba ete “moto ya pite azala te to moto oyo apesaka makambo ya bosantu motuya te, lokola Esau oyo, kaka mpo na saani moko ya bilei, akabaki ntomo na ye ya mwana ya liboso.”—Baebele 12:14-16, NW.
8. Mpo na nini Paulo akokanisaki Esau na moto ya pite?
8 Mpo na nini Paulo akokanisaki misala ya Esau na pite? Mpamba te moto oyo azali na elimo lokola oyo ya Esau akoki kotyola biloko ya bosantu. Na nsima, ekoki komema ye na kosala masumu minene, na ndakisa pite. Yango wana, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Namekamaka ntango mosusu kokaba libula na ngai ya boklisto, elingi koloba bomoi ya seko, mpo na eloko oyo nakosepela na yango se mpo na mwa ntango, lokola supu ya ndunda? Ntango mosusu, kozanga ete nayeba yango, natyolaka biloko ya bosantu?’ Esau azalaki motema mɔ́tɔmɔ́tɔ kaka mpo na kokokisa mposa oyo azalaki na yango. Alobaki na Yakobo ete: “Nabondeli yo, nokinoki pesá ngai supu motane wana namɛla.” (Genese 25:30, NW) Likambo ya mawa ezali ete basaleli mosusu ya Nzambe basalaki makambo oyo ezali komonisa ete balobaki ete: “Nokinoki! Mpo na nini nazelaka tii nakobala?” Mposa ya kosangisa nzoto ekómaki epai na bango lokola saani ya supu ya motane na miso ya Esau.
9. Ndenge nini tokoki kobatela ezaleli ya kobanga Yehova?
9 Tiká ete tótyola te biloko ya bosantu, tómona te pite to ekobo, kobatela bosembo, mpe libula na biso ya elimo, lokola makambo ya lisɛki. Tózala lokola Esau te, tózala nde lokola Yakobo moto ya sembo: tóbatela ezaleli ya kobanga Nzambe mpe tópesa motuya na biloko ya bosantu. Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tozali kosala nyonso ete tókokisa masɛngami ya Yehova. Yango mpe ememi biso mbala moko na likambo ya misato oyo Malaki mokapo 1 elobeli. Ezali likambo nini?
Tópesa Yehova oyo eleki malamu
10. Na ndenge nini banganga bazalaki kotyola mesa ya Yehova?
10 Banganga ya Yuda oyo bazalaki kosala na tempelo ya Yelusaleme na eleko ya Malaki bazalaki kopesa Yehova bambeka ya malamu te. Malaki 1:6-8 elobi boye: “Mwana mobali akokumisa tata na ye mpe moombo nkolo na ye. Soko nde ngai nazali tata, wapi lokumu na ngai? Soko ngai nazali nkolo, wapi botosi na ngai? [Yehova] na bibele alobi bongo epai na bino, ɛɛ banganga baoyo bazali kotyola nkombo na ngai.” Banganga batunaki ete: “Totyoli nkombo na yo na nzela nini?” Yehova azongisaki ete: “Bokabi bilei na mbindo likoló na etumbelo na ngai.” Banganga batunaki lisusu: “Tobebisi yo na mbindo na nzela nini?” Bongo Yehova alobi na bango: “Na nzela na koloba ete, Mesa na Yehova ezali eloko na kotyolama.” Banganga wana bamonisaki ete bazalaki kotyola mesa ya Yehova mbala nyonso oyo bazalaki kopesa bambeka ya mabe, bazalaki koloba ete: “Ezali mabe te.”
11. (a) Yehova alobaki nini mpo na bambeka ya mabe? (b) Na ndenge nini bato nyonso basalaki mabe?
11 Yango wana Yehova alobaki mpo na bambeka mabe wana ete: “Bópesa yango likabo epai na [guvɛrnɛrɛ, NW]. Akosepela nde na yo? Akoyamba nde elongi na yo?” Te, guvɛrnɛrɛ na bango akokaki kosepela na likabo ya ndenge wana te. Na koleka, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba akokaki te kondima makabo ya mabe wana! Kaka banganga te nde bazalaki na makambo mabe. Ya solo, bazalaki kotyola Yehova na ndenge bazalaki kopesa bambeka. Kasi, bato mosusu mpe bazalaki na makambo mabe! Bango nde bazalaki koyela banganga banyama wana oyo ekufá miso, oyo ebukaná makolo, mpe banyama ya maladi mpo bápesa yango mbeka epai ya Nzambe. Ezalaki mpenza masumu!
12. Ndenge nini bazali kosalisa biso na kopesa Yehova oyo eleki malamu?
12 Soki tolingi kolakisa mpenza ete tólingaka Yehova, tosengeli kopesa ye oyo eleki malamu. (Matai 22:37, 38) Lelo oyo, ebongiseli ya Yehova ekeseni na banganga ya motó makasi ya ntango ya Malaki; ebongiseli yango ezali kopesa mateya euti na Makomami oyo ezali kosalisa biso tókokisa masɛngami ya Nzambe mpe na ndenge yango, tókumisa ye na matɔndi. Likambo yango ezali na boyokani na likambo ya minei oyo tokoki kosimba na Malaki mokapo ya 1.
Losambo ya solo esimbami na bolingo, kasi na lokoso te
13. Banganga bazalaki kosala makambo nini oyo emonisaki ete bazalaki na lokoso?
13 Banganga ya ntango ya Malaki bazalaki na moimi, bazalaki na bolingo te, mpe bazalaki na lokoso ya mbongo. Ndenge nini toyebi yango? Malaki 1:10 elobi boye: “Ɛɛ, soko moko azali kati na bino mpo na kokanga bikuke ete bápelisa mɔ́tɔ na etumbelo na ngai mpamba te! [Yehova] na bibele alobi ete, Ngai nazali na esengo mpo na bino te. Nakoyamba mpe likabo epai na lobɔkɔ na bino te.” Banganga wana ya lokoso bazalaki kosɛnga báfuta bango mwa eloko liboso ya kosala ata misala ya mikemike ya tempelo lokola kokanga bikuke mpe kopelisa mɔ́tɔ ya etumbelo! Yango wana tokoki kokamwa te soki Yehova aboyaki koyamba makabo na bango!
14. Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo nde etindaka Batatoli ya Yehova na kosala mosala?
14 Lokoso mpe moimi ya banganga wana ya masumu na Yelusaleme ya ntango ya kala ekoki kosalisa biso na kobosana te likambo oyo Liloba ya Nzambe elobi, ete bato ya lokoso bakosangola Bokonzi ya Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9, 10) Soki tokanisi ndenge oyo banganga wana bazalaki kosala mpo na matomba na bango moko, tokomona mpenza motuya ya mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba. Tosalaka mosala yango na bolingo na biso moko, mpe tosɛngaka te ete báfuta biso mpo na mosala yango. Ɛɛ, biso “tozali te batɛkisi ya liloba ya Nzambe.” (2 Bakolinti 2:17, NW) Mokomoko na biso akoki koloba lokola Paulo ete: “Nasakolaki nsango malamu ya Nzambe epai na bino na motema moko kozanga kosɛnga lifuti.” (2 Bakolinti 11:7, NW) Tósimba ete Paulo ‘asakolaki nsango malamu . . . na motema moko.’ Likambo yango ememi biso na likambo ya mitano oyo ebendi likebi na biso na Malaki mokapo ya 1.
Kosalela Nzambe ezali te mokumba ya kilo oyo tosengeli kosala kaka mpo na kosala
15, 16. (a) Ndenge nini banganga bazalaki kotalela likambo ya kopesa bambeka? (b) Ndenge nini Batatoli ya Yehova bapesaka bambeka na bango?
15 Banganga wana oyo bazalaki sembo te na Yelusaleme ya kala bazalaki komona mosala ya kopesa mbeka lokola motungisi. Ezalaki kilo mpo na bango. Na Malaki 1:13, Nzambe ayebisaki bango ete: “Bolobi ete tolɛmbi na likambo oyo solo! Na bongo botyoli ngai.” Banganga wana batyolaki, to bafingaki biloko ya bosantu ya Nzambe. Tóbondelaka makasi mpo tókóma soki moke te lokola bango. Kasi, tózala mpenza nde na ezaleli oyo 1 Yoane 5:3 emonisi ete: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.”
16 Tiká ete tósepelaka na kopesa Nzambe bambeka ya elimo, tómona yango soki moke te ete ezali kilo. Tólanda maloba ya esakweli oyo: “Bóloba na [Yehova] ete, Longolá mabe nyonso. Yambá oyo ezali malamu, boye tokopesaka [bana-ngɔmbɛ mibali, NW] ya bibebu na biso.” (Hosea 14:2) Liloba “bana-ngɔmbɛ mibali ya bibebu na biso” ezali bambeka ya elimo, maloba oyo tolobaka mpo na kokumisa Yehova mpe mikano na ye. Baebele 13:15 elobi boye: “Bongo mpo na [Yesu Klisto], tótombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye.” Tozali na esengo makasi mpo ete topesaka bambeka na biso ya elimo kaka mpo na kopesa te, kasi na nzela na yango, tolakisaka solosolo ete tolingaka Nzambe! Sikoyo tokómi na likambo ya motoba oyo tokoki kosimba na Malaki na mokapo 1.
Mokomoko na biso akosamba
17, 18. (a) Mpo na nini Yehova alakelaki “mokosi” mabe? (b) Bakosi bazalaki kobosana likambo nini?
17 Na mikolo ya Malaki, moto na moto azalaki na ngambo mpo na misala na ye; ezali mpe ndenge moko mpo na biso. (Baloma 14:12; Bagalatia 6:5) Yango wana Malaki 1:14 elobi ete: “Mokosi alakelama mabe, ye oyo azali na nyama mobali [oyo ezali na mbeba te] kati na etonga na ye mpe asimbi ndai kasi azali kokabela Nkolo mbeka na yango ebebi.” Moto oyo azalaki na etonga ya banyama azalaki na nyama kaka moko te, na ndakisa mpate moko, mpo aloba ete nyama mosusu ezalaki te kaka oyo wana. Ntango azali kopona nyama mpo na kopesa yango mbeka, asengelaki te kopona oyo ekufá miso, ebukaná makolo, to oyo ezali na maladi. Soki aponi nyama ya mabe ndenge wana, yango ezalaki komonisa ete atyoli ebongiseli oyo Nzambe asalá ya kopesa mbeka, mpamba te moto oyo azalaki na etonga ya banyama akokaki te kozanga nyama ya malamu!
18 Yango wana, Yehova azalaki na ntina ya kolakela mabe mokosi oyo azalaki na nyama ya mobali ya malamu kasi aponi kaka komema nyama ekufá miso, to ebukaná makolo, to ya maladi, oyo mbala mosusu azalaki kobenda yango mpo akende na yango epai ya nganga mpo na kopesa mbeka. Ata esika moko te bamonisi ete banganga batángaki Mibeko mpo na komonisa ete banyama wana ya mabe ekokaki kondimama te. (Levitike 22:17-20) Bato nyonso ya makanisi ya malamu bayebaki ete soki bapesi guvɛrnɛrɛ na bango mbeka ya ndenge wana bakozwa etumbu. Nzokande, bango bazalaki kopesa mbeka nde na Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ye oyo aleki mpenza guvɛrnɛrɛ. Malaki 1:14 elobeli likambo yango boye: “Ngai nazali Mokonzi monene; [Yehova] na bibele alobi bongo. Mpe nkombo na ngai ezali nsɔmɔ kati na mabota.”
19. Tozali kozela nini na mposa makasi mpe tosengeli kosalaka nini?
19 Lokola tozali basaleli ya sembo ya Nzambe, tozali kozela na mposa makasi ntango oyo bato nyonso bakokumisa Yehova, Mokonzi Monene. Na ntango wana, “mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:9) Kasi liboso ete ntango wana eya, tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo tókokisa masɛngami ya Nzambe lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Nakokumisa ye na matɔndi.” (Nzembo 69:30) Mpo na yango, tokozwa litomba mingi lisusu na toli ya Malaki oyo elandi. Yango wana, na masolo mibale oyo elandi, tótya likebi mingi na mikapo mosusu ya mokanda ya Malaki.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini tosengeli kokumisa Yehova?
• Mpo na nini Yehova akokaki kondima te bambeka ya banganga na mikolo ya Malaki?
• Ndenge nini topesaka Yehova mbeka ya masanzoli?
• Nini esengeli kosimba losambo ya solo?
[Elilingi na lokasa 9]
Esakweli ya Malaki elobelaki mikolo na biso
[Elilingi na lokasa 10]
Esau atyolaki biloko ya bosantu
[Elilingi na lokasa 11]
Banganga mpe bato bapesaki bambeka oyo ebongi te
[Elilingi na lokasa 12]
Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kopesa mbeka ya masanzoli ofele