Mokanda ya Biblia nimero 29—Yoele
Mokomi: Yoele
Esika ya bokomi: Yuda
Nsuka ya bokomi: soko 820 L.T.B. (?)
1. Makambo nini ya nsɔ́mɔ malobelami mingi na esakweli ya Yoele?
EBELE mpenza ya nyama mikemike izali kobebisa mboka. Mɔ́tɔ ezali liboso na bango mpe nsima na bango ndemo na mɔ́tɔ ezali kobakisa lisusu libebi yango. Nzala ezali bipai binso. Moi eyindi mpe sanza ebongwani makila, mpamba te mokolo monene mpe ya nsɔ́mɔ ya Yehova ebɛlɛmi. Apesi etindá ya kosimba likwangola mpe ya koyanganisa mabota mpo na libebi. Nzokande, bato mosusu “bakobika.” (Yoe. 2:32) Botaleli ya makambo oyo ya nsɔ́mɔ esali ete esakweli ya Yoele ezala na ntina mingi mpe na litomba monene mpo na biso.
2. Makambo nini toyebi na ntina na Yoele mpe na ntina na makambo matali esakweli na ye?
2 Mokanda oyo ebandi boye: “Liloba na [Yehova] liyaki epai na Yoele, mwana na Petuele.” Longola likambo oyo, Biblia elobeli biso makambo mingi te na ntina na Yoele. Yango ezali kolobela mingi nsango ya esakweli, kasi mokomi na yango te. Nkombo “Yoele” (na Liebele, Yoh·ʼelʹ) ezali kolimbola “Yehova azali Nzambe.” Yoele ayebaki malamu Yelusaleme, tempelo na yango, mpe makambo oyo alobeli na ntina na mosala ya tempelo ekoki komonisa ete akomaki mokanda na ye na Yelusaleme to na Yuda.—Yoe. 1:1, 9, 13, 14; 2:1, 15, 16, 32.
3. Mpo na bantina nini dati ya penepene na mobu 820 L.T.B. nde epesami mpo na bokomi ya esakweli ya Yoele?
3 Ntango nini mokanda ya Yoele ekomamaki? Yango ekoki kolobelama na bosikisiki te. Bato na mayele bapesaka badati ekeseni ya bokomi na yango, kotyáká yango liboso ya mobu 800 L.T.B. kino pene na mobu 400 L.T.B. Kolobelama ya kosambisama ya Yehova likoló na mabota na esobe ya Yosafata emonisi ete Yoele akomaki esakweli na ye mwa moke nsima ya bolóngi monene oyo Yehova apesaki na Yosafata, mokonzi ya Yuda, mpe nsima wana Yosafata akómaki mokonzi na mobu 936 L.T.B. (Yoe. 3:2, 12; 2 Nta. 20:22-26) Ekoki kozala ete mosakoli Amosa atángaki makomi ya Yoele. Soki ezali bongo, boye esakweli ya Yoele ekomamaki liboso ya esakweli ya Amosa, oyo abandaki kosakola katikati na mobu 829 mpe 804 L.T.B. (Yoe. 3:16; Amo. 1:2) Likambo oyo ete yango ekomamaki liboso ekoki komonana na kozala ya mokanda yango kati na kanɔ́ ya Liebele katikati ya Hosea mpe Amosa. Na yango dati ya penepene mpo na esakweli ya Yoele emonisami ete ezali mobu 820 L.T.B.
4. Bilembeteli nini bimonisi bosolo ya mokanda ya Yoele?
4 Bosolo ya esakweli oyo endimisami na lolenge Makomami ya Greke ya boklisto mazali kotánga mpe kolobela makambo mazali kati na yango. Na mokolo ya Pantekote, Petelo alobelaki “mosakoli Yoele” mpe asalelaki moko na bisakweli na ye. Paulo atángaki esakweli yango moko mpe amonisaki kokokisama na yango epai na Bayuda mpe epai na bato oyo bazalaki Bayuda te. (Yoe. 2:28-32; Mis. 2:16-21; Lom. 10:13) Bisakweli ya Yoele oyo bitalelaki mabota ya zingazinga bikokisamaki nyonso. Engumba monene ya Tulo ezingelamaki na Nebukadanesala, mpe na nsima engumba ya esanga ebebisamaki na Alesandala Monene. Filisitia mpe ebebisamaki. Edome ekómaki mokili mokauki. (Yoe. 3:4, 19) Bayuda batyaki ntembe soko moke te na kopemama ya mokanda ya Yoele, mpe batyaki mokanda yango na esika ya mibale kati na oyo ebéngami ete basakoli ya mike.
5. Na makambo nini esakweli ya Yoele ezali na bopusi makasi?
5 Ekomeli ya Yoele ezali na nguya mpe na bopusi makasi. Azali kozongela makambo mpo na kobenda likebi mpe azali kosalela bililingi ya nguya. Mayoyo mabéngami libota, bato, mpe limpinga. Mino na yango mazali lokola oyo ya nkosi, lolenge na yango ezali lokola mpunda, mpe lokito na yango lokola makalo ya limpinga oyo mazali kobendama mpo na etumba. Búku The Interpreter’s Bible etángi moto moko ya mayele oyo ayekolaka mayoyo na kolobáká ete: “Lolenge oyo Yoele azali kolobela kobima ya mayoyo eleki mpenza mpo na bosikisiki mpe mpo na nguya ya maloba na yango.”a Yoká sikawa lolenge Yoele azali kosakola na ntina na mokolo ya Yehova, mokolo na nsɔ́mɔ.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YOELE
6. Emonaneli nini ya nsɔ́mɔ Yoele amoni liboso?
6 Kobima ya nyama mikemike ebebisi mboka; mokolo ya Yehova ebɛlɛmi (1:1–2:11). Oyo nde emonaneli na mpasi ya nsɔ́mɔ Yoele azali komona! Libebi ya kobundisama na mbinzo, na mayoyo, na mayoyo emibendaka na nsé oyo epumbwaka te, mpe na mpese. Nzeté ya mowiti mpe nzeté ya mosuke isili kobebisama, mpe nzala ezali na mboka. Mbeka na bilei mpe mbeka na komela izali te mpo na ndako ya Yehova. Yoele akebisi banganga mpe basaleli na Nzambe ete bábongola motema. Angangi ete: “Mawa mpo na mokolo yango! Zambi mokolo na [Yehova] ebɛlɛmi, ezali koya lokola libebisami uta na Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (1:15) Banyama izali kotambolatambola kati na mobulungano. Ndemo na mɔ́tɔ isili kozikisa bisobe mpe banzeté, mpe mokili mokauki mosili kobebisama na mɔ́tɔ.
7. Lolenge nini mampinga ya Yehova malobelami?
7 Pesá likamwisi! “Bóbɛta mondule na Siona, bóyokisa mongongo na kokebisa likoló na ngomba na ngai na bulɛɛ.” (2:1) Mokolo ya Yehova mosili kobɛlɛma, mokolo na molili mpe na kozanga pole. Talá! Bato mingi mpe ya nguya. Babongoli mokili oyo ekokani na Edene ete ekóma mokili mokauki. Ezali na eloko te oyo ezangi kobebisama. Lokola mpunda mpe na lokito lokola makalo likoló na nsɔngɛ́ ya ngomba bazali kopota. Lokola bato babongisami mpo na etumba bazali koingela nokinoki kati na mboka, komatáká likoló na bifelo mpe na ndako mpe na maninisa. Mokili molɛngi mpe makoló maningani. Yehova azali kokamba ebele ya mampinga wana. “Mokolo na [Yehova] ezali monene mpe na nsɔ́mɔ mingi; nani akokoka koyikela yango mpiko?”—2:11.
8. (a) Lolenge nini bobele moko esengeli mpo na kosilisa kobima ya banyama mikemike? (b) Kokitanya nini Yehova alaki ete akopesa?
8 Bómibalola epai na Yehova; elimo esengeli kosopama (2:12-32). Kasi eloko moko esengeli kosalema mpo na kosilisa libebi wana. Yehova apesi toli oyo: “Bóbongwa epai na ngai na mitema na bino nyonso, . . . pasolá mitema na bino nde bilamba na bino te, mpe bóngwana epai na Yehova, Nzambe na bino.” (2:12, 13) Liseke lizali kobɛta mpo na kobéngisa bato na liyangani monene. Soki bamibaloli epai na ye, “Yehova akozala na zuwa mpo na mokili na ye mpe akomonisa motema mawa epai na bato na ye.” (2:18, NW) Mapamboli mpe bolimbisi ekozala mpe mozingeli akozongisama nsima. Na esika ete ezala ntango ya kobanga, esengeli nde kozala ntango ya esengo mpe ya bosepeli, mpamba te mbuma mpe bilei mpe vinyo mpe mafuta ya sika ekozala. Yehova akokitanya na boumeli ya mbula mingi biloko oyo bilyamaki na mampinga minene na ye ya mayoyo. Elaka na ye ezali oyo: “Bokolya kolya mingi mpenza mpe bokotonda, bokosanzola mpe nkombo na [Yehova], Nzambe na bino; ye oyo asali makambo na kokamwa na bino elongo.” (2:26) Bakoyeba ete bobele Yehova nde azali Nzambe na bango katikati na Yisalaele.
9. Esakweli nini ya kosimba motema elandi?
9 Yehova alobi ete: “Na nsima ekozala ete, nakosopa [elimo] na ngai likoló na nzoto nyonso; bana na bino babali mpe bana na bino basi bakosakola, mikóló na bino bakolɔta ndɔ́tɔ, bilenge na bino bakomona bimonaneli. Ata epai na baombo na ngai babali mpe baombo na ngai basi na mikolo yango nakosopa [elimo] na ngai.” Makambo na nsɔ́mɔ makozala kati na moi mpe kati na sanza liboso na koya ya mokolo ya Yehova. Nzokande bato mosusu bakobika. “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.”—2:28-32.
10. Nini ekosalema kati na lobwaku ya esobe ya Yosafata?
10 Mabota makosambisama na “esobe ya Yosafata” (3:1-21). Yehova akozongisa baombo na Yuda mpe na Yelusaleme. Mabota makoyanganisama; Tulo, Sidona, mpe Filisitia bakomona mpasi mpamba te bayokisaki bato na Yehova nsɔ́ni mpe batyaki bango na boombo. Yoká maloba ya Yehova wana azali kobɛtela mabota ntembe: “Bulisá etumba, lamukisá bato na makasi; tiká ete bato na etumba bábɛlɛma, tiká ete bábuta!” (3:9) Tiká bátula bitimweli na bango ete bikóma mimpanga mpe bámata na esobe ya Yosafata (oyo elimboli “Yehova azali Mosambisi”). Etindá oyo ya Yehova epesami: “Bókɔtisa ekateli na masangu, zambi ntango na kobuka ekoki . . . Bibombelo izali kotonda mpe koleka, zambi mabe na bango ezali monene mpenza. Bibele, bibele, na lobwaku na kokata likambo; mpo ete mokolo na [Yehova] ebɛlɛmi.” (3:13, 14) Moi mpe sanza iyindi. Yehova azali konguluma longwa na Siona, kosaláká ete makoló mpe mabelé elɛnga, kasi amimonisi ete azali ebombamelo mpe esika makasi mpo na bato na ye. Basengeli koyeba ete azali Yehova, Nzambe na bango.
11. Lolenge nini Yoele alobeli mapamboli mauti na Yehova oyo makolanda na nsima?
11 Oyo nde biloko mingi bikozala na “mokolo yango” lokola na paladiso! (3:18) Bangomba ikotangisa vinyo, nkeka ikobimisa mabɛlɛ, mpe maziba makotonda na mai mingi. Etima ya kokitisa motema ekobima longwa na ndako ya Yehova. Ezipito mpe Edome, oyo batangisaki makila ya bato oyo basalaki likambo te kati na Yuda, bakokóma bikunde bisundolami, kasi Yuda mpe Yelusaleme ikofandama na bato libela na libela, “mpo ete Yehova akofanda na Siona.”—3:21, NW.
LITOMBA NA YANGO
12. Likambo nini ya ntina kati na esakweli ya Yoele, Petelo alobelaki yango mingi na Pantekote?
12 Balimboli mosusu basili koloba ete Yoele azalaki mosakoli ya mawa. Nzokande, mpo na bato ya Nzambe, amonani lokola mosakoli ya nsango na nkembo ya kobikisama. Ntoma Paulo alobeli mingi likanisi oyo na Baloma 10:13, kolobáká ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.” (Yoe. 2:32) Kokokisama monene ya esakweli ya Yoele esalemaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Na libaku wana, Petelo apemamaki na Nzambe mpo na kolimbola ete kosopama ya elimo ya Nzambe likoló na bayekoli ya Yesu ezalaki kokokisama ya esakweli ya Yoele. (Mis. 2:1-21; Yoe. 2:28, 29, 32) Petelo alobelaki mingi mpenza ntina ya maloba ya esakweli ya Yoele: “Mpe soko moto nani akobyanga nkombo na [Yehova] akobika.”—Mis. 2:21, 39, 40.
13. (a) Bokokani nini ya kokamwa ezali kati na Yoele mpe Emoniseli? (b) Makambo nini mazali na Yoele oyo tozali kokuta na bisakweli mosusu?
13 Bokokani ya kokamwa ezali kati na bolózi ya mayoyo oyo elobelami na Yoele mpe bolózi oyo esakolami na Emoniseli mokapo 9. Lisusu moi eyindi. Mayoyo makokani na mpunda ibongisami mpo na etumba, mazali kosala lokito lokola oyo ya makalo, mpe mazali na mino lokola oyo ya nkosi. (Yoe. 2:4, 5, 10; 1:6; Emon. 9:2, 7-9) Esakweli ya Yoele oyo ezwami na Yoele 2:31, oyo eyebisi ete moi eyindi, ekokani na likambo moko ya monene na maloba oyo mazali na Yisaya 13:9, 10 mpe Emoniseli 6:12-17, mpe lisusu na Matai 24:29, 30, epai Yesu amonisi ete esakweli oyo etaleli ntango oyo akoya lokola Mwana na moto kati na nguya mpe na nkembo monene. Maloba ya Yoele 2:11, oyo ete “mokolo na Yehova ezali monene mpe na nsɔ́mɔ mingi,” mamonani ete mazali kotánga Malaki 4:5. Maloba makokani oyo malobeli ‘mokili na molili mpe na kozanga pole’ ezwami mpe na Yoele 2:2 mpe na Sefania 1:14, 15.
14. Mokapo nini kati na Yoele mozali kokumisa lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi mpe motema-boboto na ye?
14 Esakweli ya Emoniseli etaleli “mokolo monene” ya nkanda ya Nzambe. (Emon. 6:17) Yoele mpe asakoli ntango yango, komonisáká ete wana “mokolo ya Yehova,” mokolo monene ekoya likoló na mabota, baoyo bazali kobelela ye mpo na koluka libateli mpe kobikisama “bakobika.” “Yehova akozala ebombamelo mpo na bato na ye.” Bolamu ya Edene ekozongisama lisusu: “Na mokolo yango, ngomba ikonokisa vinyo na sika mpe nkeka ikotiyola na mabɛlɛ; bitima nyonso na Yuda ikotiyola na mai. Liziba mpe ekobima na ndako na Yehova.” Na komonisáká bilaka kitoko wana ya kobongisama, Yoele mpe azali kokumisa lotómo oyo Yehova Nzambe azali na yango ya kozala mokonzi mpe azali kobyanga baoyo bazali na mitema sembo likoló na moboko ya motema mawa monene oyo Ye azali na yango: “Bóngwana epai na [Yehova], Nzambe na bino; mpo ete ye azali na boboto mpe na mawa. Akosilika noki te kasi azali na boboto monene mpenza.” Baoyo nyonso bazali kolanda libyangi wana lipemami na Nzambe bakozwa matomba ya seko.—Yoe. 2:1, 32; 3:16, 18; 2:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a 1956, Vol. VI, lokasa 733.