Nani “Akobika”?
“Moto nani akobyanga nkombo na [Yehova] akobika.”—MISALA 2:21.
1. Mpo na nini Pantekote ya mobu 33 T.B. ezali mokolo monene kati na lisolo ya bato?
MOKOLO ya Pantekote ya mobu 33 T.B. ezalaki mokolo monene kati na lisolo ya bato. Mpo na nini? Mpamba te na mokolo yango libota ya sika ebotamaki. Na ebandeli, ezalaki libota monene mpenza te—bobele bayekoli 120 ya Yesu oyo bayanganaki na eteni ya likoló na ndako moko na Yelusaleme. Kasi lelo oyo, atako mabota mingi oyo mazalaki na eleko wana masilá kolimwa, libota oyo ebotamaki na eteni ya likoló ya ndako ezali naino kati na biso. Likambo yango ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso, mpamba te ezali libota yango nde liponami na Nzambe mpo na kozala motatoli na ye epai na bato.
2. Bikamwiseli nini bisalemaki oyo bimonisaki kobotama ya libota ya sika?
2 Ntango libota yango ya sika ebandaki, makambo minene masalemaki oyo makokisaki maloba ya esakweli ya Yoele. Na Misala 2:2-4, tozali kotánga na ntina na makambo yango ete: “Lokito ebimi na Likoló pwasa lokola lokito na kopɛpa na mopɛpɛ makasi. Etondisi ndako mobimba kuna efandi bango. Ndemo lokola mɔ́tɔ imonani na bango, ikabwani, ifandi mokomoko na motó na moto na moto na bango. Bango nyonso batondaki na [elimo santu, NW], mpe babandi kosolola na nkota mosusu pelamoko [elimo epesi, NW] bango maloba.” Na lolenge yango, mibali mpe basi ya sembo, bango nyonso na motángo ya bato 120, bakómaki libota ya elimo, basangani ya liboso ya libota oyo ntomba Paulo abéngaki na nsima ete “Yisalaele na Nzambe.”—Bagalatia 6:16.
3. Esakweli nini ya Yoele ekokisamaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?
3 Bato mingi bayanganaki mpo na koyeba ntina ya “kopɛpa na mopɛpɛ makasi,” mpe ntoma Petelo alimbwelaki bango ete esakweli moko ya Yoele ezalaki kokokisama na ntango yango. Esakweli nini? Yoká oyo alobaki: “Nzambe alobi ete, Na mikolo na nsuka ekozala boye ete nakosopela bato nyonso [elimo, NW] na ngai. Bana na bino mibali, na bana na bino basi bakosakola, mpe bilenge na bino bakomona bimonaneli, mpe mikóló na bino bakolɔta ndɔtɔ, mpe na baombo na ngai, na mibali na basi, na mikolo yango nakosopela bango [elimo, NW] na ngai, mpe bakosakola. Nakopesa bikamwiseli kuna na likoló, mpe bilembo awa na nse, na makila, na mɔ́tɔ, na lipata na molinga. Moi ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila, liboso na koya na Mokolo na Nkolo, mokolo yango monene, mokolo na nkembo. Mpe soko moto nani akobyanga nkombo na [Yehova] akobika.” (Misala 2:17-21) Maloba oyo Petelo azongelaki mazwami na Yoele 2:28-32, mpe kokokisama na yango elimbolaki ete nsuka ya libota ya Bayuda ekómaki pene. ‘Mokolo ya Yehova, mokolo monene mpe ya nkembo,’ ntango ya kokata likambo ya Yisalaele oyo ezangaki sembo, ekómaki pene. Kasi, nani asengelaki kobika? Mpe yango ezalaki elilingi ya likambo nini?
Esakweli ekokisami mbala mibale
4, 5. Na kotalela makambo oyo mazali liboso, Petelo apesaki toli nini, mpe mpo na nini toli yango ebongaki kosalelama nsima ya mikolo na ye?
4 Na boumeli ya bambula oyo elandaki mobu 33 T.B., Yisalaele na Nzambe ekobaki kokola, kasi ezalaki bongo te mpo na Yisalaele ya mosuni. Na mobu 66 T.B., Yisalaele ya mosuni mpe bokonzi ya Loma babundaki etumba. Na mobu 70 T.B., pene na libota mobimba ya Yisalaele ezalaki lisusu te, mpe engumba Yelusaleme na tempelo na yango ezikisamaki na mɔ́tɔ nyɛɛ. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., Petelo apesaki toli malamu mpo na likama yango oyo ekómaki pene. Kotángáká lisusu maloba ya Yoele, alobaki ete: “Moto nani akobyanga nkombo na [Yehova] akobika.” Moyuda mokomoko asengelaki kozwa ekateli na ye moko ya kobelela nkombo ya Yehova. Yango esɛngaki kolanda malako malandi ya Petelo ete: “Bongolá mitema, mpe batisamá moko moko na nkombo na Yesu Klisto mpo na kolimbisama na masumu na bino.” (Misala 2:38) Baoyo bazalaki koyoka Petelo basengelaki kondima Yesu lokola Masiya, ye oyo libota ya Yisalaele eboyaki.
5 Maloba wana ya esakweli ya Yoele mazalaki na bopusi mingi epai na basɔkɛmi na ekeke ya liboso. Nzokande, mazali na bopusi mingi koleka lelo oyo mpamba te, lokola makambo ya ekeke ya 20 mazali komonisa yango, esakweli ya Yoele esengeli kokokisama mpo na mbala ya mibale. Tótalela ndenge nini ekokokisama.
6. Lolenge nini Yisalaele na Nzambe ebandaki komonisama polele ntango 1914 ekómaki pene?
6 Nsima ya liwa ya bantoma, Yisalaele na Nzambe ezipamaki na matiti mabe ya boklisto ya lokuta. Nzokande, na ntango ya nsuka, oyo ebandaki na 1914, libota yango ya elimo emonanaki lisusu polele. Nyonso wana ekokisaki lisese ya Yesu na ntina na masangu mpe matiti mabe. (Matai 13:24-30, 36-43) Wana 1914 ekómaki pene, baklisto bapakolami babandaki kokabwana na boklisto ya lipɛngwi, mpe baboyaki na mpiko nyonso mateya ya lokuta mpe bazalaki kosakola ete nsuka ya “ntango ya mabota” ekómaki pene. (Luka 21:24) Kasi, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, oyo ebandaki na 1914, ebimisaki mikakatano oyo bamizelaki na yango te. Mpo na bopusi makasi oyo bakanisaki, mingi balɛmbaki, mpe basusu batikaki bosembo na bango. Na 1918, emonanaki ete mosala na bango ya kosakola ezalaki lisusu kosalema mpenza te.
7. (a) Makambo nini makokani na makambo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. masalemaki na 1919? (b) Kobanda 1919, kosopama ya elimo ya Nzambe esalaki bopusi nini epai na basaleli ya Yehova?
7 Kasi, likambo yango eumelaki te. Kobanda 1919, Yehova abandaki kosopa elimo na ye likoló na bato na ye na lolenge oyo ekundolaki likambo lisalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. Ya solo, na 1919 bato balobaki na nkota ya bapaya te mpe mopɛpɛ makasi epɛpaki te. Tokangi ntina uta na maloba ya Paulo mazwami na 1 Bakolinti 13:8 ete ntango ya bikamwiseli esilá koleka. Atako bongo, na 1919, emonanaki polele ete elimo ya Nzambe ezalaki wana, na liyangani oyo esalemaki na Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, baklisto ya sembo bazwaki lisusu nguya mpe bazongelaki lisusu mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Na 1922, bakendaki lisusu na Cedar Point mpe bazwaki molende na libyangi oyo elobaki ete “Bósakola, bósakola, bósakola, Mokonzi mpe bokonzi na ye.” Lokola na ekeke ya liboso, bato ya mokili mobimba bakokaki se komona bopusi ya kosopama ya elimo ya Nzambe. Moklisto mokomoko oyo amipesi—mobali to mwasi, mokóló to elenge—abandaki “kosakola,” elingi koloba, koyebisa ‘misala minene ya Nzambe.’ (Misala 2:11) Na ndakisa ya Petelo, balendisaki basɔkɛmi ete: “Bómibikisa na libota oyo na kilikili.” (Misala 2:40) Ndenge nini baoyo bandimaki elendiseli wana bakokaki komibikisa? Na kotyáká likebi na maloba mazwami na Yoele 2:32 ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.”
8. Makambo makolaki ndenge nini mpo na Yisalaele na Nzambe kobanda 1919?
8 Uta mikolo wana ya ebandeli, misala ya Yisalaele na Nzambe mizali kokende se liboso. Emonani ete mosala ya kotya bapakolami bilembo ekómi mosika, mpe kobanda bambula ya 1930, ebele monene ya basɔkɛmi oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé emonanaki. (Emoniseli 7:3, 9) Bango nyonso bazali na mayoki ete basengeli kosala na lombangu, mpamba te kokokisama ya mibale ya Yoele 2:28, 29 emonisi ete tozali pene ya mokolo monene koleka mpe ya nsɔmɔ mingi ya Yehova, mokolo oyo akoboma ebongiseli ya biloko oyo esangisi mangomba, politiki, mpe mombongo kati na mokili mobimba. Tozali na bantina ya solosolo ya ‘kobelela nkombo ya Yehova’ na kondima nyonso ete akobikisa biso!
Lolenge nini tokobelela nkombo ya Yehova?
9. Tángá mwa makambo matalelami na kobelela nkombo ya Yehova?
9 Kobelela nkombo ya Yehova esɛngi makambo nini? Maloba ya zingazinga ya Yoele 2:28, 29 mazali kosalisa biso mpo na koyanola motuna yango. Na ndakisa, Yehova ayokaka moto nyonso te oyo azali kobelela ye. Na nzela ya mosakoli mosusu, oyo ezali bongo Yisaya, Yehova alobaki na Yisalaele ete: “Ekosembola bino mabɔkɔ na bino, nakobombela bino miso na ngai; ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te.” Mpo na nini Yehova aboyaki koyoka libota na ye? Ye moko alimboli ete: ‘Mabɔkɔ na bino matondi na makila.’ (Yisaya 1:15) Yehova akoyoka te moto nyonso oyo azali na nyongo ya makila to oyo asalaka masumu. Yango wana Petelo alobaki na Bayuda na Pantekote ete bábongola motema. Na zingazinga ya mokapo ya Yoele 2:28, 29, tozali komona ete Yoele mpe alobeli mingi likambo ya kobongola motema. Na ndakisa, na Yoele 2:12, 13, tozali kotánga boye: “[Yehova] alobi ete, Ata sasaipi, bóbongwa epai na ngai na mitema na bino nyonso, mpe na kokila bilei mpe na kotangisa mpe na kolela; pasolá mitema na bino nde bilamba na bino te, mpe bóbongwa epai na [Yehova], Nzambe na bino; mpo ete ye azali na boboto mpe na mawa. Akosilikaka noki te kasi azali na boboto monene mpenza.” Kobanda 1919, baklisto bapakolami bazali kotosa maloba yango. Babongolaki motema mpo na mabunga na bango mpe bazwaki ekateli ete bakotika lisusu bosembo na bango te mpe bakolɛmba te. Yango epesaki nzela mpo ete elimo ya Nzambe esopama likoló na bango. Moto na moto oyo alingi kobelela nkombo ya Yehova mpe ete Yehova ayoka ye, asengeli kolanda matambe wana.
10. (a) Kobongola motema ya solosolo ezali nini? (b) Ndenge nini Yehova andimaka kobongola motema ya solosolo?
10 Tómikundola ete kobongola motema ya solosolo esuki te bobele na koloba ete: “Nayoki mawa.” Bayisalaele bazalaki na momeseno ya kopasola bilamba na bango mpo na komonisa bonene ya mawa na bango. Kasi Yehova alobi ete: “Pasolá mitema na bino nde bilamba na bino te.” Kobongola motema ya solosolo ezalaka na kati na biso mpenza. Yango esɛngi kotika misala mabe, lokola tozali kotánga na Yisaya 55:7 ete: “Tiká ete moto mabe alongwa na nzela na ye mpe moto na masumu alongwa na mabanza na ye. Tiká ete abutwa epai na [Yehova].” Yango elingi koloba koyina masumu, lokola Yesu asalaki. (Baebele 1:9) Na nsima, tokotya motema ete Yehova akolimbisa biso na moboko ya mbeka ya lisiko mpamba te Yehova azali ‘na boboto mpe na mawa. Akosilikaka noki te kasi azali na boboto monene mpenza.’ Akondima losambo na biso, mbeka na biso ya bilei mpe mbeka ya komela ya elimo. Akoyoka biso soki tobeleli nkombo na ye.—Yoele 2:14.
11. Losambo ya solo esengeli kozala na esika nini kati na bomoi na biso?
11 Kati na Lisolo likoló na Ngomba, Yesu ayebisaki biso likambo mosusu oyo tosengeli kobosana te, ntango alobaki ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye.” (Matai 6:33) Tosengeli te kotalelaka losambo na biso lokola ete ezali na motuya moke, lokola likambo oyo tokosala yango likolólikoló, bobele mpo na kozala na lisosoli malamu. Kosalela Nzambe esengeli kozala na esika ya liboso kati na bomoi na biso. Yango wana, na nzela ya Yoele, Yehova alobi lisusu ete: “Bóbɛta mondule kati na Siona, . . . bóyanganisa bato. Bulisá koyangana, bóyanganisa mibange; bóbyanga bana, ɛɛ, bana baoyo bazali konunga mabɛlɛ. Tiká ete mobali alongwa na ndako na ye mpe mobalani epai na eteni na ye.” (Yoele 2:15, 16) Ezali likambo lilongobani ete bato oyo babalani sika báminanola, kotyáká likebi bobele moko epai na mosusu. Kasi, ata mpo na bango, kosalela Yehova esengeli kozwa esika ya liboso. Eloko moko te esengeli koleka kosangana na biso na losambo ya solo mpo na Nzambe na biso, mpo na kobelela nkombo na ye.
12. Likoki nini ya bokoli na mikolo mizali koya emonani na lapolo ya Ekaniseli mpo na mbula eleki?
12 Kobateláká likambo yango na makanisi, tótalela mituya mimonisami na lapolo ya Batatoli ya Yehova mpo na mobu ya mosala 1997. Na mbula eleki, basakoli ya Bokonzi tokómaki na motángo ya bato 5 599 931—oyo ezali solo ebele monene ya basanzoli! Bato 14 322 226 bayanganaki na Ekaniseli—bato koleka milio mwambe na ndambo bazali basakoli te. Motuya yango emonisi likoki monene ya bokoli na mikolo mizali koya. Mingi kati na bato yango milio mwambe na ndambo basilaki kobanda koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova lokola bato oyo bazali komonisa bosepeli mpo na solo to basusu bazali bana oyo baboti na bango basilá kozwa batisimo. Mpo na mingi kati na bango, ezalaki mbala ya liboso báyangana na makita. Koya na bango na Ekaniseli epesaki Batatoli ya Yehova libaku ya koyeba bango malamu mpe koyebisa bango ete balingi kosunga bango mpo ete bákola na elimo. Mpe lisusu, ezalaki na baoyo bayanganaka na Ekaniseli mbula na mbula mpe mbala mosusu bayanganaka na mwa makita mosusu, kasi bazali mpenza kokola te na elimo. Ya solo, tozali kobyanga bato yango na esengo nyonso ete báyanganaka na makita. Kasi tozali kosɛnga na bango ete bámanyola na mozindo maloba ya esakweli ya Yoele mpe bátalela matambe nini basengeli kosala mpo na komindimisa ete Yehova akoyoka bango soki babeleli nkombo na ye.
13. Soki tozali kobelela nkombo ya Yehova, mokumba nini tozali na yango epai na bato mosusu?
13 Ntoma Paulo amonisaki likambo mosusu etali kobelela nkombo ya Nzambe. Kati na mokanda na ye epai na Baloma, atángaki maloba ya esakweli ya Yoele ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.” Na nsima atuni mituna: “Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli?” (Baloma 10:13, 14) Ɛɛ, kino lelo oyo, bato mosusu mingi bayebi naino Yehova te bazali na mposa ya kobelela nkombo na ye. Baoyo basili koyeba Yehova bazali na mokumba ya kosakwela bango, mpe lisusu ya kolinga kopesa bango lisalisi yango.
Paladiso ya elimo
14, 15. Mapamboli nini lokola ya paladiso libota ya Yehova ezali kozwa mpo ete bazali kobelela nkombo na ye na lolenge oyo ezali kosepelisa ye?
14 Bapakolami na bampate mosusu bazali kotalela makambo na lolenge yango, mpe mpo na yango, Yehova azali kopambola bango. ‘Yehova akozala na molende mpo na mokili na ye mpe akomonisa mawa mpo na bato na ye.’ (Yoele 2:18, NW) Na 1919, Yehova amonisaki molende mpe mawa mpo na bato na ye ntango azongisaki bango na ezalela ya malamu mpe amemaki bango na mokili na ye na mosala ya elimo. Yango ezali solo paladiso ya elimo, Yoele amonisi yango malamu na maloba oyo: “Ɛ mabelé, bangá te, sepelá mpe yoká esengo, zambi [Yehova] asali makambo minene. Ɛ bino banyama na mokili, bóbanga te mpo ete matiti na lisobe ezali mobesu; nzete izali kobota mbuma, mosuke mpe miwiti ikobimisaka mbuma na yango. Ɛ bino bana na Siona, bósepela! Bóyoka mpe esengo kati na [Yehova], Nzambe na bino, mpo ete akonɔkisa mbula na liboso mpo na kolongisa bino, akosopa mbula mingi mpo na bino; mbula na liboso mpe mbula na nsima pelamoko na ntango eleki. Etutelo na loso ekotonda na mbóto, bibombelo ikotonda na vinyo mpe na mafuta.”—Yoele 2:21-24.
15 Oyo nde elilingi kitoko! Bilei misato ya moboko na Yisalaele etondi mɛkɛ—mbuma ya elanga, mafuta ya olive, mpe vinyo—elongo na bitonga minene ya bibwele. Ya solo, na mikolo na biso, maloba wana ya esakweli mazali kokokisama na ndimbola ya elimo. Yehova azali kopesa biso bilei nyonso ya elimo oyo tosengeli na yango. Tozali nde kosepela na ebele ya makabo oyo Nzambe azali kopesa? Ya solo, lokola Malaki asakolaki yango, Nzambe na biso asili ‘kozipwela biso maninisa na lola mpe asopeli biso lipamboli kino esika ezangi mpo na yango.’—Malaki 3:10.
Nsuka ya ebongiseli ya biloko
16. (a) Kosopama ya elimo ya Yehova elimboli nini mpo na ntango na biso? (b) Makambo nini makobima na mikolo mizali koya?
16 Nsima ya kosakola ezalela ya paladiso oyo libota ya Nzambe ezali na yango, Yoele asakoli kosopama ya elimo santu. Ntango Petelo atángaki maloba ya esakweli yango na Pantekote, alobaki ete ekokisamaki “na mikolo na nsuka.” (Misala 2:17) Kosopama ya elimo ya Nzambe na ntango wana elimbolaki ete mikolo ya nsuka ebandaki mpo na ebongiseli ya biloko ya Bayuda. Kosopama ya elimo ya Nzambe likoló ya Yisalaele na Nzambe na ekeke ya 20 elimboli ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ya mokili mobimba. Na kotalela likambo yango, mikolo mizali koya ebombeli biso makambo nini? Esakweli ya Yoele elobi lisusu ete: “Nakopesa bikamwiseli na likoló mpe na mokili, makila mpe mɔ́tɔ mpe kobuta na molinga. [Moi, NW] ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila, liboso na koya na mokolo na [Yehova], mokolo monene mpe na nsɔmɔ.”—Yoele 2:30, 31.
17, 18. (a) Mokolo nini ya nsɔmɔ ya Yehova ekwelaki Yelusaleme? (b) Soki tondimisami ete mokolo ya nsɔmɔ ya Yehova ekoya yango ekopusa biso na kosala nini?
17 Na mobu 66 T.B., maloba wana ya esakweli mabandaki kokokisama na Yudea wana makambo mazalaki kosalema mamemaki kino nsuka, na mokolo ya nsɔmɔ ya Yehova na mobu 70 T.B. Na ntango wana, ezalaki mpenza nsɔmɔ mpo na baoyo bazalaki kosanzola nkombo ya Yehova te! Lelo oyo makambo ya nsɔmɔ motindo moko mazali koya liboso, ntango Yehova akoboma ebongiseli ya biloko ya mokili mobimba. Kasi, likoki ya kobika ezali. Esakweli elobi lisusu ete: “Mpe moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika; zambi na ngomba na Siona mpe na Yelusaleme, baoyo bakobika bakozala lokola elobaki [Yehova]; mpe kati na litika, baoyo bakobyangama na [Yehova] bakozala.” (Yoele 2:32) Batatoli ya Yehova bazali mpenza na botɔ́ndi na ndenge bayebi nkombo ya Yehova, mpe bazali kotya motema mobimba ete akobikisa bango ntango bakobelela ye.
18 Kasi, nini ekosalema ntango mokolo ya Yehova, mokolo monene mpe ya nkembo, na nkanda na yango nyonso, ekoboma mokili oyo? Tokolobela likambo yango na lisolo ya nsuka.
Okoki komikundola?
◻ Ntango nini Yehova asopaki mbala ya liboso elimo na ye likoló ya bato na ye?
◻ Wapi mwa makambo masɛngami mpo na kobelela nkombo ya Yehova?
◻ Ntango nini mokolo monene mpe ya nkembo ya Yehova ekwelaki Yisalaele ya mosuni?
◻ Ndenge nini Yehova azali kopambola baoyo bazali kobelela nkombo na ye lelo oyo?
[Elilingi na lokasa 15]
Libota ya sika ebotamaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Na ebandeli ya ekeke oyo, Yehova asopaki lisusu elimo na ye likoló na bato na ye na kokokisama ya Yoele 2:28, 29
[Elilingi na lokasa 18]
Tosengeli kosalisa bato mpo ete bábelela nkombo ya Yehova