Mokanda ya Biblia nimero 33—Mika
Mokomi: Mika
Esika ya bokomi: Yuda
Nsuka ya bokomi: Liboso ya 717 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: soko 777–717 L.T.B.
1. Mika azalaki moto ya lolenge nini?
KANISÁ mpo na moto oyo akɔmeli, oyo alekisi bambula mingi mpo na kosalela Yehova na bosembo nyonso. Kanisá mpo na moto ya mpiko, oyo akoki koloba epai na bakonzi ya ekólo na ye ete, “Bino bato baoyo boyini malamu nde bolingi mabe . . . Bokolyaka mosuni na bato na ngai, mpe bokobenda loposo longwa na bango.” Kanisá mpo na moto ya komikitisa, oyo andimi ete maloba na ye ya nguya mauti epai na Yehova, oyo na nzela ya elimo na ye nde azali koloba. Okosepela te kozala moninga ya moto motindo oyo? Oyo nde makambo malamu mpe toli ya mayele akoki kopesa! Moto yango ezalaki bongo mosakoli Mika. Tokoki ntango nyonso kozwa litomba na batoli na ye ya malamu oyo ezali kati na mokanda oyo ememi nkombo na ye.—Mika 3:2, 3, 8.
2. Makambo nini toyebi na ntina na Mika mpe na ntango oyo azalaki kosakola?
2 Lokola emonanaka mpo na basakoli mingi, bobele makambo moke nde malobelamaki mpo na Mika kati na mokanda na ye; nsango na ye nde ezalaki likambo ya ntina mingi. Nkombo Mika ezali ekomeli mokuse ya Mikaele (oyo elimboli, “Nani azali lokola Nzambe?”) to Mikaya (oyo elimboli, “Nani azali lokola Yehova?”). Asalaki lokola mosakoli na boumeli ya boyangeli ya Yotama, ya Ahaza, mpe ya Hizikiya (777-717 L.T.B.), yango emonisi ete azalaki na eleko moko na mosakoli Yisaya mpe na mosakoli Hosea. (Yis. 1:1; Hos. 1:1) Eleko ya sikisiki ya mosala na ye ya mosakoli eyebani malamu te, kasi ekoki kozala ete eumelaki mbula 60. Bisakweli na ye na ntina na kobebisama ya Samalia esengelaki kopesama liboso ete engumba yango ebebisama na mobu 740 L.T.B., mpe mokanda na ye mobimba esengelaki kosila kokomama na nsuka ya boyangeli ya Hizikiya, na mobu 717 L.T.B. (Mika 1:1) Mika azalaki mosakoli ya mboka, uta na mboka moke ya Molesata kati na Sefela, etúká ya mabelé malamu, na súdi-wɛ́sti ya Yelusaleme. Boyebi na ye ya makambo matali bomoi ya mboka mike emonani kati na lolenge ya bililingi oyo azali kosalela mpo na komonisa maloba na ye.—2:12; 4:12, 13; 6:15; 7:1, 4, 14.
3. Na eleko nini ya mpasi Mika azalaki kosakola, mpe mpo na nini Yehova atindaki ye lokola mosakoli?
3 Mika azalaki na bomoi na eleko moko ya likámá mpe ya ntina mingi. Makambo oyo mazalaki kolandana nokinoki mazalaki kosakola kokwea ya bokonzi ya Yisalaele mpe bokonzi ya Yuda. Kobeba ya bizaleli mpe losambo ya bikeko esilaki kokóla na Yisalaele, mpe yango esalaki ete libota libebisama na Asulia, likambo oyo lisalemaki mpenza na boumeli ya bomoi ya Mika. Yuda asalaki te oyo ezali sembo na boumeli ya boyangeli ya Yotama, kobakisáká bongo mabe ya Yisalaele na boumeli ya boyangeli ya Ahaza, mokonzi motomboki, mpe na nsima ezongaki na nzela ya sembo na boumeli ya boyangeli ya Hizikiya. Yehova atɛlɛmisaki Mika mpo na kokebisa makasi bato na Ye na ntina na makambo oyo Ye azalaki pene na koyeisa likoló na bango. Bisakweli ya Mika bisalisaki mpo na kondimisa bisakweli ya Yisaya mpe ya Hosea.—2 Mik. 15:32–20:21; 2 Nta. mik. 27-32; Yis. 7:17; Hos. 8:8; 2 Kol. 13:1.
4. Nini emonisi bosolo ya mokanda ya Mika?
4 Bilembeteli bizali mingi mpo na komonisa bosolo ya mokanda ya Mika. Bayuda bazalaki ntango nyonso kondima yango lokola eteni ya kanɔ́ ya Liebele. Yilimia 26:18, 19 etángi mpenza maloba oyo ya Mika: “Siona ekotimolama lokola elanga mpo na bino, Yelusaleme ekokóma libondo.” (Mika 3:12) Esakweli wana ekokisamaki mpenzampenza na mobu 607 L.T.B. ntango mokonzi ya Babilone abomaki Yelusaleme, ‘mpe abebisaki yango.’ (2 Nta. 36:19) Esakweli mosusu oyo ekokani na yango elobaki na ntina na Samalia ete akokóma “libondo kati na elanga,” yango mpe ekokisamaki. (Mika 1:6, 7) Samalia ebebisamaki na Baasulia na mobu 740 L.T.B. ntango bakamataki na boombo bokonzi ya Yisalaele oyo ezalaki na nɔ́rdi. (2 Mik. 17:5, 6) Na nsima yango eyangelamaki na Alesandala Monene na ekeke ya mibale L.T.B. mpe enyokwamaki na libebi na Bayuda oyo batambwisamaki na Jean Hyrcan I na ekeke ya mibale L.T.B. Na ntina na libebi ya nsuka oyo ya Samalia, búku The New Westminster Dictionary of the Bible, ya 1970, lokasa 822, elobi ete: “Molóngi abebisaki yango, asalaki makasi mpo na kolongola bilembeteli nyonso oyo bikokaki komonisa ete engumba makasi ezalaki kala likoló na ngomba wana.”
5. Lolenge nini arkeoloji endimisi kokokisama ya bisakweli ya Mika?
5 Bilembeteli ya arkeoloji bindimisi mpe kokokisama ya esakweli ya Mika. Kobebisama ya Samalia na Baasulia elobelami kati na mikanda ya Baasulia. Na ndakisa, Salegone, mokonzi ya Asulia, amikumisaki ete: “Nazingelaki mpe nalóngaki Samalia (Sa-me-ri-na).”a Nzokande, ezalaki mpenza Salamanɛsɛlɛ V, mokonzi oyo azalaki liboso ya Salegone nde akamataki mpenza mboka. Na ntina na Salamanɛsɛlɛ, lisoló moko ya kala ya Babilone elobi ete: “Abebisaki mpenza Samalia.”b Kokamatama ya Yuda na boyangeli ya Hizikiya, lokola yango esakolamaki na Mika, esilaki kokomama na Senakeliba. (Mika 1:6, 9; 2 Mik. 18:13) Azalaki na mayemi minene minei oyo etyamaki na bifelo ya ndako na ye na Ninive, oyo ezalaki komonisa lolenge akamataki Lakisi. Likoló na prisme na ye, alobi ete: “Nazingelaki bingumba 46 kati na bingumba na ye ya makasi . . . Nabimisaki (uta na yango) bato 200 150 . . . Ye moko nakómisaki ye mokangami kati na Yelusaleme, efandelo na ye ya bokonzi, motindo moko na ndɛkɛ kati na zumbu.” Atángaki mpe mpako oyo Hizikiya azalaki kopesa ye, atako alekisi ndelo na motuya na yango. Alobeli ata moke te mpasi oyo ekwelaki mampinga na ye.c—2 Mik. 18:14-16; 19:35.
6. Nini ezali kosilisa ntembe likoló na kopemama ya mokanda ya Mika?
6 Na ntembe te, likambo limonisi kopemama ya mokanda oyo ezali bongo esakweli monene ezwami na Mika 5:2, oyo esakoli esika Masiya asengelaki kobotama. (Mat. 2:4-6) Ezali mpe na mikapo oyo maloba na yango makokani na oyo mazali na Makomami ya Greke ya boklisto.—Mika 7:6, 20; Mat. 10:35, 36; Luka 1:72, 73.
7. Tokoki koloba nini na ntina na nguya oyo ezali na maloba ya Mika?
7 Atako emonani ete Mika autaki na mboka mike ya Yuda, azangaki mpenza te makoki ya koloba. Mwa ndambo na maloba maleki kitoko na Liloba ya Nzambe mazwami kati na mokanda na ye. Mokapo 6 ekomami na lolenge ya lisoló oyo lizali kosimba motema. Koleka nokinoki longwa na likanisi moko kino na likanisi mosusu ezali kobenda likebi ya motángi wana Mika azali koleka na likanisi moko kino na likanisi mosusu, longwa na elakeli mabe kino na lipamboli mpe longwa na lipamboli kino na elakeli mabe. (Mika 2:10, 12; 3:1, 12; 4:1) Maloba ya bililingi ya nguya matondi mingi: Wana Yehova azali koloba, “ngomba ikonangwa na nsé na ye mpe mabwaku ikopaswama lokola mafuta liboso na mɔ́tɔ, lokola mai masopani na esika na mobungutulu.”—1:4; talá 7:17.
8. Nini ezali kati na mokomoko na biteni misato ya mokanda ya Mika?
8 Mokanda oyo mokoki kokabolama na biteni misato, eteni mokomoko ebandi na liloba “Bóyoka” mpe ezali na mpamela, na makebisi ya etumbu, mpe na bilaka ya mapamboli.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MIKA
9. Bitumbu nini bikatami na ntina na Samalia mpe Yuda?
9 Eteni 1 (1:1–2:13). Yehova abimi longwa na tempelo na ye mpo na kopesa Samalia etumbu na ntina na losambo na yango ya bikeko. Akokómisa yango “libondo” mpe ‘akosopa mabanga na yango kati na lobwaku,’ wana azali kobuka bililingi na ye. Kobikisama ekozala mpo na ye te. Yuda mpe azali na ngambo mpe akomona mpasi na kozingelama “kino ekuke na Yelusaleme.” Baoyo bazali kokanisa kosala makambo mabe bakweisami mpe bakolela ete: “Topunzami kopunzama mpenza.”—1:6, 12; 2:4.
10. Lolenge nini motema mawa ya Yehova emonisami?
10 Na mbala moko, motema mawa ya Yehova emonisami, na nkombo ya Yehova, mosakoli alobi ete: “Ɛ Yakobo, nakoyanganisa nyonso na yo solo . . . nakotya bango elongo moko lokola bampate na Bɔsala; lokola bibwɛlɛ na kati na elanga, bakosala makɛlɛlɛ monene mpo ete bazali bato mingi mpenza.”—2:12.
11. (a) Kotɔndɔlama nini esalemi sikawa na ntina na bakonzi ya Yakobo mpe ya Yisalaele? (b) Lolenge nini Mika amonisi liziba ya mpiko na ye?
11 Eteni 2 (3:1–5:15). Na nsima Mika akóbi: “Nalɔmbi bino ete bóyoka, ɛ bankolo na Yakobo mpe mikóló na ndako na Yisalaele!” Kotɔndɔlama ya makasi esalemi na ntina na baoyo ‘bayini malamu nde balingi mabe’ oyo bazali konyokola bato. Basili ‘kobukabuka mikuwa na bango.’ (3:1-3) Elongo na bango tozali kokuta basakoli ya lokuta baoyo bazali te kopesa litambwisi ya solosolo, bazali kosala ete bato ya Nzambe bátengatenga. Esengelaki mpenza mpiko oyo eleki ya bomoto mpo na kosakola nsango wana! Kasi Mika alobi na endimiseli nyonso ete: “Ngai natondi solo na [elimo ya Yehova] mpe na kosambisa-sembo mpe na nguya mpo na kosakola epai na Yakobo lipɛngwi na ye mpe epai na Yisalaele lisumu na ye.” (3:8) Botɔndɔli na ye ya bakonzi oyo bazali na ngambo ya makila ekómi mpenza na mama na yango ya likambo: “Bankolo na bango bakosambisaka bobele mpo na kanyaka mpe banganga na bango bakolakisaka mpo na libonza, mpe basakoli na bango bakotalaka makambo mpo na misolo.” (3:11) Na bongo, Siona ekotimolama lokola elanga, mpe Yelusaleme ekokóma eloko mosusu te bobele libondo ya libebi.
12. Esakweli monene nini epesami mpo na “mikolo na nsuka”?
12 Lisusu, na mbala moko, esakweli elobeli “mikolo na nsuka” na elobeli ya kokamwa mpe ya kosimba motema mpo na kobongisama lisusu ya losambo ya Yehova na ngomba na ye. (4:1) Mabota mingi bakokende kuna koyekola banzela ya Yehova, mpamba te mibeko na ye mpe liloba na ye ekobima longwa na Siona mpe na Yelusaleme. Bakoyekola etumba lisusu te, kasi moko na moko akofanda na nsé na miwiti na ye mpe na nsé na nzeté na ye na mosuke. Moto moko akobangisa bango te. Tiká ete moto na moto alanda nzambe na ye, kasi basambeli ya solo bakotambola na nkombo ya Yehova, Nzambe na bango, mpe akoyangela bango lokola Mokonzi libela na libela. Nzokande, liboso Siona esengeli kokende boombo na Babilone. Bobele na kobongisama na yango lisusu nde Yehova akobukabuka banguna na yango.
13. Mokonzi oyo akobima na Beteleme akozala lolenge nini, mpe “litika na Yakobo” bakozala lokola nini?
13 Mika asakoli sikawa ete mokonzi kati na Yisalaele oyo “ebandeli na ye ezalaki kalakala” akobima longwa na Beteleme Efelata. Akoyangela lokola ‘mobateli na mpate kati na nguya ya Yehova’ mpe akozala monene, bobele na Yisalaele te, kasi “kino molelo na mɔlɔ́ngɔ́.” (5:2, 4) Moasulia oyo akozingela mboka akolónga bobele mpo na mwa ntango mokuse, mpamba te akozongisama nsima mpe mokili na ye ekotikala mpamba. “Litika na Yakobo” bakozala lokola “mamwɛ makoutaka na [Yehova]” katikati na bato mpe lokola nkosi mpo na mpiko katikati na mabota. (5:7) Yehova akobikola losambo ya lokuta mpe akoyeisa bobekoli likoló na mabota mazangi botosi.
14. (a) Eteni 3 ya Mika ebandi na kosaleláká elilingi nini? (b) Masɛngami nini ya Yehova bato na Yisalaele bakokisaki yango te?
14 Eteni 3 (6:1–7:20). Likambo oyo lizali kosambisama limonisami sikawa na lolenge ya lisoló. Yehova azali na “likambo” elongo na Yisalaele, mpe azali kobyanga nkeka mpe ngomba lokola batatoli. (6:1) Atyeli Yisalaele ntembe mpo na kotatola mabe na ntina na ye, mpe atángi misala na ye ya boyengebene mpo na bango. Yehova azali kosɛnga nini epai na moto oyo asalemi na mabelé? Azali kosɛnga ebele na mbeka ya nyama te, kasi nde ‘asala na boyengebene mpe ete alinga boboto mpe ete atambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na ye.’ (6:8) Ezali likambo oyo nde ezali kozanga epai na Yisalaele. Na esika ya komonisa boyengebene mpe boboto, tozali kokuta nde “bipimeli mabe,” mobulu, lokuta, mpe kobuba. (6:11) Na esika ya kotambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe, bazali nde kotambola na batoli mabe mpe na losambo ya bikeko ya Omili mpe ya Ahaba, oyo bayangelaki na Samalia.
15. (a) Mosakoli ayoki mawa na likambo nini? (b) Esukiseli nini ebongi mokanda ya Mika ezali na yango?
15 Mosakoli azali koyoka mawa mingi na ntina na kobeba ya bizaleli ya bato na ye. Ya solo, ata “ye oyo aleki malamu kati na bango azali lokola nkamba na nzube.” (7:4) Kobuba ezali katikati na baninga ya motema mpe kati na bandako. Mika azali kolɛmba mpo na yango te. ‘Ngai nakotalela Yehova; nakozela Nzambe na kobika na ngai; Nzambe na ngai akoyoka ngai.’ (7:7) Akebisi basusu ete básepela te na etumbu oyo Yehova apesi bato na Ye, mpamba te kosikolama ekoya. Yehova akobatela mpe akoleisa bato na ye mpe akomonisa bango “makambo na kokamwa,” kosaláká ete mabota mázala na nsɔ́mɔ. (7:15) Na nsuka ya mokanda na ye, Mika amonisi ndimbola ya nkombo na ye na kosanzoláká Yehova na ntina na bonene ya motema-boboto na Ye. Ɛɛ, ‘Nani azali Nzambe lokola Yehova?’—7:18.
LITOMBA NA YANGO
16. (a) Lolenge nini esakweli ya Mika emonanaki ete ezalaki na litomba na mikolo ya Hizikiya? (b) Ezali na batoli nini ya nguya mpo na mikolo ya lelo?
16 Esili koleka soko mibu 2 700, esakweli ya Mika emonanaki ete ‘ezali na litomba mpo na kopamela,’ mpamba te Hizikiya, mokonzi na Yuda, ayanolaki na nsango na ye mpe amemaki libota na kobongola motema mpe na koyeisa mbongwana kati na makambo ya losambo. (Mika 3:9-12; Yil. 26:18, 19; kokanisá na 2 Mikonzi 18:1-4.) Lelo oyo esakweli wana epemami ezali na litomba monene mpenza. Baoyo nyonso bazali komitánga ete basambeli ya Nzambe, bóyoka nsango ya polele ya Mika na ntina na losambo ya lokuta, losambo ya bikeko, lokuta, mpe mobulu! (Mika 1:2; 3:1; 6:1) Paulo andimisi makebisi yango na 1 Bakolinti 6:9-11, epai alobi ete baklisto ya solo basili komipɛtola mpe ete moto nyonso oyo amipesi na misala wana akosangola Bokonzi ya Nzambe te. Na maloba ya pɛtɛɛ mpe ya polele, Mika 6:8 elobi ete lisɛngi ya Yehova mpo na moto ezali ete atambola elongo na Ye kati na boyengebene, na boboto, mpe na bopɔlɔ.
17. Elendiseli nini Mika apesi epai na baoyo bazali kosalela Nzambe kati na minyoko mpe mikakatano?
17 Mika apesaki nsango na ye epai na bato oyo bakabwanaki mingi, na boye ete ‘banguna ya moto bazalaki bato ya ndako na ye.’ Baklisto ya solo mbala mingi bazali mpe kosakola na ezalela ya makambo lolenge moko, mpe kútu bamoko bazali kokutana na koyinama mpe na minyoko makasi kati na bato ya libota na bango. Na motema pɛtɛɛ, basengeli ntango nyonso kozela Yehova ‘Nzambe na kobika na bango.’ (Mika 7:6, 7; Mat. 10:21, 35-39) Ntango bazali konyokwama to wana bakutani na mosala moko ya mpasi, baoyo bazali na mpiko nyonso kotalela Yehova, lokola Mika, ‘bakotonda na nguya, na elimo ya Yehova,’ mpo na koyebisa nsango na Ye. Mika asakolaki ete mpiko motindo wana ekomonana mpenza epai na “litika na Yakobo.” Bango bakozala lokola ‘nkosi katikati na mabota, katikati na bato mingi,’ mpe lokola mamwɛ ya sika mpe matɔnɔ na mbula makoutaka na Yehova. Bizaleli wana bimonisamaki mpenza epai na ‘batikali na Yisalaele (Yakobo)’ oyo bakómaki basangani ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso.—Mika 3:8; 5:7, 8; Lom. 9:27; 11:5, 26.
18. Esakweli nini ya Mika ezali na boyokani na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe na nzela ya Klisto Yesu?
18 Kobotama ya Yesu na Beteleme, na kokokisama ya esakweli ya Mika, esuki te bobele na kondimisa kopemama ya mokanda oyo, kasi ezali mpe kongɛngisa mikapo mizali zingazinga lokola esakweli ya koya ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekotambwisama na Klisto Yesu. Yesu azali moto oyo abimi na Beteleme (Ndako na Limpa) elongo na matomba oyo makopesaka bomoi mpo na baoyo nyonso bakondima mbeka na ye. Ezali ye nde “akoleisa etongá na nguya na [Yehova]” mpe akokóma monene mpe akopesa kimya kino na molelo ya mabelé katikati na etongá ya Nzambe oyo ebongisami lisusu mpe oyo ezali na bomoko.—Mika 5:2, 4; 2:12; Yoa. 6:33-40.
19. (a) Kolendisama nini etali kondima epesami mpo na baoyo bazali na bomoi na “mikolo na nsuka”? (b) Lolenge nini Mika akumisi lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi?
19 Tozali kozwa kolendisama mingi kati na esakweli ya Mika na ntina na “mikolo na nsuka,” ntango oyo “mabota mingi” bakoluka koteyama na Yehova. “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te. Bakofanda mpe na nsé, moto na moto na nsé na miwiti na ye mpe na nzeté na ye na mosuke, moto moko akobangisa bango te, mpo ete monɔkɔ na [Yehova] na bibele elobi bongo.” Lokola batiki losambo nyonso ya lokuta, basangani elongo na Mika mpo na kondima ete: “Nde biso tokotambola na nkombo na [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” Ya solo, esakweli ya Mika ezali kolendisa kondima na biso na komonisáká biso liboso makambo minene wana. Ezali mpe lisusu na ntina mingi, na lolenge yango ezali kokumisa Yehova lokola Mokonzi Monene mpe Mokonzi ya seko. Maloba oyo mazali mpenza kosimba motema: “[Yehova] akozala mokonzi likoló na bango na ngomba na Siona, longwa na ntango oyo kino libela”!—Mika 4:1-7; 1 Tim. 1:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Ancient Near Eastern Texts, ekomami na James B. Pritchard, 1974, lokasa 284.
b Búku Assyrian and Babylonian Chronicles, ekomami na A. K. Grayson, 1975, lokasa 73.
c Búku Ancient Near Eastern Texts, 1974, lokasa 288; búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 894-895.