OYEBAKI YANGO?
Mpo na nini Ninive ebengamaki “engumba oyo esopaka makila”?
Ninive ezalaki mboka-mokonzi ya ekólo Asiri. Ezalaki engumba moko makasi mpe ezalaki na bandako minene ya kitoko mpe batempelo; ezalaki mpe na babalabala ya minene, mpe bifelo milaimilai. Nahumu mosakoli moko Moebre, abengaki yango “engumba oyo esopaka makila.”—Nahumu 3:1.
Ebongaki mpenza alobela yango bongo, mpo mayemi oyo bamonaki na ndako ya Senakeribe na Ninive, emonisi makambo mabe oyo bato ya Asiri bazalaki kosala. Moko ya mayemi yango emonisi moto moko alalisi mokangami moko na mabele mpe azali kobenda ye lolemo na makasi. Makomi emonisi ete bazalaki kokɔtisa nsinga na ndɔbɔ, kotɔbɔla zolo to mbɛbu ya bakangami mpe kobenda bango na nsinga yango. Bazalaki kokata mitó ya bakonzi ya bikólo oyo balongaki na bitumba mpe kolatisa yango lokola shɛnɛti na kingo ya bakonzi ya basoda oyo bakangaki.
Archibald Henry Sayce, moto moko oyo ayekolaka makambo ya kala ya Asiri, amonisi makambo mabe oyo bato yango bazalaki kosala nsima ya kobɔtɔla engumba moko; alobi boye: “Bazalaki kosala mabondo ya mitó ya bato na bisika nyonso oyo molongi azalaki koleka; bazalaki kotumba bana basi mpe bana mibali na bomoi to kotya bango pembeni mpo na kosala bango likambo moko ya mabe mpenza; bazalaki kobaka mibali na nzete, kolongola bango loposo ya nzoto ntango bazali naino na bomoi, kotɔbɔla bango miso, to kokata bango mabɔkɔ, makolo, matoi mpe zolo.”
Mpo na nini Bayuda bazalaki kosala efelo ya libateli mpo na nsamba ya bandako na bango?
Nzambe ayebisaki Bayuda ete: “Soki otongi ndako ya sika, osengeli mpe kosala efelo ya libateli mpo na nsamba na yo, mpo omemisa ndako na yo ngambo ya makila te, mpo moto akoki kokwea longwa na yango.” (Kolimbola Mibeko 22:8) Efelo ya libateli ezalaki na ntina mingi mpo na kobatela bato na makama mpamba te Bayuda bazalaki kosalela bansamba ya bandako na bango malamu.
Bandako mingi ya Bayisraele ezalaki na nsamba ya patatalu. Likoló ya ndako ezalaki esika moko malamu ya kolekisa ntango mpo na koyoka molunge, kozwa mwa mopɛpɛ to kosala misala ya ndako. Ezalaki mpe esika moko malamu ya kolala na eleko ya molunge. (1 Samwele 9:26) Baloni-bilanga bazalaki kokaukisa mbuma likoló ya nsamba liboso ya konika yango to mpe kokaukisa mbuma ya figi mpe ya vinyo.—Yosua 2:6.
Bazalaki mpe kosalela nsamba mpo na losambo, ezala ya solo to ya bikeko. (Nehemia 8:16-18; Yirimia 19:13) Ntoma Petro amataki na nsamba na midi, mpo na kobondela. (Misala 10:9-16) Soki bazipi yango mwa banzete ya vinyo to mandalala ya mbila, nsamba ezalaki kokóma esika moko kitoko mpo na kopema.
Buku moko (The Land and the Book) elobi ete bandako ya Bayisraele ezalaki na eskalye moko “libanda ya ndako kasi na kati ya lopango,” oyo ezalaki komema tii na nsamba ya ndako. Na yango, nkolo-ndako akokaki kolongwa na nsamba kozanga ete akɔta na ndako. Yango ekoki kosalisa biso tómona ntina oyo Yesu akebisaki bayekoli na ye bákima engumba oyo esengelaki kobebisama kozanga koumela; alobaki boye: “Moto oyo azali likoló ya ndako akita te kokamata biloko oyo ezali na ndako na ye.”—Matai 24:17.