Tólanda kosala na bomoko
“Nakobongola monɔkɔ ya bato na monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.”—SEFANIA 3:9, NW.
1. Likambo nini ezali kokokisa maloba ya Sefania 3:9?
LELO oyo, na mokili mobimba, bato bazali koloba minɔkɔ soki 6 000. Longola yango, ebele ya minɔkɔ ezali na ndenge mingi oyo balobaka yango. Atako bato balobaka minɔkɔ oyo ekeseni mpenza, kasi Nzambe asali likambo moko ya kokamwa mpenza. Asali ete na bisika nyonso bato báyekola mpe báloba monɔkɔ ya pɛto kaka moko. Likambo yango ezali kokokisa elaka oyo Nzambe apesaki na nzela ya mosakoli Sefania, ete: “[Ngai Yehova Nzambe] nakobongola monɔkɔ ya bato ekóma monɔkɔ ya pɛto [to “mbɛbo ya pɛto”], mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.”—Sefania 3:9, NW.
2. “Monɔkɔ ya pɛto” elakisi nini, mpe epesi nzela na likambo nini?
2 “Monɔkɔ ya pɛto” elakisi solo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Liloba na ye, Biblia. Ezali mingimingi solo oyo etali Bokonzi ya Nzambe oyo ekosantisa nkombo ya Yehova, ekolongisa bokonzi na ye mpe ekomemela bato mapamboli. (Matai 6:9, 10) Lokola monɔkɔ yango ezali monɔkɔ kaka moko ya pɛto na elimo awa na mokili mobimba, bato oyo balobaka yango bauti na bikólo nyonso mpe na mposo nyonso. Esalisaka bango básalela Yehova “na bomoko.” Na ndenge yango, bazali kosalela ye “ndenge moko.”—Bible na Lingala ya lelo oyo.
Ezaleli ya kopona bilongi esengeli kozala te
3. Nini ezali kosalisa biso tósalela Yehova na bomoko?
3 Biso baklisto tozali na botɔndi mpo na bomoko oyo tozali na yango atako tolobaka minɔkɔ oyo ekeseni. Atako tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na minɔkɔ ebele ya mokili oyo, tozali kosalela Nzambe na bomoko. (Nzembo 133:1) Ezali bongo mpo ete, ezala tofandi wapi, biso nyonso tozali koloba monɔkɔ kaka moko ya pɛto mpo na kokumisa Yehova.
4. Mpo na nini ezaleli ya kopona bilongi esengeli kozala te kati na basaleli ya Nzambe?
4 Ezaleli ya kopona bilongi esengeli kozala te na kati ya basaleli ya Nzambe. Na mobu 36 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Petelo amonisaki polele ete esengeli kozala bongo ntango asakolaki na ndako ya Koloneyi, mokonzi moko ya basoda oyo azalaki Moyuda te; alobaki boye: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Lokola ezali bongo, makambo ya kopona bilongi, ya kosala mwa bituluku to ya koponapona bato esengeli kozala te na kati ya lisangá ya boklisto.
5. Mpo na nini ezali mabe kosala mwa bituluku na kati ya lisangá?
5 Moyekoli moko ya iniversite akendaki na Ndako ya Bokonzi moko; nsima na yango, alobaki boye: “Mangomba mingi ezalaka kaka na bato ya loposo moko to ya ekólo moko. . . . Batatoli ya Yehova bafandaki bango nyonso esika moko, bakabwanaki na mwa bituluku te.” Nzokande, baklisto mosusu ya lisangá ya Kolinti na ntango ya kala bazalaki kosala mwa bituluku na kati ya lisangá. Lokola yango ezalaki komema bokabwani, bazalaki bongo kopekisa elimo santu ya Nzambe esala mosala na yango mpamba te elimo yango elendisaka bomoko mpe kimya. (Bagalatia 5:22) Soki tozali kosala mwa bituluku na kati ya lisangá, yango emonisi ete tozali koboya litambwisi ya elimo mosantu. Yango wana, tóbosanaka te maloba oyo ntoma Paulo akomelaki Bakolinti ete: “Nazali kolendisa bino, bandeko, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto ete bosengeli bino nyonso kolobaka na boyokani, mpe ete bokabwani esengeli te kozala na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.” (1 Bakolinti 1:10) Na mokanda oyo atindelaki Baefese, Paulo alobelaki mpe mingi likambo ya kozala na bomoko.—Baefese 4:1-6, 16.
6, 7. Toli nini Yakobo apesaki mpo na ezaleli ya koponapona, mpe ndenge nini tokoki kosalela toli na ye?
6 Baklisto basɛngisami ete báponaka bilongi te. (Baloma 2:11) Baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bazalaki kopesa kaka bazwi lokumu, yango wana moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bandeko na ngai, bozali te kosimba kondima ya Nkolo na biso Yesu Klisto, nkembo na biso, na koponapona, boye te? Mpo, soki moto moko na mpɛtɛ ya wolo na misapi na ye mpe na bilamba ya kitoko akɔti na liyangani na bino, kasi mobola moko na bilamba ya mbindo ayei mpe kokɔta, nzokande bino botali na liso ya malamu moto oyo alati bilamba ya kitoko mpe bolobi: ‘Yo fandá awa na esika ya malamu,’ kasi bolobi na mobola: ‘Yo tɛlɛmá bongo,’ to: ‘Fandá kuna na nse ya ebonga ya makolo na ngai,’ bokabolikaboli bato na bituluku na kati na bino mpe bokómi basambisi oyo bakataka makambo na ndenge ya mabe, ezali boye te?”—Yakobo 2:1-4.
7 Soki moto moko ya bozwi oyo azali mondimi te, oyo alati mpɛtɛ ya wolo mpe bilamba kitoko, ayei na makita ya baklisto; bongo mobola oyo azali mpe mondimi te, oyo alati bilamba ya malumu te, ayei, bazalaki kosalela bango makambo ndenge moko te. Bazalaki kofandisa moto ya mbongo “na esika ya malamu,” kasi bazalaki koyebisa mobola atɛlɛma to afanda na nse, na makolo ya bato mosusu. Kasi, Nzambe apesaki Yesu lokola mbeka mpo na kobikisa moto nyonso, mozwi to mobola. (Yobo 34:19; 2 Bakolinti 5:14) Yango wana, soki tolingi kosepelisa Yehova mpe kosalela ye na bomoko, tosengeli koponaponaka te to tosengeli te ‘kokumisa bato mpo na litomba na biso moko.’—Yuda 4, 16.
Tóimaimaka te
8. Koimaima ya Bayisalaele ememaki bango na likambo nini?
8 Soki tolingi kobatela bomoko na biso mpe tolingi ete Nzambe asepela na biso ntango nyonso, tosengeli kotosa toli ya Paulo oyo: “Bókoba kosala makambo nyonso kozanga koimaima.” (Bafilipi 2:14, 15) Bayisalaele oyo bazangaki kondima, baoyo Yehova abimisaki bango na boombo na Ezipito, baimaimaki na Moize na Alona mpe na ndenge yango, tokoloba ete baimaimaki na Yehova Nzambe. Yango wana, mibali nyonso banda na mbula 20 mpe koleka—longola kaka bato ya sembo Yosua na Kalebe na Balevi—bakɔtaki na Mokili ya Ndaka te, kasi bakufaki na boumeli ya mbula 40 oyo basalaki na kati ya esobe. (Mituya 14:2, 3, 26-30; 1 Bakolinti 10:10) Talá epai wapi koimaima ememaki bango!
9. Likambo nini ekómelaki Milyami mpo na koimaima na ye?
9 Yango ezali komonisa likambo oyo ekoki kokómela ekólo mobimba soki ezali koimaima. Ezali boni mpo na moto moko oyo azali koimaima? Milyami na Alona, bandeko ya Moize, baimaimaki boye: “[Yehova] alobaki bobele na monɔkɔ ya [Moize] solo? Ye alobaki na monɔkɔ na biso lokola te? [Yehova] mpe ayokaki yango.” (Mituya 12:1, 2) Esukaki ndenge nini? Nzambe akitisaki Milyami, mpamba te ekoki kozala ete ye nde azalaki liboso na koimaima yango. Nzambe apesaki Milyami maladi ya maba mpe babimisaki ye na kaa tii ntango akómaki pɛto nsima ya mikolo nsambo.—Mituya 12:9-15.
10, 11. Soki moto atiki koimaima te, yango ekoki kobota mbuma nini? Pesá ndakisa.
10 Koimaima ekeseni na komilela ntango likambo moko ya mabe esepelisi biso te. Bato oyo baimaimaka ntango nyonso batalelaka mingi makanisi na bango to lokumu na bango, balingaka ete bato bátalela nde bango na esika bátalela Nzambe. Soki batiki yango te, ezaleli yango ememaka bokabwani na kati ya bandeko baklisto mpe epekisaka bango básalela Yehova na bomoko. Yango ezalaka bongo, mpamba te bato oyo baimaimaka bamilelalelaka ntango nyonso; bakanisaka ete ntango mosusu bato mosusu bakokɔtela bango.
11 Na ndakisa, ndeko moko akoki koloba ete asepelaka te ndenge oyo nkulutu moko asalaka masolo na ye na lisangá to ndenge oyo akokisaka mikumba na ye. Soki tozali koyoka ye, tokoki kobanda kokanisa lokola ye. Ntango mosusu, liboso ete ye akɔtisa biso makanisi wana na motó, tozalaki komona mabe moko te na ndenge oyo nkulutu wana asalaka makambo na ye; kasi, sikoyo tokómi kotalela ye ndenge mosusu. Nsukansuka, makambo nyonso oyo nkulutu wana akobanda kosala ekozala kaka mabe na miso na biso, bongo biso mpe tokoki kobanda komilelalela. Ezaleli ya ndenge wana ebongi soki moke te na lisangá ya basaleli ya Yehova.
12. Koimaima ekoki kosala nini na boyokani na biso na Nzambe?
12 Soki tozali koimaima mpo na bato oyo bazali na mokumba ya kobatela etonga ya Nzambe, yango ekoki komema biso na kofinga. Koimaima to kofinga motindo wana ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. (Exode 22:28) Bafingi oyo balingi kotika ezaleli yango te bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. (1 Bakolinti 5:11; 6:10) Moyekoli Yuda akomaki mpo na baimaimi oyo bazalaki “kotyola bonkolo mpe kofinga bato ya nkembo,” elingi koloba bato oyo bazali kokamba lisangá. (Yuda 8) Nzambe asepelaki na baimaimi wana te, yango wana ezali malamu tólanda ndakisa mabe na bango te.
13. Mpo na nini komilela nyonso ezalaka mabe te?
13 Nzokande, komilela nyonso te nde ezalaka mabe na miso ya Nzambe. Nzambe akangaki matoi te na “komilela” na ntina na Sodoma na Gomola, kasi abomaki bingumba mibale wana oyo etondaki na mabe. (Genese 18:20, 21; 19:24, 25) Na Yelusaleme, mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., “koimaima moko ebimaki na ngámbo ya Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki mpo na Bayuda ya monɔkɔ ya Liebele, mpamba te bazalaki kobosana basi na bango oyo bakufelá mibali na ntango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo.” Yango wana, “bazomi na mibale” babongisaki makambo, batyaki “mibali nsambo ya lokumu ya malamu” na ‘mokumba ya ntina’ ya kokabola biloko ya kolya. (Misala 6:1-6) Lelo oyo, bankulutu basengeli te ‘kokanga matoi na bango’ ntango ndeko moko azali komilela na likambo ya solo. (Masese 21:13) Lisusu, na esika bálobela mabe bandeko na bango na kati ya lisangá, bankulutu basengeli nde kozala bato oyo bazali kolendisa mpe kotonga bango na elimo.—1 Bakolinti 8:1.
14. Tosengeli mpenza kozala na ezaleli nini mpo tóimaimaka te?
14 Biso nyonso tosengeli koimaima te, mpamba te ezaleli ya komilelalela ezali mabe na elimo. Ezaleli motindo wana ekoki kobebisa bomoko na biso. Tótikelaka nde elimo santu nzela ya kobota bolingo na mitema na biso. (Bagalatia 5:22) Soki tozali kotosa ‘mobeko ya mokonzi oyo etali bolingo,’ yango ekosalisa biso tólanda kosalela Yehova na bomoko.—Yakobo 2:8; 1 Bakolinti 13:4-8; 1 Petelo 4:8.
Tókoselaka bato makambo te
15. Bokeseni nini ezali kati na bilobaloba na kokosela bato makambo?
15 Koimaima ekoki komema na bilobaloba; yango wana tosengeli kokebaka na maloba na biso. Kozala na bilobaloba elimboli kokende kotánga bankombo ya bato na masolo oyo ezangá ntina mpe kolobela makambo na bango. Nzokande, kokosela moto makambo elakisi koloba makambo ya lokuta mpo na ye mpo na kobebisa lokumu na ye. Masolo ya ndenge wana ezali mabe mpe esepelisaka Nzambe te. Yango wana, Nzambe ayebisaki Bayisalaele ete: “Bókoselaka baninga na bino makambo té.”—Levitike 19:16, Bible na Lingala ya lelo oyo.
16. Paulo alobaki nini mpo na bato mosusu ya bilobaloba, mpe toli yango esengeli kotinda biso na kosala nini?
16 Masolo ezangá ntina ekoki komema na kokosela bato makambo, yango wana Paulo apamelaki mpenza bato mosusu ya bilobaloba. Nsima ya kolobela basi bakufelá mibali oyo ebongi lisangá esalisa bango, alobelaki basi bakufelá mibali oyo bakómaki “bato oyo basalaka mosala te, kotambolatambola na bandako; ɛɛ, kaka kozanga kosala mosala te, kasi mpe bato ya bilobaloba mpe oyo bamikɔtisaka na makambo ya bato mosusu, kolobeláká makambo oyo basengeli te kolobela.” (1 Timote 5:11-15) Soki mwasi moko oyo azali moklisto amoni ete azalaka na ezaleli mabe ya kobɛta masolo oyo ekoki komema na kokosela bato makambo, asengeli kolanda toli oyo Paulo apesaki, ete azala ‘moto oyo ayebi kopesa nzoto kilo, oyo akoselaka bato makambo te.’ (1 Timote 3:11) Na ntembe te, ata mpe mibali oyo bazali baklisto basengeli kozala na bilobaloba te.—Masese 10:19.
Tótika kosambisa!
17, 18. (a) Yesu alobaki nini mpo na likambo ya kosambisa ndeko na biso? (b) Ndenge nini tokoki kosalela maloba ya Yesu na oyo etali kosambisa basusu?
17 Ata soki tokoselaka bato makambo te, ntango mosusu tosengeli kosala makasi mpo tóboya ezaleli ya kosambisaka bato. Yesu amonisaki ete ezaleli wana ezali mabe ntango alobaki ete: “Bótika kosambisa mpo bino bósambisama te; mpo ete na lisambisi oyo bozali kosambisa, bokosambisama na yango; mpe na emekelo oyo bozali komekela, bakomekela bino na yango. Boye, mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali te kokanisa libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko? To ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo, ‘Tiká nalongola lititi na liso na yo’; ntango, talá! libaya ya motɔndɔ ezali na liso na yo moko? Mokosi! Liboso longolá libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko, mpe boye okomona polele ndenge ya kolongola lititi na liso ya ndeko na yo.”—Matai 7:1-5.
18 Tosengeli te kosɛnga ndeko moko ete tósalisa ye na kolongola ye mwa “lititi” oyo ezali na liso na ye na ntango oyo biso moko tozali komona makambo malamu te mpamba te, na elobeli ya elilingi, tozali na “libaya ya motɔndɔ” na liso na biso. Soki tozali koyeba bonene ya mawa ya Nzambe, tokolinga te kosambisa bandeko na biso ya elimo. Tokoki koyeba bango te ndenge oyo Tata na biso ya likoló ayebi bango. Yango wana, Yesu akebisaki biso ‘tótika kosambisa mpo biso tósambisama te’! Soki tozali koyeba bolɛmbu na biso moko malamu, yango ekopekisa biso tósambisa na ndenge oyo ezangi bosembo na miso ya Nzambe.
Tozali na lokumu atako tozali na bolɛmbu
19. Ndenge nini tosengeli kotalela baninga na biso bandimi?
19 Soki tozali na mokano ya kosalela Nzambe na bomoko na baninga na biso bandimi, tokosuka kaka te na koboya kosambisa basusu. Tokozala nde bato ya liboso mpo na kopesa bango lokumu. (Baloma 12:10) Tokoluka nde bolamu na bango, kasi bolamu na biso te; lisusu, tokozala na esengo ya kosalela bango misala oyo emonanaka ete ezali misala ya bato mpamba. (Yoane 13:12-17; 1 Bakolinti 10:24) Ndenge nini tokoki kobatela ezaleli malamu wana? Soki tozali kobosana te ete mondimi nyonso azali na valɛrɛ na miso ya Yehova mpe ete mokomoko na biso azali na mposa ya basusu, se ndenge enama nyonso ya nzoto ya moto ezalaka na mposa ya binama mosusu.—1 Bakolinti 12:14-27.
20, 21. Maloba ya 2 Timote 2:20, 21 elimboli nini mpo na biso?
20 Ya solo, baklisto bazali bambɛki ya mabele, kasi Nzambe apesi bango eloko ya motuya mingi, elingi koloba mosala ya kosakola. (2 Bakolinti 4:7) Soki tolingi kokokisa mosala yango ya bosantu mpo na lokumu ya Yehova, tosengeli kobatela lokumu na biso na miso na ye mpe ya Mwana na ye. Tokozala mbɛki ya lokumu oyo Nzambe akosalela yango soki tozali kotikala pɛto na bizaleli mpe na elimo. Na likambo yango, Paulo akomaki ete: “Na kati ya ndako ya monene ezalaka kaka na bambɛki ya wolo ná ya palata te kasi mpe ya mabaya mpe ya mabelé, mpe mosusu mpo na mosala ya lokumu kasi mosusu mpo na mosala oyo ezangi lokumu. Na yango, soki moto amitangoli mosika na oyo ya nsuka, akozala mbɛki ya mosala ya lokumu, oyo esantisami, ya ntina epai ya nkolo na yango, ebongisami mpo na mosala nyonso ya malamu.”—2 Timote 2:20, 21.
21 Bato oyo batosaka masɛngami ya Nzambe te bazali ‘bambɛki oyo ezangi lokumu.’ Nzokande, soki tozali kosala makambo oyo Nzambe alingi, tokozala ‘bambɛki mpo na mosala ya lokumu, oyo esantisami to oyo bakaboli yango na mosusu mpo na mosala ya Yehova mpe oyo ebongisami mpo na mosala nyonso ya malamu.’ Na yango, tokoki komituna: ‘Nazali “mbɛki ya lokumu”? Napesaka baninga na ngai bandimi ndakisa ya malamu? Na lisangá, nasalaka mpenza na bomoko na basambeli mosusu?’
Tólanda kosala na bomoko
22. Tokoki kokokanisa lisangá ya boklisto na eloko nini?
22 Lisangá ya boklisto ezali lokola libota. Na kati ya libota, bolingo, kosalisana mpe esengo ezalaka soki bato nyonso ya libota bazali kosambela Yehova. Libota ekoki kozala na bato oyo bazali na bizaleli ndenge na ndenge, kasi mokomoko azali na esika na ye. Ezali se ndenge yango na kati ya lisangá. Atako biso nyonso tozali ndenge moko te mpe tozali bato ya kozanga kokoka, Nzambe abendaki biso epai na ye na nzela ya Klisto. (Yoane 6:44; 14:6) Yehova na Yesu balingi biso, biso mpe tosengeli mpenza kolingana lokola bato ya libota oyo ezali na bomoko.—1 Yoane 4:7-11.
23. Likambo nini tosengeli kobosana te mpe mokano nini tosengeli kozala na yango?
23 Lisangá ya boklisto ezali mpe esika oyo tosengeli kolikya kokuta bosembo. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nalingi ete na esika nyonso mibali básalaka mabondeli, kotomboláká mabɔkɔ ya sembo, kozanga nkanda mpe bantembe.” (1 Timote 2:8) Na maloba yango, Paulo amonisaki boyokani oyo ezali kati na bosembo na mabondeli oyo ezali kosalema “na esika nyonso” oyo baklisto bayangani. Na makita, kaka bato ya sembo nde basengeli kobondela mpo na lisangá. Ya solo, Nzambe alingi ete biso nyonso tózala sembo epai na ye mpe mokomoko na biso azala sembo epai ya ndeko na ye. (Mosakoli 12:13, 14) Yango wana, lokola binama ya nzoto ya moto, tózala na mokano ya kosala malamu na bomoko. Lisusu, tósala mpe na bomoko lokola tozali na kati ya libota ya basambeli ya Yehova. Longola nyonso wana, tóbosana te ete mokomoko na biso azali na mposa ya basusu mpe Nzambe akosepela na biso mpe akopambola biso soki tozali kolanda kosalela ye na bomoko.
Okopesa eyano nini?
• Nini esalisaka basaleli ya Yehova básalela ye na bomoko?
• Mpo na nini baklisto basengeli koboya ezaleli ya kopona bilongi?
• Mpo na nini okoki koloba ete koimaima ezali mabe?
• Mpo na nini tosengeli kokumisa baninga na biso bandimi?
[Elilingi na lokasa 15]
Petelo amonaki ete “Nzambe aponaka bilongi te”
[Elilingi na lokasa 16]
Oyebi mpo na nini Nzambe akitisaki Milyami?
[Elilingi na lokasa 18]
Baklisto ya sembo basalelaka Yehova na bomoko mpe na esengo