Ndenge nini tokoki kosala mpo ete mikolo nyonso tósepelisaka Yehova?
“Lobi, banda ntɔngɔ tii mpokwa, na kati wana ngonga mibale mobimba ebebaki kaka mpamba; oyo mokomoko ezalaki na miniti 60 mobimba. Elekaki kaka mpamba boye, ekei mpe ekozonga lisusu te.”—Lydia Sigourney, moto ya Amerika oyo azalaká kokoma babuku (1791-1865).
BOMOI na biso eumelaka mikolo mingi te mpe mikolo yango elekaka nokinoki. Davidi, mokomi ya nzembo akanisaki likoló na bomoi mokuse oyo tozali na yango mpe asalaki libondeli oyo: “Ɛ [Yehova], yebisá ngai nsuka na ngai, motuya ya mikolo na ngai lokola yango ezali; mpe nakososola ete nazali na bolɛmbu. Talá, obongisi mikolo na ngai lokola monene ya matandu, ntango na ngai ya kobika ezali eloko liboso na yo te.” Davidi azalaki na mposa asepelisaka Nzambe na bomoi na ye, ezala na maloba to na misala na ye. Amonisaki ete azalaki na mposa ya Nzambe ntango alobaki boye: “Elikya na ngai ezali epai na yo.” (Nzembo 39:4, 5, 7) Yehova ayokaki ye. Atalelaki mpenza misala ya Davidi mpe apesaki ye mbano oyo ebongaki mpenza.
Ekoki mpenza kokómela biso ete tómipesa mokolo mobimba na misala na biso mpe tósalaka makambo mingi mbangumbangu. Yango ekoki kokóma motungisi epai na biso, mingimingi lokola tozali na ebele ya makambo ya kosala, kasi ntango ezali moke mpo na kosala yango. Biso mpe tozalaka na makanisi lokola ya Davidi, ete tósalaka makambo oyo ezali kosepelisa Nzambe na bomoi na biso? Tóyeba ete miso ya Yehova ezali likoló ya mokomoko na biso mpe atalelaka biso. Eleki sikoyo mbula soki 3 600, Yobo, moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe, alobaki ete Yehova azalaki komona banzela na ye mpe azalaki kotalela misala na ye nyonso. Yobo atunaki motuna oyo: “Wana ye akoyela ngai, nakozongisela ye liloba nini?” (Yobo 31:4-6, 14) Mikolo nyonso ya bomoi na biso tokoki kosepelisaka Nzambe soki tozali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe mpe soki tozali koyeba kosalela ntango na biso malamu. Tótalela naino mokomoko na makambo yango malamumalamu.
Tótya makambo ya elimo na esika ya liboso
Makomami ezali kolendisa biso na kotya makambo ya elimo na esika ya liboso ntango elobi boye: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.” Wapi makambo yango oyo eleki ntina? Moko na yango ezali “boyebi ya solosolo mpe bososoli ya kokoka.” (Bafilipi 1:9, 10) Mpo na koyekola mikano ya Yehova, ezali kosɛnga ete tósalelaka ntango na biso malamu. Kasi, soki tozali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, tokozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.
Ntoma Paulo alobi na biso ete ‘tókoba kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo.’ Mpo na kotalela malamumalamu mpenza makambo, yango ezali kosɛnga ete tótalela mikano mpe bamposa ya motema na biso. Ntoma Paulo alobi lisusu ete: “Bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.” (Baefese 5:10, 17) Na bongo, wapi makambo oyo Yehova akoki kondima? Biblia epesi eyano na mokanda ya Masese ete: “Bwanya ezali eloko ya liboso. Zwá bwanya; mpe na biloko nyonso oyo okozwa, zwá mayele. Talelá yango na motuya mingi, mpe ekotombola yo.” (Masese 4:7, 8, NW) Yehova asepelaka na moto oyo azali na bwanya ya Nzambe mpe azali kosalelaka yango. (Masese 23:15) Malamu ya bwanya yango ezali ete bakoki koyiba yango te to kobebisa yango. Kutu, ebatelaka moto mpo alanda te ‘nzela mabe mpe moto oyo akolobaka makambo ya mobulu.’—Masese 2:10-15.
Yango wana, koboya kotalela makambo ya elimo bongobongo ezali mpenza likambo ya mayele! Tosengeli kosepelaka na maloba ya Yehova mpe kobanga ye. (Masese 23:17, 18) Moto nyonso, azala mokóló to elenge, akoki kokóma na makanisi ya ndenge wana; kasi eleki malamu tókolisa ezaleli malamu wana mpe tólanda mitinda ya Biblia na bomoi na biso kobanda ntango tozali bilenge. Salomo, mokonzi ya bwanya, alobaki ete: “Kanisá, sikoyo, Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.”—Mosakoli 12:1, NW.
Kobondela Yehova mokolo na mokolo ezali lolenge oyo eleki malamu mpo na kolona ezaleli ya kosepela na ye. Davidi ayebaki ete ezali na ntina mingi tóyebisaka Yehova makambo oyo tozali na yango na motema, alobaki ete: “Ɛ [Yehova], yoká libondeli na ngai, tyá matoi . . . na kolela na ngai; zalá nyɛɛ liboso ya kolela na ngai te.” (Nzembo 39:12) Tozalaka mpenza baninga ya motema ya Nzambe na boye ete ntango mosusu likambo yango esimbaka mpenza motema na biso mpe ememaka biso na kotangisa mpisoli? Soki tozali koyebisa Yehova makambo oyo tozali na yango na motema mpe tozali komanyola likoló ya Liloba na ye, akokóma mpenza moninga na biso ya motema.—Yakobo 4:8.
Tóyekola botosi
Moize mpe azalaki moto ya kondima oyo ayebaki ete azali na mposa ya Nzambe. Lokola Davidi, Moize mpe amonaki ete bomoi ya moto etondi na mikakatano. Yango wana asɛngaki Nzambe alakisa ye ‘kotánga mikolo na ye na ndenge ete azwa motema oyo ezali na bwanya.’ (Nzembo 90:10-12, NW) Moto akokóma na motema oyo ezali na bwanya soki azali koyekola mibeko ya Yehova mpe soki azali kotosa yango. Moize ayebaki yango; yango wana, mpo bana ya Yisalaele bábosana likambo yango te, ayebisaki bango lisusu mibeko mpe malako ya Nzambe liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka. Moto nyonso oyo Yehova asengelaki kopona ete azala mokonzi ya Yisalaele asengelaki kosala kopi ya Mibeko mpe asengelaki kotángaka yango mikolo nyonso ya bomoi na ye. Mpo na nini? Mpo ayekola kobanga Nzambe. Yango elingaki kolakisa soki mokonzi azali mpenza kotosa Nzambe. Elingaki kopekisa ye komitombola likoló ya bandeko na ye mpe kosala ete bokonzi na ye eumela. (Deteronome 17:18-20) Yehova azongelaki elaka yango ntango alobaki na Salomo, mwana ya Davidi ete: “Soko okotambola na nzela na ngai mpe okobatela malako na ngai mpe mibeko na ngai lokola etambolaki tata na yo Davidi, bongo nakoyeisa mikolo na yo milai.”—1 Mikonzi 3:10-14.
Kotosa ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe. Soki tozali komona ete makambo mosusu oyo Yehova azali kosɛnga to mibeko na ye mosusu ezali na ntina te, akozanga te komona elimo wana. (Masese 15:3) Lokola toyebi likambo yango, tosengeli komeka ata moke te kotyola toli nyonso oyo Yehova azali kopesa biso, atako ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Satana azali kosala nyonso oyo akoki mpo na ‘kokanga biso nzela’ atako tozali kosala makasi mpo na kotosa mibeko ya Nzambe.—1 Batesaloniki 2:18.
Ezali na ntina mingi tólanda toli ya Biblia oyo ezali kolendisa biso tóyanganaka mpo na losambo mpe kokutana na bandeko. (Deteronome 31:12, 13; Baebele 10:24, 25) Yango wana, ebongi tómituna motuna oyo: ‘Nazali nde na mokano mpe na mposa ya kosala makambo oyo ezali mpenza na ntina?’ Soki koluka mbongo ezali komema biso na kobosana kosangana na bandeko mpe koyoka mateya na makita ya lisangá, yango ekobebisa boyokani na biso na Yehova. Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká ete ezaleli na bino na bomoi ezanga bolingo ya mbongo, wana bozali kosepela na oyo bozali na yango na biloko ya sikoyo. Mpo [Yehova] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’ ” (Baebele 13:5) Soki tozali kotosa mibeko ya Yehova na motema moko, ekomonisa ete tozali mpenza kotya elikya ete akobatela biso.
Yesu ayekolaki botosi mpe azwelaki yango litomba. Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso. (Baebele 5:8) Soki tozali ntango nyonso koyekola botosi, ekozala mpasi te mpo tómonisa yango ata na makambo mikemike. Ya solo, bato mosusu bakoki kosala biso makambo oyo ekosepelisa biso te, to mpe bakoki konyokola biso mpo tozali kokangama na Nzambe. Makambo yango ekoki kokómela biso mingimingi na esika ya mosala, na kelasi, to na kati ya libota oyo bato mosusu basambelaka Yehova te. Kasi, maloba oyo bayebisaki Bayisalaele ezali kobɔndisa biso ete, soki ‘balingi Yehova mpe batosi mongongo na ye mpe bakangami na ye, akopesa bango bomoi mpe mikolo mingi.’ (Deteronome 30:20, NW) Alaki biso mpe likambo yango.
Tóyeba kosalela ntango na biso malamu
Soki tozali kosalela ntango na biso malamu, ekosalisa biso tósepelisaka Yehova mikolo nyonso na bomoi na biso. Ntango ezali lokola mbongo te: okoki kobomba mbongo, kasi okoki kobomba ntango te; soki osaleli ntango te, obungisi yango. Ngonga soki eleki, ezongaka lisusu te. Lokola tozalaka na makambo mingi ya kosala kasi ntango ezalaka moke, tosalelaka nde ntango na biso mpo na kokokisa mikano oyo tomityelaka na bomoi na biso? Kosakola Bokonzi sanza na sanza mpe kokómisa bato bayekoli esengeli kozala mokano monene oyo baklisto nyonso basengeli komityela.—Matai 24:14; 28:19, 20.
Tokoki kosalela ntango na lolenge ya malamu kaka soki toyebi valɛrɛ na yango. Yango wana mpenza, Baefese 5:16 ezali kolendisa biso ete ‘tómisombela ntango oyo ebongi’ mpe yango ezali kosɛnga ete tótya pembeni makambo oyo ezali mpenza na ntina te. Ezali kosɛnga ete tópesa ntango mingi te na makambo oyo elyaka ntango mpamba. Soki tozali kolekisa ngonga mingi na kotala televizyo to na kosalela Internet, kotánga mikanda ya mokili oyo ezangi ntina, to mpe kolekisa ntango mingi na masano to na kozwa mopɛpɛ, yango ekoki kolɛmbisa biso. Lisusu, konduka ebele ya biloko ya mokili ekoki kolya biso ntango oyo tozali na mposa na yango mpo na kozwa motema oyo ezali na bwanya.
Bato oyo balendisaka likambo ya kosalela ntango malamu balobaka boye: “Moto oyo azangi mikano ya sikisiki akoki mpe kosalela ntango na ye malamu te.” Balobaka ete mikano oyo tozali komityela esengeli kokokisa makambo mitano oyo: esengeli kozala sikisiki, esengeli kozala ya minene koleka te, koleka makasi te, kozala na bokatikati, mpe kokokisama na ntango oyo etyami.
Mokano moko ya ntina oyo tokoki komityela ezali ya kobongisa ndenge oyo totángaka Biblia. Ya liboso, mokano na biso esengeli kozala sikisiki: na ndakisa, kotánga Biblia mobimba. Ya mibale, mokano na biso esengeli kozala ya monene koleka te. Soki tosali bongo, tokoki kolandela ndenge oyo tokobanda kokokisa yango. Mikano esengeli kolendisa biso na kotya molende mpe kokola. Mikano esengeli mpe koleka makasi te mpe esengeli kozala na bokatikati. Esengeli ete moto oyo azali komityela mikano atalela makoki na ye, mayele na ye, mpe ntango oyo azali na yango. Bato mosusu bazalaka na mposa ya ntango mingi mpo na kokokisa mokano moko oyo bato mosusu bakokokisa yango na ntango moke. Likambo ya nsuka, tosengeli kokokisa mokano na biso na ntango oyo tokateli yango. Soki toponi mokolo moko oyo tosengeli kosilisa likambo moko, yango ekoki kobakisela biso mposa ya kosilisa yango.
Bandeko nyonso oyo basalaka na Betele, ezala na biro monene ya Batatoli ya Yehova to na bafiliale na yango na mokili mobimba, bazalaka na mokano ya kotánga Biblia mobimba na boumeli ya mbula ya liboso oyo bakɔti na Betele. Bamonaka ete kotánga Biblia esalisaka bango mpo bákola na elimo mpe bákóma baninga ya Yehova, oyo azali koteya bango mpo na litomba na bango. (Yisaya 48:17) Biso mpe tokoki komityela mokano ya kotánga Biblia mokolo na mokolo?
Matomba ya kosalela mikolo na biso malamu
Moto oyo atyaka makambo ya elimo na esika ya liboso azwaka mapamboli mingi. Ya liboso, esalisaka ye amona ete bomoi na ye ezali na ntina. Soki mbala na mbala tozali kobondela Yehova na etingya, boninga na biso na ye ekokóma makasi. Kobondela yango moko emonisaka ete tozali kotyela ye motema. Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kotánga mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso emonisaka mposa na biso ya koyoka Nzambe ntango azali koloba na biso. (Matai 24:45-47) Yango esalisaka biso tózwa motema oyo ezali na bwanya mpo tóyeba kozwa bikateli ya malamu mpe kopona nzela ya malamu na bomoi na biso.—Nzembo 1:1-3.
Tosepelaka kotosa bakomandema ya Yehova, mpamba te kotosa yango ezali kilo te. (1 Yoane 5:3) Ntango tozali kosala makasi ete mikolo nyonso tosepelisaka Yehova, boninga na biso na ye ekómaka makasi. Tokómaka mpe bato oyo basungaka bandeko na biso baklisto na elimo. Misala ya ndenge wana esepelisaka Yehova Nzambe. (Masese 27:11) Kondimama na Yehova sikoyo mpe mpo na libela ezali mbano oyo eleki monene!
[Bililingi na lokasa 21]
Baklisto bazwaka makambo ya elimo na lisɛki te
[Bililingi na lokasa 22]
Osalelaka ntango na yo malamu?
[Elilingi na lokasa 23]
Tobongisaka boninga na biso na Yehova ntango tozali kosala ete mikolo nyonso tósepelisaka ye