Komikosa te na makanisi ya lokuta
NTANGO Eva alyaki mbuma ya nzete oyo epekisamaki, Nzambe atunaki ye boye: “Likambo nini oyo yo osali?” Ye azongisaki ete: “Nyoka—akosaki ngai, bongo nalyaki.” (Eba. 3:13) Satana, ye oyo asalelaki mayele mabe na nzela ya nyoka mpe atindaki Eva abuka mobeko ya Nzambe, akómaki kobengama “nyoka ya ebandeli, . . . oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.”—Em. 12:9.
Lisolo yango ya mokanda ya Ebandeli emonisi ete Satana azali na mayele mabe, ete abukaka lokuta mpo na kokosa bato oyo bazali ekɛngɛ te. Eva akweaki mpenza na lokuta ya Satana. Atako bongo, tosengeli kokanisa te ete kaka Satana nde akoki kobungisa biso nzela. Biblia ekebisi biso mpe mpo na likama ya ‘komikosa na makanisi ya lokuta.’—Yak. 1:22.
Mbala mosusu tokoki kokanisa ete ezali mpasi tómikosa biso moko to kutu ete ekoki kosalema te. Nzokande, ezali polele ete Nzambe apesaki likebisi wana mpamba te. Na yango, ekozala malamu tótala ndenge oyo tokoki komikosa mpe makanisi nini ya lokuta ekoki kobungisa biso nzela. Ndakisa moko ya Biblia ekoki kosalisa biso.
Ndenge bato mosusu bamikosaki
Na mobu soki 537 L.T.B., Siruse Monene, mokonzi ya Perse, abimisaki mobeko ete Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone bázonga na Yerusaleme mpe bátonga lisusu tempelo. (Ezr. 1:1, 2) Mbula moko na nsima, na kolanda mokano ya Yehova, bato yango batyaki fondasyo mpo na tempelo ya sika. Bato oyo bazongaki na Yerusaleme basepelaki mpe basanzolaki Yehova na ndenge apambolaki ebandeli ya mosala wana ya ntina mingi. (Ezr. 3:8, 10, 11) Kasi eumelaki te, botɛmɛli mpo na mosala ya kotonga tempelo ebimaki mpe bato babandaki kolɛmba nzoto. (Ezr. 4:4) Mbula soki 15 nsima ya kozonga ya Bayuda na Yerusaleme, bakonzi ya Baperse bapekisaki mosala nyonso ya kotonga na engumba yango. Mpo epekiseli yango etosama, bakonzi ya etúká bayaki na Yerusaleme mpe “basalelaki bibundeli mpo na kopekisa [Bayuda] mosala.”—Ezr. 4:21-24.
Ntango bakutanaki na mokakatano wana monene, Bayuda bamikosaki na makanisi ya lokuta. Balobaki boye: “Ntango ekómi naino te, ntango ya kotonga ndako ya Yehova.” (Hag. 1:2) Bamonaki ete Nzambe alingaki te ete tempelo etongama na ntango wana. Na esika báluka ndenge ya kosala mokano na ye, batikaki mosala mosantu oyo bazalaki kosala mpe bakómaki komipesa na kobongisa bandako na bango moko. Yango wana, Hagai, mosakoli ya Nzambe, atunaki bango boye: “Oyo nde ntango bino bosengeli kofanda mpenza na bandako na bino oyo eyeisami kitoko na mabaya, awa ndako oyo [tempelo ya Yehova] etikali mpamba?”—Hag. 1:4.
Omoni liteya na ndakisa yango? Komikosa na oyo etali ntango oyo Nzambe akokokisa mokano na ye ekoki kotinda biso tózongisa makambo ya elimo nsima mpe tóbanda komipesa na makambo na biso moko. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kozela bapaya. Lokola oyebi ete bazali koya, okoki komipesa na misala oyo esengeli mpo oyamba bango malamu. Kasi, bayebisi yo ete bapaya yango bazwi retare. Okotika kosala misala yango?
Nzokande, kobosana te ete Hagai ná Zekaria basalisaki Bayuda bámona ete Yehova azalaki kaka na mposa ete tempelo etongama nokinoki. Hagai ayebisaki bango boye: “Bino nyonso bato ya mboka oyo, bózala makasi mpe bósala mosala.” (Hag. 2:4) Basengelaki kokoba na mosala ya kotonga mpe kolikya ete elimo ya Nzambe ekosunga bango. (Zek. 4:6, 7) Ndakisa yango ekoki kosalisa biso tómikosa te na oyo etali mokolo ya Yehova?—1 Ko. 10:11.
Tólongola makanisi ya lokuta, tózwa oyo ya malamu
Na mokanda na ye ya mibale, ntoma Petro alobelaki manaka ya Yehova mpo na kotya “likoló ya sika mpe mabele ya sika.” (2 Pe. 3:13) Alobaki ete basɛki mosusu bazalaki komituna soki Nzambe akozwa mpenza makambo ya bato na mabɔkɔ. Bazalaki koloba na lokuta nyonso ete eloko moko te ekosalema, ete “makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.” (2 Pe. 3:4) Petro alingaki kokweisa makanisi wana ya lokuta. Akomaki boye: “Nazali kokundwela bino makambo mpo nalamwisa makoki na bino ya kokanisa malamu.” Akundwelaki baninga na ye bakristo ete basɛki wana bazalaki na libunga. Nzambe azwaki makambo ya bato na mabɔkɔ na ntango ya kala, ntango atindaki mpela oyo ebomaki mokili mobimba.—2 Pe. 3:1, 5-7.
Na mobu 520 L.T.B., Hagai apesaki mpe Bayuda oyo balɛmbaki nzoto mpe batikaki mosala elendiseli ya ndenge wana. Alendisaki bango na maloba oyo: “Bótya motema na bino na banzela na bino.” (Hag. 1:5) Mpo na kolamwisa makoki ya kokanisa ya baninga na ye basaleli ya Nzambe, akundwelaki bango mikano ya Nzambe mpe bilaka oyo apesaki mpo na bato na Ye. (Hag. 1:8; 2:4, 5) Nsima kaka ya kozwa elendiseli wana, Bayuda bazongelaki kotonga tempelo, atako bazalaki naino na epekiseli ya Leta. Banguna balukaki lisusu kopekisa mosala ya kotonga, kasi balongaki te. Epekiseli yango elongolamaki, mpe mbula mitano na nsima, Bayuda basilisaki kotonga tempelo.—Ezr. 6:14, 15; Hag. 1:14, 15.
Tótya motema na biso na banzela na biso
Okanisi ete ndenge moko na Bayuda ya ntango ya Hagai, biso mpe tokoki kolɛmba nzoto ntango mikakatano ebimi? Soki esalemi bongo, tokoki komona ete ezali mpasi tóbatela molende na biso na mosala ya kosakola nsango malamu. Kasi, nini ekoki kolɛmbisa biso nzoto? Mbala mosusu tozali konyokwama mpo na kozanga bosembo ya mokili oyo. Kanisá Habakuku, oyo atunaki ete: “Kino ntango nini nakobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi mpo obikisa na mobulu, mpe yo okobikisa te?” (Hab. 1:2) Mpo na oyo bato mosusu bakoki komona ete ezali retare, mokristo akoki kobosana ete mikolo etikali ya kotánga mpe akoki komipesa libosoliboso na koluka bomoi ya malamu. Likambo ya ndenge wana ekoki kokómela yo? Soki tokómi na makanisi ya ndenge wana, tozali komikosa biso moko. Ezali na ntina mingi tótosa toli oyo Biblia epesi ya ‘kotya motema na biso na banzela na biso’ mpe ya ‘kolamwisa makoki na biso ya kokanisa’! Tokoki komituna boye: ‘Nasengeli nde kokamwa soki ebongiseli ya makambo oyo ya mabe eumeli koleka ndenge nakanisaki?’
Eleko oyo Biblia elobelaki banda kala
Tótala maloba ya Yesu na ntina etali bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Lisolo ya Marko oyo elobeli esakweli ya Yesu mpo na mikolo ya nsuka emonisi ete Yesu alendisaki biso mbala na mbala ete tózala ekɛngɛ. (Mrk. 13:33-37) Likebisi ya ndenge wana ezali mpe na katikati ya esakweli oyo elobeli mokolo monene ya Yehova na Armagedone. (Em. 16:14-16) Mpo na nini bakebisaka biso mbala na mbala ndenge wana? Kokundwela bato makambo ezalaka na ntina mpo ntango bazali kozela likambo mpe bamoni lokola ntango na yango eleki, bakoki kobanda kokanisa ete likambo yango ekoya lisusu noki te.
Yesu apesaki ndakisa moko mpo na komonisa ntina ya kozala ntango nyonso ekɛngɛ wana tozali kozela nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo. Alobelaki nkolo-ndako moko oyo moyibi abukaki ndako na ye mpe akɔtelaki ye. Akokaki kosala nini mpo báyiba ye te? Asengelaki kolala mpɔngi te butu mobimba. Yesu asukisaki ndakisa na ye na toli oyo: “Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”—Mat. 24:43, 44.
Ndakisa yango emonisi ntina ya komibongisa mpo na kozela, ata mpo na ntango molai. Ya solo, tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo tozali komona ete ebongiseli oyo mabe eumeli koleka ndenge oyo tokanisaki. Tosengeli te komikosa na makanisi ya lokuta mpe koloba ete ‘ntango ya Yehova ekómi naino te.’ Makanisi ya ndenge wana ekokitisa mposa na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Rom. 12:11.
Tópikola makanisi ya lokuta
Na oyo etali makanisi ya lokuta, etinda oyo ezali na Bagalatia 6:7 ezali solo: “Bómikosa te . . . Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” Soki bakoni eloko moko te na elanga, matiti ya mabe eumelaka te kobima. Ndenge moko mpe, soki tolamwisi te makoki na biso ya kokanisa malamu, makanisi ya lokuta ekoki kobotama na motema na biso. Na ndakisa, tokoki koloba biso moko ete: ‘Ntembe ezali te ete mokolo ya Yehova ekoya—kasi sikoyo te.’ Makanisi ya ndenge wana ekoki kotinda biso tóbanda komona mikumba na biso ya elimo kaka bongobongo. Nsima ya mikolo, tokoki kobanda kokóma na bopɔtu na makambo ya elimo. Bongo mokolo ya Yehova ekoki koya, kasi biso tomilɛngɛli te.—2 Pe. 3:10.
Nzokande, makanisi ya lokuta ekobotama te na motema na biso soki tozali ntango nyonso komindimisa “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Rom. 12:2) Kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ezali moko ya makambo malamu oyo ekoki kosalisa biso na likambo yango. Makomami ekoki kosalisa biso tókóma na kondima makasi ete ntango nyonso, Yehova asalaka na ntango oyo etyamá.—Hab. 2:3.
Koyekola biso moko, kobondela, koyangana na makita nyonso mpe kosakola, bakisa mpe misala ya boboto, ekosalisa biso ‘tóbatela na makanisi na biso kozala ya mokolo ya Yehova.’ (2 Pe. 3:11, 12) Yehova akomona ndenge tozali kosalela ye kozanga kotika. Ntoma Paulo akundweli biso ete: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.”—Gal. 6:9.
Ya solo, sikoyo ezali te ntango ya kotika makanisi ya lokuta ekosa biso mpe etinda biso tókanisa ete mokolo ya Yehova ekoya lisusu sikoyo te. Ezali nde ntango ya kolendisa mitema na biso, mpo mokolo ya Yehova ekómi pene.
[Elilingi na lokasa 4]
Hagai ná Zekaria balendisaki Bayuda bátonga tempelo
[Elilingi na lokasa 5]
Nkolo-ndako alingaki kosala nini soki ayebaka ete moyibi akoya?