LISOLO YA BOYEKOLI 48
Tyá motema ete Yehova akosalisa yo na ntango ya mikakatano
“‘Bózala makasi, . . . mpo nazali elongo na bino,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.”—HAG. 2:4.
LOYEMBO 118 “Bakiselá biso kondima”
NA MOKUSEa
1-2. (a) Makambo nini tozali kokutana na yango lelo ekokani na oyo ya Bayuda oyo bazongaki na Yerusaleme? (b) Lobelá mwa mikakatano oyo Bayuda yango bakutanaki na yango. (Talá etanda “Mikolo ya Hagai, Zekaria, mpe Ezera.”)
OMITUNGISAKA na bantango mosusu mpo na mikolo ezali koya? Ekoki kozala ete obungisi mosala na yo mpe ozali komitungisa mpo na ndenge oyo okokokisa bamposa ya libota na yo. Mbala mosusu ozali komitungisa mpo na kobatela libota na yo na kobeba ya makambo ya politiki, minyoko, to botɛmɛli na mosala ya kosakola. Ozali kokutana na moko ya mikakatano wana? Soki ezali bongo, okozwa matomba soki otaleli ndenge Yehova asalisaki Bayisraele na kala ntango bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana.
2 Esɛngaki mpenza kondima mpo na Bayuda oyo bazalaki kofanda na Babilone bátika bomoi ya malamu oyo bazalaki na yango, mpe básala mobembo tii na mboka oyo mingi na bango bayebaki yango mpenza te. Ntango bakómaki, eumelaki te bakutanaki na mikakatano ya mbongo, kobeba ya makambo ya politiki mpe botɛmɛli. Na yango ezalaki mpasi mpo basusu bátya mosala ya kotonga lisusu tempelo ya Yehova na esika ya liboso. Yango wana, na mobu soki 520 L.T.B., Yehova atindaki basakoli mibale, Hagai ná Zekaria, básalisa Bayisraele yango bázongela molende na bango. (Hag. 1:1; Zek. 1:1) Ndenge tokomona yango, malendisi ya basakoli yango esalisaki bango mpenza. Kasi, pene na bambula 50 na nsima, Bayuda oyo bazongaki bazalaki lisusu na mposa ya kolendisama. Na sima, Ezera, mosali-bakopi ya Mobeko, alongwaki na Babilone mpe ayaki na Yerusaleme mpo na kolendisa bato ya Nzambe bátya losambo ya Yehova na esika ya liboso.—Ezr. 7:1, 6.
3. Tokotalela mituna nini? (Masese 22:19)
3 Kaka ndenge bisakweli ya Hagai ná Zekaria esalisaki basaleli ya Nzambe na kala bákoba kotyela Yehova motema na ntango ya botɛmɛli, ekoki mpe kosalisa biso lelo oyo na mikakatano oyo tozali kokutana na yango. (Tángá Masese 22:19.) Wana tozali kotalela nsango ya Nzambe oyo Hagai ná Zekaria bapesaki mpe ndakisa ya Ezera, tokoyanola na mituna oyo: Mikakatano esalaki nini epai ya Bayuda oyo bazongaki? Mpo na nini tosengeli kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso na ntango ya mikakatano? Mpe ndenge nini tokoki kotyela Yehova motema na ntango ya mpasi?
OYO MIKAKATANO ESALAKI EPAI YA BAYUDA OYO BAZONGAKI
4-5. Nini ekokaki kosala ete Bayuda bábungisa esengo na bango na mosala ya kotonga lisusu tempelo?
4 Ntango Bayuda oyo bazongaki bakómaki na Yerusaleme, bazalaki na mosala mingi ya kosala. Na mbala moko batongaki lisusu etumbelo ya Yehova mpe batyaki moboko ya tempelo. (Ezr. 3:1-3, 10) Kasi esengo na bango ya ebandeli ekitaki. Mpo na nini? Longola kotonga lisusu tempelo, basengelaki kotonga bandako na bango moko, kolona bilanga, mpe koleisa mabota na bango. (Ezr. 2:68, 70) Lisusu, bakutanaki na botɛmɛli ya banguna na bango, oyo bazalaki koluka kopekisa bango kotonga lisusu tempelo.—Ezr. 4:1-5.
5 Bayuda yango oyo bazongaki bakutanaki mpe na mikakatano ya mbongo mpe ya kobeba ya makambo ya politiki. Ampire ya Baperse nde ezalaki kotambwisa ekólo na bango. Nsima ya liwa ya Siruse, mokonzi ya Perse na mobu 530 L.T.B., mokonzi oyo azwaki esika na ye, Cambyse, akendaki na basoda mpo na kobunda na Ezipito. Ntango bazalaki kokende na Ezipito, na ntembe te basoda na ye basengelaki kozwa bilei, mai mpe bisika ya kopema epai ya Bayisraele, mpe ememelaki Bayisraele mpasi lisusu. Ntango Dariuse I, mokonzi oyo ayaki nsima na ye abandaki koyangela, mikakatano ezalaki kaka mingi, na ndakisa, botomboki mpe kobeba ya makambo ya politiki. Kozanga ntembe makambo wana nyonso esalaki ete baoyo bazongaki bámitungisa mpo na ndenge oyo bakokokisa bamposa ya mabota na bango. Mpo na mikakatano wana nyonso, Bayuda mosusu bamonaki ete ezalaki ntango ya malamu te ya kotonga lisusu tempelo ya Yehova.—Hag. 1:2.
6. Na kotalela Zekaria 4:6, 7, mikakatano nini mosusu Bayuda bakutanaki na yango, mpe malendisi nini Zekaria apesaki bango?
6 Tángá Zekaria 4:6, 7. Longola mikakatano ya mbongo mpe kobeba ya makambo ya politiki, Bayuda basengelaki mpe koyika mpiko na minyoko. Na mobu 522 L.T.B., banguna na bango balongaki kosala ete mosala ya kotonga lisusu tempelo ya Yehova epekisama. Kasi Zekaria alendisaki Bayuda ete Yehova akosalela elimo na ye ya nguya mpo na kolongola mokakatano wana. Na mobu 520 L.T.B., Mokonzi Dariuse apesaki nzela bátonga lisusu tempelo mpe apesaki ata mbongo mpe mobeko ete básalisa bango.—Ezr. 6:1, 6-10.
7. Ntango Bayuda oyo bazongaki batyaki mosala ya Nzambe na esika ya liboso, mapamboli nini bazwaki?
7 Na nzela ya Hagai ná Zekaria, Yehova alakaki bato na ye ete akosalisa bango soki batye mosala ya kotonga lisusu tempelo na esika ya liboso. (Hag. 1:8, 13, 14; Zek. 1:3, 16) Nsima ya kolendisa bango epai ya basakoli wana, Bayuda oyo bazongaki babandaki kotonga lisusu tempelo na mobu 520 L.T.B. mpe basilisaki kotonga yango pene na mbula mitano. Lokola Bayuda yango batyaki mosala ya Yehova na esika ya liboso atako bazalaki na mikakatano, Yehova asalisaki bango kaka te na mosuni, kasi mpe na elimo. Mpe esalaki ete básambela Yehova na esengo.—Ezr. 6:14-16, 22.
TYÁ MOKANO YA NZAMBE NA ESIKA YA LIBOSO
8. Ndenge nini Hagai 2:4 ekoki kosalisa biso tótya mosala ya Nzambe na esika ya liboso? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
8 Lokola bolɔzi monene ekómi pene, ezali mpenza na ntina tóbosanaka te ete tosengeli kotosa etinda ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola. (Mrk. 13:10) Kasi, tokoki komona ete ezali mpasi kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso soki tozali na mikakatano ya mbongo to ntango tozali kokutana na botɛmɛli na mosala na biso ya kosakola. Nini ekoki kosalisa biso tótya mosala ya Yehova na esika ya liboso? Tosengeli kotya motema ete “Yehova ya mampinga”b azali elongo na biso. Akosalisa biso soki tokobi kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Na yango tozali na eloko ya kobanga te.—Tángá Hagai 2:4.
9-10. Ndenge nini babalani moko bamonaki bosolo ya maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33?
9 Tótalela ndakisa ya Oleg ná Irina,c babalani oyo bazali babongisi nzela. Nsima ya kokende kosalisa lisangá moko na esika mosusu, babungisaki mosala na bango mpo na kobeba ya nkita na ekólo na bango. Atako bazalaki mpenza na mosala te na boumeli ya pene na mbula moko, bazalaki komona ete Yehova azalaki kosunga bango mpe na bantango mosusu bandeko bazalaki kosalisa bango. Nini esalisaki bango na mikakatano wana? Oleg, oyo liboso anyokwamaki na makanisi, alobi boye: “Kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola esalisaki biso tótya makanisi na makambo oyo eleki ntina na bomoi.” Wana ye ná mwasi na ye bakobaki koluka mosala, bamipesaki mingi na kosakola.
10 Mokolo moko ntango bazongaki na ndako nsima ya mosala ya kosakola, bayebisaki bango ndeko moko asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 160 mpo na komemela bango basaki mibale ya bilei. Oleg alobi ete: “Mokolo wana, Tomonaki lisusu ndenge Yehova ná lisangá batyelaka biso mpenza likebi. Tondimisami ete Yehova akoki kobosana ata moke te basaleli na ye, ata ntango bamoni ete elikya ezali te na likambo na bango.”—Mat. 6:33.
11. Soki totye mosala ya Nzambe na esika ya liboso, tokozwa nini?
11 Yehova alingi ete tótya na esika ya liboso mosala oyo ebikisaka bomoi ya bato, kokómisa bato bayekoli. Ndenge tomonaki yango na paragrafe 7, Hagai alendisaki bato ya Yehova bábanda kotonga lisusu tempelo. Yehova alakaki ete ‘akotinda lipamboli’ soki basali bongo. (Hag. 2:18, 19) Biso mpe tokoki komindimisa ete Yehova akopambola milende na biso soki totye na esika ya liboso mosala oyo apesi biso tósala.
NDENGE YA KOTYELA YEHOVA MOTEMA MINGI KOLEKA
12. Mpo na nini Ezera ná baoyo bazongaki na ye basengelaki kozala na kondima makasi?
12 Na mobu 468 L.T.B., Ezera asalaki mobembo ná etuluku ya mibale ya Bayuda longwa na Babilone tii na Yerusaleme. Mpo na kosala mobembo yango, Ezera ná bato oyo bazongaki basengelaki kozala na kondima makasi. Basengelaki koleka na banzela ya makama, wana bamemi ebele ya wolo mpe ya palata oyo epesamaki mpo na tempelo. Ezalaki pɛtɛɛ miyibi bálanda bango. (Ezr. 7:12-16; 8:31) Lisusu, bayaki komona ete ata Yerusaleme ezalaki na libateli te. Engumba ezalaki na bato mingi te, mpe bifelo ná baporte na yango ezalaki malamu te. Ndakisa ya Ezera ekoki koteya biso nini na oyo etali kotyela Yehova motema?
13. Nini esalaki ete Ezera atyela lisusu Yehova motema mingi? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
13 Ezera amonaki ndenge Yehova asalisaki bato na ye na ntango ya mikakatano. Bambula liboso, na mobu 484 L.T.B., ekoki kozala ete Ezera azalaki na Babilone ntango Mokonzi Ahasueruse abimisaki mobeko ya koboma Bayuda nyonso oyo bazalaki na ampire ya Perse. (Est. 3:7, 13-15) Bomoi ya Ezera ezalaki na likama! Ntango Bayuda “na etúká nyonso” bayokaki yango, bakilaki bilei mpe balelaki, na ntembe te babondelaki Yehova mpo asalisa bango. (Est. 4:3) Kanisá ndenge Ezera ná bandeko na ye Bayuda bayokaki ntango bayebaki ete baoyo bazalaki koluka koboma Bayuda, bango nde babomamaki! (Est. 9:1, 2) Makambo wana ya mpasi ebongisaki Ezera mpo na makambo ya mpasi oyo ekoya mpe na ntembe te esalaki ete atya lisusu motema mingi na likoki ya Yehova ya kobatela bato na ye.d
14. Liteya nini ndeko mwasi moko azwaki nsima ya kozwa lisalisi ya Yehova na ntango ya mpasi?
14 Ntango Yehova asalisi biso na ntango ya mpasi, tokómaka kotyela ye lisusu motema mingi. Tótalela ndakisa ya Anastasia, oyo afandaka na Mpoto ya Ɛsti. Atikaki mosala na ye mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili. Alobi boye: “Yango ezalaki mbala ya liboso na bomoi na ngai nazanga mbongo.” Abakisi: “Natikaki likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova mpe namonaki ndenge asalisaki ngai na bolingo nyonso. Soki ekómi ete nabungisa lisusu mosala na ngai, nakobanga te. Soki Tata na ngai ya likoló azali kokokisa bamposa na ngai lelo, akokokisa mpe yango lobi.”
15. Nini esalisaki Ezera atyela lisusu Yehova motema mingi? (Ezera 7:27, 28)
15 Ezera amonaki lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na ye. Ntango Ezera azalaki kokanisa mbala nyonso oyo Yehova asalisaki ye na kala, ezalaki kosalisa ye atyela lisusu Yehova motema mingi. Tyá likebi na maloba oyo: “Lobɔkɔ ya Yehova Nzambe na ngai ezalaki likoló na ngai.” (Tángá Ezera 7:27, 28; msl.) Ezera asaleli maloba ya ndenge wana mbala motoba na mokanda oyo ezali na nkombo na ye.—Ezr. 7:6, 9; 8:18, 22, 31.
16. Na makambo nini tokoki komona polele lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na biso? (Talá mpe elilingi.)
16 Yehova akoki kosalisa biso ntango tozali na mikakatano. Na ndakisa, ntango tosɛngi patrɔ na biso konje mpo tóyangana na liyangani to ntango tosɛngi ye abongola programɛ ya mosala mpo tókoka koyanga na makita nyonso, tomipesi libaku ya komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na biso. Tokoki kokamwa mbala mosusu makambo malamu oyo yango ekobimisa. Yango ekosala ete tótyela Yehova motema lisusu mingi.
17. Ndenge nini Ezera amonisaki komikitisa na ntango ya mikakatano? (Talá elilingi ya ezipeli.)
17 Na komikitisa nyonso, Ezera abondelaki Yehova asalisa ye. Ntango nyonso oyo azalaki komitungisa na mokumba na ye, na komikitisa nyonso Ezera azalaki kobondela Yehova. (Ezr. 8:21-23; 9:3-5) Lokola Ezera atyelaki Yehova motema, baoyo bazalaki elongo na ye bapesaki ye mabɔkɔ mpe bamekolaki kondima na ye. (Ezr. 10:1-4) Ntango tozali komitungisa mpo na biloko ya kobikela oyo tosengeli na yango to mpo na libota na biso, tosengeli kobondela Yehova mpe kotyela ye motema.
18. Nini ekoki kosalisa biso tótyela Yehova motema lisusu mingi koleka?
18 Soki na komikitisa nyonso tozali koluka lisalisi ya Yehova mpe kondima lisalisi ya bandeko na biso, tokotyela Yehova motema mingi koleka. Erika, mama moko ya bana misato, azalaki ntango nyongo kotya motema ete Yehova akosalisa ye na ntango ya mpasi mpenza. Na boumeli ya ntango moko mokuse, mwana na ye oyo azalaki na libumu mpe mobali na ye bakufaki. Na kotalela nyonso oyo ekómelaki ye, alobi boye: “Okoki koyeba te liboso ndenge oyo Yehova akosalisa yo. Lisalisi ekoki koya na ndenge oyo okanisaki kutu te. Nayekoli ete biyano na mabondeli na ngai mingi ezalaki koya na nzela ya maloba mpe misala ya baninga na ngai. Soki nayebisi baninga na ngai makambo oyo ezali kokómela ngai na bomoi, bakoki kosalisa ngai na pɛtɛɛ nyonso mpenza.”
KOBÁ KOTYELA YEHOVA MOTEMA TII NA NSUKA
19-20. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Bayuda oyo bakokaki te kozonga na Yerusaleme?
19 Tokoki kozwa liteya ya ntina mingi epai ya Bayuda oyo bazalaki na likoki te ya kozonga na Yerusaleme. Basusu bakokaki te kozonga mpo na bobange, maladi, to mikumba ya libota. Atako bongo, bapesaki baoyo bazongaki mabɔkɔ na motema moko na ndenge bapesaki biloko oyo esengelaki mpo na tempelo. (Ezr. 1:5, 6) Emonani ete bambula soki 19 nsima ya kokóma ya etuluku ya liboso ya baoyo bazongaki na Yerusaleme, baoyo batikalaki na Babilone bakobaki kotinda makabo na bolingo na bango moko na Yerusaleme.—Zek. 6:10.
20 Ata soki tomoni ete tozali kokoka te kosala mingi na mosala ya Nzambe, tokoki komindimisa ete Yehova asepelaka na milende oyo tozali kosala mpo na kosepelisa ye. Ndenge nini toyebi yango? Na mikolo ya Zekaria, Yehova asɛngaki mosakoli na ye asala motole na palata mpe wolo oyo Bayuda oyo bazalaki na Babilone batindaki. (Zek. 6:11) “Motole [yango] ya kitoko” esengelaki kozala “ekaniseli” ya makabo na bango ya bolingo. (Zek. 6:14, msl.) Tokoki kotya motema ete Yehova akobosana ata moke te milende oyo tosalaka na motema mobimba mpo na kosalela ye na ntango ya mpasi.—Ebr. 6:10.
21. Nini ekosalisa biso tótyela Yehova motema na nyonso oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya?
21 Na ntembe te tokokoba kokutana na mikakatano na mikolo oyo ya nsuka, kutu makambo ekoki ata kobeba koleka na mikolo ezali koya. (2 Tim. 3:1, 13) Kasi, tosengeli te komitungisa mingi koleka. Kobosana te maloba ya Yehova epai ya bato na ye na mikolo ya Hagai ete: “Nazali elongo na bino . . . Bóbanga te.” (Hag. 2:4, 5) Biso mpe tokoki komindimisa ete Yehova akozala elongo na biso ntango tozali kosala nyonso mpo na kosala mokano na ye. Soki tosaleli mateya oyo tozwi na bisakweli ya Hagai ná Zekaria mpe na ndakisa ya Ezera, tokokoba kotyela Yehova motema ata soki tokutani na mikakatano nini na mikolo ezali koya.
LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!
a Lisolo oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tótyela lisusu Yehova motema mingi ntango tokutani na mikakatano ya mbongo, kobeba ya makambo ya politiki, to botɛmɛli na mosala na biso ya kosakola.
b Maloba “Yehova ya mampinga” esalelami mbala 14 na buku ya Hagai, oyo ezalaki kokundwela Bayuda mpe ezali kokundwela biso ete nguya ya Yehova ezali na nsuka te mpe apesaka mitindo na mampinga minene ya bikelamu ya elimo.—Nz. 103:20, 21.
c Topesi bango bankombo mosusu.
d Ezera, oyo azalaki mosali-bakopi ya Mobeko akolisaki mpe ezaleli ya kotyela bisakweli ya Yehova motema liboso kutu asala mobembo na Yerusaleme.—2 Nt. 36:22, 23; Ezr. 7:6, 9, 10; Yir. 29:14.
e NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko moko asɛngi patrɔ na ye konje mpo ayangana na liyangani kasi patrɔ aboyi. Azali kobondela mpo na kozwa lisalisi wana azali komibongisa mpo akutana na ye lisusu. Alakisi patrɔ na ye libyangi ya liyangani, alimboleli ye valɛrɛ ya mateya ya Biblia. Patrɔ na ye akamwe mpe andimi kopesa ye konje.