LISOLO YA BOYEKOLI 37
“Nakoningisa bikólo nyonso”
“Nakoningisa bikólo nyonso, mpe biloko kitoko ya bikólo nyonso ekokɔta mpenza na ndako oyo.”—HAG. 2:7.
LOYEMBO 24 Bóya na ngomba ya Yehova
NA MOKUSEa
1-2. Koningana ya ndenge nini Hagai asakolaki mpo na eleko na biso?
MOTO moko oyo abikaki na koningana ya mabele oyo esalemaki na ekólo Népal na 2015, alobi boye: “Kaka nsima ya mwa miniti moke, babutiki mpe bandako milai ekómaki kokwea. Bato nyonso bakómaki kobanga. Mingi na bango balobaki ete esalaki kaka miniti soki mibale. Kasi mpo na ngai, namonaki ete eumelaki mpenza.” Soki okutaná na likambo ya ndenge wana, ekozala mpasi mpo obosana yango.
2 Kasi sikoyo, koningana ya ndenge mosusu ezali kosalema kaka na ekólo moko te, kasi bipai nyonso. Ezali koningisa bikólo nyonso ya mokili, mpe esali bambula mingi. Mosakoli Hagai nde asakolaki koningana yango. Akomaki boye: “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na mbala moko lisusu—etikali mwa ntango moke—mpe nakoningisa likoló, ná mabele, ná mbu, ná mokili.’”—Hag. 2:6.
3. Na ndenge nini koningana oyo Hagai asakolaki ekeseni na koningana ya mabele?
3 Koningana oyo Hagai asakolaki, ezali te koningana ya mabele oyo ebimisaka kaka makama, kasi ezali nde koningana oyo ebimisaka makambo ya malamu. Yehova ye moko alobi na biso: “Nakoningisa bikólo nyonso, mpe biloko kitoko ya bikólo nyonso ekokɔta mpenza na ndako oyo, mpe nakotondisa yango na nkembo.” (Hag. 2:7) Esakweli yango elimbolaki nini mpo na bato oyo bazalaki na bomoi na eleko ya Hagai? Elimboli nini mpo na biso lelo oyo? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo. Tokomona mpe ndenge oyo tozali kopesa mabɔkɔ na mosala ya koningisa bikólo lelo oyo.
NSANGO MOKO YA KOLENDISA NA MIKOLO YA HAGAI
4. Mpo na nini Yehova atindaki mosakoli Hagai epai ya basaleli na ye?
4 Yehova apesaki mosakoli Hagai mokumba moko ya ntina mingi. Tótalela makambo oyo esalemaki liboso apesa ye mokumba yango. Ekoki kozala ete Hagai azalaki na kati ya bato oyo bautaki bakangami na Babilone mpe bazongaki na Yerusaleme na mobu 537 liboso ya ntango na biso. Mwa moke nsima ya kokóma na Yerusaleme, basaleli yango ya sembo ya Yehova batyaki moboko ya ndako ya Yehova, to tempelo. (Ezr. 3:8, 10) Kasi eumelaki te, likambo moko ya mpasi esalemaki. Balɛmbaki nzoto mpe batikaki kotonga tempelo mpo bato mosusu bakómaki kotɛmɛla bango. (Ezr. 4:4; Hag. 1:1, 2) Yango wana na mobu 520 liboso ya ntango na biso, Yehova apesaki Hagai mokumba ya kolendisa Bayuda bázongela lisusu molende na bango mpe básilisa kotonga tempelo.b—Ezr. 6:14, 15.
5. Mpo na nini nsango oyo Hagai asakolaki elendisaki mpenza basaleli ya Nzambe?
5 Nsango oyo Hagai asakolaki ezalaki na mokano ya kolendisa bato bákóma na kondima makasi epai ya Yehova. Na mpiko nyonso, mosakoli ayebisaki Bayuda oyo balɛmbaki nzoto boye: “‘Bino nyonso bato ya mboka oyo, bózala makasi mpe bósala mosala,’ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpo nazali elongo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.” (Hag. 2:4) Na ntembe te, maloba “Yehova ya mampinga,” esengelaki kolendisa bango. Yehova azali na ebele ya mampinga na ye ya baanzelu; yango wana Bayuda basengelaki kotyela ye motema mpo bálonga.
6. Koningana oyo Hagai asakolaki, esengelaki kobimisa makambo nini?
6 Yehova atindaki Hagai ayebisa Bayuda ete akoningisa bikólo nyonso. Nsango yango elendisaki bato oyo balɛmbaki nzoto mpe oyo bazalaki kotonga tempelo. Emonisaki ete Yehova akoningisa ekólo Perse, nguya ya mokili mobimba oyo esangisaki bikólo mingi na ntango wana. Koningana yango esengelaki kobimisa makambo nini? Ya liboso, basaleli ya Nzambe basengelaki kosilisa kotonga tempelo. Na nsima, ata baoyo bazalaki Bayuda te basengelaki kosangana na basaleli ya Nzambe mpo na kosambela Yehova na tempelo yango. Na ntembe te, nsango yango esengelaki mpenza kolendisa basaleli ya Nzambe!—Zek. 8:9.
MOSALA OYO EZALI KONINGISA MABELE LELO OYO
7. Lelo oyo tozali kopesa mabɔkɔ na mosala nini ya koningisa? Limbolá.
7 Esakweli ya Hagai elimboli nini mpo na biso lelo oyo? Lelo oyo mpe, Yehova azali koningisa bikólo nyonso mpe tozali kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Tótalela likambo oyo: Na 1914, Yehova atyaki Yesu Kristo Mokonzi ya Bokonzi na ye ya likoló. (Nz. 2:6) Kotyama ya Bokonzi yango ezalaki nsango ya mabe mpo na bakonzi ya mokili. Elimbolaki ete “bantango oyo etyamá ya bikólo” ekokaki, elingi koloba, eleko oyo ata mokonzi moko te azalaki momonisi ya Yehova awa na mabele ekómaki na nsuka. (Luka 21:24) Mpo na ntina yango nde kobanda 1919, basaleli ya Yehova bakómá koyebisa moto nyonso ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato. Mosala yango ya kosakola ‘nsango malamu ya Bokonzi’ eningisi mokili mobimba.—Mat. 24:14.
8. Na kotalela Nzembo 2:1-3, ndenge nini bato mingi ya bikólo bayambaka nsango na biso?
8 Ndenge nini bato bayambi nsango yango? Mingi baboyi koyoka yango. (Tángá Nzembo 2:1-3.) Bikólo ekómi kobanga. Baboyi kondima Mokonzi oyo Yehova atyá. Bamonaka te ete nsango ya Bokonzi oyo tosakolaka ezali “nsango malamu.” Kutu baguvɛrnema mosusu epekisi mosala ya kosakola! Atako bakonzi mingi balobaka ete basalelaka Nzambe, balingaka te kotika bokonzi na bango. Ndenge kaka bakonzi basalaki yango na mikolo ya Yesu, lelo oyo mpe bakonzi batɛmɛlaka Moto oyo Yehova atyá mafuta mpe bayekoli na ye ya sembo.—Mis. 4:25-28.
9. Yehova asali nini mpo na bato ya bikólo oyo baboyaka koyoka nsango ya Bokonzi?
9 Yehova asali nini mpo na bato ya bikólo oyo baboyaka koyoka nsango yango? Nzembo 2:10-12 eyanoli boye: “Mpe sikoyo, Ee bakonzi, bózala na mayele ya kososola; bóndima básembola bino, Ee basambisi ya mabele. Bósalela Yehova na kobanga mpe bózala na esengo na kolɛnga. Bópwɛpwa mwana, mpo Ye asilika te noki bókufa mpe bólongwa na nzela, mpo nkanda na ye epelaka noki. Esengo na baoyo nyonso bazali kokima epai na ye.” Yehova azali na boboto mpe atikeli banguna na ye ntango mpo bázwa ekateli oyo ebongi. Bakoki kobongola makanisi na bango mpe kondima kosalela Yehova. Kasi ntango etikali lisusu mingi te. Tozali kobika na “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo. (2 Tim. 3:1; Yis. 61:2) Ezali mpenza na ntina ete bato báyeba solo nokinoki mpe bápona kosalela Yehova.
BATO MOSUSU BAZALI KOSEPELA NA MOSALA YA KONINGISA
10. Ndenge nini bato mosusu bazali kotalela mosala ya koningisa oyo Hagai 2:7-9 elobeli?
10 Bato mosusu bazali kosepela na mosala ya koningisa oyo Hagai asakolaki. Ayebisi biso ete na nzela ya mosala yango, “biloko kitoko ya bikólo nyonso,” elingi koloba bato ya mitema sembo ya bikólo nyonso, ‘bakoya’ kosambela Yehova.c (Tángá Hagai 2:7-9.) Yisaya, ata mpe Mika, basakolaki ete likambo yango ekosalema “na eleko ya nsuka ya mikolo.”—Yis. 2:2-4; Mika 4:1, 2.
11. Ndeko mobali moko asalaki nini ntango ayokaki nsango ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso?
11 Tótala ndenge nsango yango ya koningisa esalaki na bomoi ya ndeko mobali moko na nkombo Ken, oyo asalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Abosanaka te ndenge oyo ayokaki nsango ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso, esali sikoyo mbula soki 40. Ndeko Ken alobi boye: “Ntango nayokaki mpo na mbala ya liboso solo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, nasepelaki koyeba ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Namonaki ete mpo Nzambe andima ngai mpe nazwa bomoi ya seko, nasengelaki kokabwana na mokili oyo mabe mpe kozala na ngámbo ya Yehova. Nabondelaki Yehova mpe nasalaki likambo yango mbala moko. Natikaki makambo ya mokili oyo mpe na mbala moko nandimaki libateli oyo Bokonzi ya Nzambe epesaka; bokonzi oyo ekoki koningana te.”
12. Ndenge nini tempelo ya Yehova ya elimo etondi na nkembo na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka?
12 Ezali polele ete Yehova azali kopambola basaleli na ye. Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, tomoni ndenge bato ebele mpenza bakómi kosambela Yehova. Na ndakisa na 1914, kaka mwa bankóto ya bato nde bazalaki kosambela Yehova. Kasi sikoyo tokómi bato koleka milio 8 mpe tozali kosalela Yehova na molende. Bamilio mosusu ya bato bayanganaka elongo na biso na Ekaniseli. Na ndenge yango, lopango ya tempelo ya Yehova ya elimo oyo ezali awa na mabele, elingi koloba ebongiseli oyo Yehova azwá mpo na losambo ya peto, etondi na “biloko kitoko ya bikólo nyonso.” Mbongwana oyo bato yango basali, ndenge balati bomoto ya sika, ekumisi mpe nkombo ya Yehova.—Ef. 4:22-24.
13. Lokola motángo ya basambeli ya Yehova ezali se kobakisama, yango ekokisi bisakweli nini mosusu? (Talá elilingi ya ezipeli.)
13 Makambo yango ya kitoko ekokisi mpe bisakweli mosusu, na ndakisa oyo ezali na Yisaya mokapo 60. Vɛrsɛ 22 ya mokapo yango elobi boye: “Oyo ya moke akokóma nkóto moko (1 000), mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya. Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.” Lokola bato ebele mpenza bakómi kosambela Yehova, likambo moko ya kitoko esalemi. “Biloko kitoko” to bato yango, bayei na makoki ndenge na ndenge mpe bazali na mposa ya kosakola “nsango malamu ya Bokonzi.” Yango esali ete basaleli ya Yehova bákoka kosalela makoki yango, oyo Yisaya abengaki “miliki ya bikólo.” (Yis. 60:5, 16) Na lisalisi ya bandeko basi mpe mibali yango, tozali kosakola na mikili 240, mpe tozali kobimisa mikanda na minɔkɔ koleka 1 000.
NTANGO YA KOZWA EKATELI
14. Ekateli nini bato basengeli kozwa sikoyo?
14 Na ntango oyo ya nsuka, mosala ya koningisa bikólo ezali kotinda bato na makasi bázwa ekateli ya kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ to ya kotya motema na baguvɛrnema ya mokili oyo. Yango ezali liponi oyo moto nyonso asengeli kosala. Atako basaleli ya Yehova batosaka mibeko ya bikólo oyo bazali kofanda, bakɔtaka soki moke te na makambo ya politiki ya mokili oyo. (Rom. 13:1-7) Bayebaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato. Bokonzi yango ezali ya mokili oyo te.—Yoa. 18:36, 37.
15. Ndenge nini mokanda ya Emoniseli emonisi ete bosembo ya basaleli ya Nzambe ekomekama?
15 Mokanda ya Emoniseli elobeli ndenge bosembo ya basaleli ya Nzambe ekomekama na mikolo ya nsuka. Komekama yango ekobimisela biso botɛmɛli mpe minyoko ya makasi. Baguvɛrnema ya mokili oyo ekosɛnga ete tósambela yango, mpe ekonyokola baoyo baboyi kopesa yango mabɔkɔ. (Em. 13:12, 15) Baguvɛrnema yango “ekotinda bato nyonso na makasi—bato mike ná bato minene, mpe bazwi ná babola, mpe bato ya bonsomi ná baombo—bázwa elembo na lobɔkɔ na bango ya mobali to na elongi na bango.” (Em. 13:16) Na ntango ya kala, bazalaki kotya baombo elembo mpo na komonisa soki bazali ya nani. Ndenge moko mpe lelo oyo, bato bakolinga ete moto nyonso amonisa polele soki azali kopesa nani mabɔkɔ. Bakolinga ete moto nyonso amonisa na makanisi mpe na misala na ye ete apesaka baguvɛrnema ya mokili oyo mabɔkɔ.
16. Mpo na nini ezali na ntina ete tókómisa bosembo na biso epai ya Yehova makasi sikoyo?
16 Tokondima kozwa elembo yango ya elilingi mpe kopesa baguvɛrnema ya mokili oyo mabɔkɔ? Baoyo baboyaka kozwa elembo yango bakokutana na mikakatano mpe bomoi na bango ekozala na likama. Mokanda ya Emoniseli elobi boye: “Moto akoka kosomba te to kotɛka te longola kaka moto oyo azali na elembo yango.” (Em. 13:17) Kasi, basaleli ya Nzambe bayebi oyo Nzambe akosala mpo na baoyo bazali na elembo oyo Emoniseli 14:9, 10 elobeli. Na esika bázwa elembo yango, bakokoma nde na lobɔkɔ na bango ete “Moto ya Yehova.” (Yis. 44:5) Sikoyo nde ntango ya komindimisa ete bosembo na biso epai ya Yehova ezali makasi. Soki tosali bongo, Yehova akosepela mpe akoloba ete tozali bato na ye!
MOSALA YA KONINGISA YA NSUKA
17. Likambo nini tosengeli kobosana te mpo na motema molai ya Yehova?
17 Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, Yehova amonisi mpenza motema molai. Alingi ata moto moko te abomama. (2 Pe. 3:9) Apesi moto nyonso libaku ya kobongola motema mpe ya kopona kosalela ye. Kasi motema molai na ye ekokóma na nsuka. Baoyo baboyi kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ, makambo ekosukela bango kaka ndenge esukelaki Farao na mikolo ya Moize. Yehova alobaki na ye boye: “Mbɛlɛ sikoyo nasili kosembola lobɔkɔ na ngai mpe kotindela yo ná bato na yo maladi mabe mpo olongolama na mabele. Kasi, ya solo, natiki yo ozala mpo na ntina oyo: mpo nalakisa yo nguya na ngai mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.” (Kob. 9:15, 16) Nsukansuka, bikólo nyonso ekoyeba ete kaka Yehova nde azali Nzambe ya solo. (Ezk. 38:23) Ndenge nini yango ekosalema?
18. (a) Koningana ya ndenge nini Hagai 2:6, 20-22 elobeli? (b) Ndenge nini toyebi ete maloba ya Hagai ekokokisama na mikolo ezali koya?
18 Bambula mingi nsima ya liwa ya Hagai, ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Baebre ete maloba oyo ezali na Hagai 2:6, 20-22 ekokokisama na mikolo ezali koya. (Tángá.) Ntoma Paulo akomaki boye: “Sikoyo apesi elaka, alobi: ‘Etikali mbala moko lisusu oyo nakoningisa kaka mabele te kasi mpe likoló.’ Nzokande maloba oyo ete ‘Etikali mbala moko lisusu’ ezali kolakisa kolongolama ya biloko oyo ezali koningana makasi lokola biloko oyo esalemá, mpo biloko oyo ezali koningana te etikala.” (Ebr. 12:26, 27) Na kokesana na koningana oyo ezali na Hagai 2:7, koningana oyo Paulo alobeli elimboli kobebisama ya seko ya baoyo, lokola Farao, baboyaka kondima ete Yehova azali na lotomo ya koyangela.
19. Eloko nini ekoningana te, mpe ndenge nini toyebi yango?
19 Eloko nini ekonigana te to ekolongolama te? Paulo abakisi boye: “Yango wana, lokola tosengeli kozwa bokonzi moko oyo ekoki koningana te, tókoba kozwa boboto monene, oyo na nzela na yango tokoki kosalela Nzambe mosala mosantu na ndenge endimami ná kobanga Nzambe ná nsɔmɔ.” (Ebr. 12:28) Ntango koningana yango ya nsuka ekosila, kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoningana te. Ekopikama makasi mpenza!—Nz. 110:5, 6; Dan. 2:44.
20. Ekateli nini bato basengeli kozwa, mpe ndenge nini tokoki kosalisa bango?
20 Tozali lisusu na ntango ya kolekisa te! Bato basengeli kopona: Soki bakobi kopesa mokili oyo mabɔkɔ, bakobomama. Kasi soki baponi kosalela Yehova mpe basali bambongwana oyo esengeli, bakozwa bomoi ya seko. (Ebr. 12:25) Na nzela ya mosala na biso ya kosakola, tokoki kosalisa bato bázwa ekateli ya malamu. Tiká ete tósalisa lisusu bato mingi koleka bázwa ekateli ya kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ. Mpe tóbosana te maloba oyo ya Nkolo na biso Yesu: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobima esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso, bongo nsuka ekoya.”—Mat. 24:14.
LOYEMBO 40 Nzambe na yo nani?
a Lisolo oyo epesi ndimbola ya sika ya Hagai 2:7. Na lisolo oyo, tokomona ndenge tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya ntina mingi ya koningisa bikólo nyonso. Tokomona mpe ete bato mosusu basepelaka na mosala yango ya koningisa, kasi bato mosusu basepelaka na yango te.
b Toyebi ete Hagai akokisaki mokumba na ye malamu mpo mosala ya kotonga tempelo esilaki na mobu 515 L.T.B.
c Yango esemboli boyebi na biso. Liboso tozalaki koloba ete ezali te koningana ya bikólo nyonso nde ezali kobenda bato ya mitema sembo epai ya Yehova. Talá “Mituna ya batángi,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2006.
d NDIMBOLA YA BILILINGI: Hagai alendisaki bato bázala na molende mpe básilisa mosala ya kotonga lisusu tempelo. Lelo oyo mpe, basaleli ya Nzambe bazali na molende na mosala ya kosakola. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali kosakola nsango etali koningana ya nsuka.