Nkembo monene ya ndako ya Yehova
“‘Nakotondisa ndako oyo na nkembo,’ Yehova na bibele alobi bongo.”—HAGAI 2:7, NW.
1. Lolenge nini elimo santu ezali na boyokani na kondima mpe misala?
WANA azalaki kosakola ndako na ndako, Motatoli ya Yehova moko akutanaki na mwasi moko ya lingomba ya Pentecôtiste oyo alobaki ete, ‘Biso tozali na elimo santu, kasi bino bozali baye basalaka mosala.’ Na mayele nyonso, alimbwelaki ye ete moto oyo azali na elimo santu asengeli, na ntembe te, kopusama na kosala mosala ya Nzambe. Yakobo 2:17 elobi ete: “Kondima, soko ezangi misala, esili kokufa kati na yango mpenza.” Na lisalisi ya elimo ya Yehova, Batatoli basili kokólisa kondima makasi, mpe asili ‘kotondisa ndako na ye na nkembo’ na kosaláká ete bákokisa misala ya boyengebene—mingimingi ‘kosakolama ya nsango malamu oyo ya Bokonzi na mokili mobimba lokola litatoli epai na mabota nyonso.’ Ntango mosala wana mokokokisama engebene mokano ya Yehova, “bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
2. (a) Komipesa na motema mobimba na mosala ya Yehova ekomemela biso mapamboli nini? (b) Mpo na nini tosengeli kosepela na ntina na oyo emonani lokola “koumela”?
2 Na maloba oyo ya Yesu, tokoki kosukisa ete mosala na biso lelo oyo mosengeli bongo kotalela kosakwela basusu “Nsango Malamu na nkembo na Nzambe na esengo,” oyo epesameli biso. (1 Timoté 1:11, NW) Soki tomipesi mpenza na esengo nyonso kati na mosala ya Yehova, yango ekopesa liyoki ete nsuka ekoya nokinoki. Na Habakuku 2:2, 3, tozali kotánga maloba ya Yehova ete: “Komá emonaneli, monisá yango polele na bikomelo, ete ye oyo akotánga yango [“akoka kotánga yango polele,” NW]. Zambi, emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, lambelá yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” Ɛɛ, “emonaneli” ekokokisama mpenza “ata ezali koumela.” Na likambo yango, awa tozali na mobu oyo ya 83 ya boyangeli ya Bokonzi ya Yesu, bato mosusu bakoki kokanisa ete sikawa makambo maumeli mingi. Nzokande, tosengeli nde kozala na esengo ete nsuka ekómi naino te, boye te? Na boumeli ya mibu oyo ebandaki na 1990, bipekiseli mpo na mosala ya kosakola bilongwaki, lokola na likamwisi, na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti, na mikili ya Afrika, mpe na bamboka mosusu. Oyo emonani ete “koumela” ezali kopesa nzela na ebele ya “bampate” bákoka koyanganisama kati na bateritware oyo euti kofungwama sika.—Yoane 10:16.
3. Mpo na nini kongɛngisama ya sika likoló na “libota oyo” esengeli kolendisa biso ete tósala mosala ya Nzambe na lombangu nyonso?
3 Mosakoli alobi ete: “Ekoumela mingi te.” Yesu alobaki ete libota oyo ya bato mabe ya ntango na biso ekoleka soko moke kino ekobima “makambo oyo nyonso.” (Matai 24:34) Bososoli ya sika oyo tozwi na ntina na maloba na ye emonisi ete mosala na biso ya kosakola ezali mpenza likambo ya nokinoki te?a Makambo mazali komonisa ete ezali bongo soko moke te! Libota ya bato ya ntango na biso lizali sé kozindisama mozindo kati na mabe mpe libebi na motindo oyo emonani naino te. (Kokanisá na Misala 2:40.) Tosengeli kosala mosala na biso nokinoki. (2 Timoté 4:2) Bisakweli nyonso bitali koya ya bolózi monene emonisi ete yango ekoya pwasa, na mbalakaka, kozanga kobenda likebi—lokola moyibi. (1 Batesaloniki 5:1-4; Emoniseli 3:3; 16:15) “Bongo ekoki na bino kosɛlingwa, mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.” (Matai 24:44) Wana libota oyo ya kotuka Nzambe lizali kobɛlɛma na kobomama, tosengeli soko moke te kobwaka elikya kitoko ya bomoi ya seko oyo tozali na yango, na kozongáká “kolala na bosɔtɔ” ya kominanola ya mokili oyo!—2 Petelo 2:22; 3:10; Luka 21:32-36.
4. Makambo nini masɛngaki kobakisama ya boíke ya “bilei na elaka na yango,” mpe lolenge nini mposa yango ekokisamaki?
4 Lokola Yesu asakolaki yango, mobu 1914 ezalaki “ebandeli ya bolózi” wana libota ya bato ekɔtaki na eleko ebéngami ete “nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Mawa, makámá minene, mpe kobuka mibeko ezali sé koyikama kino lelo oyo. (Matai 24:3-8, 12) Bobele na ntango wana, Yehova asilaki kopesa na kelasi na moombo ya sembo mpe ya mayele oyo apakolami na elimo mosala ya kopesa “bilei [ya elimo] na elaka na yango” epai na bato na ndako na Nkolo na bango, Klisto. (Matai 24:45-47) Uta na kiti na ye ya bokonzi na likoló, Mokonzi Masiya azali sikawa kokamba ebongiseli moko monene ya bopesi bilei ya elimo na mabelé mobimba.
“Pɔ́sɔ” ebele
5. Eloko ya moboko ya “bilei” ezali kozwa likebi nini?
5 Tótalela kobongisama ya “pɔ́sɔ.” (Luka 12:42) Eloko ya liboso oyo ezali kati na molɔngɔ́ ya bilei ya baklisto ezali Biblia, Liloba ya Nzambe. Mpo na koteya Biblia malamu, tozali libosoliboso na mposa ya libongoli ya polele, mpe ya sikisiki. Na boumeli ya bambula mingi mposa wana ezali kokokisama mokemoke, mingi mpenza kobanda mobu 1950 ntango Libongoli ya Mokili ya sika ya Makomami ya Greke ya boklisto ebimisamaki na Lingelesi. Na 1961 Biblia mobimba ya Libongoli ya Mokili ya sika ebimaki, mpe bibimeli mosusu ebimisamaki na nkótá ilobamaka mingi. Bavolimi 3 oyo ebimisamaki na mobu ya mosala 1996 ematisaki motángo nyonso na 27, oyo kati na yango 14 ezali bongo Biblia mobimba. Baklisto soko 1174 oyo bamipesi bazali sikawa kosala mosala ya ntango nyonso mpo na bobongoli mikanda na bamboka 77 mpo na kosala mosala wana motali Biblia mpe bisaleli mpo na kolimbola Biblia.
6. Lolenge nini la Société akokisaki mposa etali mikanda oyo elimbolaka Biblia?
6 Mpo na kosimba mosala ya ebele wana ya babongoli, bafiliale 24 ya la Société Watch Tower oyo ezali na binyateli ezali ntango nyonso kobimisa mikanda na motángo oyo ezali sé kobakisama. Mpo na yango, binyateli mosusu oyo bisalaka nokinoki bizali kolanda kobakisama na bafiliale minene. Motángo ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mozali kobakisama sanza na sanza, motángo nyonso na yango mibale ekómi kino 943892500, bokóli ya 13,4 likoló na monkámá soki tokokanisi yango na mobu moleki. Bobele na États-Unis, Brésil, Finlande, Allemagne, Italie, Japon, Corée mpe Mexique motángo nyonso ya Biblia mpe babúku oyo ezipeli na yango esalemi na karto ebakisami na 40 likoló na mokámá uta 1995 kino motángo ya 76760098 na 1996. Bafiliale mosusu mpe esungaki mingi mpo na bokóli monene oyo etali bobimisi mikanda.
7. Lolenge nini Yisaya 54:2 ezali sikawa likambo ya nokinoki mpenza?
7 Bobakisami wana esalemaki mingi boye mpamba te na boumeli ya bambula oyo ebandaki na 1990 bipekiseli elongwaki likoló na mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na Mpótó ya Ɛ́sti mpe na Afrika. Nzala ya bilei ya elimo ezali makasi na bisika wana. Na yango libyangi oyo lizali koyokana makasi koleka liboso, ete: “Fulisá na monene esika na hema na yo, tiká ete bilamba na efandelo na yo bisembolama; omiboya te, yeisá nkamba na yo molai mpe kembisá na makasi nsete na yo.”—Yisaya 54:2.
8. Elimo nini ya bokabi ezali kosalelama mpo na kopesa lisungi ya mosolo?
8 Na yango, esɛngaki kobakisa bisaleli mingi mpe bandako na bafiliale 104 ya la Société. Na ntina na mikakatano minene ya nkita na bisika mingi ya bateritware oyo efungwami sika, motuya monene ya mosolo oyo mosalelami kuna mouti na makabo mapesami na bamboka ya bozwi mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba. Likambo ya esengo, masangá mpe bato mosusu bazali kopesa na motema mobimba, kolandáká bongo elimo oyo emonisami na Exode 35:21: “Na nsima babutwaki, moto na moto na mposa na motema na ye mpe moto na moto akanaki boye na makanisi na ye, bayaki na makabo na [“Yehova mpo na mosala,” NW].” Tolingi kosalela libaku oyo mpo na kopesa matɔ́ndi na baoyo nyonso basanganaki na elimo wana ya kopesa makabo.—2 Bakolinti 9:11.
9. Lolenge nini Baloma 10:13, 18 ezali kokokisama lelo oyo?
9 Na boumeli ya mobu 1996 mikanda ya la Société Watch Tower misili kokumisa nkombo mpe mokano ya Yehova kino na nsuka ya mabelé. Yango ekokani mpenza lokola ntoma Paulo asakolaki yango. Kotángáká maloba ya esakweli ya Yoele mpe ya Nzembo 19, akomaki ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika. Nde nalobi ete, Bayoki te? Te! bayoki koyoka, zambi lokito na bango ekómi na mokili mobimba, maloba na bango kino nsuka na mokili.” (Baloma 10:13, 18) Na kokumisáká bongo nkombo monene ya Yehova, libota na ye basili kokokisa mokumba monene mpo na oyo etali kotondisa ndako na ye ya losambo na nkembo. Nzokande, lolenge nini kosakolama wana ekólaki mpenzampenza na mobu 1996? Tosɛngi na yo otalela etánda oyo ezali na lokasa 18 kino lokasa 21.
Mosala ya kobuka mbuma na mokili mobimba
10. Makambo nini ya ntina ozali komona na mosala ya basaleli ya Yehova, lokola emonisami na etánda ya nkasa 18 kino 21?
10 Maloba ya Yesu oyo mazwami na Luka 10:2 mazali lelo na nguya mingi koleka liboso: “Mbuma mingi iteli solo, nde basali bazali mingi te. Na bongo bondelá Nkolo na bilanga ete atinda basali kobukela ye mbuma.” Osili koyanola na libyangi wana? Bamilió ya bato na mabelé mobimba basili kosala yango. Yango endimisami na motángo ya sika ya basakoli ya Bokonzi 5413769 oyo bapesaki lapólo ya mosala na 1996. Lisusu, bandeko mibali mpe bandeko basi ya sika 366579 bazwaki batisimo. Tozali mpenza kosepela mingi na “biloko kitoko ya mabota nyonso,” baoyo bazali sikawa kosangana na mosala ya ‘kotondisa ndako ya losambo ya Yehova na nkembo’!—Hagai 2:7, NW.
11. Mpo na nini biso banso tozali na bantina ya kotonda na esengo?
11 Balapólo ya bokóli na bateritware oyo efungwami sika mpo na mosala ezali mpenza likambo ya kokamwisa. Boye basusu kati na biso bazali koyoka zuwa na lolenge mosala na bango mozali kokóla? Kútu, tozali kosepela elongo na bango. Bokóli ya mosala na mboka nyonso ebandaki moke moke. Mosakoli Zekaria, oyo azalaki na bomoi na eleko ya Hagai akomaki ete: “Nani atyoli mokolo na makambo mike?” (Zekalia 4:10) Totondi na esengo ete na bamboka epai kuna mosala ya kopesa litatoli esili kopikama makasi, basakoli ya Bokonzi bazali sikawa bamilió, mpe teritware ezali kozongelama mbala na mbala, ata pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na bingumba mingi ya minene. Tosengeli bongo kokanga mabɔkɔ wana Yehova apesi libaku ya kobikisama na bisika oyo kala ezalaki na makoki yango te? Soko moke te! Yesu alobaki ete: “Elanga ezali mokili.” (Matai 13:38) Litatoli ya mozindo esengeli kolandana kopesama, motindo moko lokola bayekoli ya liboso bapesaki litatoli mozindo na nsuka ya ebongiseli ya Bayuda.—Misala 2:40; 10:42; 20:24; 28:23.
Tókende ntango nyonso liboso
12. Elendiseli nini tozali na yango mpo na kotambola “sembo na liboso”? (Talá etánda, “Bazali kobuka mbuma ‘Longwa na ndelo ya mabelé.’”)
12 Ɛɛ, tosengeli kotambola esika moko, kotambola “sembo na liboso” esika moko na likalo ya Yehova na likoló oyo esimbami na baanzelu. (Ezekiele 1:12) Tóbosani te maloba ya Petelo oyo ete: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu babeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Tiká ete ndakisa ya molende ya bandeko na biso oyo bazali na mikili ya bobólá elendisa biso. Ntango nyonso oyo emonani lokola ete Armagedon ezali koumela ezali bongo kopesa nzela na bankóto ya bato ete báyanganisama na bamboka wana mpe na bateritware oyo ezongelami mbala na mbala. Tómizimbisa te na ntina na yango: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; eyei mbango mpenza.” (Sefania 1:14) Biso mpe tosengeli kosala na lombangu nyonso mosala ya kopesa litatoli ya nsuka na mozindo!
13, 14. (a) Tokoki koloba nini mpo na oyo etali bokaboli mikanda na mobu 1996? (b) Bibongiseli nini ya ntina masangá masengeli kosala mbula na mbula, mpe lolenge nini ozali kokana kosangana na yango?
13 Atako makambo nyonso mamonisami te na etánda ya lapólo ya mosala, bokóli ya mingi mpenza emonanaki na bokaboli Biblia, babúku mpe bazulunalo na boumeli ya mobu ya mosala oyo moleki. Na ndakisa, bokaboli bazulunalo na mokili mobimba emonisi bokóli ya 19 likoló na monkámá, motuya nyonso ya bazulunalo oyo ekabolamaki ezali 543667923. Bazulunalo na biso ekoki kosalelama na mitindo nyonso ya mosala ya kosakola—na balabála, na parke ya bopemi, na bisika ya kozela bísi, na bamagazini. Balapólo ezali komonisa ete na bateritware mosusu epai kuna mosala ya kosakola Bokonzi esili kokóla mingi, bato oyo bayebi malamu mosala ya bazulunalo bazali kokamwa na motindo kitoko ya bazulunalo na biso mpe bazali kondima koyekola Biblia.
14 Mbula na mbula na boumeli ya sanza ya Apríli, mbala mingi masangá masalaka bibongiseli ya sikisiki mpo na bokaboli bazulunalo, kotyáká likebi mingi na mosala ya ndako na ndako mpe na bisika ya bato mingi. Lisangá na bino ekosangana na yango na Apríli ya mobu 1997? Banimero kitoko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! (ebimeli ya Lifalansé) ya Apríli esili kobongisama mpo na bino, mpe na ntembe te kolakisa yango na ntango moko na mokili mobimba ekobenda likebi ya bato! Na esanga ya Chypre, na kosaleláká mokano “kopesa moto nyonso nsango ya Bokonzi soki ekoki,” masangá malandaki malamu manáka motindo yango ya kokabola bazulunalo sanza na sanza, bazwaki bongo motángo ya sika ya bazulunalo 275359 oyo ekabolamaki na mobu yango, oyo emonisi bokóli ya 54 likoló na monkámá.
Bansango ya nsuka ya Hagai
15. (a) Mpo na nini Yehova atindaki bansango mosusu na nzela ya Hagai? (b) Nsango ya misato oyo Hagai asakolaki ezali kopesa biso liteya nini?
15 Yehova atindaki Hagai, mikolo 63 nsima wana apesaki nsango na ye ya mibale, ete asakola nsango ya misato oyo tokoki mpenza kotyela yango likebi lelo oyo. Hagai alobaki lokola nde Bayuda bazalaki kotya moboko ya tempelo na eleko wana, mosala oyo basilaki kosala yango eleki mibu 17. Yehova amonaki lisusu ntina ya kopɛtɔla bango. Banganga mpe bato ya mboka bakómaki na bopɔtu mpo na kokokisa mikumba na bango mpe bongo bazalaki mbindo na miso ya Yehova. Ekoki kozala ete basaleli mosusu ya Yehova basili lelo oyo kolɛmbisa mabɔkɔ na bango, kino bamikɔtisi bango mpenza na banzela ya mbindo mpe ya mposa mabe ya bozwi ya mokili oyo? Ezali likambo ya lombangu ete biso banso tótya mitema “longwa na mokolo oyo mpe na nsima” na kopesáká nkombo na Yehova nkembo, kotyáká motema na elaka oyo apesi ete: “Longwa na mokolo oyo nakopambola bino.”—Hagai 2:10-19; Baebele 6:11, 12.
16. “Kotetemisa” nini ebɛlɛmi mpenza, mpe ekosuka boni?
16 Bobele na mokolo wana, liloba ya “[Yehova] na bibele” eyelaki Hagai mpo na mbala ya minei mpe ezalaki mbala ya nsuka. Alimbolaki likambo oyo limonisami na mosala na Ye ya “kotetemisa lola mpe mokili,” ete: “Nakobulunganisa mpe kiti na makonzi mpe nakobebisa nguya na makonzi na mabota; nakobulunganisa makalo mpe baoyo bakotambolaka na yango mpe bambalata mpe batamboli likoló na bango bakokwea, moko na moko na mopanga na ndeko na ye.” (Hagai 2:6, 21, 22) “Kotetemisa” wana ekokóma bongo na nsuka na yango ntango Yehova akopɛtɔla mabelé mobimba na Armagedon. Na ntango wana ekozala ete “biloko kitoko na mabota nyonso” bisili kokɔta, mpo na kozala moboko ya bato mpo na mokili ya sika. Oyo nde bantina ya kosepela mpe ya kopesa Yehova masanzoli!—Hagai 2:7; Emoniseli 19:6, 7; 21:1-4.
17. Lolenge nini Yesu atyamaki lokola “lopɛtɛ na elembo”?
17 Kosukisáká esakweli na ye, Hagai akomi ete: “[Yehova] na bibele alobi ete, Na mokolo yango, nakosimba yo, Yelubabele . . . , mpe nakozalisa yo lokola lopɛtɛ na elembo, zambi nasili kopona yo. [Yehova] na bibele alobi bongo.” (Hagai 2:23) Sikawa Klisto Yesu azali Mokonzi Masiya mpe Nganga Monene ya solo mpo na Yehova, mpe asangisi kuna na likoló mikumba nyonso oyo Moyangeli Zelubabele mpe Nganga Monene Yosua bazalaki moto na moto kokokisa na Yelusaleme ya mabelé. Lokola lopɛtɛ ya elembo na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova, Yesu azali ye oyo asili kokóma “Ɛɛ” lokola esaleli ya Yehova mpo na kokokisama ya ebele ya “bilaka na Nzambe.” (2 Bakolinti 1:20; Baefese 3:10, 11; Emoniseli 19:10) Nsango mobimba ya esakweli ya Biblia ezali kotalela bibongiseli ya Yehova na ntina na mokumba ya Klisto lokola Mokonzi mpe Nganga Mosikoli.—Yoane 18:37; 1 Petelo 1:18, 19.
18. Lolenge nini “maloba ya nsuka ya Yehova na bibele” ekozwa kokokisama ya kitoko?
18 Ya solo, lelo oyo nkembo eleki monene ezali na tempelo ya Yehova na elimo oyo ezali kongɛnga! Mpe mosika te, nsima wana Yehova akolongola ebongiseli nyonso ya Satana, Hagai 2:9 ekozwa kokokisama kitoko na yango ete: “[Yehova] na bibele alobi ete, . . .na esika oyo nakopesa kimya.” Nsukansuka kimya!—kimya ya seko, ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, oyo Yesu Klisto, “lopɛtɛ na elembo” ya Yehova, “Nkolo na kimya,” akobatela yango, ye oyo ekomami na ntina na ye ete: “Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ikosuka te; . . . Mposa na [Yehova] na bibele ekosala oyo.” (Yisaya 9:6, 7) Libela na libela nkembo ya ndako ya losambo ya Yehova ekongɛnga kati na boyangeli na ye ya kimya na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Tiká ete tóumela ntango nyonso kati na ndako yango!—Nzembo 27:4; 65:4; 84:10.
[Maloba na nse]
a Talá masoló “Babikisami na ‘Libota oyo Mabe’” mpe “Ntango ya kosɛnzɛla” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1995.
Okoki kolimbola?
◻ Lelo oyo, lolenge nini ndako ya Yehova ezali ‘kotonda na nkembo’?
◻ Mpo na nini lelo oyo kosakola nsango malamu ezali likambo ya lombangu nyonso koleka na ntango ya liboso?
◻ Lapólo ya mosala ya mobu 1996 ezali kopesa elendiseli nini mpo na kosakola na lombangu nyonso?
◻ Lolenge nini Klisto azali kosala lokola “lopɛtɛ na elembo” ya Yehova?
[Etanda na lokasa 15]
Kobuka mbuma “longwa na nsuka na mokili”
NA Yisaya 43:6, tozali kotángá lilako ya Yehova ete: “Boyá te! Yeisá bana babali na ngai longwa na mosika, mpe bana basi na ngai longwa na nsuka na mokili.” Makomami oyo mazali kokokana na motindo ya kokamwa lelo oyo na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti. Na ndakisa tókamata mboka Moldavie oyo ezalaki kala na boyangeli ya bakoministe. Na bamboka mosusu ya mike motuya ya Batatoli eleki katikati ya motuya ya bato oyo bazali kuna. Basengeli kotambola nzela molai mpo na koluka teritware mpo na mosala ya kosakola, kasi bazali sikawa kosala milende! Basakoli mingi kati na masangá wana bazali bana oyo baboti na bango batindamaki na etúká ya Sibérie na ebandeli ya bambula 1950. Sikawa mabota na bango mazali kopesa ndakisa na mosala ya kobuka mbuma. Basakoli 1917 kati na basakoli 12565 bazwaki batisimo na mbula oyo eleki. Masangá ntuku minei na misato kati na masangá mingi, moko na moko ezali na basakoli pene na 150, motuya ya bazongazonga mobakisami kolongwa minei kino mwambe na mobu ya sika ya mosala.
Likambo ya kokamwisa litali mpe bokóli monene oyo ezali kosalema na mboka Albanie. Kuna, na boumeli ya mibu soko 50, ndambo na Batatoli ya sembo bayikaki mpiko na makambo ya nsɔ́mɔ ya bakonzi mabe. Basusu kati na bango babomamaki. Yango ezali kokundola elaka oyo ya Yesu ete: “Bangá bolózi bokozwa yo te. Talá, Satana alingi kobwaka bamosusu na bino kati na bolɔ́kɔ ete bomekama, mpe bokozwa monyoko mikolo zomi. Zalá sembo kino kufa, mpe nakopesa yo motole na bomoi.” (Emoniseli 2:10; talá mpe Yoane 5:28, 29; 11:24, 25.) Tozali sikawa komona makambo nini na Albanie? Ya solo, kokokisama na motindo ya kokamwisa ya elaka ya Yehova oyo ezwami na Yisaya 60:22: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota na makasi”! Na mobu 1990 bobele mosakoli moko mpamba apesaki lapólo ya mosala na Albanie. Nzokande, “basáli” mingi longwa na Italie mpe na bamboka mosusu bayanolaki na libyangi ya Yesu ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli, . . . kobatisa bango.” (Matai 28:19; Luka 10:2) Na eleko ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu na 1996, basakoli 773 bazalaki kosala mosala kati na elanga, mpe bayanganisaki bato 6523 na makita ya Ekaniseli, mbala mwambe koleka motángo ya basakoli! Mitángo ya kokamwisa eyebisamaki na bisika mosusu ya mosika. Atako basakoli bazalaka kuna te, na engumba ya Kukës bayangani bazalaki 192 mpe na engumba Divjakë bazalaki 230. Na engumba Krujë, oyo ezali na mosakoli bobele moko, bato 212 bayanganaki na Ekaniseli. Basakoli 30 ya engumba Korçë bafutelaki bisika mpo na bato koleka 300. Nsima wana bato yango batondanaki mpenza na ndako ya lisukúlu, bazongisaki bato mosusu 200 mpamba te esika ya koyamba bango ezalaki te. Ya solo elanga etɛli mpo na kobuka mbuma!
Lapólo oyo euti na Roumanie: “Ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, tokutanaki na moto moko oyo alobaki ete azali Motatoli ya Yehova mpe afandaka na engumba moko moke, esika oyo, engebene likanisi na biso Motatoli moko te azalaka kuna. Ayebisaki biso ete ezalaki mpe na bato mosusu 15 oyo bazalaki koyangana na makita na Mwaminei mpe na Mwapɔ́sɔ uta bambula mingi mpe basilaki kobanda kosakola ndako na ndako. Na mokolo molandaki tokendaki na engumba wana. Kati na bandako mibale, mibali, basi mpe bana 15 bazalaki kozela biso mpe bandimaki kozwa babúku 20 mpe bazulunalo ya sika 20. Tolakisaki bango lolenge ya kotambwisa boyekoli ya Biblia. Toyembaki na bango elongo mpe toyanolaki na mituna oyo mizalaki mpenza kotungisa bango. Ye oyo azalaki kokamba etuluku ayambolaki ete: ‘Eleki mwa mikolo, nabondelaki Yehova na mpisoli ete atindela biso mobateli ya mpate, mpe libondeli na ngai eyokamaki.’ Tozalaki na esengo mingi, mpe wana ezalaki biso kokenda, lokola mwana etike oyo na nsuka azwaki tata, alobaki ete: ‘Nalombi na bino ete bóbosana biso te. Bóya lisusu kotala biso!’ Tokendaki lisusu, mpe sikawa tozali kotambolisa boyekoli ya Biblia elongo na bato nsambo ya engumba wana. Na bateritware mingi epai litatoli epesami naino te, na motindo ya kokamwisa mosala mobandi kosalema na nzela ya mikanda oyo mikolimbolaka Biblia, oyo bato bazali kosepela na yango mingi, mpe wana emonisi ete mosala oyo mouti na Nzambe.”
[Etanda na lokasa 18-21]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 1996
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Maloba na elilingi ya lokasa 16]
“Biloko kitoko na mabota nyonso” ezali koyanganisama na bisanga ya Mai Monene (1), Amerika ya Súdi (2), Afrika (3), Azia (4), Amerika ya Nɔ́rdi (5), mpe na Mpótó (6)