Tiká ete bato banso bákumisa Yehova!
“Epai na etúká ya pole basengeli kokumisa Yehova.”—YISAYA 24:15, NW.
1. Lolenge nini basakoli ya Yehova bazalaki kotalela nkombo na ye, yango ekeseni na ezaleli nini oyo boklisto ya nkombo mpamba ezali komonisa lelo oyo?
YEHOVA—ezali nkombo monene ya Nzambe! Basakoli ya sembo ya ntango ya kala basepelaki mingi koloba na nkombo yango! Na bosepeli monene bakumisaki Nkolo Mokonzi na bango, Yehova, oyo nkombo na ye emonisi ye lokola Mokokisi Monene ya Mikano [na ye]. (Yisaya 40:5; Yilimia 10:6, 10; Ezekiele 36:23) Ata baoyo babyangami ete basakoli ya mike bapesaki nkembo mingi mpenza na Yehova. Moko na bango ezali bongo Hagai. Kati na búku ya Hagai, oyo ezali na baversɛ 38, nkombo ya Nzambe esalelami mbala 35. Esakweli lolenge yango ekozala na nguya te soki liloba “Nkolo” ekitani nkombo ya ntina mingi Yehova, lokola bantoma minene minene ya boklisto ya nkombo mpamba bazali kosala kati na mabongoli na bango ya Biblia.—Kokanisá na 2 Bakolinti 11:5.
2, 3. (a) Lolenge nini esakweli moko monene na ntina na kozongisama ya Yisalaele ekokisamaki? (b) Batikali Bayuda mpe baninga na bango basanganaki na esengo nini?
2 Na Yisaya 12:2, mitindo mibale ya nkombo yango misalelami.a Mosakoli yango alobi ete: “Talá, Nzambe azali lobiko na ngai, ngai nakondima mpe nakobanga te; zambi Ya, [Yehova] azali nguya na ngai mpe loyembo na ngai, ye akómi mpe lobiko na ngai.” (Talá lisusu Yisaya 26:4.) Na yango, mibu soko 200 liboso ete Yisalaele esikolama na boombo ya Babilone, Ya Yehova apesaki endimiseli na nzela ya mosakoli na ye Yisaya ete azalaki Mobikisi na bango ya nguya. Boombo esengelaki koumela kobanda mobu 607 kino na mobu 537 L.T.B. Yisaya akomaki lisusu ete: “Ngai nazali [Yehova] oyo asali biloko nyonso, . . . Nalobi mpo na [Siruse] ete, Ye azali mobateli na etónga na ngai, ye akosukisa mokano na ngai; nalobi mpe na Yelusaleme ete, Akotongama mpe na Tempelo ete, Miboko na yo ikotyama.” Siruse wana ezalaki nani? Likambo na kokamwisa, ezalaki bongo Mokonzi Siruse ya Perse, oyo alóngaki Babilone na mobu 539 L.T.B.—Yisaya 44:24, 28.
3 Mpo na kokokisa maloba ya Yehova oyo Yisaya akomaki, Siruse abimisaki mobeko moko mpo na Bayuda bakangami ete: “Ye nani azali kati na bino na bato na ye nyonso, Nzambe na ye azala na ye; tiká ete abuta na Yelusaleme oyo ezali na Yuda mpe atonga ndako na [Yehova] Nzambe na Yisalaele. Ye azali Nzambe oyo azali kati Yelusaleme.” Batikali ya Bayuda oyo batondaki na esengo elongo na Banetinimi mpe bana ya baombo ya Salomo, oyo bazalaki Bayisalaele te, bazongaki na Yelusaleme. Bakómaki na ntango malamu mpo na kokumisa Elambo ya Mingombo na mobu 537 L.T.B. mpe kopesa Yehova mbeka likoló na etumbelo na ye. Na mobu molandaki, na sanza ya mibale, batyaki moboko ya tempelo ya mibale, na konganga makasi ya esengo mpe ya masanzoli epai na Yehova.—Ezela 1:1-4; 2:1, 2, 43, 55; 3:1-6, 8, 10-13.
4. Lolenge nini Yisaya mikapo 35 mpe 55 ekokisamaki?
4 Esakweli ya Yehova etali kozongisama ekokisamaki na nkembo nyonso na Yisalaele: “Lisobe mpe esika ekaoki ikosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele na habaselete. . . . Bakomona nkembo na [Yehova], bokonzi na Nzambe na biso.” “Mpo ete bokobima na esengo, bokokambama na kimya; ngomba mpe nkeka liboso na bino ikobanda koyemba nzembo . . . Ekozala mpo na ekaniseli epai na [Yehova], elembo na seko oyo ekokatama te.”—Yisaya 35:1, 2; 55:12, 13.
5. Mpo na nini esengo ya Yisalaele eumelaki te?
5 Nzokande, esengo wana eumelaki te. Mabota ya zingazinga balukaki kosala boyokani ya losambo mpo na kotonga tempelo yango. Bayuda baboyaki, kolobáká ete: “Bino bozali na biso elongo te mpo na kotongela Nzambe na biso ndako; zambi biso mpenza tokotongela [Yehova] Nzambe na Yisalaele lokola mokonzi [Siruse], mokonzi na Palasa, alakisaki biso.” Bato wana ya zingazinga bakómaki batɛmɛli makasi. “Balɛmbisaki mabɔkɔ na bato na Yuda mpe banyokolaki bango kati na kotonga.” Bafundaki mpe bifundeli ya lokuta epai na Aletahesaseta, mokitani ya Siruse, oyo abimisaki mobeko mpo na kopekisa botongi ya tempelo. (Ezela 4:1-24) Na boumeli ya mibu 17 mosala mosalemaki te. Likambo ya mawa, na ntango wana Bayuda bakweaki na lolenge ya bomoi ya kolinga bozwi mingi.
“Yehova na Bibele” alobi
6. (a) Lolenge nini Yehova asalaki mpo na Yisalaele? (b) Mpo na nini ndimbola ya nkombo ya Hagai ebongi mpenza?
6 Atako bongo, Yehova amonisaki ‘nguya mpe makasi’ na ye mpo na bolamu ya Yisalaele na kotindáká basakoli, na ndakisa Hagai mpe Zekalia, mpo na kolamwisa elimo na Bayuda na ntina na mikumba na bango. Nkombo ya Hagai ezali na boyokani na elambo moko, mpamba te emonani lokola ete yango elimboli “Abotami mokolo ya Elambo.” Na lolenge lobongi, abandaki kosakola na mokolo ya liboso ya sanza ya Elambo ya Mingombo, eleko oyo esɛngamaki na Bayuda ete ‘bázala na esengo.’ (Deteronome 16:15) Na nzela ya Hagai, Yehova apesaki nsango minei na boumeli ya mikolo 112.—Hagai 1:1; 2:1, 10, 20.
7. Lolenge nini maloba ya ebandeli ya Hagai masengeli kolendisa biso?
7 Wana ezalaki ye kobanda esakweli na ye, Hagai alobaki ete: “[Yehova] na bibele alobi boye.” (Hagai 1:2a) “Bibele” wana bakoki kozala banani? Bazali baanzelu oyo bafandi elongo na Yehova, ntango mosusu balobelamaka lokola mampinga ya basodá. (Yobo 1:6; 2:1; Nzembo 103:20, 21; Matai 26:53) Toyikisami mpiko na koyeba ete lelo oyo Nkolo Mokonzi Yehova azali kosalela mampinga makasi wana oyo mazali na likoló mpo na kokamba mosala ya kozongisa losambo na mabelé, boye te?—Kokanisá na 2 Mikonzi 6:15-17.
8. Ezaleli nini ebebisaki Yisalaele, mpe ebimisaki mbuma nini?
8 Makambo nini mazali kati na nsango ya liboso oyo Hagai asakolaki? Bato balobaki ete: “Naino ntango ekómi te mpo na kotonga ndako na [Yehova].” Botongi ya tempelo, oyo ezalaki komonisa kozongisama ya losambo ya Nzambe, ezalaki lisusu lobanzo na bango ya liboso te. Bamibalolaki na botongi ya bandako kitoko mpo na bango moko. Mposa ya bozwi esilaki kokitisa esengo na bango mpo na losambo ya Yehova. Na nsuka, atikaki kopambola bango. Bilanga na bango ezalaki lisusu kobota mbuma na lolenge malamu te, mpe bazalaki kozanga bilamba ya kolata na eleko ya mpiɔ makasi. Bakómaki na bozwi moke, mpe ezalaki lokola nde bazalaki kotya mbongo na mabenga matɔbɔkatɔbɔka.—Hagai 1:2b-6.
9. Toli nini ya makasi mpe ya kolendisa Yehova apesaki?
9 Mbala mibale, Yehova apesi likebisi oyo ya makasi: “Bóbanza na mitema na bino mpo na nzela na bino.” Na ntembe te, Zelubabele, moyangeli ya Yelusaleme, mpe nganga monene Yosuab bayanolaki malamu mpe na mpiko nyonso balendisaki bato na “koyoka mongongo na [Yehova] Nzambe na bango mpe maloba na mosakoli Hagai lokola [Yehova] Nzambe na bango asili kotinda ye. Mpe bato babangaki liboso na [Yehova].” Lisusu, “Hagai, ntoma na [Yehova], alobaki na bato nsango na [Yehova] ete [Yehova] alobi na bino ete, Ngai nazali na bino.”—Hagai 1:5, 7-14.
10. Lolenge nini Yehova asalelaki nguya na ye mpo na bolamu ya Yisalaele?
10 Mibangé mosusu ya Yelusaleme bakokaki kokanisa ete nkembo ya tempelo ya mibale elingaki kozala “eloko mpamba” liboso na tempelo ya liboso. Nzokande, soko mikolo 51 na nsima, Yehova atindaki Hagai asakolaki nsango ya mibale. Alobaki ete: “Ɛ Zelubabɛlɛ, yiká mpiko, ɛ Yosua, mwana na Yosadaka, nganga monene, yiká mpiko; ɛ, bino bato nyonso na mokili, yiká mpiko. [Yehova] alobi bongo. Bósala mosala, mpo ete [Yehova] na bibele alobi ete, Nazali na bino elongo. . . . Bóbanga te!” Yehova, oyo asengelaki na ntango ebongi kosalela nguya monene na ye mpo na ‘kotetemisa lola mpe mabele,’ asalaki ete botɛmɛli nyonso, ata epekiseli ya mokonzi, ekoka kolónga te. Nsima ya mbula mitano ya botongi, tempelo esilaki na elónga monene.—Hagai 2:3-6.
11. Lolenge nini Nzambe atondisaki tempelo ya mibale na ‘nkembo monene’?
11 Na nsima elaka moko ya ntina monene ekokisamaki: “Mabonza kitoko na mabota makoingela mpe makotondisa ndako oyo na nkembo. [Yehova] na bibele alobi bongo.” (Hagai 2:7) “Mabonza kitoko” yango mazalaki bongo bapakano oyo bayaki kosambela na tempelo wana, lokola yango ezalaki komonisa nkembo ya kozala na ye monene. Nkembo ya tempelo wana ya mibale ekokanaki na oyo etongamaki na mikolo ya Salomo? Mosakoli ya Nzambe alobaki ete: “[Yehova] na bibele alobi ete, Nkembo na ndako oyo na nsima ekoleka yango na liboso.” (Hagai 2:9) Na kokokisama ya liboso ya esakweli oyo, tempelo ya mibale eumelaki koleka oyo ya liboso. Eumelaki kino ntango Masiya amonanaki na mobu 29 T.B. Lisusu, Masiya apesaki yango nkembo wana ateyaki solo kati na yango.
12. Batempelo mibale ya liboso ekokisaki mokano nini?
12 Tempelo ya liboso mpe tempelo ya mibale oyo ezalaki na Yelusaleme ekokisaki mokano moko ya ntina monene mpo na oyo etali kozala elilingi ya mitindo minene ya bonganga ya Masiya mpe na oyo etali kobatela losambo ya pɛtɔ na mabelé kino boyei mpenza ya Masiya.—Baebele 10:1.
Tempelo ya nkembo na elimo
13. (a) Makambo nini oyo mazali na boyokani na tempelo ya elimo masalemaki uta mobu 29 kino mobu 33 T.B.? (b) Mokumba nini ya ntina mingi mbeka ya Yesu ekokisaki na makambo yango?
13 Esakweli ya Hagai na ntina na kozongisama ezali mpe na ndimbola ya sikisiki mpo na mikolo misengelaki koya nsima? Ezali mpenza bongo! Tempelo oyo ya mibale na Yelusaleme ekómaki esika ya moboko mpo na losambo nyonso ya solo na mabelé mobimba. Kasi ezalaki elilingi ya tempelo moko ya nkembo monene na elimo. Tempelo yango ebandaki kosalelama na mobu 29 T.B., na batisimo ya Yesu na Ebale Yordani, ntango Yehova apakolaki Yesu lokola Nganga Monene, elimo santu ekitelaki ye na motindo ya ebenga. (Matai 3:16) Nsima ya kosukisa mosala na ye awa na mabelé na kokufáká liwa ya mbeka, Yesu asekwisamaki mpo na bomoi na likoló, oyo emonisamaki na Esika Eleki Bosantu ya tempelo, mpe kuna alakisaki motuya ya mbeka na ye epai na Yehova. Yango esalelamaki lokola mbɔndi, mpo na kolongola masumu ya bayekoli na ye, mpe efungolaki nzela mpo na kopakola bango, na mokolo ya pentekote ya mobu 33 T.B., lokola banganga-bakitani kati na tempelo ya Yehova na elimo. Soki bakangami na mosala na bango na bosembo nyonso kino kufa na bango na lopango ya tempelo awa na mabelé bakosekwa na bomoi ya likoló, mpo na kokóba mosala na bango ya bonganga.
14. (a) Esengo nini eutaki na mosala ya molende oyo lisangá ya boklisto na ebandeli esalaki? (b) Mpo na nini bosepeli yango eumelaki te?
14 Bankóto ya Bayuda oyo babongolaki mitema—mpe na nsima bapakano—bayanganaki kati na lisangá ya boklisto, basanganaki na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekoyangela mabelé mobimba. Nsima ya mibu soko 30, ntoma Paulo alobaki ete nsango malamu esilaki kosakolama “epai na bato nyonso na nsé na Likoló.” (Bakolose 1:23) Kasi nsima ya kufa ya bantoma, lipengwi monene ekɔtaki, mpe pole ya solo ekómaki kongɛnga lisusu malamu te. Mikabwano ya boklisto ya nkombo mpamba, oyo mizwi moboko na mateya mpe filozofi ya bapakano ezipaki boklisto ya solo.—Misala 20:29, 30.
15, 16. (a) Lolenge nini bisakweli bikokisamaki na 1914? (b) Koyanganisama nini esalemaki na nsuka ya ekeke ya 19 mpe na ebandeli ya ekeke ya 20?
15 Bikeke mingi bilekaki. Na nsima na bambula 1870, etuluku moko ya baklisto ya motema sembo babandaki komipesa na boyekoli mozindo ya Biblia. Na lisalisi ya Makomami, bamonisaki ete mobu 1914 mosengelaki kotya nsuka na “bilaka na mabota.” Ezalaki na mbula yango nde “ntango” sambo ya elilingi (mbula 2520 ya boyangeli ya bato na motindo ya nyama) esukaki wana Klisto Yesu atyamaki na kiti ya Bokonzi kuna na makoló—Ye “oyo abongi” kozala Mokonzi Masiya ya mabelé. (Luka 21:24; Danyele 4:25; Ezekiele 21:26, 27) Mpenzampenza kobanda na mobu 1919, Bayekoli ya Biblia, oyo bayebani lelo na nkombo ya Batatoli ya Yehova, basilaki komipesa mingi na kopalanganisa na mabelé mobimba nsango malamu ya Bokonzi oyo esili kotyama. Ezalaki na 1919 nde mwa bankóto ya Batatoli wana bayanolaki na libyangi oyo lipesamaki na liyangani ya engumba Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Motángo na bango mozalaki sé komata kino mobu 1935 wana bato 56153 bapesaki lapólo ya mosala ya kosakola. Kati na bango, 52465 balyaki limpa mpe bamelaki vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu oyo esalemaka mbula na mbula, komonisáká bongo elikya na bango ya kokóma banganga elongo na Klisto Yesu na eteni ya tempelo ya Yehova na elimo oyo ezwami na likoló. Bakosala lisusu elongo na ye lokola bakonzi-bakitani kati na Bokonzi ya Masiya.—Luka 22:29, 30; Baloma 8:15-17.
16 Nzokande, Emoniseli 7:4-8 mpe 14:1-4 ezali komonisa ete motuya nyonso ya baklisto wana oyo bapakolami na elimo ezali bobele bato 144 000, oyo mingi na bango bayanganisamaki na ekeke ya yambo liboso ete lipengwi monene ezwa mosisa. Kobanda na nsuka ya ekeke ya 19 kino na ekeke ya 20, Yehova azali kosukisa mosala ya koyanganisa etuluku wana ya baye bapɛtɔlami na mai ya Liloba na ye, batángami sembo na nzela ya kondima na mbeka ya Yesu oyo elongolaka masumu, mpe na nsuka batyami elembo lokola baklisto bapakolami na elimo mpo na kokokisa motuya mobimba ya 144000.
17. (a) Koyanganisama nini ebandaki na bambula 1930? (b) Mpo nini Yoane 3:30 ezali na ntina awa? (Talá mpe Luka 7:28.)
17 Nini ekolanda nsima wana motángo mobimba ya bapakolami mokokoka? Na 1935, na liyangani moko ya ntina mingi oyo esalemaki na Washington, D.C., na État-Unis, eyaki koyebana ete “ebele monene” ya Emoniseli 7:9-17 ezalaki etuluku moko oyo esengelaki koyebana malamu “na nsima” ya ba 144000 mpe elikya na bango ezali bongo ya kozwa bomoi ya seko na paladiso na mabelé. Nsima ya koyeba malamu mopakolami Yesu, Yoane Mobatisi, oyo akosekwisama na mabelé lokola moko na “bampate mosusu,” alobaki na ntina na Masiya ete: “Ekoki na ye ete akóla monene; ekoki na ngai ete naya moke.” (Yoane 1:29; 3:30; 10:16; Matai 11:11) Mosala ya Yoane Mobatisi oyo etalaki kobongisela Masiya bayekoli mokómaki na nsuka wana Yesu abandaki bongo kopona bato mingi oyo basengelaki kozala basangani ya 144000. Na bambula 1930 makambo mabongwanaki. Bato bobele moke nde “babyangamaki mpe baponamaki” mpo na kozala kati na ba 144000 ntango bokóli moko monene ebandaki kati na “ebele monene” ya “bampate mosusu.” Ebele monene wana ezali sé koyikana wana mokili mabe oyo mozali kobɛlɛma na nsuka na yango na Armagedon.—Emoniseli 17:14b.
18. (a) Mpo na nini tokoki kozela na elikya nyonso ete “bamilió na bato oyo bazali sikawa na bomoi bakokufa soko moke te”? (b) Mpo na nini tosengeli kolanda na molende nyonso maloba ya Hagai 2:4?
18 Na ebandeli ya bambula 1920, lisukúlu ya bato banso oyo Batatoli ya Yehova basalaki mpe oyo elobelamaki mingi ezalaki na motó na likambo “Bamilió ya bato oyo bazali sikawa na bomoi bakokufa te libela.” Mbala mosusu yango emonisaki elikya ya kolekisa ndelo oyo ezalaki na eleko wana. Kasi lelo oyo liloba wana likoki mpe kolobelama na endimiseli nyonso. Ezala kongɛngisama ya pole ya bisakweli ya Biblia to mobulu ya mokili oyo mozali pene ya kokufa, nyonso mibale ezali komonisa polele ete nsuka ya ebongiseli ya Satana ekómi pene mpenza! Lapólo ya Ekaniseli ya 1996 emonisi ete bato 12921933 bayanganaki, oyo kati na bango bobele 8757 (0,068 likoló na mokámá) bamonisaki elikya na bango ya kokende likoló na kolyáká limpa mpe na komeláká vinyo. Kozongisama ya losambo ya pɛtɔ etikali moke ekóma na nsuka. Kasi tiká ete tólɛmbisa mabɔkɔ soko moke te na mosala wana. Ɛɛ, Hagai 2:4 elobi ete: “Ɛ, bino bato nyonso na mokili, yiká mpiko. [Yehova] alobi bongo. Bósala mosala mpo ete [Yehova] na bibele alobi ete, Nazali na bino elongo.” Tózala na ekateli makasi ya kotika te ete mposa ya bozwi to bizaleli ya mokili ekitisa molende na biso mpo na mosala ya Yehova!—1 Yoane 2:15-17.
19. Lolenge nini tokoki kosangana na kokokisama ya Hagai 2:6, 7?
19 Tozali na libaku ya esengo ya kosangana na kokokisama ya ntango na biso ya esakweli ya Hagai 2:6, 7, ete: “[Yehova] na bibele alobi boye ete, Mbala moko lisusu, na mwa ntango moke, nakotetemisa lola mpe mokili mpe mai-na-monana mpe mokili mokauki. Nakotetemisa mpe mabota nyonso mpe mabonza kitoko na mabota makoingela mpe makotondisa ndako oyo na nkembo.” Lokoso, mbindo mpe koyinana epalangani mingi na mokili na ekeke oyo ya 20. Ya solo, mokili mozali na mikolo na yango ya nsuka, mpe Yehova abandi “kotetemisa” yango na kosaláká ete Batatoli na ye ‘basakola mokolo na kobukanisa na ye.’ (Yisaya 61:2) “Kotetemisa” wana ekosuka na kobomama ya mokili na Armagedon, kasi liboso ete ntango yango ekóma, Yehova azali kobenda “mabonza kitoko na mabota” mpo na mosala na ye—basɔkɛmi, bato ya mabelé oyo bakokani na bampate. (Yoane 6:44) “Ebele monene” wana ezali sikawa ‘kosala mosala ya bulɛɛ’ na lopango ya ndako ya losambo na ye na mabelé.—Emoniseli 7:9, 15.
20. Wapi bozwi eleki mpenza motuya oyo moto akoki kozala na yango?
20 Mosala na tempelo ya Yehova na elimo ezali kopesa litomba monene koleka bozwi nyonso ya mosuni. (Masese 2:1-6; 3:13, 14; Matai 6:19-21) Lisusu, Hagai 2:9 elobi ete: “[Yehova] na bibele alobi ete, Nkembo na ndako oyo na nsima ekoleka yango na liboso mpe na esika oyo nakopesa kimya.” Maloba oyo mazali na ndimbola nini mpo na biso lelo? Lisoló na biso lilandi likomonisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “Ya Yehova” esalelami na mokano moko ya sikisiki. Talá búku Insight on the Scriptures, Volimi 1, lokasa 1248.
b Yesua na mokanda ya Ezela mpe na mikanda mosusu ya Biblia.
Mituna ya bozongeli
◻ Ndakisa nini ya basakoli tosengeli kolanda mpo na oyo etali nkombo ya Yehova?
◻ Elendiseli nini tozwi na nsango ya nguya oyo Yehova apesaki na Yisalaele oyo ezongisamaki?
◻ Tempelo nini ya nkembo monene na elimo ezali kosalelama lelo oyo?
◻ Koyanganisama nini elandanaki moko nsima na mosusu na ekeke ya 19 mpe na ekeke ya 20, mpe elikya nini monene ezali liboso?
[Bililingi na lokasa 7]
Mampinga ya Yehova na likoló mazali kokamba mpe kosunga Batatoli na ye awa na mabelé