Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia
TOZALI na mobu 520 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Mbula zomi na motoba esili koleka banda Bayuda oyo bautaki na boombo na Babilone babandaki kotonga lisusu tempelo ya Yehova na Yelusaleme. Kasi, tempelo esili naino kotongama te, mpe bapekisi bango kotonga. Yehova aponi Hagai mpo na kosakola liloba na Ye; sanza mibale na nsima, aponi mpe Zekalia lokola mosakoli na ye.
Hagai ná Zekalia bazali na mokano kaka moko: kolendisa Bayisalaele bázongela mosala ya kotonga tempelo. Milende ya basakoli yango eboti mbuma, mpe tempelo esili kotongama mbula mitano na nsima. Makambo oyo Hagai ná Zekalia basakolaki ekomamá na mikanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na bango. Mokanda ya Hagai esilaki kokomama na mobu 520 L.T.B. mpe oyo ya Zekalia na mobu 518 L.T.B. Lokola basakoli mibale wana, biso mpe tozali na mokumba oyo Nzambe apesá biso, oyo tosengeli kosilisa liboso ya nsuka ya mokili oyo. Mosala yango ezali mosala ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Tótalela sikoyo ndenge oyo Mokanda ya Hagai mpe oyo ya Zekalia ekoki kolendisa biso.
“BÓKANISA BANZELA NA BINO”
(Hagai 1:1–2:23, NW)
Na boumeli ya mikolo 112, Hagai asakolaki makambo minei ya kolendisa mpenza. Ya liboso yango oyo: “‘Bókanisa banzela na bino. Bókende na ngomba, mpe bosengeli koya na banzete. Mpe bótonga ndako, mpo nasepela na yango mpe nakumisama,’ Yehova alobi bongo.” (Hagai 1:7, 8, NW) Bato ya Yisalaele batosaki. Nsango ya mibale ezali na elaka oyo: ‘Nakotondisa ndako oyo na nkembo.’—Hagai 2:7.
Nsango ya misato elobi ete lokola batikaki kotonga tempelo, ‘bato mpe misala nyonso ya mabɔkɔ na bango’ bakómaki mbindo na miso ya Yehova. Kasi, mokolo bakobanda lisusu kotonga tempelo, Yehova ‘akopambola bango.’ Nsango ya minei elobaki ete Yehova ‘akobebisa nguya ya makonzi ya mabota’ mpe akotya Guvernɛrɛ Zelubabele lokola “lopɛtɛ ya elembo.”—Hagai 2:14, 19, 22, 23.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:6—Maloba “bosili komɛla nde [bolangwi te, NW]” elimboli nini? Maloba wana ezali komonisa kaka ete vinyo ekozanga. Lokola Yehova akotika kopambola bango, bakozala lisusu na vinyo mingi te, oyo bakoki komɛla mpe kolangwa.
2:6, 7, 21, 22—Nani to nini ezali koningisa mokili, mpe yango ezali kobimisa matomba nini? Yehova nde azali ‘koningisa mokili’ na nzela ya nsango ya Bokonzi oyo ezali kosakolama na mokili mobimba. Mosala ya kosakola ezali mpe komema “biloko kitoko ya bikólo nyonso” na ndako ya Yehova mpe ezali kotondisa yango na nkembo. Nsukansuka, “Yehova ya mampinga” akoningisa “likoló mpe mabelé mpe mbu mpe mabelé ekauká,” mpe akolimwisa mokili oyo.—Baebele 12:26, 27.
2:9—Na ndenge nini ‘nkembo ya ndako ya nsima ekoleka oyo ya liboso’? Na makambo soki misato: bambula nyonso oyo tempelo yango eumelaki, moto oyo asengelaki koteya kuna, mpe bato oyo basengelaki kosopana kuna mpo na kosambela Yehova. Atako tempelo monene ya Salomo eumelaki mbula 420, banda na 1027 L.T.B. tii na 607 L.T.B., ‘ndako ya nsima’ eumelaki mbula koleka 580, banda ntango basilisaki kotonga yango na mobu 515 L.T.B. tii ntango ebebisamaki na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.). Longola yango, Masiya to Yesu Klisto ateyaki na ‘ndako ya nsima,’ mpe bato mingi bayaki kosambela wana koleka baoyo bazalaki koya kosambela na ‘oyo ya liboso.’—Misala 2:1-11.
Mateya mpo na biso:
1:2-4. Ata soki bato bazali kotɛmɛla biso na mosala ya kosakola, tosengeli te kotika ‘koluka liboso bokonzi’ mpo tókóma koluka liboso nde matomba na biso moko.—Matai 6:33.
1:5, 7. Ezali malamu mpo na biso ete ‘tókanisaka banzela na biso’ mpe tókanisa soki ndenge oyo tozali kotambwisa bomoi na biso ezali kobongisa to kobebisa boyokani na biso na Nzambe.
1:6, 9-11; 2:14-17. Bayuda ya ntango ya Hagai bazalaki koboma nzoto mpo na koluka matomba na bango moko, kasi milende nyonso oyo bazalaki kosala ezalaki kokende na mai. Basundolaki misala ya tempelo, yango wana Nzambe azalaki kopambola bango te. Tosengeli kotyaka makambo ya elimo na esika ya liboso mpe kosalela Nzambe na molimo na biso mobimba. Tóbosana te ete ata soki tozali na bozwi mingi to te, ‘mapamboli ya Yehova nde eyeisaka bozwi.’—Masese 10:22.
2:15, 18. Yehova alendisaki Bayuda banda na ntango wana ete, bábosana likambo oyo basalaki ya kosundola tempelo mpe bátya makanisi na bango na mosala ya kotonga. Biso mpe tosengeli kosalaka bongo ntango tozali kosambela Yehova.
‘NA NZELA YA NGUYA TE NDE NA ELIMO’
Zekalia abandaki mosala na ye ya kosakola na kobenga Bayuda ‘bázonga epai ya Yehova.’ (Zekalia 1:3) Bimonaneli mwambe oyo azwaki emonisaki ete Nzambe akosunga bango na mosala ya kotonga tempelo. (Talá etanda “Bimonaneli mwambe ya Zekalia.”) Bakosilisa kotonga tempelo yango “na nzela ya makasi te, na nzela ya nguya mpe te nde na [elimo ya Yehova, NW].” (Zekalia 4:6) Mobali oyo abengami Etape “akotonga tempelo ya [Yehova]” mpe “akozala nganga likoló ya kiti na ye ya bokonzi.”—Zekalia 6:12, 13.
Bato ya Betele batindi bato bákende kotuna banganga-nzambe likambo ya kokila mpo na kokanisa kobebisama ya Yelusaleme. Yehova ayebisaki Zekalia ete kolela oyo bazalaki kolela na bileko minei ya kokila mpo na kokanisa kobebisama ya Yelusaleme ekobongwana ‘esengo mpe kosepela mpe bilambo ya kosepela.’ (Zekalia 7:2; 8:19) Na kati ya makambo oyo Yehova alobelaki na bisakweli mibale oyo elandaki, tokoki kotánga bitumbu mpo na bikólo mpe mpo na basakoli ya lokuta, bisakweli mpo na Masiya mpe nsango ya kozongisama ya libota ya Nzambe.—Zekalia 9:1; 12:1.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:1—Mpo na nini moto moko azalaki komeka Yelusaleme na nsinga? Na ntembe te, likambo wana emonisaki ete efelo moko ekotongama zingazinga ya Yelusaleme mpo na kobatela yango. Anzelu ayebisaki moto yango ete Yelusaleme ekokóma monene mpe Yehova akobatela yango.—Zekalia 2:3-5.
6:11-13—Motole oyo balatisaki Nganga-nzambe Monene Yosua ekómisaki ye nganga mpe mokonzi? Te, Yosua azalaki moto ya libota ya Davidi te. Motole oyo balatisaki ye ezalaki nde elilingi ya nganga-nzambe Masiya. (Baebele 6:20) Esakweli ya “Etape” ekokisamaki epai ya Yesu Klisto, oyo akómaki Mokonzi mpe Nganga-nzambe kuna na likoló. (Yilimia 23:5) Ndenge kaka Yosua asalelaki Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango lokola nganga-nzambe monene na tempelo oyo etongamaki lisusu, Yesu mpe azali Nganga-nzambe Monene na losambo ya solo na tempelo ya Yehova ya elimo.
8:1-23—Bisakweli zomi oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ekokisamaki ntango nini? Mokomoko ya bisakweli yango ebandaki na maloba oyo: “[Yehova ya mampinga, NW] alobi boye ete,” mpe ezalaki bilaka oyo Nzambe apesaki ete libota na ye bakokóma na kimya. Bisakweli yango mosusu ekokisamaki na ekeke ya motoba L.T.B., kasi yango nyonso ekokisamaki na 1919 T.B. to ezali kokokisama sikoyo.a
8:3—Mpo na nini Yelusaleme ebengami “mboka ya solo”? Liboso Yelusaleme ebebisama na mobu 607 L.T.B., ezalaki “mboka ya minyoko,” oyo etondaki na basakoli ya lokuta mpe banganga-nzambe oyo bazalaki lisusu sembo epai ya Yehova te. (Sefania 3:1; Yilimia 6:13; 7:29-34) Kasi, ntango tempelo etongamaki mpe bato bamipesaki na losambo ya Yehova, mateya ya losambo ya solo ekómaki koteyama wana, mpe Yelusaleme ekómaki kobengama “mboka ya solo.”
11:7-14—Mangenda na nkombo “Ngɔlu” mpe “Kokangana” oyo Zekalia akataki emonisaki nini? Biblia elobi ete Zekalia atindamaki mpo na ‘koleisa etonga ya kobomama,’ elingi koloba bampate oyo batambwisi bakómaki kolyela. Na mokumba na ye ya mobateli ya mpate, Zekalia azalaki komonisa Yesu Klisto, oyo atindamaki epai ya bato oyo Nzambe asalaki na bango kondimana, kasi bango baboyaki ye. Kokata lingenda oyo ebengamaki “ngɔlu” elimbolaki ete Nzambe akokata kondimana ya Mibeko oyo asalaki na Bayuda mpe akoyokela bango lisusu ngɔlu te. Kokata “kokangana” elimbolaki kokata bondeko ya Yuda ná Yisalaele, oyo losambo ya Yehova ezalaki kosangisa.
12:11—“Bileli ya Adadalimono na lobwaku ya Megidono” ezali nini? Yosiya, mokonzi ya Yuda, abomamaki na etumba oyo abundaki na Falao Neko ya Ezipito na “lobwaku ya Megidono,” mpe balelaki ye na “nzembo-ya-kolela” na boumeli ya ebele ya bambula. (2 Ntango 35:25) Na yango, ekoki kozala ete maloba “bileli ya Adadalimono” ezali kolobela kolela oyo balelaki Yosiya.
Mateya mpo na biso:
1:2-6; 7:11-14. Yehova asepelaka na bato oyo babongolaka motema, bandimaka mpamela mpe bazongaka epai na ye mpo na kosambela ye na molimo na bango mobimba. Nzokande, ayokaka te kolela ya bato oyo ‘baboyaka koyoka mpe babongolaka lipeka mpe bakangaka matoi na bango ete báyoka te’ nsango na ye.
4:6, 7. Eloko moko te ekokaki kopekisa elimo ya Yehova komema mosala ya kotonga tempelo tii na nsuka. Ata soki tokutani na mokakatano nini na mosala ya Nzambe, tokoki kolonga yango soki tozali na kondima epai ya Yehova.—Matai 17:20.
4:10. Na litambwisi ya Yehova, Zelubabele ná bato na ye basilisaki kotonga tempelo, mpe batongaki yango ndenge mpenza Nzambe alingaki. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli komona te ete makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso eleki biso motó.
7:8-10; 8:16, 17. Mpo Yehova andima biso, tosengeli kozala na bosembo, na boboto mpe mawa, mpe kolobaka solo.
8:9-13. Yehova apambolaka biso soki ‘mabɔkɔ na biso ezali na nguya’ na mosala oyo apesi biso. Na kati ya mapamboli yango, tokoki kotánga kimya mpe bokoli na elimo.
12:6. Bato oyo bazali bakɛngɛli na kati ya basaleli ya Yehova basengeli kozala “lokola esungi ya mɔtɔ,” elingi koloba kozala na molende makasi.
13:3. Tosengeli kokangama na Nzambe ya solo mpe na ebongiseli na ye koleka moto nyonso, ata soki tolingaka ye ndenge nini.
13:8, 9. Bapɛngwi oyo Yehova aboyaki bazalaki ebele koleka. Kaka bato moke nde bapɛtolamaki lokola ebende na kati ya mɔtɔ. Lelo oyo, mangomba ya boklisto, oyo ezali ndambo monene na kati ya bato oyo bamibengaka baklisto, baboyami na Yehova. Kaka mwa bato moke, baklisto bapakolami, nde ‘bazali kobenga nkombo ya Yehova’ mpe kondima kopɛtolama na ye. Bango ná baninga na bango bampate mosusu bamimonisi mpenza Batatoli ya solo ya Yehova, kasi ya nkombo mpamba te.
Tózala na molende
Esakweli ya Hagai ná oyo ya Zekalia ezali na ntina nini mpo na biso lelo oyo? Soki tokanisi ndenge bansango na bango elendisaki Bayuda bámipesa na mosala ya kotonga tempelo, yango ekotinda biso tómipesa na molende mpenza na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli.
Zekalia asakolaki ete Masiya akoya “likoló ya mpunda,” ete bakotɛka ye na “ndambo ntuku misato ya palata,” mpe ete bakobɛta ye mpe ‘bampate bakopanzana.’ (Zekalia 9:9; 11:12; 13:7) Kokanisa na mozindo ndenge bisakweli ya Zekalia oyo elobelaki Masiya ekokisamaki ezali na litomba monene mpo na kondima na biso! (Matai 21:1-9; 26:31, 56; 27:3-10) Ekolendisa mpenza kondima na biso mpo na Liloba ya Yehova mpe mpo na bibongiseli oyo azwi mpo na kobikisa biso.—Baebele 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
[Etanda na lokasa 11]
BIMONANELI MWAMBE YA ZEKALIA
1:8-17: Emonaneli oyo endimisaki Bayuda ete bakosilisa kotonga tempelo mpe emonisaki ete Yelusaleme mpe bingumba mosusu ya Yuda ekopambolama.
1:18-21: Emonaneli oyo esakolaki nsuka ya ‘maseke minei oyo epanzaki Yuda,’ elingi koloba baguvɛrnema nyonso oyo ezalaki kotɛmɛla losambo ya Yehova.
2:1-13: Emonaneli oyo emonisaki ete Yelusaleme ekokóma monene mpe ete Yehova akokóma “lokola lopango ya mɔtɔ kozingela” yango, elingi koloba mobateli na yango.
3:1-10: Emonaneli oyo emonisaki ete Satana azalaki na nsima ya bato oyo bazalaki kotɛmɛla mosala ya kotonga tempelo mpe ete Nganga-nzambe Monene Yosua abikisamaki mpe apɛtolamaki.
4:1-14: Emonaneli oyo emonisaki ete mikakatano oyo ezalaki lokola bangomba ekolongwa mpe ete guvɛrnɛrɛ Zelubabele akosilisa kotonga tempelo.
5:1-4: Emonaneli oyo ezalaki elakeli mabe mpo na bato mabe oyo bazalaki kozwa bitumbu te.
5:5-11: Emonaneli oyo esakolaki nsuka ya mabe.
6:1-8: Emonaneli oyo elakaki ete baanzelu bakokɛngɛla mpe bakobatela bango.
[Elilingi na lokasa 8]
Nsango ya Hagai ná Zekalia ezalaki na ntina nini?
[Elilingi na lokasa 10]
Na ndimbola nini bakɛngɛli bazali “lokola esungi ya mɔtɔ”?