Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Malaki
TEMPELO ya Yelusaleme esilaki kotongama lisusu banda mbula koleka 70. Kasi, na boumeli ya bambula nyonso wana, elimo ya Bayuda ezalaki se kokita. Ata banganga-nzambe bakómaki kosala makambo ya mabe. Nani akokaki kosalisa bango báyeba ete bazalaki kosala mabe mpe bázongela boyokani malamu na Nzambe? Yehova apesaki mosakoli Malaki mokumba yango.
Mokanda ya nsuka ya Makomami ya Liebele, oyo mosakoli Malaki akomaki na maloba ya nguya, ezali esakweli epemami na Nzambe. Kotya likebi na liloba ya esakweli ya Malaki ekoki kosalisa biso tómibongisa mpo na “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova],” ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka.—Malaki 4:5.
BANGANGA-NZAMBE ‘BABƐTISI MINGI LIBAKU’
Yehova amonisaki ndenge oyo azalaki kotalela Yisalaele; alobaki boye: “Nalingi bino.” Kasi, banganga-nzambe bazalaki kotyola nkombo ya Nzambe. Na ndenge nini? Na ndenge ‘bazalaki kokaba bilei ya mbindo likoló ya etumbelo na ye,’ mpe bazalaki kopesa lokola mbeka “banyama batɛngumi mpe ya maladi.”—Malaki 1:2, 6-8.
Banganga-nzambe ‘[babɛtisaki bato, NW] mingi libaku na mobeko.’ Bato bazalaki “kosala na bokosi.” Bamosusu babalaki basi oyo bazalaki bapaya. Bamosusu mpe bazalaki kokosa ‘basi ya bolenge na bango.’—Malaki 2:8, 10, 11, 14-16.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:2—Na ndenge nini Yehova ‘alakelaki mabe mapamboli’ ya banganga-nzambe ya motó makasi? Nzambe alakelaki yango mabe na ndenge asalaki ete mapamboli ya banganga-nzambe yango ekóma bilakeli mabe.
2:3—‘Kotanda nyei’ likoló ya bilongi ya banganga-nzambe elimbolaki nini? Mibeko ya Moize elobaki ete banganga-nzambe basengelaki kobimisa libándá ya kaa mpe kotumba nyei ya banyama oyo ezalaki kopesama lokola mbeka. (Levitike 16:27) Kotanda nyei likoló ya bilongi ya banganga-nzambe elimbolaki ete Yehova alingaki koboya bambeka mpe baoyo bazalaki kotumba yango bazalaki mbindo na miso na ye.
2:13—Etumbelo ya Yehova ezipamaki na mpisoli ya banani? Ezipamaki na mpisoli ya basi oyo bazalaki kokende na tempelo mpo na koyebisa Yehova mpasi oyo bazalaki na yango na motema. Mpasi yango eutaki wapi? Mibali na bango babomaki mabala mpo na bantina oyo ebongi te, mpe basundolaki bango, mbala mosusu mpo na kobala bilenge basi oyo bazalaki bapaya.
Mateya mpo na biso:
1:10. Yehova asepelaki te na bambeka ya banganga-nzambe oyo batondaki na lokoso, oyo bazalaki kosɛnga lifuti ata mpo na misala mikemike lokola kokanga baporte mpe kopelisa mɔtɔ na etumbelo. Makambo ya losambo na biso, ata mpe mosala ya kosakola, esengeli komonisa ete tolingi mpenza Nzambe mpe bazalani na biso, kasi te ete tozali koluka lifuti!—Matai 22:37-39; 2 Bakolinti 11:7.
1:14; 2:17. Yehova andimaka bokosi te.
2:7-9. Bato oyo bazali na mokumba ya koteya na lisangá basengeli kokeba ete báteya kaka makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe, Makomami Mosantu, mpe na mikanda ya “kapita ya sembo.”—Luka 12:42; Yakobo 3:11.
2:10, 11. Yehova alingi ete basaleli na ye bátosa mpenza toli ya kobala “kati na Nkolo kaka.”—1 Bakolinti 7:39.
2:15, 16. Basambeli ya solo basengeli kotosa ndai ya libala oyo basalaki na basi ya bolenge na bango.
‘NKOLO AKOYA NA TEMPELO NA YE’
Yehova Nzambe “akoya pwasa na Tempelo na ye” elongo na Yesu Klisto, “ntoma ya kondimana.” Nzambe ‘akobɛlɛma epai ya bato na ye na kosambisa-sembo’ mpe akokóma motatoli ya mbangu mpo na bato nyonso oyo bazalaki kosala mabe ya ndenge na ndenge. Kasi, “mokanda ya kokanisa” ekokomama mpo na baoyo babangaka Yehova.—Malaki 3:1, 3, 5, 16.
Mokolo oyo “ezali kozika lokola mɔtɔ makasi” ekoya mpe ekoboma bato nyonso ya mabe. Liboso mokolo yango eya, mosakoli moko akotindama mpo na ‘kobongola mitema ya batata epai ya bana mpe mitema ya bana epai ya batata na bango.’—Malaki 4:1, 5, 6.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:1-3—Ntango nini “Nkolo” mpe “ntoma ya kondimana” bayaki na tempelo, mpe nani atindamaki liboso na bango? Momonisi ya Yehova ayaki na tempelo na ye mpe apɛtolaki yango na mokolo ya 10 Nisana ya mobu 33 T.B. Ezalaki ntango Yesu akɔtaki na tempelo mpe abenganaki batɛkisi mpe basombi. (Malako 11:15) Likambo yango esalemaki nsima ya mbula misato na ndambo kobanda ntango oyo Yesu apakolamaki lokola Mokonzi. Ndenge moko mpe, emonani ete mbula misato ná ndambo nsima ya kokóma Mokonzi na likoló, Yesu ayaki elongo na Yehova na tempelo ya elimo mpe bamonaki ete basaleli ya Nzambe basengelaki kopɛtolama. Na ekeke ya liboso, Yoane Mobatisi atindamaki mpo na kobongisa Bayuda liboso Yesu Klisto aya. Na ntango na biso, ntoma moko atindamaki mpo na kobongisa nzela liboso Yehova aya na tempelo na ye ya elimo. Na bambula ya 1880, etuluku moko ya bayekoli ya Biblia bamipesaki na mosala ya koteya Biblia mpo na kosalisa bato ya mitema sembo báyeba mateya ya solo.
3:10—Koyeisa “likabo mobimba ya zomi,” to kopesa ndambo ya zomi, ezalaki nde komonisa komipesa mobimba epai ya Yehova? Lokola liwa ya Yesu esukisaki mibeko ya Moize, esɛngisami lisusu te ete tópesaka ndambo ya zomi. Kasi, kopesa ndambo ya zomi ezalaki elilingi ya likambo moko. (Baefese 2:15) Yango ezalaki komonisa te komipesa mobimba epai ya Yehova. Bayisalaele bazalaki komema ndambo ya zomi mbula na mbula, biso tomipesaka epai ya Yehova mbala moko—ntango tomimonisi epai ya Yehova mpe tozwi batisimo. Kobanda ntango yango, biloko na biso nyonso ekómaka ya Yehova. Kasi, Yehova atikeli biso likoki ya kopona eteni ya biloko oyo tozali na yango (ndambo ya zomi ya elilingi) mpo na kosalela ye. Yango ezali nyonso oyo makoki na biso mpe motema na biso etindi biso tópesa. Makabo oyo tomemelaka Yehova ezali ntango, makasi, mpe bozwi oyo topesaka mpo na kosimba mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Kati na yango, tokobakisa mpe koyangana na makita, kokende kotala bandeko oyo bazali maladi mpe mibange, mpe kotya makabo mpo losambo ya solo ekende liboso.
4:3—Na ndimbola nini basaleli ya Yehova ‘bakonyata bato mabe’? Basaleli ya Nzambe awa na mabelé ‘bakonyata bato mabe’ na ndenge ya elilingi mpamba te Nzambe akosalela bango te mpo na kopesa bato mabe etumbu. Nzokande, maloba yango emonisi ete basaleli ya Yehova awa na mabelé bakosangana na motema mobimba mpo na kosepela na bolongi nsima ya kobomama ya mokili ya Satana.—Nzembo 145:20; Emoniseli 20:1-3.
4:4—Mpo na nini tosengeli ‘kokanisa Mibeko ya Moize’? Baklisto basɛngisami te na kotosa Mibeko ya Moize; nzokande, mibeko yango ezalaki “elilingi ya makambo malamu oyo ekoya.” (Baebele 10:1) Yango wana, kotya likebi na Mibeko ya Moize ekoki kosalisa biso tómona ndenge oyo makambo oyo ekomamaki kati na yango ezali kokokisama. (Luka 24:44, 45) Lisusu, Mibeko yango ezalaki na “bandakisa ya makambo oyo ezali na likoló.” Koyekola yango ezali na ntina mingi mpo na kokanga ntina ya mateya mpe etamboli oyo ebongi na baklisto.—Baebele 9:23.
4:5, 6—“Mosakoli Eliya” ezali nani? Esakweli elobaki ete “Eliya” akosala mosala ya kozongisama, elingi koloba ya kobongisa mitema ya bato. Na ekeke ya liboso T.B., Yesu Klisto amonisaki ete “Eliya” ezalaki Yoane Mobatisi. (Matai 11:12-14; Malako 9:11-13) Na mikolo na biso, “Eliya” atindami “liboso ya koya ya mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova].” Lelo oyo, “Eliya” ezali nde “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Baklisto yango bapakolami na elimo bazali kosalisa bato bázonga epai ya Yehova.
Mateya mpo na biso:
3:10. Koboya kopesa Yehova oyo eleki malamu ezali komipimela mapamboli na ye.
3:14, 15. Lokola banganga-nzambe bazalaki kopesa ndakisa ya malamu te, Bayuda bakómaki kotalela mosala ya Nzambe na motuya moke. Bandeko oyo bazali kokamba lisangá ya boklisto basengeli kopesa ndakisa ya malamu.—1 Petelo 5:1-3.
3:16. Yehova akomaka na mokanda bankombo ya bato oyo babangaka ye mpe bazali sembo epai na ye. Abombaka bango na makanisi na ye mpe akobatela bango ntango akoboma mokili mabe ya Satana. Yango wana, tólɛmba te na ekateli na biso ya kotikala sembo epai ya Nzambe.—Yobo 27:5.
4:1. Na mokolo ya kozongisa monɔkɔ epai ya Yehova, “etape” mpe “mosisa” ekosuka ndenge moko—bana bakozwa etumbu moko ná baboti na bango. Yango wana, baboti bazali na mokumba monene ya kosalisa bana na bango oyo bazali naino mike! Baklisto oyo bazali na bana basengeli kosala makasi mpo ete Nzambe andima bango mpe bábatela boyokani malamu na ye.—1 Bakolinti 7:14.
“Bangá Nzambe ya solo”
Nani akobika na “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova]”? (Malaki 4:5) Yehova alobi boye: “Mpo na bino, bato baoyo bokotosaka nkombo na ngai, moi ya boyengebene ekobimela bino na kobikisa kati na mapapu na yango, bokokima wana bokopumbwapumbwa lokola bana ya ngɔmbɛ kati na lopango.”—Malaki 4:2.
Yesu Klisto, “moi ya boyengebene” azali kongɛnga likoló ya baoyo babangaka nkombo ya Tata na ye, mpe Yehova asepelaka na bango. (Yoane 8:12) Mpo na bango, ‘kobikisa’ ekoya ‘na mapapu na yango,’ elingi koloba kobikisama ya elimo lelo oyo mpe na mokili ya sika, kobikisama na nzoto, na makanisi mpe na mayoki. (Emoniseli 22:1, 2) Bato yango bazali na esengo mpe nsai “lokola bana ya ngɔmbɛ.” Wana tozali kozela mapamboli yango, tiká tótosa na motema mobimba toli ya Mokonzi Salomo ete: “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango nde likambo mobimba esɛngisami na moto.”—Mosakoli 12:13, NW.
[Elilingi na lokasa 26]
Malaki, mosakoli oyo azalaki na molende mpe amipesaki na Nzambe
[Elilingi na lokasa 29]
Mateya na biso esengeli kouta na Biblia
[Elilingi na lokasa 29]
Basaleli ya Yehova batosaka ndai na bango ya libala