Makambo oyo epesaka moto esengo ya solosolo
MPO bilei ezala kitoko, esɛngaka kozala na biloko nyonso oyo esengeli mpe na moto oyo ayebi kolamba malamu. Ndenge moko mpe, mpo na kozala na esengo, esɛngaka kaka likambo moko te, kasi makambo ebele. Na makambo yango, tokoki kotánga mosala, masano, kolekisa ntango elongo na libota to na baninga, mpe kosalela Nzambe. Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo emonanaka na miso te, na ndakisa, ndenge moto atalelaka makambo, bamposa na ye, mpe mikano na ye.
Likambo ya esengo ezali ete biso moko te nde tosengeli kopona makambo oyo ekopesa biso esengo. Mpo na nini? Mpamba te Mozalisi na biso apesá biso Biblia, buku ya malamu oyo ezali na malako. Buku yango, Biblia, esili kobongolama mpe kobimisama na ndambo to mobimba, na minɔkɔ 2 377. Biblia ebimisami mingi koleka babuku mosusu nyonso na mokili.
Lokola Biblia ebongolami mpe ebimisami na minɔkɔ ebele ndenge wana, yango emonisi ete Nzambe alingi bato nyonso bázala na esengo mpe báyeba ye malamu. (Misala 10:34, 35; 17:26, 27) Yoká ndenge alobi: “[ Yehova] alobi boye, ye mosikoli na yo, Oyo na Bulɛɛ na Yisalaele, ete, Ngai nazali . . . ye oyo akolakisa yo mpo na litomba.” Alaki biso ete tokozala na kimya “lokola ebale” soki totosi mibeko na ye.—Yisaya 48:17, 18.
Likambo oyo Yehova alaki na mokapo yango etindi biso tókanisa lisusu maloba ya Yesu oyo totángaki na lisolo ya liboso: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Bobola ya elimo oyo balobeli awa ezali kaka te koyeba makambo ya Nzambe likolólikoló. Esengeli nde kosalela makambo yango na bomoi na biso mobimba. Tokomonisa ete toyebi bobola na biso ya elimo soki tondimi koyoka Nzambe ntango azali koteya biso, mpo toyebi ete ayebi biso malamu koleka ndenge tomiyebi. Ndeko Errol, oyo abandá koyekola Biblia ekómi sikoyo mbula koleka 50, alobi boye: “Eloko endimisaka ngai ete Biblia eutá na Nzambe, ezali ete soki osaleli toli na yango, elongaka kaka!” Na ndakisa, tótalela toli ya malamu oyo Biblia epesi na likambo ya koluka bozwi mpe bisengo.
Toli ya malamu na likambo ya mbongo
Yesu alobaki ete: “Ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” (Luka 12:15) Ya solo, motuya na yo ya solo, mingi mpenza na miso ya Nzambe, etaleli te mbongo oyo ozali na yango. Kutu, koluka bozwi ebakisaka nde mitungisi, esilisaka esengo, mpe elyaka ntango ya kosala makambo oyo eleki ntina.—Malako 10:25; 1 Timote 6:10.
Richard Ryan, moto moko ya mayele oyo ayekolaka bizaleli ya bato na États-Unis, alobi ete bato mingi bazali komipesa na koluka biloko ya mokili mpo bakanisi ete ekopesa bango esengo ya solo, kasi bazali kozwa esengo yango te. Salomo, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, alobi mpe likambo yango na maloba oyo: “Moto oyo alingaka mbongo, atondaka yango té; pe oyo alingaka bomengo, azwaka na yango litomba té.” (Mosakoli 5:9, Bible na lingala ya lelo oyo) Likambo yango ezali lokola mwa mokosa oyo esalaka moto ntango ngungi eswi ye, soki azali kokwanza yango, akoyoka mokosa mingi, nsukansuka, akozoka.
Biblia elendisi biso tósalaka mosala makasi mpe tósepelaka na mbuma ya mosala na biso. (Mosakoli 3:12, 13) Soki tozali kosala bongo, tokopesa nzoto na biso kilo—yango mpe epesaka moto esengo. Ekoki mpe kozala na makambo mosusu oyo esepelisaka biso na bomoi. Nzokande, kozala na mwa biloko ya kitoko oyo mbongo epesaka ekeseni na koluka kokóma na bozwi.
Komisepelisa ezali na esika na yango
Soki tozali kotalela bomoi ndenge bato oyo babangaka Nzambe batalelaka yango, makambo lokola kobima elongo na bandeko to baninga, kosakana, to komisepelisa na ndenge mosusu ekopesa biso esengo mpenza. Yesu azalaki kolekisa ntango na bato mpo na kolya mpe komɛla. (Luka 5:29; Yoane 2:1-10) Kasi, yango ezali eloko ya libosoliboso te oyo ezalaki kopesa ye esengo. Esengo na ye ezalaki kouta nde na mosala ya Nzambe, ndenge azalaki kosalisa bato báyeba Nzambe mpe mokano na ye mpo na bango.—Yoane 4:34.
Mokonzi Salomo amekaki makambo ndenge na ndenge oyo esepelisaka moto, mpo na kotala soki ekopesa ye esengo ya solosolo. Alobaki boye: “Naluka kozwa bisengo ya mokili.” Lokola azalaki na bozwi mingi, asalaki nyonso oyo motema na ye elingi. Amizindisaki mpenza na kati ya bisengo! Kasi, azwaki nini? Akomaki boye: “Yango mpe ezali kaka pamba.”—Mosakoli 2:1, Bible na lingala ya lelo oyo.
Mbala mingi, bato oyo bamipesaka na koluka bisengo ya mokili bazwaka eloko te. Kutu, ntango bato ya mayele bayekolaki mpo na koyeba soki bisengo ya mokili mpe makambo lokola mosala ya ntina, kosalela Nzambe, mpe kofanda na libota epesaka bolamu ya solosolo, bamonaki ete bisengo ya mokili epesaka bato bolamu ya solosolo te.
Yebá kokaba mpe kopesa matɔndi
Bato oyo bazalaka na esengo ezali baoyo bakabaka mingi mpe basepelaka na bato, kasi bato ya moimi te. Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Longola kokaba mbongo to biloko oyo tozali na yango, tokoki mpe kopesa ntango mpe makasi na biso, oyo ekoki kutu kozala na motuya koleka, mingi mpenza na libota. Mwasi ná mobali basengeli kolekisa ntango mingi elongo mpo libala na bango ezala malamu mpe na esengo. Baboti basengeli kolekisa ntango mingi na bana na bango, kosolola na bango, komonisa ete balingaka bango, mpe koteya bango. Soki bato ya libota moko bapesi ntango na bango ndenge wana, bakozala na boyokani ya malamu mpe ndako na bango ekozala esika ya esengo.
Epai mosusu, ntango basusu bazali kopesa yo—ezala ntango to makasi na bango, to biloko mosusu—omonisaka ete ozali ‘moto ya botɔndi’? (Bakolose 3:15) Kobosana te maloba misato wana. Soki ozali kosalela yango, okoyokana malamu na bato mpe okokóma na esengo mingi. Soki moto apesi yo matɔndi na motema mobimba, oyokaka ndenge nini? Motema na yo etondaka na esengo te?
Lisusu, soki tozali na botɔndi, tokobosana te makambo ya malamu oyo basalelaka biso. Mwasi moko ya mayele na iniversite moko ya Californie na Riverside (États-Unis) asalaki ankɛti moko, asɛngaki bato bákomaka makambo ya malamu oyo bazali kosalela bango mokolo na mokolo. Likambo ya kokamwa, nsima ya pɔsɔ motoba, bato wana bakómaki kosepela na bomoi lisusu mingi koleka.
Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? Ata soki ozali na mikakatano nini, zwá momeseno ya kotalelaka makambo ya malamu oyo ozali na yango. Kutu, Biblia elendisi yo osala bongo na maloba oyo: ‘Ntango nyonso sepelaká . . . Na makambo nyonso pesaká matɔndi.’ (1 Batesaloniki 5:16, 18) Na ntembe, mpo tósepelaka mpe tópesaka matɔndi, tosengeli kosala mpenza molende mpo tóbosanaka te makambo ya malamu oyo basalelaka biso. Mpo na nini te komityela mokano ya kosala yango?
Bolingo mpe elikya epesaka esengo ya solosolo
Balobaka ete banda kobotama tii na liwa, moto alingaka bálinga ye; mpe yango ezali solo. Soki bato bazali kolinga yo te, okozala na esengo te. Kasi bolingo ezali mpenza nini? Atako lelo oyo liloba yango ekómá na bandimbola ebele, Biblia elimboli yango malamu, elobi ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.”—1 Bakolinti 13:4-8.
Bolingo ya solosolo ezalaka na moimi te! Lokola “elukaka matomba na yango moko te,” etindaka moto atya bolamu ya basusu liboso ya oyo ya ye moko. Likambo ya mawa, bolingo ya ndenge wana ezali lisusu mingi te. Kutu, na esakweli ya ntina mingi oyo Yesu apesaki mpo na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, alobaki ete “bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.”—Matai 24:3, 12; 2 Timote 3:1-5.
Kasi, bolingo ekozanga mpo na libela te. Soki bolingo ezangi mpo na libela, ezali lokola kofinga Mozalisi, oyo azali bolingo. (1 Yoane 4:8) Etikali moke, Nzambe alongola, awa na mabelé, bato nyonso oyo balingaka baninga te to baoyo batondi na lokoso. Akotika kaka baoyo basalaka makasi bámonisa bolingo oyo touti kolobela. Ntango akosala bongo, kimya mpe esengo ekotonda na mabelé mobimba. Makambo oyo Biblia elaki ekosalema mpenza: “Nsima na mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:10, 11.
Kanisá naino: ‘okosepela’ mikolo nyonso! Tokoki kokamwa te soki Biblia elobi ete: “Bósepelaka na kati ya elikya.” (Baloma 12:12) Olingi koyeba makambo mosusu mpo na elikya malamu oyo Nzambe apesi bato oyo batosaka ye? Soki ezali bongo, tángá lisolo oyo elandi.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
“Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” —Misala 20:35
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Balongá mpenza?
Ntango mosusu, toyokaka na masolo ete bato oyo bakolá na mabota oyo ezalaki na bomoi ya mpasi, babundanaki na bomoi tii nsukansuka bakómaki na mbongo mingi. Zulunalo moko (San Francisco Chronicle) elobelaki esengo, na maloba oyo: “Mbala mosusu bato babɛtaka masolo ya ndenge wana mpo na komonisa ete, bomoi wana ya mpasi nde epesaki bato yango molende ya kosala makasi, yango wana balongaki, atako bakolaki na bomoi ya mpasi. Kasi ntango bayekoli lisusu likambo yango mikolo oyo, bamoni ete bato yango balongá mpenza te. Bakómá nde na mbongo mingi.”
[EBox/Picture on page 6]
Esengo esalisaka moto azala nzoto kolɔngɔnɔ
Esengo ezali nkisi monene. Zulunalo moko (Time) elobi boye: “Emonani ete esengo mpe bizaleli mosusu lokola elikya, makanisi ya malamu mpe kosepela na oyo ozali na yango, ebatelaka moto abɛla te bamaladi ya motema, ya mimpululu, ya sukali, tansyo, miyoyo, mpe bamaladi ya mpema, to esalaka ete bamaladi yango ekóma makasi te.” Lisusu, ntango bayekolaki likambo yango na boumeli ya mbula libwa na Pays-Bas, epai ya mibange oyo bazalaki kobɛla, bakamwaki na komona ete baoyo bazalaki na esengo mpe na makanisi ya malamu, likama ya kokufa noki ekitaki mingi mpenza (50 %).
Tii lelo, eloko oyo esalaka ete esengo mpe makanisi ya malamu esalisa moto azala nzoto kolɔngɔnɔ eyebani naino te. Kasi, nsima ya koyekola likambo yango, bamonaki ete nzoto ya bato oyo bazalaka na esengo mpe na makanisi malamu, ebimisaka mingi te mai oyo nzoto ebimisaka soki moto azali komitungisa. Eyebani ete soki mai yango eleki mingi na makila, moto abɛlaka mpambampamba.
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Mpo bilei ezala kitoko, esengeli kolamba yango kaka ndenge mibeko ya kolamba yango esɛngi, ndenge moko mpe mpo na kozala na esengo esengeli kolanda mibeko ya Nzambe