Makambo oyo Yesu alobaki epesaka esengo
“[Yesu] amataki na ngomba; mpe . . . bayekoli na ye bayaki epai na ye; . . . mpe abandaki koteya bango.”—MAT. 5:1, 2.
1, 2. (a) Ntango nini Yesu asalaki lisolo na ye likoló ya ngomba? (b) Ndenge nini Yesu abandaki lisolo na ye?
EZALAKI na mobu 31 T.B. Yesu akataki mpo na mwa ntango mosala ya kosakola na Galilai mpe akendeki kosala fɛti ya Elekeli na Yelusaleme. (Yoa. 5:1) Ntango azongaki na Galilai, abondelaki Nzambe butu mobimba asalisa ye apona bantoma 12. Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato bayaki epai ya Yesu wana azalaki kobikisa bato ya maladi. Afandaki likoló ya ngomba mpe abandaki koteya bayekoli na ye mpe bato mosusu oyo bazalaki wana.—Mat. 4:23–5:2; Luka 6:12-19.
2 Ntango Yesu abandaki lisolo na ye, oyo ebengami Lisolo Likoló ya Ngomba, amonisaki ete mpo moto azala na esengo, asengeli kozala na boyokani malamu na Nzambe. (Tángá Matai 5:1-12.) Kozala na esengo elimboli ‘komiyoka malamu to kozala na nsai.’ Makambo libwa oyo Yesu alobaki ete epesaka esengo emonisi ntina oyo baklisto bazalaka na esengo; makambo yango ezali mpe na ntina lelo oyo kaka ndenge ezalaki esili koleka mbula soki 2 000. Tólobela sikoyo yango mokomoko.
“Baoyo bayebi bobola na bango ya elimo”
3. Koyeba bobola na biso ya elimo elimboli nini?
3 “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Mat. 5:3) “Baoyo bayebi bobola na bango ya elimo” bayebaka ete esengeli Nzambe atambwisa bango mpe amonisela bango motema mawa.
4, 5. (a) Mpo na nini baoyo bayebi bobola na bango ya elimo bazali na esengo? (b) Ndenge nini tokoki kokokisa bamposa na biso ya elimo?
4 Baoyo bayebi bobola na bango ya elimo bazali na esengo, “mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” Kondima Yesu lokola Masiya epesaki bayekoli na ye ya liboso libaku ya koyangela elongo na ye na Bokonzi ya Nzambe. (Luka 22:28-30) Ezala tozali na elikya ya koyangela elongo na Klisto na likoló to ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya Nzambe, tokoki kozala na esengo soki toyebi mpenza bobola na biso ya elimo.
5 Bato nyonso te nde bayebi bobola na bango ya elimo, mpo mingi bazali na kondima te mpe bazalaka na botɔndi te mpo na makambo mosantu. (2 Tes. 3:1, 2; Ebe. 12:16) Mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo tosengeli mpe koyekola Biblia na molende, komipesa na mosala ya kokómisa bato bayekoli, mpe kozangisaka te makita ya lisangá.—Mat. 28:19, 20; Ebe. 10:23-25.
Bato ya mawa oyo bazali na “esengo”
6. “Baoyo bazali na mawa” ezali banani, mpe mpo na nini bazali na “esengo”?
6 “Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama.” (Mat. 5:4) “Baoyo bazali na mawa” bazali ndenge moko na “baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” Mawa na bango elimboli te ete bazali komilelalela mpo na ndenge bomoi na bango ezali. Bazali na mawa mpo bazali bato ya masumu mpe mpo na makambo oyo bato ya kozanga kokoka bazali kosala. Mpo na nini bato yango ya mawa bazali na “esengo”? Mpo bazali na kondima epai ya Nzambe mpe Klisto mpe bazali kobɔndisama mpo na boyokani malamu oyo bazali na yango na Yehova.—Yoa. 3:36.
7. Ndenge nini tosengeli kotalela mokili ya Satana?
7 Biso mpe toyokaka mawa mpo na makambo ya mabe oyo etondi na mokili ya Satana? Ndenge nini totalelaka makambo ya mokili oyo? Ntoma Yoane akomaki boye: “Eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—euti epai ya Tata te.” (1 Yoa. 2:16) Kasi, tosengeli kosala nini soki tomoni ete boyokani na biso na Yehova ebebisami na “elimo ya mokili,” elingi koloba nguya oyo etambwisaka bato oyo bazali mosika na Nzambe? Tosengeli kobondela na etingya, koyekola Liloba ya Nzambe, mpe koluka lisalisi ya bankulutu. Soki topusani penepene na Yehova, tokozwa ‘libɔndisi,’ atako likambo nini ezali kotungisa biso.—1 Kol. 2:12; Nz. 119:52; Yak. 5:14, 15.
“Bato ya elimo ya boboto” bazali mpenza na esengo!
8, 9. Kozala na elimo ya boboto elimboli nini, mpe mpo na nini bato ya elimo ya boboto bazali na esengo?
8 “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Mat. 5:5) “Elimo ya boboto,” to komikitisa, ezali bolɛmbu te, ezali mpe boboto ya libándá kaka te. (1 Tim. 6:11) Soki tozali bato ya elimo ya boboto, tokosala mokano ya Yehova na komikitisa mpe tokondima litambwisi na ye. Tokomonisa mpe elimo ya boboto ntango tozali na bandeko na biso baklisto mpe bato mosusu. Komikitisa ya ndenge wana eyokani na toli oyo ntoma Paulo apesaki.—Tángá Baloma 12:17-19.
9 Mpo na nini bato ya elimo ya boboto bazali na esengo? Mpo Yesu, oyo azali na elimo ya boboto, alobaki ete “bakozwa libula ya mabelé.” Ye azali moto ya libosoliboso oyo akozwa libula ya mabelé. (Nz. 2:8; Mat. 11:29; Ebe. 2:8, 9) Kasi, “bazwi-ya-libula elongo na Klisto,” oyo bazali mpe na elimo ya boboto bakozwa libula ya mabelé. (Lom. 8:16, 17) Ntango Yesu akoyangela mabelé, ebele ya bato mosusu ya komikitisa bakozwa bomoi ya seko.—Nz. 37:10, 11.
10. Kozanga elimo ya boboto ekoki kozangisa biso nini?
10 Lokola Yesu, biso mpe tosengeli kozala na elimo ya boboto. Nini ekoki kosalema soki tozali bato balingá-bitumba? Ezaleli ya mabe ndenge wana ekoki kosala ete bato mosusu bákimaka biso. Soki ozali ndeko mobali mpe olingi kozwa mikumba na lisangá, okozwa yango te soki ozalaka moto alingá-bitumba. (1 Tim. 3:1, 3) Paulo alobaki na Tito akoba kokundwela baklisto ya Krɛti ete “bázala te bato balingá-bitumba, bázala te bato ya makambo makasimakasi, bámonisa boboto mpenza epai ya bato nyonso.” (Tito 3:1, 2) Soki tozali na elimo ya boboto, tokozala mpenza lipamboli mpo na basusu!
Bazali na nzala ya “boyengebene”
11-13. (a) Kozala na nzala mpe mposa ya boyengebene elimboli nini? (b) Ndenge nini baoyo bazali na nzala mpe mposa ya boyengebene ‘bakotondisama’?
11 “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpo bakotonda.” (Mat. 5:6) “Boyengebene” oyo Yesu alobelaki na vɛrsɛ yango elimboli kosala oyo ezali malamu na boyokani na mokano mpe mibeko ya Nzambe. Mokomi ya nzembo alobaki ete ‘atutamaki na mposa’ ya bikateli ya sembo ya Nzambe. (Nz. 119:20) Biso mpe tomonaka ete boyengebene ezali na ntina mpe tozalaka na nzala mpe mposa na yango?
12 Yesu alobaki ete baoyo bazali na nzala mpe mposa ya boyengebene bakozala na esengo mpo “bakotonda.” Yango emonanaki na Pantekote 33 T.B., mpo na ntango wana, elimo santu ya Yehova ebandaki ‘kopesa mokili elembo ya kondimisa mpenza na ntina etali . . . boyengebene.’ (Yoa. 16:8) Na lisalisi ya elimo santu, Nzambe atindaki bato bákoma Makomami ya Grɛki ya boklisto, oyo ezali na ntina “mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.” (2 Tim. 3:16) Elimo santu ya Nzambe esalisaka mpe biso ‘tólata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo.’ (Ef. 4:24) Koyeba ete bato oyo babongoli motema mpe basɛngi bolimbisi mpo na masumu na bango na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu bakoki kotángama bayengebene liboso ya Nzambe, ezali kobɔndisa mpenza, boye te?—Tángá Baloma 3:23, 24.
13 Soki tozali na elikya ya bomoi awa na mabelé, nzala mpe mposa na biso ya boyengebene ekosila ntango tokozala na bomoi ya seko na mabelé ya boyengebene. Kasi liboso ntango yango ekoka, tózala na ekateli ya kotosa mibeko ya Yehova na bomoi na biso. Yesu alobaki boye: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe].” (Mat. 6:33) Soki tosali bongo, tokozala na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe mpe yango ekopesa biso esengo.—1 Kol. 15:58.
Ntina oyo “bato ya motema mawa” bazali na esengo
14, 15. Ndenge nini tokoki komonisa motema mawa, mpe mpo na nini “bato ya motema mawa” bazali na esengo?
14 “Esengo na bato ya motema mawa, mpo bakomonisamela motema mawa.” (Mat. 5:7) Bato ya “motema mawa” bayokelaka basusu mawa. Yesu abikisaki bato ya mpasi na ndenge ya likamwisi mpo azalaki koyokela bango mawa. (Mat. 14:14) Motema mawa ezali mpe ezaleli oyo etindaka biso tólimbisa bato oyo basali biso mabe, ndenge kaka Yehova amonisaka mawa epai ya baoyo babongoli motema mpe alimbisaka bango. (Ex. 34:6, 7; Nz. 103:10) Tokoki komonisa motema mawa ya ndenge wana na maloba mpe na misala oyo ekoki kobɔndisa bato oyo bazali na mpasi. Lolenge eleki malamu ya komonisa motema mawa ezali ya koteya basusu Biblia. Yesu ayokelaki ebele ya bato mawa, mpe “abandaki koteya bango makambo mingi.”—Mko. 6:34.
15 Tosengeli mpenza kondima maloba ya Yesu oyo: “Esengo na bato ya motema mawa, mpo bakomonisamela motema mawa.” Soki tomoniselaka basusu motema mawa, bango mpe bakomonisela biso motema mawa. Ntango Nzambe akosambisa biso, akoki kopona kosambisa biso na boboto soki tozalaki komonisela basusu motema mawa. (Yak. 2:13) Kaka bato ya motema mawa nde bakolimbisama masumu na bango mpe bakozwa bomoi ya seko.—Mat. 6:15.
Ntina oyo “bato ya motema pɛto” bazali na esengo
16. Kozala na “motema pɛto” elimboli nini, mpe ndenge nini bato oyo bazali na ezaleli yango ‘bamonaka Nzambe’?
16 “Esengo na bato ya motema pɛto, mpo bakomona Nzambe.” (Mat. 5:8) Soki tozali “motema pɛto,” bamposa ná makanisi na biso ekozala mpe pɛto. Tokomonisa “bolingo oyo euti na motema moko ya pɛto.” (1 Tim. 1:5) Soki tozali motema pɛto, ‘tokomona Nzambe.’ Yango elimboli te ete tokomona Yehova na miso mpenza, mpo moto moko te akoki komona Nzambe mpe kotikala na bomoi. (Ex. 33:20) Nzokande, lokola Yesu amonisaki bizaleli ya Nzambe na ndenge ya kokoka, alobaki boye: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:7-9) Biso basaleli ya Yehova awa na mabelé, tokoki ‘komona Nzambe’ soki tozali kokanisa makambo oyo asalaka mpo na biso. (Yobo 42:5) Ntango moklisto mopakolami akufi mpe amati na likoló, amonaka Nzambe ndenge azali mpenza.—1 Yoa. 3:2.
17. Kozala motema pɛto ekotinda biso tózala na etamboli ya ndenge nini?
17 Lokola moto oyo azali motema pɛto azalaka pɛto na etamboli mpe na elimo, asalaka te makambo oyo ezali mbindo na miso ya Yehova. (1 Nta. 28:9; Yis. 52:11) Soki tozali motema pɛto, maloba mpe misala na biso ekozala pɛto, mpe tokosalela Yehova na bokosi te.
“Bato batyaka kimya” bakokóma bana ya Nzambe
18, 19. “Bato batyaka kimya” basalaka nini?
18 “Esengo na bato batyaka kimya, mpo bakobengama ‘bana ya Nzambe.’” (Mat. 5:9) “Bato batyaka kimya” bayebanaka na makambo oyo basalaka. Soki tozali lokola bato oyo Yesu alobelaki, tokozala bato oyo batyaka kimya mpe ‘baoyo bazongisaka mabe na mabe na moto mosusu te.’ Kasi, tokobanda ‘ntango nyonso kolanda oyo ezali malamu epai ya bato nyonso.’—1 Tes. 5:15.
19 Mpo na kotángama na kati ya bato oyo batyaka kimya, tosengeli kolukaka kimya. Bato oyo batyaka kimya basalaka ata likambo moko te oyo ekoki ‘kokabola baninga.’ (Mas. 16:28) Lokola tozali bato oyo batyaka kimya, tosengeli kozala bato ya liboso ya ‘kolanda kimya elongo na bato nyonso.’—Ebe. 12:14.
20. Banani bazali lelo “bana ya Nzambe,” mpe banani mosusu bakokóma bana ya Nzambe?
20 Bato oyo batyaka kimya bazali na esengo mpo “bakobengama ‘bana ya Nzambe.’” Yehova andimi baklisto bapakolami oyo bazali sembo lokola “bana” na ye. Lokola bana, baklisto yango bazali na boyokani makasi na Yehova mpo bazali na kondima epai ya Klisto mpe bazali kosambela “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya” na motema na bango mobimba. (2 Kol. 13:11; Yoa. 1:12) Tokoloba nini mpo na “bampate mosusu” ya Yesu, oyo bazali mpe bato oyo batyaka kimya? Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Yesu akozala “Tata [na bango] ya seko,” kasi na nsuka ya mbula nkóto, Yesu akomitya na nse ya Yehova mpe bampate mosusu bakokóma mpenza bana ya Nzambe.—Yoa. 10:16; Yis. 9:6; Lom. 8:21; 1 Kol. 15:27, 28.
21. Soki tozali na “bomoi na elimo,” tokobanda kosala nini?
21 Soki tozali “na bomoi na elimo,” bato bakomona polele ete tozali mpenza bato oyo batyaka kimya. Tokozala te bato oyo ‘babimisaka kowelana’ to ‘batumolaka baninga.’ (Gal. 5:22-26; Bible na lingala ya lelo oyo) Kasi, tosalaka nde makasi ya kozala na “kimya elongo na bato nyonso.”—Lom. 12:18.
Bazali na esengo atako bazali konyokwama!
22-24. (a) Mpo na nini bato oyo bazali konyokwama mpo na boyengebene bakoki kozala na esengo? (b) Makambo nini tokolobela na masolo mibale oyo elandi?
22 “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Mat. 5:10) Yesu alobelaki likambo ya libwa oyo epesaka esengo na maloba oyo: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.”—Mat. 5:11, 12.
23 Lokola basakoli ya Nzambe ya ntango ya kala, baklisto bayebaka ete bato bakolobela bango mabe, bakonyokola bango, mpe bakokosela bango makambo “mpo na boyengebene.” Nzokande, soki toyikeli makambo yango mpiko na bosembo, tokozala na esengo ya solosolo mpo tokopesa Yehova nkembo. (1 Pet. 2:19-21) Bampasi oyo tozali kokutana na yango ekoki te kokitisa esengo na biso ya kosalela Yehova sikoyo mpe na mikolo ezali koya. Ekoki mpe te kokitisa esengo ya baoyo bakoyangela elongo na Klisto na Bokonzi ya likoló to ya baoyo bakozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Mapamboli yango emonisi motema malamu ya Nzambe mpe bokabi na ye.
24 Ezali na mateya mosusu oyo tokoki kozwa na Lisolo Likoló ya Ngomba. Masolo mibale oyo elandi ekolobela yango. Tótala ndenge tokoki kosalela makambo yango oyo Yesu Klisto alobaki.
[Okopesa eyano nini?]
• Mpo na nini “baoyo bayebi bobola na bango ya elimo” bazali na esengo?
• Mpo na nini “bato ya elimo ya boboto” bazali na esengo?
• Mpo na nini baklisto bazali na esengo atako bazali konyokwama?
• Na makambo libwa oyo Yesu alobaki ete epesaka esengo, oyo wapi esimbi motema na yo?
[Elilingi na lokasa 7]
Makambo libwa oyo Yesu alobaki ete epesaka esengo ezali na ntina lelo oyo kaka ndenge ezalaki kala
[Elilingi na lokasa 8]
Lolenge eleki malamu ya komonisa motema mawa ezali ya koteya basusu Biblia