Tómekola motema molai ya Yehova
“Yehova azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye, . . . kasi azali nde na motema molai.”—2 PETELO 3:9.
1. Wapi likabo oyo eleki nyonso oyo Yehova apesi bato?
YEHOVA apesi biso eloko oyo moto moko te akoki kopesa. Ezali eloko moko ya kitoko mingi mpe ya motuya, oyo tokoki kutu kosomba to kozwa na makoki na biso te. Eloko yango ezali likabo ya bomoi ya seko, oyo mpo na mingi kati na biso elimboli bomoi ezangi nsuka na paladiso awa na mabelé. (Yoane 3:16) Ekozala mpenza esengo! Makambo oyo epesaka bato mawa: koswana, mobulu, bobola, kobomana, mpe ata liwa, ekozala lisusu te. Bato bakozala na kimya mpe bomoko ya solosolo na nse ya Bokonzi ya Nzambe. Tozali kozela paladiso yango motema likoló!—Yisaya 9:6, 7; Emoniseli 21:4, 5.
2. Mpo na nini Yehova abomi naino te mokili ya Satana?
2 Yehova mpe azali kozela na motema likoló ntango oyo akokómisa mabelé paladiso. Kutu, Yehova alingaka boyengebene mpe bosembo. (Nzembo 33:5) Asepelaka te komona ndenge bato bazali koboya kolanda mitinda na ye ya sembo, kotyola bokonzi na ye mpe konyokola basaleli na ye. Kasi, ezali na bantina oyo abomi naino te mokili mabe ya Satana. Bantina yango etaleli ntembe oyo ebimaki na ntina na bokonzi na ye. Mpo na kosilisa ntembe yango, Yehova amonisi ezaleli moko ya ntina mingi, oyo bato mingi lelo oyo bazali na yango te: motema molai.
3. (a) Na Biblia, maloba ya Grɛki mpe Liebele oyo babongoli na “motema molai” elimbolaka nini? (b) Mituna nini tókotalela sikoyo?
3 Na Libongoli ya Mokili ya Sika, ezali na liloba moko ya Grɛki oyo babongoli mbala misato na “motema molai.” Liloba yango elimboli mpenzampenza “elimo molai,” mpe babongolaka yango mbala mingi na “kokanga motema.” Ezala maloba ya Grɛki to ya Liebele oyo basalelaka mpo na “motema molai,” nyonso epesaka likanisi ya kolimbisa mpe kosilika noki te. Litomba nini tozali kozwa na motema molai ya Yehova? Mateya nini tokoki kozwa na motema molai mpe ezaleli ya kolimbisa ya Yehova mpe basaleli na ye ya sembo? Ndenge nini toyebi ete motema molai ya Yehova ezali na nsuka te? Tiká tótalela likambo yango.
Tótalela motema molai ya Yehova
4. Ntoma Petelo alobaki nini na ntina na motema molai ya Yehova?
4 Ntoma Petelo akomaki mpo na motema molai ya Yehova boye: “Tiká ete likambo oyo ekima bino te, balingami, ete epai ya Yehova mokolo moko ezali lokola mbula nkóto moko mpe mbula nkóto moko lokola mokolo moko. Yehova azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde na motema molai epai na bino mpo alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:8, 9) Tótalela naino makambo mibale oyo ekoki kosalisa biso tóyeba malamumalamu motema molai ya Yehova.
5. Lolenge oyo Yehova atalelaka ntango ezali na bopusi nini na makambo oyo asalaka?
5 Likambo ya liboso ezali ete Yehova atalelaka ntango te ndenge biso totalelaka yango. Mpo na Ye oyo azali na bomoi libela na libela, mbula nkóto ezali lokola mokolo moko. Azangaka te ntango ya kosala likambo oyo alingi, kasi aumisaka makambo te. Lokola Yehova azali na bwanya oyo ezangi nsuka, ayebi malamumalamu ntango oyo ebongi mpo na kosala likambo oyo ekozala na litomba mpo na bato nyonso, mpe azelaka ntango yango na motema molai. Yango wana, tosengeli te koloba ete Yehova akipaka te bampasi oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango. Azali Nzambe ya “mawa monene,” mpe azali bolingo. (Luka 1:78; 1 Yoane 4:8) Atako atiki tónyokwama mpo na mwa ntango, azali na likoki ya kosilisa mpo na libela mpasi nyonso oyo yango ekoki kobimisela biso.—Nzembo 37:10.
6. Nini tosengeli te koloba mpo na Nzambe, mpe mpo na nini?
6 Ya solo, ezalaka pɛtɛɛ te kozela eloko oyo olingaka mingi. (Masese 13:12) Ntango bato bazali kokokisa te nokinoki bilaka na bango, basusu bakoki koloba ete bazali na mposa ya kosala yango te. Kokanisa bongo mpo na Nzambe ezali mpenza kozanga bwanya! Soki tozali kotalela motema molai ya Nzambe lokola nde azali koumela mpo na kokokisa mokano na ye, ntango bambula ezali koleka, tokoki kokóma na ntembe na mitema mpe kolɛmba nzoto, mpe tokoki kolɛmba na elimo. Oyo kutu eleki mabe, bato oyo Petelo abengaki basɛki to baoyo bazangi kondima, bakoki kopɛngwisa biso. Basɛki yango balobaka boye: “Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na kati ya liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.”—2 Petelo 3:4.
7. Ndenge nini motema molai ya Yehova eyokani na mposa oyo azali na yango ete bato bábongwana?
7 Likambo ya mibale oyo tokoki kosimba na maloba ya Petelo ezali ete Yehova azali na motema molai mpo alingi ete bato nyonso bábongola motema. Yehova akoboma baoyo bazali koboya na motó makasi kotika banzela na bango ya mabe. Kasi, Yehova asepelaka te na liwa ya moto mabe. Asepelaka nde komona bato babongwani, batiki banzela na bango ya mabe, mpe batikali na bomoi. (Ezekiele 33:11) Yango wana, azali kokoba komonisa motema molai mpe kotinda basaleli na ye básakola nsango malamu na mabelé mobimba mpo bato nyonso bázwa libaku ya kobika.
8. Ndenge nini motema molai ya Nzambe emonani na makambo oyo asalaki na ekólo Yisalaele?
8 Motema molai ya Nzambe emonani mpe na makambo oyo asalaki na Yisalaele ya kala. Na boumeli ya bikeke mingi, azalaki kolimbisa bango mpo na kozanga botosi na bango. Na nzela ya basakoli na ye, alobaki na bango mbala na mbala boye: “Bongwaná longwa na nzela na bino mabe mpe batelá malako na ngai mpe mibeko na ngai lokola Mobeko mobimba molakisaki ngai batata na bino mpe oyo ngai natindelaki bino na basakoli baombo na ngai.” Bango basalaki nini? Likambo ya mawa, Bayisalaele “bayokaki te.”—2 Mikonzi 17:13, 14.
9. Ndenge nini Yesu amonisaki motema molai ya Tata na ye?
9 Nsukansuka, Yehova atindaki Mwana na ye, oyo asalaki nyonso oyo akoki mpo Bayuda bázongela Nzambe. Yesu amonisaki mpenza motema molai ya Tata na ye. Lokola ayebaki ete mosika te akobomama, Yesu amilelaki boye: “Yelusaleme, Yelusaleme, yo mobomi ya basakoli mpe mobambi-mabanga na baoyo batindamaki epai na yo,—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi ayanganisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye! Kasi bino bolingaki yango te.” (Matai 23:37) Maloba makasi wana ezali te ya zuzi moko ya motema mabe oyo alingi kaka kopesa bato etumbu, kasi ezali nde maloba ya moto ya bolingo, oyo azali na motema molai epai ya baninga na ye. Na ndakisa ya Tata na ye ya likoló, Yesu alingaki bato bábongola motema mpe bákima etumbu. Basusu bayokelaki Yesu mpe babikaki na etumbu monene oyo eyaki na Yelusaleme na 70 T.B.—Luka 21:20-22.
10. Motema molai ya Nzambe ememeli biso matomba nini?
10 Omoni te ete motema molai ya Nzambe ezali likambo ya kitoko mpenza? Atako bato bamonisi mpenza motó mangbongi, Yehova apesi mokomoko na biso mpe bamilio ya bato mosusu libaku ya koyeba ye mpe ya kokóma na elikya ya kobika. Petelo akomelaki baninga na ye baklisto ete: “Bótalela motema molai ya Nkolo na biso lokola lobiko.” (2 Petelo 3:15) Tozali na botɔndi te ete motema molai ya Yehova efungweli biso nzela ya kozwa lobiko? Tobondelaka te ete Yehova akoba kozala na motema molai epai na biso wana tozali kosalela ye mokolo na mokolo?—Matai 6:12.
11. Koyeba ntina ya motema molai ya Yehova ekotinda biso tósala nini?
11 Soki toyebi ntina oyo Yehova azali na motema molai, yango ekosalisa biso tózela na motema molai lobiko oyo akomema, mpe tokoloba soki moke te ete azali koumela mpo na kokokisa bilaka na ye. (Bileli 3:26) Wana tozali kokoba kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya, tondimaka mpenza ete Nzambe ayebi ntango oyo ebongi mpo na koyanola na libondeli yango. Lisusu, yango ezali kotinda biso tómekola Yehova na komonisela bandeko na biso mpe bato oyo tosakwelaka nsango malamu motema molai. Biso mpe tosepelaka te bato bákufa, kasi tolingi nde bábongola motema mpe bákóma na elikya ya bomoi ya seko lokola biso.—1 Timote 2:3, 4.
Tótalela motema molai ya basakoli
12, 13. Na kotalela Yakobo 5:10, ndenge nini mosakoli Yisaya amonisaki motema molai?
12 Soki totaleli motema molai ya Yehova, yango ekosalisa biso tósepela na ezaleli yango mpe tólona yango. Kolona ezaleli ya motema molai ezali pɛtɛɛ te mpo na bato ya kozanga kokoka, kasi bakoki kosala yango. Tozali na ndakisa ya basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bandeko, bókamata lokola ndakisa ya kokanga motema na kati ya mpasi mpe ya komonisa motema molai basakoli, oyo balobaki na nkombo ya Yehova.” (Yakobo 5:10) Koyeba ete bato mosusu balongaki makambo oyo biso tozali kokutana na yango ekobɔndisa mpe ekolendisa biso.
13 Na ndakisa, esengelaki mpenza mosakoli Yisaya azala na motema molai. Yehova amonisaki yango ntango alobaki na Yisaya ete: “Kendá mpe lobá na bato oyo ete, Bóyoka koyoka, nde yebá ntina te; bómɔna komona, nde sosolá te. Zalisá motema na bato oyo na mafuta mpe matoi na bango na bozito, zipá mpe miso na bango; ete bátala na miso na bango te, báyoka mpe na matoi na bango te, ete básosola na mitema na bango te ete bábongwana te mpe bábikisama te.” (Yisaya 6:9, 10) Atako bato bazalaki koyokela ye te, Yisaya akobaki na motema molai kosakwela bango makebisi ya Yehova na boumeli ya mbula 46. Motema molai ekosalisa biso mpe tókoba kosakola nsango malamu, atako bato mingi bazali kondima te.
14, 15. Nini esalisaki Yilimia alonga minyoko mpe kolɛmba nzoto?
14 Ntango basakoli bazalaki kokokisa mosala na bango ya kosakola, bato baboyaki kaka te koyokela bango, kasi banyokolaki mpe bango. Batyaki Yilimia na bikangelo, “bakɔtisaki ye na bolɔkɔ,” mpe babwakaki ye na libulu. (Yilimia 20:2; 37:15, NW; 38:6) Yilimia anyokwamaki na mabɔkɔ ya bato oyo alingaki kosalisa. Atako bongo, Yilimia asilikelaki bato yango te mpe azongiselaki bango mabe te. Ayikaki mpiko na boumeli ya bambula mingi.
15 Yilimia atikaki kosakola te mpo banyokolaki mpe basɛkaki ye; biso mpe tozali kotika te kosakola mpo bato bazali konyokola mpe kosɛka biso. Ya solo, na bantango mosusu, tokoki kolɛmba nzoto. Yilimia mpe alɛmbaki nzoto. Akomaki boye: “Liloba ya [Yehova] ezalisameli ngai eloko ya nsɔni mpe ya kotyolama mokolo na mokolo. Bongo nalobi ete, Nakoloba nkombo na ye te, nakoloba mpo na nkombo na ye lisusu te.” Nini esalemaki na nsima? Yilimia atikaki kosakola? Alobaki lisusu boye: “Kasi [liloba ya Nzambe] ezalaki na motema na ngai lokola mɔtɔ na kozikisa mobombami kati na mikuwa na ngai; nalɛmbaki mpo na koboya, nayebaki koyikela yango mpiko te.” (Yilimia 20:8, 9) Tósimba ete ntango atyaki kosɛka na bango na makanisi na ye, abungisaki esengo na ye. Ntango atalelaki kitoko mpe ntina ya nsango oyo azalaki kosakola, esengo na ye ezongaki. Lisusu, Yehova azalaki na Yilimia “lokola elombe ya nsɔmɔ” mpe azalaki kopesa ye makasi ya kosakola liloba ya Nzambe na mpiko mpe molende.—Yilimia 20:11.
16. Ndenge nini tokoki kobatela esengo na mosala na biso ya kosakola nsango malamu?
16 Mosakoli Yilimia azwaki esengo na mosala na ye? Ezali mpenza bongo! Alobaki na Yehova boye: “Maloba na yo mazwani mpe nalei yango, mpe liloba na yo ezali epai na ngai esengo mpe kosepela na motema na ngai; zambi nabyangami na nkombo na yo, ɛ [Yehova].” (Yilimia 15:16) Yilimia asepelaki na libaku oyo azwaki ya kozala momonisi ya Nzambe ya solo mpe kosakola liloba na ye. Biso mpe tokoki kosepela. Lisusu, lokola baanzelu ya likoló, biso mpe tozali kosepela ete na mokili mobimba bato mingi bazali kondima nsango ya Bokonzi, kobongola mitema mpe kokɔta na nzela ya bomoi ya seko.—Luka 15:10.
“Koyika mpiko ya Yobo”
17, 18. Na ndenge nini Yobo ayikaki mpiko, mpe makambo esukaki ndenge nini?
17 Nsima ya kolobela basakoli ya ntango ya kala, moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bosili koyoka nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bosili komona nsuka oyo Yehova abongisaki, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Maloba ya Grɛki oyo babongoli awa na “koyika mpiko” ezali na ndimbola ndenge moko na oyo Yakobo asaleli na vɛrsɛ ya 10 mpo na “motema molai.” Mpo na komonisa bokeseni oyo ezali kati na maloba oyo mibale, moto moko ya mayele akomaki ete: “Tomonisaka motema molai ntango bato bazali konyokola biso, kasi toyikaka mpiko ntango tozali kokanga motema na makambo oyo ezali kopesa biso mpasi.”
18 Yobo akutanaki na makambo ya mpasi mingi. Abungisaki mbongo, bana na ye bakufaki, mpe abɛlaki maladi moko ya mabe. Babukelaki ye mpe lokuta ete Yehova nde apesaki ye etumbu. Yobo amɛlaki mawa na ye na motema te; amilelaki mpe alobaki kutu ete azali sembo koleka Nzambe. (Yobo 35:2) Nzokande, abungisaki kondima na ye te, atikalaki kaka sembo. Afingaki Nzambe te ndenge Satana alobaki. (Yobo 1:11, 21) Esukaki ndenge nini? “[Yehova] apambolaki mikolo ya nsuka ya Yobo koleka yango ya ebandeli na ye.” (Yobo 42:12) Yehova asilisaki maladi ya Yobo, azongiselaki ye biloko oyo abungisaki mbala mibale, mpe apesaki ye bomoi ya esengo ná libota na ye. Koyika mpiko ya Yobo esalisaki ye mpe ayeba Yehova malamu koleka.
19. Liteya nini tozwi na koyika mpiko ya Yobo?
19 Liteya nini tozwi na koyika mpiko ya Yobo? Lokola Yobo, biso mpe tokoki kobɛla maladi moko to kotungisama na makambo mosusu. Tokoki mbala mosusu koyeba te ntina oyo Yehova apesi nzela tótungisama na mokakatano moko boye. Kasi, toyebi malamu ete: Soki totikali sembo, tokopambolama. Yehova azangaka te kopambola baoyo bazali koluka ye makasi. (Baebele 11:6) Yesu alobaki boye: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”—Matai 10:22; 24:13.
“Mokolo ya Yehova ekoya”
20. Mpo na nini tokoki mpenza kondima ete mokolo ya Yehova ekoya?
20 Atako Yehova azali na motema molai, azali mpe sembo mpe akotika mabe seko na seko te. Motema molai na ye ezali na ndelo. Petelo akomaki boye: “[Nzambe] amipekisaki te kopesa mokili moko ya kala etumbu.” Atako Noa ná libota na ye babikaki, mpela ezindisaki mokili wana ya mabe. Yehova apesaki mpe Sodomo ná Gomola etumbu, abebisaki bamboka yango nyɛɛ. Bitumbu wana epesaki “bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya.” Mpo na yango, tokoki mpenza kondima ete: “Mokolo ya Yehova ekoya.”—2 Petelo 2:5, 6; 3:10.
21. Ndenge nini tokoki komonisa motema molai mpe mpiko, mpe tokolobela likambo nini na lisolo oyo elandi?
21 Tiká ete tómekola motema molai ya Yehova mpe tósalisa basusu bábongola motema mpo bábika. Tiká mpe ete tómekola basakoli ya ntango ya kala mpe tósakola nsango malamu na motema molai, atako bato oyo tozali kosakwela bazali koyokela biso te. Lisusu, tokoki mpenza kondima ete Yehova akopambola biso soki toyiki mpiko na minyoko mpe totikali sembo lokola Yobo. Tosepelaka mpenza na mosala na biso ya kosakola ntango tomonaka ndenge Yehova azali kopambola milende oyo basaleli na ye bazali kosala mpo na kosakola nsango malamu na mabelé mobimba. Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini Yehova amonisaka motema molai?
• Liteya nini tozwi na motema molai oyo basakoli ya ntango ya kala bamonisaki?
• Ndenge nini Yobo amonisaki koyika mpiko, mpe makambo esukaki ndenge nini?
• Ndenge nini toyebi ete motema molai ya Yehova ezali na ndelo?
[Elilingi na lokasa 18]
Yesu amonisaki mpenza motema molai ya Tata na ye
[Bililingi na lokasa 20]
Ndenge nini Yehova apambolaki motema molai ya Yilimia?
[Bililingi na lokasa 21]
Ndenge nini Yehova apambolaki koyika mpiko ya Yobo?