“Makambo yango esengeli koya”
“Yesu azongiseli bango: . . . Makambo yango esengeli koya, kasi wana ezali naino nsuka ya mokili te.”—MATAI 24:4-6, Boyokani ya sika.
1. Likambo nini esengeli kobenda likebi na biso?
NA NTEMBE te olukaka koyeba ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya. Soki ezali boye, tobanzi ete okosepela na likambo moko oyo ebendaki likebi ya Charles Russell na mobu 1877. Russell, moto oyo na nsima asalaki Société Watch Tower, akomaki mwa buku moko na motó ya likambo ete Ntina mpe lolenge oyo Nkolo na biso akozonga (na Lingelesi). Mwa buku yango ya nkasa 64 elobelaki kozonga to koya ya Yesu na mikolo ezalaki liboso. (Yoane 14:3) Mokolo moko, na Ngomba ya Olive, bantoma batunaki Yesu motuna oyo etalelaki bozongi yango; balobaki boye: “Yebisá biso, nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na komonana na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?”—Matai 24:3.
2. Mpo na nini makanisi ezali ndenge na ndenge na ntina na makambo oyo Yesu asakolaki?
2 Oyebi eyano ya Yesu mpe ososolaka yango? Eyano yango ezali na Baevanzile misato. Profesere Carson alobi ete: “Biblia ezali na mikapo mingi te oyo balimboli bazali kopesa makanisi ndenge na ndenge lokola Matai 24 na masolo oyo ekokani na yango na Malako 13 mpe Luka 21.” Na nsima, apesi mpe likanisi na ye, yango mpe ezali kaka likanisi euti na moto. Na ekeke eleki to mwa moke liboso, makanisi mingi ya ndenge yango ezalaki komonisa kozanga kondima. Baoyo bazalaki kobimisa makanisi yango bazalaki koloba ete makambo oyo totángaka na Baevanzile ezali maloba ya Yesu te, maloba na ye mpenza ebongolamaki na nsima, to mpe bisakweli na ye ekokisamaki te. Banganga-mayele oyo balukaka komonisa ete Biblia ezali na mabunga balendisaki lisusu malamumalamu makanisi yango. Kutu, molimboli moko akokanisaki Evanzile ya Malako ‘na mateya ya filozofi ya Mahâyâna ya Lingomba ya Bouddha’!
3. Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka esakweli ya Yesu?
3 Kasi, Batatoli ya Yehova bandimaka ete Biblia, bakisa mpe makambo oyo Yesu ayebisaki bantoma minei oyo bazalaki na ye na Ngomba ya Olive, mikolo misato liboso akufa, ezali mpenza makambo ya solo mpe tokoki kotyela yango motema. Banda na mikolo ya Charles Russell, mokemoke basaleli ya Nzambe bazali kososola malamu esakweli ya Yesu. Na bambula euti koleka, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esembolaki lisusu malamumalamu ndenge oyo basengeli kokanga ntina ya esakweli yango. Osimbaki malamu bandimbola yango mpe omonaki bopusi na yango na bomoi na yo?a Tiká tózongela yango lisusu.
Kokokisama ya nsɔmɔ nsima ya mwa bambula
4. Wapi ntina oyo esalaki ete bayekoli bátuna Yesu motuna etali mikolo ezali koya?
4 Bantoma bayebaki ete Yesu azalaki Masiya. Yango wana ntango azalaki kolobela liwa, lisekwa, mpe kozonga na ye, mbala mosusu bamitunaki ete, ‘Soki Yesu akufi mpe akei, ndenge nini akokokisa makambo malamu oyo Masiya asengeli kosala?’ Yesu alobaki mpe ete Yelusaleme na tempelo na yango ekobomama. Ekoki kozala ete bantoma bamitunaki, ‘Ekosalema ndenge nini mpe ntango nini?’ Lokola balukaki koyeba makambo yango, bantoma batunaki: “Makambo oyo makozala ntango nini mpe elembo nini wana oyo nyonso malingi kokoka?”—Malako 13:4; Matai 16:21, 27, 28; 23:37–24:2.
5. Ndenge nini maloba ya Yesu ekokisamaki na ekeke ya liboso?
5 Yesu ayebisaki ete bitumba, nzala, maladi, koningana ya mabelé ekozala, baklisto bakoyinama mpe bakonyokolama, bamasiya ya lokuta bakobima, mpe nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama bipai nyonso. Bongo nde nsuka ekoya. (Matai 24:4-14; Malako 13:5-13; Luka 21:8-19) Yesu alobaki makambo yango na ebandeli ya mobu 33 T.B. Na boumeli ya bambula oyo elandaki, bayekoli na ye oyo bazalaki kokɛngɛla bamonaki ete makambo oyo asakolaki ezalaki mpenza kokokisama polele. Ɛɛ, masolo ya ntango ya kala ezali kondimisa ete elembo yango ekokisamaki na ntango wana mpe na nsuka, ebongiseli ya biloko ya Bayuda ebomamaki na mibu 66-70 T.B. Esalemaki ndenge nini?
6. Nini elekaki kati na Baloma mpe Bayuda na mobu 66 T.B.?
6 Na mobu 66 T.B., na eleko ya molunge oyo ezalaki makasi mpenza na mokili ya Yudea, Bayuda oyo babéngami Bazelote babundisaki basoda ya Loma na esika moko oyo ezali na bifelo ya makasi pene na tempelo ya Yelusaleme, mpe babimisaki mobulu na bisika mosusu na ekólo mobimba. Na buku na ye (History of the Jews), Profesere Heinrich Graetz alobi ete: “Lokola Cestius Gallus azalaki guvernere ya etúká ya Sulia, azalaki na mokumba ya kobatela lokumu ya basoda ya Loma, . . . akokaki lisusu kokanga mabɔkɔ te mpe kotika botomboki oyo ezalaki koya makasi pembeni na ye kozanga ete asala eloko moko mpo na kopekisa yango. Ayanganisaki basoda na ye, mpe bayangeli ya bitúká ya pembenipembeni batindaki basoda na bango.” Basoda 30 000 bazingaki Yelusaleme. Nsima ya kobunda mwa moke, Bayuda bamibombaki nsima ya bifelo oyo ezali pembeni ya tempelo. “Mikolo mitano mobimba, Baloma balukaki kokweisa bifelo yango, kasi mbala nyonso bazalaki kozonga nsima mpamba te bato ya Yudea bazalaki kotindela bango makonga. Kaka na mokolo ya motoba nde balongaki kokweisa ndambo ya efelo ya nɔrdi oyo etalani na Tempelo.”
7. Mpo na nini bayekoli ya Yesu bamonaki makambo lokola Bayuda mosusu te?
7 Kanisá naino mobulungano oyo ekɔtelaki Bayuda, mpamba te banda kala bazalaki kokanisa ete Nzambe akobatela bango na mboka mosantu na bango! Kasi, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete likama yango ekokwela Yelusaleme. Alobaki ete: “Mikolo mizali koya na yo bayini na yo bakosala lopango monene na mabelé, mpe bakozinga yo kokangisa yo na bipai nyonso, mpe bakobwaka yo na nse na bana na yo na kati na yo, mpe bakotika libanga moko na likoló na libanga mosusu kati na yo te.” (Luka 19:43, 44) Kasi, baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme bakokaki mpe kokufa na likama oyo eyaki na mobu 66 T.B.?
8. Yesu asakolaki likama nini, mpe banani oyo bazalaki “baponami” mpo na bango motuya ya mikolo esengelaki kokitisama?
8 Ntango azalaki kopesa eyano na motuna ya bantoma na Ngomba ya Olive, Yesu asakolaki ete: “Na mikolo yango bolɔzi ekozala, bolɔzi na lolenge lobimi naino te longwa na ebandeli na Kozalisa ezalisaki Nzambe kino lelo; [bolɔzi ya ndenge yango ekomonana lisusu te, NW]. Soko Nzambe akitisi motuya ya mikolo yango te, moto moko akokoka kobika te, nde mpo na Baponami akitisi motuya na mikolo yango.” (Malako 13:19, 20; Matai 24:21, 22) Tomoni ete mikolo yango esengelaki koumela te mpo “baponami” bábika. Kasi baponami yango ezalaki banani? Tobanzi te ete ezalaki Bayuda oyo batombokaki, baoyo bazalaki koloba ete basambelaka Yehova kasi baboyaki Mwana na ye. (Yoane 19:1-7; Misala 2:22, 23, 36) Na eleko wana, baponami ya solosolo ezalaki Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu oyo bandimaki Yesu lokola Masiya mpe Mobikisi. Nzambe aponaki bato yango, mpe na Pantekote ya mobu 33 T.B., asangisaki bango lokola ekólo ya sika ya elimo ebéngami “Yisalaele ya Nzambe.”—Bagalatia 6:16; Luka 18:7; Misala 10:34-45; 1 Petelo 2:9.
9, 10. Ndenge nini mikolo oyo basoda ya Loma babundisaki Yelusaleme ‘mikitisamaki,’ mpe epesaki litomba nini?
9 ‘Bakitisaki motuya’ ya mikolo mpe bapakolami oyo bazalaki na Yelusaleme babikaki? Profesere Graetz alobi: “[Cestius Gallus] amonaki ete ezali malamu te na eleko wana akoba kobunda na bilombe oyo bakómaki na loyenge mpe abanda etumba oyo ekoumela, lokola otɔmne, eleko oyo bambula ebɛtaka mingi, etikalaki moke ebanda . . . mpe yango elingaki kopesa kwɔkɔsɔ mpo na kotindela basoda na ye bilei. Ekoki kozala ete yango wana amonaki malamu bázonga nsima.” Ata soki Cestius Gallus azwaki makanisi nini, toyebi ete basoda ya Loma balongwaki na engumba wana, mpe Bayuda balandaki bango na nsima mpe babomaki basoda mingi.
10 Ndenge oyo Baloma bazongaki na mbalakaka epesaki nzela na “mosuni,” elingi koloba bayekoli ya Yesu oyo bazalaki na likama na kati ya Yelusaleme ete bábika. Mikanda ya istware eyebisi ete ntango libaku yango emonanaki, baklisto bakimaki. Likambo yango ezalaki mpenza elembo oyo emonisi ete Nzambe akoki koyeba makambo oyo ekoya mpe akoki kobikisa basambeli na ye! Kasi, nini ekómelaki Bayuda oyo batikalaki na Yelusaleme mpe na Yudea mpo ete bazangaki kondima?
Bato ya ntango wana basengelaki komona makambo yango
11. Yesu alobaki nini mpo na “libota oyo”?
11 Bayuda mingi bakanisaki ete losambo na bango, oyo bazalaki kosala yango na tempelo, esengelaki koumela libela. Kasi, Yesu alobaki ete: “Boyoka liteya uta na nzete na mosuke. Wana etape na yango ekolɛmba mpe ekobimisa nkasa na yango, boyebi ete ntango na moi makasi [ekómi pene]. Bino mpe bongo, wana ekomona bino makambo oyo nyonso, bokoyeba ete azali penepene, ata na [bikɔtelo]. Nazali koloba na bino solo ete libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso. Likoló ekolongwa mpe nse lokola nde maloba na ngai ikolongwa te.”—Matai 24:32-35.
12, 13. Ndenge nini bayekoli bakangaki ntina ya “libota oyo” ndenge Yesu alobelaki yango?
12 Liboso ya mobu 66 T.B., baklisto bamonaki makambo mingi oyo elakisaki ete elembo ezali kokokisama: bitumba, nzala, mosala monene ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Misala 11:28; Bakolose 1:23) Kasi, nsuka esengelaki koya ntango nini? Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki ete: ‘Libota oyo [na greke généa, na Lifalanse génération] ekoleka te’? Mbala mingi Yesu azalaki kobénga Bayuda ya eleko na ye oyo bazalaki kotɛmɛla ye, bakisa mpe bakonzi ya mangomba ete, ‘libota mabe mpe ya ekobo.’ (Matai 11:16; 12:39, 45; 16:4; 17:17; 23:36, NW) Yango wana, ntango alobaki “libota oyo,” na Ngomba ya Olive, tobanzi te ete azalaki kolobela libota mobimba ya Bayuda banda na bato ya kalakala; alingaki mpe kolobela bayekoli na ye te, atako bazalaki “libota eponami.” (1 Petelo 2:9) “Libota oyo” oyo Yesu alobelaki ezali mpe eleko te.
13 Kasi, Yesu azalaki nde kokanisa Bayuda oyo bazalaki kotɛmɛla ye mpe oyo basengelaki komona kokokisama ya elembo oyo apesaki. Profesere Joel Green alobi boye mpo na maloba “libota oyo” ndenge esalelami na Luka 21:32: “Na Evanzile ya Misato, ‘libota oyo’ (na maloba ya zingazinga) elimbolaki ntango nyonso bato oyo batɛmɛlaka mokano ya Nzambe. . . . [Ezali kolobela] bato oyo bazali komonisa motó makasi mpenza mpe bazali kopesa mokano ya Nzambe mokɔngɔ.”b
14. “Libota” wana emonaki makambo nini, kasi ndenge nini makambo ekesenaki mpo na baklisto?
14 Libota ya Bayuda oyo batɛmɛlaki Yesu oyo bakokaki komona ndenge oyo elembo ezalaki kokokisama basengelaki komona ndenge oyo ebongiseli ya Bayuda esengelaki kokufa. (Matai 24:6, 13, 14) Esalemaki mpe bongo! Na mobu 70 T.B., basoda ya Loma bazongaki lisusu; na mbala oyo, batambwisamaki na Titus, mwana ya Amperere Vespasien. Bayuda oyo bakangamaki na kati ya mboka yango bamonaki nsuka na bwale.c Flavius Josèphe oyo amonaki makambo yango akomaki ete na ntango Baloma babebisaki mboka, Bayuda soki 1 100 000 bakufaki mpe Bayuda mosusu soki 100 000 bamemamaki na boombo, mpe nsima ya mwa mikolo, mingi bakufaki liwa ya nsɔmɔ mpo na nzala to na mabándá ya masano ya mboka Loma. Ya solo, bolɔzi ya mobu 66-70 T.B. ezalaki bolɔzi oyo eleki malɔzi nyonso oyo ekómelaki Yelusaleme na ebongiseli mobimba ya Bayuda. Makambo ezalaki mpenza ndenge mosusu mpo na baklisto oyo bayokaki likebisi Yesu apesaki lokola esakweli mpe balongwaki na Yelusaleme ntango basoda ya Loma bakendaki na mobu 66 T.B.! Baklisto “baponami” ‘babikaki’ na mobu 70 T.B.—Matai 24:16, 22.
Kokokisama mosusu ekolanda
15. Nini ezali kondimisa biso ete esakweli ya Yesu esengelaki ekokisama na ndenge oyo eleki monene nsima ya mobu 70 T.B.?
15 Kasi, makambo esukaki wana te. Liboso, Yesu amonisaki ete nsima ya kobomama ya engumba, akoya na nkombo ya Yehova. (Matai 23:38, 39; 24:2) Alimbolaki yango polele na esakweli na ye na Ngomba ya Olive. Nsima ya koyebisa ete “bolɔzi monene” ekoya, alobaki ete bato mingi bakobima na nsima oyo bakoloba ete, ngai Klisto, mpe bikólo ya bapaya ekonyata Yelusaleme bambula ebele. (Matai 24:21, 23-28; Luka 21:24) Kokokisama mosusu, oyo eleki monene, esengelaki kolanda? Makambo emonisi ete ezali bongo. Soki tokokanisi Emoniseli 6:2-8 (oyo ekomamaki nsima ya bolɔzi oyo ekwelaki Yelusaleme na mobu 70 T.B.) na Matai 24:6-8 mpe Luka 21:10, 11, tokomona ete bitumba, nzala, mpe maladi oyo eleki makasi ezalaki liboso. Maloba ya Yesu ebandaki kokokisama na ndenge oyo eleki monene na Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba oyo ebandaki na 1914.
16-18. Eloko nini tozali kozela esalema?
16 Eleki sikoyo bambula ebele, Batatoli ya Yehova bateyaka ete elembo oyo ezali kokokisama na mikolo na biso emonisi ete “bolɔzi monene” ezali liboso na biso. “Libota” mabe ya bato ya mikolo na biso bakomona bolɔzi wana. Tomoni mpe lokola ete bolɔzi yango ekozala naino na eteni ya liboso (mangomba ya lokuta ekobundisama), se lokola etumba oyo Gallus abundaki na mobu 66 T.B. ezalaki ebandeli ya bolɔzi ya Yelusaleme.d Nde, nsima ya mwa ntango oyo toyebi bolai na yango te, nsuka ekoya; mokili mobimba ekobebisama nyɛɛ, lokola kobebisama oyo esalemaki na mobu 70 T.B.
17 Mpo na bolɔzi oyo ezali liboso na biso, Yesu alobaki boye: “Nokinoki nsima na mpasi na mikolo yango [kobomama ya mangomba ya lokuta], moi ekoyinda mpe sanza ekopesa pole na yango te mpe [minzoto, NW] ikokwea longwa na likoló, mpe nguya na lola ikotetema. Bongo elembo na Mwana na moto ekomonana na Likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela mpe bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na Likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo.”—Matai 24:29, 30.
18 Na bongo, tomoni ete Yesu ye moko alobi ete “nsima ya bolɔzi ya mikolo yango,” makambo ya kokamwa ekobima na likoló. (Talá Yoele 2:28-32; 3:15.) Makambo yango ekobangisa bato oyo bazangi botosi mpe ekotya bango mitema likoló na boye ete “bakolela.” Bato mingi ‘bakosenzwa na nsɔmɔ na kotalela makambo ekobima na mokili.’ Kasi ekozala bongo te mpo na baklisto ya solo! Bango ‘bakotombola mitó na bango, mpo ete lobiko na bango ekómi pene.’—Luka 21:25, 26, 28.
Kosambisama ezali liboso!
19. Ndenge nini tokoki koyeba ntango oyo lisese ya bampate na bantaba ekokokisama?
19 Tósimba ete Matai 24:29-31 esakoli ete (1) Mwana na moto akoya, (2) koya na ye ekozala na nkembo monene, (3) akoya elongo na baanzelu, mpe (4) bikólo nyonso ya nse bakomona ye. Yesu azongeli makambo yango na lisese ya bampate na bantaba. (Matai 25:31-46) Na yango, tokoki koloba ete lisese yango etaleli eleko oyo Yesu akoya elongo na baanzelu na ye mpe akofanda na kiti ya bokonzi na ye mpo na kosambisa, nsima wana bolɔzi monene ekobanda. (Yoane 5:22; Misala 17:31; talá 1 Mikonzi 7:7; Danyele 7:10, 13, 14, 22, 26; Matai 19:28.) Nani akosambisama, mpe ekosuka ndenge nini? Lisese emonisi ete Yesu akotya miso na ye na bikólo nyonso, lokola nde bayanganisi yango liboso ya kiti na ye ya bokonzi oyo ekozala na likoló.
20, 21. (a) Likambo nini ekokómela bampate ya lisese ya Yesu? (b) Likambo nini ekokómela bantaba na mikolo ezali koya?
20 Mibali na basi oyo bazali lokola bampate bakotyama na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu, yango ekolakisa ete bandimami. Mpo na nini? Mpamba te basalelaki bandeko ya Yesu malamu, elingi koloba baklisto bapakolami, oyo bakozala elongo na Klisto na Bokonzi ya likoló. (Danyele 7:27; Baebele 2:9–3:1) Na kolanda lisese yango, baklisto mingi oyo bazali lokola bampate bayebi bandeko ya Yesu mpe bazali kosala mosala ya kosunga bango. Yango wana, “ebele monene” yango bazali na elikya euti na Biblia, elikya ya kobika na “bolɔzi monene” mpe kozwa bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.—Emoniseli 7:9, 14; 21:3, 4; Yoane 10:16.
21 Makambo ekozala mpenza ndenge mosusu mpo na bantaba! Matai 24:30 emonisi ete bango ‘bakolela’ ntango Yesu akoya. Esengeli mpenza bálela, mpamba te bango baboyaki nsango malamu ya Bokonzi, batɛmɛlaki bayekoli ya Yesu, mpe balingaki mokili oyo ezali koleka. (Matai 10:16-18; 1 Yoane 2:15-17) Ezali Yesu, kasi ata moko na bayekoli na ye te oyo bazali awa na mabelé, nde akokata nani azali ntaba. Alobi mpo na bango ete: “Bango bakolongwa kino etumbu na seko.”—Matai 25:46.
22. Eteni nini ya esakweli ya Yesu tosengeli kotalela lisusu malamumalamu?
22 Ndenge oyo mayele na biso ezali kobakisama mokemoke mpo na kososola esakweli ya Matai mikapo 24 mpe 25 ezali likambo ya esengo mpenza. Kasi, na esakweli ya Yesu ezali na likambo mosusu oyo tosengeli lisusu kotalela malamumalamu: ‘Mbindo-na-Libebisi ezali kotɛlɛma na esika ya bulɛɛ.’ Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete báyeba ntina ya likambo yango mpe bákanga mabɔkɔ te. (Matai 24:15, 16) “Mbindo-na-Libebisi” yango ezali nini? Ntango nini yango ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ? Mpe ndenge nini bomoi na biso mpe bilikya na biso mpo na mikolo ekoya etalelami? Lisolo oyo elandi ekolobela yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá masolo ya boyekoli na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1994; 15 Okɔtɔbɛ 1995; 1 Novɛmbɛ 1995; mpe 15 Augusto 1996.
b George Beasley-Murray, nganga-mayele ya Biblia mpe moto ya ekólo Angleterre, alobi ete: “Balimboli basengeli kozala ata na mokakatano moko te mpo na maloba ‘libota oyo.’ Ezali solo ete na Greke ya kala généa elimbolaki mbotama, bana, to mpe libota, . . . na [libongoli ya Septante ya lokota ya Greke] mbala mingi esalemi mpo na kobongola liloba ya Liebele dôr, oyo elimbolaka bokóló, bambula oyo eleki banda bato bazali na mokili, to libota, elingi koloba bato ya eleko moko. . . . Na maloba ya Yesu, tozali komona ete liloba yango ezali na ndimbola mibale: ya liboso elimboli bato ya eleko na ye, mpe ya mibale, ezali lityo oyo elobami polele te.”
c Na buku na ye (History of the Jews), Profesere Graetz alobi ete ntango mosusu, na mokolo moko Baloma bazalaki kobaka bakangami 500 na nzete. Bayuda mosusu oyo bakangamaki bazalaki kokata bango mabɔkɔ mpe kozongisa bango na kati ya Yelusaleme. Makambo ezalaki ndenge nini kuna na kati? “Mbongo ezalaki lisusu ata na ntina moko te, mpamba te biloko ya kosomba ezalaki te. Na babalabala bato bazalaki kobundela mwa bilei epola mpe ezali kolumba nsolo, mwa bansɛngɛ, mwa mposo, to bitika oyo babwakelaka bambwa. . . . Na eleko wana ya molunge, lokola bibembe oyo ekundami te ezalaki kokóma ebele, mopɛpɛ ekómaki mabe, mpe bato bakómaki kozwa bamaladi, kokufa nzala, mpe kokufa na mopanga.”
d Lisolo oyo elandi elobeli likambo yango mpo na bolɔzi oyo ekoya.
Oyebi lisusu?
◻ Ndenge nini Matai 24:4-14 ekokisamaki na ekeke ya liboso?
◻ Na eleko ya bantoma, ndenge nini motuya ya mikolo ekitisamaki mpe mosuni ebikaki, lokola esakolamaki na Matai 24:21, 22?
◻ “Libota” oyo elobelami na Matai 24:34 ezali komonisa makambo nini?
◻ Ndenge nini toyebi ete kokokisama monene ya esakweli oyo Yesu alobaki na Ngomba ya Olive ekosalema?
◻ Ntango nini mpe ndenge nini lisese ya bampate na bantaba ekokokisama?
[Elilingi na lokasa 12]
Makambo eyemami na monima ya Titus na Loma, ezali komonisa babiki oyo bakómaki baombo nsima ya kobomama ya Yelusaleme
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Soprintendenza Archeologica di Roma