Nkombo oyo ezali komema na kondima ya solo
MWASI moko ayebisaki Motatoli ya Yehova moko ete, “Bino bondimelaka Yesu te mpe bondimaka te ete makila na ye ezali kosikola biso.” Mobali mosusu alobaki ete: “Bino bomibéngaka Batatoli ya Yehova, kasi ngai nazali motatoli ya Yesu.”
Bato mingi bakanisaka ete Batatoli ya Yehova bandimelaka Yesu te to mpe bapesaka ye lokumu mingi te. Kasi, ezali mpenza bongo?
Ezali solo ete Batatoli ya Yehova bapesaka nkombo ya Nzambe, Yehova, lokumu mingi.a Itamar, Motatoli moko na ekólo Brésil alobi ete: “Bomoi na ngai mobimba ebongwanaki ntango nayebaki nkombo ya Nzambe. Mokolo oyo natángaki yango mbala ya liboso, namonaki lokola ete nalamukaki na mpɔngi mozindo. Nkombo Yehova epusaki ngai na kozwa ekateli; esimbaki mpenza motema na ngai.” Atako bongo, alobi lisusu ete, “Motema na ngai ezali mpe na bolingo mingi mpo na Yesu.”
Batatoli ya Yehova bayebi ete mpo na kozwa bomoi ya seko, basengeli kondimela “nkombo ya Mwana ya Nzambe,” Yesu. (1 Yoane 5:13) Kasi, maloba ‘na nkombo ya Yesu’ malimboli nini?
Ndimbola ya nkombo ya Yesu
Na kati ya Makomami ya Greke ya boklisto to “Testama ya Sika” tozali kokuta maloba “na nkombo na Yesu” mpe maloba mosusu ya ndenge yango na bisika mingi. Kutu, liloba “nkombo” esalelami koleka mbala 80 mpo na kolobela mokumba ya Yesu, mpe na kati na yango mbala 30 bobele na mokanda ya Misala. Baklisto ya ekeke ya liboso babatisaki bato na nkombo ya Yesu, babikisaki na nkombo na ye, bateyaki na nkombo na ye, babelelaki nkombo na ye, banyokwamaki mpo na nkombo na ye, mpe bakumisaki nkombo na ye.—Misala 2:38; 3:16; 5:28; 9:14, 16; 19:17.
Diksionere moko ya maloba ya Biblia elobi ete liloba ya Greke oyo ebongolami na “nkombo,” esalelamaka mbala mingi na Biblia “mpo na komonisa makambo nyonso oyo nkombo yango elimboli: bokonzi, ezaleli, etɛlɛmɛlo, lokumu, nguya, motuya, mpe bongo na bongo; nyonso oyo nkombo wana esangisi.” Na bongo, nkombo ya Yesu elimboli lokumu mpe bokonzi monene oyo Yehova Nzambe apesi ye. Yesu ye moko alobaki ete: “Bokonzi nyonso esili kopesama na ngai na likoló mpe na nse.” (Matai 28:18) Ntango Petelo na Yoane babikisaki ebɔsɔnɔ moko, bakonzi ya mangomba ya Bayuda batunaki bango ete: “Bino bosali oyo na nguya nini soko na nkombo [ya] nani?” Na mpiko nyonso, Petelo amonisaki kondima na ye na bokonzi mpe nguya oyo nkombo ya Yesu ezali komonisa ntango ayebisaki bango ete ezali nde “na nkombo na Yesu Klisto moto na Nasalete, . . . mpo na ye moto oyo atɛlɛmi liboso na bino na nzoto makasi.”—Misala 3:1-10; 4:5-10.
Tosengeli kondimela Yesu to Kaisala?
Kasi, komonisa kondima motindo wana na nkombo ya Yesu ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Lokola Yesu asakolaki yango, ‘mabota nyonso bakoyina’ bayekoli na ye ‘mpo na nkombo na ye.’ (Matai 24:9) Mpo na nini? Mpamba te nkombo ya Yesu emonisi etɛlɛmɛlo na ye lokola Moyangeli oyo Nzambe aponi, Mokonzi ya bakonzi, ye oyo mabota nyonso basengeli kotosa, nzokande mabota balingi likambo yango te to bazali na mposa ya kosala yango te.—Nzembo 2:1-7.
Bakonzi ya mangomba na mikolo ya Yesu baboyaki mpe kotosa Yesu. Balobaki ete: “Tozali na mokonzi te bobele Kaisala.” Na maloba wana, baboyaki Mwana ya Nzambe. (Yoane 19:13-15) Nzokande, bandimelaki nkombo, elingi koloba nguya mpe bokonzi ya Kaisala mpe boyangeli na ye. Kutu, bazwaki ekateli ete Yesu asengeli kokufa mpo ete bábatela etɛlɛmɛlo mpe lokumu na bango.—Yoane 11:47-53.
Na boumeli ya bikeke nsima ya liwa ya Yesu, bato mingi oyo bamibéngaki baklisto balandaki elimo ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda. Baklisto yango ya nkombo mpamba batyaki kondima na bango na nguya mpe na bokonzi ya Leta mpe bamikɔtisaki na bitumba na yango. Na ndakisa, na ekeke ya 11, ntango lingomba esangisaki babundi nyonso oyo bazalaki na mosala te mpo na kosala limpinga oyo babéngaki ete militia Christi, to basoda ya Klisto, “na mikili ya boklisto, mokumba ya kotambwisa etumba ya sembo elongwaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya politiki mpe epesamaki na lingomba na nzela ya basoda ya Klisto.” (The Oxford History of Christianity) Lisolo elobi lisusu ete maloba mosusu ya Pápa epusaki basoda mingi na kondima ete soki babundi bitumba ya croisades, ezali lokola ete “bayokani na Nzambe mpe balɛngɛli esika na bango na Paladiso.”
Bato mosusu bakoki koloba ete moto akoki kozala sembo epai ya Klisto mpe kosangana na makambo ya politiki, ata mpe kokɔta na bitumba ya bikólo. Bakoki kokanisa ete moklisto azali na mokumba ya kolonga mabe na esika nyonso oyo emonani mpe ata kosimba mandoki soki esɛngi bongo. Kasi, baklisto ya liboso bakanisaki bongo?
Zulunalo The Christian Century ebimisaki lisolo moko oyo elobaki ete, “baklisto ya liboso bazalaki kosala mosala ya soda te.” Lisolo yango elobi ete kino na bambula ya 170-180 T.B., ezali na elembeteli moko te oyo emonisi ete baklisto basalaki mosala ya soda. Lisolo yango elobi lisusu ete: “Baklisto bakómaki kotika mokemoke likanisi na bango ya koboya mosala ya soda.”
Ezaleli yango ebotaki mbuma nini? Lisolo ya zulunalo The Christian Century elobi ete, “mbala mosusu ezali na likambo mosusu te oyo ebebisaki lokumu ya boklisto koleka momeseno na yango ya komitya na ngámbo moko na bato oyo bazali baklisto te mpo na kokɔta na bitumba. Epai moko, baklisto bazali kolanda kondima ya Mobikisi malamu mpe epai mosusu bazali mpenza kolendisa bitumba ya mangomba to ya bikólo. Likambo yango ebebisi mpenza kondima ya bato.”
Ndenge nini komekola baklisto ya liboso lelo oyo?
Lelo oyo baklisto bakoki komekola ndakisa kitoko ya baklisto ya ekeke ya liboso? Na ekeke oyo, Batatoli ya Yehova bamonisi ete bakoki kosala yango. Mokomi ya buku moko (Holocaust Educational Digest) alobaki ete: “Motatoli ya Yehova moko te akoki kokende na etumba. . . . Na mokili oyo, soki bakonzi nyonso bazalaki na kondima motindo oyo, mbɛlɛ [Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba] esalemaki te.”
Tokoki mpe koloba bongo mpo na bitumba oyo bizali kosalema na bisika ndenge na ndenge, lokola na Irlande du Nord. Eleki mwa bambula, Motatoli ya Yehova moko azalaki kosakola ndako na ndako na kartye ya Baprotesta na engumba Belfast. Na ndako moko, akutanaki na mobali moko oyo, ntango ayokaki ete Motatoli yango azalaká liboso Mokatolike, atunaki ye ete: “Ntango ozalaki Mokatolike, ozalaki kopesa mabɔkɔ na IRA [Armée républicaine irlandaise]?” Motatoli asosolaki ete moto yango akoki kosala ye mabe mpamba te akɔtaki bolɔkɔ mpo bakangaki ye na mondoki wana alingaki kokende koboma Mokatolike moko mpe autaki kobima na bolɔkɔ. Yango wana Motatoli ayanolaki ete: “Sikoyo nazali Mokatolike te. Nazali Motatoli ya Yehova. Lokola nazali moklisto ya solo, nakoki koboma moto te ata mpo na guvernema nini to mpo na moto nini.” Na maloba wana, moto yango apesaki ye mbote na lobɔkɔ mpe alobaki ete: “Koboma nyonso ezali mabe. Bozali kosala mosala moko malamu mpenza. Bótika yango te.”
Kondimela nkombo ya Yesu elimboli nini?
Kasi, kondimela nkombo ya Yesu elimboli kaka koboya bitumba te. Elimboli kotosa mibeko nyonso ya Klisto. Kutu, Yesu alobaki ete: “Bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino,” mpe mobeko na ye moko elobi ete ‘tólingana kati na biso.’ (Yoane 15:14, 17) Bolingo elukaka malamu ya basusu. Bolingo etalaka mposo te, lingomba te, to etɛlɛmɛlo ya moto na bomoi te. Yesu amonisaki ndenge oyo bolingo esalaka.
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Bayuda bazalaki mpenza koyina Basamalia. Nzokande, Yesu asololaki na mwasi Mosamalia, mpe na nsima, mwasi yango mpe bato mosusu mingi bandimelaki ye. (Yoane 4:39) Yesu alobaki mpe ete bayekoli na ye bakozala batatoli na ye “na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Nsango na ye oyo ezali kopesa bomoi esengelaki kosuka bobele epai ya Bayuda te. Yango wana, Petelo azwaki etinda ete akende na ndako ya Koloneli, mokonzi ya basoda ya Loma. Atako Mibeko epekisaki Moyuda kokɔta na ndako ya moto ya ekólo mosusu, Nzambe amonisaki Petelo ete ‘abénga moto mosusu moto mpamba te, soko moto na mbindo te.’—Misala 10:28.
Batatoli ya Yehova bamekolaka Yesu, basepelaka kosalisa bato nyonso báyeba nzela ya lobiko oyo euti na Klisto, ata soki bazali bato ya mposo nini, ya lingomba nini, babola to bazwi. Kondima na bango na nkombo ya Yesu epusaka bango na ‘kosakola epai ya bato nyonso ete Yesu azali Nkolo.’ (Baloma 10:8, 9) Tosɛngi na yo ete ondima lisungi na bango mpo ete yo mpe oyekola kondimela nkombo ya Yesu.
Bato basengeli mpenza kopusama na kokumisa, komemya mpe kotosa nkombo ya Yesu. Ntoma Paulo alobaki: “Na nkombo na Yesu mabɔlɔngɔ nyonso makumbama, yango na Likoló mpe yango na mokili, mpe yango na nse na mokili, mpe ete ndemo nyonso iyambolaka ete Yesu Klisto ye Nkolo mpo na nkembo na Nzambe Tata.” (Bafilipi 2:10, 11) Atako na mokili bato mingi bakoki koboya komisɔkisa na boyangeli ya Yesu, Biblia emonisi ete etikali moke bato nyonso bakomisɔkisa na boyangeli yango, mpe baoyo bakoboya bakobomama. (2 Batesaloniki 1:6-9) Yango wana, ntango ya kondimela nkombo ya Yesu mpe ya kotosa mibeko na ye nyonso yango oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mosusu, talá mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, nkasa 28-31, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., 1984.
[Elilingi na lokasa 6]
Bato mingi babomaki na nkombo ya Yesu, mpe mingi bakufaki mpo na nkombo yango
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu azalaki kokanisela basusu mabe te mpo ete bazali na ekólo mosusu. Boni mpo na yo?