Oyo Ezali Mpenza Mikolo Ya Nsuka?
OTƐLƐMI na eteni ya liboso ya bwato mpe ozali kolúka, bokómi na eteni ya mongálá oyo ezali mpasi mpo na kolúka. Mabanga minene mabimisá mitó libanda katikati na mai mpe mai yango mazali kosala fulufulu mpe kopumbwapumbwa. Ozali komeka kokima mabanga yango wana ozali kolúka na nkai na yo. Okanisi ete moto oyo afandi na nsima na yo akoki kosalisa yo na kolúka, kasi ye mpe ayebi mpenza te. Likambo ya mpasi koleka, ozali na kálati te mpo na kolakisa yo nzela, boye oyebi te soki mai makasi wana makosuka na etando ya kimya to na bweta (chute).
Likambo yango lizali kobangisa, boye te? Tiká sikawa tobongola yango. Kanisá ete ozali elongo na motambwisi moko oyo ayebi makambo malamu, oyo ayebi esika libanga mokomoko ya mongálá yango lizali, ayebi mabunu (courbures) na yango nyonso. Ayebaki yango liboso ete bobɛlɛma na esika wana ya mai makasi, ayebi lolenge yango ezali na liboso, mpe ayebi lolenge ya kosala mpo na koleka esika yango. Okomiyoka ete obatelami, boye te?
Mpo na koloba solo, biso banso tozali kati na ezalela motindo wana. Kozanga ete biso moko tólinga yango, tozali sikawa na eleko ya mpasi kati na lisoló ya bato. Bato mingi bayebi te ntango boni makambo makokóba kozala boye, bayebi te soki makambo makobonga, bayebi mpe te lolenge ya kosala mpo na kobika na boumeli ya ntango oyo tozali na yango. Nzokande, ntina ezali te ya komiyoka ete tobungi to tozangi lisungi. Mozalisi na biso asili kopesa biso motambwisi—oyo asilaki kosakola eleko oyo ya mpasi kati na lisoló ya bato, oyo asili koyebisa liboso lolenge oyo makambo yango makosuka, mpe oyo azali kopesa biso litambwisi tosengeli na yango mpo na kobika. Motambwisi yango ezali bongo búku moko, Biblia. Yehova Nzambe, Mokomisi na yango, abéngami ete Molakisi Monene, mpe mpo na kopesa endimiseli, alobaki na nzela ya Yisaya ete: “Mpe matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:20, 21) Okondima litambwisi wana? Boye, tiká tótala soki Biblia esakolaki mpenza lolenge oyo mikolo ya lelo misengelaki kozala.
Bayekoli ya Yesu batuni motuna moko ya ntina mingi
Na ntembe te, bayekoli ya Yesu bakamwaki mpenza. Yesu ayebisaki bango polele ete tempelo monene ya Yelusaleme esengelaki kobebisama nyɛɛ! Esakweli wana ezalaki mpenza ya kokamwisa. Mwa moke na nsima, wana bafandaki na Ngomba ya Olive, bayekoli minei batunaki Yesu ete: “Yebisá biso, nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na komonana [“kozala,” NW] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” (Matai 24:3; Malako 13:1-4) Ata basosolaki yango to te, eyano ya Yesu esengelaki kokokisama na mitindo mikeseni.
Kobebisama ya tempelo ya Yelusaleme mpe nsuka ya ebongiseli ya Bayuda ekokisamaki te na eleko ya kozala ya Klisto mpe na nsuka ya ebongiseli mobimba ya biloko ya mokili oyo. Nzokande, kati na eyano molai oyo apesaki, Yesu alobelaki na lolenge ya kokoka mpenza makambo nyonso oyo matali motuna wana. Ayebisaki bango lolenge oyo makambo masengelaki kozala liboso ya kobebisama ya Yelusaleme; amonisaki mpe lolenge mokili esengelaki kozala na boumeli ya kozala na ye, ntango ye akobanda koyangela lokola Mokonzi na likoló mpe ntango akokóma pene ya kotya nsuka na ebongiseli mobimba ya biloko ya mokili oyo.
Kobomama ya Yelusaleme
Tótalela naino makambo Yesu alobaki na ntina na Yelusaleme mpe tempelo na yango. Mbula koleka ntuku misato liboso, asakolaki ete ntango moko ya minyoko makasi esengelaki koya mpo na engumba wana oyo ezalaki moko na bingumba minene ya mokili. Tyá likebi mingi mpenza na maloba na ye oyo makomami na Luka 21:20, 21 ete: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basodá, bóyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma. Na ntango yango bango na kati na Yuda bákima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka bálongwa wana, mpe bango na bilanga bákɔta na mboka te.” Lokola Yelusaleme esengelaki kozingelama na bibele ya basodá, ndenge nini ‘baoyo bazalaki kati na mboka yango’ basengelaki “kokima” kozanga likámá, lolenge Yesu ateyaki bango? Na ntembe te, maloba wana ya Yesu mamonisi ete libaku moko ya kobima esengelaki komonana. Esalemaki bongo?
Na mobu 66 T.B., mampinga ya Baloma oyo matambwisamaki na Cestius Gallus mabenganaki mampinga ya batomboki Bayuda kino kozongisa bango na Yelusaleme mpe makangisaki bango kati na engumba. Baloma bakɔtaki mpenza kati na engumba mpe bakómaki kino na lopango ya tempelo. Kasi, na ntango yango, Gallus apesaki etindá na mampinga na ye ete básala likambo moko mpenza ya kokamwisa. Ayebisaki bango ete bázonga! Basodá Bayuda, oyo bazalaki na esengo, babimaki mpe balandaki bango mpe bayokisaki banguna na bango Baloma bolózi mingi wana bazalaki kokima. Na lolenge yango, libaku ya kokima oyo Yesu asakolaki emonanaki. Baklisto ya solo balandaki likebisi na ye mpe babimaki na Yelusaleme. Yango ezalaki ekateli ya mayele mpamba te, bobele mbula minei na nsima, mampinga ya Baloma eyaki lisusu, na litambwisi ya Titus, mokonzi ya basodá. Na mbala oyo, likoki ya kokima ezalaki lisusu te.
Mampinga ya Baloma ezingaki lisusu Yelusaleme; basalaki zingazinga na yango lopango makasi oyo ezalaki na makonzí ya nsɔngɛ́. Yesu asakolaki na ntina na Yelusaleme ete: “Mikolo mizali koya na yo bayini na yo bakosala lopango monene na mabelé, mpe bakozinga yo kokangisa yo bipai nyonso.”a (Luka 19:43) Mwa moke na nsima, Yelusaleme ekweaki na mabɔkɔ ya banguna, tempelo na yango ya bonzenga ebebisamaki nyɛɛ. Maloba nyonso ya Yesu makokisamaki ata na makambo mikemike!
Nzokande, na makanisi na ye, Yesu azalaki komona mosika, kasi bobele kobebisama ya Yelusaleme te. Bayekoli batunaki ye mpe na ntina na elembo ya kozala na ye. Na ntango wana, bayebaki te bonene ya motuna na bango, nzokande motuna wana etalelaki mpenza ntango oyo ye akotyama mpo na koyangela lokola Mokonzi na likoló. Asakolaki makambo nini?
Bitumba na mikolo ya nsuka
Soki otángi Matai mokapo 24 mpe mokapo 25, Malako mokapo 13, mpe Luka mokapo 21, na ntembe te okomona bilembeteli oyo bimonisi ete Yesu azalaki kolobela ekeke oyo tozali kobika na yango. Asakolaki eleko ya bitumba—te bobele “bitumba mpe lokito na bitumba” oyo ezalaki ntango nyonso kosalema na boumeli ya lisoló mobimba ya bato, kasi nde bitumba oyo bisalemi kati na ‘libota moko oyo lizali kotɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko oyo ezali kotɛmɛla bokonzi mosusu’—ɛɛ, bitumba kati na mikili mikeseni.—Matai 24:6-8.
Kanisá naino bonene oyo etumba ekomi na yango na ekeke na biso. Ntango etumba ezalaki bobele matáta kati na mampinga ya mabota mibale oyo mazali koyinana, kobɛtanáká na mipanga to na mandóki na bisika bibongisamá mpo na etumba, ezalaki lisɛki te. Nzokande na 1914, Etumba Monene ebandaki. Ekolo moko nsima na mosusu emikɔtisaki na matáta yango na kolandáká ngámbo ya ekolo oyo ezali pembeni na yango—etumba ya liboso ya mokili mobimba. Mandóki ya nsɔ́mɔ esalelamaki mpo na koboma bato na motángo moleki monene mpe oyo mazali koboma ata bato bafandi mosika. Bamasini ya kobɛta masasi esalaki na lolenge ya nsɔ́mɔ; gaz de moutarde ezikisaki bankóto mingi ya basodá, enyokolaki bango, ezokisaki bango bampota minene, mpe ebomaki bango; mituka minene ya etumba mizalaki kotambola na lokito makasi mpenza epai banguna bazalaki, mpe mandóki na yango mazalaki kosanza mɔ́tɔ. Mpɛpɔ mpe masuwa esalelamaki—yango ezalaki sé bililingi mpamba ya oyo esengelaki koya nsima.
Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba ezalaki nde sukisa—ebomaki bamilió mingi ya bato mpe, na kotalela bonene na yango, emonani ete Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba ezalaki mpenza eloko moke. Masuwa minene oyo ekumbaka mpɛpɔ ya bitumba, mpe oyo etondaki na basali, ezalaki kokatisa mai minene mpe kotinda bampɛpɔ ya bitumba mpo na kobwaka babɔmbi likoló ya banguna na bango uta na likoló. Bamasini ya nsé ya mai ezalaki kobebisa mpe kozindisa masuwa ya banguna. Babɔmbi atomiki ebwakamaki, kobomáká bankóto ya bato na bobɛti bobele moko! Lokola Yesu asakolaki yango, “bilembo minene” bisili kobima mpenza mpo na komonisa ekeke oyo etondi na bitumba.—Luka 21:11.
Banda Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba, motángo ya bitumba esili kokita? Soko moke te. Na bantango mosusu, na mbula bobele moko, bitumba bizalaka mingi—ata na ebandeli ya bambula 1990—mpe bitumba yango bizali koboma bamilió ya bato. Lisusu, lolenge ya bato oyo bazalaki kobomama kala na etumba esili kobongwana. Bato oyo bazali kokufa na etumba ezali lisusu bobele basodá te. Lelo oyo, motángo monene ya bato bazali kokufa na etumba—na ntembe te, bato 90 likoló na monkámá—bazali basivili.
Makambo mosusu ya elembo yango
Bitumba bizali sé eteni moko ya elembo oyo Yesu alobelaki. Akebisaki lisusu ete “nzala” ekozala. (Matai 24:7) Mpe yango esili komonana solo atako, likambo ya kokamwa mpenza, mabelé ezali kobimisa bilei mingi koleka oyo bikoki koleisa bato ya mokili mobimba, mpe siansi ya makambo matali bilanga esili kokóla mingi koleka bileko mosusu ya lisoló ya bato, atako myango ya bomemi biloko nokinoki mpe na lolenge lobongi misili kozwama mpo na komema bilei bipai nyonso kati na mokili; atako biloko nyonso wana bizali, mokolo na mokolo, moto moko kati na bato mitano bafándi na mokili, azali kokufa nzala.
Yesu asakolaki lisusu ete “na esika na esika,” “maladi” mabe masengelaki kozala. (Luka 21:11) Awa lisusu, ekeke na biso esili komona likambo ya kokamwa—nkisi malamu ya minganga oyo emonanáká naino liboso te, bokóli ya tekiniki ya mosala ya monganga, mangwele mpo na kopengola ebele ya makɔnɔ oyo makoyambenelaka; atako bongo maladi oyo ebomaka esili mpe koyikana na motindo oyo emonanáká naino liboso te. Grippe espagnole eyaki nokinoki nsima ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba mpe ebomaki bato mingi koleka oyo bakufaki na etumba yango. Lokola maladi wana ezalaki kozwa bato mpambampamba, boye na engumba lokola New York, moto akokaki kofuta lomande to kotyama na bolɔ́kɔ bobele mpo ete asali likisé (éternuer)! Lelo oyo, kanser mpe maladi ya motema ezali koboma bamilió ya bato mbula na mbula—oyo ezali mpenza bolózi ya solosolo. Epai mosusu, sida ezali naino koboma, siansi ya minganga ezwi naino nkisi na yango te.
Yesu alobelaki mikolo ya nsuka mingi mpenza na bokangani na makambo minene ya lisoló ya bato ya politiki, nzokande ntoma Paulo, ye, atyaki likebi mingi na mikakatano ya bomoi ya bato mpe na bizaleli oyo bisengelaki komonana mingi. Ndambo ya makomi na ye elobi boye: “Ososola likambo oyo ete, na m[i]kolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, . . . bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, . . . [bazangi komipekisa, NW], bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nkó, bato bavimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe.”—2 Timoté 3:1-5.
Maloba wana makokani na makambo omonaka mokolo na mokolo? Tótalela ndakisa moko oyo emonisi kobeba ya bomoi ya bato na mokili ya lelo—kokufa ya libota. Ebele ya mabota mazali kopanzana, basi bazali kobɛtama na mibali na bango, bana bazali koyokisama mpasi, mpe baboti oyo bakómi mibangé bazali konyokolama—yango emonisi mpenza ete bato bazangi “bolingo,” “batondi na yauli,” bazali mpe “bakosi,” “bayini na malamu”! Ɛɛ, tozali komona bizaleli yango epai na bato mingi lelo oyo.
Eleko na biso ezali mpenza oyo esakolamaki?
Kasi okotuna mbala mosusu ete: ‘Makambo oyo ya mpasi ebandá konyokola bato uta kala, boye te? Ndenge nini toyebi ete eleko na biso ezali mpenza oyo elobelamaki na bisakweli wana ya kala?’ Tiká tótalela bilembeteli misato oyo bimonisi ete Yesu azalaki mpenza kolobela eleko na biso.
Ya liboso, mwa ndambo ya maloba yango ekokisamaki liboso wana Yelusaleme mpe na tempelo na yango ebebisamaki, maloba ya Yesu mazalaki mpenza kolobela eleko moko oyo esengelaki koya nsima ya ntango wana. Mbula pene na 30 nsima ya likámá monene oyo ebebisaki Yelusaleme, Yesu apesaki mobangé ntoma Yoane emonaneli oyo elakisaki ete makambo oyo masakolamaki—elingi koloba bitumba, nzala, maladi mabe, mpe liwa oyo euti na yango—masengelaki komonana na mabelé mobimba, na mikolo oyo mizalaki koya. Ɛɛ, bampasi wana esengelaki kozwa etúká bobele moko te, kasi “mokili” mobimba.—Emoniseli 6:2-8.
Ya mibale, na ekeke na biso, makambo mosusu ya elembo oyo Yesu alobelaki mazali kokokisama na mobimba na yango. Na ndakisa, ekoki nde kosalema ete bitumba bikóma lisusu na yauli koleka lolenge oyo yango ezali komonana uta 1914? Soki Etumba ya Misato ya Mokili mobimba esalemi, mpe ebele ya mikili oyo mitondi na bibundeli ya nikleere basaleli yango, ntembe ezali te ete eleko oyo ekoya nsima ekokuta mabelé oyo masilá kobongwana mputulu ya mɔ́tɔ—mpe bato basilá kolimwa. Bobele bongo, Emoniseli 11:18 esakolaki ete na mikolo wana, oyo na boumeli na yango mabota basengelaki ‘kongala,’ bato basengelaki ‘kobebisa mabelé.’ Mpo na mbala ya liboso na lisoló mobimba ya bato, bobele na eleko na biso nde kobebisama ya mopɛpɛ, ya mai, mpe ya ezingelo esili kotya mabelé oyo na likámá ya kozala lisusu te esika ebongi na kofanda! Na yango, eteni oyo ya elembo esili mpe kokokisama na mobimba na yango to pene na mobimba na yango. Bitumba mpe kobeba ya mopɛpɛ mpe ya mai ekokóba lisusu kozala likámá mpo na moto mpe kino kolimwisa mabelé? Te; Biblia elobi ete mabelé ekoumela libela na libela, mpe bato ya motema sembo bakofanda wana.—Nzembo 37:29; Matai 5:5.
Ya misato, elembo ya mikolo ya nsuka ezali lisusu komonana polele ntango tozali kotalela yango na mobimba. Soki totaleli makambo oyo Yesu alobelaki kati na Baevanzile misato, makambo oyo makomami na mikanda ya Paulo, mpe makambo mazali na Emoniseli, tokomona ete elembo yango ekangisi makambo mingi mpenza. Moto mosusu akoki kotya ntembe na kotalelama ya likambo moko ya elembo yango, kolobáká ete na bikeke mosusu, mikakatano wana mizalaki mpe komonana; kasi soki tosangisi makambo nyonso ya elembo yango esika moko, na ntembe te tokomona ete yango nyonso etali eleko bobele moko—eleko na biso.
Kasi, nyonso wana elimboli nini? Elingi nde koloba ete Biblia emonisi ekeke na biso lokola ekeke ya kozanga elikya? Soko moke te!
Nsango malamu
Moko na makambo ya ntina mingi ya elembo ya mikolo ya nsuka ekomami na Matai 24:14 ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” Na ekeke oyo, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mosala oyo esalemá naino te kati na lisoló mobimba ya bato. Basili kondima nsango oyo Biblia ezali kopesa na ntina na Bokonzi ya Yehova Nzambe—ndimbola ya Bokonzi yango, lolenge yango ezali koyangela, mpe makambo oyo yango ekosala—mpe bazali kopalanganisa nsango wana na mabelé mobimba. Basili kobimisa mikanda oyo mizali kolimbola likambo yango na nkótá koleka 300 mpe bazali komema yango na bandako ya bato to na balabála to na bisika na bango ya mombongo na mikili pene na nyonso awa na mabelé.
Na kosaláká bongo, bazali kokokisa esakweli wana. Bazali mpe kopalanganisa elikya. Kobosana te ete Yesu abéngaki yango “Nsango Malamu,” kasi nsango mabe te. Lolenge nini yango ekoki kozala nsango malamu na mikolo oyo mabe? Ezali bongo mpamba te nsango ya moboko oyo Biblia ezali koyebisa ezali te nsango oyo emonisi lolenge makambo makozala mabe na nsuka ya mokili oyo mosili konuna. Nsango na yango ya moboko etali nde Bokonzi ya Nzambe, mpe emonisi ete Bokonzi yango elaki kosala likambo moko oyo elingami mingi na mitema ya baoyo nyonso balingaka kimya—ezali bongo kosikolama.
Kosikolama yango ezali nini, mpe ndenge nini okoki kozwa yango? Tolɔmbi yo ete otalela masoló oyo malandi, oyo mazali kolobela likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Titus azalaki mpenza na etɛlɛmɛlo ebongi mpo na kolónga. Nzokande, na makambo mibale ya ntina mpenza, alóngaki te kokokisa mposa na ye. Azalaki kosɛnga na Bayuda ete bámikaba bango moko epai na Baloma na kimya nyonso, kasi, na motó makasi mpe likambo ya kokamwa mpenza, bakambi ya engumba baboyaki. Mpe ntango bifelo ya engumba bibukamaki, apesaki etindá ete bábebisa tempelo te. Kasi atako bongo, tempelo ezikisamaki nyɛɛ! Yesu asakolaki yango polele ete Yelusaleme esengelaki kobebisama mpe tempelo esengelaki kobukama.—Malako 13:1, 2.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Bato bazali koluka biyano na mituna oyo mizali kobulunganisa lokola oyo, Mpo na nini makambo mazali mabe mingi boye? Tokosuka wapi?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Lelo oyo, koleka 90 % ya bato bazali kokufa na bitumba bazali basivili
[Elilingi na lokasa 7]
Esakweli ya Yesu na ntina na kobomama ya Yelusaleme ekokisamaki ata na makambo mikemike