Pole engengi likoló na kozala ya Klisto
“Ntango Mwana na moto akokoma na nkembo na ye, ... akokabola bato, bamoko epai, basusu epai.”—MATAI 25:31, 32, MN.
1. Lolenge nini bakonzi na mangomba ya lokuta balimbolaki maloba mazali na Matai 24:3?
MIKOLO misato liboso na liwa na Yesu, bayekoli minei kati na bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe batunaki ye na mbala moko ete: “Yebisa biso, nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na Koya [na Greke pa-rou-siˈa] na yo mpe nsuka na mokili ekozala nini?” Uta bikeke mingi, bakonzi na mangomba mpe bakomi na mikanda ya boklisto ya lokuta bazali kopesa bandimbola na maloba oyo malobamaki na Yesu kati na Matai 24:3 (Osty) lokola nde yango ezali koloba ete Yesu akomonana lisusu kati na nzoto ya mosuni oyo bato nyonso bakokoka komona ye. Na bongo, bazali koteya ete bozongi na Klisto ekoyebana mingi mpe ekozala na lolenge ya komonana na miso. Ezali yango nde bazali kobenga ete koya ya mibale ya Klisto. Kasi makanisi wana malongobani mpenza?
2, 3. (a) Bokeseni nini Volume 2 ya mokanda Etudes des Ecritures (na Lingelesi) ezali kosala kati na maloba “koya” mpe “kozala”? (b) Libota na Jéhovah ekangaki ntina nini na kotalela ndimbola ya pa-rou-si’a na Klisto?
2 Na 1889, bapakolami na Jéhovah—bamemi na pole na ekeke ya zomi na libwa—basilaki kongengisama na likambo litali kozonga na Klisto. Kati na volume 2 ya mokanda Etudes des Ecritures, nkasa 164 mpe 166, Charles T. Russel, prezida ya liboso ya Watch Tower Bible and Tract Society, akomaki ete: “Parousia ... elimboli kozala (presence), mpe esengeli te kobongolama na koya lokola yango ekomami na mabongoli ya Biblia oyo tomeseni kosalela. ... Likanisi ya sikisiki ya ndimbola ya liloba parousia ezali te oyo ya koya, lokola nde kozala pene na kokóma, kasi ezali nde kozala to présence nsima na kokóma ... [Yesu] alobaki ete: ˈLokola ezalaki mikolo na Noa, parousia [présence] na Mwana na moto ekozala bongo.ˈ Tozali komona ete bokokanisi ezali te kati na koya ya Noa mpe koya ya Nkolo na biso ... Bokokanisi ezali nde kati na ntango ya kozala ya Noa katikati na bato ˈliboso ya mpelaˈ mpe ntango ya kozala ya Klisto kati na mokili, na boyei na ye ya mibale, ˈliboso ya mɔ́tɔˈ—liboso ya mpasi monene ya Mokolo na Nkolo [Jéhovah] oyo ekotya nsuka na mokili oyo.”—Matai 24:37.
3 Na yango, libota na Jéhovah na ekeke ya zomi na libwa bayebaki malamu ete pa-rou-siˈa ya Klisto ekomonana na miso na bato te. Bayebaki lisusu ete nsuka ya ntango na mabota ekobanda na automne ya 1914. Lokola pole ya elimo ezalaki kongenga ntango nyonso, bayebaki na nsima ete Yesu Klisto atyamaki Mokonzi na makoló na mbula yango moko ya 1914.—Masese 4:18; Danyele 7:13, 14; Luka 21:24; Emoniseli 11:15.
“Kozala ya Nkolo na biso”
4. “Kozala ya Nkolo na biso Yesu Klisto” etaleli likambo nini?
4 Na bongo, nini elimboli na mikolo na biso liloba na Biblia oyo ete “kozala ya Nkolo na biso Yesu Klisto”? (1 Batesaloniki 5:23, MN) Engebene moto moko ya mayele na ntina na likambo yango, liloba “kozala,” pa-rou-siˈa, “ekómaki liloba oyo lizalaki kosalelama mingi mpo na kolobela mobembo ya moto moko ya lokumu, na ndakisa mokonzi to empereur moko kati na etuka moko.” Na bongo, liloba oyo etaleli kozala ya Nkolo Yesu Klisto lokola Mokonzi, kobanda 1914 kino bambula oyo elandaki nsima na kotyama na ye lokola mokonzi na likoló. Mokonzi Yesu Klisto azali kozanga komonana na miso na bato mpo na ˈkoyangela katikati ya bayini na yeˈ; azali mpenza koyangela lokola Mokonzi mpo na kokokisa etinda oyo ya esakweli. (Nzembo 110:2) Esili koleka pene na mibu 79, bafandi na mokili bazali koyoka bopusi ya kozala ya Klisto lokola mokonzi kozanga komonana na miso na bato.
5. Makambo nini mabimaki na boumeli ya pa-rou-siˈa oyo tokotalela kati na masoló misato ya boyekoli na zulunalo oyo?
5 Kati na masolo misato oyo makolandana, tokolobela bilembeteli ya kokamwa ya makambo oyo Bokonzi na Klisto esili kokokisa na boumeli ya eleko wana. Ya liboso, tokomonisa bisakweli mingi ya Biblia oyo bisakolaki makambo masili kobima to oyo mazali kobima sikawa. Ya mibale, tokolobela mosala monene mokokisami na kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele oyo Yesu azali kosalela na boumeli ya ntango mobimba ya kozala na ye lokola mokonzi. (Matai 24:45-47) Lisoló ya misato ekomonisa biso nsuka ya kokamwa, eleko ya “bolozi monene.” Ekozala ntango oyo Yesu akoya lokola Mokokisi ya bikateli na Jéhovah mpo na koboma bato bazangi sembo mpe kobikisa bato na sembo. (Matai 24:21, 29-31) Na ntina na eleko wana ya kobomama, ntoma Paulo akomaki ete: “Mpe kopesa bino banyokolami epemelo esika moko na biso na ntango na komonana na Nkolo Yesu wana ekobima ye na likoló esika moko na baanzelu na ye na nguya, kati na epeleli na mɔ́tɔ ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu.”—2 Batesaloniki 1:7, 8.
Elembo
6. Elembo oyo esangisi makambo mingi oyo elobelami kati na Matai mikapo 24 mpe 25 ezali nini?
6 Ekokisi sikawa bikeke 19, bamemi na pole wana oyo bazalaki bayekoli na Yesu batunaki ye elembo, elingi koloba bilembeteli, ya kozala na ye na mikolo mizalaki liboso, ntango akotyama mokonzi. Eyano na ye, oyo ekomami kati na mikapo 24 mpe 25 ya Matai, epesi elembo oyo esangisi makambo mingi, makambo yango nyonso mazali kokokisama sikawa na mabele mobimba. Kokokisama ya elembo yango ezali komonisa ntango moko ya mpasi mpe ya mikakatano minene. Yesu apesaki toli oyo: “Bokeba ete moto apengwisa bino te. Mpo ete mingi bakoya na nkombo na ngai koloba ete: ˈNgai Klisto,ˈ mpe bakopengwisa mingi. Bokoyoka lokito na bitumba mpe nsango na bitumba. Bokeba, bobanga te; mpo ekoki ete yango ekoma nde nsuka ezali naino te.”—Matai 24:4-6.
7. Makambo nini matali elembo oyo tosili komona kokokisama na yango kobanda 1914?
7 Yesu asakolaki lisusu ete ekozala na bitumba minene koleka. Mpo na kokokisama na yango, bitumba mibale kati na yango bibengamaki bitumba ya mokili mobimba, moko esalemaki kobanda 1914 kino 1918, mpe mosusu kobanda 1939 kino 1945. Lisusu, Yesu alobaki ete nzala mpe koningana na mabele ekozala na bisika bikeseni. Baklisto ya solo bakonyokwama makasi. Na boyokani na esakweli oyo, ba Témoins de Jéhovah, bamemi na pole na ntango na biso, bazali kozwa minyoko uta mibu ntuku mwambe wana bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe “na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.” (Matai 24:7-14) Annuaire des Témoins de Jéhovah ezali komonisa mbula na mbula ete makambo wana matali elembo mazali kokokisama.
8, 9. (a) Kozala ya Klisto lokola mokonzi ekokani na nini? (b) Esakweli na Yesu oyo etali ba Klisto ya lokuta emonisi nini na ntina na esika oyo ye akozala mpe na lolenge oyo yango ekosalema na ntango na kozala na ye?
8 Mpo ete bokonzi na Yesu esangisi mokili mobimba, losambo ya solo ezali kopalangana mpe na mokili mobimba. Kozala (pa-rou-siˈa) ya Klisto lokola Mokonzi ekokani na eleko ya kotala mabele mobimba. (1 Petelo 2:12) Kasi ezali nde na mboka-mokonzi, to engumba ya lokomu, epai kuna bato bakoki kokende kokutana na Yesu? Yesu ayanolaki na motuna wana, na ntango asakolaki ete, kati na bozeli ya kozala na ye, ba Klisto ya lokuta bakobima. Akebisaki ete: “Soko bakoloba na bino ete: ˈTala [Klisto] azali na lisobe,ˈ bobima te. Soko ete, Tala azali na biteni na katikati na ndako, bondima te. Mpo ete, lokola mokalikali ekobimaka epai na likoló, ekongengaka epai na ngɛlɛ, bobele bongo mpo na oyo etali Kozala [pa-rou-siˈa] ya Mwana na moto.”—Matai 24:24, 26, 27.
9 Koleka bato nyonso awa na mabelé, Yesu, “Mwana na moto,” ayebaki epai akozala ntango eleko ya kozala na ye ekobanda. Asengelaki te kozala awa, kuna to epai moko boye na mabelé. Asengelaki te kozala na esika moko ebombami, “kati na esobe,” mpo ete baoyo bazali koluka Masiya bakutana na ye kozanga ete bayangeli ya mboka bayeba yango, mpe ete bayekoli na ye bakoka kobongisa mwango ya kokweisa boyangeli mpe kotya Mokonzi Masiya na mokili mobimba. Lisusu, asengelaki te kobombama kati na “biteni ya katikati ya ndako,” epai kuna bobele bato moke nde bakokaki koyeba, mpo ete wana ezangi ye komonana, akoka kosala myango ya nkuku elongo na batombaki mosusu mpo ete bakweisa biyangeli ya mokili mpe apakolama lokola Masiya oyo alakamaki. Ezali boye soko moke te!
10. Lolenge nini mikalikali ya solo na Biblia mingengaki kati na mokili mobimba?
10 Na kokesena, ezali na eloko moko te oyo etali koya na Yesu lokola Mokonzi, na ebandeli ya kozala na ye na bokonzi, eloko moko te esengeli kobombama. Lokola Yesu asakolaki yango, mikalikali ya solo ya Biblia mizali kolanda kongenga kino mosika, longwa na bitúka ya ebimelo na ntango kino na bitúka ya elalelo na ntango, kati na mokili mobimba. Ya solo, ba Témoins de Jéhovah baoyo bazali bamemi na pole na ntango na biso, bazali mpenza “pole na mabota, mpo ete kobika na [Jéhovah] ekoma na nsuka na mokili.”—Yisaya 49:6.
Mosala ya baanzelu
11. (a) Lolenge nini mampinga na baanzelu masalelami mpo na kopalanganisa pole ya Bokonzi? (b) Ntango nini mpe kati na etuluku nini basangani ya kelasi ya blé bayanganisamaki?
11 Mikapo misusu mitali kozala ya Yesu mizali komonisa ye esika moko na mampinga na baanzelu to ˈwana ezali ye kotindaˈ mampinga yango. (Matai 16:27; 24:31) Kati na lisese na ye ya ble mpe matiti mabe, Yesu alobaki ete “elanga ezali mokili” mpe ete “ntango na kobuka ezali nsuka na ekeke, mpe babuki ezali baanzelu.” Nzokande, yango elimboli te ete na boumeli ya kozala na ye, wana akotyama mokonzi mpe alatisami na nkembo, akosuka bobele na kosalela baanzelu mpo na kokokisa misala mitali mabelé. Kobanda 1919, baanzelu, na nse na litambwisi na Yesu, babandaki koyanganisa kelasi ya blé, bapakolami oyo bazalaki naino na mabelé mpe baoyo bapalanganaki na ntina na makambo mabimaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe babongisaki bango mpo na kokokisa mosala mosusu na nkombo ya Mokonzi. (Matai 13:38-43) Na bambula 1920, bato mosusu mingi bamityaki na ngambo ya Bokonzi na Nzambe, oyo esilaki kosalema, mpe bapakolamaki na elimo na Nzambe. Na yango, bapakolami wana babakisamaki na batikali oyo bazalaki uta kala. Bango nyonso elongo basali kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele na mikolo na biso.
12. Kopetolama ya lolenge nini baanzelu basanganaki na yango, mpe makambo nini yango ebimisaki mpo na mabelé?
12 Ndakisa mosusu ya mosala na baanzelu na ntango na kozala ya Klisto, nsima na kotyama mokonzi na 1914, ekomami kati na Emoniseli 12:7-9: “Mikaele [Yesu Klisto] na baanzelu na ye babundaki etumba na dalagona. Dalagona abundaki, na baanzelu na ye, nde balongaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abengami [Diable] mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nse, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.” Na yango, makolo mapetolamaki; etikali bobele kopetola na mobimba mabelé, etando oyo ekoyangelama na Bokonzi na Nzambe, mpo ete nkombo na Jéhovah ebulisama. Na mobu oyo 1993, maloba oyo ya Nzambe mazali ntango nyonso ya sika: “Mawa na mokili ... Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”—Emoniseli 12:12.
Lisekwa ya likoló
13, 14. (a) Na kotalela oyo Makomami mamonisi nini esalemaki kobanda 1918? (b) Ntoma Paulo mpe ntoma Yoane bamonisi nini na ntina na batikali na mikolo na biso?
13 Likambo mosusu ya kokamwa oyo esalemi na ntango ya kozala ya Klisto ezali ebandeli ya lisekwa ya likoló. Ntoma Paulo amonisaki ete baklisto bapakolami baoyo basilaki kolala uta kala kati na kufa bakozala bato ya liboso na kosekwa mpo na kozala na bomoi elongo na Klisto na makoló. Bilembeteli bipesamaki na boumeli ya bambula mpo na komonisa ete likambo yango lisilaki kosalema kobanda 1918. Ntoma Paulo akomi ete: “Na Klisto nyonso bakozwa bomoi. Kasi moto na moto na kokitana na ye mpenza. Klisto mbuma na liboso, na nsima na kozala [pa-rou-siˈa] na ye, baoyo bazali kati na Klisto.” (1 Bakolinti 15:22, 23) Lisekwa ya bapakolami na boumeli ya mokolo na kozala ya Klisto endimami kati na 1 Batesaloniki 4:15-17, MN: “Mpo na yango tokolobaka na bino na liloba na Jéhovah, ete biso bato na bomoi baoyo totikali kino kozala [pa-rou-siˈa] ya Nkolo, tokoleka liboso na baoyo balali kati na kufa te ... Mpe baoyo basilaki kokufa kati na Klisto bakosekwa liboso. Na nsima biso bato na bomoi baoyo tokobika, elongo na bango, tokokamatama kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo kati na mopepe.” Ezali bapakolami 144.000 baoyo bazali kati na Klisto nde bakozwa lifuti wana ya kitoko.—Emoniseli 14:1.
14 Lokola ntoma Paulo amonisi yango, basangani kati na batikali oyo bazali naino na bomoi lelo bakokota te kati na Bokonzi liboso ya baklisto bapakolami ya sembo oyo bazalaki ba martyrs mpe bayekoli na ntango na kala. Lisusu, ntoma Yoane alobeli bapakolami oyo bazali kokufa lelo na maloba oyo: “Esengo na bakufi kati na Nkolo baoyo bakokufa longwa sikawa. Elimo elobi ete, Ɛe, tika bapema na bwale na bango, mpo ete misala na bango mikolanda bango,” elingi koloba ntango bakosekwa. (Emoniseli 14:13) Mpe ntoma Paulo alobi ete: “Tala, nazali koloba na bino likambo libombami. Biso nyonso tokolala kati na kufa te, kasi tokobongwana motindo mosusu, na mwa ntango moke, na ntango na kobweta na liso, wana ekobeta kelelo ya nsuka. Mpo ete kelelo ekobeta mpe bakufi bakosekwa na kozanga kopola, mpe biso tokobongwana motindo mosusu.” (1 Bakolinti 15:51, 52, MN) Oyo nde likamwisi monene!
15, 16. Lisese nini Yesu apesaki na Luka 19:11-15, mpe mpo na ntina nini? (b) Lolenge nini esakweli yango ekokisamaki?
15 Mokolo moko wana Yesu azalaki kosakola na etuluku moko ya bayekoli na ye na ntina na Bokonzi na Nzambe, asalelaki lisese moko mpo na kosalisa bango na kobongisa makanisi mabe bazalaki na yango. Lisoló eyebisi ete: “Bazalaki kokanisa ete Bokonzi na Nzambe ekomonana nokinoki. Na bongo alobaki ete: ˈMoto moko na lokumu atambolaki mobembo na mokili mosusu mosika mpo na kozwa Bokonzi mpe kozonga. Abengi baombo na ye mpenza zomi, mpe apesi bango mbuma na palata mokama mokama. Alobi na bango ete: “Sala mombongo kino ekozonga ngai.” ... Wana esili ye kozwa bokonzi, azongi, mpe alobi ete baombo yango baoyo apesaki bango mosolo yango babyangama epai na ye ete ayeba soko moto na moto azwi boni na mombongo na ye.ˈ”—Luka 19:11-15.
16 Yesu azali “moto” yango oyo akendaki na likoló “mboka mosika” epai azwaki bokonzi. Bokonzi oyo azwaki yango na 1914. Mwa moke na nsima, Klisto lokola Mokonzi abongisaki makambo elongo na baoyo bazalaki koloba ete bazali bayekoli na ye mpo na komona lolenge nini bamipesaki na matomba na Bokonzi oyo apesaki bango. Basembwi moke nde baponamaki mpo na kozwa makumisi oyo ya Nkolo: “Malamu! Yo moombo malamu! Zala na bokonzi na mboka zomi, mpo ete ozalaki sembo na likambo moke.” (Luka 19:17) Eleko wana ya kozala ya Klisto ezali kosenga kolanda ntango nyonso komipesa mingi na mosala ya kosakola Bokonzi, mosala oyo esangisi kosakolama ya bikateli na Nzambe na ntina na bato mabe, mpe na kotalela bokonzi oyo epesameli ye, mosala yango esengeli kotambwisama na “moombo malamu.”
Mosala ya kosakola kati na mokili mobimba
17. Esengo nini ezali komonisama na pa-rou-siˈa?
17 Nini esengelaki lisusu kosalema na boumeli ya pa-rou-siˈa yango? Ekozala eleko moko ya esengo monene kati na mosala ya kosakola mpe kosalisa bato ya sika na komibongisa mpo na kobika ntango bolozi monene ekoya. Bato yango ya “ebele monene,” baoyo bazali kosalisa batikali, bakomi “mikanda mikolobelaka bango.” (Emoniseli 7:9; 2 Bakolinti 3:13) Ntoma Paulo alobeli esengo ya mosala wana ya kobuka mbuma ntango alobi ete: “Mpo ete elikya mpe esengo mpe motole na lokumu na biso ezali nini? Bobele bino liboso na Nkolo na biso Yesu na ntango na kozala [pa-rou-siˈa] na ye te?”—1 Batesaloniki 2:19.
Totikala peto mpe kozanga litono
18. (a) Libondeli nini ya ntoma Paulo lizali na boyokani na pa-rou-siˈa? (b) Elimo ya motindo nini esengeli kozala na biso nyonso na boumeli ya eleko oyo, mpe na makambo nini?
18 Ntoma Paulo abondelaki lisusu na ntina na kobulisama ya baoyo bakozala na bomoi na eleko na kozala ya Klisto: “Tika ete Nzambe na kimya, ye moko abulisa bino nye. Tika mpe ete bobatelama kati na elimo mpe na motema mpe na nzoto na kokabwana te mpe na ekweli te kino na ntango na kozala [pa-rou-siˈa] ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Batesaloniki 5:23) Ee, lelo oyo ezala ete tozali kati na batikali to kati na ebele monene ya bampate mosusu, elimo ya kosala na bomoko ekangisi biso kati na bosembo mpo ete totikala peto mpe kozanga litono na eleko oyo ekeseni na bileko mosusu. Bobele bongo, tosengeli kozala na motema molai. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bandeko, bazala na mitema milai kino kozala [pa-rou-siˈa] ya Nkolo.... Bolendisa mitema na bino, mpo ete kozala [pa-rou-siˈa] ya Nkolo ebelemi.”—Yakobo 5:7, 8.
19. Likebisi nini ntoma Petelo apesaki biso na ntina na pa-rou-siˈa, mpe tosengeli kosala nini?
19 Ntoma Petelo mpe azalaki na likambo na koloba na biso baoyo tozali na bomoi na eleko oyo. Akebisaki biso na ntina na baseki, baoyo bakozala mingi kati na mabelé mobimba. Ntoma Petelo alobi ete: “Boyeba mpe oyo liboso ete na mikolo na nsuka baseki bakoya mpe bakoseka, bakotambola pelamoko na mposa mabe na bango mpenza, bakoloba ete: ˈWapi elaka na kozala [pa-rou-siˈa] na ye? Mpo ete longwa na ntango na kufa na bankoko, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na kozalisama.ˈ” (2 Petelo 3:3, 4) Atako baseki bazali mingi na ntango na kozala ya Klisto, libota na Jéhovah lizali kolanda kongenga lokola pole na mokili, mpo na lobiko ya bato mingi.
Mituna mpo na bozongeli
◻ Lolenge nini libota na Jéhovah lingengisamaki mokemoke na ntina na pa-rou-siˈa?
◻ Lolenge nini Matai 24:4-8 ekokisamaki?
◻ Mosala nini baanzelu basalaki elongo na Klisto ntango atyamaki mokonzi?
◻ Likambo nini ya kokamwa limonani ete lizali esika moko na pa-rou-siˈa?
◻ Esengo nini emonisami na boumeli ya eleko oyo, mpe nani azali kosangana na yango?