Moto na moto akofanda na nse ya nzete ya figi na ye
NA MIKILI ya Moyen-Orient, na eleko ya molunge, bato balukaka mingi bisika ya kobombana moi. Basepelaka mingi kobombana moi na nse ya nzete, mingimingi soki ezali pembeni ya ndako. Lokola nzete ya figi ezalaka na nkasa ya minene mpe bitape milai, epesaka mpiɔ koleka banzete mingi mosusu ya mikili yango.
Buku moko (Plants of the Bible) eyebisi ete “balobaka ete elilingi [ya nzete ya figi] epesaka mpiɔ koleka kutu mpiɔ ya kati ya hema.” Na Yisalaele ya kala, bato oyo bazalaki kosala na bilanga ya vinyo bazalaki kopema mwa moke na nse ya banzete ya figi oyo ezalaki pembenipembeni ya elanga.
Na mpokwa, nsima ya kosala mosala makasi na nse ya moi, libota mobimba bazalaki kofanda na nse ya nzete na bango ya figi mpo na kosolola. Lisusu, nzete ya figi ebotaka mbuma mingi mpe mbuma na yango ezalaka vitamini mingi. Yango wana, banda na ntango ya Mokonzi Salomo, kofanda na nse ya nzete ya figi ezalaki kolimbola kozala na kimya, na bomɛngo mpe na biloko mingi.—1 Mikonzi 4:24, 25.
Bankama ya bambula liboso, mosakoli Moize alobaki ete Mokili ya Ndaka ezali ‘mokili ya bafigi.’ (Deteronome 8:8, NW) Banɔngi zomi na mibale bazongaki na kaa ya Yisalaele ná bafigi mpe bambuma mosusu mpo na kolakisa ete mabelé ya mokili yango ezali malamu. (Mituya 13:21-23) Esali sikoyo mbula koleka nkama moko, moto moko asalaki mobembo na mikili ya Moyen-Orient alobaki ete banzete ya figi ezali bipai nyonso na mikili yango. Yango wana Makomami elobelaka mingi figi mpe nzete ya figi!
Nzete oyo ebotaka mbala mibale na mbula
Nzete ya figi eponaka mpenza mabelé te; lokola mpe misisa na yango ekendaka mosika mpenza na nse ya mabelé, nzete yango ekufaka te ata na bileko molai ya molunge oyo mbula ebɛtaka te na Moyen-Orient. Nzete yango ekeseni na banzete mosusu mpamba te ebotaka mbala mibale na mbula: ebotaka mwa moke na sanza ya Yuni mpe na nsima, ebotaka mingi kobanda na sanza ya Augusto. (Yisaya 28:4) Ntango banzete yango eboti na sanza ya Yuni, Bayisalaele bazalaki kolya mbuma na yango oyo babuki sika. Ntango nzete eboti mpo na mbala ya mibale, bazalaki kokaukisa mbuma na yango mpo na kosalela yango na boumeli ya mbula. Mbuma oyo bakaukisi bakokaki kosala na yango mikate, ntango mosusu bazalaki kosangisa yango na amande. Mikate ya figi ezalaki elɛngi mpe ezalaki na vitamini mingi.
Abigaili, mwasi ya mayele, amemelaki Davidi mikate 200 ya figi, mbala mosusu mpo amonaki ete yango nde bilei oyo ebongaki mpenza mpo na bato oyo bazalaki kokimakima. (1 Samwele 25:18, 27) Figi oyo bakamoli ezalaki mpe nkisi mpo na kosalisa bamaladi mosusu. Bakamolaki figi oyo ekauká mpe batyaki yango na bibɔ oyo elingaki koboma Mokonzi Hizikiya; kasi, soki Hizikiya abikaki ezalaki mpenzampenza nde likamwisi ya Nzambe.a—2 Mikonzi 20:4-7.
Na ntango ya kala, bato ya bamboka oyo ezali pembenipembeni ya Mbu ya Méditerranée bazalaki kolinga mingi figi ekauká. Caton, mokonzi moko ya Leta, alakisaki badepite ya mboka na ye mbuma moko ya figi mpo na kondimisa bango ete basengeli kobundisa Carthage na Etumba ya misato ya Punique. Na Loma, figi ekauká oyo elekaki kitoko ezalaki kouta na etúká ya Carie, na Asie Mineure. Yango wana, na Latin bakómaki kobenga figi ekauká carica. Tii lelo oyo, figi ekauká ya kitoko mingi eutaka na etúká yango oyo ezali sikoyo na ekólo Turquie.
Na Yisalaele, basali-bilanga bazalaki mbala mingi kolona nzete ya figi na bilanga ya vinyo, kasi bazalaki kokata nzete oyo ezali kobota te. Lokola mabelé ya malamu ezalaki mingi te, bakokaki kotika te ete nzete oyo ezali kobota te ezwa esika mpamba. Na lisese ya Yesu oyo elobelaki nzete ya figi oyo ebotaka te, nkolo bilanga alobaki na mosali na elanga ya vinyo ete: “Talá mbula misato yango oyo banda nazali koya koluka mbuma na nzete ya figi oyo, kasi nazali kozwa ata moko te. Katá yango! Mpo na nini mpenza ekanga mabelé mpambampamba?” (Luka 13:6, 7) Lokola na ntango ya Yesu bazalaki kofuta mpako mpo na nzete ya mbuma, soki nzete moko ezali kobota te ezalaki kobebisa mbongo ya nkolo na yango.
Figi ezalaki bilei ya ntina mingi mpo na Bayisalaele. Yango wana, soki figi eboti mingi te—mbala mosusu mpo Yehova alakeli bango mabe—ezalaki mpasi mingi mpo na mboka mobimba. (Hosea 2:12; Amosa 4:9) Mosakoli Habakuku alobaki boye: “Ata soki nzete ya figi ebimisi fololo te, mpe bilanga ya vinyo eboti mbuma te; ata soki mosala ya nzete ya olive ekei mpamba, mpe mikala ya ngomba ebimisi biloko ya kolya te . . . Kasi, ngai nakosepela kaka na Yehova; nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.”—Habakuku 3:17, 18, NW.
Maloba ya elilingi mpo na ekólo oyo ezangi kondima
Ntango mosusu Makomami elobelaka figi to nzete ya figi na maloba ya elilingi. Na ndakisa, Yilimia alobaki ete Bayuda ya sembo oyo bakendaki boombo bazali lokola kitunga ya figi ya malamu, oyo bazalaki kobuka ntango banzete eboti mpo na mbala ya liboso na mbula, oyo bazalaki kolya ntango babuki yango sika. Kasi, baombo oyo bazalaki sembo te akokanisaki bango na figi ya mabe, oyo bakokaki kolya te mpe basengelaki kobwaka yango.—Yilimia 24:2, 5, 8, 10.
Ntango apesaki ndakisa ya nzete ya figi oyo ebotaka te, Yesu amonisaki motema molai ya Nzambe mpo na Bayuda. Lokola tolobaki liboso, alobelaki moto moko oyo azalaki na nzete ya figi na elanga na ye ya vinyo. Mbula misato mobimba elekaki kasi nzete yango ezalaki kobota te, yango wana nkolo na yango alobaki ete bákata yango. Kasi mosali na elanga ya vinyo alobaki ete: “Nkolo, tiká yango lisusu mbula oyo, tii nakotimola zingazinga na yango mpe nakotya bipɔli; mpe soki eboti mbuma na mikolo ekoya, malamu mingi; kasi soki te, okokata yango.”—Luka 13:8, 9.
Yesu apesaki ndakisa yango ntango akokisaki mbula misato mobimba na mosala ya kosakola, azalaki kosala makasi mpo na kolona kondima na mitema ya Bayuda. Yesu abakisaki lisusu molende na mosala na ye, ‘atyaki bipɔli’ na nzete ya figi yango ya elilingi, elingi koloba ekólo ya Bayuda, mpo na kopesa yango libaku ya kobota mbuma. Kasi, na pɔsɔ oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, emonanaki polele ete bato ya ekólo yango baboyaki Masiya.—Matai 23:37, 38.
Yesu asalelaki lisusu elilingi ya nzete ya figi mpo na kolobela ndenge oyo ekólo yango ebebaki na elimo. Mikolo minei liboso akufa, ntango autaki na Betania mpe azali kokende na Yelusaleme, amonaki nzete moko ya figi oyo ezalaki na nkasa mingi, kasi ezalaki na mbuma te. Lokola figi ya liboso ebimaka nzela moko na nkasa—mbala mosusu kutu liboso nkasa ekola—emonanaki ete nzete yango ezali na ntina te lokola ebotaki mbuma te.—Malako 11:13, 14.b
Lokola nzete ya figi oyo ezali komonana malamu kasi ebotaka mbuma te, Bayuda bazalaki komonana malamu na libándá. Kasi babotaki mbuma te oyo ekokaki kosepelisa Nzambe, mpe nsukansuka, baboyaki Mwana ya Yehova. Yesu alakelaki nzete wana mabe, mpe na mokolo oyo elandaki, bayekoli bamonaki ete ekauki. Kokauka oyo nzete wana ekaukaki elimbolaki ete etikali moke Nzambe aboya Bayuda, ekólo oyo aponaki.—Malako 11:20, 21.
‘Bózwa liteya na nzete ya figi’
Yesu asalelaki mpe nzete ya figi mpo na koteya likambo moko ya ntina mingi na oyo etali kozala na ye. Alobaki boye: “Bózwa liteya oyo na nzete ya figi lokola ndakisa: Ntango kaka etape na yango ya sika ekómaka pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisaka nkasa, boyebaka ete eleko ya molunge ekómi pene. Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo wana nyonso, bóyeba ete azali pene na bikuke.” (Matai 24:32, 33) Ntango nkasa ya nzete ya figi ezwi langi ya mai ya pɔndu, elembo wana emonisaka mpenza ete eleko ya molunge ekómi pene. Ndenge moko mpe, esakweli monene ya Yesu oyo ezali na Matai mokapo 24, Malako mokapo 13, mpe Luka mokapo 21 ezali komonisa polele ete así azwi Bokonzi kuna na likoló.—Luka 21:29-31.
Lokola tozali na mikolo ya ndenge mosusu, na ntembe te tokolinga kozwa liteya na nzete ya figi. Soki tosimbi liteya yango mpe tolali mpɔngi te na elimo, elikya ezali ete tokomona kokokisama ya elaka oyo: “Ya solo, bakofanda moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto moko te akolɛngisa bango; mpamba te monɔkɔ ya Yehova ya bibele elobi yango.”—Mika 4:4, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ekeke ya 19, Henry Tristram, moto oyo azalaki koyekola bikelamu ya mokili, asalaki mobembo na mikili ya Moyen-Orient, kuna amonaki ete bato ya bamboka yango bazalaki naino kosalela figi oyo bakamoli mpo na kosalisa bibɔ.
b Likambo yango esalemaki pene na mboka Betefage. Nkombo yango elimboli “Ndako ya bafigi ya liboso.” Ekoki kozala ete banzete oyo ezalaki zingazinga ya mboka yango ezalaki kobota mbuma mingi ata na mbala ya liboso na mbula.