Ntina oyo Nzambe asepelaki na Noa mpe ntina oyo tosengeli kokeba
MINGI na biso bamikundolaka mokolo oyo bayokaki nsango moko ya ntina mingi. Tomikundolaka kaka te esika tozalaki mpe nini tozalaki kosala na ntango wana, kasi tomikundolaka mpe ndenge tomiyokaki. Ndenge moko mpe, Noa abosanaki soki moke te mokolo oyo Yehova Nzambe, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba asololaki na ye. Yango ezalaki nsango oyo elekaki mpenza na ntina! Yehova alobaki ete azwi ekateli ya koboma “bato nyonso.” Noa asengelaki kotonga masuwa moko ya monene mpo ye, libota na ye mpe banyama ya lolenge nyonso bábika.—Genese 6:9-21.
Noa asalaki nini? Asepelaki ntango ayokaki nsango yango to te? Ndenge nini ayebisaki libota na ye nsango yango? Biblia elobi te. Kasi, eyebisi biso ete: “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.”—Genese 6:22.
Wana nde likambo ya ntina mpenza, mpamba te maloba ya vɛrsɛ yango emonisi ntina moko oyo Nzambe asepelaki na Noa; Noa andimaki kosala oyo Nzambe asɛngaki ye. (Genese 6:8) Likambo nini mosusu etindaki Nzambe asepela na Noa? Eyano na motuna wana ezali na ntina mpo tosengeli kozala lokola Noa soki tolingi kobika ntango Nzambe akolongola mabe nyonso na mokili oyo. Kasi, liboso ya kozwa eyano yango, tótala naino ndenge bomoi ezalaki liboso Mpela eya.
Bademo bakiti na mabelé
Noa azalaki na bomoi na ebandeli mpenza ya mokili. Abotamaki soki mbula nkóto nsima ya kozalisama ya Adama. Na bokeseni na ndenge bato mingi bakanisaka, bato ya ntango wana bazalaki kofanda na kati ya mabulu te, bazalaki na nsuki nzoto mobimba te, bazalaki te bato bazangi mayele oyo bazalaki kotambola lokola banyama, na nzete na mabɔkɔ. Bazalaki na bisaleli ya bibende mpe ya kwivre, mpe ekoki kozala ete Noa asalelaki yango mpo na kotonga masuwa. Bazalaki mpe na bibɛtɛli ya miziki. Bato bazalaki kobala, kobota, kosala bilanga mpe kobɔkɔla bibwɛlɛ. Bazalaki kosomba mpe kotɛka biloko. Na makambo wana, bomoi ezalaki kaka ndenge ezali lelo.—Genese 4:20-22; Luka 17:26-28.
Kasi na makambo mosusu, bomoi ezalaki mpenza ndenge mosusu. Likambo moko ezali ete bato ya ntango wana bazalaki koumela mingi na bomoi. Ezalaki mpasi te komona moto aumela mbula koleka 800. Noa aumelaki mbula 950; Adama mbula 930 mpe Metusela, nkɔkɔ ya Noa, mbula 969.a—Genese 5:5, 27; 9:29.
Genese 6:1, 2 emonisi bokeseni mosusu na maloba oyo: “Na ntango bato bayaki mingi na mokili, mpe bana basi babotamaki na bango, bana babali ya Nzambe bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo eponaki bango.” “Bana babali ya Nzambe” ezalaki baanzelu oyo balataki nzoto ya bato mpe bakómaki kofanda na kati ya bato. Nzambe atindaki bango na mabelé te; bayaki mpe te mpo na kosalisa bato. Kasi, “basundolaki efandeli na bango moko mpenza” na likoló mpe bayaki awa na mabelé kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kitoko mpenza. Bakómaki bademo.—Yuda 6.
Baanzelu yango oyo bakómaki batomboki, oyo bazalaki kosala makambo elongobani te mpe bazalaki na nguya mpe na mayele koleka bato, babebisaki mpenza mokili. Na ntembe te, bakɔnzaki mokili. Bazalaki kosala makambo na bango na kobatama te lokola mobomi oyo amibombaka mpe asalaka makambo na ye ya mabe na molili. Nzokande, bamonisaki mpenza polele ete balingi lisusu te kotambwisama na Nzambe.
Bana wana ya Nzambe basangisaki nzoto na basi mpe basi yango babotaki bana oyo bazalaki makasi mpenza. Bayebanaki na nkombo ya Liebele “Nefilime.” Biblia elobi ete: “[Banefilime, NW] bazalaki na mokili na mikolo yango mpe na nsima lokola, wana eyaki bana na Nzambe epai ya bana basi ya bato mpe babotelaki bango bana. Baoyo bazalaki bilombe mpe na lokumu na kalakala.” (Genese 6:4) Bato bazalaki kobanga Banefilime mingi. Liloba “Nefilime” elimboli “Bakweisi,” elingi koloba bato oyo bakweisaka basusu. Bazalaki mpenza babomi oyo masapo ya kala elobelaka makambo ya nsɔmɔ oyo basalá.
Mosembwi atungisamaki
Biblia emonisi ete na ntango wana, mabe etondaki mpenza kotonda. Elobi boye: “Masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai ya mabe mikolo nyonso. . . . Mokili etondaki na yauli. . . . Bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.”—Genese 6:5, 11, 12.
Na mokili ya ndenge wana nde Noa azalaki. Na bokeseni na bato ya eleko na ye, “Noa azalaki moto ya sembo” oyo “atambolaki na Nzambe elongo.” (Genese 6:9) Ezalaka pɛtɛɛ te mpo na moto ya sembo kofanda na mokili oyo ezangi bosembo. Makambo oyo bato bazalaki koloba mpe kosala ezalaki mpenza kopesa Noa mpasi! Ekoki kozala ete azalaki kotungisama kaka lokola Lota, moto mosusu ya sembo oyo azalaki na bomoi nsima ya Mpela. Lota, moto oyo azalaki kofanda na kati ya bato ya Sodomo oyo bazalaki mabe mpenza, “atungisamaki makasi mpo na babuki-mibeko oyo bamipesaki na etamboli ya mbindo,” mpe “makambo oyo azalaki komona mpe koyoka ntango azalaki kofanda mokolo na mokolo na kati na bango [ezalaki] kotungisa molimo na ye ya boyengebene mpo na misala na bango ya botyoli-mibeko.” (2 Petelo 2:7, 8) Ezalaki mpe bongo mpo na Noa.
Otungisamaka na makambo mabe oyo oyokaka na radio to omonaka na televizyo to na makambo oyo bato oyo batosaka Nzambe te basalaka? Soki ezali bongo, okoki koyeba ndenge oyo Noa azalaki komiyoka. Kanisá mpasi oyo azalaki na yango ntango afandaki na kati mokili oyo ezangi bosembo na boumeli ya mbula 600. Tolobi bongo mpo ntango Mpela eyaki, Noa azalaki na mbula 600. Azalaki mpenza na mposa ete mabe esuka!—Genese 7:6.
Mpiko esalisaki Noa akesana na bato ya ntango na ye
Noa “azalaki moto . . . ya boyengebene kati na bato ya ntango na ye.” (Genese 6:9) Tósimba ete Biblia elobi ete azalaki moto ya boyengebene na kati ya, kasi te na miso ya, bato ya ntango na ye. Na maloba mosusu, azalaki moto ya sembo na miso ya Nzambe, kasi mpo na bato ya liboso ya Mpela, Noa azalaki yuma. Tokoki mpenza koloba ete azalaki kolanda te makanisi ya bato, to mpe komikɔtisa na masano ya mabe ya ntango wana. Kanisá naino ndenge bato bazalaki kotalela ye ntango abandaki kotonga masuwa! Na ntembe te, bazalaki kosɛka mpe kotyola ye. Bazalaki kondima ye ata moke te.
Longola wana, Noa azalaki na kondima makasi mpe abombaki yango mpo na ye moko te. Biblia elobi ete azalaki “mosakoli moko ya boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Na ntembe te, Noa ayebaki ete akokutana na botɛmɛli. Nkɔkɔ na ye Enoka azalaki moto ya sembo oyo asakolaki ete Nzambe akopesa bato mabe etumbu. Emonani mpenza ete yango ememelaki Enoka minyoko, kasi Nzambe apesaki nzela te ete batɛmɛli na ye báboma ye. (Genese 5:18, 21-24; Baebele 11:5; 12:1; Yuda 14, 15) Lokola Satana, bademo, Banefilime mpe bato nyonso batɛmɛlaki ye, Noa asengelaki kozala na mpiko mpe kondima ete Yehova akobatela ye.
Bato oyo basalelaka Nzambe te batɛmɛlaka ntango nyonso basaleli na ye. Ata Yesu ná bayekoli na ye bayinamaki. (Matai 10:22; Yoane 15:18) Noa azalaki na mpiko ya kosalela Nzambe atako bato mosusu bazalaki kosepela na likambo yango te. Ayebaki ete kondimama na Nzambe ezali na ntina mingi koleka kondimama na batɛmɛli ya Nzambe. Mpe Nzambe asepelaki na Noa.
Noa atyaki likebi
Ndenge tomoni yango, Noa asakwelaki basusu na mpiko nyonso. Ndenge nini batalelaki nsango oyo amemelaki bango? Biblia elobi ete liboso ya Mpela bato bazalaki “kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” Baboyaki koyoka likebisi.—Matai 24:38, 39.
Yesu alobaki ete ekozala mpe bongo na mikolo na biso. Banda mbula koleka nkama, Batatoli ya Yehova bazali kokebisa bato ete Yehova akokokisa mokano na ye ya kotya mokili ya sika ya sembo. Atako bamilio ya bato bandimi likebisi yango, bamiliare ya bato ya mokili bazali kotya likebi te. “Engebene mposa na bango,” bazali koboya kondima ete mpela esalemaki mpe bazali kobosana ndimbola na yango mpo na biso.—2 Petelo 3:5, 13.
Kasi, Noa atyaki likebi. Andimaki makambo oyo Yehova ayebisaki ye, mpe botosi na ye ebikisaki ye. Ntoma Paulo akomaki ete: “Na kondima Noa, nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe na ntina etali biloko oyo emonanaki naino te, amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye.”—Baebele 11:7.
Ndakisa ya kolanda
Masuwa oyo Noa atongaki ezalaki mpenza ebakata; ezalaki monene koleka libándá ya bale mpe molai lokola ndako ya etaze mibale. Ezalaki kutu monene koleka Wyoming, masuwa moko oyo elekaki monene na kati ya bamasuwa nyonso oyo esalemi na mabaya; elekaki yango na mɛtrɛ 30. Masuwa ya Noa ezalaki te lokola bamasuwa oyo tomonaka lelo. Atako bongo, esɛngaki mpenza mayele mingi mpo na kotonga yango. Esengelaki kopakola yango gudron na kati mpe na libándá. Ekoki kozala ete mosala ya kotonga masuwa yango ezwaki ye mbula koleka 50.—Genese 6:14-16.
Noa azalaki na makambo mosusu ya kosala. Asengelaki kosangisa biloko ya kolya ya mbula mobimba mpo na libota na ye mpe mpo na banyama. Liboso Mpela eya, asangisaki banyama mpe akɔtisaki yango na masuwa. “Noa asalaki nyonso [lokola] elakaki Nzambe ye.” Ezalaki mpenza esengo mpo na Noa ntango asilisaki mosala nyonso mpe Yehova akangaki masuwa!—Genese 6:19-21; 7:5, 16.
Na nsima, Mpela eyaki. Mbula ebɛtaki mikolo 40, butu na moi. Bango nyonso basengelaki kotikala na kati ya masuwa mbula mobimba tii ntango mai ekokauka. (Genese 7:11, 12; 8:13-16) Bato nyonso ya mabe bakufaki. Kaka Noa ná libota na ye nde batikalaki na mokili oyo epɛtolamaki na mabe.
Biblia elobi ete Mpela ya Noa ezali “ndakisa ya makambo oyo ekoya.” Na ndenge nini? Tozali kotánga boye: “Likoló mpe mabelé oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya lisambisi mpe ya libebi ya bato oyo batyolaka Nzambe.” Kasi, ndenge bato babikaki na mikolo ya Noa, bato mpe bakobika na mikolo na biso. Zalá na kondima ete “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.”—2 Petelo 2:5, 6, 9; 3:7.
Noa azalaki kobanga Nzambe, azalaki moto ya sembo na kati ya bato mabe. Atosaki Nzambe na makambo nyonso. Azalaki na mpiko ya kosala oyo ezali malamu atako ayebaki ete bato oyo bazalaki kolinga kosalela Nzambe te bakotyola mpe bakoyina ye. Soki tolandi ndakisa ya Noa, biso mpe tokondimama na Nzambe mpe tokozala na elikya ya kokɔta na mokili ya sika oyo etikali moke eya.—Nzembo 37:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Baumelaki mpenza bambula mingi?” na Lamuká! ya Ɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2007, na lokasa 30.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Ekoki kozala ete makambo ya nsɔmɔ oyo Banefilime basalá nde masapo elobelaka
[Elilingi na lokasa 7]
Soki tomekoli kondima ya Noa, Nzambe akoki kondima biso
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]
Alinari/Art Resource, NY