“Bókɛngɛlaka”—Ngonga ya kosambisa eyei!
Makambo oyo ezali na lisolo oyo euti na mwa buku Bókɛngɛlaka! oyo ebimaki na mayangani ya etúká oyo esalemaki na mobu 2004/2005.
“Bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.”—MATAI 24:42.
1, 2. Yesu akokanisaki koya na ye na nini?
OKOSALA nini soki oyoki ete moyibi moko azali kolekaleka na kartye na bino, azali kobuka bandako mpe koyiba? Mpo na kobatela libota mpe biloko na yo, okokɛngɛla. Okosala bongo mpo oyebi ete moyibi atindaka mokanda te mpo na koyebisa ntango akoya. Ayaka nde na mayele mpe na ntango oyo okanisaki te.
2 Yesu alobelaki mbala mingi na bandakisa na ye mayele oyo moyibi asalelaka. (Luka 10:30; Yoane 10:10) Na kotalela makambo oyo ekosalema na ntango ya nsuka mpe oyo ekosalema liboso ete aya mpo na kosambisa, Yesu alobaki boye: “Na yango, bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya. Kasi bóyeba likambo oyo, ete soki nkolo-ndako ayebaki na bokɛngɛli nini moyibi alingaki koya, mbɛlɛ alalaki mpɔngi te mpe mbɛlɛ atikaki te ete bábuka ndako na ye mpe bákɔta.” (Matai 24:42, 43) Na maloba wana, Yesu amonisaki ete akoya lokola moyibi, elingi koloba na ntango oyo tozali kozela ye te.
3, 4. (a) Kotosa likebisi oyo Yesu apesaki mpo na koya na ye esɛngaka nini? (b) Mituna nini likambo yango ebimisi?
3 Ndakisa yango ebongaki mpenza, mpamba te mokolo mpenza oyo Yesu akoya eyebani te. Mwa liboso, kaka na esakweli yango, Yesu alobaki boye: “Na oyo etali mokolo yango mpe ngonga yango moto moko te ayebi, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata ye moko.” (Matai 24:36) Yango wana, Yesu alendisaki bayekoli na ye boye: “Bómilɛngɛla.” (Matai 24:44) Baoyo bazali kotosa maloba wana ya Yesu bakomilɛngɛla mpe bakomitambwisa na ndenge ebongi, atako bayebi te mokolo to ngonga oyo akoya lokola motindami ya Yehova mpo na kosambisa bato.
4 Yango ebimisi mituna ya ntina mingi lokola oyo: Likebisi oyo Yesu apesaki ezali kaka mpo na bato ya mokili to baklisto mpe basengeli ‘kokɛngɛlaka’? Mpo na nini ezali na ntina mingi ‘tókɛngɛlaka’ mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
Likebisi mpo na banani?
5. Ndenge nini toyebi ete likebisi oyo ete “bókɛngɛlaka,” ezali mpe mpo na baklisto ya solo?
5 Ya solo, koya ya Nkolo ekozala lokola moyibi mpo na bato ya mokili, oyo bazali koboya koyoka likebisi oyo Yesu apesi mpo na likambo ya nsɔmɔ oyo ezali koya. (2 Petelo 3:3-7) Kasi, ezali boni mpo na baklisto ya solo? Ntoma Paulo akomelaki baninga na ye bandimi boye: “Bino moko boyebi malamumalamu ete mokolo ya Yehova ekoya mpenzampenza lokola moyibi na butu.” (1 Batesaloniki 5:2) Tondimaka kozanga ntembe ete “mokolo ya Yehova ekoya.” Yango elingi nde koloba ete ezali na ntina te tókɛngɛlaka? Tósimba ete ezalaki epai ya bayekoli na ye nde Yesu alobaki boye: “Na ngonga oyo bozali kokanisa te ete ezali yango, Mwana ya moto akoya.” (Matai 24:44) Mwa liboso, ntango ayebisaki bayekoli na ye bálukaka ntango nyonso Bokonzi, Yesu alobaki boye: “Bómilɛngɛla, mpamba te na ngonga oyo bozali kutu kokanisa te nde Mwana ya moto akoya.” (Luka 12:31, 40) Omoni te ete Yesu azalaki nde koloba na bayekoli na ye ntango alobaki, “Bókɛngɛlaka”?
6. Mpo na nini ezali na ntina ‘tókɛngɛlaka’?
6 Mpo na nini tosengeli ‘kokɛngɛlaka’ mpe ‘komilɛngɛla’? Yesu alobaki boye: “Bato mibale bakozala na kati ya bilanga: moko akokamatama mpe mosusu akosundolama; basi mibale bakozala kotuta na etutelo moko ya mabɔkɔ: moko akokamatama mpe mosusu akosundolama.” (Matai 24:40, 41) Baoyo bazali komilɛngɛla ‘bakokamatama’ to bakobika, kasi mokili oyo eyebi Nzambe te ekobebisama. Bamosusu ‘bakosundolama’ mpo bábebisama, mpamba te bazalaki na lokoso nyonso komitambwisa ndenge motema na bango elingi. Kati na bango, ekoki kozala mpe na bato oyo bayebaki solo, kasi bakɛngɛlaki te.
7. Kozanga koyeba ntango nsuka ekoya epesi biso likoki ya kosala nini?
7 Kozanga koyeba mpenza mokolo ebongiseli oyo ekosuka epesi biso likoki ya komonisa ete tozali kosalela Nzambe na makanisi ya malamu. Mpo na nini tolobi bongo? Ekoki komonana ete nsuka ezali koya noki te. Likambo ya mawa, baklisto mosusu oyo bakanisaka bongo balɛmbisi mabɔkɔ na mosala ya Yehova. Nzokande, ntango tomipesaki na Yehova, tolobaki na ye ete tokosalela ye na motema mobimba. Baoyo bayebi Yehova bayebi ete akoki te kokosama na molende oyo moto amonisi kaka na miniti ya nsuka. Yehova amonaka oyo ezali na kati ya motema ya moto.—1 Samwele 16:7.
8. Ndenge nini bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tókɛngɛla?
8 Lokola tolingaka mpenza Yehova, tosepelaka mingi kosala mokano na ye. (Nzembo 40:8; Matai 26:39) Mpe tozali na mposa ya kosalela ye libela na libela. Atako tosengeli kozela kokokisama ya elikya yango ntango molai koleka ndenge tokanisaki, elikya yango ezali kaka na motuya mingi. Likambo ya ntina koleka, tokɛngɛlaka mpo toyebi ete mokolo ya Yehova ekozala mokolo moko ya ntina mingi mpo na kokokisama ya mokano na ye. Mposa na biso makasi ya kosepelisa Nzambe ezali kotinda biso tósalela batoli ya Liloba na ye mpe tótya Bokonzi na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. (Matai 6:33; 1 Yoane 5:3) Tótala sikoyo ndenge mikano mpe bomoi na biso ya mokolo na mokolo ekozala soki tozali kokɛngɛla.
Bomoi na yo ezali kokende wapi?
9. Mpo na nini esengeli mpenza bato ya mokili báyeba ntina ya makambo oyo ezali kosalema na mikolo na biso?
9 Bato mingi lelo oyo bazali kondima ete mikakatano ya makasi mpe makambo ya mabe mpenza ekómi komonana mikolo nyonso, mpe ekoki kozala ete bakómi komituna soki bomoi na bango ezali kokende wapi. Kasi, bayebi ntina mpenza oyo makambo yango ezali kosalema? Bayebi mpenza ete tokómi na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo”? (Matai 24:3) Bayebi nde ete lokola bato bakómi koluka kaka matomba na bango moko, ndenge mobulu mpe bizaleli mabe ebakisami, yango ezali komonisa ete tozali na “mikolo ya nsuka”? (2 Timote 3:1-5) Esengeli mpenza bato báyeba ntina ya makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe báyeba epai bomoi na bango ezali kokende.
10. Tosengeli kosala nini mpo tótika te kokɛngɛla?
10 Ezali boni mpo na biso? Mokolo na mokolo, tozwaka bikateli na makambo etali mosala, kosalisa nzoto, libota na biso mpe losambo na biso. Toyebi oyo Biblia ezali koloba mpe tosalaka nyonso mpo na kosalela yango. Kasi, tosengeli komituna boye: ‘Natiki nde mitungisi ya bomoi ezongisa ngai nsima na makambo ya elimo? Nalandaka nde makanisi ya mokili ntango nazali kozwa bikateli?’ (Luka 21:34-36; Bakolose 2:8) Tosengeli kokoba komonisa ete totyaka motema na biso mobimba epai ya Yehova, kasi na mayele na biso moko te. (Masese 3:5) Soki tosali bongo, tokokoba ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo,’ elingi koloba bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.—1 Timote 6:12, 19.
11-13. Liteya nini tokoki kozwa na bandakisa ya makambo oyo esalemaki (a) na ntango ya Noa? (b) na ntango ya Lota?
11 Biblia ezali na masolo ebele oyo ekoki kosalisa biso tókɛngɛlaka. Tótalela likambo oyo esalemaki na ntango ya Noa. Bambula ebele liboso apesa etumbu, Nzambe azwaki bibongiseli ete likebisi epesama. Kasi, longola Noa ná libota na ye, bato batyaki ata likebi te. (2 Petelo 2:5) Mpo na yango, Yesu alobaki boye: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo se ndenge bazalaki na mikolo yango liboso ya mpela, kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:37-39) Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? Soki basusu kati na biso batiki makambo ya mokili, ezala ata makambo ya ntina na bomoi, ezwa esika ya makambo ya elimo oyo Nzambe azali kosɛnga biso tótyaka na esika ya liboso, basengeli kotalela lisusu malamumalamu bomoi na bango.—Baloma 14:17.
12 Kanisá mpe oyo esalemaki na ntango ya Lota. Engumba ya Sodoma, epai Lota ná libota na ye bazalaki kofanda ezalaki na bozwi mingi, kasi ezaleli ya mbindo ezalaki mpe mingi. Yehova atindaki baanzelu na ye bábebisa engumba yango. Baanzelu yango bayebisaki Lota ná libota na ye bálongwa nokinoki na Sodoma mpe bátala nsima te. Baanzelu balendisaki bango mpe babimaki na engumba yango. Nzokande, emonani mpenza ete makanisi ya mwasi ya Lota ezalaki kaka na ndako na ye oyo etikalaki na Sodoma. Lokola atosaki te, atalaki na nsima mpe mpo na yango akufaki. (Genese 19:15-26) Yesu asakolaki boye: “Bókanisa mwasi ya Lota.” Totosaka likebisi yango na bomoi na biso?—Luka 17:32.
13 Bato oyo batosaki makebisi ya Nzambe babikaki. Yango nde ekómelaki Noa ná libota na ye mpe Lota ná bana na ye. (2 Petelo 2:9) Ntango tozali komanyola na makebisi oyo Nzambe apesaki na bandakisa wana, tokolendisama mpenza na nsango ya kosikolama oyo epesami wana mpo na bato oyo balingaka boyengebene. Yango epesaka biso elikya makasi ete Nzambe akozanga te kokokisa elaka oyo apesá biso ya ‘likoló ya sika mpe mabelé moko ya sika’ oyo “boyengebene ekofanda” na kati na yango.—2 Petelo 3:13.
‘Ngonga ya kosambisa eyei’!
14, 15. (a) “Ngonga” ya kosambisa ezali nini? (b) ‘Kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo’ esɛngi nini?
14 Ntango tozali kokɛngɛla, nini tosengeli kobosanaka te? Mokanda ya Emoniseli elobeli ndenge makambo ekolandana kino ntango mokano ya Nzambe ekokokisama. Soki tolingi komilɛngɛla, ezali mpenza na ntina tósala makambo oyo mokanda yango elobi. Esakweli yango elobeli na maloba ya polele makambo oyo esengelaki kosalema na “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki ntango Klisto azwaki Bokonzi na likoló na 1914. (Emoniseli 1:10) Emoniseli ebendi likebi na biso epai ya anzelu moko oyo bapesaki “nsango malamu ya seko mpo na kosakola.” Azali koloba na mongongo makasi ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei.” (Emoniseli 14:6, 7) “Ngonga” yango ya kosambisa ezali eleko moko mokuse, mpo na kosakola bitumbu oyo elobelami na esakweli yango mpe kopesa bitumbu yango. Tozali sikoyo na eleko yango.
15 Sikoyo, liboso ngonga ya kosambisa ekóma na nsuka, Biblia elendisi biso ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo.” Yango ezali kosɛnga nini? Kobanga Nzambe esengeli kotinda biso tóboya mabe. (Masese 8:13) Soki tozali kopesa Nzambe lokumu, tokoyoka ye na limemya nyonso. Tokolekisa te ntango mingi na makambo mosusu mpe kobosana kotánga Biblia, Liloba na ye, mbala na mbala. Tokotala mpamba te toli oyo apesi biso ete tózangisaka makita ya boklisto te. (Baebele 10:24, 25) Tokosepela na libaku malamu oyo tozali na yango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekoyangelama na Masiya, mpe tokobanda kosala yango na molende. Tokobanda ntango nyonso kotyela Yehova motema na biso mobimba. (Nzembo 62:8) Lokola tondimaka ete Yehova azali Mokonzi ya Molɔ́ngɔ́ mobimba, topesaka ye lokumu na ndenge totosaka ye na motema na biso mobimba lokola Mokonzi ya bomoi na biso. Obangaka mpenza Nzambe mpe opesaka ye nkembo na banzela nyonso wana?
16. Mpo na nini tokoki koloba ete kosambisama ya Babilone Monene oyo elobelami na Emoniseli 14:8 esilá kosalema?
16 Emoniseli mokapo 14 elobeli makambo mosusu oyo ekosalema na ngonga ya kosambisa. Elobeli libosoliboso Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba na maloba oyo: “Mosusu, anzelu ya mibale, alandaki, kolobáká ete: ‘Akwei! Babilone Monene akwei.’” (Emoniseli 14:8) Ya solo, na miso ya Nzambe, Babilone Monene asilá kokwea. Na 1919, basaleli ya Yehova oyo bapakolami na elimo balongwaki na boombo ya mateya mpe mimeseno ya Babilone, oyo ezali kokonza bato mpe bikólo banda bankóto na bankóto ya bambula. (Emoniseli 17:1, 15) Banda wana, bazali komipesa mpo na kotombola losambo ya solo. Kobanda na ntango yango, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama na mokili mobimba.—Matai 24:14.
17. Nini tosengeli kosala mpo na kobima na Babilone Monene?
17 Kasi wana ezali etumbu ya nsuka te oyo Nzambe apesi Babilone Monene. Mosika te, akobebisama libela. (Emoniseli 18:21) Talá ntina oyo Biblia ezali koyebisa bato bipai nyonso ete: “Bóbima na kati na ye [Babilone Monene] . . . soki bolingi te kosangana ná ye na masumu na ye.” (Emoniseli 18:4, 5) Ndenge nini tokoki kobima na Babilone Monene? Yango esɛngi kaka te kotika kosangana na losambo ya lokuta. Mimeseno ya Babilone ezali komonana na bafɛti mpe na mimeseno ya bato mingi, na lolenge oyo mokili etalelaka makambo ya kosangisa nzoto, na masano oyo ezali kolendisa bikelakela, mpe bongo na bongo. Soki tolingi kokɛngɛlaka, ezali na ntina mingi tómonisa na makambo oyo tozali kosala mpe na bamposa ya mitema na biso ete tokati mpenza boyokani nyonso na Babilone Monene.
18. Na kotalela makambo oyo Emoniseli 14:9, 10 elobi, baklisto oyo bazali kokɛngɛla baboyaka makambo nini?
18 Emoniseli 14:9, 10 elobeli likambo mosusu etali “ngonga ya kosambisa.” Anzelu mosusu alobi boye: “Soki moto asambeli nyama mabe mpe elilingi na ye, mpe azwi elembo na elongi na ye to na lobɔkɔ na ye ya mobali, akomɛla mpe vinyo ya nkanda ya Nzambe.” Mpo na nini? “Nyama mabe mpe elilingi na ye” ezali komonisa boyangeli ya bato, oyo ezali kondima boyangeli ya Yehova te. Baklisto oyo bazali kokɛngɛla bakebaka ete, ezala na makanisi na bango to na makambo oyo bazali kosala, bálanda to bázwa te elembo oyo ekomonisa ete bandimi boyangeli ya bato oyo bazali koboya bokonzi ya Nzambe ya solo Yehova, oyo eleki nyonso. Baklisto bayebi ete Bokonzi ya Nzambe esilá kotyama na likoló, ete bokonzi yango ekosukisa bikonzi nyonso ya bato mpe ekotikala libela na libela.—Danyele 2:44.
Kotika te kokɛngɛlaka!
19, 20. (a) Lokola tozali kopusana na nsuka ya mikolo ya nsuka, tosengeli kobosana te ete Satana akoluka kosala nini? (b) Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
19 Ntango tozali kopusana na nsuka ya mikolo ya nsuka, mikakatano mpe komekama ekobakisama se kobakisama. Lokola tozali kaka na ebongiseli ya makambo oyo mpe tozali kaka bato ya kozanga kokoka, tokotika te kotungisama na makambo lokola maladi, kokóma mobange, kokufela bandeko, mawa to nkanda, kotungisama na makanisi ntango bato bazali kosepela te na Liloba ya Nzambe oyo tozali kosakwela bango, mpe bongo na bongo. Tóbosana te ete mokano ya Satana ezali kaka ya kosalela mikakatano oyo tozali kokutana na yango mpo na kolɛmbisa biso tótika kosakola nsango malamu to tótika kotosa mitinda ya Nzambe. (Baefese 6:11-13) Soki totali malamu, ntango oyo ezali ntango ya kotika kokɛngɛla te!
20 Yesu ayebaki ete tokokutana na mikakatano ebele oyo ekoki kolɛmbisa biso, yango wana apesaki toli oyo: “Bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.” (Matai 24:42) Yango wana, tosengeli ntango nyonso kotalelaka ntango oyo tokómi sikoyo. Tókeba na mayele mabe ya Satana oyo ekoki kolɛmbisa biso to kotinda biso tótika solo. Tózwa ekateli makasi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mpiko mpe na molende. Ɛɛ, tiká ete tólala mpɔngi te mpe tókoba kolanda toli ya Yesu oyo: “Bókɛngɛlaka.” Soki tozali kosala bongo, tokopesa Yehova lokumu mpe tokozala na kati ya bato oyo bazali na elikya ya kozwa mapamboli na ye libela na libela.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini toyebi ete likebisi ya Yesu oyo ete “bókɛngɛlaka,” ezali mpe mpo na baklisto ya solo?
• Bandakisa nini ya Biblia ekoki kosalisa biso ‘tókɛngɛlaka’?
• Ngonga ya kosambisa ezali nini, mpe tolendisami na kosala nini liboso ete ngonga yango ekóma na nsuka?
[Elilingi na lokasa 23]
Yesu alobaki ete koya na ye ekozala lokola moyibi
[Elilingi na lokasa 24]
Kobebisama ya Babilone Monene ekómi pene
[Bililingi na lokasa 25]
Tózala na ekateli makasi ya kosakola na mpiko mpe na molende