Oyebaki yango?
Banganga-minzoto oyo bakendeki kotala Yesu ntango azalaki mwana moke, bazalaki banani?
▪ Ndenge Evanzile ya Matai elobeli lisolo ya kobotama ya Yesu, bapaya oyo bautaki na “ɛsti” oyo bamonaki monzoto ya mokonzi moko ya sika, bamemelaki Yesu bakado. Na makomi ya Grɛki, Evanzile yango ebengi bapaya yango maʹgoi, oyo elimboli “banganga-minzoto.” (Matai 2:1) Makambo nini toyebi na ntina na bango?
Makomi ya libosoliboso oyo esengeli kotyelama motema na oyo etali banganga-minzoto ezali oyo Hérodote, Mogrɛki mpe moto ya mayele na makambo ya istware akomaki. Hérodote azalaki na bomoi na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso; akomaki ete banganga-minzoto bazalaki etuluku moko ya banganga-nzambe ya Perse oyo bayekolaki ndenge ya kotalaka minzoto, kolimbola bandɔtɔ, mpe misala ya bonganga-nkisi. Na ntango ya Hérodote, lingomba ya Zoroastre nde ezalaki na Perse. Na yango, banganga-minzoto oyo alobelaki bakokaki kozala banganga-nzambe ya lingomba ya Zoroastre. Zulunalo moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi boye: “Na ndenge eyebanaki, mágos epai ya Bagrɛki ezalaki moto oyo azalaki na mayele mpe makoki oyo eleki ya bato mpe na bantango mosusu azalaki kosala bonganga-nkisi.”
Mwa ndambo ya bato mosusu ya mayele oyo bazalaki “bakristo” na ndakisa, Justin Martyr, Origène, mpe Tertullien, balobelaki banganga-minzoto oyo bakendaki kotala Yesu ete bazalaki bato oyo batalaka minzoto. Na ndakisa, na buku na ye (On Idolatry), Tertullien akomaki boye: “Toyebi ete maji ezali na boyokani na mayele ya kotala minzoto. Na yango, bato oyo bazalaki kolimbola minzoto bazalaki bato ya liboso . . . ya komemela ye [Yesu] ‘bakado.’” Na boyokani na likambo yango, mabongoli mingi ya Biblia ebongolaka liloba ma’goi na “bato oyo batalaka minzoto.”
Mpo na nini Matai alobi ete maloba oyo ezali na mokanda ya Zekaria ezali ya mosakoli Yirimia?
▪ Maloba yango ezali na Matai 27:9, 10, epai mokomi ya Evanzile alobelaki mbongo oyo bapesaki Yudasi Mokeriota mpo na kotɛka Yesu. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Bongo makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yirimia ekokisamaki: ‘Mpe bakamataki shekele ya palata ntuku misato (30), motuya ya moto oyo batyelaki motuya, . . . mpe bapesaki yango mpo na elanga ya moyemi-mbɛki.’” Moto oyo alobeli esakweli ya shekele ya palata 30 ezali Zekaria, kasi Yirimia te.—Zekaria 11:12, 13.
Na bantango mosusu, ntango bazalaki kosangisa mikanda oyo ezalaki kobengama “Basakoli” bazalaki kobanda nde na mokanda ya Yirimia na esika ya kobanda na mokanda ya Yisaya. (Matai 22:40) Na yango, ntango Matai alobelaki “Yirimia” na vɛrsɛ yango, azalaki nde kolobela eteni mobimba ya Makomami oyo ebengamaki na nkombo ya mokanda na yango ya liboso. Mokanda ya Zekaria ezalaki mpe na kati ya eteni yango ya Makomami.
Ndenge moko, Yesu abengaki “Nzembo” mikanda mingi ya Biblia oyo eyebani mpe lokola Makomi. Na yango, ntango alobaki ete makambo nyonso oyo ekomamaki na ntina na ye “na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo” esengelaki kokokisama, azalaki kolobela bisakweli oyo ezalaki na Makomami nyonso ya Ebre.—Luka 24:44.