Batelá motema na yo
“Liboso ya biloko nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpamba te yango nde ezali na maziba ya bomoi.”—MASESE 4:23, NW.
1, 2. Mpo na nini tosengeli kobatela motema na biso?
MOPƐPƐ moko ya makasi elekaki na esanga moko ya Caraïbes; ntango mopɛpɛ ekitaki, mobali moko mobange abimaki na esika oyo amibombaki. Ntango atalaki biloko oyo mopɛpɛ ebebisaki, amonaki ete mopɛpɛ ememaki nzete moko monene oyo ezalaka pene na porte ya lopango na ye. Amitunaki ete, ‘Ndenge nini mopɛpɛ ekoki kokumba ebakata ya nzete wana, nzokande banzete mosusu ya mikemike oyo ezalaki pembeni etikali?’ Ntango atalaki malamu ekumu ya nzete yango, azwaki eyano. Nzete yango ezalaki komonana libándá ete epikama makasi, nzokande esilaki kopɔla na kati; mopɛpɛ eyaki kaka komonisa yango.
2 Ezalaka mpenza mawa soki mosambeli moko ya solo oyo azalaki komonana ete apikami mpenza na losambo ya boklisto akwei ntango kondima na ye emekami. Yango wana, Biblia elobi solo ete “makanisi na motema ya moto izali mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Elingi koloba ete soki kaka tomeki kolala mpɔngi, ata soki sikoyo tozali na motema ya malamu mpenza, motema yango ekoki kobendama na makambo ya mabe. Lokola motema ya moto nyonso ya kozanga kokoka ekoki kotika nzela ya sembo, ezali na ntina mingi tólanda toli oyo: “Liboso ya biloko nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo.” (Masese 4:23, NW) Kasi, ndenge nini tokoki kobatela motema na biso ya elilingi?
Tosengeli kotalaka motema na biso mbala na mbala
3, 4. (a) Mituna nini ekoki kotunama mpo na motema na biso ya solo? (b) Nini ekoki kosalisa biso mpo na kotala motema na biso ya elilingi?
3 Soki okei kotalisa nzoto epai ya monganga, na ntembe te akotala mpe motema na yo. Akoluka koyeba soki nzoto na yo mobimba, na motema na yo mpe, ezali komonisa ete ozali kolya malamu. Tansiɔ na yo ezali ndenge nini? Motema na yo ezali kobɛta malamu mpe makasi? Osalisaka nzoto na yo fizike na ndenge oyo esengeli? Ozali na mitungisi mingi na motema na yo?
4 Soki motema ya solo ezalaka na mposa bátalaka yango mbala na mbala, tokoloba boni mpo na motema na yo ya elilingi? Yehova atalaka motema yango. (1 Ntango 29:17, NW) Biso moko mpe tosengeli kotalaka yango. Ndenge nini? Na ntango tozali komituna mituna lokola oyo: Motema na ngai ezali kolya malamu na elimo na nzela ya boyekoli na ngai moko mpe na makita? (Nzembo 1:1, 2; Baebele 10:24, 25) Motema na ngai ezali kobanzabanza maloba ya Yehova lokola “mɔ́tɔ na kozikisa mobombami kati na mikuwa na ngai” mpe ezali kotinda ngai nasakola Bokonzi mpe nakómisa bato bayekoli? (Yilimia 20:9; Matai 28:19, 20; Baloma 1:15, 16) Nazali na mposa ya kobunda makasi, elingi koloba ya kosala mosala moko ya ntango nyonso soki likoki ezali? (Luka 13:24) Nazali kotika motema na ngai ya elilingi na makambo ya ndenge nini? Nazali koluka boninga ya bato oyo batyaka motema na bango mobimba na losambo ya solo? (Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:33) Esengeli tómonaka nokinoki esika nyonso oyo mbeba ezali mpe tósalaka mbala moko oyo esengeli mpo na kobongisa.
5. Soki kondima na biso emekami, litomba ekoki kozala nini?
5 Kondima na biso emekamaka mbala na mbala. Komekama yango epesaka biso mabaku ya koyeba ndenge oyo motema na biso ezali. Ntango Bayisalaele bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Mose ayebisaki bango boye: “[Yehova] Nzambe na yo akambi yo mbula ntuku minei oyo na lisobe, ete akitisa lolendo na yo, mpe ameka yo mpo na koyeba makambo ya motema na yo, soko ozalaki na mokano ya kotosa malako na ye, soko te.” (Deteronome 8:2) Mbala mingi biso moko tokamwaka na makanisi to bamposa mosusu oyo eyelaka biso ntango tokutani na makambo to komekama oyo tokanisaki te! Soki Yehova atiki nzela ete tómekama, yango ekoki kosalisa biso tóyeba bolɛmbu na biso mpe ekopesa biso libaku ya kobongwana mpe kokende liboso. (Yakobo 1:2-4) Tókanisaka ntango nyonso mpe tóbondelaka mpo na koyeba ndenge oyo tokosala soki tomekami!
Maloba na biso emonisaka nini?
6. Makambo oyo tolingaka kolobela mingi ekoki komonisa nini mpo na motema na biso?
6 Ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo tozali kobatela na motema na biso? Yesu alobaki ete: “Moto malamu akobimisa makambo malamu oyo elongwe na motema na ye, moto mabe akobimisa makambo ya mabe oyo elongwe na motema na ye. Mpamba te moto abimisaka na monoko makambo oyo etondi na motema na ye.” (Luka 6:45, Boyokani ya Sika) Makambo oyo tolobelaka mingi ekoki mpenza komonisa epai oyo motema na biso ezali. Tolobelaka mingi biloko ya mokili mpe mikano oyo tokoki kokokisa na mokili? Masolo na biso ebalukaka mingi na makambo ya elimo mpe na mikano ya elimo? Tozalaka na ezaleli ya kolobaloba mabunga ya basusu na esika tózipa yango? (Masese 10:11, 12) Tolingaka kolobela mingi bato mpe makambo oyo etali bango, kasi makanisi mpe mitinda ya malamu tolobelaka yango mingi te? Ekoki te kozala mbala mosusu elembo ete tozali kokɔta na makambo ya bato?—1 Petelo 4:15.
7. Likambo oyo bandeko zomi ya Yosefe basalaki ezali koteya biso nini na oyo etali kobatela motema na biso?
7 Tótalela likambo moko oyo esalemaki na libota moko monene. Bana zomi ya Yakobo “bakokaki kolobela [leki na bango Yosefe] na motema malamu te” mpo bazalaki koyokela ye zuwa mpamba te tata na bango alingaki ye mingi. Na nsima, ntango Nzambe alɔtisaki Yosefe bandɔtɔ, likambo oyo emonisi ete Yehova asepelaki na ye, bandeko na ye “bayinaki ye na koleka.” (Genese 37:4, 5, 11) Basalaki likambo moko mabe mpenza: batɛkaki ndeko na bango lokola moombo. Na nsima, mpo mabe na bango eyebana te, bakosaki tata na bango mpe akanisaki ete nyama ya zamba nde ebomaki ye. Bandeko zomi ya Yosefe babatelaki motema na bango te na likambo wana. Soki tozali na ezaleli ya kotɔnga bato mosusu, tótalela likambo yango malamu, mbala mosusu ezali elembo ete tozali na likunya to na zuwa na motema na biso! Tosengeli kokebaka na maloba na biso mpe kobengana mbala moko makanisi nyonso ya mabe.
8. Nini ekosalisa biso mpo na kotalela motema na biso soki tobuki lokuta?
8 “Nzambe akoki komimonisa na lokuta . . . te,” nzokande, lokuta ezalaka mosika te na monɔkɔ ya bato nyonso ya kozanga kokoka. (Baebele 6:18) Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Bato nyonso bazali na lokuta.” (Nzembo 116:11) Kutu, ata ntoma Petelo akosaki mbala misato mobimba ete ayebi Yesu te. (Matai 26:69-75) Tozali komona polele ete tosengeli mpenza kokebaka mpo tóbuka lokuta te, mpamba te Yehova ayini “lolemo ya nkuta.” (Masese 6:16-19) Soki ekómeli biso na kobuka lokuta, ekozala malamu tókanisa likambo nini mpenza ememi biso na kosala bongo. Ezalaki nde kobanga bato? Tobangaki kozwa etumbu? Mbala mosusu tobangaki koyoka nsɔni to tosalaki yango na moimi? Ezala likambo nini oyo etindaki biso, ebongi mpenza tótalela yango malamumalamu, tómikitisa mpe tóndima libunga na biso mpe tósɛnga Yehova bolimbisi, na nsima, tósɛnga ye asalisa biso na kolonga bolɛmbu yango! “Bankulutu na kati ya lisangá” babongi mpenza mpo na kopesa biso lisalisi ya ndenge wana.—Yakobo 5:14, NW.
9. Mabondeli na biso ekoki komonisa nini mpo na motema na biso?
9 Ntango Mokonzi Salomo azalaki naino elenge, asɛngaki na Yehova apesa ye mayele mpe boyebi, mpe Yehova alobaki ete: “Mpo ete oyo ezalaki kati na motema na yo mpe olɔmbi misolo te to biloko ya motuya te to lokumu te . . . , boye mayele mpe boyebi ikopesamela yo mpe nakopesa yo mosolo mpe biloko ya motuya mpe lokumu.” (2 Ntango 1:11, 12) Na makambo oyo Salomo asɛngaki mpe oyo asɛngaki te, Yehova ayebaki oyo Salomo alingaki mingi na motema na ye. Mabondeli na biso epai ya Nzambe emonisaka ete tozali na motema ya ndenge nini? Mabondeli na biso emonisaka ete tozali na mposa ya boyebi, ya mayele mpe bososoli? (Masese 2:1-6; Matai 5:3) Tokanisaka mpenza matomba ya bokonzi na motema na biso? (Matai 6:9, 10) Soki na mabondeli na biso nyonso tokómi kozongela kaka makambo ndenge moko mpe tokómi koloba lokola tsaku, ekoki komonisa ete tozali na mposa ya kozwa ntango ya kokanisa misala ya Yehova. (Nzembo 103:2) Moklisto mokomoko asengeli kotalelaka malamu mabondeli na ye soki ezali komonisa nini.
Misala na biso ezali komonisa nini?
10, 11. (a) Ekobo mpe pite ebandaka wapi? (b) Nini ekosalisa biso ‘tósala ekobo na motema na biso’ te?
10 Balobaka ete kosala eleki koloba. Ya solo, misala na biso emonisaka malamu mpenza ndenge oyo motema na biso ezali. Na ndakisa, na likambo etali etamboli ya malamu, kobatela motema elimboli kaka te koboya kosala pite to ekobo. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:28) Ndenge nini tokoki koboya kosala ekobo ata na motema na biso?
11 Yobo, moto moko ya sembo na ntango ya kala, apesi baklisto mibali mpe basi ndakisa ya malamu. Na ntembe te na misala na ye ya mokolo na mokolo, Yobo azalaki kokutana na bilenge basi mpe azalaki kosalisa bango na ntango bazali na mposa ya lisalisi. Kasi moto yango ya sembo azalaki na makanisi ya kolula bango te. Mpo na nini? Mpamba te azwaki ekateli makasi na motema na ye ya kotala basi na mposa ya mabe te. Alobaki boye: “Nakati kondimana na miso na ngai elongo, nzela nini kutu nakoki kotalaka epai ya moseka?” (Yobo 31:1) Tiká ete biso mpe tósala kondimana ya ndenge wana na miso na biso mpe tóbatela motema na biso.
12. Ndenge nini okoki kosalela makanisi ya Luka 16:10 na likambo etali kobatela motema?
12 Mwana ya Nzambe alobaki ete: “Oyo azali sembo na likambo lileki moke azali mpe sembo na likambo monene. Oyo azali sembo te na likambo lileki moke azali mpe sembo te na likambo lileki monene.” (Luka 16:10) Ya solo, tosengeli kokebaka na etamboli na biso na makambo mikemike oyo tosalaka mokolo na mokolo, ata oyo tosalaka ntango tozali biso moko na kati ya ndako. (Nzembo 101:2) Ntango tofandi na kati ya ndako na biso, ezala tozali kotala televizyo to tozali kosalela Internet, tosalaka nde makasi mpo tólanda toli ya Makomami oyo elobi ete: “Tiká te ete bóloba nkombo ya bikobo mpe makambo nyonso ya mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na babulami. Tiká te ete bosɔtɔ bózala to maloba ya zoba to maloba ya mpamba”? (Baefese 5:3, 4) Tokoloba boni mpo na masano ya bitumba oyo balakisaka na televizyo to na video? Mokomi ya nzembo alobaki ete: “[Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, [molimo, NW] na ye eyini ye oyo alingi mobulu.”—Nzembo 11:5.
13. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kotalela makambo oyo ezali kouta na motema?
13 Yilimia alobaki ete: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Bokosi ya motema ekoki komonana ntango tozali komona mabunga na biso lokola likambo moke, tozali kolongisa makambo to bizaleli ya mabe, to tozali kobakisa makambo mosusu ya lokuta ntango tozali kolobela misala na biso. Motema ya mabe ekoki mpe kokabwana mpe kokóma mibale: na monɔkɔ tokoloba ndenge mosusu, kasi na misala, tozali kosala makambo mosusu. (Nzembo 12:2; Masese 23:7) Ezali na ntina tótalelaka na bosembo mpenza makambo oyo ezali kouta na motema!
Liso na biso ezali na mindɔndɔ te?
14, 15. (a) Liso oyo “ezali na mindɔndɔ te” ezali nini? (b) Ndenge nini kozala ntango nyonso na liso oyo ezali na mindɔndɔ te esalisaka biso tóbatela motema na biso?
14 Yesu alobaki ete: “Liso ezali mwinda ya nzoto. Soko liso na yo ezali [na mindɔndɔ te, NW], nzoto na yo mobimba ekozala na pole.” (Matai 6:22) Liso oyo ezali na mindɔndɔ te etalaka kaka eloko moko, etalakatalaka makambo mosusu te. Tosengeli kotya liso na biso na makambo etali ‘koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengene na ye.’ (Matai 6:33) Likambo nini ekoki kokómela motema na biso ya elilingi soki liso na biso ekómi na mindɔndɔ?
15 Tólobela naino likambo ya koluka mbongo mpo na kobikela. Moklisto asɛngisami ete akokisaka bamposa ya libota na ye. (1 Timote 5:8) Kasi, tokoloba boni soki tokómi na mposa ya kozala na biloko ya kolya, bilamba, ndako mpe biloko mosusu, kaka oyo ya sika, kaka oyo eleki kitoko mpe kaka oyo ebimi mikolo oyo? Tomoni te ete motema mpe makanisi na biso ekokóma na boombo mpe tokosambela Nzambe na mitema mibale? (Nzembo 119:113; Baloma 16:18) Mpo na nini kondima komipesa mobimba na koluka kokokisa bamposa ya nzoto tii kokóma kokanisa eloko mosusu te na bomoi na biso kaka libota, mosala mpe biloko ya mokili? Tókanisa lisusu toli epemami na elimo ya Nzambe oyo elobi ete: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te, soko na kolanga te, soko na bitungiseli na bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te. Mpo ete ekobimela bafandi ya mikili nyonso.”—Luka 21:34, 35.
16. Toli nini Yesu apesaki mpo na liso mpe mpo na nini?
16 Makambo mingi ekɔtaka na miso mpo eleka na makanisi mpe efanda na motema. Likambo oyo miso ya moto ezali kotalatala ekoki kobongola makanisi, motema mpe misala na ye. Yesu asalelaki maloba ya elilingi mpo na kolobela ndenge oyo miso elengolamaka, ete: “Soko nde liso na yo ya mobali ezali [kobɛtisa yo libaku, NW], longolá yango mpe bwaká yango na yo. Ekoleka malamu na yo ete moko na bilembo na yo ebunga nde nzoto mobimba na yo ebwakama na Geena te.” (Matai 5:29) Tosengeli kopekisa miso kotalatala makambo ya mabe. Na ndakisa, tosengeli kotika yango te etalatalaka mikanda to biloko mosusu oyo ezali kolamusa bamposa ya mabe.
17. Ndenge nini kosalela toli ya Bakolose 3:5 esalisaka biso na kobatela motema na biso?
17 Kasi, toyebaka makambo oyo ezali koleka kaka na nzela ya miso te. Ezali mpe na banzela mosusu lokola kosimba mpe koyoka; yango wana, tosengeli kobatela binama oyo esalaka misala wana. Ntoma Paulo apesaki toli ete: “Yango wana, bóboma binama na bino ya nzoto oyo ezali na mokili, na oyo etali makambo ya pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, lokoso ya mabe mpe elulela, oyo ezali losambo ya bikeko.”—Bakolose 3:5, NW.
18. Mikano nini tosengeli kozwa na ntina etali makanisi ya mabe?
18 Mposa ya mabe ekoki kouta na makambo oyo tozali kokanisa na motó na biso. Soki tozali kokanisakanisa makambo yango, ekobakisa mposa ya mabe mpe ekobebisa motema na biso. “Na nsima, esili mposa kozwa zemi, eboti lisumu.” (Yakobo 1:14, 15) Mingi balobaka ete momeseno ya kosimbasimba binama ya kobotela mpo na koyoka elɛngi, mbala mingi ebandaka na ndenge wana. Ebongi mpenza ete tóleisaka bɔɔngɔ na biso makambo ya elimo! (Bafilipi 4:8) Mpe soki makanisi ya mabe eyeli biso, tosengeli kosala makasi mpo na kobengana yango.
‘Salelá Yehova na motema mobimba’
19, 20. Ndenge nini tokoki kolonga kosalela Yehova na motema mobimba?
19 Ntango Mokonzi Davidi akómaki mobange, alobaki na mwana na ye boye: “Salomo mwana na ngai, yebá Nzambe ya tata na yo mpe salelá ye na motema malamu mpe na molimo ya botosi, zambi [Yehova] akotalatala mitema nyonso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso.” (1 Ntango 28:9) Salomo ye moko abondelaki Nzambe apesa ye “motema ya botosi.” (1 Mikonzi 3:9, NW) Kasi, azalaki na mokakatano mpo na kobatela motema yango bomoi na ye mobimba.
20 Mpo tólonga na likambo wana, tosengeli kozwa motema oyo ekosepelisa Yehova, kasi tosengeli mpe kobatela yango. Yango wana, tosengeli kobatela ‘na kati ya motema na biso’ makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali kozongela koyebisa biso. (Masese 4:20-22) Tosengeli kozala na momeseno ya kotala motema na biso, kokanisa soki maloba mpe misala na biso ezali komonisa nini mpe kobondela mpo na yango. Kokanisa motindo wana ekozala na ntina moko te soki tozali te koluka na etingya lisalisi ya Yehova mpo na kobongisa esika nyonso oyo tomoni ete tozali na bolɛmbu! Ezali mpe na ntina tókebaka mpenza na makambo oyo tozali kotala mpe koyoka! Soki tozali kosala bongo, elikya ezali ete “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na [biso] mpe [makanisi] na [biso] kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ɛɛ, tiká tózwa ekateli ya kobatela motema na biso koleka eloko mosusu nyonso oyo ekoki kobatelama mpe tósalela Yehova na motema mobimba.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini kobatela motema ezali na ntina mingi?
• Ndenge nini kotalela maloba na biso esalisaka biso na kobatela motema na biso?
• Mpo na nini tosengeli kobatela liso na biso ezala na “mindɔndɔ te”?
[Bililingi na lokasa 23]
Makambo nini tolobelaka mingi na mosala ya kosakola, na makita mpe na ndako?
[Elilingi na lokasa 25]
Liso oyo ezangi mindɔndɔ ebendamaka na makambo mosusu te