Masolo na ntina na Yesu—Solo to lokuta?
OKANISI NINI? MAKAMBO OYO ELANDI EZALI SOLO TO LOKUTA?
Yesu abotamaki na mokolo ya 25 Desɛmbɛ.
Bato misato ya bwanya bakendaki kotala Yesu ntango abotamaki.
Yesu azalaki na bandeko te.
Yesu azalaki Nzambe, kasi na nzoto ya moto.
Yesu azalaki kaka te moto malamu.
BATO mingi bakoyanola ete makambo oyo nyonso ezali solo. Basusu bakoki koloba ete ezali mpasi—kutu ekoki kosalema te—koyeba yango na bosikisiki. Ntango mosusu bakanisaka ete soki ondimeli Yesu, koyeba eyano na makambo oyo ezali mpenza na ntina te.
Nzokande, Biblia elobi bongo te. Ezali kolendisa biso tózala na “boyebi ya solosolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.” (2 Petro 1:8) Kotalela Baevanzile ekosalisa biso tózwa boyebi yango. Emonisaka solo na ntina na Yesu, esalisaka biso tóyeba kokesenisa makambo oyo ezali lokuta ná oyo ezali solo. Na yango, tótalela oyo Baevanzile emonisi mpo na mateya oyo tolobeli na likoló.
LITEYA: Yesu abotamaki na mokolo ya 25 Desɛmbɛ.
SOLO TO LOKUTA: LOKUTA.
Ezali na esika moko te na Biblia oyo elobeli polele sanza to mokolo ya kobotama ya Yesu. Kasi, mokolo ya 25 Desɛmbɛ eutá wapi? Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi ete bato mosusu oyo bamibengaki bakristo “balingaki ete mokolo yango ekokana na mokolo ya fɛti ya bapakano oyo Baroma bazalaki kosala . . . solstice d’hiver, ntango oyo mikolo ebandaka kokóma lisusu milai mpe moi ebimaka.” Kaka buku yango elobi ete mimeseno mingi ya Noele eutá na “fɛti ya bapakano oyo bazalaki kosala mpo na kokumisa nzambe ya bilanga mpe ya moi na katikati ya eleko ya malili.”
Yesu alingaki kondima ete bato básalaka fɛti ya kobotama na ye na mokolo ya 25 Desɛmbɛ? Tókanisa likambo oyo: Mokolo ya kobotama ya Yesu eyebani te. Vɛrsɛ moko te ya Makomami esɛngi biso tósalaka fɛti ya kobotama ya Yesu, ezali mpe ata na elembeteli moko te oyo emonisi ete bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki kosala fɛti yango. Nzokande, Biblia elobeli na bosikisiki mokolo oyo Yesu akufaki, mpe apesaki bayekoli na ye etinda ete bákanisaka mokolo yango.a (Luka 22:19) Emonani polele ete Yesu amonisaki mpenza ete bato basengeli kokanisaka nde motuya ya mbeka ya liwa na ye, kasi te mokolo ya kobotama na ye.—Matai 20:28.
LITEYA: Bato misato ya bwanya (to bakonzi misato, ndenge bato mosusu bateyaka) bakendaki kotala Yesu ntango abotamaki.
SOLO TO LOKUTA: LOKUTA.
Ntango mosusu omoná bililingi to makambo oyo balakisaka mpo na Yesu ntango azalaki na elyelo ya bibwɛlɛ, mpe balakisaka bato misato ya bwanya bazingi Yesu mpe bamemi makabo. Nzokande, elilingi yango ezalaka masapo mpamba, kasi likambo ya solo te.
Ezali solo ete bato oyo bautaki na ɛsti bakumisaki Yesu ntango azalaki naino mwana. Kasi, bapaya yango, ezalaki nde banganga oyo batalaka minzoto. (Matai 2:1, Bible na lingala ya lelo oyo) Bakutaki Yesu alali na kati ya elyelo ya bibwɛlɛ? Te, bakendeki kotala ye na ndako. Emonani ete bakómaki kuna mwa basanza nsima ya kobotama ya Yesu.—Matai 2:9-11.
Bapaya yango bazalaki boni? 2, 3, to 30? Biblia elobi te. Ekoki kozala ete motángo misato eutá na lolenge misato ya makabo oyo bapaya yango bamemaki.b (Matai 2:11) Bato mosusu balobaka kutu ete bato yango misato ya bwanya bazalaki bato ya mposo ya ndenge moko te. Kasi, likanisi wana ezali na Biblia te. Kutu, moto moko oyo alobeli Evanzile, alobi ete lisapo wana eutá na “makanisi ya moto moko ya istware ya ekeke ya mwambe.”
LITEYA: Yesu azalaki na bandeko te.
SOLO TO LOKUTA: LOKUTA.
Baevanzile emonisi polele ete Yesu azalaki na bandeko. Evanzile ya Luka ebengi Yesu “mwana ya liboso” ya Maria, mpe emonisi ete Maria abotaki bana mosusu na nsima.c (Luka 2:7) Evanzile ya Marko elobi ete bato mosusu na engumba Nazarete bazalaki koloba ete Yesu ná bandeko na ye bazali ndenge moko, mpe bazalaki kotalela ye lokola bato nyonso. Batunaki boye: “Ye ndeko wa Yakóbo, Yozéfu, Yúda na Simóni te? Bandeko básí ba ye bazalí áwa epái ya bísó té?”—Marko 6:3, Biblia Liloba lya Nzambe; Matai 12:46; Yoane 7:5.
Atako Baevanzile elobi ete Yesu azalaki na bandeko, bato mingi ya teoloji batingamaka kaka ete Yesu azalaki na bandeko te. Bamosusu balobaka ete bandeko ya Yesu oyo balobeli ezali nde bana oyo bandeko ya Yozefe to Maria babotaki.d Basusu balobaka ete bandeko yango ezalaki nde bana oyo Yozefe abotaki liboso abalana na Maria. Kasi, tótala naino: Soki Maria abotaka kaka Yesu ye moko, bato wana ya Nazarete balingaki koloba ndenge wana? Kutu, mingi na bango na ntembe te bamonaki na miso ntango Maria azalaki na bazemi ya bana na ye. Bayebaki ete Yesu azalaki yaya ya bana ebele oyo Maria abotaki.
LITEYA: Yesu azalaki Nzambe, kasi na nzoto ya moto.
SOLO TO LOKUTA: LOKUTA.
Likanisi ete Nzambe ayaki na mabele mpe akómaki moto, Yesu, liteya oyo esimbi liteya ya Bosato, ebandá mpenza kala—kasi ebandaki te ntango Yesu azalaki awa na mabele. Kutu, buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Ezala liloba Bosato to ndimbola na yango ezali te na Kondimana ya Sika . . . Liteya yango ekolaki mokemoke na boumeli ya bikeke mingi mpe ebimisaki bantembe mingi.”
Lelo oyo mangomba ekitisaka lokumu ya Yesu ntango eteyaka ete azalaki Nzambe na ndenge ya moto.e Ndenge nini? Tózwa ndakisa moko. Basali basɛngi mokonzi na bango likambo moko, kasi ayebisi bango ete azali te na bokonzi ya kopesa bango eloko oyo basɛngi. Soki maloba na ye ezali solo, mokonzi yango amonisi bwanya na ndenge ayebi ete bokonzi na ye ezali na ndelo. Soki ezali bongo te—soki akoki kopesa bango eloko oyo basɛngi ye kasi aboyi kosala yango—Akosi.
Na yango, eyano nini Yesu apesaki ntango bantoma na ye mibale balukaki kozwa esika ya lokumu? Alobaki na bango boye: “Kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te, ezali nde esika ya baoyo Tata na ngai abongiselá bango yango.” (Matai 20:23) Soki Yesu azalaki mpenza Nzambe, na yango likambo oyo alobaki ezali lokuta, boye te? Kutu, ndenge alobelaki moto oyo azali na bokonzi koleka ye, Yesu apesaki ndakisa malamu na likambo ya komikitisa—mpe amonisaki ete akokani na Nzambe te.
LITEYA: Yesu azalaki kaka te moto malamu.
SOLO TO LOKUTA: SOLO.
Yesu amonisaki polele ete azali te kaka moto malamu. Alobaki boye: “Nazali Mwana ya Nzambe.” (Yoane 10:36) Toboyi te, moto nyonso akoki komibenga Mwana ya Nzambe. Kasi, soki ndenge Yesu amibengaki Mwana ya Nzambe ezalaki solo te, yango elingaki kobimisa ye moto ya ndenge nini? Alingaki kozala moto ya malamu te, kasi nde mokosi monene!
Litatoli ya solosolo eutaki epai ya Nzambe ye moko. Mbala mibale mobimba, alobaki mpo na Yesu boye: “Oyo azali Mwana na ngai.” (Matai 3:17; 17:5) Kanisá naino: Makomami elobeli kaka mabaku moke oyo mongongo ya Nzambe eyokanaki awa na mabele—Kasi mbala mibale mobimba, alobaki ete Yesu azali Mwana na ye! Yango ezali mpenza elembeteli oyo eleki monene oyo emonisi ete Yesu azalaki Mwana ya Nzambe ndenge alobaki.
Lisolo oyo elobeli polele makambo nyonso na ntina na Yesu oyo oyebaki te liboso? Soki ezali bongo, mpo na nini te kotalela malamumalamu lisusu Baevanzile? Boyekoli ya ndenge wana ekoki kosepelisa yo mpe komemela yo matomba. Kutu, Yesu ye moko alobaki ete koyekola solo na ntina na ye mpe Tata na ye “elakisi bomoi ya seko.”—Yoane 17:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yesu akufaki na Mokolo ya Elekeli, to mokolo ya 14 Nisana, na kotalela manaka ya Bayuda.—Matai 26:2.
b Matai alobi ete bapaya yango “bafungolaki mpe biloko na bango ya motuya” mpe bapesaki Yesu wolo, olibana ná mire. Likambo ya esengo, ekoki kozala ete makabo wana ya ntalo mingi ekómaki mpenza na ntango oyo ebongi, mpo mosika te libota ya Yesu—oyo emonani ete bazalaki na bozwi mingi te—esengelaki kokima na mboka mosusu.—Matai 2:11-15.
c Atako Maria azwaki zemi ya Yesu na ndenge ya likamwisi, abotaki bana na ye mosusu ná mobali na ye Yozefe.—Matai 1:25.
d Bato mingi bandimaka liteya oyo Jérôme ateyaki na mbula soki 383 ya ntango na biso, ete Maria ayebaki mibali te bomoi na ye mobimba. Na nsima, Jérôme amonaki ete liteya na ye wana ezalaki mpenza solo te, kasi na makanisi ya bato mingi—mpe na Lingomba ya Katolike—likanisi yango etikalá.
e Mpo na koyeba malamu liteya ya Bosato, talá mwa buku Osengeli kondima Trinité? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 14]
Makambo mosusu ya solo oyo ekoki kokamwisa yo
Yesu azalaki ndenge nini ntango azalaki moto? Azalaki moto moko oyo alingaka te kosepela, azalaka malilimalili mpe alingaka kozala te na bato? Bato mosusu bakoki koyanola ete ezali bongo. Ntango mosusu yango wana bakamwaka koyeba ete Yesu . . .
• akendeki na bafɛti.—Yoane 2:1-11.
• apesaki longonya.—Marko 14:6-9.
• asepelaki kozala elongo na bana.—Marko 10:13, 14.
• alelaki na miso ya bato.—Yoane 11:35.
• ayokaki mawa.—Marko 1:40, 41.