Etikali moke Bokonzi ya Nzambe esikola biso!
“Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”—MAT. 6:10.
1. Likambo nini ya ntina mingi Yesu azalaki koteya?
NTANGO Yesu Klisto asalaki lisolo na ye likoló ya ngomba, alakisaki mpe libondeli ya ndakisa oyo elobelaki na mokuse likambo ya ntina mingi oyo azalaki koteya. Ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Mat. 6:9-13) Yesu “atambolaki engumba na engumba mpe mboka na mboka, koteyáká mpe kosakoláká nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Klisto alendisaki bayekoli na ye ete: ‘Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe.’ (Mat. 6:33) Ntango ozali koyekola lisolo oyo, kanisá ndenge okoki kosalela makambo yango na mosala ya kosakola. Na ndakisa, luká ndenge okoki koyanola na mituna oyo elandi: Nsango ya bokonzi ezali na ntina nini? Bato basengeli kosikolama na likambo nini? Mpe ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekosikola bato?
2. Nsango ya bokonzi ezali na ntina nini?
2 Yesu asakolaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:14) Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi. Eleki bansango nyonso ya mokili! Na masangá koleka 100 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, basaleli ya Nzambe soki milio nsambo bazali komipesa na mosala ya kosakola na ndenge oyo esalemá naino te mpe bazali koyebisa basusu ete Bokonzi ya Nzambe esilá kotyama. Kotyama ya bokonzi yango ezali nsango malamu, mpamba te ezali komonisa ete Nzambe atye guvernɛma moko na likoló mpo ezwa makambo ya bato na mabɔkɔ. Na nzela ya boyangeli yango, mokano ya Yehova ekosalema na mabelé lokola na likoló.
3, 4. Makambo ekozala ndenge nini ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabelé?
3 Nini ekokómela bato ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabelé? Yehova “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emon. 21:4) Bato bakobanda kobɛla to kokufa lisusu te mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo tosangolá. Bakufi oyo bazali na makanisi ya Nzambe bakozwa libaku ya kozala na bomoi libela na libela, mpamba te Biblia elaki ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Bitumba, maladi, to nzala ekozala lisusu te, mpe mabelé ekobongwana paladiso. Ata banyama ya mabe ekokóma kofanda na kimya na bato mpe na banyama mosusu.—Nz. 46:9; 72:16; Yis. 11:6-9; 33:24; Luka 23:43.
4 Na kotalela mapamboli wana oyo boyangeli ya Nzambe ekomemela bato, tokoki kokamwa te ete esakweli moko ya Biblia elobelaki bomoi oyo ekozala na ntango yango na maloba ya kobɔndisa oyo: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” Kasi, ezali boni mpo na bato oyo bazali kobimisa mobulu lelo na mokili? Makomami esakoli ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te.” Nzokande, “baoyo bakozelaka [Yehova] bakosangola mokili.”—Nz. 37:9-11.
5. Nini ekokómela mokili oyo?
5 Mpo makambo oyo nyonso esalema, esengeli ebongiseli ya lelo ná baguvɛrnema, mangomba mpe mimbongo na yango ya mabemabe elongolama. Mpe yango mpenza nde guvernɛma ya Nzambe ya likoló ekosala. Na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, Danyele asakolaki ete: “Na mikolo ya mikonzi yango [oyo bazali sikoyo] Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi [na likoló, oyo] bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [oyo ezali koyangela sikoyo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Dan. 2:44) Bokonzi ya Nzambe, elingi koloba guvernɛma moko ya sika na likoló, ekoyangela bato ya sika na mabelé. Ekozala “na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika . . . , mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.”—2 Pet. 3:13.
Bato bazali na mposa makasi ya kosikolama
6. Biblia elobi nini mpo na mabe oyo ezali na mokili lelo oyo?
6 Mpasi ya bato ebandaki ntango Satana, Adama mpe Eva batombokelaki Nzambe, mpe balingaki báponaka bango moko oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe. Mbula koleka 1 600 na nsima, liboso ya Mpela ya Noa, “masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe . . . makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.” (Gen. 6:5) Mbula soki 1 300 na nsima, Mokonzi Salomo amonaki ete makambo ebebaki lisusu koleka, mpe yango etindaki ye akoma ete: “Ngai nasanzolaki bakufi baoyo basili kokufa koleka bango na bomoi baoyo bazali naino na bomoi. Ɛɛ, oyo azali koleka bango mibale, azali ye oyo akómi naino te, oyo amoni naino mabe masalami na nse ya moi te.” (Mos. 4:2, 3) Lelo oyo, mbula koleka 3 000, mabe ezali se kobakisama.
7. Mpo na nini lelo oyo bato bakómi na mposa makasi ya kosikolama na Nzambe?
7 Lokola mabe ebandá kala mpenza, bato bazali lelo oyo na mposa makasi ya kosikolama na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. Makambo ezalaki lisusu mabe koleka na bambula 100 oyo euti koleka mpe lelo oyo ezali kobeba se kobeba. Na ndakisa, lapolo ya ebongiseli moko ya États-Unis elobi ete: “Bato oyo babomami na bitumba ya ekeke ya [20] bazali ebele, mbala misato koleka baoyo bakufaki na bitumba banda na ekeke ya liboso T.B. tii na mobu 1899.” Banda 1914, bato koleka milio 100 bakufi na bitumba. Buku moko emonisi ete bato koleka milio 60 bakufaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Lokola bikólo mosusu ekómi sikoyo na bibundeli ya nikleere, bato bazali na likoki ya koboma ebele ya bato na mbala moko. Lisusu, atako mayele ya siansi mpe ya minganga ezali se kokola, mbula na mbula bana soki milio mitano bazali kokufa na nzala.—Talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?
8. Bankóto ya bambula oyo bato bayangeli mokili emonisi nini?
8 Milende nyonso oyo bato basali mpo na kosilisa mabe elongi te. Bibongiseli ya politiki, ya mimbongo mpe mangomba ya mokili oyo elongi soki moke te kokokisa bamposa ya libosoliboso oyo bato bazalaka na yango, na ndakisa mposa ya kozala na kimya, na bomɛngo mpe nzoto malamu. Na esika ya kosilisa mikakatano ya minene oyo bato bazali na yango, bibongiseli wana ebakiseli bango lisusu nde mpasi. Ya solo, bankóto ya bambula oyo bato bayangeli mokili emonisi bosolo ya maloba oyo: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yil. 10:23) Ya solo, “moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mos. 8:9) Longola yango, “bozalisi mobimba ezali kokoba komilelalela elongo mpe ezali konyokwama elongo.”—Lom. 8:22.
9. Makambo nini ezali kokamwisa baklisto te na “mikolo [oyo] ya nsuka”?
9 Mpo na mikolo na biso, Biblia esakolaki boye: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala.” Nsima ya kolobela ndenge makambo ekozala na mikolo ya nsuka na nse ya boyangeli ya bato, esakweli yango elobaki ete: “Bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe.” (Tángá 2 Timote 3:1-5, 13.) Yango ekamwisaka baklisto te, mpo bayebi ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe,” Satana. (1 Yoa. 5:19) Kasi, nsango malamu ezali ete mosika te Nzambe akosikola baoyo balingaka ye. Bakosikolama na mokili oyo ezali kokóma lisusu mabe koleka.
Nani mpenza akoki kosikola bato?
10. Mpo na nini kaka Yehova nde akoki kosikola bato?
10 Ntango ozali kosakola nsango malamu, monisá bato polele ete kaka Yehova nde akosikola bato. Kaka ye nde azali na nguya mpe na mposa ya kosikola basaleli na ye na makambo nyonso ya mabe. (Mis. 4:24, 31; Emon. 4:11) Tokoki mpenza kondima ete Yehova akosikola basaleli na ye ntango nyonso mpe akokokisa mikano na ye, mpamba te alapaki ete: “Lokola mwango mobongisaki ngai, ekozala mpe bongo.” Liloba na ye “[ekozonga] epai na [ye] mpamba te.”—Tángá Yisaya 14:24, 25; 55:10, 11.
11, 12. Elaka nini Nzambe apesi basaleli na ye?
11 Yehova alaki ete akosikola basaleli na ye ntango akoboma bato mabe. Ntango atindaki mosakoli Yilimia ayebisa na mpiko nyonso bato oyo bazalaki basumuki minene, Nzambe alobaki ete: ‘Kobanga te.’ Mpo na nini? “Ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo.” (Yil. 1:8) Ndenge moko mpe, liboso Yehova abebisa Sodomo ná Gomola, atindaki baanzelu mibale bábimisa Lota ná libota na ye. “Na nsima [Yehova] anɔkisaki sufulu mpe mɔtɔ na likoló ya Sodomo ná Gomola.”—Gen. 19:15, 24, 25.
12 Yehova akoki kosikola baoyo bazali kosala mokano na ye ata na mokili mobimba. Ntango abomaki mokili ya mabe ya kala na Mpela, “abatelaki Noa, mosakoli moko ya boyengebene, elongo na bato mosusu nsambo.” (2 Pet. 2:5) Yehova akobikisa mpe bato ya sembo ntango akoboma mokili mabe oyo. Liloba na ye elobi ete: “Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso ya mokili . . . bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ. Soki nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].” (Sef. 2:3) Ntango mokili oyo ekobebisama, ‘bato malamu bakotikala, kasi bato mabe bakolongolama.’—Mas. 2:21, 22.
13. Ndenge nini basaleli ya Yehova oyo bakufá bakosikolama?
13 Kasi, basaleli mingi ya Nzambe bakufá na maladi, na minyoko mpe na makambo mosusu. (Mat. 24:9) Ndenge nini kasi bato wana nyonso bakosikolama? Ndenge tolobaki yango liboso, “ekozala na lisekwa moko ya bayengebene.” (Mis. 24:15) Tozali mpenza kobɔndisama lokola toyebi ete eloko moko te ekoki kopekisa Yehova asikola basaleli na ye!
Boyangeli ya sembo
14. Mpo na nini tondimi mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli ya sembo?
14 Ntango ozali kosakola, okoki koyebisa bato ete Bokonzi ya Yehova ya likoló ezali boyangeli moko ya sembo. Ezali bongo mpo bokonzi yango ezali komonisa bizaleli malamu ya Nzambe lokola bosembo, boyengebene mpe bolingo. (Det. 32:4; 1 Yoa. 4:8) Nzambe apesi Bokonzi yango na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, moto kaka moko oyo abongi mpo na koyangela mabelé. Yehova azwaki mpe bibongiseli ete baklisto bapakolami 144 000 bázwama awa na mabelé mpe bákende na likoló mpo báyangela mabelé elongo na Klisto.—Emon. 14:1-5.
15. Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekokesana na oyo ya bato?
15 Lolenge oyo Yesu ná bato 144 000 bakoyangela ekokesana mpenza na oyo ya bato ya kozanga kokoka! Mbala mingi, bakonzi ya mokili oyo bazalaka mabe koleka mpe batindaka bato na bango na bitumba oyo ebomaka bamilio ya bato. Yango wana tokoki kokamwa te ete Biblia epesi biso toli ete tótyela moto motema te, “mpo ete azali na kosunga te”! (Nz. 146:3) Kasi, Klisto akoyangela mpenza na bolingo! Alobaki ete: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”—Mat. 11:28-30.
Mikolo ya nsuka elingi esila!
16. Mikolo ya nsuka oyo ekosuka ndenge nini?
16 Kobanda 1914, mokili oyo ekɔtaki na mikolo ya nsuka na yango to “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 24:3) Mosika te, ‘bolɔzi monene’ oyo Yesu alobelaki ekobanda. (Tángá Matai 24:21.) Bolɔzi monene wana nde ekosukisa mokili ya Satana. Kasi, ndenge nini bolɔzi monene yango ekobanda? Mpe ekosuka ndenge nini?
17. Likambo nini Biblia emonisi ete ekosalema na ebandeli ya bolɔzi monene?
17 Bolɔzi monene ekobanda mbalakaka. Ya solo, “mokolo ya Yehova” ekoya mbalakaka, “na ntango oyo bakoloba: ‘Kimya mpe kobatelama!’” (Tángá 1 Batesaloniki 5:2, 3.) Bolɔzi yango ekobanda ntango bikólo ekokanisa ete bakómi mpenza pene ya kosilisa mikakatano na bango mosusu ya minene. Kobomama ya “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba ekoya mbalakaka. Bakonzi ná bato mosusu bakotikala monɔkɔ polele ntango Babilone Monene ekobomama.—Emon. 17:1-6, 18; 18:9, 10, 15, 16, 19.
18. Yehova akosala nini ntango Satana akoluka kobundisa basaleli na ye?
18 Ntango ekonginda, “bilembo ekozala na moi mpe na sanza mpe na minzoto,” mpe “elembo ya Mwana ya moto ekomonana na likoló.” Na ntango wana, ‘tokotɛlɛma alima, mpamba te kosikolama na biso ekokóma pene.’ (Luka 21:25-28; Mat. 24:29, 30) Satana to Gogo akobalukela basaleli ya Nzambe. Kasi, na ntina na baoyo bakoluka kosala basaleli na ye mabe, Yehova alobi ete: “Ye oyo azali kosimba bino, azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zek. 2:8, NW) Yango wana, Satana akolonga te. Mpo na nini? Mpamba te Nkolo Yehova akotɛlɛma mbala moko mpo na kosikola basaleli na ye.—Ezek. 38:9, 18.
19. Mpo na nini tokoki mpenza kondima ete mampinga ya Nzambe ekobebisa ebongiseli ya Satana?
19 Ntango Nzambe akobɛta bikólo, ‘bakoyeba ete ye azali Yehova.’ (Ezek. 36:23) Akotinda mampinga na ye, elingi koloba ebele ya baanzelu oyo bakotambwisama na Klisto Yesu, mpo na kokɔmbɔla makambo nyonso ya Satana oyo ekotikala. (Emon. 19:11-19) Soki tokanisi ete na butu moko kaka, anzelu moko ya mpamba abomaki ebele ya banguna ya Nzambe, “bato nkóto mokama na ntuku mwambe na mitano,” tokoki mpenza kozala na elikya ete mampinga ya Nzambe ya likoló ekolongola mabe nyonso ya Satana awa na mabelé na bolɔzi monene oyo ekomema tii na Armagedona. (2 Mik. 19:35; Emon. 16:14, 16) Satana ná bademo na ye bakobwakama na libulu mbula nkóto. Nsukansuka, bakobomama.—Emon. 20:1-3.
20. Yehova akosala nini na nzela ya Bokonzi na ye?
20 Na yango, Nzambe akopɛtola likoló mpe mabelé na mabe nyonso, mpe bato ya sembo bakofanda na mabelé oyo libela na libela. Yehova akomonisa ete azali Mosikoli Monene. (Nz. 145:20) Na nzela ya Bokonzi na ye, akolongisa boyangeli na ye, akosantisa nkombo na ye mpe akokokisa mokano na ye monene mpo na mabelé. Sakolá nsango malamu mpe yoká esengo ya kosalisa ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ báyeba ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe esikola biso!—Mis. 13:48.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini Yesu amonisaki ntina ya Bokonzi ya Nzambe?
• Mpo na nini tokómi sikoyo na mposa makasi ya kosikolama?
• Makambo nini tokomona na bolɔzi monene?
• Ndenge nini Yehova amonisi ete azali Mosikoli Monene?
[Bililingi na lokasa 12, 13]
Liloba ya Nzambe esakolaki ete mosala ya kosakola ekosalema mingi lisusu koleka na mokili mobimba na mikolo na biso
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola Yehova asikolaki Noa ná libota na ye, akoki mpe kosikola biso
[Elilingi na lokasa 16]
Yehova “akopangwisa mpisoli nyonso . . . , mpe liwa ekozala lisusu te.”—Emon. 21:4