Likambo oyo bato mingi basɛngaka
KANISÁ ete bamilio to mpe bamiliare ya bato bazali kosɛnga likambo moko. Bazali kosɛnga yango epai ya mokonzi oyo aleki likoló na mokili mobimba. Kasi, bato mingi te kati na bango bayebi mpenza likambo oyo bazali kosɛnga. Yango ekoki kosalema? Ɛɛ, esalemaka mokolo na mokolo. Bato yango basɛngaka nini? Basɛngaka ete Bokonzi ya Nzambe eya!
Lapolo moko emonisi ete bato ya mangomba soki 37 000 bamibengaka baklisto; balobaka ete Motambwisi na bango ezali Yesu Klisto. Bandimi yango bazali bato soki miliare 2. Mingi kati na bango basalaka libondeli ya Tata wa Biso. Oyebi libondeli yango? Libondeli yango oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye, ebandaka boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”—Matai 6:9, 10.
Banda kala, bandimi basalaka libondeli yango na bandako-nzambe. Bamosusu mpe basalaka yango na kati ya mabota to mpe na ntango bazali kobondela bango moko, ezala na ntango ya bisengo to na ntango ya mpasi. Balobaka maloba yango na kondima mpenza. Bamosusu kutu bakangá maloba yango na motó mpe bazongelaka yango, ntango mosusu kozanga ete báyeba ndimbola na yango. Ezali kaka baklisto te nde balikyaka na Bokonzi ya Nzambe mpe basɛngaka ete eya.
Bandimi ya mangomba mosusu mpe basɛngaka yango
Bayuda basalaka libondeli moko oyo babengaka Kaddish. Atako maloba na yango etaleli mpenza liwa to mawa te, basalaka yango mingi na ntango bazali kolela ebembe. Na libondeli yango balobaka boye: “Tiká ete [Nzambe] atya bokonzi na ye ntango oyo ozali na bomoi . . . ɛɛ nokinoki.”a Libondeli mosusu ya kala oyo basalaka na basinagoga elobelaka elikya ya Bokonzi ya Masiya oyo akouta na libota ya Davidi.
Bato ya mangomba mosusu mpe basepelaka na Bokonzi ya Nzambe. Zulunalo moko (The Times of India) elobaki ete mokonzi moko ya Lingomba ya Hindu, oyo azalaki na mposa ete Bahindu, Bamizilma, mpe baklisto báyokanaka, alobaki boye: “Bokonzi ya Nzambe ekoya te soki bato ya Azia basangani te ná bato ya Mpoto.” Longola yango, mokambi ya eteyelo moko ya Bamizilma na engumba Strathfield, na ekólo Australie, akomelaki babimisi ya zulunalo moko boye: “Lokola Mizilma nyonso, nandimaka [ete] Yesu akozonga mpe akotya Bokonzi ya Nzambe.”
Ya solo mpenza, bamiliare ya bato balikyaka na Bokonzi ya Nzambe mpe basɛngaka ete eya. Kasi, tótalela likambo moko ya kokamwa.
Na ntembe te oyebi ete biso Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo, tokendaka ndako na ndako mpo na kosolola na bato masolo ya Biblia. Lelo oyo tozali kosala mosala yango na mikili 236 mpe na minɔkɔ koleka 400. Tosakolaka libosoliboso Bokonzi ya Nzambe. Kutu, nkombo mobimba ya zulunalo oyo ezali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova. Mbala mingi, totunaka bato soki basɛngaka ete Bokonzi yango eya. Mingi balobaka ete basalaka yango. Kasi, kati na bato oyo totunaka soki Bokonzi yango ezali nini, mingi balobaka ete bayebi te. To mpe bapesaka eyano ya polele te.
Mpo na nini bato mingi basɛngaka likambo oyo bazali kokoka kolimbola te? Ezali nde mpo Bokonzi ya Nzambe ezali likambo oyo bato bakoki kokanga ntina na yango te? Ezali bongo te. Biblia elimboli Bokonzi yango malamumalamu mpe na ndenge ya polele. Longola yango, makambo oyo Biblia elobi mpo na Bokonzi yango ekoki kopesa yo elikya na eleko oyo ya mpasi. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo Biblia elimboli Bokonzi yango. Na nsima tokolobela ntango oyo Nzambe akoyanola na libondeli oyo Yesu alakisaki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na libondeli ya Kaddish basɛngaka mpe ete nkombo ya Nzambe esantisama. Bayuda mosusu balobaka ete libondeli yango ebandaki kosalema ntango Klisto azalaki awa na mabelé to mpe liboso, kasi bamosusu bandimaka likanisi yango te; tokoki kokamwa te ete maloba na yango mosusu ekokani na maloba ya libondeli ya Nkolo. Libondeli oyo Yesu alakisaki eteyaki makambo ya sika te. Likambo mokomoko oyo alobelaki eutaki na mikanda ya Biblia oyo Bayuda bazalaki na yango na ntango wana. Yesu alendisaki Bayuda básɛngaka makambo oyo esengelaki básɛngaka yango banda kala.