Lakisa biso kobondela
“Moko na bayekoli na ye alobaki na ye ete: ‘Nkolo, lakisa biso kobondela.’”—LUKA 11:1.
1-3. (a) Mpo na nini bayekoli na Yesu bamonisaki mposa ya kozwa liteya etali libondeli? (b) Mituna nini mizali kotunama na ntina na libondeli?
BATO mosusu bazali na mongongo kitoko, bamosusu bazali na likabo ya kobeta miziki. Nzokande, mpo na kokokisa malamu makoki na bango, bamoko mpe bamosusu bazali na mposa ya koteyama. Ezali ndenge moko mpo na libondeli. Bayekoli na Yesu Klisto bayebaki ete bazalaki na mposa ya koteyama soki balingi ete Nzambe ayoka mabondeli na bango.
2 Mbala mingi Yesu azalaki kobondela Tata na ye na esika na ye moko. Ezali yango asalaki na boumeli ya butu mobimba liboso ya kopona bantoma 12. (Luka 6:12-16)Alendisaki bayekoli na ye ete bango mpe basambelaka na nkuku. Atako bongo, bango bayokaki ye kosala mabondeli liboso na bato mingi mpe bamonaki ete ekokanaki na bakosi te oyo bazalaki kosambela mpo na komonana na miso na bato. (Matai 6:5, 6) Yango wana, basengaki ye ete apesa bango liteya ya mozindo na ntina etali libondeli Totangi boye: “Yesu azalaki kobondela na esika na ye moko, mpe wana esilisaki ye, moko na bayekoli na ye alobaki na ye ete: ‘Nkolo, lakisa biso kobondela lokola (Yoane mobatisi) alakisaki bayekoli na ye.”’—Luka 11:1.
3 Eyano na Yesu ezalaki nini? Ndakisa na ye ezali koteya biso nini? Mpe litomba nini tokoki kozwa mpo na mateya apesaki epai na bayekoli na ye na ntina na libondeli?
Mateya mpo na biso
4. Mpo na nini tosengeli ‘kobondela ntango nyonso’, mpe yango elimboli nini?
4 Tokoki koyekola makambo mingi na maloba mpe na ndakisa na Yesu, moto oyo amipesaki mingi na losambo. Soki azalaki na mposa ya kosambela mbala na mbala, ye moto azalaki Mwana ya kokoka ya Nzambe, bayekoli na ye oyo bazangi kokoka basengeli koleka kozala na mposa ya kobongwana ntango nyonso epai na Nzambe mpo ete batambwisama, balendisama mpe basimbama kati na elimo. Ee, esengeli na biso ‘kosambela ntango nyonso’. (1 Batesalonike 5:17.) Ya solo, yango elimboli te ete tosengeli kofukamaka ntango nyonso. kasi tosengeli mbala na mbala kobondelaka. Tosengaka epai na Nzambe ete atambwisa biso kati na bomoi na biso mobimba, mpo na kosala na mayele mpe kondimama ntango nyonso epai na ye.—Masese 15:24.
5. Nini ekoki kozwa ntango na biso oyo tosengeli kolekisa mpo na kosambela, mpe nini ebongi na biso kosala mpo na kobongisa likambo yango?
5 Na ntango na biso, na boumeli ya “mikolo na nsuka”, makambo mingi makoki kozwa biso ntango oyo tosengeli kolekisa mpo na kobondela. (2 Timote 3:1) Kasi soki mabanzo na biso mpo na misala na biso ya ndako, mpo na misala na biso ya mosuni to makambo mosusu mazali kopekisa biso na kobondela Tata na biso ya likoló mbala na mbala, yango elimboli ete tosili komipesa mingi kati na mitungisi ya bomoi. Esengeli kobongisa likambo yango nokinoki, mpamba te moto nyonso oyo azali kozongisa libondeli nsima asukaka na kobungisa kondima. Tosengeli to kokitisa misala na biso ya mosuni, to kotia bokatikati kati na mitungisi na biso ya bomoi na komibalolaka na bosembo nyonso epai na Nzambe na motema mobimba mpo ete atambwisa biso. Esengeli na biso ‘kosenzela ntango nyonso mpo na mabondeli’.—1 Petelo 4:7.
6. Libondeli nini tokoyekola sikawa, mpe mpo na nini?
6 Kati na libondeli oyo apesaki lokola ndakisa, oyo ya Tata na biso, Yesu ateyaki na bayekoli na ye ndenge ya kobondela kasi ayebisaki bango te maloba nini ya sikisiki basengeli kosalela. Libondeli yango ezali mpenza ndenge moko te kati na lisolo ya Luka mpe kati na oyo ya Matai, mpamba te bazali koyebisa yango lokola elobamaki na bantango ekeseni. Sikawa tolingi koyekola yango lokola ndakisa ya lolenge na mabondeli oyo tosalaka, biso baoyo tozali bayekoli na Yesu mpe ba Témoins de Jéhovah.
Tata na biso mpe nkombo na ye
7. Nani azali na privilege ya kosambela Jéhovah na kobengaka ye “Tata na biso”?
7 “Tata na biso oyo azali na makoló.” (Matai 6:9; Luka 11:2) Mpo ete Jéhovah azali Mozalisi ya bato nyonso mpe afandaka na makoló mazangi komonana, ebongi ete tobenga ye “Tata na biso oyo azali na makoló” (1 Mikonzi 8:49; Misala 17:24, 28.) Na kosalelaka liloba “biso”, tozali kondima ete bamosusu mpe bazali na boyokani ya penepene elongo na Nzambe. Kasi nani azali na privilege ezangi ndelo ya kosolola na ye na kobengaka ye Tata? Bobele baoyo bazali kati na libota na ye ya basambeli baoyo bamipesi mpe babatisami. Na kobengaka Jéhovah “Tata na biso”, tozali komonisa ete tozali na kondima epai na Nzambe mpe tozali koyeba ete tokoki kozala na boyokani elongo na ye bobele soki tondimi kozanga kokakatana mbeka ya lisiko na Yesu.—Baebele 4:14-16; 11:6.
8. Mpo na nini tosengeli kozala na mposa makasi ya kolekisa ntango na kosambela Jéhovah?
8 Tosengeli komiyoka mpenza penepene ya Tata na biso ya likoló. Lokola bana oyo bazali kolemba ata moke te mpo na koya epai ya tata na bango, tosengeli kozala na mposa makasi ya kolekisaka ntango mpo na kosambela Nzambe. Botondi na biso mozindo mpo na mapamboli ya elimo mpe ya mosuni oyo azali kopesa biso esengeli kopusa biso na kotondo ye mpo na motema boboto na ye. Tozala pene ya kokitisa likoló na ye mikumba na biso oyo mizali kotungisa biso, kozalaka na elikya ete akosunga biso. (Nzembo 55:22) Tosengeli kolikya ete nsuka ekozala malamu soki tozali sembo, mpamba te azali kobatela biso.—1 Petelo 5:6, 7.
9. Eloko nini tosengaka epai na Nzambe ntango tozali kosambela mpo na kosantisama ya nkombo na ye?
9 “Nkombo na yo ezala mosantu.” (Matai 6:9; Luka 11:2) Na kotangaka “nkombo”, bazali mbala mosusu koloba mpo na moto ye moko, mpe “kosantisama” elimboli “kobulisa, kotya pembeni to kotalela lokola bosantu”. (Tala Emoniseli 3:4.) Na yango, kosambela mpo na kosantisama ya nkombo na Nzambe, ezali kosenga ete Jéhovah asala likambo mpo na komibulisa ye moko. Motindo nini? Na kopetola nkombo na ye na nsoni nyonso oyo elatisamaki. (Nzembo 135:13) Mpo na yango, Nzambe akosilisa mabe nyonso, akomipesa nkembo mpe akoyebisa epai na mabota ete azali Jéhovah. (Ezekiele 36:23; 38:23) Soki tozali na mposa makasi ya komona mokolo yango mpe tondimi mpenza bokonzi monene ya Jéhovah, tokobelama ntango nyonso epai na ye na kobanga oyo emonisami na maloba “nkombo na yo ezala mosantu”.
Bokonzi mpe mokano na Nzambe
10. Eloko nini tolingi koloba ntango tozali kosambela mpo ete Bokonzi na Nzambe eya?
10 Tika bokonzi na yo eya.” (Matai 6:10; Luka 11:2) Bokonzi yango ezali bokonzi monene ya Jéhovah lokola yango ezali kosalelama na boyangeli ya likoló oyo epesami na Yesu Klisto mpe na “basantu” oyo basangani na ye. (Danyele 7:13, 14, 18, 27; Yisaya 9:6, 7; 11:1-5) Tolingáká koloba nini ntango tosambelaka mpo ete Bokonzi na Nzambe “eya’‘? Tosengaka ete eya mpo na koboma banguna nyonso ya boyangeli na Nzambe awa na mabelé Nsima na ‘kobuka mpe kosilisa bikonzi nyonso ya mabelé’, akokomisa mabelé paradis.—Danyele 2:44; Luka 23:43.
11. Soki tozali na motema likoló mpo na komona kokokana ya mokano na Jéhovah kati na molongo mobimba, ndenge nini tosengeli kosala?
11 Tika mokano na yo esalama na nse pelemoko na likoló.” (Matai 6:10.) Na maloba wana, tozali kosenga na Nzambe ete akokisa mokano na ye na ntina etali mabelé, mpenzampenza na kobomaka banguna na ye. (Nzembo 83:9-18; 135:6-10) Maloba wana mamonisi ete tozali motema móto mpo na komona mokano na Nzambe kosalema kati na molongo mobimba. Soki yango nde ezali likanisi na biso, tokosala ntango nyonso mokano ya Jéhovah na makoki na biso nyonso. Soki tozali kosala makasi te mpo na kosala mokano ya Nzambe, tokoki soko moke te kosala libondeli wana epai na Nzambe na motema malamu. Soki tozali kosambela bongo, tokeba ete tosala likambo moko te oyo ezali na boyokani te na mokano na ye, na ndakisa na kozalaka na boninga elongo na moto moko oyo azali mondimi te mpo ete obala ye to na komekolaka makanisi ya mokili. (1 Bakolinti 7:39; 1 Yoane 2:15-17.) Tomitunaka ntango nyonso: ‘Mokano na Jéhovah kati na likambo oyo ezali nini?’ Ee, soki tolingi Nzambe na motema na biso mobimba, tokoluka litambwisi na ye na ngonga nyonso ya bomoi na biso.—Matai 22:37.
Bilei na biso ya mokolo na mokolo
12. Bolamu nini tozali kozwa wana ezali biso kosenga bobele ‘bilei ya makolo ma mokolo’?
12 “Pesa biso lelo bilei na biso ya mokolo na mokolo.” (Matai 6:11) Tozali kotanga kati na mokanda ya Luka: “Pesa biso kwanga ekoki na mokolo na mokolo.” (Luka 11:8) Kosenga epai na Nzambe bilei oyo bozali na yango mposa “mpo na mokolo na mokolo” ezali kolendisa biso na kozala na kondima kati na makoki na ye ya kokokisa bamposa na biso mokolo na mokolo. Bayisraele basengelaki kolokota mame “mokolo na mokolo yango ekoki na moto na moto”, kasi ezalaki mpo na, poso mobimba te to mpe koleka (Exode 16:4) tosambelaka te mpo na kozwa bilei ya lokumu mpe kozwa bilei mingi koleka, kasi mpo ete bamposa na biso ya mokolo na mokolo ekokisama. Likambo ya kosenga bobele bilei ya mokolo na mokolo ezali kosalisa biso mpe ete tózala na lokoso te.—1 Bakolinti 6:9, 10.
13. (a) Ntango tozali kosenga bilei ya mokolo na mokolo tozali komonisa nini? (b) Ezalela nini tosengeli kozala na yango, ata soki tozali bobele na mwa biloko moke oyo bikoki mpo na bomoi na biso nzokande tozali kosala mingi?
13 Lokola tosengaka epai na Nzambe bilei ya mokolo na mokolo, tozali bongo komonisa ete tozali kotya motema na makoki na biso moko te, kasi tozali ntango nyonso kolikya epai na ye mpo na kozwa bilei, bimeli, bilamba mpe biloko mosusu ya bomoi. Lokola tozali basangani ya libota na ye ya basambeli oyo bamipesi na ye, tozali na elikya epai na Tata na biso, kasi tozali kokanga maboko te mpo na kozela ete akokisa bamposa na biso na lolenge ya ekamwiseli. Te, tozali kosala mpe tozali kosalela myango nyonso oyo tozali na yango mpo ete tozwa bilei mpe biloko mosusu ya ntina. Nzokande, lokola ebongi, tokotondoko Nzambe kati na libondeli mpamba te tososolaka ete biloko yango bizali elembo ya bolingo, ya mayele mpe ya nguya na Tata na biso ya likoló. (Misala 14:15-17; tala Luka 22:19) Molende na biso na mosala ezali mbala mosusu kopesa biso bozwi. Kasi ata soki tozali bobele na biloko moke oyo bisengeli mpo na bomoi, nzokande tozali kosala mingi, atako bongo tomimonisa bato na botondi mpe toimaimaka te. (Bafilipi 4:12; 1 timote 6:6-8) Mpo na koloba solo, moto na kobanga Nzambe oyo azali bobele na bilei mpe bilamba asengeli kozala na esengo mingi koleka bato oyo bazali na bozwi mingi ya mosuni. Yango wana, ata soki tozali bobele na biloko moke mpo na ntina ya makambo mosusu oyo tokoki kosala ndenge mosusu te, tolemba te. Eloko moko te ezali kopekisa biso na kokoma bazwi kati na elimo. Tosengeli te mpo na yango kokoma mobola kati na kondima, kati na elikya mpe kati na bolingo mpo na Jéhovah, oyo tozali kokumisa mpe tozali kotondo na motema moko kati na libondeli.
Limbisa biso nyongo na biso
14. Nyongo nini tosengaka epai na Nzambe ete alimbisa biso yango, mpe asalelaka nini mpo na kolimbisa yango?
14 “Limbisa biso nyongo na biso pelamoko biso tokolimbisa bango na nyongo na biso.” (Matai 6:12) Lisolo ya Luka emonisi ete nyongo yango ezali masumu. (Luka 11:4) lokola tozwaki libula ya lisumu, tokokoka kotosa na makambo nyonso te mokano ya kokoka ya Nzambe na biso. Kati na makambo mosusu, kozanga kokoka yango ezali nyongo, oyo tozali na yango liboso na Nzambe uta tobandaki ‘kobika mpe kotambola na elimo’. (Bagalatia 5:16-25; tala Baloma 7:21-25.) Tozwaka banyongo yango mpamba te tozangi kokoka mpe tokokoka kotosa na motindo ya kokoka te na mitinda to mibeko ya Nzambe. Ezali mpo na lilimbisi ya masumu yango nde tozali na libaku ya kosambela. Ezali esengo, mpo ete Nzambe akoki kosalela mbeka ya lisiko na Klisto mpo na nyongo yango, to masumu.—Baloma 5:8; 6:23.
15. Ndenge nini tosengeli kotalela mpamela oyo epesameli biso?
15 Soki tolingi ete Nzambe alimbisa biso nyongo na biso, to masumu, tosengeli kobongola motema mpe kondima mpamela. (Masese 28:13; Misala 3:19) Lokola alingaka biso, Jéhovah azali kopesa biso mpamela oyo moto na moto azali na yango mposa mpo na kosilisa bolembu na biso. (Masese 6:28; Baebele 12:4-6) Ya solo, tosengeli kosepela soki, na lisalisi ya bokoli na biso kati na kondima mpe na boyebi, motema na biso ebandi kolanda mibeko mpe mitinda na Nzambe na boye ete tokoka kobuka yango te na nkó. Kasi tosengeli kosala nini soki tososoli ete mbala mosusu touti kosala libunga na bososoli nyonso? Tosengeli mpenza komitungisa makasi mpe kosambela Nzambe na motema moko ete alimbisa biso. (Baebele 10:26-31) Esengeli na biso kobongisa etamboli na biso nokinoki na kosalelaka batoli oyo epesameli biso.
16. Mpo na nini ezali ntango nyonso ntina mpo na biso ete tosengaka na Nzambe alimbisa biso masumu na biso?
16 Tozali komizwela matomba malamu ntango tozali kosenga Nzambe mbala na mbala ete alimbisa masumu na biso. Na bongo tozali koyeba ezalela na biso ya basumuki, likambo oyo ezali kopusa biso na kozala na komikitisa. (Nzembo 51:3, 4, 7) Tozali na mposa ete Tata na biso ya likoló ‘alimbisa masumu na biso mpe apetola biso na masumu nyonso’. (1 Yoane 1:8, 9.) Lisusu, koloba mpo na masumu na biso kati na libondeli ezali kosalisa biso na kolanda kobundisa mpenza bolembu na biso. Na bongo, tobosana soki moke te ete tozali na mposa ya lisiko mpe ya motuya na makila oyo Yesu asopaki.—1 Yoane 2:1, 2; Emoniseli 7:9, 14.
17. Na nini mabondeli na biso mpo na lilimbisi ya masumu na biso mazali kosalisa biso kati na boyokani na biso elongo na bazalani?
17 Kosambela mpo na lilimbisi ya masumu na biso ezali kosalisa biso mpe na komonisa motema mawa mpe ya kokaba epai na baoyo mbala mosusu bazali na nyongo na biso mpo na makambo minene to ya mike. Tozali kotanga kati na mokanda ya Luka: “Limbisa biso masumu na biso, mpo ete biso tokolimbisaka bato nyonso bazali na nyongo na biso.” (Luka 11:4) Na yango, tokoki kozwa lilimbisi na Nzambe bobele soki “tosilaki kolimbisa bato nyonso bazali na nyongo na biso”, elingi koloba epai na baoyo bazali kosalela biso mabe to masumu. (Matai 6:12; Malako 11:25) Yesu abakisaki: “Mpamba te, soko bokolimbisa bato bikweli na bango, Tata na bino na likoló akolimbisa mpe bino; nde soko bokolimbisa bato te, Tata na bino akolimbisa bino bikweli na bino te.” (Matai 6:14, 15) Mabondeli na biso mpo na lilimbisi ya masumu na biso masengeli kopusa biso na koyikela bamosusu mpiko mpe kolimbisa bango. Ntoma Paulo akomaki: “Pelamoko Jéhovah alimbisi bino, bino mpe bosala bobele bongo.”—Bakolose 3:13; Baefese 4:32, MN.
Komekama mpe oyo mabe
18. Mpo na nini tosengeli ata moke te kopamela Nzambe ntango masenginya mpe mimekamo ezali koyela biso.
18 “Mpe kendisa biso na komekama te.” (Matai 6:13; Luka 11:4) Maloba oyo mazali koyebisa te ete Jéhovah azali komeka biso, to azali kotinda biso na kosala masumu. Makomami mazali mbala mosusu koloba ete Nzambe azali kosala to azali kotika makambo mosusu oyo azali bobele kopesa nzela. (Luta 1:20, 21; tala Mosakoli 11:5) Moyekoli Yakobo alobaki ete “Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te”. (Yakobo 1:13) Na yango, ntango tomekami na mabe, tópamélàkà Tata na biso ya likoló te, mpamba te ezali nde Satana, Momeki, moto azali kosala nyonso mpo na komema biso na kosalela Nzambe lisumu.—Matai 4:3; 1 Batesalonike 3:5.
19. Eloko nini tosengeli kosenga kati na libondeli mpo na ntina etali lisenginya?
19 na libondeli “kendisa biso na komekama te”, tozali mpenza kosenga na Jéhovah ete atika biso te kokwea ntango tomekami mpo na koboya kotosa ye, to topusami na kosala yango. Tokoki kobondela Tata na biso atambwisa matambe na biso mpo ete tokutani na lisenginya moko te ya makasi koleka biso. Na ntina yango, Paulo akomaki: “Emekeli moko ekomeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo okotika bino te ete bamekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ebimelo ete bokoka koyika mpiko.” (1 Bakolinti 10:13) Tokoki kosambela Jéhovah ete atambwisa biso mpo ete tomekama te koleka oyo biso tokoki koyikela yango mpiko mpe afungwela biso nzela ntango totungisami mingi koleka. Komekama eutaka na Diable, na nzoto na biso ezangi kokoka mpe na bolembu ya bato mosusu, kasi Nzambe na biso oyo atondi na bolingo azali na makoki ya kotambwisa biso mpo ete tozinda te.
20. Mpo na nini esengeli na biso kosambela mpo ete tobikisama na “ye oyo mabe”?
20 “Kasi bikisa biso na oyo mabe.” (Matai 6:13) Nzambe akoki na mbala moko kopekisa Satana, “ekelamu mabe”, ete alonga biso te. (2 Petelo 2:9) Nzokande, ntango na biso oyo eleki mpenza ntina mingi mpo ete tokoka kosikolama na Diable, mpamba te ‘azali na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse’. (Emoniseli 12:12.) Tozali kobunga te mayele mabe ya Diable, kasi ye mpe abungi te bolembu na biso. Na bongo esengeli na biso kosambela Jéhovah mpo ete abatela biso na manzaka ya Monguna wana oyo akokani na nkosi. (2 Bakolinti 2:11; 1 Petelo 5:8, 9; tala Nzembo 141:8, 9) Na ndakisa, soki bolingi kobala, mbala mosusu tosengeli kosenga na Jéhovah ete asikola biso na mayele mabe ya Satana mpe na lisenginya ya kozala na boninga na bato ya mokili mpo ete tokoka kokwea na pite te to koboya kotosa Nzambe na kobalaka moto oyo azali mondimi te. (Deteronome 7:3, 4; 1 Bakolinti 7:39) Tozalaka na mposa ya kokoma bazwi? Na ntina yango, libondeli ekoki kosalisa biso kolonga na lisenginya ya kosangana na masano ya mbongo lokola loterie to na kokosa (kosala fraude). Mpo na kobebisa boyokani na biso elongo na Jéhovah, Satana azali pene na kosalela bibundeli nyonso oyo azali na yango kati na ebombelo na ye na masenginya. Na bongo tosambela ntango nyonso Tata na biso ya likoló, oyo atikaka ata moke te mosembwi kati na komekama, kasi akobikisaka ye na oyo mabe.
Libondeli elendisaka kondima mpe elikya
21. Matomba nini mazali na kosambela mpo na Bokonzi?
21 Tata na biso ya likoló, oyo azali kobikisa biso na ye oyo mabe, azali kosepela mpo na kopambola biso mingi koleka. Kasi mpo na nini atiki ntango molai boye ete basaleli na ye, oyo alingaka mingi, basambela mpo ‘ete bokonzi na ye eya’? Ya solo, na boumeli ya mibu, libondeli wana ememaki biso na kolinga nokinoki mpenza koya ya Bokonzi mpe kopesa yango likebi mingi koleka. Ezali kokundola biso ete tozali na mposa makasi ya boyangeli wana kitoko ya likoló. Ezali kopesa biso nzela na kobatela ntango nyonso kati na makanisi elikya oyo epesameli biso ya kofanda na nse na boyangeli ya Bokonzi.—Emoniseli 21:1-5.
22. Ndenge nini tosengeli ntango nyonso kotalela privilége oyo epesameli biso ya kosambela Tata na biso ya likoló, Jéhovah?
22 Ntembe ata moke ezali te ete libondeli ezali kolendisa kondima na biso epai na Jéhovah. Ntango azali koyoka mabondeli na biso, boyokani oyo ezali kosangisa biso na ye ezali koyeisama makasi. Na bongo tolemba te mpo na komibalola mikolo nyonso epai na ye elongo na masanzoli, na mabondeli ya botondi mpe na malombo. Mpe tozala ntango nyonso na botondi mpo na eyano ya ntina oyo yesu apesaki na lisengi oyo ya bayekoli na ye: “Nkolo, lakisa biso kobondela.”
Bozongeli
◻ Mateya nini tozali kozwa na maloba mpe ndakisa na Yesu oyo azalaki moto na kosambela mingi?
◻ Makambo nini tosengeli kosengaka mbala na mbala kati na libondeli na ntina etali Tata na biso ya likoló mpe nkombo na ye?
◻ Tolingi koloba nini ntango tozali kosambela ete Bokonzi na Nzambe eya mpe ete mokano na ye esalama awa na nse?
◻ Tosengaka nini ntango tozali kosambela Nzambe ete apesa biso bilei na biso ya mokolo na mokolo?
◻ Na ndimbola nini tozali kosambela Nzambe ete alimbisa biso nyongo na biso?
◻ Mpo na nini ezali ntina na kosambela Nzambe ete abikisa biso na masenginya mpe na Satana, ye oyo mabe?
[Elilingi na lokasa 16]
Bayekoli basengaki na Yesu ete alakisa bango kobondela. Oyebi ndenge nini tokoki kozwa litomba na mateya wana matali libondeli?