Otyelaka mpenza Nzambe elikya?
“Boye, bókoba koluka liboso bokonzi.”—MATAI 6:33.
1, 2. Ekateli nini elenge mobali moko azwaki na likambo etali mosala, mpe mpo na nini?
ELENGE mobali moko azalaki na mposa ya kosalela lisangá mingi. Kasi, mosala na ye ya mosuni ezalaki kopekisa ye koyangana na makita nyonso. Ndenge nini asilisaki mokakatano yango? Atikaki mosala yango, mpe na nsima azwaki mosala oyo ezalaki kotikela ye ntango ya kokokisa mikumba ya lisangá. Lelo oyo, azali kozwa mbongo mingi te ndenge azalaki kozwa liboso, kasi azali kokokisa bamposa ya libota na ye mpe kosalela lisangá mingi.
2 Oyebi mpo na nini elenge wana asalaki mbongwana yango? Soki yo mpe okutani na mokakatano ya ndenge wana, okozwa ekateli oyo elenge wana azwaki? Likambo ya esengo, baklisto mingi basalaka bongo, mpe yango emonisaka ete bazali kotya motema na elaka ya Yesu oyo: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:33) Batyelaka Yehova motema, kasi misala ya mosuni te.—Masese 3:23, 26.
3. Mpo na nini bato mosusu bakoki komituna soki ezali na ntina kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso lelo oyo?
3 Lokola tozali na ntango ya mpasi, bato mosusu bakoki komituna soki elenge wana azwaki ekateli ya malamu. Lelo oyo, bato mosusu bazali na bobola makasi, nzokande bamosusu bazali na bomɛngo mpenza. Bato mingi na mikili ya bobola balingaka te kolekisa libaku ya kobongisa bomoi na bango mwa moke. Epai mosusu, bato oyo bazali na bikólo ya bozwi, basalaka makasi bozwi na bango ekita te atako nkita ya bikólo na bango ezali kokita, to mpe misala ekómi mpasi mpe ezali kosɛnga bango ntango mpe makasi mingi. Lokola ekómi mwa mpasi mingi mpo na kozala na bomoi ya malamu, basusu bakoki komituna boye: ‘Ezali na ntina lisusu tóluka liboso Bokonzi?’ Mpo na koyanola na motuna yango, ebongi tóyeba soki Yesu azalaki kosolola na banani.
“Bótika komitungisa”
4, 5. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa ete ezali na ntina te basaleli ya Nzambe bámitungisaka mingi mpo na bomoi na bango ya mokolo na mokolo?
4 Yesu azalaki na Galilai, mpe azalaki kosolola na ebele ya bato oyo bautaki na bisika mingi. (Matai 4:25) Mingi te kati na bango bazalaki bazwi. Emonani mpenza ete mingi bazalaki babola. Kasi, Yesu alobaki na bango ete bálukaka te libosoliboso bozwi, kasi bámibombela eloko moko ya motuya mingi: bozwi ya elimo. (Matai 6:19-21, 24) Alobaki boye: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata. Molimo eleki nde bilei te mpe nzoto eleki bilamba te?”—Matai 6:25.
5 Maloba wana ya Yesu ekokaki kozala mpasi epai ya ebele ya bayoki na ye. Bayebaki ete soki bamipesi na mosala te, mabota na bango ekonyokwama. Yango wana, Yesu apesaki bango ndakisa ya bandɛkɛ. Atako ndɛkɛ elonaka te, Yehova akokisaka bamposa na yango. Yesu alobelaki mpe lolenge oyo Yehova alatisaka bafololo, oyo kitoko na yango eleki kutu lokumu oyo Salomo azalaki na yango. Soki Yehova akokisaka bamposa ya bandɛkɛ ná bafololo, na koleka boni akosala yango mpo na biso bato? (Matai 6:26-30) Ndenge Yesu alobaki, bomoi (milimo) na biso mpe nzoto na biso ezali na ntina mingi koleka bilei oyo tosombaka mpo na kolya mpe bilamba oyo tolataka mpo na kobomba nzoto na biso. Soki tozali koboma nzoto kaka mpo na koluka biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata kozanga kobomba ata mwa ntango moke mpo na kosalela Yehova, tobosani mpenza ntina ya bomoi.—Mosakoli 12:13.
Likanisi ya bokatikati
6. (a) Baklisto bazali na mokumba nini? (b) Epai wapi baklisto batyaka motema mobimba?
6 Yesu alobaki na bayoki na ye te ete bátika kosala mpe bázelaka kaka Nzambe aleisa mabota na bango. Ata bandɛkɛ balukaka biloko mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango. Na yango, mpo bálya, baklisto basengelaki kosala mosala. Basengelaki kokokisa mikumba ya libota. Baklisto oyo bazalaki basali ya bato mosusu mpe oyo bazalaki baombo basengelaki kosalela bankolo na bango na molende. (2 Batesaloniki 3:10-12; 1 Timote 5:8; 1 Petelo 2:18) Mbala mingi, ntoma Paulo azalaki kotonga bahema mpo na kobikela. (Misala 18:1-4; 1 Batesaloniki 2:9) Atako bongo, baklisto wana bazalaki kotya motema mobimba na misala na bango te. Bazalaki kotyela nde Yehova motema. Na yango, bazalaki na kimya ya motema, oyo bato mosusu bazalaki na yango te. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Baoyo bakotya elikya na bango epai ya [Yehova] bazali lokola ngomba ya Siona; yango ekolɛnga te, kasi ekotikala seko.”—Nzembo 125:1.
7. Moto oyo atyelaka Yehova motema mobimba te akoki kozala na makanisi ya ndenge nini?
7 Bato oyo batyelaka Yehova motema mobimba te bakoki kozala na makanisi ndenge mosusu. Bato mingi bamonaka ete bozwi ya mokili ezali fungola ya bomɛngo. Yango wana, baboti mosusu balendisaka bana na bango bátánga bakelasi milaimilai; bakanisaka ete yango nde ekopesa bango nzela ya kozwa misala ya malamu. Likambo ya mawa, baklisto mosusu bamonaki ete milende oyo basalaki ya kotinda bana na bango na bakelasi yango esukaki mabe, mpamba te bana na bango balɛmbaki na elimo mpe bamipesaki kaka na koluka bozwi.
8. Likanisi nini ya bokatikati baklisto bazalaka na yango?
8 Baklisto oyo bazali na bwanya bamonaka ete toli wana ya Yesu ezali mpe na ntina lelo oyo, ndenge kaka ezalaki na ekeke ya liboso, mpe basalaka makasi bázala na bokatikati. Ata soki basengeli kolekisa bangonga ebele na mosala mpo na kokokisa mikumba oyo Biblia epesi bango, batikaka soki moke te ete koluka mbongo ekanga bango miso na makambo ya elimo, oyo eleki ntina.—Mosakoli 7:12.
“Bómitungisa soki moke te”
9. Elikya nini Yesu apesaki bato oyo batyelaka Yehova motema mobimba?
9 Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki na bayoki na ye boye: “Bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana.” (Matai 6:31, 32) Oyo nde maloba ya kolendisa! Soki tozali kotyela Yehova motema mobimba, akobanda kosunga biso ntango nyonso. Kasi, maloba wana ya Yesu ezali na makanisi mosusu ya ntina mingi. Ezali kokundwela biso ete soki tozali koluka biloko ya mosuni “na lokoso mpenza,” makanisi na biso ezali lokola oyo ya “bikólo,” elingi koloba bato oyo bazali baklisto ya solo te.
10. Ntango elenge mobali moko ayaki koluka toli epai ya Yesu, ndenge nini Yesu amonisaki polele eloko oyo elenge yango alingaki mingi?
10 Mokolo moko, elenge moko oyo azalaki na bozwi mingi atunaki Yesu ayebisa ye oyo asengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Yesu akundwelaki ye Mibeko ya Moize, oyo bazalaki naino kolanda na ntango wana. Elenge mobali yango alobaki na Yesu ete: “Nasili kotosa nyonso wana; nini ezali kozanga ngai lisusu?” Bato mingi bakoki kosepela te na eyano oyo Yesu apesaki. Alobaki boye: “Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende kotɛka biloko na yo mpe pesá na babola mpe okozwa eloko ya motuya na likoló, mpe yaká landá ngai.” (Matai 19:16-21) Elenge mobali yango akendeki na mawa na motema, mpo alingaki te kobungisa bozwi na ye. Atako alingaki Yehova mingi, alingaki bozwi na ye koleka.
11, 12. (a) Maloba nini ya ntina mingi Yesu alobaki mpo na bomɛngo? (b) Ndenge nini bozwi ekoki kopekisa moto asalela Yehova?
11 Yango etindaki Yesu aloba likambo moko ya kokamwa: “Ekozala likambo ya mpasi mpo moto ya bomɛngo akɔta na bokonzi ya likoló. . . . Koleka ya kamela na lidusu ya ntonga ezali mpenza pɛtɛɛ mingi koleka kokɔta ya moto ya bomɛngo na bokonzi ya Nzambe.” (Matai 19:23, 24) Yesu alingaki nde koloba ete moto ya bomɛngo akoki kosangola bokonzi te? Te, mpamba te abakisaki boye: “Epai ya Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.” (Matai 19:25, 26) Ya solo, na lisalisi ya Yehova, bato mosusu ya bomɛngo ya ntango wana babongwanaki mpe bakómaki baklisto bapakolami. (1 Timote 6:17) Na yango, Yesu alobaki maloba wana ya kokamwa na ntina. Azalaki kopesa likebisi.
12 Soki moto akómi kokangama na bozwi na ye ndenge elenge mobali wana asalaki, yango ekoki kopekisa ye asalela Yehova na motema mobimba. Toli yango ebongi mpenza mpo na moto oyo azali mozwi mpe mpo na ‘oyo alingaka kaka kozala moto ya bomɛngo.’ (1 Timote 6:9, 10) Kotya motema mingi na biloko ya mokili ekoki kotinda moto abosana ‘bobola na ye ya elimo.’ (Matai 5:3) Yango ekoki kotinda ye akanisa ete azali na mposa ya lisalisi ya Yehova te. (Deteronome 6:10-12) Akoki komizela ete bandeko ya lisangá bápesaka ye lokumu oyo eleki ndelo. (Yakobo 2:1-4) Mpe akoki kobanda kolekisa ntango na ye mingi kaka na koluka bozwi na esika ya kosalela Yehova.
Tózalaka na makanisi ya malamu
13. Likanisi nini ya mabe bandeko ya Laodikia bazalaki na yango?
13 Na ekeke ya liboso, baklisto ya lisangá ya Laodikia bazalaki kotalela bozwi na ndenge ebongi te. Yesu alobaki na bango ete: “Olobaka ete: ‘Nazali moto ya bomɛngo mpe nasili konduka bomɛngo mpe nazali ata na mposa ya eloko moko te,’ kasi oyebi te ete ozali moto ya mpasi mpe moto ya mawa mpe mobola mpe moto akufá miso mpe bolumbu.” Ezali bomɛngo te nde ekómisaki baklisto ya Laodikia bongo na elimo. Ezali mpo batyaki motema na bango mobimba na bomɛngo, kasi te epai ya Yehova. Na ndenge yango, bazalaki mpiɔ te mɔtɔ mpe te, mpe etikalaki moke Yesu ‘asanza bango na monɔkɔ na ye.’—Emoniseli 3:14-17.
14. Mpo na nini Paulo apesaki Baebele oyo bakómaki baklisto longonya?
14 Epai mosusu, Paulo apesaki Baebele oyo bakómaki baklisto longonya mpo na elimo oyo bamonisaki ntango bakutanaki na mikakatano. Alobaki boye: “Bomonisaki mawa epai ya baoyo bazalaki na bolɔkɔ mpe bondimaki na esengo kopunzama ya biloko na bino, koyebáká ete bozali na eloko moko ya malamu mingi mpe oyo eumelaka.” (Baebele 10:34) Atako baklisto yango babungisaki biloko na bango, bamitungisaki mingi te. Babatelaki esengo na bango mpamba te bakangamaki na eloko oyo eleki motuya, elingi koloba “eloko moko ya malamu mingi mpe oyo eumelaka.” Na ndakisa ya komelesa-motamboli ya lisese ya Yesu oyo atikaki biloko nyonso mpo na kozwa liyaka moko ya motuya, balingaki ata moke te kotika elikya ya bokonzi, ata soki yango ekokaki kosɛnga bábungisa makambo mingi. (Matai 13:45, 46) Oyo nde ezaleli kitoko!
15. Ndenge nini moklisto moko ya mwasi na Liberia atyaki matomba ya bokonzi na esika ya liboso?
15 Bato mingi lelo oyo bazali mpe komonisa ezaleli malamu wana. Na ndakisa, na ekólo Liberia, elenge moklisto moko ya mwasi azwaki libaku ya kotánga na iniversite. Na ekólo yango, soki moto azwi libaku ya boye amonaka ete bomoi na ye ebongi. Nzokande, ndeko yango azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe basɛngaki ye asala lokola mobongisi-nzela monene mpo na mwa ntango. Aponaki koluka liboso Bokonzi mpe kotikala kaka mobongisi-nzela. Akendaki epai batindaki ye, mpe na boumeli ya sanza misato kaka, ayekolaki Biblia na bato 21. Elenge mwasi yango mpe ebele ya bandeko mosusu lokola ye bazali koluka liboso bokonzi mpe kondima ata kobungisa biloko ya mokili. Ndenge nini bazali kobatela elimo wana na mokili oyo bato balingi bozwi mingi? Baloni bizaleli mingi ya malamu. Tiká tólobela mwa bizaleli yango mosusu.
16, 17. (a) Mpo na nini komikitisa ezali na ntina soki tolingi kotyela Yehova motema? (b) Mpo na nini tosengeli kotyela bilaka ya Nzambe motema?
16 Komikitisa: Biblia elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo. Tiká te ete omonana na [bwanya] na miso na yo moko.” (Masese 3:5-7) Ntango mosusu, etamboli moko ekoki komonana malamu soki totali yango na ndenge ya mokili. (Yilimia 17:9) Kasi, moklisto ya solosolo alukaka koyeba makanisi ya Yehova. (Nzembo 48:14) ‘Na banzela na ye nyonso’—ezala ya lisangá, na kelasi to na mosala, na kominanola, to makambo mosusu, alukaka toli ya Yehova na komikitisa nyonso.—Nzembo 73:24.
17 Kotyela bilaka ya Yehova motema: Paulo alobaki boye: “Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Soki tozali kondima te ete Yehova akokokisa bilaka na ye, tokomona ete tosengeli ‘kosalela mokili oyo na makambo nyonso.’ (1 Bakolinti 7:31) Nzokande, soki kondima na biso ezali makasi, tokozala na ekateli ya koluka liboso bokonzi. Ndenge nini moto akoki kokóma na kondima makasi? Soki azali ntango nyonso kopusana penepene na Yehova na nzela ya mabondeli oyo esalemi na motema mobimba mpe na koyekola mbala na mbala. (Nzembo 1:1-3; Bafilipi 4:6, 7; Yakobo 4:8) Lokola mokonzi Davidi, tokoki kobondela boye: “Nazali na elikya epai na yo, E [Yehova]. Nalobi ete: Yo ozali Nzambe na ngai. Malamu na yo ezali monene mingi mpenza.”—Nzembo 31:14, 19.
18, 19. (a) Ndenge nini molende na mosala ekómisaka elikya na biso epai na Yehova makasi? (b) Mpo na nini moklisto akoki kondima komipimela makambo mosusu?
18 Molende na mosala ya Yehova: Paulo amonisaki boyokani oyo ezali kati na kotyela bilaka ya Yehova motema ná molende na mosala ntango akomaki ete: “Tolingi ete mokomoko na bino amonisa molende ya ndenge wana mpo na kozala na kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka.” (Baebele 6:11) Soki tozali komipesa na mosala ya Yehova, Ye akosunga biso. Ntango nyonso oyo tokomona lisungi na ye, elikya na biso epai na ye ekokóma lisusu makasi, ‘tokopikama makasi, tokoningana te.’ (1 Bakolinti 15:58) Kondima na biso ekokóma ya sika, mpe elikya na biso ekokóma makasi.—Baefese 3:16-19.
19 Kondima komipimela makambo mosusu: Mpo na kolanda Yesu, Paulo andimaki komipimela makambo oyo ekokaki kokómisa ye moto monene. Asalaki mpenza liponi ya malamu, atako azalaki ntango mosusu na bomoi ya mpasi. (1 Bakolinti 4:11-13) Yehova alaki biso bomɛngo te, mpe ntango mosusu basaleli na ye bakutanaka na mikakatano. Lokola tozali kondima kozala na bomoi ezangi mindondo mpe komipimela biloko mosusu, yango emonisaka ete tozali na ekateli makasi ya kosalela Yehova.—1 Timote 6:6-8.
20. Mpo na nini kozala na motema molai ezali na ntina mingi mpo na moto oyo atyaka matomba ya bokonzi na esika ya liboso?
20 Motema molai: Yakobo alendisaki baninga na ye baklisto boye: “Na yango, bómonisa motema molai, bandeko, tii na kozala ya Nkolo.” (Yakobo 5:7) Na mokili ya lelo oyo makambo nyonso ezali kokende mbangumbangu, ezali mpasi kozala motema molai. Tolingaka makambo esalema nokinoki. Kasi, Paulo alendisi biso tómekola baoyo “na nzela ya kondima mpe na motema molai bazali kozwa libula ya bilaka.” (Baebele 6:12) Zelaká Yehova na esengo. Bomoi ya seko na paladiso na mabelé ezali eloko oyo ebongi mpenza tózela yango!
21. (a) Ntango tozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, tomonisaka nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
21 Ya solo, toli oyo Yesu apesaki ete tólukaka liboso Bokonzi ezali na ntina mingi. Ntango tozali kosala bongo, tozali komonisa mpenza ete tozali kotya elikya epai ya Yehova, mpe toponi bomoi kaka moko ya malamu mpo na moklisto. Lisusu, Yesu apesaki biso toli ete tókoba “koluka liboso . . . boyengebene [ya Nzambe].” Na lisolo oyo elandi, tokomona mpo na nini toli yango ezali na ntina, mingimingi lelo oyo.
Okoki kolimbola?
• Likanisi nini ya bokatikati Yesu alendisi biso tózala na yango mpo na biloko ya mokili?
• Liteya nini tozwi na lisese ya Yesu oyo elobeli kamela ná lidusu ya ntonga?
• Wapi bizaleli ya boklisto oyo esalisaka biso tóluka liboso Bokonzi ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 21]
Bato mingi oyo bayokaki maloba ya Yesu bazalaki babola
[Elilingi na lokasa 23]
Elenge mobali ya bozwi alingaki biloko na ye mingi koleka Nzambe
[Elilingi na lokasa 23]
Komelesa-motamboli ya lisese ya Yesu atikaki biloko nyonso mpo na liyaka moko ya motuya
[Elilingi na lokasa 24]
Soki tozali komipesa na mosala ya Yehova, Ye akosunga biso