“Liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!”
NA LIYANGANI moko ya mokolo moko ya Batatoli ya Yehova, Kim azalaki kolanda na likebi mpe kozwa banɔti, atako bongo azalaki mpe kobatela mwana na ye ya mbula mibale na ndambo mpo afanda kimya. Na nsuka ya liyangani, ndeko mwasi moko oyo afandaki esika moko na ye, atalaki Kim mpe apesaki ye longonya mpo na ndenge ye ná mobali na ye babatelaki mwana na bango ya mwasi na boumeli ya liyangani. Kim abosanaka te longonya wana oyo bapesaki ye; tii lelo alobaka ete: “Soki nalɛmbi na makita, nakanisaka likambo oyo ndeko wana alobaki. Maloba na ye ya boboto elendisaka ngai nakoba koteya mwana na ngai.” Ya solo, liloba lilobami na ntango ebongi ekoki kolendisa moto. Biblia elobi: “Liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!”—Masese 15:23.
Kasi, bato mingi bakokaka te kopesa basusu longonya. Ntango mosusu, tozalaka na mokakatano wana mpo toyebaka bolɛmbu na biso. Moklisto moko alobaki boye: “Ngai namonaka kopesa basusu longonya lokola nde natɛlɛmi na pɔtɔpɔtɔ mpe nazali kotombola bango, mpe ngai moko nazali kozinda.” Makambo lokola nsɔni, kozanga komityela motema mpe kobanga ete bákanisela biso mabe ekoki mpe kozala mokakatano mpo na kopesa basusu longonya. Lisusu, soki bazalaki kopesa biso longonya te ntango tozalaki kokola, ekoki mpe kozala mpasi mpo na biso kopesa basusu longonya.
Kasi, soki toyebi ete kopesa longonya ekoki kozala na litomba mpo na moto oyo apesi yango mpe mpo na moto oyo azwi yango, tokosala nyonso mpo na kopesa longonya na ntango oyo ebongi. (Masese 3:27) Soki tozali kosala bongo, tokozwa matomba nini? Tiká tótalela mwa ndambo ya matomba yango.
Matomba ya kopesa longonya
Longonya oyo ebongi esalisaka moto oyo azwi yango amiyoka ete azali na ntina. Ndeko mwasi moko, Elaine, alobi boye: “Ntango bato bapesaka ngai longonya, namonaka ete batyelaka ngai motema mpe bandimaka ngai.” Ya solo, kopesa longonya na moto oyo amityelaka motema te ekoki kosalisa ye alonga mikakatano mpe azala na esengo. Kopesa mpe bilenge longonya oyo ebongi esalisaka bango mingi. Elenge moko oyo azalaki komimona ete azali na ntina te alobaki boye: “Nasalaka nyonso mpo nasepelisa Yehova, kasi ntango mosusu namonaka ete nyonso oyo nasalaka ekokaka te. Nayokaka esengo soki bapesi ngai longonya.” Yango emonisi bosolo ya lisese ya Biblia oyo: “Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami na kati ya palata.”—Masese 25:11.
Longonya ekoki kolendisa moto. Mosakoli moko ya ntango nyonso alobi boye: “Longonya elendisaka ngai nabakisa milende mpe nabongisa mosala na ngai ya kosakola.” Mama moko ya bana mibale alobaki ete soki bandeko mosusu ya lisangá bapesi bana na ye longonya mpo na biyano na bango na makita, epesaka bango mposa ya kopesa biyano mingi. Ya solo, longonya ekoki kosalisa bilenge bákola na elimo. Kutu, biso nyonso tozalaka na mposa bámona biso ete tozali na ntina. Mokili oyo etondi na mikakatano ekoki kolɛmbisa biso. Nkulutu moko alobi boye: “Soki bapesi ngai longonya ntango nalɛmbi, namonaka lokola Nzambe ayoki mabondeli na ngai.” Elaine mpe alobi boye: “Ntango mosusu Yehova amonisaka ete alingaka ngai na nzela ya maloba ya bato mosusu.”
Longonya ekoki kosalisa moto amona ete ye mpe azali na ntina na kati ya lisangá. Kopesa longonya na motema mobimba emonisaka ete totyelaka basusu likebi mpe yango esalaka ete esengo, boyokani mpe limemya ezala makasi. Yango emonisaka ete tolingaka mpenza bandeko na biso mpe tomonaka ete bazali na ntina. Mama moko na nkombo Josie alobi boye: “Liboso, ngai ná mobali na ngai tozalaki na lingomba moko te. Na ntango wana, longonya oyo bandeko oyo bakɔmeli na elimo bazalaki kopesa ngai ezalaki kosalisa ngai nalɛmba te.” Ya solo, “tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.”—Baefese 4:25.
Mposa ya kopesa longonya ekoki kosalisa biso tólukaka makambo ya malamu epai ya basusu. Tolukaka nde makambo ya malamu epai ya basusu, kasi bolɛmbu na bango te. Nkulutu moko na nkombo David alobi boye: “Komonisa botɔndi mpo na makambo oyo basusu basalaka ekosalisa biso tópesaka bango longonya mingi.” Soki totali ndenge Yehova ná Mwana na ye bakakatanaka ata moke te kolobela malamu ya bato ya kozanga kokoka, yango ekosalisa biso tólɛmbaka te kopesa basusu longonya.—Matai 25:21-23; 1 Bakolinti 4:5.
Bato oyo babongi kozwa longonya
Lokola Yehova azali Mozalisi, azali moto ya liboso oyo abongi kozwa lokumu. (Emoniseli 4:11) Atako esɛngaka te ete biso tósalisa ye akóma komityela motema to tólendisa ye, ntango tozali kokumisa bonene mpe motema boboto na ye, apusanaka penepene na biso mpe tokómaka baninga na ye. Kokumisa Yehova esalisaka mpe biso tómikumisaka mingi te mpo na makambo oyo tosalaka, kasi tópesaka lokumu yango nde epai ya Yehova. (Yilimia 9:23, 24) Yehova apesi elikya ya bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo babongi na yango, mpe yango ezali ntina mosusu oyo tosengeli kokumisa ye. (Emoniseli 21:3, 4) Mokonzi Davidi azalaki na mposa makasi ya ‘kosanzola nkombo ya Nzambe’ mpe ‘kokumisa ye na matɔndi.’ (Nzembo 69:30) Tiká ete ezala mpe mposa na biso.
Bandeko na biso baklisto babongi kozwa longonya. Soki tozali kosala yango, tozali kosala oyo Nzambe asɛngi: “Tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.” (Baebele 10:24) Ntoma Paulo azalaki mpenza ndakisa na likambo yango. Akomelaki lisangá ya Loma boye: “Libosoliboso, nazali kopesa Nzambe na ngai matɔndi na nzela ya Yesu Klisto mpo na bino nyonso, mpamba te kondima na bino ezali kolobelama bipai nyonso na mokili mobimba.” (Baloma 1:8) Ndenge moko mpe, ntoma Yoane apesaki moninga na ye moklisto Gayusi matɔndi mpo na ndakisa na ye malamu ya “kotambola na kati ya solo.”—3 Yoane 1-4.
Lelo oyo, ntango ndeko moko apesi mpenza ndakisa na likambo moko, na ndakisa asali lisolo oyo abongisaki malamu to apesi eyano moko ya malamu na makita, tosengeli kopesa ye matɔndi. Ntango mwana moko azali kosala makasi mpo na koluka bavɛrsɛ na makita, tosengeli mpe kopesa ye longonya. Elaine oyo tolobeli na ebandeli alobi boye: “Tozali na makabo ndenge moko te. Soki tozali kotya likebi na makambo oyo basusu basalaka, tozali komonisa botɔndi mpo na makabo ya ndenge na ndenge ya basaleli ya Nzambe.”
Na kati ya libota
Tokoloba boni mpo na kopesana longonya na libota? Esɛngaka mobali mpe mwasi ntango, molende mpe likebi mingi mpo na kokokisa bamposa ya elimo, ya motema mpe ya mosuni ya libota na bango. Na ntembe te, esengeli bápesanaka longonya mpe bana na bango bápesaka bango longonya. (Baefese 5:33) Na ndakisa, mpo na mwasi ya makoki, liloba ya Nzambe elobi boye: “Bana na ye bakotɛlɛma mpe bakobyanga ye mopambwami; mobali na ye lokola mpe, ye akosanzola ye.”—Masese 31:10, 28.
Bana mpe babongi kozwa longonya. Likambo ya mawa, baboti mosusu bawelaka kaka koyebisa bana makambo oyo balingi bana básala, kasi bápesaka bango longonya mpenza te mpo na milende oyo basalaka mpo na kotosa mpe komemya bango. (Luka 3:22) Soki bazali kopesa mwana longonya ntango azali kokola, akomona ete balingaka ye mingi.
Toboyi te, kopesa basusu longonya esɛngaka milende, kasi kosala bongo ememaka matomba mingi. Na yango, soki tozali kosala makasi mpo na kopesa longonya na bato oyo babongi na yango, tokozwa mpe esengo monene.—Misala 20:35.
Kondima longonya mpe kopesa yango na ndenge ebongi
Nzokande, longonya ekoki kokóma komekama mpo na bato mosusu. (Masese 27:21) Na ndakisa, ekoki kosala ete bato ya lolendo bátombola mapeka. (Masese 16:18) Na yango, tosengeli kozala na bokɛngi. Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Nazali koyebisa moto nyonso kuna na kati na bino ete akanisa mpo na ye moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa; kasi akanisa nde na ndenge ya kozala na makanisi malamu, moto na moto na mezire ya kondima oyo Nzambe akabeli ye.” (Baloma 12:3) Mpo na kosalisa bato mosusu bákwea te na motambo ya komikumisa, ekozala malamu tólobelaka te makambo lokola mayele mingi to kitoko ya nzoto. Kasi, tópesaka nde basusu matɔndi mpo na misala na bango ya malamu.
Soki tozali kopesa mpe kondima longonya na ndenge ebongi, tokoki kozwa matomba. Yango ekoki kotinda biso tóndima ete makambo nyonso ya malamu oyo tosali, tosali yango na lisalisi ya Yehova. Longonya ekoki mpe kolendisa biso tókoba komitambwisa na ndenge ebongi.
Kopesa longonya oyo ebongi ezali likambo oyo biso nyonso tokoki kosala. Soki topesi yango na motema moko, ekoki kosala makambo mosusu oyo biso toyebi te.
[Etanda/Elilingi na lokasa 18]
Mokanda moko esimbaki motema na ye
Mokɛngɛli-motamboli moko abosanaka te mokolo moko ya malili makasi oyo ye na mwasi na ye bazongaki ndako na bango nsima ya mosala ya kosakola. Alobi boye: “Mwasi na ngai ayokaki malili makasi mpe alɛmbaki, mpe alobaki na ngai ete akokoka lisusu mosala yango te. Alobaki boye: ‘Eleki malamu kofanda esika moko, kozala mobongisi-nzela na lisangá moko mpe koyekolaka na bato Biblia.’ Nayebisaki ye ete tótala naino soki pɔsɔ esili. Soki azali kaka na mposa tótika mosala yango, nakoyokela ye. Kaka mokolo wana, tolekaki na posita mpe tozwaki mokanda moko oyo biro ya filiale etindelaki ye. Na mokanda yango, bapesaki ye longonya mpo na milende oyo azalaki kosala na mosala ya kosakola mpe mpiko oyo azali komonisa, mpe bamonisaki ete bayebi mpasi oyo azali koyoka ya kolala na bambeto ekeseni pɔsɔ na pɔsɔ. Maloba wana esimbaki mpenza motema na ye mpe alobaki lisusu te ete akotika mosala yango. Na yango, mbala nyonso oyo nazalaki kokóma na makanisi ya kotika mosala yango, azalaki kolendisa ngai nakoba.” Ndeko yango ná mwasi na ye basalaki mosala yango mbula soki 40.
[Elilingi na lokasa 17]
Nani abongi kozwa longonya na lisangá na bino?
[Elilingi na lokasa 19]
Bana bakolaka malamu soki bazali komonisela bango bolingo mpe kopesa bango longonya