Nsango oyo tosengeli kosakola
Yehova apesi biso mokumba oyo ezali mpe libaku malamu mpo na biso, alobi boye: “Bino mpe bozali batatoli na ngai . . . Ngai nazali Nzambe.” (Yisaya 43:12) Biso tozali bandimi oyo bakangi mabɔkɔ te. Tozali batatoli oyo bazali kosakola solo mpe ya ntina mingi oyo euti na Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo na ye. Nsango nini Yehova atindi biso tósakola lelo oyo? Ezali nsango oyo ezali koyebisa bato makambo etali Yehova Nzambe, Yesu Klisto, mpe Bokonzi ya Masiya.
“BANGÁ NZAMBE YA SOLO MPE TOSÁ BAKOMANDEMA NA YE”
BAMBULA mingi liboso ete Klisto aya na mokili, Yehova ayebisaki Abalayama ete ezali na ebongiseli moko oyo na nzela na yango “bikólo nyonso ya mabele” ekomizwela mapamboli. (Gen. 22:18, NW) Elimo na ye etindaki Salomo akoma likambo moko ya ntina mingi oyo esɛngami na moto nyonso ete: “Bangá Nzambe ya solo mpe tosá bakomandema na ye. Yango nde oyo moto nyonso asengeli kosala.” (Mos. 12:13, NW) Kasi ndenge nini bato ya bikólo nyonso balingaki koyoka makambo yango?
Ya solo, atako na bileko nyonso bato oyo bandimelaka liloba ya Nzambe bazangaka te, kasi Biblia emonisi ete mosala ya kopesa litatoli na mokili mobimba mpo nsango malamu ekɔta na bikólo nyonso ekosalema nde na eleko babengi “mokolo ya Nkolo.” Mokolo yango ebandaki na 1914. (Emon. 1:10) Mpo na eleko wana, Emoniseli 14:6, 7 esakolaki ete mosala moko ya ntina mingi, mosala ya kosakola nsango malamu, ekosalama “na bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso” mpe baanzelu nde bakotambwisa yango. Bakolendisa bikólo nyonso wana ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei, mpe na yango bósambela Oyo asalaki likoló mpe mabele mpe mbu mpe maziba ya mai.” Nzambe alingi nsango wana esakolama. Mpe biso tozwi libaku malamu ya kosala mosala yango.
“Nzambe ya solo.” Ntango Yehova alobaki ete, “Bino bozali batatoli na ngai,” likambo oyo ezalaki koleka na ntango wana ezali ntembe ya koyeba nani mpenza azali Nzambe ya solo. (Yis. 43:10) Nsango oyo batindi biso tósakola ezali kaka te nsango ya koyebisa bato ete bázala na lingomba moko boye to bándimela nzambe moko boye. Tosengeli nde kopesa bango libaku ya koyeba ete Mozalisi ya likoló na nse, ye wana Nzambe kaka moko ya solo. (Yis. 45:5, 18, 21, 22; Yoa. 17:3) Kaka Nzambe wana ya solo nde akoki koyebisa biso makambo oyo ekoya mpe ekosalema se bongo. Tozali na libaku malamu ya koyebisa bato ete lokola makambo oyo liloba ya Yehova esakolaki na ntango ya kala ekokisamaki nyonso, tosengeli mpe kotya motema mpenza ete makambo nyonso oyo Yehova alaki mpo na mikolo ekoya ekokokisama.—Yos. 23:14; Yis. 55:10, 11.
Ya solo, bato mingi oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola basambelaka banzambe mosusu to balobaka ete basambelaka ata nzambe moko te. Yango wana, mpo bato ya ndenge wana báyoka biso, ekoki kozala malamu tóbanda lisolo na likambo moko oyo bango mpe basepelaka na yango. Makambo oyo ekomami na Misala 17:22-31 ekoki kopesa biso mayele. Tósimba likambo oyo: atako ntoma Paulo aboyaki kosalela maloba oyo ekozokisa bato wana, azangaki te kolakisa bango polele ete bato nyonso basengeli kozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe oyo asalaki likoló na nse.
Koyebisa bato nkombo ya Nzambe. Kobanga te kotángela bato nkombo ya Nzambe ya solo. Yehova alingi nkombo na ye mingi. (Ex. 3:15; Yis. 42:8) Alingi bato báyeba yango. Ye moko asalaki ete bákoma nkombo wana ya lokumu na Biblia mbala koleka 7 000. Mokumba na biso ezali ya kosalisa bato bámesana na yango.—Det. 4:35.
Mpo moto nyonso azwa elikya ya kozala na bomoi na mikolo ekoya, ezali kosɛnga ete ayeba Yehova, andimela ye mpe abelela ye. (Yoe. 2:32; Mki. 3:16; 2 Tes. 1:8) Nzokande, bato mingi bayebi Yehova te. Na kati ya bato yango, totángi mpe ebele ya bato oyo batutaka ntolo ete basambelaka Nzambe oyo Biblia eteyaka. Ata soki bazali na Biblia mpe batángaka yango, mbala mosusu bayebi nkombo ya Nzambe te, mpamba te balongolá nkombo yango na Babiblia mingi oyo bazali kobimisa mikolo oyo. Bato mosusu bayebaki nkombo ya Yehova kaka ntango bakonzi ya mangomba na bango bapekisaki bango kosalela yango.
Ndenge nini tokoki kosalisa bato bámesana na nkombo ya Nzambe? Lolenge eleki malamu ezali ya kolakisa bango nkombo yango na Biblia na bango moko, soki nkombo yango ezali kuna. Na Babiblia mosusu, okokuta nkombo yango na bisika mingi. Kasi na Babiblia mosusu, okokuta yango ntango mosusu kaka na Nzembo 83:18 to na Exode 6:3-6, to mpe na maloba na nse ya lokasa na Exode 3:14, 15 to Exode 6:3. Na Babiblia mingi, bakomá bibengeli mosusu na esika oyo nkombo ya Nzambe ezalaki na minɔkɔ ya libosoliboso oyo bakomaki na yango Biblia; bibengeli lokola oyo: “Nkolo” mpe “Nzambe,” mpe ekomami na makomi ya minene. Na Babiblia ya mikolo oyo, oyo balongolá nkombo ya Nzambe na bisika nyonso, ekozala mbala mosusu malamu osalela Biblia moko ya kala mpo na kolakisa bato ndenge balongolá nkombo yango. Na bamboka mosusu, okokuta nkombo ya Nzambe na banzembo ya mangomba na bango to na makambo oyo bakomá na bandako minene ya mangomba to ya Leta.
Ata ntango ozali koteya bato oyo basambelaka banzambe mosusu, okoki kosalela malamumalamu vɛrsɛ ya Yilimia 10:10-13 na Traduction du monde nouveau. Vɛrsɛ wana elobeli kaka nkombo ya Nzambe te, kasi emonisi mpe soki ye azali nani.
Kobombela bato nkombo ya Yehova te ndenge mangomba ya boklisto ebombaka yango na maloba lokola “Nzambe” mpe “Nkolo.” Yango elingi koloba te ete osengeli kosalela nkombo yango na ebandeli ya masolo na yo nyonso na bato. Soki osali bongo, bato mosusu bakoki kokata lisolo mpo bazalaka na makanisi ya mabe mpo na yango. Nzokande, soki lisolo ebandi kokende malamu, koyoka nsɔni te mpo na kosalela nkombo ya Nzambe.
Tósimba ete na kati ya Biblia, nkombo ya Nzambe ekomami mbala mingi koleka liloba “Nkolo” mpe liloba “Nzambe” ata soki basangisi bambala nyonso oyo maloba wana mibale ekomami. Atako bongo, bato oyo bakomaki Biblia bazalaki te kokoma nkombo ya Nzambe na bafraze nyonso. Basalelaki nkombo yango kaka na esika oyo ebongaki, kozanga kokakatana mpe na limemya mingi. Wana ezali ndakisa malamu ya kolanda.
Koyeba moto oyo azali na nkombo yango. Koyeba ete Nzambe azali na nkombo ezali liteya ya solo mpe ya ntina mingi, kasi wana ezali kaka ebandeli ya koyeba Nzambe.
Mpo bato bálinga Yehova, bándimela ye mpe bábelela ye, basengeli koyeba soki azali Nzambe ya ndenge nini. Ntango Yehova ayebisaki Moize nkombo na ye na Ngomba Sinai, asukaki kaka te na kozongela liloba “Yehova” mbala na mbala liboso na ye. Alakisaki ye mpe bizaleli na Ye mosusu ya malamu. (Ex. 34:6, 7) Biso mpe tósala ndenge wana.
Ntango ozali kopesa litatoli na moto moko ya sika oyo azali kosepela na nsango na biso to ntango ozali kosala lisukulu na lisangá, soki olobeli mapamboli oyo ekouta na Bokonzi ya Nzambe, kobosana te koyebisa bato eloko nini makambo yango ezali koteya biso mpo na Nzambe oyo alakaki yango. Ntango ozali kolobela mibeko na ye, monisá polele ete mibeko yango epesami na mayele na ye mpe bolingo na ye. Lakisá polele ete makambo oyo Nzambe asɛngaka biso ezali mpo na konyokola biso te, kasi nde mpo na bolamu na biso. (Yis. 48:17, 18; Mika 6:8) Lakisá bato bámona ete likambo nyonso oyo Yehova asalaka na nguya na ye elakisaka biso bomoto na ye, ndenge ye atalelaka makambo, mpe mokano na ye. Salisá bato básimba ete ntango Yehova amonisaka ezaleli na ye mokomoko, alekisaka ndelo te mpo na yango. Yo moko mpe lobá oyo yo okanisaka mpo na Yehova. Soki bamoni ete olingaka Yehova, bakoki kolanda ndakisa na yo.
Nsango oyo tozali kosakola na lombangu na moi ya lelo ezali kolendisa bato nyonso ete bábanga Nzambe. Na maloba na biso, tosengeli koluka kolendisa bato bázala na ezaleli wana ya kobanga Nzambe. Kobanga wana ezali malamu, elimboli kozala na nsɔmɔ liboso ya Yehova, kopesa ye limemya makasi. (Nz. 89:7) Yango eutaka mpe na koyeba ete Yehova azali Mosambisi oyo akosambisa bato nyonso mpe, soki ye andimi biso te, tokokoka te kozala na bomoi na mikolo ekoya. (Luka 12:5; Lom. 14:12) Kobanga wana ekendaka nzela moko na bolingo makasi oyo tozali na yango mpo na ye; bolingo wana nde epesaka biso mposa makasi ya kosepelisa ye. (Det. 10:12, 13) Ezaleli ya kobanga Nzambe etindaka biso mpe tóyina makambo ya mabe, tótosa mibeko ya Nzambe, mpe tósambela ye na motema na biso mobimba. (Det. 5:29; 1 Nta. 28:9; Mas. 8:13) Ebatelaka biso tózala te na mitema mibale: mosusu na mosala ya Nzambe, mosusu na kolula biloko ya mokili.—1 Yoa. 2:15-17.
Nkombo ya Nzambe ezali “ndako molai ya makasi.” Bato oyo bayebi Yehova na ndenge ya malamu mpenza bazali kobatelama malamu mpenza. Yango ezali kaka te mpo bazali kotánga nkombo na ye to mpo bayebi mwa ndambo ya bizaleli na ye ya malamu. Ezali nde mpo batyelaka Yehova motema. Masese 18:10 (NW) elobi mpo na bango ete: “Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi. Moyengebene akokima kuna mpe akobatelama.”
Ntango libaku emonani, salelá yango malamu mpo na kosalisa bato bátyela Yehova motema. (Nz. 37:3; Mas. 3:5, 6) Soki moto azali kotyela Yehova motema ndenge wana, elakisi ete azali kondimela ye mpe azali kotya elikya na bilaka na ye. (Ebe. 11:6) Soki bato ‘bazali kobelela nkombo ya Yehova’ mpo bazali koyeba ete ye azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, soki balingaka banzela na ye mpe bandimaka mpenza ete kaka ye nde akoki kopesa lobiko ya solosolo, boye ndenge Liloba ya Nzambe elobi yango, bakobika. (Lom. 10:13, 14) Ntango ozali koteya bato, salisá bango bákóma na kondima ya ndenge wana na makambo nyonso ya bomoi na bango.
Bato mingi bazali konyokwama na mikakatano minene na bomoi na bango. Bazali mbala mosusu komona te ndenge nini yango ekoki kosila. Lendisá bango báyekola kosala oyo Yehova alingi, bátya motema na bango epai na ye mpe básalela makambo oyo bazali koyekola. (Nz. 25:5) Lendisá bango bábondelaka Nzambe makasi mpo asalisa bango mpe bápesaka ye matɔndi mpo na mapamboli na ye. (Filp. 4:6, 7) Ntango bazali koyeba Yehova, kaka na mwa makambo oyo batángi na Biblia te kasi mpe na makambo ya malamu oyo ye azali kosala mpo na bango, bakomona mpenza ete babatelami, mpamba te bayebi mpenza ntina ya nkombo ya Yehova.—Nz. 34:8; Yil. 17:7, 8.
Salelá malamumalamu mabaku nyonso oyo okutani na yango mpo na kosalisa bato bámona mpenza ete kobanga Yehova, Nzambe ya solo, mpe kotosa mibeko na ye, ezali nzela ya mayele.
“KOPESA LITATOLI NA NTINA ETALI YESU”
NSIMA ya lisekwa na ye mpe liboso azonga na likoló, Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye malako oyo: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Mis. 1:8) Elobami mpo na basaleli ya sembo ya Nzambe lelo oyo ete bazali baoyo “bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emon. 12:17) Ozalaka mpenza na molende mpo na kopesa litatoli yango?
Bato mingi oyo balobaka na bosembo mpenza ete bandimaka Yesu bayebi ata likambo moko te ya bomoi na ye na likoló, liboso abotama lokola moto. Bamonaka te ete azalaki mpenza moto ya solo awa na mabele. Bayebaka mpenza te ntina ya maloba ete azali Mwana ya Nzambe. Bayebaka mpenza te mokumba oyo azali na yango na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Bayebaka te soki azali kosala nini sikoyo mpe ndenge nini makambo oyo azali kosala ekobongola bomoi na bango na mikolo ekoya. Mbala mosusu kutu bamikosaka, bakanisaka ete Batatoli ya Yehova bandimaka Yesu te. Tozali na mokumba ya kosala makasi mpo na koyebisa bato solo na makambo yango.
Ezali mpe na bato mosusu oyo bandimaka te ete Yesu oyo Biblia elobeli azalaki mpenza moto ya solo mpe azalaki na bomoi. Bato mosusu bamonaka Yesu kaka lokola moto moko monene. Mingi baboyaka kondima ete azali Mwana ya Nzambe. “Kopesa litatoli na ntina etali Yesu” epai ya bato yango esɛngaka kosala milende, kozala na motema molai mpe na mayele mpenza.
Ezala bato oyo bakoyoka yo bakanisaka nini, basengeli koyeba Yesu Klisto soki balingi ete Nzambe apesa bango bomoi ya seko. (Yoa. 17:3) Mokano ya Nzambe ezali polele ete bato nyonso ya bomoi ‘bándima polele ete Yesu Klisto azali Nkolo’ mpe bátosa bokonzi na ye. (Filp. 2:9-11) Yango wana, ntango tokutani na bato oyo batingamaka na makanisi na bango ya lokuta to bato oyo bazwelaka biso makanisi mabe, tosengeli te kaka kokima ntembe oyo babimisi. Na bisika mosusu tokoki koyebisa bato polele makambo etali Yesu, ata soki tokutani na bango mpo na mbala ya liboso. Nzokande na bisika mosusu, tosengeli mbala mosusu kozala na mayele ntango tozali koloba mpo na kosalisa bato oyo bazali koyoka biso ete bákóma na makanisi oyo ebongi mpo na Yesu. Mbala mosusu mpe esengeli tókanisa ndenge oyo tokoki kobakisa makambo mosusu ya lisolo yango ntango tokozonga kotala bango. Kasi, mbala mosusu tokozwa likoki te ya kolobela makambo nyonso oyo esengeli na likambo yango tii ntango tokobanda koyekola na moto yango Biblia.—1 Tim. 2:3-7.
Mokumba monene ya Yesu na kati ya mokano ya Nzambe. Tosengeli kosalisa bato bákanga ntina ete lokola Yesu azali “nzela” mpe ‘moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ye te,’ boye moto akoki kozala na boyokani malamu na Nzambe te soki azangi kondima Yesu Klisto. (Yoa. 14:6) Soki moto ayebi te mokumba monene oyo Yehova apesi Mwana na ye ya liboso, boye akokanga ntina ya Biblia ata moke te. Mpo na nini? Mpamba te Yehova asali ete Mwana yango azala moto oyo akokokisa mikano na Ye nyonso. (Kols. 1:17-20) Bisakweli nyonso ya Biblia ezali na boyokani na likambo yango. (Emon. 19:10) Mikakatano nyonso oyo euti na botomboki ya Satana mpe na lisumu ya Adama ekosila na nzela ya moto moko, Yesu Klisto.—Ebe. 2:5-9, 14, 15.
Mpo moto akanga ntina ya mokumba ya Klisto, asengeli kondima ete bato bazali na bwale mpenza mpe bakoki komibikisa bango moko te. Biso nyonso tobotami na lisumu. Yango ezali komonana na ndenge mingi na bomoi na biso mobimba mpe nsukansuka, ekomema biso na liwa. (Lom. 3:23; 5:12) Salisá bato oyo ozali kopesa bango litatoli ete bákanisa ndenge yango. Na nsima, monisá polele ete na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto, Yehova asali na bolingo mpenza ete bato oyo bakomonisa kondima na bango na ebongiseli wana básikwama na lisumu mpe na liwa. (Mko. 10:45; Ebe. 2:9) Yango nde ekopesa bango nzela ete bázwa bomoi ya seko mpe ya kokoka. (Yoa. 3:16, 36) Nzela mosusu ya kozwa yango ezali te. (Mis. 4:12) Lokola ozali moteyi, ezala na ndako to na lisangá, kosuka kaka na kolobela makambo oyo te. Na boboto mpe na motema molai mpenza, salisá bato oyo bazali koyoka yo bámona ntina ya komonisa botɔndi epai na Klisto mpo azali Mosikoli na biso. Soki moto akómi mpenza na botɔndi mpo na likabo wana, yango ekoki kobongola mpenza ezaleli na ye, etamboli na ye mpe mikano na ye.—2 Kol. 5:14, 15.
Ya solo, Yesu asopaki bomoi na ye lokola mbeka mbala moko mpo na libela. (Ebe. 9:28) Kasi azali sikoyo kosala mpenza lokola Nganga-Nzambe Monene. Salisá bato bákanga ntina ya likambo yango. Bato bazali na mitungisi, balɛmbi nzoto, bazali konyokwama, to bazali na mikakatano mpo ete bato oyo bafandi na bango bazangi boboto? Yesu mpe akutanaki na makambo yango ntango azalaki awa na mabele. Ayebi ndenge tomiyokaka. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tomonaka mpenza ete tozali na bosɛnga ya motema mawa ya Nzambe? Soki tobondeli Nzambe alimbisa biso mpo na mbeka ya Yesu, na ntango wana, Yesu akosala lokola ‘mosungi epai ya Tata.’ Na mawa mpenza, ‘akolobela biso.’ (1 Yoa. 2:1, 2; Lom. 8:34) Mbeka ya Yesu mpe mosala oyo azali kosala lokola Nganga-Nzambe Monene nde epesi biso nzela tópusana penepene ya “kiti ya bokonzi ya boboto monene” ya Yehova mpo na kozwa lisalisi na ntango ebongi. (Ebe. 4:15, 16) Atako tozangi kokoka, lisalisi oyo euti na Yesu, Nganga-Nzambe Monene, epesi biso nzela tósalela Nzambe na lisosoli ya pɛto.—Ebe. 9:13, 14.
Lisusu, Yesu azali na bokonzi mingi mpamba te Nzambe aponi ye azala Mokonzi ya lisangá ya boklisto. (Mat. 28:18; Ef. 1:22, 23) Lokola azali mokonzi, azali kotambwisa makambo na ndenge ebongi, na boyokani na mokano ya Nzambe. Ntango ozali koteya bato, salisá bango bákanga ntina ete Yesu Klisto nde azali Mokonzi ya lisangá, kasi moto mosusu te. (Mat. 23:10) Kaka na mbala ya liboso oyo okutani na moto oyo asepeli, bengisá ye na makita ya lisangá na bino, esika toyekolaka Biblia na nzela ya mikanda oyo euti na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Kosuka kaka te na kolimbolela ye nani azali “moombo” yango, kasi limbolá mpe soki Nkolo azali nani mpo ayeba bokonzi ya Yesu. (Mat. 24:45-47) Lakisá ye na bankulutu ya lisangá mpe limbolelá ye makambo oyo Makomami ezali kosɛnga mpo bákóma bankulutu. (1 Tim. 3:1-7; Tito 1:5-9) Limbolá ete lisangá ezali ya bankulutu te, kasi bazali wana nde mpo na kosalisa biso tólanda matambe ya Yesu Klisto. (Mis. 20:28; Ef. 4:16; 1 Pet. 5:2, 3) Salisá bato oyo bazali kosepela bámona ete ezali na ebongiseli to lisangá moko na mokili mobimba oyo ezali kosala mpe kotosa bokonzi ya Klisto.
Baevanzile eyebisi biso ete mwa moke liboso ya liwa na ye, ntango Yesu akɔtaki na Yelusaleme, bayekoli na ye bayambaki ye mpe babengaki ye “Moto oyo azali koya lokola Mokonzi na nkombo ya Yehova!” (Luka 19:38) Wana bato bazali koyekola Biblia malamumalamu, bakoyeba ete Yehova apesi Yesu bokonzi likoló ya bato ya bikólo nyonso. (Dan. 7:13, 14) Ntango ozali kosala masukulu na lisangá to ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia, salisá bato báyeba soki bokonzi ya Yesu etali biso na nini mpe bázala na botɔndi mpo na yango.
Monisá mpenza ete lolenge ya bomoi na biso emonisaka ete tozali mpenza kondima ete Yesu Klisto azali Mokonzi mpe ete tozali kotosa bokonzi na ye na motema na biso mobimba. Bendá likebi ya bato na mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye básala ntango apakolamaki lokola Mokonzi. (Mat. 24:14; 28:18-20) Lobelá likambo oyo Yesu, Mopesi-Toli ya Kokamwa, alobaki mpo na oyo etali koyeba makambo oyo eleki ntina na bomoi. (Yis. 9:6, 7, NW; Mat. 6:19-34) Bendá likebi na bango na ezaleli oyo Mokonzi ya Kimya alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozala na yango. (Mat. 20:25-27; Yoa. 13:35) Kebá ete obanda te kosambisa bato soki bazali kosala ndenge mpenza basengelaki kosala to te, kasi lendisá bango nde bátala soki misala na bango ezali mpenza komonisa ete bazali kotosa bokonzi ya Klisto. Ntango ozali kolendisa bango, yebá ete yo moko mpe osengeli kosala oyo yo ozali koloba.
Tyá Klisto lokola moboko. Biblia ekokanisi mosala ya kozalisa bato bayekoli na mosala ya kotonga ndako likoló ya moboko moko, Yesu Klisto. (1 Kol. 3:10-15) Mpo na kokokisa yango, salisá bato báyeba Yesu ndenge Biblia emonisi ye. Kebá ete bámona yo moko te lokola moto oyo basengeli kolanda. (1 Kol. 3:4-7) Tindá nde likebi na bango epai ya Yesu Klisto.
Soki otii moboko yango malamu, bayekoli bakoyeba mpenza ete Klisto atikelaki biso ndakisa mpo ‘tólanda matambe na ye malamumalamu.’ (1 Pet. 2:21) Mpo na kotonga likoló ya moboko yango, lendisá bayekoli bátángaka Baevanzile lokola kaka lisolo ya solo te, kasi bámona yango mpe lokola ndakisa oyo basengeli kolanda. Salisá bango bábosana te elimo mpe bizaleli oyo Yesu azalaki na yango mpe bálanda yango. Lendisá bango bátya likebi na ndenge Yesu azalaki kotalela Tata na ye, ndenge akangaki motema na masenginya mpe na komekama, ndenge atosaki Nzambe mpe ndenge azalaki kosala mpo na kofanda malamu na bato na makambo ndenge na ndenge. Monisá mpenza mosala oyo Yesu amipesaki mpo na kosala na bomoi na ye. Na nsima, ntango moyekoli akokutana na komekama moko na bomoi na ye mpe asengeli kozwa ekateli, akomituna boye: ‘Soki ezalaka Yesu na esika na ngai, alingaki kosala nini? Likambo nalingi kosala ezali komonisa mpenza ete nazali na botɔndi mpo na oyo ye asalaki mpo na ngai?’
Ntango ozali koloba na lisangá, kokanisa te ete ezali lisusu na ntina te ete otinda likebi na bango epai na Yesu mpo bandimaka ye. Makambo oyo okoloba ekozala na ntina soki olendisi kondima na bango. Ntango ozali kolobela makita, yokanisá makanisi yango na mokumba oyo Yesu azali kokokisa lokola Mokonzi ya lisangá. Ntango ozali kolobela mosala ya kosakola, bendá likebi ya bato na elimo oyo Yesu amonisaki ntango azalaki kokokisa mosala na ye mpe mpo na kolobela mosala ya kosakola, limbolelá bango mosala oyo Klisto azali kosala lokola Mokonzi mpo na koyanganisa bato mpe kokɔtisa bango na mokili ya sika.
Emonani polele ete ekoki kaka te koyekola makambo ya ebandeli oyo etali Yesu. Mpo na kokóma baklisto ya solo, bato basengeli komonisa kondima epai na ye mpe kolinga ye mpenza. Bolingo yango ekotinda bango bátosa ye na bosembo mpenza. (Yoa. 14:15, 21) Esalisaka bato na ntango ya minyoko bátɛlɛma ngwi kati na kondima, bátika te kolanda matambe ya Klisto mikolo nyonso ya bomoi na bango, bámonisa ete bazali baklisto oyo bakɔmeli, ‘bapiki misisa mpe batɛlɛmi makasi mpenza likoló ya moboko.’ (Ef. 3:17) Kosala bongo epesaka nkembo na Yehova, Nzambe mpe Tata ya Yesu Klisto.
“NSANGO MALAMU OYO YA BOKONZI”
NTANGO Yesu azalaki kolobela makambo oyo ekozala elembo ya kozala na ye mpe ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, asakolaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”—Mat. 24:14.
Kasi nsango yango oyo esengeli koyebisama epai ya bato nyonso ezali mpenza nsango nini? Ezali nsango ya Bokonzi oyo Yesu ateyaki biso ete tóbondelaka Nzambe mpo na yango na maloba oyo: “Tiká bokonzi na yo eya.” (Mat. 6:10) Emoniseli 11:15 elobi ete ezali “bokonzi ya Nkolo na biso [Yehova] mpe ya Klisto na ye” mpamba te bokonzi yango euti na Yehova mpe apesi yango epai ya Klisto mpo azala Mokonzi na yango. Nzokande, kobosana te ete nsango oyo Yesu alobaki ete esengeli kosakolama na mikolo na biso esuki kaka te na nsango oyo bayekoli na ye bateyaki na ekeke ya liboso. Na ntango wana bayebisaki bato ete: “Bokonzi ya Nzambe ekómi pene na bino.” (Luka 10:9) Yesu, Mokonzi oyo apakolamaki, azalaki esika moko na bango. Kasi ndenge Matai 24:14 emonisi yango, Yesu asakolaki likambo mosusu ya ntina oyo esengelaki kosakolama na mokili mobimba mpe likambo yango eyokani na ndenge Nzambe akokokisa mokano na ye.
Mosakoli Danyele azwaki emonaneli ya likambo yango ya ntina. Amonaki “moto moko lokola mwana na moto,” elingi koloba Yesu Klisto, azali kozwa epai ya “Mokóló na Mikolo,” elingi koloba epai ya Yehova Nzambe, “boyangeli, lokumu mpe bokonzi mpo ete bato ya mikili, mabota mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.” (Dan. 7:13, 14, NW) Likambo yango ya ntina mingi mpo na molɔ́ngɔ́ mobimba esalemaki na likoló na mobu 1914. Na nsima, babwakaki Zabolo na bademo na ye na mabele. (Emon. 12:7-10) Ebongiseli ya makambo oyo ya kala ekɔtaki na mikolo na yango ya nsuka. Kasi liboso elongolama mpenza libela, nsango malamu esengeli kosakolama ete Mokonzi Masiya oyo Yehova atii abandi koyangela na likoló. Ezali koyebisama na bato ya bisika nyonso. Likanisi na bango mpo na ye Oyo-Aleki-likoló, Mokonzi na “bokonzi ya bato,” ekomonana na ndenge bakondima to te.—Dan. 4:32.
Ya solo, ezali naino na makambo mosusu oyo ekosalema na mikolo ekoya, makambo mingi lisusu! Tozali se kobondela ete “Tiká bokonzi na yo eya,” kasi yango elingi koloba te ete Bokonzi ya Nzambe ebandi naino koyangela te. Likanisi na biso ezali nde ete Bokonzi wana ya likoló esala mosala ya kokokisa bisakweli lokola oyo ya Danyele 2:44 mpe Emoniseli 21:2-4. Ekobongola mabele paladiso oyo etondi na bato oyo balingaka Nzambe mpe bazalani na bango. Ntango tozali kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi,” tomonisaka makambo wana oyo Bokonzi yango ekosala na mikolo ekoya. Kasi na elikya mpenza, tozali mpe koyebisa bato ete Yehova apesi Mwana na ye nguya nyonso ya koyangela. Ntango opesaka litatoli mpo na Bokonzi yango, omonisaka mpenza nsango malamu oyo?
Limbolá soki Bokonzi yango ezali nini. Ndenge nini tokoki kokokisa mokumba na biso ya kosakola Bokonzi ya Nzambe? Tokoki kolamusa mposa ya bato na kobandáká lisolo na makambo ndenge na ndenge, kasi tosengeli koumela te mpo na komonisa bato polele ete nsango na biso etali nde Bokonzi ya Nzambe.
Likambo moko ya ntina na mosala yango ezali ete esengeli kotánga mpe kozongela maloba ya bavɛrsɛ oyo elobeli Bokonzi yango. Ntango ozali kolobela Bokonzi, luká koyeba soki bato oyo bazali koyoka yo bazali koyeba mpenza soki yango ezali nini. Mbala mosusu ekoki kaka te koloba ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnɛma moko. Ekoki kozala mpasi mpo na bato mosusu ete bábenga eloko oyo emonanaka te guvɛrnɛma. Ezali na ndenge mingi oyo okoki kotinda bango bákanisa. Na ndakisa, tomonaka te nguya oyo mabele ebendaka na yango biloko, kasi esalaka mosala monene na bomoi na biso. Tokoki te komona Ye oyo asalaki ete mabele ebendaka biloko oyo ezali likoló na yango, kasi emonani polele ete azali na nguya mingi mpenza. Biblia ebengi ye “Mokonzi ya seko.” (1 Tim. 1:17) To okoki mbala mosusu koloba ete soki ekólo ezali monene, bato mingi naino bakómá na engumba-mokonzi te to mpe naino bamoná mokonzi na bango na miso te. Bayokaka makambo yango kaka na radio to batángaka yango na zulunalo to bamonaka yango na televizyo. Ndenge moko mpe Biblia ebimisami sikoyo na minɔkɔ koleka 2 200 mpe ezali koyebisa biso makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Ezali koyebisa biso nani azali mokonzi na yango mpe makambo oyo Bokonzi yango ekosala. Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo ebimisami na minɔkɔ mingi koleka bazulunalo nyonso, ezali na mosala ya ‘koyebisa Bokonzi ya Yehova,’ ndenge ekomami na ezipeli na yango.
Mpo na kosalisa bato báyeba mpenza soki Bokonzi yango ezali nini, okoki kolobela mwa makambo oyo bango balingaka ete baguvɛrnɛma esala, na ndakisa kobongisa makambo ya nkita ya mboka, kotya kimya, kosilisa likambo ya koboma bato, kotalela bato ya bikólo nyonso ndenge moko, kobongisa makambo ya kelasi mpe ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Monisá ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekokokisa mpenza bamposa wana mpe mposa nyonso malamu oyo bato bazalaka na yango.—Nz. 145:16.
Salá makasi opesa bato mposa ya kozala bato ya Bokonzi yango, oyo Yesu Klisto azali koyangela lokola Mokonzi. Monisá mpenza ete makamwisi oyo asalaki kala ezalaki komonisa makambo oyo akosala ntango akokóma Mokonzi na likoló. Lobelá mbala na mbala bizaleli malamu oyo azalaki na yango. (Mat. 8:2, 3; 11:28-30) Limbolá ete asopaki bomoi na ye mpo na biso mpe na nsima Nzambe asekwisaki ye mpe apesaki ye bomoi kuna na likoló mpe akokufa lisusu te. Ezali kuna nde azali koyangela lokola Mokonzi.—Mis. 2:29-35.
Monisá mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali sikoyo koyangela na likoló. Nzokande, osengeli koyeba ete bato mingi bazali komona te makambo oyo bango bakanisaki ete ekomonisa ete bokonzi yango ebandi koyangela. Monisá ete oyebi yango mpe tuná bango soki bayebi elembo oyo Yesu Klisto alobaki ete ekomonisa likambo yango. Lobelá mpenza mwa makambo ya elembo yango oyo ezali na Matai mokapo 24, Malako mokapo 13, to Luka mokapo 21. Na nsima, tuná mpo na nini lokola Klisto azwi bokonzi na likoló, makambo yango ezali komonana na mabele. Bendá likebi na bango na Emoniseli 12:7-10, 12.
Mpo na komona mpenza oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kosala, tángá Matai 24:14 mpe monisá programɛ ya koteya Biblia na mokili mobimba oyo ezali kosalema sikoyo. (Yis. 54:13) Yebisá bato biteyelo ndenge na ndenge oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango mpe oyo mateya na yango nyonso euti na Biblia mpe bafutaka mbongo te. Monisá mpe ete longola mosala ya kosakola ndako na ndako, tozali koteya bato mpe mabota na bango Biblia na bandako na bango kozanga kosɛnga mbongo, mpe yango ezali kosalema na mikili koleka 230. Guvɛrnɛma nini ekoki kobongisa programɛ monene boye mpo na koteya bato na yango mpe bato ya mabele mobimba? Sɛngá bato báya na Ndako ya Bokonzi, na mayangani ya mike mpe ya minene ya Batatoli ya Yehova mpo bámona ndenge mateya yango ebongoli mpenza bomoi ya bato.—Yis. 2:2-4; 32:1, 17; Yoa. 13:35.
Kasi moto yango akomona mpenza ndenge nini ete likambo wana etali bomoi na ye moko? Na mayele mpenza, okoki komonisa ye ete mokano na biso ntango tozali kotala bato ezali ya komonisa na bato, libaku oyo epesami na bato nyonso ya kozala bato ya Bokonzi ya Nzambe. Ndenge nini? Na koyekoláká makambo oyo Nzambe azali kosɛnga mpe kotosa yango na bomoi na biso banda sikoyo.—Det. 30:19, 20; Emon. 22:17.
Salisá bato bátyaka Bokonzi na esika ya liboso. Ata nsima wana moto andimi nsango ya Bokonzi, ezali na mikano oyo asengeli komityela. Bokonzi ya Nzambe ekozala na esika nini na bomoi ya moto? Yesu alendisaki bayekoli na ye ete ‘bákoba koluka liboso bokonzi.’ (Mat. 6:33) Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso baklisto básala yango? Na kopesáká ndakisa malamu mpe kolobeláká mpenza mabaku oyo tozali na yango mpo na koluka liboso bokonzi. Na bantango mosusu, tokoki kotuna ndeko soki ye moko atalelaki mabaku boye to boye mpe tokoki koyebisa ye masolo ya bato mosusu ndenge basalaki yango. Tokoki kosolola na esengo mingi masolo ya Biblia mpo ekolisa mpenza bolingo na biso mpo na Yehova. Tokoki komonisa mpenza ete Bokonzi yango ezali likambo ya solo. Tokoki komonisa mpenza ntina ya mosala ya kosakola Bokonzi. Okosalisa mpenza bato kaka te soki oyebisi bango makambo oyo basengeli kosala, kasi nde soki osalisi bango bázala na mposa ya kosala yango.
Na ntembe te, nsango ya ntina mingi oyo biso nyonso tosengeli kosakola ezali kobenda likebi ya bato libosoliboso epai ya Yehova Nzambe, Yesu Klisto, mpe Bokonzi. Na mosala ya kosakola, na lisangá mpe na bomoi na biso moko, tosengeli komonisa mpenza solo ya ntina mingi oyo etali makambo yango. Ntango tozali kosala bongo, tozali komonisa polele ete tozali mpenza kozwa matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.