Ekateli na Nzambe mpo na “motioli na mibeko”
“Nzete na nzete oyo ekobotaka mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na móto.”—MATAI 7:19
1, 2. Motioli na mibeko azali nani, mpe ndenge nini abandaki?
NTANGO ntoma Paulo autaki kopemama na Nzambe mpo na koloba na ntina na koya ya ‘motioli na mibeko’, alobaki ete motioli yango abandaki komonana na eleko na ye. Lokola lisolo oyo euti koleka elimbolaki yango, Paulo azalaki kolobela etuluku moko na bato oyo ekobanda kopengola bato na nzela na boklisto ya solo mpe ekobenda bamosusu nsima na bango. Mobulu yango, lipengwi, ebotamaki na nsuka na ekeke ya liboso, mingimingi. Etuluku oyo ezali kotiola mibeko ekɔtisaki mateya mpe misala oyo mizali na boyokani te na Liloba na Nzambe.—2 Batesalonike 2:3, 7; Misala 20:29, 30; 2 Timote 3:16, 17; 4:3, 4
2 Nsima na mibu, etuluku yango oyo ezali kotiola mibeko ekomaki kelasi ya bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili oyo. Na ekeke ya minei, bokonzi na bango elendisamaki na mokonzi constantin, ntango Mangomba ya lipengwi masanganaki na Rome, Mboka na bapakano. Boklisto ya mokili oyo ekobaki na komikabola na ebele na mangomba makeseni, mpe bakonzi na mangomba balembaki te na komitombola likoló na mikonzi ya mokili oyo.—2 Batesalonike 2:4
3. Etumbu nini ezali kozela motioli na mibeko?
3 Etumbu ya motioli na mibeko esengeli kozala nini? Paulo alobi boye mpo na yango: “Motioli na mibeko ekomonana polele, ye oyo Nkolo Yesu akoboma ye na mpema na monoko na ye mpe akobebisa ye nyee wana ekomonana ye na ntango ekoya ye.” (2 Batesalonike 2:8) Maloba oyo malimboli ete bakonzi na mangomba bakobomama ntango Nzambe akoboma mokili ya Satana na mobimba na yango. Jéhovah akosalela Mokonzi oyo ye asili kopona na likoló, Klisto Yesu, mpo na kokamba mampinga na baanzelu oyo bapesameli mokumba ya kokokisa ekateli na ye. (2 Batesaloniki 1:6-9; Emoniseli 19:11-21) Yango nde etumbu oyo ezali kozela bakonzi na mangomba mpo bayokisi Nzambe mpe Klisto nsoni mpe bapɛngwisi bamilio na bato longwa na losambo ya solo.”
4. Etinda nini ekosalelama mpo na koyeba motioli na mibeko?
4 Yesu apesaki etinda oyo esengeli kosalelama mpo na kosambisa motioli na mibeko. Alobaki: “Bokeba mpo na basakoli na lokuta baoyo bakoya liboso na bino na bilamba na mpate nde katikati bazali nkoi na kongala. Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango. Bakozwaka mbuma na miwiti epai na nzube soko mbuma na misuke epai na matiti mpamba? Bongo, nzete malamu na nzete malamu ekobota mbuma malamu nde nzete mabe na nzete mabe ekobota mbuma mabe. Nzete malamu ekoki kobota mbuma mabe te mpe nzete mabe ekoki kobota mbuma malamu te. Nzete na nzete oyo ekobotaka mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. . . . Moto na moto oyo akolobaka na ngai Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na likoló te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na likoló.”—Matai 7:15-21; tala Tito 1:16; yoane 2:17
Mbuma malamu ya boklisto
5. Mpo na kobota mbuma malamu ya boklisto, ezaleli nini ezali moboko, mpe wapi moko na mibeko mileki minene?
5 Mpo na kobota mbuma malamu ya boklisto, ezaleli moko ezali moboko. Yango eyebisami kati na 1 Yoane 5:3: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete kokokisa malako na ye.” Nzokande, moko na malako maleki ntina ezali oyo: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39; M.N.) Basaleli na solo na Nzambe basengeli kolinga bongo bazalani na bango, ata lomposo na bango to ekolo na bango ezali nini.—Matai 5:43-48: Baloma 12:17-21.
6. Baklisto basengeli kolinga liboso mpenza nani?
6 Basaleli na Nzambe basengeli kolinga liboso mpenza bandeko na bango kati na kondima. Ntoma Yoane akomaki ete, “Soki moto nani alobi ete: ‘Nalingi Nzambe’, nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolonga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te.” (1 Yoane 4:20, 21) Yesu alobaki ete, bolingo yango ekozala elembo oyo ekokesenisa baklisto ya solo: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”—Yoane 13:35; tala Baloma 14:19; Bagalatia 6:10; 1 Yoane 3:10-12
7. Ndenge nini baklisto ya solo bazali na bomoko na mokili mobimba?
7 Bolingo ya bandeko ezali ciment to ekanganeli makasi oyo ezali kosangisa basaleli na Nzambe. “Bomilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.” (Bakolose 3:14) Baklisto ya solo basengeli kozala na bomoko elongo na bandeko na bango ya mokili mobimba, mpamba te tozali kokuta lilako oyo kati na Liloba na Nzambe: ‘Bolobaka na motindo moko; bokabwana kati na bino te kasi bosɛngana na motema moko mpe na elimo moko.’ (1 Bakolinti 1:10) Mpo na kobatela bolingo yango mpe bomoko yango kati na mabelé mobimba, basaleli na Nzambe basengeli komikɔtisa kati na makambo ya politike ya mokili te. Yesu alobaki: “Bazali bato na mokili te, pelamoko ngai nazali moto na mokili te.”—Yoane 17:16
8. Ndenge nini Yesu amonisaki oyo baklisto basengeli kosala?
8 Yesu amonisaki bonene ya etinda yango ntango Petelo abimisaki mopanga na ye mpe akataki litoyi ya moto moko kati na mibali oyo bayaki kokanga nkolo na ye. Yesu alendisaki kosalelama ya nguya na mosuni, ata bobele mpo na kobatela Mwana na Nzambe liboso ya banguna na ye? Te, mpamba te alobaki na Petelo ete: “Zongisa mopanga na yo na esika na yango.” (Matai 26:52) Na bongo, baklisto ya solo basanganaka te ezala na bitumba ya mikili to na bosopi mosusu ya makila, ata soki koboya yango ebendeli bango liwa. Na yango, na ntina na koboya na bango na kokota kati na makambo ya mokili, basaleli mingi ya Nzambe banyokwamaki na boumeli ya bikeke mpe ata na eleko na biso. Baklisto yango bayebi ete ezali bobele Bokonzi na Nzambe na nse na boyangeli na Klisto nde ekosilisa mpo na libela bitumba mpe bosopi makila.—Nzembo 46:9; Matai 6:9, 10; 2 Petelo 3:11-13.
9. (a) Lisolo ya makambo na kala elobi nini mpo na baklisto ya liboso? (b) Nzokande, nini ezali komonana epai na mangomba ya boklisto ya mokili oyo na likambo yango?
9 Lisolo ya makambo na bato emonisi ete baklisto na ekeke ya liboso bazalaki koboya kosopa makila ya bato. Peter De Rosa oyo kala azalaki profesere ya teoloji na Angleterre, akomi: “Kosopa makila ezali lisumu monene. Tala ntina oyo baklisto bazalaki koboya bitumba oyo bato bazalaki kobunda elongo na banyama. . . . Atako etumba mpe kosalela makasi ezalaki na ntina mpo na bolongi ya Loma, nzokande baklisto bazalaki na likanisi ya kosangana na yango ata moke te. . . . Na ndakisa na Yesu, baklisto bazalaki komitalela lokola bamemi na nsango na kimya; ata mbala moko te basengelaki kozala bisaleli na kufa.” Nzokande, mangomba na boklisto ya mokili oyo makabwani babukaki lilako na bolingo mpe basopisaki ebele na makila. Na esika ete bazala bamemi na nsango na kimya, bazali nde kobomisa bato kino lelo.
Babilone Monene, ekumbi ngambo ya koboma bato
10. Babilone Monene ezali nini, mpe mpo na nini ezali kobiangama bongo?
10 Satana azali “mokonzi na mokili oyo”, “nzambe na ekeke oyo”. (Yoane 12:31; 2 Bakolinti 4:4.) Ezali kati na mokili ya Satana nde lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta ezwami, lisangá oyo abongisaki yango na boumeli ya bikeke, mpe tokokuta kati na yango boklisto ya mokili oyo mpe bakonzi na yango ya mangomba. Biblia ezali kobianga mangomba nyonso ya lokuta ete “Babilone Monene, mama na basi na pite (na elobeli ya elimo) mpe ya mbindo nyonso ya mokili”. (Emoniseli 17:5.) Ebandeli ya mangomba ya lokuta ezali na engumba ya kala ya Babilone, oyo ebebisamaki na losambo ya lokuta, epai kuna mateya mpe misala ndenge na ndenge oyo ezalaki koyokisa Nzambe nsoni etondanaki. Tala ntina lisangá oyo ekokani na Babilone lelo ebengami Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta
11. Biblia ezali koloba nini mpo na Babilone Monene, mpe mpo na nini?
11 Liloba na Nzambe elobi mpo na mangomba ya Babilone ete: “Kati na ye makila na basakoli, na bapetwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.” (Emoniseli 18:24) Na likambo nini mangomba na mokili bazali na ngambo ya makila ya bato oyo babomamaki? Na boye ete mangomba yango, Mangomba na boklisto ya mokili oyo bakisa mpe mangomba mosusu oyo mazali ya boklisto te, bazipaki miso liboso na bitumba ya mikili, to balendisaki yango, to mpe bazalaki babandisi na yango. Lisusu, banyokolaki mpe babomaki bato na sembo mpo bandimaki makanisi na bango te
Bayokisaki Nzambe nsɔni
12. Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili oyo bakweisami mingi koleka baoyo ya mangomba mosusu?
12 Bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali na ekweli makasi koleka baoyo na mangomba mosusu mpo na makila nyonso oyo masili kosopana na boumeli ya Lisolo na bato. Mpo na nini? Mpamba te bamilobaki ete bazali bobele basaleli na Nzambe te, kasi lisusu ya Yesu. Bamipesaki bongo mokumba ya kolanda mateya na Yesu. (Yoane 15:10-14) Kasi, balandaki mateya yango te, likambo oyo ebwakaki mpenza nsɔni monene likoló na Nzambe mpe likoló na Klisto. Bitumba ya bakatolike elongo na bamusulmans mpe bitumba mosusu ya mangomba, kokanga mpe kosambisa bato oyo baboyaki kondima mateya ya bakatolike (lnquisition) mpe minyoko etangisaki ebele na makila oyo bakonzi na mangomba bakumbi ngambo na yango; lisusu bazali mpe na ngambo mpo ete batemelaki te bitumba oyo na boumeli na yango basangani ya Mangomba babomaki bandeko na bango ya mikili misusu.
13. Makambo nini mabimaki kati na ekeke a zomi na moko mpe zomi na misato mpo na yango bakonzi ya mangomba bazali babandisi?
13 Na bongo, bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo bazali babandisi ya bitumba oyo bisalemaki mpo na kobengana bamusulmans na Yelusaleme (croisades) kati na bikeke zomi na moko mpe zomi na misato. Ezalaki bobele kosasa mpe kobotola, nyonso wana na nkombo ya Nzambe mpe ya Klisto. Bankoto na bato babomamaki. Na 1212, batindaki bankoto ya bana oyo basilaki kozimbisa bango na mateya ya lokuta ete bakende kobunda na Yelusaleme (croisade des enfants) kasi bakufaki na nzela mpo na kolɛmba
14, 15. Moto moko ya katolike akomaki nini likolo na misala ya Lingomba ya Katolike na ekeke ya zomi na misato?
14 Na ekeke ya zomi na misato, Lingomba na katolike endimaki polele ebongiseli ya konyokola bato oyo baboyaki kondima mateya na bango (lnquisition), oyo miango na yango ya nsomo esengelaki koyokisa Nzambe nsoni. Ebongiseli yango, oyo ebandaki na Mpoto mpe epalanganaki kino na Amerike, engalaki na boumeli ya bikeke motoba koleka. Lokola ebandisamaki mpe esimbamaki na bapape, esalelamaki nalolenge ezangi mawa mpo na kolimwisa na nzela na kobeta mpe koboma baoyo nyonso baboyaki kondima mateya ya Lingomba ya Katolike. Lingomba yango enyokolaki mpenza kala bato oyo bazalaki bakatolike te, kasi lnquisition ememaki minyoko mileki nsomo.
15 Peter De Rosa, oyo azalaki komiloba ete azali mpenza “Katolike oyo alingi mboka na ye”, alobi kati na mokanda na ye ya sika Bakitani na Klisto to elongi ebombami ya bapape (na Lingelesi): “Lingomba ya Katolike ezali na ngambo mpo na minyoko oyo Bayuda bazwaki, mpo na kokangama mpe kosambisama ya bato oyo baboyaki kondima mateya na bango (lnquisition), mpo na kobomama ya bankoto na bato oyo bazalaki koteya mateya makeseni na oyo ya Lingomba ya Katolike mpe mpo na kozongelama ya minyoko na nzoto kati na batribinale ya Mpoto. . . . Bapape batiaki mpe balongolaki ata mikonzi na politike, basengaki na bango ete bandimisa boklisto epai na bato na bango na nzela na kobɛta to mpe koboma bato oyo bakoboya. . . . Yango ezalaki mpenza mawa mpo na Evanzile.” “Lisumu” bobele moko ya bato mosusu oyo babomamaki ezalaki mpo bakutaki bango na Biblia.
16, 17. Tokoki koloba nini mpo na monyokoli oyo babengaki lnquisition (kokanga, konyokola mpe koboma baoyo baboyaki mateya ya katolike)?
16 Mpo na ntina etali lnnocent lii, oyo azalaki pape na ebandeli ya ekeke ya zomi na misato, De Rosa alobi: “Batangaki ete, na ntango ya monyoko ya nsuka mpe ya mabe koleka oyo ebongisamaki na nzela ya empereur [romain] Dioclétien (na ekeke ya misato), penepene na baklisto nkoto mibale bakufaki kati na mokili. Na ntango ya etumba makasi ya liboso oyo esalamaki mpo na kotemela ba Albigeois oyo babengamaki ete “bapengwi”, etumba oyo pape lnnocent lii atindaki, baklisto mbala zomi koleka babomamaki. . . . Ezali nsomo na komona ete pape abomaki na mbala moko ebele na baklisto koleka Dioclétien (mokonzi moloma mopakano). . . . [lnnocent] ayokaki ata nsɔni moke te na kosalela nkombo na Klisto mpo na kosala makambo nyonso oyo Klisto atemelaki yango.”
17 De Rosa azali komonisa ete na “nkombo ya pape, (banyokoli (lnquisiteurs)) basalelaki bato mabe maleki monene mpe maleki nsomo kati na lisolo mobimba ya bato.” Mpo na oyo etali Torguemada, sango moko oyo azalaki na molongo ya baoyo babengami ba dominicains oyo azalaki kosambisa baoyo lingomba ebengaki ete bapengwi na Espanye, De Rosa alobi: “Aponamaki na 1483, asalelaki bokonzi na ye na lolenge mabe na boumeli ya mibu zomi na mitano. Ntalo ya bato oyo ye abomaki ezali koleka 114 000, kati na bango 10 220 batumbamaki na móto.”
18. Engebene mokomi moko, makambo nini masalamaki na lnquisition, mpe ndenge nini yango eumelaki koleka bikeke motoba?
18 De Rosa asukisi boye: “Kotanga motuya lokola oyo ya bato babomamaki na lnquisition mbele ekotia ata lisanga nini na mokakatano; mpo na Lingomba ya Katolike, ezali mawa mingi. . . . Lisolo na bato emonisi ete na boumeli ya bikeke motoba koleka, bapape bazalaki banguna minene ya boyengebene ata ya moke. Kati na bapape ntuku mwambe oyo bakitanaki moko nsima na mosusu kobanda ekeke ya zomi na misato, ata moko te ayinaki teoloji to bametode ya konyokola mpe koboma bato baoyo batiaki ntembe na mateya ya Lingomba. Nkutu, moko na moko abakisaki nkele na ye na ebongiseli wana ya koboma bato. Ezali na libombami moko: ndenge nini bapape bakokaki, eleko na eleko, kokolisa misala wana ya kopengwa? Ndenge nini bakokaki kowangana kati na makambo nyonso Evanzile na Yesu?” De Rosa ayanoli: “Bapape balingaki nde kotemela Evanzile na esika ete batemela pape oyo azalaki liboso na bango ‘oyo akoki kosala libunga te’, mpamba te, wana mbele ekweisaki bokonzi na bapape nyonso.
19. Botioli mibeko emonanaki lisusu na nzela na mosala nini oyo bakonzi mingi na mangomba bandimaki yango?
19 Bakonzi na mangomba bapesaki mpe maboko na mabe mosusu esalemaki kati na Lisolo ya bato, ntango bazalaki kokanga bibele na bato na Afrike mpo na komema bango na makasi na mikili misusu; yango mpe emonisi ete bakonzi na mangomba bazali batioli na mibeko. Na boumeli ya bikeke mingi, mikili oyo emibengaka ete ya boklisto miyaki kokamata na makasi bankoto na bankoto ya ba Afriké, mpo na kokomisa bango baombo, konyokolaka bango na nzoto mpe na makanisi Bobele bakonzi moke ya mangomba nde batemelaki likambo oyo. Bamoko kati na bango balobaki nkutu ete ezalaki mokano ya Nzambe.—Tala Matai 7:12.
Makila masopami na ekeke ya ntuku mibale
20. Ndenge nini mabe ya motioli na mibeko ekomaki monene mpenza na ekeke ya ntuku mibale?
20 Na ekeke ya ntuku mibale, mabe ya motioli na mibeko ekomaki monene mpenza. Bakonzi na mangomba, bandimaki mpenza bitumba oyo ebomaki ebele na bankoto na bato. Ezali bitumba ya nsomo koleka kati na Lisolo mobimba ya bato. Na ntango ya bitumba minene mibale ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba bapesaki lisungi na bango na ngambo nyonso mibale, mpe ezali boye nde basangani ya lingomba moko, “bandeko”, babomanaki. Na ndakisa, na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakatolike ya France mpe ya Amerike babomaki bakatolike ya Alemanye mpe ya ltalie, baprotestá ya Angleterre mpe ya Amerike babomaki baprotestá ya Alemanye. Mbala mosusu, bato oyo bazalaki, bobele kati na lingomba moko te, kasi lisusu na ekolo moko babomanaki. Bitumba yango mibale ya mokili mobimba, oyo ebandaki kati na mikili ya boklisto, mbele ekokaki kosalema te soki bakonzi na mangomba batosaki lilako ya bolingo mpe soki bateyaki bato na bango na nzela wana.
21. Tozalí kotanga nini kati na bazulunalo mpe mikanda likolo na komikɔtisa ya bakonzi na mangomba kati na bitumba?
21 Tala makambo makomamaki kati na zulunalo New York Times: “Kala, bakonzi na lingomba ya katolike bazalaki ntango nyonso kolendisa bitumba oyo kati na yango mikili na bango emikotisaki; bazalaki kopambola mampinga mpe bazalaki kosambela mpo na bolongi, nzokande na ngambo mosusu etuluku ya ba episkopo bazalaki kosambela liboso na bato nyonso mpo na bolongi ya basoda ya mokili na bango. . . . Lokola bibundeli bikomaki ya mabe koleka, bokeseni kati na elimo ya boklisto mpe ezalela ya etumba. . . . ekomaki polele mpo na bato mingi.” Mokanda U.S. News & World Report elobaki ete: “Lokumu ya boklisto kati na mokili esili mpenza kobebisama mpo na lolenge oyo mikili oyo emilobaka ete mizali ya boklisto basalelaki mobulu.”
22. Bakonzi na mangomba na ntango na biso bazali kosala mabe nini?
22 Lelo oyo, atako lnquisition ezali lisusu te, bakonzi na mangomba bazali kosalela Leta lokola ebundeli mpo na konyokola “basakoli” mpe “babulami” oyo bazali kondima makanisi na bango te. Bazali kotia molungé epai na bakonzi ya politike mpo na ‘kozipa mabe na nzela na mibeko.’ Yango wana, na boumeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale, mosala ya bandimi ya solo ezali kopekisama epai na epai, bazali kokanga bango, bazali kobeta bango, bazali konyokola bango ata koboma, nyonso wana na bopusi ya bakonzi na mangomba to mpe na bosepeli na bango.—Emoniseli 17:6; Nzembo 94:20.
Bakozongisa monoko epai na Nzambe
23. Mpo na nini motioli na mibeko akozongisa monoko epai na Nzambe?
23 Makila na basakoli, na babulami mpe na baoyo nyonso babomamaki na mabelé ezwami kati na mangomba ya lokuta (Emoniseli 18:24) Epai mosusu, bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili oyo bazali na ngambo eleki monene mpenza, mpamba te ezali kati na mikili oyo bango bazali kokotisa bopusi na bango, nde kuna makila esopanaki mingi. Toyebi sikawa mpo na nini Biblia ezali kobenga bango “motioli na mibeko”. Kasi, Liloba na Nzambe elobi mpe ete: “Bomizimbisaka te; Nzambe akokosamaka te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.” (Bagalatia 6:7) Na bongo Nzambe akosɛnga mpenza ete bakonzi na mangomba ya lipengwi bazongisa monɔkɔ epai na ye.
24. Makambo nini na ntina mingi etikali moke makosalama?
24 Yesu alobaki: “Bolongwa na ngai, bino bato bokotiolaka mibeko.” (Matai 7:23) Asilaki koyebisa liboso ete: “Nzete na nzete oyo ekobotaka mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na móto.” (Matai 7:19) Ngonga ezali kobelema noki epai motioli na mibeko mpe mangomba nyonso ya lokuta ekobomama nyee, ntango bakonzi na politike oyo basali pite elongo na bango bakobalukela bango. Engebene Biblia, bakonzi yango “bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolia mosuni na ye, mpe bakotumba ye na móto.” (Emoniseli 17:16.) Lokola makambo wana, oyo mazali na ntina mingi koleka, etikali moke masalama, basaleli na Nzambe basengeli kokebisa bazalani na bango Lisolo oyo elandi ezali kotalela motindo bazali kosala.
Bozongeli
◻ Motyoli na mibeko ezali nani, mpe ndenge nini abandaki?
◻ Mbuma nini ya kitoko baklisto ya solo basengeli kobota?
◻ Babilone Monene ezali nini, mpe ngambo na ye ezali nini mpo na makila oyo masili kosopana?
◻ Na nini motioli na mibeko ayokisi Nzambe nsoni?
◻ Nzambe akosala nini ntango ekosenga na motioli na mibeko ete azongisa monoko epai na ye?
[Elilingi na lokasa 18]
Bitumba mpo na kobengana bamusulma na Yelusaleme (croisades) esopaki makila mingi na nkombo ya Nzambe mpe ya Klisto
[Elilingi na lokasa 19]
“Na kala, bakonzi ya Lingomba ya katolike bazalaki mbala mingi kopesa maboko na bitumba oyo kati na yango bikolo na bango bikotaki