Kotambola na Nzambe —matambe ya liboso
“Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.”—YAKOBO 4:8.
1, 2. Mpo na nini okoki koloba ete kosalela Yehova ezali libaku malamu mpenza?
MOTO moko alekisaki mbula mingi na bolɔkɔ. Na nsima abyangamaki liboso ya mokonzi ya mboka. Makambo malekaki nokinoki. Mbala moko, moto oyo azalaki mokangami akómaki kosala epai ya mokonzi oyo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na nguya na ntango wana. Bapesaki ye mikumba minene mpe lokumu mingi. Yosefe oyo azalaki na minyolɔlɔ na makolo, akomaki kotambola na mokonzi!—Genese 41:14, 39-43; Nzembo 105:17, 18.
2 Lelo oyo, bato bazali na libaku ya kosalela Ye oyo azali monene koleka Falo ya Ezipito. Oyo-Aleki-Likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba azali kobyanga biso nyonso ete tósalela ye. Kosala bongo mpe kosala boninga makasi na Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso ezali libaku malamu mpenza! Makomami mamonisi ete Yehova azali na nguya monene, na nkembo, na bonzenga, mpe azali malamu. (Ezekiele 1:26-28; Emoniseli 4:1-3) Bolingo ezali komonana na misala na ye nyonso. (1 Yoane 4:8) Akosaka ata moke te. (Mituya 23:19) Mpe Yehova ayokisaka baoyo bazali sembo epai na ye mawa te. (Nzembo 18:25) Tokoki kozala na esengo, na bomoi oyo ezali na ntina, mpe na elikya ya bomoi ya seko soki totosi masɛngami na ye ya sembo. (Yoane 17:3) Moyangeli moko te awa na nse akoki kopesa bato eloko oyo ekokani na mapamboli mpe mabaku malamu ya ndenge oyo.
3. Na ndimbola nini Noa ‘atambolaki elongo na Nzambe’?
3 Na ntango ya kala, Noa azwaká ekateli ya kosala mokano ya Nzambe. Biblia elobi boye mpo na ye: “Noa azalaki moto na sembo mpe na boyengebene kati na bato na ntango na ye. Noa atambolaki na Nzambe elongo.” (Genese 6:9) Noa atambolaki na Yehova na mosuni te, mpamba te ata moto moko te “amoni Nzambe.” (Yoane 1:18) Kasi, Noa atambolaki na Nzambe na boye ete asalaki makambo oyo Nzambe atindaki ye. Lokola Noa amipesaki na kosala mokano ya Yehova, asalaki boninga makasi elongo na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Lokola Noa, bamilio ya bato lelo oyo bazali ‘kotambola elongo na Nzambe’ na ndenge bazali kolanda toli mpe malako ya Yehova na kati ya bomoi na bango. Ndenge nini moto abandaka kotambola elongo na Nzambe?
Boyebi ya sikisiki ezali na ntina mingi
4. Ndenge nini Yehova azali koteya basaleli na ye?
4 Mpo na kotambola elongo na Yehova, tosengeli naino koyeba ye. Yisaya asakolaki ete: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na nkeka; mpe mabota nyonso bakokenda wana. Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova], epai na ndako na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye. Zambi Mobeko ekobima na Siona mpe liloba na [Yehova] uta na Yelusaleme.” (Yisaya 2:2, 3) Tokoki kozala na elikya ete Yehova akolakisa baoyo nyonso bazali koluka kotambola na banzela na ye. Yehova apesi biso Liloba na ye, Biblia, mpe azali kosalisa biso mpo tósosola yango. Azali kosala yango na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Yehova asalelaka ‘moombo ya sembo’ mpo na kopesa malako ya elimo na nzela ya mikanda mikolimbolaka Biblia, na nzela ya makita ya boklisto, mpe na nzela ya ebongiseli ya koyekola Biblia na ndako kozanga ete moto afuta mbongo. Nzambe azali mpe kosalisa basaleli na ye na kososola Liloba na ye na nzela ya elimo santu.—1 Bakolinti 2:10-16.
5. Mpo na nini solo ya Makomami ezali na motuya mingi?
5 Atako tofutaka mbongo te mpo na koyeba solo ya Biblia, kasi solo yango ezali na motuya mingi. Ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe, tozali koyeba Nzambe—elingi koloba nkombo na ye, bomoto na ye, mokano na ye, mpe ndenge oyo asalelaka bato makambo. Tozali mpe kozwa biyano oyo bizali kosikola biso na mituna ya ntina na bomoi lokola: Mpo na nini tozali na mokili? Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe? Mikolo mizali koya mikozala ndenge nini? Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? Bomoi ezalaka nsima ya liwa? Tozali mpe koyekola mokano ya Nzambe mpo na biso, elingi koloba, ndenge oyo tosengeli kotambola mpo tósepelisa ye mpenza. Tozali koyekola ete masɛngami na ye mazali makasi te mpe mazali mpenza na litomba soki tolandi yango. Soki Nzambe apesaka biso malako te, mbɛlɛ tokoki kososola makambo yango te.
6. Boyebi ya sikisiki ya Biblia ezali kopesa biso likoki ya kolanda nzela nini?
6 Solo ya Biblia ezali na nguya mpe epusaka biso na kosala mbongwana na bomoi na biso. (Baebele 4:12) Liboso ya koyeba Makomami, mbala mosusu tozalaki kotambola “na kolanda ebongiseli ya biloko ya mokili oyo.” (Baefese 2:2, NW) Kasi boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe efungweli biso nzela mosusu mpo tókoka ‘kotambola na sembo na Nkolo mpe tósepelisa ye na makambo nyonso.’ (Bakolose 1:10) Ezali mpenza likambo ya esengo na ntango tobandi kotambola elongo na Yehova, Ye oyo aleki na nkembo na molɔ́ngɔ́ mobimba.—Luka 11:28.
Komipesa mpe batisimo: Matambe mibale ya ntina
7. Wana tozali koyekola Liloba ya Nzambe, likambo nini etali litambwisi ya bato emonanaka polele?
7 Ntango boyebi na biso ya Biblia ezali kokola, tokómi kotalela makambo ya mokili mpe bomoi na biso moko na pole ya Liloba ya Nzambe. Likambo moko ya ntina mingi emonanaka polele. Mosakoli Yilimia asilá komonisa yango uta kalakala ntango akomaki ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Biso nyonso tozalaka na mposa ya litambwisi ya Nzambe.
8. (a) Eloko nini epusaka bato na komipesa epai ya Nzambe? (b) Komipesa ya baklisto elimboli nini?
8 Soki tososoli ete likambo yango ezali na ntina mingi, ekopusa biso na koluka litambwisi ya Yehova. Mpe bolingo na biso mpo na Nzambe ekopusa biso na komipesa epai na ye. Komipesa epai ya Nzambe elimboli kosolola na ye na libondeli mpe kolaka ye na motema moko ete topesi bomoi na biso mpo na kosalela ye mpe kotambola na banzela na ye na bosembo nyonso. Ntango tosali bongo, tozali kolanda ndakisa ya Yesu, oyo amipesaki na Yehova na ekateli makasi ya kokokisa mokano ya Nzambe.—Baebele 10:7.
9. Mpo na nini bato bamipesaka epai na Yehova?
9 Yehova Nzambe atindikaka moto na makasi te mpo na komipesa epai na ye. (Talá 2 Bakolinti 9:7.) Nzambe alingaka mpe te ete moto amipesa epai na Ye na kotindikama na mayoki ya mbalakaka oyo maumelaka te. Liboso ete moto azwa batisimo, asengeli naino kokóma moyekoli, nzokande, mpo na kokóma moyekoli moto yango asengeli kosala milende ya solosolo mpo na kozwa boyebi. (Matai 28:19, 20) Paulo ayebisaki baoyo basilaki kozwa batisimo ete ‘bákaba nzoto na bango lokola mbeka ya bomoi, oyo ya bulɛɛ, mpe oyo Nzambe akondima, básalela ye mosala ya bulɛɛ na makoki na bango ya kokanisa.’ (Baloma 12:1, NW) Biso mpe tosengeli komipesa epai ya Yehova Nzambe na kosaleláká makoki na biso ya kokanisa na motindo yango. Nsima ya kososola soki yango esɛngi nini mpe kokanisa likambo yango na bozindo, na bolingo na biso moko mpe na esengo, tokomipesa epai ya Nzambe.—Nzembo 110:3.
10. Boyokani nini ezali kati na komipesa mpe batisimo?
10 Nsima ya kobondela Nzambe mpo na koyebisa ye ete tozwi ekateli ya kotambola na banzela na ye, tokosala litambe oyo elandi. Na nzela ya batisimo na biso ya mai, tokomonisa na miso ya bato nyonso ete tomipesi epai ya Nzambe. Yango ezali eyambweli na miso ya bato nyonso ete topesi bomoi na biso mpo na kosala mokano ya Nzambe. Ntango Yesu abandaki mosala na ye awa na mabelé, Yoane abatisaki ye. Mpe na bongo apesaki biso ndakisa. (Matai 3:13-17) Na nsima, Yesu atindaki bayekoli na ye ete bákende kozalisa bayekoli mpe bábatisa bango. Yango wana, komipesa mpe batisimo ezali matambe ya ntina mingi mpo na moto nyonso oyo alingi kotambola elongo na Yehova.
11, 12. (a) Ndenge nini tokoki kokokanisa batisimo na libala? (b) Bokokani nini tokoki kosala kati na boyokani na biso na Yehova mpe boyokani ya mwasi na mobali?
11 Tokoki kokokanisa kokóma moyekoli oyo amipesi na Yesu Klisto mpe azwi batisimo na kobala. Na mikili mingi, liboso ya kokóma na mokolo mpenza ya libala, esengeli naino kokokisa makambo mingi. Liboso, elenge mobali na elenge mwasi bakokutana, bakobanda koyebana bizaleli, mpe bakolingana. Na nsima bakolakana ete bakobalana. Molulu ya libala elakisaka na miso ya bato nyonso likambo oyo bato bayokanaki na nkuku; elingi koloba, kobalana mpe kofanda esika moko lokola mwasi na mobali. Molulu ya libala emonisaka na miso ya bato nyonso ete babandi bomoi ya sika lokola babalani. Libala mpenza ebandaka na mokolo wana. Lolenge moko, batisimo ezali ebandeli ya bomoi ya sika ya moto oyo amipesi mpo na kotambola elongo na Yehova.
12 Tótalela bokokani mosusu. Nsima ya mokolo ya libala, bolingo ya mwasi na mobali esengeli kokola mpe kokɔmela. Mpo ete bákangana makasi moko na mosusu, babalani basengeli kosala nyonso mpo na kobatela mpe kolendisa boyokani na bango na kozanga moimi. Atako tobalanaka na Nzambe te, nsima ya batisimo na biso tosengeli kosala nyonso mpo na kokolisa boyokani na biso elongo na Yehova. Azali komona mpe azali kosepela na milende oyo tozali kosala mpo na kokokisa mokano na ye mpe azali kobɛlɛma na biso. Moyekoli Yakobo akomaki ete, “Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.”—Yakobo 4:8.
Tólanda matambe ya Yesu
13. Ntango tozali kotambola elongo na Nzambe, tosengeli komekola ndakisa ya nani?
13 Mpo na kotambola elongo na Yehova, tosengeli komekola ndakisa ya Yesu Klisto. Ntoma Petelo akomaki: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete [bólanda] matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka mpe biso tozali bato ya kozanga kokoka, tokokoka mpenza te kolanda ndakisa na ye na lolenge ya kokoka. Atako bongo, Yehova alingi ete tósala nyonso oyo tokoki kosala. Sikawa, tótalela makambo mitano na bomoi mpe na mosala ya Yesu oyo baklisto bamipesi basengeli kosala molende mpo na komekola.
14. Koyeba Liloba ya Nzambe esangisi makambo nini?
14 Yesu azalaki na boyebi ya sikisiki mpe ya bozindo ya Liloba ya Nzambe. Na boumeli ya mosala na ye, mbala mingi Yesu azalaki kozongela maloba ya Makomami ya Liebele. (Luka 4:4, 8) Ezali solo ete bakonzi mabe ya mangomba na ntango wana, bango mpe bazalaki kozongela maloba ya Makomami. (Matai 22:23, 24) Bokeseni ezalaki ete Yesu azalaki kososola ndimbola ya Makomami wana, mpe azalaki kosalela yango na bomoi na ye. Ayebaki oyo ekomamaki na Mibeko mpe ndimbola na yango. Lokola tozali kolanda ndakisa ya Klisto, biso mpe tosengeli kosala nyonso mpo na kososola Liloba ya Nzambe, kokanga ntina, to ndimbola na yango. Na ndenge yango, tokozala basali oyo Nzambe akondima, oyo bazali na makoki ya “kosembola liloba na solo.”—2 Timote 2:15.
15. Ndakisa nini Yesu apesaki na oyo etali koloba na ntina na Nzambe?
15 Klisto Yesu ayebisaki bato mosusu makambo etali Tata na ye ya likoló. Yesu abombaki mpo na ye moko te boyebi ya Liloba ya Nzambe oyo azalaki na yango. Kutu, ezala banguna na ye bazalaki kobénga ye “Molakisi,” mpamba te na bisika nyonso oyo azalaki kokende, azalaki koyebisa bato mosusu makambo ya Yehova mpe mikano na ye. (Matai 12:38) Yesu ateyaki bato na libándá ya tempelo, na biyanganelo, na bingumba, mpe na bamboka. (Malako 1:39; Luka 8:1; Yoane 18:20) Azalaki koteya na motema mawa mpe na boboto, amonisaki bolingo epai ya bato oyo azalaki kosunga. (Matai 4:23) Baoyo balandaka ndakisa ya Yesu, bango mpe, bazwaka mabaku mingi mpe lolenge mingi mpo na koteya bato mosusu makambo ya Yehova Nzambe mpe mikano na ye kitoko.
16. Boyokani ya Yesu na basambeli mosusu ya Yehova ezalaki makasi ndenge nini?
16 Yesu amimonaki mpenza ndeko ya bato oyo bazalaki kosambela Yehova. Mokolo moko, wana azalaki kosolola na ebele ya bato, mama na ye mpe bandeko na ye—bango bazalaki bandimi te—balukaki kosolola na ye. Biblia elobi: “Moto moko alobi na ye ete, Talá mama na yo mpe bandeko babali na yo batɛlɛmi libándá mpo na koluka kolobana na yo.” Ayanolaki moto yango ete: “Mama na ngai nani? Mpe bandeko na ngai nani? Asemboli lobɔkɔ na ye epai na bayekoli na ye, alobi ete, Talá mama na ngai mpe bandeko na ngai. Mpo ete ye nani akosalaka mokano ya Tata na ngai na Likoló, ye azali ndeko mobali na ngai mpe ndeko mwasi mpe mama.” (Matai 12:47-50) Likambo oyo emonisi te ete Yesu aboyaki bandeko na ye, mpamba te makambo oyo masalemaki na nsima mamonisi ete aboyaki bango te. (Yoane 19:25-27) Nzokande, lisolo oyo emonisi bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na baninga na ye bandimi. Bobele bongo lelo oyo, baoyo bazali kotambola elongo na Nzambe balukaka kosala boninga na basaleli mosusu ya Yehova mpe bakolisaka bolingo yango.—1 Petelo 4:8.
17. Ndenge nini Yesu atalelaki kosala mokano ya Tata na ye, mpe yango esengeli kozala na bopusi nini epai na biso?
17 Na ndenge azalaki kosala mokano ya Nzambe, Yesu amonisaki ete alingaka Tata na ye ya likoló. Yesu azalaki kotosa Yehova na makambo nyonso. Alobaki ete: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano ya Motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Klisto alobaki lisusu ete: “Ngai nakosalaka makambo makosepelisa [Nzambe].” (Yoane 8:29) Yesu alingaki mpenza Tata na ye ya likoló na boye ete ‘amisɔkisaki mpe atosaki kino kufa, ɛɛ, kino kufa na [nzete ya mpasi, NW].’ (Bafilipi 2:8) Yango wana, Yehova apambolaki Yesu, atombolaki ye mpe apesaki ye bokonzi mpe lokumu na esika ya mibale nsima na ye moko Yehova. (Bafilipi 2:9-11) Lokola Yesu, ntango tozali kotosa mibeko ya Nzambe mpe tozali kosala mokano na ye, tozali komonisa ete tolingaka Nzambe.—1 Yoane 5:3.
18. Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa na oyo etali libondeli?
18 Yesu azalaki kobondela mingi. Abondelaki ntango azwaki batisimo. (Luka 3:21) Liboso apona bantoma na ye 12, alekisaki butu mobimba na kobondela. (Luka 6:12, 13) Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela. (Luka 11:1-4) Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, abondelaki mpo na bayekoli na ye, mpe abondelaki na bango elongo. (Yoane 17:1-26) Libondeli ezalaki likambo ya ntina mingi na bomoi ya Yesu. Esengeli mpe kozala bongo na bomoi na biso mpamba te tozali bayekoli na ye. Kosolola na Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba na libondeli ezali mpenza lokumu monene! Lisusu, Yehova ayanolaka na mabondeli, mpamba te Yoane akomaki ete: “Molende oyo ezali na biso mpo na ye ezali boye ete, soko tokolɔmba eloko nini kati na mokano na ye, ye akoyoka biso. Mpe soko toyebi ete akoyoka biso wana ekolɔmbaka biso ye, toyebi ete tozwi bilɔmbeli yango bisili biso kolɔmba ye.”—1 Yoane 5:14, 15.
19. (a) Bizaleli nini ya Yesu tosengeli komekola? (b) Ndenge nini tokoki kozwa litomba na koyekola bomoi mpe mosala ya Yesu?
19 Tokoki mpenza koyekola makambo mingi soki totaleli na bozindo bomoi mpe mosala ya Yesu Klisto ntango azalaki awa na mabelé! Kanisá naino bizaleli oyo amonisaki: bolingo, mawa, boboto, makasi, bokatikati, azalaki na makambo makasi te, komikitisa, mpiko, mpe azalaki na moimi te. Soki tozali koyekola makambo mingi na ntina na Yesu, mposa na biso ya kozala bayekoli na ye ya sembo ekokola. Koyeba Yesu ezali mpe kobenda biso epai ya Yehova. Mpamba te, Yesu azalaki elilingi ya kokoka ya Tata na ye ya likoló. Azalaki na boyokani makasi mpenza na Yehova na boye ete ye moko alobaki: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.”—Yoane 14:9.
Tyá elikya epai ya Nzambe ete akosunga yo
20. Ndenge nini tokoki kozwa elikya wana tozali kotambola elongo na Yehova?
20 Ntango bana bayekolaka kotambola, matambe na bango mazalaka alima te. Ndenge nini bayekolaka kotambola malamu? Na komimesenisa mpe kolendendela. Baoyo mpe bazali kotambola elongo na Yehova basalaka makasi mpo na kotambola malamu. Yango mpe esɛngaka ntango mpe kolendendela. Paulo amonisaki ntina ya kolendendela ntango tozali kotambola elongo na Nzambe wana akomaki ete: “Boye bandeko, na nsuka tolɔmbi bino mpe tosɛngeli bino kati na Nkolo Yesu ete, [lokola] bozwi epai na biso motindo mobongi na bino ete bótambola mpe bósepelisa Nzambe, lokola mpe bozali kosala, bósepelaka kosala bongo.”—1 Batesaloniki 4:1.
21. Tokoki kozwa mapamboli nini wana tozali kotambola elongo na Yehova?
21 Soki tomipesi mobimba epai ya Nzambe, akosalisa biso mpo tókoba kotambola elongo na ye. (Yisaya 40:29-31) Mokili ezali na eloko moko te ya kopesa biso oyo tokoki kokokanisa yango na mapamboli oyo Nzambe azali kosopa likoló na baoyo bazali kotambola na banzela na ye. Azali ‘Ye oyo akolakisa biso mpo na litomba, Ye oyo akokamba biso na nzela ekoki na biso kotambola na yango. Soki tokoyoka malako na ye, kimya na biso ekozala lokola ebale mpe boyengebene na biso lokola mbonge na mai-na-monana.’ (Yisaya 48:17, 18) Soki tondimi kotambola elongo na Nzambe mpe tosali yango na bosembo nyonso, tokoki kozala na kimya elongo na ye mpo na libela.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Mpo na nini tokoloba ete kotambola elongo na Nzambe ya solo ezali lokumu?
◻ Mpo na nini koyekola, komipesa, mpe batisimo ezali matambe ya liboso mpo na kotambola elongo na Yehova?
◻ Ndenge nini tokoki kolanda matambe ya Yesu?
◻ Ndenge nini toyebi ete Yehova akosunga biso soki tozali kotambola na ye elongo?
[Bililingi na lokasa 13]
Koyekola, komipesa, mpe batisimo ezali matambe ya liboso mpo na kotambola elongo na Nzambe