Ozali na “makanisi ya Klisto”?
“Tiká ete Nzambe oyo apesaka mpiko mpe libɔndisi asunga bino mpo bózala . . . na makanisi lokola oyo Klisto Yesu azalaki na yango.”—BALOMA 15:5, NW.
1. Ndenge nini bililingi ya mangomba ya boklisto emonisaka Yesu, mpe mpo na nini tolobi ete Yesu azalaki ndenge wana te?
MOKANDA moko ya kala elobi mpo na Yesu ete: “Ata mbala moko te bamonaki ye azali kosɛka.” Mokanda yango eyebani banda soki na ekeke ya 11. Balobaka ete mosali moko ya Leta ya Loma nde akomaki yango, kasi ezali lokuta. Balobaka mpe ete bato mingi oyo basalaka bililingi, balandaka makanisi ya mokanda yango.a Na bililingi mingi, bamonisá Yesu na elongi ya mawamawa, lokola moto moko oyo azalaki kosɛka mpenza te, to mpe azalaki kosɛka ata moke te. Kasi tokoki mpenza kondima te ete Yesu azalaki bongo, mpamba te Baevanzile emonisi ye lokola moto ya esengo, ya boboto mpe ya motema mawa.
2. Ndenge nini tokoki kolona “makanisi lokola oyo Klisto Yesu azalaki na yango,” mpe yango ekosalisa biso mpo tósala nini?
2 Ezali polele ete mpo na koyeba mpenza Yesu, tosengeli koyeba malamumalamu, na makanisi mpe na mitema na biso, bomoto na ye ntango azalaki awa na mabele. Mpo na yango, tótalela naino mwa masolo ya Baevanzile oyo ezali komonisa biso “makanisi ya Klisto,” elingi koloba motema na ye, ndenge ye azalaki kotalela makambo, mpe makanisi na ye. (1 Bakolinti 2:16) Ntango tozali kotalela masolo yango, tókanisa ndenge nini tokoki kolona “makanisi lokola oyo Klisto Yesu azalaki na yango.” (Baloma 15:5, NW) Na bongo, tokoyeba kolanda ndakisa na ye malamu na bomoi na biso mpe tokoyeba kofanda na bato na ndenge ya malamu.—Yoane 13:15.
Bato bazalaki kokima ye te
3, 4. (a) Lisolo oyo elobami na Malako 10:13-16 esalemaki ntango nini? (b) Yesu asalaki nini ntango bayekoli bazalaki kopekisa bana bákende epai na ye?
3 Bato bazalaki kosepela na Yesu. Mbala mingi, bato ya lolenge nyonso, mikóló mpe bilenge, bazalaki kokende epai na ye. Tótalela likambo oyo ezali na Malako 10:13-16. Likambo yango esalemaki na nsuka ya mosala na ye ntango azalaki kokende na Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka, epai asengelaki kokufa liwa ya mpasi.—Malako 10:32-34.
4 Kanisá naino. Bato babandi koya na bana, na baoyo ya mike mpenza, epai ya Yesu mpo apambola bango.b Kasi, bayekoli bazali kopekisa bana bákende epai ya Yesu. Mbala mosusu bazali kokanisa ete Yesu akolinga motungisi ya bana te na mikolo ya mpasi oyo azali kolekisa. Kasi, bazali komikosa. Ntango Yesu amoni likambo oyo bayekoli na ye bazali kosala, asepeli ata moke te. Yesu abengi bana mpe alobi ete: “Tiká bana mike báyaka na ngai, bópekisa bango te.” (Malako 10:14) Na nsima, asali likambo moko oyo emonisi ete azali mpenza na boboto mpe na bolingo. Lisolo elandi boye: “Azingeli bango na mabɔkɔ na ye, apamboli bango.” (Malako 10:16) Tomoni mpenza ete bana bazali kobanga te ntango Yesu azali komema bango.
5. Lisolo oyo ezali na Malako 10:13-16 ezali koteya biso nini mpo na bomoto ya Yesu?
5 Mwa lisolo wana eteyi biso makambo mingi mpo na bomoto ya Yesu. Tomoni ete bato bazalaki kokima ye te. Atako azalaki na lokumu mingi kuna na likoló, bato bazalaki kobanga kopusana penepene na ye te mpe azalaki komona bato ya kozanga kokoka lokola biloko mpamba te. (Yoane 17:5) Lisusu, lokola tomoni ete ata bana mike bazalaki kobanga kopusana penepene na ye te, emonisi biso likambo ya ntina mingi. Bana balingaki kosepela na ye te soki azalaki moto ya nkandankanda, oyo elongi efungwamaka te, mpe oyo asɛkaka te! Bilenge mpe mikóló bazalaki kopusana penepene na Yesu mpo bazalaki komona ete azalaki moto ya esengo, atyelaka bato likebi, mpe bazalaki kobanga te ete mbala mosusu akosepela na bango te.
6. Bankulutu bakoki kosala nini mpo bandeko bábanga te kosolola na bango?
6 Ntango tozali kokanisa lisolo wana, tokoki komituna ete: ‘Nazali na makanisi ya Klisto? Bato babangaka te kosolola na ngai?’ Na ntango oyo ya mpasi, bampate ya Nzambe bazali na mposa ya bakɛngɛli oyo bakoki kosolola na bango kozanga nkaka, mibali oyo bazali lokola “ebomb[am]elo mpo na mopɛpɛ.” (Yisaya 32:1, 2; 2 Timote 3:1) Bino bankulutu, soki bozali mpenza kosepela na bandeko na bino na motema moko mpe soki bozali na mposa ya kosalisa bango, bampate bakomona yango. Bakomona yango na bilongi na bino, na elobeli na bino, mpe na boboto oyo bokolakisa. Esengo mpe lobanzo na bino mpo na bango ekoki kosala ete bandeko, ata mpe bana mike, bábanga te kosolola na bino. Mwasi moklisto moko ayebisi mpo na nini azwaki makasi ya kofungolela nkulutu moko motema na ye: “Azalaki kosolola na ngai na boboto mpenza. Soki bongo te, mbɛlɛ nakokaki koloba ata eloko moko te. Asalisaki ngai nabanga eloko moko te.”
Ayebaki kopesa bato lokumu
7. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kopesa bato lokumu? (b) Ekoki kozala mpo na ntina nini Yesu abikisaki mokemoke moto moko oyo akufá miso?
7 Yesu azalaki kopesa bato lokumu. Azalaki kotyela mayoki ya bato likebi. Kaka komona bato oyo bazali konyokwama esalaki ye motema mpasi mpe etindaki ye na kosalisa bango. (Matai 14:14) Azalaki mpe kotalela bolɛmbu ya bato mosusu mpe bamposa na bango. (Yoane 16:12) Mokolo mosusu, bamemelaki ye moto moko akufá miso mpe basɛngaki Yesu abikisa ye. Yesu asalisaki moto yango amona, kasi asalaki yango mbala moko te. Moto yango amonaki naino bato lokola na molili, azalaki ‘komona lokola banzete kasi ezali kotambola.’ Na nsima, Yesu asalisaki ye amona polele. Mpo na nini abikisaki moto yango mokemoke? Ekoki mpenza kozala mpo na kosalisa moto yango oyo azalaki komona te banda kala, ete moi ebɛta ye mbala moko te mpe biloko ndenge na ndenge ebulunganisa ye te.—Malako 8:22-26.
8, 9. (a) Likambo nini esalemaki ntango Yesu na bayekoli na ye bakómaki na etúká ya Dekapoli? (b) Yebisá ndenge oyo Yesu abikisaki moto oyo akufá matoi.
8 Tókanisa lisusu likambo moko oyo esalemaki nsima ya Elekeli ya mobu 32 T.B. Yesu na bayekoli na ye bakendaki na etúká ya Dekapoli, na ɛsti ya Libeke ya Galilai. Ntango kaka bakómaki, ebele ya bato bamonaki bango mpe bayaki na bato ya maladi mpe baoyo bazalaki na mikakatano na nzoto, mpe Yesu abikisaki bango nyonso. (Matai 15:29, 30) Kasi, ezalaki na moto moko oyo abendaki likebi ya Yesu mingi. Evanzile kaka moko nde elobeli likambo yango, ezali oyo Malako akomaki mpe ayebisi ndenge likambo yango elekaki.—Malako 7:31-35.
9 Moto yango azalaki koyoka te mpe azalaki na mokakatano ya koloba. Ekoki mpenza kozala ete Yesu amonaki ete moto yango azalaki kobanga to azalaki motema likoló. Yesu asalaki likambo moko oyo amesanaki kosala te. Atikaki bato, mpe akendaki na moto yango pembeni, kaka bango mibale. Na nsima, Yesu asalaki mwa bilembo mpo na kolakisa moto yango likambo oyo alingaki kosala. “Atii ye misapi na matoi, abwakeli ye nsoi mpe asimbi ye na lolemo.” (Malako 7:33, Boyokani ya Sika) Nsima na yango, Yesu atombolaki miso likoló mpe asalaki libondeli. Ndenge asalaki bongo ezalaki lokola mpo na koyebisa moto yango ete, ‘Nalingi kosalela yo likambo oyo na makasi ya Nzambe.’ Na nsima Yesu alobaki: “Fungwana.” (Malako 7:34, Boyokani ya Sika) Moto yango akómaki koyoka mpe koloba malamu.
10, 11. Ndenge nini tokoki komonisa ete tokebaka ete tózokisa baninga te ezala na lisangá to na libota?
10 Yesu azalaki mpenza kopesa bato lokumu! Azalaki kotalela mayoki na bango, yango wana azalaki kokeba mpo azokisa bango te. Lokola tozali baklisto, ebongi tólona mpe tómonisa makanisi ya Klisto na makambo yango. Biblia elobi na biso boye: “Bino nyonso bózala na motema moko, kobɔndisana, kolingana, lokola bandeko, na mitema na mawa, na kosɔkɛma.” (1 Petelo 3:8) Na ntembe te yango ezali kosɛnga epai na biso ete tólobaka mpe tósalaka makambo na ndenge oyo ekozokisa bato mosusu te.
11 Na kati ya lisangá, tokoki kolakisa ete tokebaka ete tózokisa bato mosusu te soki tozali kopesa bango kilo, tozali kosalela bango makambo na ndenge oyo tokolinga bato mosusu básalela biso. (Matai 7:12) Esɛngi mpe tókanisaka malamu makambo nini tokoloba mpe ndenge nini tokoloba yango. (Bakolose 4:6) Tóbosana te ete ‘maloba oyo moto abimisi kozanga kokanisa ekoki kozokisa lokola mopanga.’ (Masese 12:18, NW) Tokoloba boni mpo na libota? Mwasi na mobali oyo balingani mpenza bakebaka ete moko asala makambo oyo ekoyokisa moninga mpasi na motema te. (Baefese 5:33) Baboyoka kobimisa maloba mabe mpo na moninga, kokitisa ntango nyonso moninga, mpe kotyola, makambo oyo ekoki kopesa moninga mpasi mpe ekotikala na motema. Bana mpe bazali na mayoki, mpe baboti ya bolingo babosanaka likambo yango te. Soki esɛngi kopesa bango etumbu, baboti ya bolingo bapesaka bana na bango etumbu na ndenge oyo ekobebisa lokumu ya bana na bango te mpe ekobimisela bango mitungisi ya mpambampamba te.c (Bakolose 3:21) Na yango, soki tozali kopesa bato mosusu lokumu, tozali komonisa ete tozali na makanisi ya Klisto.
Ayebaki kotyela basusu motema
12. Nini emonisi ete Yesu azalaki na makanisi ya bokatikati mpe oyo ebongi mpo na bayekoli na ye?
12 Yesu azalaki na makanisi ya bokatikati mpe oyo ebongi mpo na bayekoli na ye. Ayebaki ete bazali bato ya kozanga kokoka. Kutu, akokaki komona ata makambo oyo ezali na mitema ya bato. (Yoane 2:24, 25) Atako bongo, miso na ye ezalaki kaka na mabunga na bango te kasi na makambo ya malamu oyo bazalaki kosala. Amonaki mpe ete bato yango oyo Yehova abendaki bazalaki na bolingo malamu. (Yoane 6:44) Ndenge Yesu azalaki kofanda na bayekoli na ye, makambo azalaki kosalela bango emonisaki ete azalaki na makanisi malamu mpo na bango. Azalaki mpenza kotyela bango motema.
13. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kotyela bayekoli na ye motema?
13 Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kotyela bango motema? Liboso azonga na likoló, atikelaki bayekoli na ye bapakolami mokumba moko monene. Apesaki bango mokumba ya kobatela matomba ya Bokonzi na ye na mokili mobimba. (Matai 25:14, 15; Luka 12:42-44) Ntango azalaki kokokisa mosala na ye awa na mabele, alakisaki ete azalaki kotyela bango motema ata na makambo mikemike to oyo ezalaki komonana polele te. Ntango asalaki likamwisi oyo aleisaki bato ebele, apesaki bayekoli na ye mokumba ya kokabola bilei yango.—Matai 14:15-21; 15:32-37.
14. Lobelá na mokuse lisolo oyo ezali na Malako 4:35-41?
14 Tótalela lisusu lisolo oyo ezali na Malako 4:35-41. Mokolo yango, Yesu na bayekoli na ye bakɔtaki na bwato moko mpe bakatisaki na ɛsti ya Libeke ya Galilai. Ntango batikaki libongo, Yesu amisembolaki na nsima ya bwato mpe alalaki mpɔngi. Eumelaki te, ‘mopɛpɛ makasi eyaki.’ Mipɛpɛ makasi ndenge yango ezalaki mingi na Libeke ya Galilai. Lokola libeke yango ezali ezali na nse mingi (mɛtrɛ 200 na nse ya nivo ya mai monene), molunge ezali kuna koleka bisika mosusu oyo ezali pembenipembeni; yango wana mopɛpɛ ezalaka makasi mpe mai ebimisaka mbonge mingi. Longola wana, mipɛpɛ makasi eutaka na Ngomba Helemona oyo ezali na nɔrdi mpe ekitaka na lobwaku mobimba ya Yaladene. Esika oyo ezalaki kimya ekoki na mbala moko kokóma na mbonge makasi. Sikoyo, kanisá naino: Na ntembe te Yesu ayebaki ete mipɛpɛ makasi ezalaki mingi kuna mpamba te akolaki na Galilai. Kasi, alalaki na kimya, atyaki motema ete bayekoli na ye bayebi koluka mpo bamosusu bazalaki babomi mbisi.—Matai 4:18, 19.
15. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo etali kotyela bayekoli na ye motema?
15 Tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo ya kotyela bayekoli na ye motema? Bato mosusu bakokaka kotikela bamosusu mikumba te. Balingaka ete bango nde bátambwisaka makambo nyonso. Mbala mosusu bakanisaka na kati ya mitema na bango boye, ‘Mpo likambo esalema malamu, ngai nde nasengeli kosala yango!’ Kasi soki tolingi ete biso nde tósalaka makambo nyonso, tokolɛmba mpe mbala mosusu tokozanga ntango ya kofanda na mabota na biso. Lisusu, soki tolingaka kopesa bato mosusu mikumba te, tokoyeba kolakisa bango te mpo bango mpe bázwa mayele. Ezali malamu tótyelaka baninga motema mpe tótikelaka bango mikumba mosusu. Tosengeli mpenza tómituna ete, ‘Nazali na makanisi ya Klisto na likambo oyo? Natikelaka bamosusu bákokisa mikumba mosusu mpe natyaka motema ete bakosala nyonso oyo esengeli mpo básala yango malamu?’
Azalaki kondimela bayekoli na ye
16, 17. Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini atako ayebaki ete bakosundola ye?
16 Yesu amonisaki ete azalaki na makanisi malamu mpo na bayekoli na ye na likambo mosusu ya ntina. Amonisaki bango ete azalaki kotyela bango elikya. Amonisaki yango na maloba oyo ayebisaki bantoma na ye na butu ya nsuka liboso akufa. Talá ndenge makambo elekaki.
17 Yesu azalaki na misala mingi na mpokwa wana. Asukolaki bayekoli na ye makolo mpo na koteya bango komikitisa. Nsima na yango, asalaki elambo ya mpokwa oyo esengelaki kozala ekaniseli ya liwa na ye. Na nsima, bantoma babandaki lisusu kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga nyonso. Yesu agangelaki bango te, kasi na motema molai nyonso, asololaki na bango. Ayebisaki bango makambo basengelaki kokutana na yango: “Bino nyonso bokoyoka nsɔni mpo na ngai na butu oyo. Zambi ekomami ete, Nakobɛta mobateli mpe bampate na etonga bakopanzana.” (Matai 26:31; Zekalia 13:7) Ayebaki ete baninga na ye ya motema bakosundola ye na ntango ya mpasi. Kasi, alobaki na bango te ete bazali bato mabe. Kutu, alobaki na bango boye: “Na nsima na kosekwa na ngai nakokenda liboso na bino kino Galilai.” (Matai 26:32) Amonisaki bango ete atako bango bakosundola ye, kasi ye akoboya bango te. Soki komekama makasi wana eleki, akokutana na bango lisusu.
18. Na Galilai, Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba monene nini, mpe ndenge nini bayekoli bakokisaki yango?
18 Yesu asalaki ndenge oyo alobaki. Nsima ya kosekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye 11 oyo batikalaki sembo, na esika moko oyo bayanganaki na bato mosusu na Galilai. (Matai 28:16, 17; 1 Bakolinti 15:6) Yesu apesaki bango mokumba moko monene: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Mokanda ya Misala ezali komonisa polele ete bantoma bakokisaki mokumba yango. Na ekeke ya liboso, bazalaki na molɔngɔ ya liboso mpo na kopalanganisa nsango malamu na bosembo nyonso.—Misala 2:41, 42; 4:33; 5:27-32.
19. Makambo oyo Yesu asalaki nsima ya lisekwa na ye ezali koteya biso nini mpo na makanisi ya Klisto?
19 Lisolo oyo ezali koteya biso nini mpo na makanisi ya Klisto? Atako Yesu amonaki mpenza mabe ya bantoma na ye, kasi “alingaki bango kino nsuka.” (Yoane 13:1) Atako bazalaki kosala mabunga, amonisaki bango ete azalaki kotyela bango motema. Tomoni mpe ete Yesu amikosaki te na ndenge atyelaki bango motema. Na ntembe te elikya mpe motema oyo atyelaki bango elendisaki bango na mokano na bango ya kokokisa mosala oyo apesaki bango.
20, 21. Ndenge nini tokoki kolakisa ete tozali na makanisi malamu mpo na bandeko na biso bandimi?
20 Ndenge nini biso mpe tokoki komonisa makanisi ya Klisto na likambo yango? Tózalaka na makanisi mabe te mpo na bandeko na biso. Soki okaniselaka bandeko mabe, maloba mpe misala na yo ekofunda yo. (Luka 6:45) Kasi, Biblia elobi na biso ete bolingo “ekondimaka nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Bolingo ezalaka na makanisi malamu, kasi makanisi mabe te. Bolingo etongaka, kasi ebebisaka te. Bato batosaka soki bazali komona ete balingi bango mpe bazali kolendisa bango, kasi balingaka te bámonaka lokola nde basimbeli bango fimbo. Tokolendisa basusu soki tozali kotyela bango motema. (1 Batesaloniki 5:11) Soki tozali kolanda ndakisa ya Klisto, soki tozali na makanisi malamu mpo na bandeko na biso, liboso na bango tokozala na bizaleli oyo ekolendisa bango mpe bakobimisa malamu na bango.
21 Kolona makanisi ya Klisto mpe komonisa yango esuki kaka te na kolanda ndakisa ya Yesu na makambo mosusu oyo asalaki. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, mpo tósala mpenza ndenge Yesu asalaki, tosengeli liboso komona makambo ndenge oyo ye azalaki komona yango. Baevanzile ezali kosalisa biso tóyeba likambo mosusu na bomoto na ye, makanisi na ye mpe ndenge azalaki kotalela mosala oyo bapesaki ye. Tokolobela likambo yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moto oyo akomaki mokanda yango alobeli mpe ndenge nsuki ya Yesu, mandefu na ye mpe miso na ye ezalaki. Mobongoli moko ya Biblia, Edgar Goodspeed, alobi ete bakomaki mokanda yango “mpo bato bándima ete Yesu azalaki ndenge oyo tomonaka ye na mikanda.”
b Ekoki mpenza kozala ete bana yango bazalaki na bambula ekeseni. Liloba [ya Greke] oyo ebongolami na esika oyo na “bana mike” ezali se liloba yango oyo esalelami mpo na mwana mwasi ya Yailo oyo azalaki na mbula 12. (Malako 5:39, 42; 10:13) Na lisolo se moko wana, Luka mpe asaleli liloba oyo esalelamaka mpo na bana mike.—Luka 1:41; 2:12; 18:15.
c Talá lisolo “Omemyaka lokumu na bango?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1998.
Okoki kolimbola?
• Yesu asalaki nini ntango bayekoli na ye bapekisaki bana báya epai na ye?
• Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kopesa bato mosusu lokumu?
• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo etali kondimela bayekoli na ye?
• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na motema oyo atyelaki bantoma na ye?
[Elilingi na lokasa 16]
Bana mike bazalaki kobanga te kokende penepene ya Yesu
[Elilingi na lokasa 17]
Yesu azalaki na boboto epai ya bato mosusu
[Elilingi na lokasa 18]
Lisangá ezali na mposa ya bankulutu oyo bato babangaka te kosolola na bango