Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Malako
NA BAEVANGILE nyonso minei, Evanzile ya Malako nde eleki mokuse. Mokomi na yango ezali Yoane Malako; akomaki yango mbula soki 30 nsima ya lisekwa ya Yesu Klisto. Elobeli makambo ndenge na ndenge oyo esalemaki na boumeli ya mbula misato na ndambo oyo Yesu asalaki mosala na ye.
Emonani ete mokanda yango ekomamaki mpo na bato oyo bazalaki Bayuda te, mingimingi Baloma. Elobeli makamwisi oyo Yesu, Mwana ya Nzambe, asalaki mpe mosala monene ya kosakola oyo akokisaki. Mokanda yango elobeli mingimingi makambo oyo Yesu asalaki, kasi te makambo oyo ateyaki. Kotya likebi na Evanzile ya Malako ekolendisa kondima na biso na Masiya mpe ekotinda biso tózala basakoli ya molende ya nsango ya Nzambe.—Ebe. 4:12.
MOSALA MONENE NA GALILAI
Na bavɛrsɛ 14 ya liboso, Malako alobeli mosala ya Yoane Mobatisi mpe mikolo 40 oyo Yesu alekisaki na esobe; na nsima, abandi kolobela mosala oyo Yesu asalaki na Galilai. Ndenge azongeli mbala mingi liloba “na mbala moko” emonisi ete azalaki kolobela makambo na mokuse mpo na koleka na likambo mosusu.—Mko. 1:10, 12.
Na boumeli ya mbula pene na misato, Yesu atambolaki Galilai mobimba mbala misato mpo na kosakola. Malako alobeli makambo mingi ndenge elandanaki. Alobeli te Lisolo Likoló ya Ngomba, mpe masolo mingi mosusu ya milai oyo Yesu asalaki.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:15—“Ntango oyo etyamá” mpo na likambo nini ekokaki? Yesu azalaki koloba ete ntango oyo etyamá ekokaki mpo abanda mosala na ye. Bokonzi ya Nzambe ekómaki pene mpamba te ye, oyo aponamaki mpo na kozala Mokonzi, asilaki koya. Na bongo, bato ya mitema sembo bakokaki koyoka mateya na ye mpe kosala makambo oyo esengelaki kosalisa bango bándimama epai ya Nzambe.
1:44; 3:12; 7:36—Mpo na nini Yesu azalaki kolinga te ete bátambwisa nsango ya makamwisi na ye? Yesu alingaki te ete bato bándimela ye mpo bayoki nsango na ye na nzela ya masolo oyo bato bazalaki kobakisa makambo mosusu oyo ezalaki solo te; alingaki nde ete bato bámona epai na ye moko makambo oyo ekondimisa bango ete azali Klisto mpe na nsima bázwa ekateli bango moko. (Yis. 42:1-4; Mat. 8:4; 9:30; 12:15-21; 16:20; Luka 5:14) Kaka na mokili ya Bagelaza, ntango Yesu abikisaki moto moko oyo azalaki na bademo, nde ayebisaki ye akenda na ndako epai ya bato ya libota na ye mpe ayebisa bango likambo yango. Lokola bato yango basɛngaki Yesu alongwa na mokili na bango, mbala mosusu alingaki lisusu te kozwa libaku ya koteya bato kuna. Komona moto oyo Yesu abikisaki mpe koyoka litatoli na ye elingaki kopekisa bato báloba bilobaloba mpo na ndenge oyo bangulu ebungaki.—Mko. 5:1-20; Luka 8:26-39.
2:28—Mpo na nini Yesu abengami “Nkolo ata ya sabata”? Ntoma Paulo akomaki ete: “Mibeko ezali na elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Ebe. 10:1) Ndenge Mibeko elobaki yango, Sabata ezalaki mokolo ya nsambo, nsima ya mikolo motoba ya mosala, mpe mbala mingi Yesu abikisaki bato na mokolo ya sabata. Yango ezalaki elilingi ya bopemi mpe ya mapamboli mosusu oyo bato bakozwa na Boyangeli ya Mbula Nkóto, ntango Satana akoyangela lisusu te. Na ndenge yango, Mokonzi ya Bokonzi yango azali mpe “Nkolo ya sabata.”—Mat. 12:8; Luka 6:5.
3:5; 7:34; 8:12—Ndenge nini Malako ayebaki ndenge mpenza oyo Yesu ayokaki na mabaku yango? Malako azalaki na kati ya bantoma 12 te, azalaki mpe kotambola na Yesu te. Masolo ya kala elobaka ete ntoma Petelo, oyo asalaki mingi na Malako, nde ayebisaki ye makambo mingi oyo akomaki.—1 Pet. 5:13.
6:51, 52—Na ndenge nini bayekoli bakangaki “ntina ya mampa” te? Mwa bangonga liboso, Yesu aleisaki mibali 5 000, kozanga kotánga basi mpe bana, na mampa mitano mpe mbisi mibale. “Ntina ya mampa” oyo bayekoli basengelaki koyeba ezalaki ete Yehova Nzambe apesaki Yesu nguya ya kosala makamwisi. (Mko. 6:41-44) Soki basosolaki nguya monene oyo Yesu azwaki, balingaki kokamwa te ntango atambolaki likoló ya mai.
8:22-26—Mpo na nini Yesu asalaki ete moto akufá miso oyo abikisaki amona polele mbala moko te? Mbala mosusu Yesu asalaki bongo mpo na komonisela moto yango boboto. Lokola moto yango amesanaki na molili, kosalisa ye amona malɛmbɛmalɛmbɛ epesaki ye nzela amesana mokemoke na pole.
Mateya mpo na biso:
2:18; 7:11; 12:18; 13:3. Malako alimbolaki mimeseno, maloba, bindimeli, mpe bisika oyo mbala mosusu bato oyo bazalaki Bayuda te bakokaki koyeba te. Na ndakisa, alimbolaki ete Bafalisai bazalaki na “momeseno ya kokila bilei,” ete korbani ezali “likabo oyo epesami epai ya Nzambe,” ete Basadukai “balobaka ete lisekwa ezali te,” mpe ete tempelo ezalaki “kotalana” na “Ngomba ya Olive.” Lokola molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya ekokaki kosepelisa mingimingi nde Bayuda, alobelaki yango te. Na ndenge yango, Malako apesi biso ndakisa malamu. Tosengeli kotalela makambo oyo bato oyo tozali koloba na bango bayebi, ezala na mosala ya kosakola to ntango tozali kosala lisukulu na lisangá.
3:21. Bato ya libota ya Yesu bandimaki ye te. Yango wana, ayebaka mpasi ya baoyo bazali konyokwama mpe kofingama mpo na kondima na bango epai ya bandeko na bango oyo bazali bandimi te.
3:31-35. Ntango Yesu azwaki batisimo, akómaki Mwana ya Nzambe oyo apakolami na elimo, mpe “Yelusaleme mboka ya likoló” ezalaki mama na ye. (Gal. 4:26) Kobanda wana, Yesu akómaki na boyokani makasi mpe na bolingo mingi koleka mpo na libota na ye ya elimo. Yango ezali koteya biso ete tosengeli kotyaka makambo ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso.—Mat. 12:46-50; Luka 8:19-21.
8:32-34. Ntango moto moko azali kolendisa biso tókanisa bolamu na biso, tosengeli kososola mbala moko soki azali te kotinda biso tókitisa milende na biso. Moyekoli ya Klisto asengeli ‘komiboya,’ elingi koloba, komipimela mpe koboya koluka kaka matomba na ye moko. Asengeli kondima ‘komema nzete na ye ya mpasi,’ elingi koloba komona mpasi soki esengeli, to koyoka nsɔni, konyokwama ata mpe kokufa mpo na kondima na ye. Asengeli mpe ‘kolanda Yesu ntango nyonso,’ to kozwa ye lokola ndakisa na bomoi na ye. Bomoi ya boklisto esɛngaka ete tózala na elimo ya komipimela lokola Klisto Yesu.—Mat. 16:21-25; Luka 9:22, 23.
9:24. Tosengeli koyoka nsɔni te mpo na kolobela kondima na biso to kobondela mpo tózala na kondima mingi lisusu.—Luka 17:5.
SANZA YA NSUKA
Na nsuka ya mobu 32 T.B., Yesu akendaki na “bandelo ya Yudea mpe na ngámbo mosusu ya Yolodani,” mpe ebele ya bato bayaki epai na ye. (Mko. 10:1) Nsima ya koteya kuna, asimbaki nzela mpo na kokende na Yelusaleme.
Na mokolo ya 8 Nisana, Yesu azalaki na Betani. Ntango bazalaki kolya, mwasi moko ayaki kosopela ye mafuta moko ya nsolo kitoko na motó. Malako alobeli makambo oyo esalemaki kobanda ntango Yesu akɔtaki na nkembo na Yelusaleme tii na lisekwa na ye ndenge elandanaki mpenza.
Biyano na mituna ya Biblia:
10:17, 18—Mpo na nini Yesu apamelaki moto moko oyo abengaki ye “Moteyi Malamu”? Yesu aboyaki titre wana ya lokumu mpo alingaki kopesa Yehova nkembo mpe komonisa ete makambo nyonso ya malamu eutaka epai ya Nzambe. Longola yango, Yesu abendaki likebi na likambo moko ya ntina mingi ete kaka Yehova Nzambe, Mozalisi ya biloko nyonso, nde azali na lotomo ya kokata makambo ya malamu mpe ya mabe.—Mat. 19:16, 17; Luka 18:18, 19.
14:25—Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki bantoma na ye ya sembo ete: “Nakomɛla lisusu eloko oyo euti na nzete ya vinyo ata moke te tii mokolo wana oyo nakomɛla yango ya sika na kati ya bokonzi ya Nzambe”? Yesu alingaki koloba te ete vinyo mpenza ezalaka na likoló. Kasi, lokola na bantango mosusu vinyo esalelamaka na ndenge ya elilingi mpo na kolobela esengo, Yesu azalaki kolobela esengo oyo ekozala ntango ye ná bayekoli na ye bapakolami na elimo oyo basekwi bakozala na Bokonzi na likoló.—Nz. 104:15; Mat. 26:29.
14:51, 52—Elenge mobali oyo “akimaki bolumbu” ezalaki nani? Kaka Malako nde alobeli likambo yango; yango wana, tokoki mpenza kokanisa ete ezalaki ye moko.
15:34—Maloba ya Yesu ete “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” emonisi nde ete azangaki kondima? Te. Atako tokoki mpenza koyeba te likambo oyo etindaki Yesu aloba maloba yango, mbala mosusu yango emonisi ete Yesu ayebaki ete Yehova atikaki kobatela ye mpo bosembo na ye emekama tii na nsuka. Mbala mosusu mpe Yesu alobaki bongo mpo na kokokisa likambo oyo Nzembo 22:1 esakolaki na ntina na ye.—Mat. 27:46.
Mateya mpo na biso:
10:6-9. Mokano ya Nzambe ezali ete babalani bákabwana te. Yango wana, na esika ya kowela koboma libala, mwasi ná mobali basengeli kosala makasi ya kolanda mitinda ya Biblia mpo na kosilisa mikakatano oyo ekoki kobima na kati ya libala.—Mat. 19:4-6.
12:41-44. Ndakisa ya mobola mwasi akufelá mobali ezali koteya biso ete tosengeli kopesaka makabo na esengo nyonso mpo na kosimba losambo ya solo.
[Elilingi na lokasa 29]
Mpo na nini Yesu ayebisaki moto oyo akende koyebisa bandeko na ye makambo oyo ekómelaki ye?