“Yaká landá ngai”
“Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai.”—LUKA 9:23.
1, 2. (a) Yesu apesaki bato libaku ya kosala nini? (b) Ndenge nini otalelaka libaku oyo Yesu apesaki ya kolanda ye?
NA NSUKA ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu akendaki kosakola na Pelea, etúká moko oyo ezalaki na ngámbo ya Yolodani, na nɔrdi-ɛsti ya Yudea. Elenge mobali moko apusanaki penepene na ye mpe atunaki ye oyo asengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Ntango Yesu amonaki ete elenge yango azalaki kotosa makambo nyonso oyo ezalaki na Mibeko ya Moize, asɛngaki ye asala likambo mosusu. Alobaki na ye boye: “Kende, tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe pesá na babola, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló, mpe yaká landá ngai.” (Mko. 10:21) Kanisá naino: moto yango azwaki libaku ya kolanda Yesu, Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló!
2 Elenge mobali yango aboyaki kolanda Yesu; kasi bato mosusu bandimaki. Mwa moke liboso, Yesu alobaki na Filipo ete: “Landá ngai.” (Yoa. 1:43) Filipo andimaki mpe na nsima akómaki ntoma. Lisusu, Yesu abengaki Matai, ye mpe andimaki. (Mat. 9:9; 10:2-4) Nzokande, Yesu apesaki libaku yango ya kolanda ye epai ya bato nyonso oyo balingaka boyengebene ntango alobaki boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Luka 9:23) Na yango, moto nyonso akoki kolanda Yesu soki alingi mpenza kosala yango. Yo mpe olingi kosala yango? Mingi kati na biso tosili kondima kolanda Yesu, mpe na nzela ya mosala ya kosakola, tolendisaka mpe bato mosusu básala yango.
3. Ndenge nini tokoki kokima motambo ya kotika kolanda Yesu?
3 Kasi, likambo ya mawa, bato mosusu oyo basepelaki na mateya ya Biblia, batiki koyekola Biblia. Bakómaki kolɛmba mpe nsukansuka batikaki kolanda Yesu to ‘bapɛngwaki na nzela.’ (Ebe. 2:1) Ndenge nini tokoki kokima motambo yango? Ekozala malamu mokomoko na biso amituna boye: ‘Mpo na nini naponaki kolanda Yesu? Kolanda ye elimboli mpenza nini?’ Biyano na biso na mituna yango mibale ekosalisa biso tótikala na nzela ya bomoi oyo toponaki. Ekosalisa biso mpe tólendisaka bato mosusu bálanda Yesu.
Mpo na nini kolanda Yesu?
4, 5. Mpo na nini Yesu abongi kotambwisa biso?
4 Mosakoli Yilimia alobaki boye: “Ee [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yil. 10:23) Lisolo ya bomoi ya bato emonisi ete maloba yango ya Yilimia ezali solo. Emonani polele ete bato ya kozanga kokoka bakoki te komiyangela bango moko. Biso tondimi kolanda Yesu, mpamba te toyekoli ete abongi kozala Motambwisi na biso mpe moto moko te akoki kokokana na ye. Tótalela bantina oyo Yesu abongi kotambwisa biso.
5 Ya liboso, Yehova ye moko nde aponaki Yesu lokola Masiya Motambwisi. Kaka Mozalisi na biso nde ayebi malamu Motambwisi oyo abongi na biso. Ya mibale, Yesu azali na bizaleli oyo ekosepelisa biso mpe tokoki komekola yango. (Tángá Yisaya 11:2, 3.) Azali ndakisa ya malamu mpenza. (1 Pet. 2:21) Ya misato, Yesu amibanzabanzaka mingi mpo na baoyo balandaka ye; amonisaki yango ndenge apesaki bomoi na ye mpo na bango. (Tángá Yoane 10:14, 15.) Lisusu, amonisaka ete azali mobateli ya bolingo na ndenge azali kokamba biso na bomoi oyo ezali kopesa biso esengo lelo oyo mpe ekopesa biso bomoi ya seko na mikolo ezali koya. (Yoa. 10:10, 11; Emon. 7:16, 17) Mpo na bantina wana mpe bantina mosusu, tozwaki ekateli ya malamu ntango toponaki kolanda ye. Kasi, kolanda Yesu elimboli nini?
6. Kolanda Yesu elimboli nini?
6 Kolanda Klisto elimboli kaka te koloba ete tozali baklisto. Lelo oyo, bato soki miliare mibale bamibengaka baklisto, kasi misala na bango emonisaka ete bazali nde “bato ya misala ya botyoli-mibeko.” (Tángá Matai 7:21-23.) Ntango bato bamonisi mposa ya kolanda Yesu, tolimbwelaka bango ete baklisto ya solo bayokanisaka bomoi na bango mobimba na mateya mpe ndakisa na ye. Mpo na komonisa soki yango elimboli nini, tótalela mwa makambo oyo toyebi na ntina na Yesu.
Mekolá bwanya ya Yesu
7, 8. (a) Bwanya ezali nini, mpe mpo na nini Yesu azalaki na bwanya mingi? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki bwanya, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
7 Yesu azalaki na bizaleli mingi ya malamu, kasi tokotalela kaka minei: bwanya, komikitisa, molende, mpe bolingo. Ya liboso, tótalela bwanya na ye, elingi koloba likoki na ye ya kosalela boyebi mpe bososoli. Ntoma Paulo akomaki boye: “Biloko nyonso ya motuya ya bwanya mpe ya boyebi ebombami malamumalamu na kati na [Yesu].” (Kols. 2:3) Yesu azwaki bwanya yango wapi? Ye moko alobaki boye: “Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” (Yoa. 8:28) Bwanya na ye eutaki epai ya Yehova; yango wana tokoki kokamwa te ndenge Yesu azalaki na bososoli mingi.
8 Na ndakisa, Yesu asalelaki bososoli mpo na kopona lolenge ya bomoi na ye. Aponaki kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ, atyaki makanisi na ye nyonso na likambo moko: kosala mokano ya Nzambe. Amonisaki bwanya na ndenge apesaki ntango mpe makasi na ye nyonso mpo na matomba ya Bokonzi. Biso mpe tokomekola ndakisa ya Yesu soki tozali na ‘liso alima,’ elingi koloba tozali koboya komilukela makambo kilikili oyo ekolongola likebi na biso na makambo ya elimo mpe ekosilisa makasi na biso. (Mat. 6:22) Baklisto mingi bazwaki ekateli ya kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo bákoka komipesa mingi na mosala ya kosakola. Bamosusu bakómaki na likoki ya kosala lokola babongisi-nzela. Soki yo mpe osalaki bongo, obongi kozwa longonya. “Koluka liboso bokonzi” epesaka esengo mingi mpe kimya na motema.—Mat. 6:33.
Zalá na komikitisa lokola Yesu
9, 10. Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa?
9 Ezaleli mosusu ya Yesu oyo tokotalela ezali komikitisa. Ntango moto ya kozanga kokoka azwi mwa bokonzi, mbala mingi akómaka lolendo. Yesu azalaki bongo te! Atako azali na mokumba monene na kokokisama ya mokano ya Yehova, Yesu amonisaki lolendo ata mokolo moko te. Biso mpe tosengeli komekola ye na likambo yango. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bóbatela na kati na bino ezaleli oyo ya makanisi oyo ezalaki mpe na kati ya Klisto Yesu, oyo, atako azalaki na ndenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla esika, elingi koloba, ete akokana na Nzambe. Te, kasi amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo mpe ayaki kokóma motindo moko na bato.” (Filp. 2:5-7) Yango elimboli nini?
10 Kozala na likoló elongo na Tata na ye ezalaki nkembo monene mpo na Yesu, kasi atako bongo andimaki ‘komikómisa mpamba.’ Yehova atyaki bomoi na ye na libumu ya elenge mwasi moko Moyuda oyo ayebaki naino mibali te; alekisaki sanza libwa na libumu ya Malia tii ntango abotamaki lokola mwana nyonso na libota ya Yozefe, mosali moko ya mabaya oyo azalaki na bozwi mingi te. Kuna, Yesu akolaki mokemoke tii akómaki elenge. Azalaki na lisumu te. Atako bongo, na bolenge na ye azalaki ntango nyonso kotosa baboti na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka. (Luka 2:51, 52) Azali mpenza ndakisa malamu ya komikitisa!
11. Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Yesu?
11 Tokomekola komikitisa ya Yesu ntango tozali kondima kosala ata misala oyo ekoki komonana lokola mpamba. Na ndakisa, tótalela mokumba na biso ya kosakola nsango malamu. Mosala yango ekoki komonana lokola mpamba, mingimingi ntango bato bazali koboya koyoka biso, bazali kotyola to kotɛmɛla biso. Nzokande, soki tolendendeli na mosala ya kosakola, tokosalisa bato mosusu bándima kolanda Yesu. Na ndenge yango, tokosalisa bango bábika. (Tángá 2 Timote 4:1-5.) Ndakisa mosusu ezali ya kopɛtola Ndako ya Bokonzi. Yango ekoki kosɛnga kolongola bosɔtɔ, kopangwisa sima mpe kopɛtola batwalɛti—nyonso wana ezali misala oyo esɛngaka komikitisa! Nzokande, toyebi ete kopɛtola Ndako ya Bokonzi na biso—esika ya losambo ya solo na kartye na biso—ezali moko ya misala mosantu. Soki tozali kondima kosala misala oyo emonanaka mpamba, tokomonisa komikitisa mpe na ndenge yango tokolanda matambe ya Klisto.
Zalá molende lokola Yesu
12, 13. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki molende, mpe nini ezalaki kotinda ye? (b) Nini ekoki kotinda biso tózala na molende na mosala ya kosakola?
12 Tótalela molende oyo Yesu azalaki na yango na mosala ya kosakola. Yesu asalaki makambo mingi ntango azalaki awa na mabelé. Ntango azalaki mwana moke, na ntembe te azalaki kosala lokola mosali-mabaya elongo na Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye. Ntango abandaki mosala na ye ya kosakola, Yesu asalaki makamwisi, na ndakisa abikisaki bato ya maladi mpe asekwisaki bakufi. Kasi, mosala na ye ya libosoliboso ezalaki ya kosakola nsango malamu mpe koteya bato oyo bandimaki koyoka ye. (Mat. 4:23) Lokola tozali kolanda ye, biso mpe tozali na mokumba ya kosakola. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa na ye? Tosengeli kozala na makanisi ndenge moko na Yesu.
13 Libosoliboso, bolingo mpo na Nzambe nde ezalaki kotinda Yesu asakolaka mpe ateyaka bato. Kasi, Yesu azalaki mpe kolinga makambo oyo azalaki koteya. Mpo na ye, mateya yango ezalaki na motuya mingi, mpe azalaki na mposa makasi ya koyebisa yango epai ya basusu. Lokola tozali bateyi, to ‘balakisi ya bato,’ toyokaka lokola Yesu. Kanisá naino mwa mateya kitoko oyo toyekoli na Liloba ya Nzambe! Toyebi ntembe oyo ebimaki mpo na lotomo ya Yehova ya koyangela mpe ndenge oyo ntembe yango ekosila. Toyebi malamu makambo oyo Makomami elobi mpo na bakufi mpe mapamboli oyo tokozwa na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Ezala toyekolá yango kala to te, mateya yango esilaka motuya te. (Tángá Matai 13:52.) Ntango tozali kosakola na esengo nyonso, tozali komonisa bato bolingo na biso mpo na makambo oyo Yehova ateyi biso.
14. Ndenge nini tokoki komekola lolenge ya koteya ya Yesu?
14 Tóbosana mpe te lolenge oyo Yesu azalaki koteya. Azalaki ntango nyonso kobenda likebi ya bayoki na ye na Makomami. Mbala mingi, azalaki kobanda kolobela likambo moko ya ntina na maloba oyo: “Ekomamá.” (Mat. 4:4; 21:13) Na maloba na ye oyo ekomamá na Biblia, atángaki to alobelaki mikapo mingi, koleka katikati, ya makambo oyo ezali na Makomami ya Liebele. Lokola Yesu, toteyaka kaka makambo oyo euti na Biblia mpe totángelaka bato Makomami soki likoki ezali. Na ndenge yango, tosalisaka bato ya mitema sembo bámona bango moko ete toteyaka makanisi ya Nzambe, kasi ya biso moko te. Tosepelaka mingi ntango moto andimi kotánga Biblia mpe koyekola Liloba ya Nzambe! Mpe ntango bato ya ndenge wana bazali kondima kolanda Yesu, esengo na biso ebakisamaka.
Kolanda Yesu elimboli kolinga basusu
15. Wapi ezaleli ya ntina mingi ya Yesu, mpe kokanisa yango ekoki kotinda biso tósala nini?
15 Ezaleli ya nsuka ya Yesu oyo tokolobela ezali na ntina mingi: bolingo na ye mpo na bato. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bolingo oyo Klisto azali na yango ezali kopusa biso.” (2 Kol. 5:14) Soki tokanisi bolingo oyo Yesu azali na yango mpo na bato nyonso mpe mpo na mokomoko na biso, mitema na biso esepelaka mpe etindaka biso tólanda ndakisa na ye.
16, 17. Ndenge nini Yesu amonisaki bolingo na ye mpo na basusu?
16 Ndenge nini Yesu alakisaki bolingo mpo na basusu? Amonisaki mpenza bolingo na ye ntango andimaki kokaba molimo na ye mpo na bato. (Yoa. 15:13) Nzokande, na mosala ya kosakola, Yesu amonisaki mpe bolingo na ndenge mosusu. Na ndakisa, azalaki na mawa mpo na bato oyo bazalaki konyokwama. Ntango amonaki Malia mpe bato mosusu bazali kolela Lazalo, oyo autaki kokufa, Yesu ayokaki mawa. Atako alingaki kosekwisa Lazalo, Yesu ayokaki mawa mingi mpe “alelaki na mai na miso.”—Yoa. 11:32-35.
17 Na ebandeli ya mosala ya Yesu, moto moko ya maba apusanaki pembeni na ye mpe alobaki boye: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Yesu asalaki nini? Biblia elobi ete: “Mawa ekangaki ye.” Na nsima asalaki likambo moko ya kokamwa. “Asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki ye, mpe alobaki na ye ete: ‘Nalingi. Kómá pɛto.’ Mpe na mbala moko maba elimwaki epai na ye, mpe akómaki pɛto.” Na Mibeko ya Moize, bato ya maba bazalaki mbindo, mpe na ntembe te Yesu akokaki kobikisa ye kozanga ete asimba ye. Nzokande, ntango Yesu asimbaki moto yango ya maba mpo na kobikisa ye, moto yango azwaki libaku moko oyo mbala mosusu azwaki te na boumeli ya bambula mingi—moto mosusu asimba ye. Yesu amonisaki mpenza motema mawa!—Mko. 1:40-42.
18. Ndenge nini tokoki ‘komitya na esika ya basusu’?
18 Lokola tozali kolanda Klisto, tosengeli ‘komityaka na esika ya basusu’ mpo na komonisa bolingo na biso. (1 Pet. 3:8) Ekoki kozala pɛtɛɛ te koyeba mpenza mpasi ya ndeko oyo azali konyokwama na maladi moko oyo esilaka te to azali konyokwama na makanisi—mingimingi soki tokutaná naino na makambo yango te. Nzokande, Yesu azalaki komitya na esika ya bato ya maladi, atako ye moko abɛlaki ata mokolo moko te. Ndenge nini tokoki koyekola komitya na esika ya basusu ndenge yango? Soki tozali koyoka na likebi ntango moto oyo azali na maladi azali koyebisa biso ndenge azali komiyoka. Tokoki mpe komituna boye: ‘Soki ezalaki ngai, nalingaki komiyoka ndenge nini?’ Soki toyekoli komitya na esika ya basusu, tokozala na likoki ya ‘kolobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi.’ (1 Tes. 5:14) Na ndenge yango, tokomekola Yesu.
19. Ndakisa ya Yesu ekoki kotinda biso tósala nini?
19 Ezali na makambo mingi oyo tokoki koyekola na maloba mpe misala ya Yesu! Koyekola makambo mingi na ntina na ye ekopesa biso mposa makasi ya kozala lokola ye—mpe yango ekotinda biso tóluka kosalisa basusu básala mpe bongo. Yango wana, tósepela kolanda Masiya Mokonzi lelo oyo mpe mpo na libela!
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini tokoki komonisa bwanya lokola Yesu?
• Ndenge nini tokoki komonisa komikitisa?
• Ndenge nini tokoki kokóma na molende na mosala ya kosakola?
• Ndenge nini tokoki komekola Yesu na oyo etali komonisa bolingo mpo na basusu?
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
BUKU OYO EKOSALISA BISO TÓMEKOLA KLISTO
Na liyangani ya etúká ya 2007, buku moko ya nkasa 192 ebimaki; ezalaki na motó ya likambo “Yaká landá ngai” (na Lifalanse). Buku yango ebongisami mpo na kosalisa biso tóyeba Yesu, mingimingi bizaleli na ye mpe makambo oyo asalaki. Nsima ya mikapo mibale ya ebandeli, eteni ya liboso elobeli na mokuse bizaleli kitoko ya Yesu lokola komikitisa, mpiko, bwanya, botosi, mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko.
Nsima na yango, ezali na biteni oyo elobeli Yesu lokola moteyi mpe mosakoli ya nsango malamu mpe mabaku ndenge na ndenge oyo amonisaki bolingo na ye monene. Buku yango ebongisami na ndenge oyo ekoki kosalisa moklisto amekola Yesu.
Tozali kolikya ete buku yango ekolendisa mokomoko na biso amitalela mpe amituna boye: ‘Nalandaka mpenza Klisto? Ndenge nini nakoki kolanda ye lisusu malamumalamu?’ Ekosalisa mpe “baoyo nyonso [bazali] na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” bákóma bayekoli ya Klisto.—Mis. 13:48.
[Elilingi na lokasa 4]
Yesu andimaki koya na mabelé mpe kobotama lokola bana nyonso. Yango esɛngaki azala na ezaleli nini?
[Elilingi na lokasa 6]
Nini ekotinda biso tózala molende na mosala ya kosakola?