Makambo nini okoki koyekola epai ya bana mike?
“OZALI kosala makambo lokola mwana moke!” Na ntembe te, soki moto alobi na biso ndenge wana tokosepela ata moke te. Tosepelaka mingi na bana mike. Atako bongo, bayebaka makambo mingi te mpe bazangi bwanya, oyo eyaka ntango moto azali kokola.—Yobo 12:12.
Atako bongo, Yesu alobaki na bayekoli na ye mokolo moko ete: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino, Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta soki moke te na bokonzi ya likoló.” (Matai 18:3) Yesu alingaki koloba nini? Bizaleli nini bana mike bazalaka na yango oyo mikóló basengeli komekola?
Tózala na lokola bana mike
Kanisá naino likambo oyo etindaki Yesu aloba bongo. Yesu ná bayekoli na ye bakómaki na Kapalanauma nsima ya mobembo moko molai mpe atunaki bango boye: “Likambo nini bozalaki kolobana nzelanzela?” Bayekoli bazangaki ata eloko ya koloba, mpamba te bazalaki koluka koyeba soki nani aleki monene na kati na bango. Nsukansuka, bazwaki mpiko mpe batunaki Yesu: “Nani mpenza aleki bamosusu nyonso na kati ya bokonzi ya likoló?”—Malako 9:33, 34; Matai 18:1.
Tokoki mpenza kokamwa komona ete atako bayekoli ya Yesu baumelaki na ye pene na mbula misato mobimba, bazalaki kaka kowelela bokonzi. Bakolaki na Lingomba ya Bayuda, oyo ezalaki kopesa motuya mingi na makambo ya ndenge wana. Emonani mpenza ete mimeseno ya Lingomba ya Bayuda mpe kozanga kokoka na bango nde epesaki bango makanisi wana.
Yesu afandaki, abengaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango boye: “Soki moto alingi kozala moto ya liboso, asengeli kozala moto ya nsuka ya bato nyonso mpe mosaleli ya bato nyonso.” (Malako 9:35) Na ntembe te, maloba wana ekamwisaki bango makasi. Makanisi ya Yesu ekesanaki mosika mpenza na lolenge oyo Bayuda bazalaki kotalela bonene! Na nsima, Yesu abengaki mwana moko ya moke pembeni na ye. Ayambaki ye mpe alobaki boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino, Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta soki moke te na bokonzi ya likoló. Na yango, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo ya moke, ye nde aleki bamosusu nyonso na kati ya bokonzi ya likoló.”—Matai 18:3, 4.
Oyo nde ndakisa kitoko ya komikitisa! Kanisá naino ndenge likambo yango esalemaki. Batata mobimba bazingi mwa mwana ya moke mpe bango nyonso bazali kotala ye. Na ntembe te, atikalaki kaka nyɛɛ mpe azalaki kotala bango, kozanga kokanisela bango mabe, nkanda te mpe zuwa te. Amimonaki mpamba liboso na bango nyonso. Ya solo, mwana yango azalaki ndakisa monene ya komikitisa.
Likanisi ya Yesu ezali polele. Soki tolingi kosangola Bokonzi ya Nzambe, biso nyonso tosengeli komekola komikitisa ya bana mike. Elimo ya kowelana mpe ya lolendo ezali na esika te na libota ya bana ya Yehova. (Bagalatia 5:26) Kutu, yango nde bizaleli mpenza oyo etindaki Satana Zabolo atombokela Nzambe. Yango wana, tokoki kokamwa te soki Yehova ayinaka yango.—Masese 8:13.
Baklisto ya solo balukaka kokonza te, balingaka nde kosalela basusu. Komikitisa ya solosolo etindaka biso tósalela basusu, ezala mosala ya ndenge nini, ezala bato yango bazali bato mpamba. Kosala bongo ememaka matomba mingi. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo ayambi moko ya bana mike ya boye mpo na nkombo na ngai, ayambi ngai; mpe moto nyonso oyo ayambi ngai, ayambi, kaka ngai moko te, kasi mpe moto oyo atindaki ngai.” (Malako 9:37) Soki tozali na boboto mpe na komikitisa lokola bana mike, tokozala baninga ya mokonzi ya molɔngɔ mobimba mpe ya Mwana ya ye. (Yoane 17:20, 21; 1 Petelo 5:5) Tokoyoka esengo oyo moto azwaka na kokaba. (Misala 20:35) Tokozala na esengo ya koyeba ete tozali mpe kosala ete kimya mpe bomoko ezala na kati ya Basaleli ya Nzambe.—Baefese 4:1-3.
Tóndimaka koteyama mpe tózala na kondima
Na nsima, Yesu amonisaki likambo mosusu oyo mikóló bakoki koyekola epai ya bana mike: “Moto nyonso oyo ayambi bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta na yango ata moke te.” (Malako 10:15) Bana mike bazalaka kaka na komikitisa te; bandimaka mpe koteyama. Mama moko alobaki boye: “Bamɛlaka makambo ndenge mabelé emɛlaka mai ya mbula.”
Na yango, mpo na kosangola Bokonzi ya Nzambe, tosengeli koyoka mpe kondima nsango ya Bokonzi. (1 Batesaloniki 2:13) Lokola bana oyo babotami sika, tosengeli kozala “na mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali ya liloba, oyo basangisi na eloko te, mpo ete na nzela na yango tókola tii na lobiko.” (1 Petelo 2:2) Tokosala nini soki tozali kokanga te ntina ya liteya moko ya Biblia? Moto moko oyo asalaka mosala ya kobatela bana alobaki boye: “Bana mike balɛmbaka te kotuna, ‘Mpo na nini? mpo na nini?’ tii ntango bakozwa eyano oyo esepelisi bango.” Tosengeli kolanda ndakisa na bango. Na yango, tókoba koyekola, kosolola na baklisto oyo bakɔmɛli na elimo mpe kosɛnga Yehova apesa biso bwanya. (Yakobo 1:5) Na ntembe te, soki totingami na mabondeli, tokozwa matomba.—Matai 7:7-11.
Kasi, bato mosusu bakoki koloba boye: ‘Moto oyo andimaka koteyama, bakoki kokosa ye na bolɛmbu mpenza.’ Te, bakoki kokosa ye te soki azali kozwa litambwisi ya malamu. Na ndakisa, kozanga ete bátinda bango, bana balandaka litambwisi ya baboti na bango. Tata moko alobaki boye: “Lokola baboti babatelaka bana na bango mpe bapesaka bango biloko nyonso oyo basengeli na yango, bana bamonaka ete ebongi mpenza bátyela bango motema.” Na ntembe te, biso mpe tozali na makambo oyo ekoki kotinda biso tótyela Tata na biso ya likoló motema. (Yakobo 1:17; 1 Yoane 4:9, 10) Yehova azali kotambwisa biso malamu mpenza na nzela ya Liloba na ye. Elimo santu mpe ebongiseli na ye ezali kobɔndisa mpe kosunga biso. (Matai 24:45-47; Yoane 14:26) Bibongiseli nyonso wana ekobatela biso na elimo.—Nzembo 91:1-16.
Soki tozali kondimela Nzambe lokola bana mike, tokozala mpe na kimya. Molimboli moko ya Biblia alobaki boye: “Ntango tozali bana mike, tobandaka mobembo moko kozanga ete tózala na mbongo ya kofuta tike, kozanga koyeba nzela oyo ekomema biso epai tozali kokende. Atako bongo, tozalaka na ntembe ata moke te ete baboti na biso bakokómisa biso kuna kozanga ete likama moko ekómela biso.” Biso mpe, totyelaka Yehova motema ndenge wana na mobembo ya bomoi?—Yisaya 41:10.
Kotyela Nzambe motema mobimba ekosalisa biso tózala te na bizaleli mpe misala oyo ekoki kobebisa biso na elimo. Tokondima mpenza maloba ya Yesu ete Tata na biso ya likoló ayebi misala na biso mpe ete soki tozali koluka liboso Bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe, akokokisa bamposa na biso. Yango ekosalisa biso tómipesa te na koluka bozwi ya mokili mpe tósundola te mikumba na biso na lisangá.—Matai 6:19-34.
“Bana mike na oyo etali mabe”
Atako babotamaka bato ya kozanga kokoka, bana mike bazalaka mitema mpɛmbɛ. Yango wana, Biblia ezali kolendisa baklisto ete: “Bózala bana mike na oyo etali mabe.”—1 Bakolinti 14:20.
Tózwa ndakisa ya Monique, elenge ya mbula 5, oyo alobaki na mama na ye na esengo nyonso ete: “Moninga na ngai ya sika, Sarah, azali na nsuki lokola oyo ya ngai!” Akipaki te ete ye ná Sarah bakeseni mposo mpe bikólo. Moboti moko alobaki boye: “Bana mike batalaka mposo te. Bayinaka mpe bato mosusu te mpo na mposo mpe bikólo na bango.” Na likambo yango, bana mike bamonisaka mpenza makanisi ya Nzambe oyo aponaka bilongi te mpe alingaka bato ya bikólo nyonso.—Misala 10:34, 35.
Lisusu, bana mike bayebaka mpenza kolimbisa. Moboti moko alobaki boye: “Soki Jack ná Levi babundi, tolobaka na bango básɛngana bolimbisi, mpe mosika te babandaka lisusu kosakana. Babombaka nkanda te, bakanisaka makambo eleká te, mpe basɛngaka te ete moninga asala likambo boye to boye liboso bálimbisa ye. Batikalaka kaka baninga mpe bakobaka kosakana, lokola nde likambo ezalaki te.” Oyo nde ndakisa malamu mpo na mikóló!—Bakolose 3:13.
Longola yango, bana mike bakakatanaka te mpo na kondima ete Nzambe azali. (Baebele 11:6) Lokola bana mike bazalaka milangi mpɛmbɛ, yango etindaka bango básakola nsango malamu na mpiko. (2 Mikonzi 5:2, 3) Mabondeli na bango ya mikuse, oyo eutaka mpenza na motema, ekoki kosimba ata mitema ya makasi ndenge nini. Soki mpe bakutani na komekama, bakoki kotɛmɛla yango na mpiko mpenza. Bazali mpenza likabo ya Nzambe!—Nzembo 127:3, 4.
Tokoki kozongela bizaleli kitoko ya bomwana
Okoki komituna boye: ‘Mikóló bakoki mpenza kozongela bizaleli kitoko ya bomwana?’ Tondimi mpenza ete ekoki kosalema! Soki te, mbele Yesu asɛngaki bayekoli na ye te ete ‘bákóma lokola bana mike.’—Matai 18:3.
Na ndakisa, mpo na kobongisa liyemi moko ya motuya mingi, bato ya misala ya ntɔki bakoki kobanda kolongola bisika oyo ebebaki mpe kobongisa bisika oyo baninga na bango mosusu balongaki kobongisa te. Nsima ya milende mingi, liyemi yango ezongi lisusu kitoko ndenge ezalaká mpe bato nyonso babandi lisusu kosepela na yango. Ndenge moko, na milende na biso, na lisalisi ya elimo santu ya Yehova mpe na lisungi ya lisangá ya boklisto, tokoki kozongela bizaleli kitoko oyo tozalaki na yango na bomwana.—Baefese 5:1.
[Elilingi na lokasa 9]
Bana mike bazalaka na komikitisa
[Elilingi na lokasa 10]
Bana mike bakaniselaka bato mabe te mpe baumelaka te kolimbisa mpe kobosana mabe oyo basalaki bango