Esika ebongi na losambo ya Yehova kati na bomoi na biso
“Mokolo mobimba nakopambola yo, mpe nakosanzola nkombo na yo libela na libela, ee mpo na seko.”—NZEMBO 145:2, NW.
1. Na likambo litali losambo, Yehova azali kosɛnga nini?
“NGAI [Yehova] Njambe na yɔ najali Njambe na jua na kobatela.” (Esode 20:5) Mose ayokaki maloba oyo epai na Yehova, mpe na nsima azongelaki yango ntango azalaki koloba liboso na libota ya Yisraele. (Deteronome 5:9) Na makanisi ya Mose ntembe moko ezalaki te ete Yehova azalaki kosɛnga na basaleli na Ye ete básambela bobele Ye.
2, 3. (a) Nini endimisaki mpenza Bayisraele ete oyo esalemaki pene na Ngomba Sinai ezalaki likambo ya kokamwa? (b) Mituna nini tokotalela na ntina na losambo ya Bayisraele mpe losambo ya basaleli ya Nzambe na mikolo na biso?
2 Wana batyaki molako na bango penepene ya Ngomba Sinai, Bayisraele mpe “ebele na bato na ndenge na ndenge” oyo babimaki na Ezipito elongo na bango bamonaki likambo moko ya kokamwa. (Esode 12:38) Yango ekokanaki soko moke te na losambo ya banzambe ya Ezipito, oyo basilaki kookisama nsɔni na makámá, to bolozi zomi. Ntango Yehova abandaki komonisa na Mose ete azalaki wana, makambo ya kobangisa mabandaki kosalema: nkake, mikalikali, mpe lokito makasi ya koyula liseké esalaki ete bato nyonso ya molako bálɛnga. Na nsima mɔ́tɔ mpe milinga ebimaki wana ngomba mobimba ezalaki koningana. (Exode 19:16-20; Baebele 12:18-21) Soki Moyisraele moko azalaki na mposa ya elembeteli mosusu mpo na kondimisama ete oyo esalemaki ezalaki likambo ya kokamwa, akoki kozela ntango molai te mpo na komona yango. Nokinoki, Mose akitaki na ngomba nsima na kozwa mpo na mbala ya mibale etánda ya mibeko ya Nzambe. Engebene lisoló lipemami, “loposo na elongi na [Mose] engɛngaki mpe [bato] babangaki kobɛlɛma na ye.” Ya solo, ezalaki likambo moko oyo bakokaki kobosana te, oyo elekaki nguya ya moto!—Esode 34:30.
3 Mpo na libota wana mpenza ya Nzambe, ntembe ezalaki te na ntina na esika oyo epesamaki na losambo ya Yehova. Ye azalaki Mobikisi na bango. Ezalaki mpo na ye nde bazalaki na bomoi. Ye azalaki lisusu Mopesi na bango ya mibeko. Kasi babatelaki losambo ya Yehova na esika ya liboso? Mpe ezali boni mpo na basaleli ya Nzambe na mikolo na biso? Losambo ya Yehova ezali na esika nini kati na bomoi na bango?—Baloma 15:4.
Losambo ya Yisraele epai na Yehova
4. Molako ya Bayisraele motandamaki lolenge nini wana bazalaki kotambola na mokili mokauki, mpe nini ezalaki na katikati ya molako?
4 Soki okokaki kozala na likoló mpe kotala molako ya Bayisraele na nsé, kati na mokili mokauki, olingaki komona nini? Etuluku monene ya hema oyo etandami na molɔngɔ́, epai bato soko milió misato to koleka bazalaki kofanda, baoyo batyamaki na bituluku ya mabota misato misato epai ya nɔ́rdi, ya súdi, ya ɛ́sti mpe ya wɛ́sti. Na kotaláká na likebi mpenza, olingaki mpe komona etuluku mosusu penepene na ntéi ya molako. Bituluku mike minei wana ya hema bizalaki bongo bandako mpo na bato ya libota ya Levi. Na katikati mpenza ya molako, na esika oyo ekabolami na efelo ya elamba, ezalaki na ndako moko ekesenaki na nyonso mosusu. Yango ezalaki “hema ya koyangana,” to mongombo, oyo Bayisraele ya “mayɛlɛ” batongaki yango engebene elakiseli epesamaki na Yehova.—Mituya 1:52, 53; 2:3, 10, 17, 18, 25; Esode 35:10.
5. Mongombo ezalaki na mokano nini kati na Yisraele?
5 Na bisika nyonso pene na 40 epai batyaki molako na boumeli ya mobembo na bango ya mpasi kati na mokili mokauki, Bayisraele bazalaki kotɛlɛmisa mongombo, mpe yango ekómaki ntéi ya molako na bango. (Mituya, mokapo 33) Na lolenge lobongi, Biblia ezali kolobela Yehova ete azalaki kofanda elongo na bato na ye na katikati ya molako na bango. Nkembo na ye etondisaki mongombo. (Esode 29:43-46; 40:34; Mituya 5:3; 11:20; 16:3) Búku Our Living Bible (Biblia na biso oyo ezali na bomoi) elobi ete: “Esambelelo wana oyo bakokaki komema na esika na esika ezalaki na ntina monene mpenza, mpamba te ezalaki esika ya losambo mpe ya koyangana mpo na mabota. Na yango, ebatelaki bango ete bátikala na bomoko na boumeli ya mibu mingi ya botamboli na bango kati na mokili mokauki mpe epesaki nzela na kosala makambo na bomoko.” Koleka mpenza yango, mongombo mosalelamaki lokola bokundoli ya ntango nyonso epai na Bayisraele ete losambo ya Mozalisi na bango ezalaki na katikati ya bomoi na bango.
6, 7. Ndako nini ya losambo ekitanaki mongombo, mpe lolenge nini yango ezalaki kosunga libota ya Yisraele?
6 Nsima wana Bayisraele bakómaki na Mokili ya Ndaká, mongombo ekóbaki kosalelama lokola ntéi ya losambo ya Yisraele. (Yosua 18:1; 1 Samwele 1:3) Na nsima, Mokonzi Davidi abimisaki likanisi ya kotonga ndako moko ya libela. Yango ezalaki bongo tempelo, oyo na nsima etongamaki na Salomo, mwana na ye. (2 Samwele 7:1-10) Na ntango ya kobulisama na yango limpata moko ekitaki mpo na komonisa ete Yehova andimaki ndako yango. Salomo abondelaki ete: “Ngai natongeli yɔ ndako na kofanda, esika na yɔ na kofanda libela.” (1 Mikonji 8:12, 13; 2 Ntango 6:2) Tempelo oyo eutaki kotongama ekómaki bongo ntéi ya losambo ya libota mobimba.
7 Mbala misato na mbula, mibali nyonso ya Yisraele bazalaki kokende na Yelusaleme mpo na kosangana na bilambo ya esengo kati na tempelo mpo na komonisa botɔ́ndi na bango mpo na mapamboli ya Nzambe. Na ntembe te, bokutani wana ebongisamaki lokola “bilambo na [Yehova] na bilaka bipɔnami,” mpo na kobenda likebi likoló na losambo ya Nzambe. (Lewitiko 23:2, 4) Basi oyo bamipesaki mingi na makambo ya losambo bazalaki kokende elongo na basangani mosusu ya libota na bango.—1 Samwele 1:3-7; Luka 2:41-44.
8. Lolenge nini Nzembo 84:1-12 ezali komonisa ntina ya losambo ya Yehova?
8 Bakomi na Nzembo oyo bapemamaki bamonisaki polele esika monene oyo losambo ezalaki na yango kati na bomoi na bango. Bana ya Kola bayembaki ete: “Kitɔkɔ boni ndako na yɔ, ɛ [Yehova] na bibele!” Bazalaki mpenza kokumisa bobele ndako mpamba te. Kasi, bazalaki nde kotombola mongongo na bango mpo na kokumisa Yehova, Nzambe, kolobáká ete: “Motema na ngai mpe mosuni na ngai ijali konganga epai na Njambe na bomɔi.” Mosala ya Balevi mozalaki kopesa bango esengo monene. Basakolaki ete: “Esɛngɔ ejali na baoyo bakofanda na ndako na yɔ, bakosanjolaka yɔ mikɔlɔ yɔnsɔ.” Ya solo, Bayisraele nyonso bakokaki koyemba ete: “Esɛngɔ ejali na baoyo bajali na nguya na bango epai na yɔ mpe bajali na njela na yɔ kati na mitema na bango. . . . Makasi na bango ekoyikana wana ekotambolaka bango, bakomɔnana liboso na Njambe kati na Siona.” Atako nzela ya Bayisraele mpo na kokende na Yelusaleme ezalaki molai mpe ezalaki kolɛmbisa, nguya na bango ezalaki kolendisama ntango bazalaki kokóma na mboka-mokonzi. Mitema na bango mizalaki kotonda na nsaí wana bazalaki kokumisa libaku kitoko bazalaki na yango ya kosambela Yehova: “Jambi mokɔlɔ mɔkɔ kati na lopango na yɔ eleki mikɔlɔ mosusu nkoto na malamu. Nakopɔna kobatela ekuke na ndako na Njambe na ngai liboso na kofanda na hema na bato mabe. . . . Esɛngo ejali na moto oyo akotiaka elikia na ye epai na yɔ.” Maloba lokola oyo mazali komonisa esika ya liboso oyo Bayisraele bapesaki na losambo ya Yehova.—Njembo 84:1-12.
9. Nini ekómelaki libota ya Yisraele ntango bazangaki kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso?
9 Likambo ya mawa, Bayisraele bakóbaki te kopesa motuya mingi na losambo ya solo. Bapesaki nzela ete losambo ya banzambe ya lokuta ebebisa molende na bango mpo na Yehova. Mpo na yango, Yehova atikaki bango na mabɔkɔ na bayini na bango, kopesáká nzela ete bámɛmama na boombo na Babilone. Ntango bazongisamaki na mokili na bango nsima ya mibu 70, Yehova asalaki ete Bayisraele bayikisama mpiko na bilendiseli ya basakoli ya sembo Hagai, Zekalia, mpe Malaki. Nganga Ezɛla mpe Moyangeli Nehemia balendisaki libota ya Nzambe na kotonga lisusu tempelo mpe na kozongisa losambo ya pɛto kati na yango. Kasi, nsima ya mwa bikeke, losambo ya solo etikalaki lisusu na esika ya liboso te kati na libota yango.
Molende mpo na losambo ya solo na ekeke ya liboso
10, 11. Losambo ya Yehova ezalaki na esika nini kati na bomoi ya bato ya sembo na ntango Yesu azalaki awa na mabelé?
10 Na ntango ebongisamaki na Yehova, Masiya amonanaki. Bato ya sembo bazalaki kozela lobiko epai na Yehova. (Luka 2:25; 3:15) Lisoló ya Evanzile ya Luka elobeli na ntina nyonso Ana, mobangé mwasi mokufeli-mobali ya mibu 84, ete “abimaki na Tempelo tɛ, nde ajalaki wana butu na moi kosalelaka Njambe na kokila mpe na kobɔndɛla.”—Luka 2:37.
11 Yesu alobaki ete: “Bilei na ngai ejali boye ete nasala mokano na Motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Omikundola lolenge Yesu asalaki ntango akutanaki na basɛnzi ya mosolo kati na tempelo. Akweisaki bamesa mpe bibonga na batɛkisi oyo bazalaki kotɛka bibenga. Malako alobi ete: “[Yesu] aboyaki ete moto amɛma elɔkɔ kati na Tempelo tɛ. Alakisi mpe alobi na bango ete, ‘Ekomami tɛ ete, “Ndako na ngai ekobiangama ndako na mabɔndɛli mpɔ na mabota yɔnsɔ?” Nde bino bosili kojalisa yango esika na bayibi.’” (Malako 11:15-17) Ee, Yesu apesaki nzela ata na moto moko te aleka na nzela ya mokuse oyo elekaki na lopango ya tempelo wana ezalaki ye kokatisa na biloko na ngámbo mosusu ya engumba. Makambo oyo Yesu asalaki epesaki nguya na toli oyo apesaki liboso ete: “Bolukaka nde liboso Bokonji na Njambe mpe boyɛngɛbɛnɛ na [Nzambe].” (Matai 6:33) Yesu atikelaki biso ndakisa moko kitoko mpo na oyo etali komipesa mobimba epai na Yehova. Asalelaki mpenza makambo oyo azalaki koteya.—1 Petelo 2:21.
12. Lolenge nini bayekoli ya Yesu bamonisaki ete batyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso?
12 Yesu atikaki lisusu elakiseli moko kitoko mpo na bayekoli na ye ete bálanda na lolenge oyo akokisaki mokumba na ye ya kosikola Bayuda ya sembo oyo batyolamaki, mpo ete basikolamaki na bozito ya misala ya mangomba ya lokuta. (Luka 4:18) Mpo na kotosa etindá na Yesu ya kozalisa bayekoli mpe kobatisa bango, baklisto ya liboso basakolaki na mpiko nyonso mokano ya Yehova na ntina na Nkolo na bango oyo asilaki kosekwa. Yehova asepelaki mpenza na esika ya liboso oyo bapesaki na losambo na Ye. Na yango, na lolenge ya likamwisi, anzelu ya Nzambe akangolaki ntoma Petelo mpe ntoma Yoane na bolɔkɔ mpe alakaki bango ete: “Kɛnda na bino kotɛma koloba na bato yɔnsɔ maloba na bomɔi oyo na kati na Tempelo.” Eyikisamaki bango mpiko, batosaki. Mokolo na mokolo, ezala kati na tempelo ya Yelusaleme to na ndako na ndako “batikaki te koteya mpe kosakola nsango malamu na ntina na Yesu Klisto.”—Misala 1:8; 4:29, 30; 5:20, 42, NW; Matai 28:19, 20.
13, 14. (a) Longwa na ebandeli ya losambo ya boklisto, Satana alukaki kosala nini epai na basaleli ya Nzambe? (b) Basaleli ya sembo ya Nzambe bazali kolanda kosala nini?
13 Wana botɛmɛli eyaki makasi na ntina na mosala na bango ya kosakola, Nzambe atindaki ete basaleli na ye bakoma na mokanda batoli oyo ebongi. Mwa moke nsima ya mobu 60 T.B., ntoma Petelo akomaki ete: “Bobwaka epai na [Yehova] makambo majali kotungisa bino, jambi bino bojali mpɔ na ye. Bomisɛnjɛla, bolala mpɔngi tɛ; motɛmɛli na bino, oyo mabe, ajali kotambola lokola nkɔsi konguluma, kolukaka sɔkɔ akolia nani. Botɛmɛla ye ngwi mpɔ na kondima, boyeba ete mpasi na motindo mɔkɔ mpenja ejali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.” Na ntembe te baklisto ya liboso balendisamaki mingi na maloba oyo. Bayebaki ete nsima ya konyokwama mwa ntango moke, Nzambe alingaki kokokisa ye moko kobongisama na bango. (1 Pɛtɛlɔ 5:7-10) Na boumeli ya mikolo wana ya nsuka ya ebongiseli ya Bayuda, baklisto ya solo batombolaki losambo ya Yehova, oyo etondi na bolingo, na likoló mpenza.—Bakolose 1:23.
14 Lokola ntoma Paulo asakolaki yango, lipɛngwi, kotangwa mosika na losambo ya solo, ebimaki. (Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3) Matatoli oyo mauti na bambula ya nsuka ya ekeke ya liboso matondi na bilembeteli na likambo yango. (1 Yoane 2:18, 19) Satana alóngaki mpenza kolóna lolenge mosusu ya baklisto kati na baklisto ya solo, kosaláká ete ezala mpasi mpo na kokesenisa “matiti mabe” mpe nganu to blé oyo elakisi baklisto ya solo. Nzokande, na boumeli ya bikeke oyo bisili koleka, bato mosusu batyaki losambo ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na bango, atako bazalaki na likámá ya kobungisa bomoi na bango. Kasi ezalaki bobele na bambula ya nsuka ya “ntango na mabota” nde Nzambe ayanganisaki lisusu basaleli na ye mpo na kotombola losambo ya solo.—Matai 13:24-30, 36-43; Luka 21:24.
Losambo ya Yehova etombwami lelo
15. Kobanda mobu 1919, lolenge nini esakweli ya Yisaya 2:2-4 mpe ya Mika 4:1-4 ezali kokokisama?
15 Na mobu 1919, Yehova apesaki batikali bapakolami nguya ya kobanda na mpiko nyonso mosala ya kopesa litatoli na mokili mobimba, kosakola oyo etombolaki likoló losambo ya Nzambe na solo. Koyikana ya “bampate mosusu” ya elilingi kobanda 1935 kino lelo, etuluku ya bato oyo, na elimo bazali kobuta epai na “ngomba ya ndako na Yehova” esili kokóla mpe kokóla lisusu. Na boumeli ya mbula ya mosala 1993, Batatoli ya Yehova 4 709 889 bakumisaki Yehova na kobyangáká bato mosusu ete báya kosangana na losambo lotombwami. Oyo nde bokeseni mpenza na ezalela ya elimo oyo ebebá ya “bankeka” ekabwanikabwani ya lisangá ya mangomba ya lokuta, mingi mpenza kati na boklisto ya nkombo mpamba!—Yoane 10:16; Yisaya 2:2-4; Mika 4:1-4.
16. Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kosala nini na boyokani na oyo esakolami na Yisaya 2:10-22?
16 Basangani ya mangomba ya lokuta batalelaka bandakonzambe mpe bakatedrale na bango mpe ata bakonzi na bango ya mangomba lokola ete bazali “likoló,” kopesáká bango bankombo ya lokumu mpe kokumisa bango mingi mpenza. Kasi tótala oyo Yisaya asakolaki: “Miso na njombo na moto ikokitisama mpe lolɛndɔ na bato ekosɔkisama, mpe [Yehova] akokumisama, bobɛlɛ ye mɔkɔ, na mokɔlɔ yango.” Yango ekozala ntango nini? Na bolózi monene oyo ekokwea mosika te, “banzambe bazangi ntina bakolimwa nyɛ.” Mpo ete mokolo yango ya nsɔ́mɔ esili kobɛlɛma, basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kotalela na mozindo esika nini losambo ya Yehova ezali kozwa kati na bomoi na bango.—Yisaya 2:10-22.
17. Lolenge nini basaleli ya Yehova ya mikolo na biso bazali komonisa ete batye losambo ya Yehova na esika ya liboso?
17 Batatoli ya Yehova, oyo bazali libota ya bondeko kati na mokili mobimba, bayebani malamu mpo na molende na bango ya kosakola Bokonzi. Losambo na bango ezali te lingomba ya nkombo mpamba, oyo bapesaka yango bobele ngonga moko na pɔ́sɔ. Ezali nde lolenge mpenza ya bomoi na bango mobimba. (Nzembo 145:2) Ya solo, na mobu moleki, Batatoli koleka 620 000 bamibongisaki mpo na kosangana na mosala ya boklisto lokola basakoli ya ntango nyonso. Baoyo bazali na molɔngɔ́ wana te, atako bongo batalelaka losambo ya Yehova na bopotu te. Yango emonanaka polele kati na masoló na bango ya mokolo na mokolo mpe kati na mosala na bango ya kosakola, atako mikumba na bango ya libota mizali kosɛnga ete básala mingi na mosala ya mosuni.
18, 19. Pesá bandakisa ya kolendisa oyo okoki kozwa na botángi ya masoló ya bomoi ya Batatoli.
18 Masoló ya bomoi ya Batatoli oyo mabimaka kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mazali komonisa lolenge nini bandeko mibali mpe bandeko basi mingi batyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso kati na bomoi na bango. Ndeko mwasi moko oyo apesaki bomoi na ye epai na Yehova wana azalaki na mibu motoba amityelaki mokano ya kokóma misionere. Bino bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bozali bilenge, mokano nini bokoki kopɔna oyo ekosalisa bino na kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso kati na bomoi na bino?—Talá lisoló “Nazali kolanda mokano oyo namityelaki wana nazalaki na mibu motoba,” kati na Mosenzeli ya Mársi 1, 1992, nkasa 26-30.
19 Ndeko mwasi moko mobangé mokufeli-mobali azali kopesa ndakisa malamu mpo na oyo etali kotya losambo ya Yehova na esika oyo ebongi na yango. Azwaki elendiseli mingi epai na baoyo ye asalisaki na koyekola solo. Bazalaki “libota” na ye. (Malako 3:31-35) Soki ozalaki kati na ezalela motindo oyo, mbɛlɛ okondima lisungi mpe lisalisi ya bilenge kati na lisangá? (Talá lolenge ndeko mwasi Winifred Remmie alobi yango ye moko kati na lisoló “Nayanolaki na libyangi mpo na kobuka mbuma,” eyebisami kati na Mosenzeli ya Yulí 1, 1992, nkasa 21-3.) Bino basáli ya ntango nyonso, bómonisa ete losambo ya Yehova ezali solo na esika ya liboso kati na bomoi na bino na kosaláká na komikitisa nyonso na esika botindami, kotosáká na bolingo nyonso litambwisi ya teokrasi. (Talá ndakisa ya ndeko Roy Ryan, oyo eyebisami na lisoló “Nakangamaki na bosembo nyonso na lisangá ya Nzambe,” kati na Mosenzeli ya Desɛ́mbɛ 1, 1991, nkasa 24-7.) Tómikundola ete wana totye losambo ya Yehova na esika ya liboso, tozali na endimiseli ete akobatela biso. Tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na lolenge tokozwa biloko bisengeli na biso mpo na bomoi. Makambo bandeko basi Olive mpe Sonia Springate bakutanaki na yango mamonisi yango.—Talá lisoló “Tolukaki liboso Bokonzi,” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Febwáli 1, 1994, nkasa 20-5.
20. Mituna nini ya ntina tosengeli komituna?
20 Bongo, moto na moto kati na biso, asengeli komituna mituna ya mozindo, boye te? Losambo ya Yehova ezali na esika nini kati na bomoi na ngai? Bomoi na ngai eyokani mpenza na komipesa na ngai mpo na kosala mokano ya Nzambe na makoki na ngai nyonso? Makambo nini ya bomoi na ngai nasengeli kobongisa? Botaleli na likebi mingi ya lisoló oyo elandi ekopesa libaku ya kokanisa na lolenge oyo tokoki kosalela biloko na biso na boyokani na mokano ya liboso oyo tomityeli kati na bomoi—losambo ya Nkolo Moyangeli Yehova, Tata na biso ya bolingo.—Mosakoli 12:13; 2 Bakolinti 13:5.
Mpo na bozongeli
◻ Na likambo litali losambo, Yehova azali kosɛnga nini?
◻ Mongombo mosalelamaki mpo na bokundoli ya likambo nini?
◻ Na ekeke ya liboso T.B., banani bapesaki ndakisa monene ya molende na likambo litalaki losambo, mpe basalaki yango lolenge nini?
◻ Kobanda mobu 1919, lolenge nini losambo ya Yehova esili kotombwama?