Maria (Mama ya Yesu)
Ndimbola: Mwasi oyo Nzambe amoniselaki boboto mingi mpe aponaki ye mpo abota Yesu. Biblia elobeli Ba-Maria mosusu mitano. Maria oyo tozali kolobela na lisolo oyo azalaki nkɔkɔ ya Mokonzi Davidi, na libota ya Yuda, mwana ya Heli. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Maria, ezali ntango oyo ye alakanaki libala na Yozefe, oyo azalaki mpe na libota ya Yuda mpe nkɔkɔ ya Davidi.
Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo Biblia elobi mpo na Maria?
(1) Tosengeli kotosa mbala moko makambo oyo Nzambe alobi na nzela ya batindami na ye, ata soki na ebandeli makambo yango ekoki kobulunganisa biso to komonana ete ekoki kosalema te.—Luka 1:26-37.
(2) Tosengeli kozala na mpiko ya kosala mokano ya Nzambe, mpe kotyela ye motema mobimba. (Talá Luka 1:38. Ndenge Kolimbola Mibeko 22:23, 24 emonisi yango, epai ya Bayuda, elenge mwasi oyo abali naino te kasi azwi zemi akokaki ata kobomama.)
(3) Nzambe asalelaka moto nyonso oyo ye alingi, azala mobola to mozwi.—Talá Luka 2:22-24 mpe Balevi 12:1-8.
(4) Tosengeli kotya makambo ya Nzambe na esika ya liboso. (Talá Luka 2:41; Misala 1:14. Esɛngisamaki te ete basi Bayuda básala mobembo na Yerusaleme elongo na mibali na bango na eleko ya Elekeli mbula nyonso, kasi Maria azalaki kosala yango.)
(5) Tosengeli kozala pɛto na bizaleli.—Luka 1:34.
(6) Baboti basengeli koteya bana na bango Liloba ya Nzambe na molende. (Makambo oyo Yesu asalaki ntango azalaki na mbula 12 emonisi ete baboti na ye basalaki yango. Talá Luka 2:42, 46-49.)
Maria azalaki mpenza ngɔndɔ ntango abotaki Yesu?
Luka 1:26-31 (LNz) elobi ete anzelu Gabriele oyo atindamaki epai ya “ngɔndɔ” Maria, amemelaki ye nsango oyo: “Talá, okokwela zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa ye nkombo Yezu.” Vɛrsɛ 34 elobi: “Maria atuni anzelu: ‘Yango ekosalema ndenge nini mpo nayebi mobali te [“Nasangisá naino nzoto na mobali te,” NW]?’” Matai 1:22-25 (LNz) ebakisi ete: “Maye manso masalemi bongo mpo ya kokokisa maloba Mokonzi alobáká na monoko mwa profeta: Ngondo akokwela zemi mpe akobota mwana mobali, mpe bakopesa ye nkombo Emanuel. Nkombo eye lokola ’te: ‘Nzambe azali na biso.’ Elongwi Yozefu o mpongi, asali lokola anzelu wa Nzambe atindaki ye: akamati mwasi wa ye o ndako; kasi ayebani na ye te tee Maria aboti mwana mobali; apesi mwana nkombo Yezu.”
Moto akoki mpenza kondima likambo yango? Na ntembe te, ezalaki mpasi te ete Mozalisi, oyo asalaki binama ya kobotela, asala ete liki ekola na libumu ya Maria na ndenge ya likamwisi. Yehova alongolaki bomoi oyo mwana na ye, mobotami ya liboso, azalaki na yango na likoló ná bomoto na ye mpe akɔtisaki yango na libumu ya Maria, na ndenge ya likamwisi. Elimo santu ya Nzambe, nguya na ye oyo esalaka mosala, ebatelaki mwana yango ntango azalaki kokola na libumu ya Maria kino abotamaki moto ya kokoka.—Luka 1:35; Yoa. 17:5.
Maria atikalaki kaka ngɔndɔ?
Mat. 13:53-56, LNz: “Esilisi Yezu koloba na miulani mina, alongwi kuna. Ekomi ye o ekolo ya ye, abandi koteya bato o sinagoga ya bango. Bakamwi mingi mpenza, balobi: ‘Bwanya na nguya ya kosala makamwisi azwi yango wapi? Ye mwana wa mokabinda te? Mama wa ye Maria te? Yakobo, Yozefu, Simoni na Yuda bazali bandeko [Grɛki, adelphoi] ba ye te? Bandeko basi [Grɛki, adelphai] ba ye bazali awa na biso te?’” (Na kotalela vɛrsɛ oyo, tokoki nde koloba ete Yesu azalaki mwana kaka moko oyo Maria abotaki, to abotaki mpe bana mosusu ya basi mpe ya mibali?)
Mpo na maloba ya Grɛki adelphoi mpe adelphai, oyo esalelami na Matai 13:55, 56, buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. IX, lok. 337) elobi ete “mpo na Bagrɛki oyo bazalaki na bomoi na ntango ya bato oyo bakomaki evanzile, maloba yango ezalaki na ndimbola ya bandeko mibali mpe basi oyo babotami na tata mpe mama moko; mpe motángi nyonso ya Grɛki ayebaki maloba yango kaka ndenge wana. Pene na nsuka ya siɛklɛ ya minei, (soki na 380) Helvidius, na kati ya buku na ye oyo ebungá, alobelaki likambo yango mpo na komonisa ete longolá Yesu, Maria azalaki na bana mosusu mpe, na yango, Maria azali ndakisa malamu mpo na bamama oyo bazali na bana mingi. Boyambi ya Eklezia oyo elobaka ete Maria akobaki kozala ngɔndɔ nde etindaki Santu Jérôme akoma trakte moko oyo ezali kotɛmɛla Helvidius (383 T.B.). Na trakte yango alobelaki makambo . . . oyo tii lelo bato ya mayele ya Lingomba ya Katolike bandimaka mpenza.”
Mrk. 3:31-35, LNz: “Mama na bandeko ba Yezu bayei, batelemi o libándá, batindi maloba mpo ya kobenga ye. Bato mingi bazingi Yezu, bayebisi ye: ‘Mama na bandeko ba yo bazali o libándá, balingi komono yo.’ Ayanoli bango: ‘Mama wa ngai nani? Bandeko ba ngai banani?’ Alakisi na miso ba ye bafandi zongazonga na ye, alobi: ‘Mama na bandeko ba ngai bango ba ye. Moto ata nani akosala mambi manso Nzambe alingi, azali ndeko mpe mama wa ngai.’” (Na vɛrsɛ oyo bokeseni ezali komonana kati na bandeko ya Yesu mpenza ná bandeko na ye ya elimo, elingi koloba bayekoli na ye. Moto moko akoki koloba te ete mama ya Yesu oyo balobeli awa ezali mama ya elimo. Na yango, tokoki nde koloba ete bandeko oyo balobeli awa ezali bandeko na ye mpenza te kasi bana ya bandeko ya mama na ye? Na Grɛki, soki bazali kolobela bana ya bandeko ya mama, basalelaka liloba mosusu, [syggenon] na ndakisa na Luka 21:16.)
Maria azalaki mama ya Nzambe?
Anzelu oyo ayebisaki Maria ete akobota mwana na ndenge ya likamwisi, ayebisaki ye te ete mwana yango akozala Nzambe. Alobaki ete: ‘Talá, okokwela zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa ye nkombo Yezu. Akozala moto monene, bakotánga ye Mwana wa Nzambe wa Nta-Likoló. . . . Mwana okobota akozala mosantu mpe bakobyanga ye Mwana wa Nzambe.’—Luka 1:31-35, LNz.
Ebr. 2:14, 17, LNz: “Bongo awa bana bazali mosuni moko mpe makila moko, ye [Yezu] mpe akomi moto lokola bango . . . Esengelaki ’te akoma ndenge yoko mpenza na bandeko ba ye.” (Soki azalaka Nzambe-moto, alingaki nde kokóma ‘ndenge moko na bandeko na ye’?)
Buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. X, lok. 21) elobi: “Mpo na koloba ete Maria azali mama ya Nzambe, makambo mibale esengeli kokokisama: asengeli mpenza kozala mama ya Yesu, mpe Yesu asengeli mpenza kozala Nzambe.” Biblia elobi ete Maria azalaki mama ya Yesu, kasi elobi mpe ete Yesu azalaki Nzambe? Na siɛklɛ ya minei, bambula mingi nsima ya kokomama ya Biblia, nde Eklezia ebimisaki liteya ya Bosato. (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. XIV, lok. 295; talá lokasa 129, na motó ya likambo “Bosato.”) Na ntango yango, na Esakola ya Nicée, nde Eklezia elobaki ete Yesu Kristo azali “Nzambe mpenza.” Nsima na yango, na Likita monene oyo esalemaki na Efese na mobu 431 T.B., Eklezia esakolaki ete Maria azali Theotokos, elingi koloba “moboti-Nzambe” to “Mama ya Nzambe.” Nzokande, maloba yango to likanisi yango ezali ata na libongoli moko ya Biblia te. (Talá nkasa 430-435, na motó ya likambo “Yesu Kristo.”)
Maria abotamaki na lisumu-lisango te?
Mpo na liteya yango, buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. VII, nk. 378-381) elobi ete: “ . . . Biblia ezali koteya polele te ete Maria abotamaki na lisumu-lisango te . . . Batata ya Eklezia ya ebandeli bamonaki ete Maria azali mosantu, kasi bamonaki te ete azangi mpenza lisumu. . . . Ezali mpasi kopesa dati ya sikisiki oyo liteya yango ekɔtaki na boyambi ya eklezia, kasi emonani ete endimamaki mingi mpenza na siɛklɛ ya mwambe to ya libwa. . . . [Na 1854 Pápa Pie IX alimbolaki liteya yango] ‘oyo elobi ete Ngɔndɔ Maria oyo abenisamaki mingi, azalaki na lisumu te ntango mama na ye azwaki zemi.’” Liteya yango endimamaki mpe na likita ya Vatican II (1962-1965).—The Documents of Vatican II (New York, 1966), ekomami na W. M. Abbott, S.J., lok. 88.
Biblia elobi boye: ‘Lisumu liyaki o mokili mpo ya mabe ma moto se moko [Adama], mpe lisumu liboti liwa. Bongo, bato banso basengeli kowa, mpamba te banso basali lisumu.’ (Rom. 5:12, LNz) Vɛrsɛ oyo etaleli mpe Maria? Biblia elobi ete, na kolanda Mobeko ya Moize, mikolo 40 nsima ya mbotama ya Yesu, Maria akendaki na tempelo kopesa mbeka mpo na lisumu mpo apɛtolama. Ye mpe abotamaki na lisumu mpe kozanga kokoka ya Adama.—Luka 2:22-24; Lev. 12:1-8.
Maria amataki na likoló na nzoto na ye ya mosuni?
Buku moko (New Catholic Encyclopedia 1967, Vol. I, lok. 972) elobaki boye mpo na esakweli oyo Pápa Pie XII asalaki na 1950 mpo na komonisa ete liteya yango ezali na kati ya boyambi ya Lingomba ya Katolike: “Vɛrsɛ moko te ya Biblia elobeli polele Ntombwa ya Maria, kasi na esakweli yango Pápa alobi ete Makomami nde esimbi liteya yango.”
Biblia elobi ete: “Mosuni mpe makila ikoki kozwaka Bokonzi na Nzambe te. Oyo ekopɔlaka ekosangola yango ezangi kopɔla te.” (1 Ko. 15:50, hf) Yesu alobaki ete: “Nzambe azali Elimo.” Ntango Yesu asekwaki, akómaki elimo, mpe lelo oyo azali “Elimo oyo akopesaka bomoi.” Baanzelu bazali bikelamu ya elimo. (Yoa. 4:24; 1 Ko. 15:45; Ebr. 1:13, 14, LNz) Vɛrsɛ nini ya Biblia elobi ete moto moko akendá na likoló na nzoto oyo esɛngi kolya mpe komɛla mpo ekoba kozala na bomoi? (Talá nkasa 295-298, na motó ya likambo “Lisekwa.”)
Esengeli tósambela Maria mpo alobela biso?
Yesu Kristo alobaki ete: “Bósambelaka boye: ‘Tata wa biso ozali o likoló . . . ’” Alobaki lisusu: ‘Ngai nazali Nzela, Bosolo mpe Bomoi. Moto moko te akokende epai ya Tata soki liboso aleki epai ya ngai te. . . . Eye bokosenge o nkombo ya ngai, nakosala yango.’—Mat. 6:9; Yoa. 14:6, 14, LNz.
Mabondeli oyo babondeli Tata na nzela ya Yesu Kristo ekondimama na boboto mingi mpe na mawa soki babondeli na nzela ya mwasi? Mpo na Tata, Biblia elobi na biso ete: “Lokola tata akolingaka bana ba ye, Mokonzi [Yawe, hf] mpe akolingaka baye bakobangaka ye. Ayebi botau bwa biso, ayebi ’te tozali se mputulu.” Azali ‘Nzambe wa ngolu, akoyokelaka bato mawa! akoyokaka nkanda noki te, azali motema bolamu mpe lobokó [solo, hf].’ (Nz. 103:13, 14; Kob. 34:6, LNz) Mpe mpo na Kristo, ekomami ete: “Tozali na nganga Nzambe mokonzi, moto ayebi botau bwa biso mpe akoyokelaka biso ngolu. Bamekaki ye motema na makambo ndenge na ndenge, se lokola biso, kasi asalaki lisumu te. Yango wana tóbanga te kobeleme na ngwende ya ngrasya ya Nzambe mpo ’te ayokela biso ngolu mpe apesa biso ngrasya ya ye mbala inso tosengeli na yango.”—Ebr. 4:15, 16, LNz.
Kosambela bikeko ya Maria eyokani na Biblia?
Likita monene ya Vatican II (1962-1965) nde elendisaki mpenza losambo ya Maria. “Likita monene mpe mosantu . . . elendisaki bana nyonso ya Eklezia ete losambo, mingimingi nzembo ya mabondeli epai ya ngɔndɔ oyo abenisami, esengeli kosalema mingi. Epesaki mitindo ete momeseno ya kosambela Maria esengeli kozwama na motuya, ndenge Bakonzi ya Eklezia basɛngaki yango na basiɛklɛ mingi, mpe ete malako oyo epesamaki kala mpo na kokumisa bikeko ya Kristo, ya Ngɔndɔ oyo abenisami mpe ya basantu, etosama mpenza.”—The Documents of Vatican II, nk. 94, 95.
Mpo na kozwa eyano ya Biblia, talá motó ya likambo “Bikeko,” nkasa 110-115.
Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kopesa Maria lokumu oyo eleki?
Ntoma Petro alobeli Maria te na mikanda nyonso oyo akomaki. Ntoma Paulo atángaki nkombo ya Maria te na mikanda oyo akomaki kasi atángaki ye kaka lokola “mwasi moko.”—Gal. 4:4.
Ndakisa nini Yesu apesaki na likambo etali kokumisa mama na ye?
Yoa. 2:3, 4, LNz: “Awa vino esili [na fɛti ya libala na Kana], mama wa Yezu alobi na ye: ‘Bazali na vino lisusu te.’ Yezu azongiseli ye: ‘Mama, olingi nasala nini? Elaka ya ngai ekoki naino te [“likambo nini kati na biso na yo,” hf].’” (Ntango Yesu azalaki mwana moke azalaki kotosa mama na ye ná tata-mobɔkɔli na ye, kasi ntango akoli, aboyaki mitindo ya mama na ye na boboto mpenza. Mpe Maria andimaki yango na komikitisa nyonso.)
Luka 11:27, 28, LNz: “Ezalaki Yezu koloba bongo, mwasi moko o kati ya bato atomboli mongongo, alobi: ‘Esengo na mama oyo amemeki yo o libumu, mpe anungisaki yo mabele!’ Kasi ye ayanoli: ‘Nzokande esengo eleki na bato bakoyokaka mateya ma Nzambe mpe bakotosaka mango!’” (Oyo ezalaki mpenza libaku malamu mpo Yesu apesa mama na ye lokumu oyo eleki soki yango esengelaki. Kasi asalaki yango te.)
Likambo ya kosambela Maria eutá wapi?
Sango Andrew Greeley alobi: “Maria azali moto moko ya ntina mingi na lisolo ya lingomba na mikili ya Mpoto . . . Elembo ya Maria ezali kokangisa lingomba ya bokristo ná mangomba ya kala oyo ezalaki kosambela banzambe-bamama.”—The Making of the Popes 1978 (U.S.A., 1979), lok. 227.
Likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi ezali esika oyo liteya oyo elobi ete Maria azali mama ya Nzambe ebandaki. “Likita monene ya Efese esalemaki na ndako-nzambe monene ya Theotokos na mobu 431. Ezali wana, na engumba oyo eyebanaki mingi mpo na losambo ya Artemisi, to Diane ndenge bato ya Roma bazalaki kobenga ye, nde bazalaki koloba ete esika yango ezali esika ekeko ya Artemisi eutaki na likoló, ekwei na nse, na bifelo ya tempelo monene ya losambo ya nzambe-mwasi Mama Mokonzi banda na mobu 330 L.T.B. . . . , na yango ezali likambo ya kokamwa te ete bandimaki kopesa Maria titre ‘moboti ya Nzambe.’”—The Cult of the Mother-Goddess (New York, 1959), E. O. James, lok. 207.
Soki moto atuni—
‘Bondimelaka Ngɔndɔ Maria?’
Okoki koyanola: ‘Biblia Mosantu elobi polele ete mama ya Yesu azalaki ngɔndɔ, biso mpe tondimaka yango. Kasi Tata na ye nde Nzambe. Mwana oyo Maria abotaki azalaki mpenza Mwana ya Nzambe, kaka ndenge anzelu ayebisaki ye. (Luka 1:35)’ Okoki kobakisa: ‘Kasi osilá komituna mpo na nini esengelaki Yesu abotama ndenge wana? . . . Esengelaki abotama ndenge wana mpo lisiko oyo ebongi epesama mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa.—1 Tim. 2:5, 6; okoki mpe kotánga Yoane 3:16.’
To okoki koloba: ‘Ɛɛ, tondimelaka ye. Tondimaka makambo nyonso oyo Biblia Mosantu elobi mpo na ye, mpe Biblia emonisi polele ete ntango Maria abotaki Yesu azalaki ngɔndɔ. Nasepelaka mpe mingi na makambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na Maria mpe liteya oyo tokoki kozwa na bomoi na ye. (Salelá makambo oyo ezali na nkasa 352, 353.)’
‘Bondimelaka Ngɔndɔ Maria te’
Okoki koyanola: ‘Nayebi ete bato mosusu bandimaka te ete mwasi oyo abotaki Mwana ya Nzambe azalaki ngɔndɔ. Kasi biso tondimaka mpenza ete azalaki ngɔndɔ. (Fungolá moko na babuku na biso na eteni oyo elobeli likambo yango mpe lakisá ye yango.)’ Okoki kobakisa: ‘Kasi ezali nde na likambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo na kobika? . . . Simbá likambo oyo Yesu ayebisaki Tata na ye na libondeli. (Yoa. 17:3)’