Mituna ya batángi
Makomami elobeli “mokanda ya Yasala” mpe “mokanda ya bitumba ya [Yehova].” (Yos. 10:13; Mit. 21:14) Mikanda yango mibale ezali na liste ya mikanda ya Biblia te. Ezali nde mikanda oyo Nzambe akomisaki mpe ebungá?
Likambo moko te emonisi ete Nzambe akomisaki mikanda yango mibale mpe na nsima ebungaki. Bakomi ya Biblia batángaki mpe babuku mosusu na mikanda na bango. Babuku yango mosusu ezali kaka mikanda ya Biblia, kasi babengaki yango na bankombo oyo biso lelo toyebi te. Na ndakisa, 1 Ntango 29:29 (NW) elobeli “maloba ya Samwele momoni-makambo,” “maloba ya mosakoli Natana,” mpe “maloba ya Gada momoni-bimonaneli.” Ekoki kozala ete yango nyonso misato ezali kaka mikanda oyo toyebi lelo na nkombo ya 1 mpe 2 Samwele, to mpe mokanda ya Basambisi.
Longola yango, ekoki kozala ete bankombo ya babuku mosusu oyo batángaki ekokani na oyo ya mikanda ya Biblia, kasi yango moko ezali mikanda ya Biblia te. Tokoki kozwa ndakisa ya mikanda minei ya kala oyo: “Mokanda ya ntango ya mikonzi ya Yuda,” “Mokanda ya mikonzi ya Yuda mpe ya Yisalaele,” “Mokanda ya mikonzi ya Yisalaele,” mpe “Mokanda ya mikonzi ya Yisalaele mpe ya Yuda.” Atako bankombo yango esali lokola ekokana na bankombo ya mikanda ya Biblia oyo toyebi lelo na nkombo ya 1 Mikonzi mpe 2 Mikonzi, mikanda yango minei epemamaki te, ezali mpe na kati ya liste ya mikanda ya Biblia te. (1 Mik. 14:29; 2 Nt. 16:11; 20:34; 27:7) Emonani ete ezalaki kaka babuku ya masolo oyo ezalaki ntango mosakoli Yilimia ná Ezela bakomaki masolo oyo totángaka na Biblia.
Ya solo, bakomi mosusu ya Biblia basalelaki mikanda ya masolo oyo Nzambe akomisaki te, oyo ezalaki na ntango wana. Esetele 10:2 elobeli “mikanda ya ntango ya mikonzi ya Madai mpe Palasa.” Ndenge moko mpe, ntango Luka azalaki kokoma Evanzile oyo ezali na nkombo na ye, ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta na ebandeli.’ Ekoki kozala alingaki koloba ete asalelaki mikanda mosusu oyo ezalaki na ntango na ye mpo na kosala liste ya bankombo ya bankɔkɔ ya Yesu oyo totángaka na Evanzile na ye. (Luka 1:3; 3:23-38) Atako babuku oyo asalelaki ekomamaki na lisalisi ya elimo santu te, toyebi ete Evanzile na ye ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na ntina mpo na biso lelo oyo.
Mpo na mikanda mibale oyo elobelami na motuna—“mokanda ya Yasala” mpe “mokanda ya bitumba ya [Yehova]”—emonani ete mikanda yango ezalaki mpenza; kasi ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe te. Mpo na yango, Yehova abatelaki yango te. Lokola batángi mikanda yango na Biblia, yango etindi balimboli mosusu ya Biblia báloba ete mikanda yango mibale ezalaki na maloba ya ntɔki to banzembo oyo ezalaki kolobela matata kati na Bayisalaele ná banguna na bango. (2 Sam. 1:17-27) Buku moko elobi ete makambo oyo ezalaki na mikanda yango “ezalaki maloba ya ntɔki mpe banzembo oyo bayembi ya kala ya Yisalaele bakomaki.” Ata mpe bato mosusu oyo Nzambe azalaki kosalela na ntango mosusu lokola basakoli mpe bamoni-bimonaneli, bakomaki mikanda oyo Yehova akomisaki te mpe atikaki te ete ekɔta na Makomami oyo “ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo” na mikolo na biso.—2 Tim. 3:16; 2 Nt. 9:29; 12:15; 13:22.
Atako Biblia etángi mikanda mosusu mpe bakomi ya Biblia basalelaki yango mpo na kozwa makanisi, yango esengeli te kotinda biso tóloba ete mikanda yango ekomamaki na lisalisi ya elimo santu. Kasi, Yehova Nzambe abatelaki makomi nyonso oyo ezali na “liloba ya Nzambe na biso,” mpe yango “ekoumela seko.” (Yis. 40:8, NW) Ya solo, makambo oyo Yehova aponaki mpo ekomama na mikanda 66 ya Biblia ezali oyo tosengeli na yango mpenza mpo ‘tózala bato oyo bakoki mpenza, oyo bazali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’—2 Tim. 3:16, 17.