Oyebaka elembo ya kozala ya Yesu?
MOTO moko te alingaka abɛla makasi to likama moko ekómela ye. Mpo na koboya makama motindo wana ekómela ye, moto ya bwanya atyaka likebi na bilembo oyo emonisaka ete likama ezali koya mpe azwaka bikateli oyo ebongi. Yesu Klisto alobelaki elembo moko ya ntina mingi oyo tosengeli koyeba. Elembo oyo alobelaki esengelaki komonana na mokili mobimba mpe bato nyonso basengelaki komona yango. Elembo yango etaleli mpe yo ná libota na yo.
Yesu azalaki kolobela Bokonzi ya Nzambe oyo ekolongola mabe mpe ekokómisa mabelé paladiso. Bayekoli na ye balingaki mpenza koyeba ntango oyo Bokonzi yango ekoya. Batunaki ye boye: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?”—Matai 24:3.
Yesu ayebaki ete nsima ya liwa mpe lisekwa na ye bambula mingi esengelaki koleka liboso atyama Mokonzi kuna na likoló mpo na koyangela bato. Lokola bato bakokaki komona te ntango akotyama mokonzi, Yesu apesaki elembo oyo ekokaki kosalisa bayekoli na ye báyeba “kozala” na ye mpe “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Elembo yango ezali na makambo mingi na kati, oyo nyonso emonisi elembo ya kozala ya Yesu.
Matai, Malako, mpe Luka, bakomi ya Baevanzile, bakomaki na bosikisiki mpenza eyano oyo Yesu apesaki. (Matai, mokapo 24 mpe 25; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21) Bakomi mosusu ya Biblia babakisi makambo mosusu ya elembo yango. (2 Timote 3:1-5; 2 Petelo 3:3, 4; Emoniseli 6:1-8; 11:18) Tokokoka te kolobela makambo yango nyonso na lisolo oyo, kasi tokolobela makambo mitano ya ntina ya elembo oyo Yesu alobelaki. Okomona ete kotalela makambo yango ezali na ntina mingi mpe ezali mpenza na litomba mpo na yo.—Talá etanda na lokasa 6.
“Mbongwana monene”
“Ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi.” (Matai 24:7) Zulunalo moko (Der Spiegel) elobaki ete liboso ya 1914, bato “bazalaki kokanisa ete makambo nyonso ekobonga, bakokóma na bonsomi mingi lisusu, makambo nyonso ekobanda kotambola malamu mpe bakozala na bomengo.” Na nsima, makambo nyonso ebongwanaki. Zulunalo mosusu (GEO) elobi ete: “Etumba oyo ebandaki na Augusto 1914 mpe esilaki na Novɛmbɛ 1918 ekamwisaki mpenza bato. Ekɔtisaki mbongwana monene na mokili, ekabolaki makambo ya kala na oyo ya sika.” Basoda koleka milio 60 ya bakɔntina mitano babomanaki lokola banyama. Basoda soki 6 000 bazalaki kokufa mokolo na mokolo. Banda wana, bato ya istware ya bileko nyonso mpe bato nyonso ya politiki bakómá koloba ete “bambula 1914 tii 1918 ekɔtisá mbongwana monene na mokili.”
Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebongolá mpenza makambo na mokili mpe ekɔtisá bato na mikolo ya nsuka ya makambo ya ntango oyo. Ekeke ya 20 etondaki na bitumba, kowelana mpe misala ya bateroriste. Makambo ebongi te na ekeke oyo ya 21. Longola bitumba, makambo mosusu ya elembo ya kozala ya Yesu ezali komonana.
Nzala, maladi mabe mpe koningana ya mabelé
“Kozanga ya bilei ekozala.” (Matai 24:7) Nzala makasi emonisaki bato bwale na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe banda wana, bato bazali konyokwama na nzala. Alan Bullock, moto moko ya Istware akomaki ete na 1933 na ekólo Russie mpe Ukraine, “ebele ya bato oyo bazalaki na nzala bazalaki kotambolatambola na ekólo mobimba . . . Bibembe etondaki na babalabala.” Na 1943, Theodore White, mopanzi-nsango moko amonaki na miso nzala oyo ezalaki na etúká Henan, na Chine. Akomaki boye: “Na ntango ya nzala makasi, eloko nyonso ekómaka kitoko mpe bakoki konika yango, kolya yango mpe ekoki kopesa moto makasi na nzoto. Kasi, nsɔmɔ ya liwa nde ekoki kotinda moto alya ata biloko oyo balyaka te.” Likambo ya mawa, na boumeli ya mbula oyo euti koleka, nzala makasi enyokoli bato mingi na Afrika. Atako mabelé ezali kobimisa biloko mingi mpo na moto nyonso, ebongiseli ya ONU oyo etalelaka makambo ya bilei (Fao) emonisi ete bato soki milio 840 na mokili mobimba bazali na biloko ya kolya oyo ekoki na bango te.
“Epai na epai bamaladi mabe.” (Luka 21:11) Zulunalo moko (Süddeutsche Zeitung) elobi boye: “Na 1918, grippe espagnole ebomaki bato milio soki 20 to milio 50, koleka peste noire to Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.” Banda wana, bato mingi bazali kobɛla bamaladi lokola malaria, kolokoto, maladi ya ntolo, bukabuka, mpe choléra. Bato batikali monɔkɔ polele komona ndenge sida ezali se kopalangana. Tozali kokamwa mingi ete bamaladi ezali kosila te atako mayele ya minganga ezali kobakisama. Makambo wana oyo bato bamonaki naino te liboso ezali kosalisa biso tómona polele ete tozali na ntango moko ya ndenge mosusu.
“Koningana ya mabelé.” (Matai 24:7) Na boumeli ya mbula 100 oyo eleki, koningana ya mabelé ebomi bato bankóto na bankóto. Lisolo moko oyo ebimaki na Internet emonisi ete koningana ya mabelé oyo ebukaka bandako mpe epasolaka mabelé ezali kosalema mbala soki 18 mbula na mbula kobanda 1914. Koningana ya mabelé ya makasi lisusu koleka, oyo ebukaka bandako ya mineneminene esalemaka ata mbala moko na mbula. Atako mayele ya siansi ezali se kokola, bato bazali kaka kokufa mingi mpamba te bingumba oyo ezali se kotonda na bato ezali na bisika oyo mabelé eninganaka.
Nsango moko ya esengo!
Makambo mingi ya elembo ya mikolo ya nsuka ezali koyokisa bato mpasi. Kasi, Yesu alobelaki mpe nsango moko ya esengo.
“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Mosala oyo Yesu ye moko abandaki, elingi koloba kosakola nsango malamu ya Bokonzi, esengelaki kosalema lisusu makasi na mikolo ya nsuka. Yango nde ezali mpenza kosalema. Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango ya Biblia mpe koteya bato oyo bazali kosepela na nsango yango básalela makambo oyo bazali koyekola na bomoi na bango. Lelo oyo, batatoli koleka milio motoba bazali kosakola na mikili 235 mpe na minɔkɔ koleka 400.
Tósimba ete Yesu alobaki te ete mpasi oyo ekozala na mokili ekobebisa makambo nyonso. Alobaki mpe te ete likambo moko ya elembo yango ekomonana na mokili mobimba. Kasi, asakolaki nde ebele ya makambo oyo nyonso esengelaki kozala elembo oyo ekomonana na bisika nyonso na mabelé.
Longola makambo oyo ezali komonana na bisika ndenge na ndenge, ezali na elembo moko oyo ezali komonana na mokili mobimba? Likambo yango ezali mpe kotungisa yo ná libota na yo. Tokoki komituna boye: Kasi mpo na nini kaka bato moke nde bazali komona yango?
Bato batye matomba na bango moko na esika ya liboso
“Kosukola awa te,” “Kebá na kura,” “Tambolá malɛmbɛ.” Wana ezali mwa bilembo mpe makebisi oyo tomonaka, kasi mbala mingi tokipaka yango te. Mpo na nini? Mpamba te tolingaka mingi kosala kaka makambo oyo tokanisi ete ezali malamu. Na ndakisa, tokoki kozala na mposa ya kokumba motuka na vitesi oyo mobeko epekisi, to mpe tokoki kozala na mposa ya kosukola na esika oyo bapekisi. Kasi, koboya kotya likebi na bilembo ezali kozanga bwanya.
Na ndakisa, baturiste mingi bakufaki na Bangomba Alpes na Autriche, na France, na Italie mpe na Suisse mpo batyaki likebi te na bilembo oyo ekebisaka na makama ya mbula mpɛmbɛ oyo esopanaka na bangomba yango. Zulunalo moko (Süddeutsche Zeitung) elobi ete baturiste mingi oyo baboyaka kotosa makebisi yango, balobaka na mitema na bango, oyo ekoya eya. Likambo ya mawa, koboya kotosa makebisi ekoki komema makama ya minene.
Ntina nini bato batyaka likebi te na elembo oyo Yesu apesaki? Ekoki kozala ete mposa ya bozwi ekangi bango miso, bakipaka makambo te, bakokaka kozwa bikateli te, bamipesi mingi na misala na bango to mpe bazali kobanga kobungisa lokumu na bango. Ezali na moko kati na makambo yango oyo ekoki kotinda yo obosana elembo ya kozala ya Yesu? Ekozala malamu mingi soki otye likebi na elembo yango mpe osali makambo oyo esengeli?
Bomoi na paladiso awa na mabelé
Ebele ya bato bazali kotya likebi na elembo ya kozala ya Yesu. Kristian, mobali moko ya Allemagne oyo auti kobala, akomi boye: “Tozali na ntango ya mpasi mpenza. Emonani mpenza ete tozali na ‘mikolo ya nsuka.’” Ye ná mwasi na ye balekisaka ntango mingi mpo na kosakwela bato mosusu Bokonzi ya Masiya. Frank afandaka mpe na Allemagne. Ye ná mwasi na ye, balendisaka bato mosusu na nsango malamu ya Biblia. Frank alobi boye: “Lokola makambo ezali mabe lelo na mokili, bato mingi bazali komitungisa mingi mpo na avenire na bango. Tozali komeka kolendisa bango na bisakweli ya Biblia oyo etali paladiso.” Kristian ná Frank bazali kokokisa likambo moko ya elembo ya Yesu, elingi koloba kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Matai 24:14.
Ntango mikolo ya nsuka ekokóma na nsuka, Yesu akolongola ebongiseli ya makambo oyo ya kala ná bato na yango. Bokonzi ya Masiya ekobanda koyangela mabelé, mpe yango ekobongola mabelé paladiso ndenge Biblia elaki. Bato bakosikolama na maladi mpe liwa, mpe bakufi bakosekwisama awa na mabelé. Talá makambo kitoko oyo ezali kozela baoyo bazali koyeba bilembo ya ntango. Ekozala malamu te tóyeba makambo mingi lisusu ya elembo yango mpe nini tosengeli kosala mpo na kobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo? Na ntembe te, ezali likambo oyo moto nyonso asengeli kosala na lombangu mpenza.—Yoane 17:3.
[Maloba katikati na lokasa 4]
Yesu asakolaki ebele ya makambo oyo esali elembo moko oyo esengeli komonana na bisika nyonso na mabelé
[Maloba katikati na lokasa 6]
Ezali na elembo moko oyo ezali komonana na mokili mobimba?
[Etanda/Bililingi na lokasa 6]
BILEMBO YA MIKOLO YA NSUKA
Bitumba oyo emonanaki naino te.—Matai 24:7; Emoniseli 6:4
Nzala.—Matai 24:7; Emoniseli 6:5, 6, 8
Maladi mabe.—Luka 21:11; Emoniseli 6:8
Kobakisama ya Botyoli-mibeko.—Matai 24:12
Koningana ya mabelé.—Matai 24:7
Bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.—2 Timote 3:1
Bolingo makasi ya mbongo.—2 Timote 3:2
Bana bazangi botosi epai ya baboti.—2 Timote 3:2
Bolingo ya libota ezali te.—2 Timote 3:3
Bato balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.—2 Timote 3:4
Bato bazangi komipekisa.—2 Timote 3:3
Bolingo ya makambo malamu ezali te.—2 Timote 3:3
Bazali kotya likebi te na likama oyo ezali koya.—Matai 24:39
Basɛki bazali koboya kondima makambo oyo ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka.—2 Petelo 3:3, 4
Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama na mokili mobimba.—Matai 24:14
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]
Basoda ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba: Euti na buku The World War—A Pictorial History, 1919; libota moko ya babola: AP Photo/Aijaz Rahi; mwana moko oyo abɛlaki maladi ya bukabuka: © WHO/P. Virot